“Bóyambanaka”
FOEBE, moklisto moko ya ekeke ya liboso, azalaki na mokakatano moko. Autaki na Kenkelea, na Grèce, mpe azalaki kokende na Loma, kasi ayebanaki na bandeko na engumba yango te. (Baloma 16:1, 2) Edgar Goodspeed, mobongoli moko ya Biblia, alobi boye: “Loma [ya ntango wana] ezalaki mabe mpenza mpe eyebanaki ete baotɛlɛ na yango ezalaki bisika malamu te mpo na mwasi oyo apesaka nzoto na ye kilo, mingimingi mwasi moklisto.” Na yango, Foebe asengelaki kolala wapi?
Na ntango wana, bato bazalaki kosala mibembo mingi. Yesu Klisto ná bayekoli na ye mpe bazalaki kosala mibembo mpo na kosakola nsango malamu na Yudea mpe Galilai mobimba. Mwa moke na nsima, bamisionɛrɛ lokola Paulo bazalaki kokende kosakola nsango malamu na bamboka ndenge na ndenge pembenipembeni ya mai ya Méditerranée, tii na Loma, mboka-mokonzi ya Ampire ya Loma. Ntango baklisto ya liboso bazalaki kosala mibembo, ezala na ekólo ya Bayuda to na bamboka mosusu, bazalaki kolala wapi? Mikakatano nini bazalaki kokutana na yango mpo na kozwa bisika ya kolala? Liteya nini tokoki kozwa na ezaleli na bango ya koyamba bapaya?
“Lelo nasengeli kofanda na ndako na yo”
Banda kala, koyamba bapaya ezalaka ezaleli ya basambeli ya solo ya Yehova. Na ndakisa, Abalayama, Lota mpe Lebeka bazalaki bayambi bapaya. (Genese 18:1-8; 19:1-3; 24:17-20) Yobo alobelaki ndenge oyo azalaki koyamba bapaya na maloba oyo: “Mopaya akokaki kolala libándá te, ndako na ngai ezalaki ntango nyonso polele mpo na baleki-nzela.”—Yobo 31:32, NW.
Mpo bato ya Yisalaele báyamba ndeko na bango Moyisalaele oyo azali mopaya, mbala mingi ezalaki kosɛnga kaka mopaya yango afanda na katikati ya mboka mpe azela ete moto moko amema ye na ndako na ye. (Basambisi 19:15-21) Na momeseno, bankolo-ndako bazalaki kosukola bapaya na bango makolo, kopesa bango bilei, masanga mpe koleisa banyama na bango. (Genese 18:4, 5; 19:2; 24:32, 33) Bato ya mobembo oyo bazalaki kolinga kopesa bato oyo bayambi bango mokumba te, bazalaki komema biloko nyonso—mampa, vinyo mpe bilei mpo na bampunda na bango. Bazalaki kaka na mposa ya esika ya kolala.
Atako Biblia elobeli mingi te ndenge Yesu azalaki kozwa esika ya kolala ntango azalaki kosala mibembo mpo na kosakola, ye ná bayekoli na ye bazalaki kolala libándá te. (Luka 9:58) Ntango akendeki na Yeliko, Yesu alobaki na Zakai boye: “Lelo nasengeli kofanda na ndako na yo.” Zakai ayambaki mopaya na ye “na kosepela.” (Luka 19:5, 6) Mbala mingi, ntango Yesu azalaki kokende na Betania, azalaki kofanda epai ya baninga na ye Malata, Malia mpe Lazalo. (Luka 10:38; Yoane 11:1, 5, 18) Emonani lokola ntango Yesu azalaki na Kapalanauma, afandaki epai ya Simona Petelo.—Malako 1:21, 29-35.
