‘Bwanya ya Nzambe ezali mingi mpenza!’
“Ee bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza! Bikateli na ye ya lisambisi ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki koyebana te!”—ROM. 11:33.
1. Lokumu ya monene koleka mpo na bakristo oyo bazwá batisimo ezali nini?
SOKI batuni yo ete: Wapi lokumu ya monene koleka oyo bapesá yo? Okoki mbala moko kokanisa mokumba moko oyo bapesaki yo to lokumu moko boye oyo bapesaki yo. Kasi, mpo na biso bakristo oyo bazwá batisimo, lokumu ya monene koleka ezali libaku oyo tozwá ya kozala na boyokani malamu na Nzambe kaka moko ya solo, Yehova. Mpo na yango, tokómá bato oyo ‘bayebani na Nzambe.’—1 Ko. 8:3; Gal. 4:9.
2. Mpo na nini koyeba Yehova mpe koyebana na ye ezali lokumu monene mpenza?
2 Mpo na nini koyeba Yehova mpe koyebana na ye ezali lokumu monene mpenza? Mpo azali kaka te Moto oyo aleki monene na molɔ́ngɔ́ mobimba kasi azali mpe Mobateli ya baoyo ye alingaka. Na lisalisi ya elimo santu, mosakoli Nahumu akomaki boye: “Yehova azali malamu, esika makasi ya libateli na mokolo ya mpasi. Mpe ayebaka baoyo bazali koluka esika ya kokima epai na ye.” (Nah. 1:7; Nz. 1:6) Kutu, mpo tózwa bomoi ya seko, tosengeli koyeba Nzambe ya solo mpe Mwana na ye Yesu Kristo.—Yoa. 17:3.
3. Koyeba Nzambe esɛngi nini?
3 Koyeba Nzambe esuki kaka na koyeba nkombo na ye te. Tosengeli koyeba ye lokola Moninga, koyeba makambo oyo alingaka ná oyo alingaka te. Kozala na bomoi oyo eyokani na boyebi yango ezali mpe na ntina mingi mpo na komonisa ete toyebi Nzambe malamumalamu. (1 Yoa. 2:4) Kasi ezali na likambo mosusu oyo tosengeli kosala soki tolingi mpenza koyeba Yehova. Tosengeli kosuka te kaka na koyeba makambo oyo asali, kasi tosengeli mpe koyeba ndenge mpe ntina oyo asali yango. Soki tozali mpenza kokanga ntina ya mikano ya Yehova, boyebi yango ekotinda biso tókamwa ndenge ‘bwanya ya Nzambe ezali mingi mpenza.’—Rom. 11:33.
Nzambe oyo azali na mokano
4, 5. (a) Ndenge esalelami na Biblia, “mokano” ezali nini? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge moto akoki kokokisa mokano na ye na banzela mingi.
4 Yehova azali Nzambe oyo azali na mokano, mpe Biblia elobi ete azali na “mokano ya seko.” (Ef. 3:10, 11) Liloba yango elimboli nini? Ndenge esalelami na Biblia, “mokano” ezali nde likambo moko ya sikisiki oyo moto akani kosala, mpe akoki kosala yango na banzela ebele.
5 Tópesa ndakisa: Moto akoki kozala na mposa ya kosala mobembo mpo na kokende na esika moko boye. Na yango, kokóma na esika yango ekómi mokano na ye. Akoki kopona kokende kuna na motuka to na biloko mosusu oyo ememaka bato mpe kozwa banzela ndenge na ndenge. Wana azali kokende na nzela oyo aponi, akoki kokutana na makambo oyo alikyaki te, na ndakisa mbula, mituka ebele oyo ekangi nzela, babalabala ekangami, mpe ekosɛnga ye azwa nzela mosusu. Ata soki abongoli makambo ndenge nini, ntango akómi na esika oyo azali kokende, mokano na ye ekokisami kaka.