Makambo oyo Yesu ayebisaki bantoma na ye 12 ntango atindaki bango bákende kosakola ezali komonisa ndenge oyo bato ya Yisalaele bakokaki koyamba bango. Yesu alobaki na bango boye: “Bóluka te kozwa wolo to palata to kwivre mpo na potɔmɔni ya nkamba na bino, to saki ya bilei mpo na mobembo, to bilamba mibale ya nse, to basandale to lingenda; mpo mosali abongi na bilei na ye. Na engumba nyonso to mboka nyonso bokokɔta, bóluka nani kati na yango abongi, mpe bófanda wana tii bokolongwa.” (Matai 10:9-11) Yesu ayebaki ete bato ya mitema sembo bakoyamba bayekoli na ye mpe bakopesa bango bilei, esika ya kolala mpe biloko mosusu oyo bakozala na yango mposa.
Nzokande, na nsima basakoli basengelaki bango moko komilukela bilei mpe biloko mosusu ntango bakei kosakola na bamboka mosusu. Lokola Yesu ayebaki ete bato mingi bakoyina bayekoli na ye mpe ete bayekoli na ye bakosakola ata na bikólo mosusu, ayebisaki bango boye: “Moto oyo azali na pɔtɔmɔni azwa yango, ndenge moko mpe saki ya bilei.” (Luka 22:36) Mpo na komema nsango malamu na bikólo mosusu, basengelaki kosala mibembo mpe, na bongo, basengelaki kozwa bisika ya kolala.
“Bólanda nzela ya ezaleli ya koyamba bapaya”
Lokola mwa kimya ezalaki na Ampire ya Loma na ekeke ya liboso mpe banzela ezalaki malamu, bato bazalaki kosala mibembo mingi.a Lokola bato ya mibembo bazalaki ebele, esengelaki bisika ya kolala mpe ezala ebele. Mpo na koyamba ebele yango ya bato, batongaki baotɛlɛ na banzela nyonso ya minene. Buku moko (The Book of Acts in Its Graeco-Roman Setting) elobi boye: “Makambo oyo mikanda ya mokili elobi mpo na baotɛlɛ yango emonisi ete ezalaki bisika ya malamu te. Mikanda mpe biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolaki emonisaka ete baotɛlɛ yango ezalaki salite, biloko ya ndako ezalaki mpenza te, etondaki na binsekwa, bilei mpe mai ezalaki ya malamu te, bankolo baotɛlɛ yango mpe bato oyo bazalaki kosala kuna bazalaki bato ya kotyela motema te, mingimingi bakiliya bazalaki na etamboli ya mbindo.” Yango wana, moto ya mobembo oyo azali na etamboli ya malamu akokaki kolinga te kofanda na esika ya ndenge wana soki esika mosusu ezali.
Yango wana, tokoki kokamwa te ete Biblia ezali mbala na mbala kolendisa baklisto bayambaka bandeko. Paulo alobaki na baklisto ya Loma boye: “Bókabelaka basantu engebene bamposa na bango. Bólanda nzela ya ezaleli ya koyamba bapaya.” (Baloma 12:13) Akomelaki Bayuda oyo bakómaki baklisto boye: “Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya, mpo na nzela na yango bamosusu, kozanga koyeba, bayambaki baanzelu.” (Baebele 13:2) Petelo alendisaki baninga na ye baklisto ete ‘báyambanaka kozanga komilelalela.’—1 Petelo 4:9.
Nzokande, ezalaki na makambo mosusu oyo ekokaki kosala ete baklisto báyamba mopaya te. Mpo na “moto nyonso oyo azali koleka liboso mpe azali kotikala te na kati ya liteya ya Klisto,” ntoma Yoane alobaki boye: “bóyamba ye na bandako na bino soki moke te to bópesa ye mbote te. Mpo moto oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.” (2 Yoane 9-11) Mpo na bato ya masumu oyo baboyi kobongola motema, Paulo akomaki boye: “Bótika kosangana na moto nyonso oyo abengami ndeko oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te.”—1 Bakolinti 5:11.