6. Ndenge nini Yehova amonisaki ete abongolaka makambo mpo na kokokisa mokano na ye?
6 Yehova mpe abongolá makambo mingi mpo na kokokisa mokano na ye ya seko. Kozanga abosana bonsomi ya kopona oyo apesá bikelamu na ye ya mayele, akakatanaka te kobongola makambo mpo na kokokisa mokano na ye. Na ndakisa, tótala ndenge Yehova azali kokokisa mokano na ye na oyo etali Momboto oyo alakamaki. Na ebandeli, Yehova ayebisaki mwasi ná mobali ya liboso boye: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.” (Eba. 1:28) Mokano wana oyo alobaki polele ekweaki na mai mpo na botomboki oyo ebimaki na Edene? Soki moke te! Mpo na likambo ya sika oyo ebimaki, Yehova azwaki na mbala moko “nzela” mosusu mpo na kokokisa mokano na ye. Asakolaki koya ya “momboto” moko oyo akosilisa mabe oyo batomboki babimisaki.—Eba. 3:15; Ebr. 2:14-17; 1 Yoa. 3:8.
7. Ndimbola oyo Yehova apesaki mpo na ye moko na Kobima 3:14 eteyi biso nini?
7 Likoki ya Yehova ya kosala makambo na lolenge mosusu mpo na kokokisa mokano na ye ntango makambo ya sika ebimi eyokani na ndimbola oyo apesaki mpo na ye moko. Ntango Moize ayebisaki Yehova makambo mosusu oyo ekokaki kopekisa ye akokisa mosala oyo apesaki ye, Yehova akitisaki ye motema ete: “‘Nakozala oyo nakozala.’ Mpe abakisaki ete: ‘Talá oyo okoloba na bana ya Yisraele: “Nakozala atindi ngai epai na bino.”’” (Kob. 3:14) Ya solo, Yehova akoki kokóma nyonso oyo alingi kokóma mpo na kokokisa mokano na ye mobimba! Yango emonisami malamumalamu na ndakisa oyo ntoma Paulo apesaki na mokanda ya Baroma mokapo 11. Kuna, alobeli nzete ya olive ya elilingi. Ezala elikya na biso ezali ya kokende na likoló to ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele, kotalela ndakisa yango ekosalisa biso tómona ndenge bwanya ya Yehova ezali mingi mpenza.
Mokano ya Yehova mpo na momboto oyo alakamaki
8, 9. (a) Makambo minei nini ekosalisa biso tókanga ntina ya ndakisa ya nzete ya olive? (b) Eyano na motuna nini emonisi ndenge Yehova abongolaka makambo mpo na kokokisa mokano na ye?
8 Mpo tókanga ntina ya ndakisa ya nzete ya olive, tosengeli liboso koyeba makambo minei oyo etali mokano ya Yehova mpo na momboto oyo alakamaki. Ya liboso, Yehova alakaki Abrahama ete “bikólo nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli” na nzela ya momboto na ye, to bakitani na ye. (Eba. 22:17, 18) Ya mibale, bapesaki ekólo Yisraele oyo eutaki na Abrahama libaku ya kobimisa “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” (Kob. 19:5, 6) Ya misato, ntango Bayisraele mingi ya mosuni baboyaki Masiya, Yehova azwaki bibongiseli mosusu mpo na kobimisa “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” (Mat. 21:43; Rom. 9:27-29) Mpe ya minei, atako Yesu azali eteni ya liboso ya momboto ya Abrahama, bapesaki mpe bato mosusu libaku ya kokóma eteni mosusu ya momboto yango.—Gal. 3:16, 29.
9 Na kolanda makambo wana minei, mokanda ya Emoniseli eyebisi biso ete bato 144 000 bakoyangela elongo na Yesu na likoló, bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe. (Em. 14:1-4) Bato yango babengami mpe “bana ya Yisraele.” (Em. 7:4-8) Kasi, bato nyonso 144 000 bazali Bayisraele ya mosuni, to Bayuda? Eyano na motuna wana emonisi ndenge Yehova abongolaka makambo mpo na kokokisa mokano na ye. Tótala sikoyo ndenge mokanda ya ntoma Paulo epai ya Baroma esalisi biso tózwa eyano.
“Bokonzi moko ya banganga-nzambe”
10. Libaku nini kaka ekólo Yisraele nde ezalaki na yango?
10 Ndenge tomonaki yango likoló, kaka ekólo Yisraele nde ezalaki na libaku ya kobimisa bato mpo na kosala “bokonzi moko ya banganga-nzambe mpe ekólo moko mosantu.” (Tángá Baroma 9:4, 5.) Kasi ekozala ndenge nini ntango Masiya oyo alakamaki akoya? Ekólo Yisraele ya mosuni ekobimisa motángo mobimba ya Bayisraele ya elimo 144 000 oyo bakokóma eteni ya mibale ya momboto ya Abrahama?
11, 12. (a) Ntango nini babandaki kopona baoyo bakosala Bokonzi ya likoló, mpe Bayuda mingi oyo bazalaki na mikolo wana basalaki nini? (b) Ndenge nini Yehova akokisaki “motángo mobimba” ya baoyo basengelaki kokóma momboto ya Abrahama?
11 Tángá Baroma 11:7-10. Ekólo ya Bayuda ya ekeke ya liboso eboyaki Yesu. Na yango, libaku ya kobimisa momboto ya Abrahama ezalaki lisusu kaka ya bango te. Kasi, kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango babandaki kopona bato oyo bakosala ‘bokonzi ya banganga-nzambe’ oyo ekozala na likoló, ezalaki na Bayuda mosusu ya motema sembo oyo bandimaki libyangi yango. Lokola bazalaki kaka mwa bankóto, Bayuda yango bazalaki kaka lokola “batikali” soki tokokanisi bango na ekólo mobimba ya Bayuda.—Rom. 11:5.
12 Kasi, ndenge nini Yehova alingaki kokokisa “motángo mobimba” ya baoyo basengelaki kokóma momboto ya Abrahama? (Rom. 11:12, 25) Yoká eyano oyo ntoma Paulo apesaki: “Elingi koloba te ete liloba ya Nzambe elongaki te. Mpo ezali te bato nyonso oyo bazali kobotama na Yisraele [ya mosuni] nde bazali mpenzampenza Bayisraele. Ezali mpe te mpo bango bazali momboto [bakitani] ya Abrahama nde bango nyonso bazali bana na ye [eteni ya momboto ya Abrahama] . . . Elingi koloba, bana ya libota ya Abrahama bazali mpenza bana ya Nzambe te, kasi bana ya elaka nde batángami momboto yango.” (Rom. 9:6-8) Na yango, esɛngaki kaka te ete bato oyo bakozala momboto ya Abrahama bázala kaka na makila ya Abrahama mpo mokano ya Yehova na ntina etali momboto ekokisama.
Nzete ya olive ya elilingi
13. Nini emonisami na (a) nzete ya olive, (b) mosisa na yango, (c) mobimbi na yango, mpe (d) bitape na yango?
13 Na nsima, ntoma Paulo akokanisaki baoyo bakozala na kati ya momboto ya Abrahama na bitape ya nzete ya olive ya elilingi.a (Rom. 11:21) Nzete yango ya olive oyo elonami emonisi lolenge oyo mokano ya Nzambe ezali kokokisama na ntina etali kondimana ya Abrahama. Mosisa ya nzete yango ezali mosantu mpe emonisi Yehova, ye oyo apesaka Yisraele ya elimo bomoi. (Yis. 10:20; Rom. 11:16) Mobimbi emonisi Yesu, eteni ya liboso ya momboto ya Abrahama. Bitape nyonso ezali “motángo mobimba” ya baoyo basali eteni ya mibale ya momboto ya Abrahama.
14, 15. Banani ‘bakatamaki’ na nzete ya olive oyo elonami, mpe banani babakamaki na nzete yango?
14 Na ndakisa ya nzete ya olive, Bayuda oyo baboyaki Yesu bakokanisami na bitape oyo “ekatamaki.” (Rom. 11:17) Na ndenge yango, babungisaki libaku ya kokóma na kati ya momboto ya Abrahama. Kasi, banani balingaki kozwa esika na bango? Mpo na Bayuda ya mosuni, oyo bazalaki komikumisa na ndenge bazalaki na makila ya Abrahama, likambo wana ekokaki kokanisama te. Kasi Yoane Mobatisi akebisaki bango ete soki Yehova alingi kosala yango, akoki kobimisela Abrahama bana ata na mabanga.—Luka 3:8.
15 Sikoyo, Yehova asalaki nini mpo na kokokisa mokano na ye? Paulo alimboli ete bitape ya nzete ya olive ya zamba ebakamaki na nzete ya olive oyo elonami mpo na kozwa esika ya bitape oyo ekatamaki. (Tángá Baroma 11:17, 18.) Na yango, na ndenge ya elilingi, bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki bato ya bikólo, na ndakisa bakristo mosusu na lisangá ya Roma, babakamaki na nzete ya olive ya elilingi. Na ndenge yango bakómaki na kati ya momboto ya Abrahama. Na ebandeli, bazalaki lokola bitape ya nzete ya olive ya zamba; bazalaki na libaku te ya kokɔta na kondimana wana ya ntina mingi. Kasi Yehova afungolelaki bango nzela mpo bakóma Bayuda ya elimo.—Rom. 2:28, 29.
16. Ndenge nini ntoma Petro alimbolaki lolenge oyo ekólo ya sika ya elimo esalemaki?
16 Ntoma Petro alimboli likambo yango na maloba oyo: “Yango wana, [Yesu ] azali na motuya na miso na bino [Bayisraele ya elimo, ata mpe bato ya bikólo oyo bakómaki bakristo], mpo bozali bandimi; kasi epai ya baoyo bazali kondima te, ‘kaka libanga wana oyo batongi-ndako babwakaki ekómi libanga monene ya litumu ya ndako,’ mpe ‘libanga ya kobɛta libaku mpe libanga oyo ekweisaka.’ . . . Kasi bino bozali ‘libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu, bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo bósakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa. Mpo liboso bozalaki bato ya Nzambe te, kasi sikoyo bozali bato na Ye; bozalaki bato oyo bayokelaki mawa te, kasi sikoyo bozali bato oyo bayokeli mawa.”—1 Pe. 2:7-10.
17. Na ndenge nini makambo oyo Yehova asalaki ‘esengelaki kozala bongo te’?
17 Yehova asalaki likambo moko oyo, mpo na bato mingi, ekoki kosalema ata moke te. Paulo amonisi ete makambo oyo esalemaki “esengeli kozala bongo te.” (Rom. 11:24) Mpo na nini? Mpamba te, kobaka etape ya nzete ya zamba na nzete oyo elonami ekokaki komonana lokola likambo oyo esalemaka mingi te, oyo kutu esengeli kozala bongo te; kasi, yango nde basali-bilanga mosusu ya ekeke ya liboso basalaki.b Ndenge moko mpe, Yehova asalaki likambo moko ya kokamwa. Mpo na Bayuda, bato ya bikólo bakokaki te kobota mbuma oyo ebongi. Nzokande, kaka bato yango nde Yehova akɔtisaki na “ekólo moko” oyo ebotaki mbuma ya elimo. (Mat. 21:43) Banda na ntango oyo batyaki Korneyi mafuta—ye moto ya liboso oyo akatamá ngenga te oyo akómaki mokristo—na 36 T.B., nzela efungwamaki mpo bato oyo bazali Bayuda te mpe bakatami ngenga te bábakama na nzete ya olive ya elilingi.—Mis. 10:44-48.c
18. Bayuda ya mosuni bazalaki na libaku nini nsima ya mobu 36 T.B.?
18 Yango elingi nde koloba ete nsima ya mobu 36 T.B., Bayuda ya mosuni bazalaki lisusu te na libaku ya kozala na kati ya momboto ya Abrahama? Te. Paulo alimboli boye: “Bango mpe [Bayuda ya mosuni], soki batiki kozala bato oyo bazali na kondima te, bakobakama; mpo Nzambe akoki kobaka bango lisusu. Mpo soki yo bakataki yo na nzete ya olive ya zamba mpenza mpe babakaki yo na nzete ya olive ya elanga atako esengeli kozala bongo te, bongo bitape ya nzete yango mpenza ekobakama malamu koleka na nzete na yango moko ya olive te?”d—Rom. 11:23, 24.
“Yisraele mobimba ekobika”
19, 20. Likambo nini Yehova asali ndenge emonisami na ndakisa ya nzete ya olive?
19 Ya solo, mokano ya Yehova mpo na “Yisraele ya Nzambe” ezali kokokisama na ndenge ya malamu mpenza. (Gal. 6:16) Ndenge Paulo alobaki, “Yisraele mobimba ekobika.” (Rom. 11:26) Na ntango oyo Yehova atyá, “Yisraele mobimba,” elingi koloba motángo mobimba ya Bayisraele ya elimo, bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló. Eloko moko te ekoki kopekisa mokano ya Yehova ekokisama!
20 Ndenge esakolamaki, momboto ya Abrahama—Yesu Kristo ná bato 144 000—bakopesa mapamboli “na bato ya bikólo.” (Rom. 11:12; Eba. 22:18) Boye, basaleli nyonso ya Nzambe bakozwa mapamboli na ebongiseli yango. Ya solo, ntango tozali kotala ndenge oyo Yehova azali kokokisa mokano na ye ya seko, tokoki kozanga te kokamwa mpo na “bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye [oyo] ezali mingi mpenza.”—Rom. 11:33.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Emonani ete nzete ya olive ezali elilingi ya likambo mosusu te. Atako Yisraele ya mosuni ebimisaki bakonzi mpe banganga-nzambe, ekólo yango ekómaki bokonzi moko ya banganga-nzambe te. Na kolanda Mibeko, bakonzi ya Yisraele bakokaki kokóma banganga-nzambe te. Na yango, nzete ya olive ekokaki kozala elilingi ya Yisraele ya mosuni te. Paulo asalelaki ndakisa yango mpo na komonisa ndenge mokano ya Nzambe ya kobimisa “bokonzi moko ya banganga-nzambe” ekokisami na Yisraele ya elimo. Ndimbola oyo esemboli makambo oyo ebimisamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1983, nkasa 14-19 (na Lifalanse).
c Ezalaki na nsuka ya mbula misato ná ndambo oyo bapesaki kaka Bayuda libaku ya kokóma ekólo ya sika ya elimo. Esakweli oyo etali bapɔsɔ 70 ya bambula elobelaki likambo yango.—Dan. 9:27.
d Balɛtrɛ ya grɛki oyo basaleli mpo na “elanga” na Baroma 11:24 euti na liloba oyo, soki balɛtrɛ yango etyami liboso ya liloba yango, ndimbola na yango ezali “malamu, malamu mingi” to “oyo eyokani mpenza na mposa na yango.” Esalelamaka mingimingi mpo na kolobela biloko oyo ekokisi mokano oyo basalaki yango.
Ozali koyeba lisusu
• Ndenge oyo Yehova azali kokokisa mokano na ye eteyi biso nini na ntina na ye?
• Na Baroma mokapo 11, nini emonisami na . . .
nzete ya olive?
mosisa na yango?
mobimbi na yango?
bitape na yango?
• Mpo na nini kobaka bitape na nzete ezali likambo oyo “esengeli kozala bongo te”?
[Etanda/Elilingi na lokasa 24]
Mpo na nini kobaka bitape ya nzete ya olive ya zamba?
▪ Lucius Junius Moderatus Columella azalaki soda moko Moroma mpe mosali-bilanga oyo azalaki na bomoi na ekeke ya liboso ya T.B. Ayebani mingi mpo na babuku 12 oyo akomaki na oyo etali bomoi ya bato mpe mosala ya bilanga.
Na buku na ye ya mitano, azongelaki lisese moko ya kala: “Moto oyo aloni banzete ya olive, azali kosɛnga yango mbuma; moto oyo azali kotya yango bipɔli mpo ekola malamu, azali kosɛngasɛnga yango mbuma; moto oyo azali kokata bitape na yango, azali kotindika yango ebota.”
Nsima ya kolobela banzete mosusu oyo ekolaka malamu kasi ebotaka mbuma te, apesaki toli oyo: “Ezali malamu kotɔbɔla yango na eloko oyo bato ya mokili ya Gaule basalelaka mpe kokanga makasi etape ya nzete ya olive ya zamba na lidusu yango; bongo, lokola etape oyo ekoki kobota ekɔti kuna, nzete yango ekobota mingi.”
[Elilingi na lokasa 23]
Oyebi ndimbola ya ndakisa ya nzete ya olive ya elilingi?