Ekoki kozala ete lokola baklisto ya solo bazalaki na ezaleli wana ya malamu, bakosi mpe bato mosusu bazalaki koluka kolyela bango. Buku moko (Didache [to Mateya ya bantoma zomi na mibale]), oyo ekomamaki na ekeke ya mibale T.B. mpe elobelaki mateya ya baklisto, elobaki ete basengelaki koyambaka mosakoli oyo azali kosala mibembo mpo na kosakola nsango malamu kaka “mokolo moko mpe, soki esengeli, mikolo mibale.” Na nsima, ntango alingi kokende, “bápesa ye kaka biloko ya kolya . . . Soki mosakoli yango asɛngi mbongo, azali mosakoli ya lokuta.” Mokanda yango ebakisi boye: “Soki alingi kofanda epai na bino mpe ayebi mosala moko, asala yango mpo na kozwa biloko ya kolya. Kasi, soki ayebi mosala moko te, bópesa ye mosala moko oyo bomoni ete ebongi na ye, mpo moto moko te afanda kati na bino kozanga kosala mpo kaka azali moklisto. Kasi, soki asali bongo te, azali nde koluka litomba na nkombo ya Klisto, bókeba na moto ya ndenge wana.”
Ntango ntoma Paulo azalaki kolekisa mikolo mingi na bingumba mosusu, azalaki kosala nyonso mpo azala mokumba te epai ya bandeko oyo bayambi ye. Azalaki kotonga bahema mpo na kokokisa bamposa na ye. (Misala 18:1-3; 2 Batesaloniki 3:7-12) Emonani ete baklisto ya liboso bazalaki kopesa bandeko oyo bazalaki kosala mibembo mikanda, lokola oyo Paulo apesaki Foebe, mpo bandeko báyamba bango kozanga kokakatana. Paulo akomaki boye: “Nazali kolakisa bino Foebe ndeko na biso ya mwasi, . . . mpo bóyamba ye na kati ya Nkolo . . . mpe mpo bósalisa ye na likambo nyonso oyo akozala na mposa na bino.”—Baloma 16:1, 2.
Mapamboli ya bato oyo bayambaka bapaya
Bamisionɛrɛ ya ekeke ya liboso bazalaki kotyela Yehova motema mpo na kokokisa bamposa na bango nyonso. Kasi, bakokaki nde komizela ete baninga na bango bandimi báyambaka bango? Lidia ayambaki Paulo mpe bandeko mosusu na ndako na ye. Ntoma Paulo afandaki epai ya Akila ná Pilisila na Kolinti. Na Filipi, mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ atandaki mesa liboso ya Paulo ná Silasi. Yasona ayambaki Paulo na Tesaloniki, Filipo ayambaki ye na Kaisalia mpe Manasona ayambaki ye ntango autaki na Kaisalia mpo na kokende na Yelusaleme. Ntango Paulo azalaki kokende na Loma, bandeko ya Puteoli bayambaki ye. Na ntembe te, bandeko wana oyo bayambaki Paulo bazwaki ebele ya matomba na elimo!—Misala 16:33, 34; 17:7; 18:1-3; 21:8, 16; 28:13, 14.
Frederick Bruce, moto moko ya mayele, alobaki boye: “Baninga nyonso wana ya Paulo, baoyo azalaki kosala na bango mpe bandeko basi mpe mibali oyo bayambaki ye, bazalaki kosalisa ye mpo balingaki ye mpe balingaki Nkolo oyo ye azalaki kosalela. Bayebaki ete ntango bazali kosalela Paulo, bazali nde kosalela Nkolo.” Yango ezali ntina ya malamu mingi ya koyamba bapaya.
Na moi ya lelo mpe tozali na bapaya oyo tosengeli koyambaka. Ebele ya baklisto oyo batambolaka mpo na kolendisa basaleli ya Yehova, bandeko bayambaka bango na bandako na bango. Basakoli mosusu ya Bokonzi bazali kosala mibembo na mbongo na bango moko mpo na kokende kosakola na bisika oyo nsango malamu ekómi naino te. Soki toyambi bango na bandako na biso, ata soki bandako yango ezali malamu mingi te, tokozwa mapamboli mingi. Koyamba bapaya na esengo, oyo ekoki kosɛnga ntango mosusu kaka kokabola na bango mwa bilei, epesaka mabaku malamu ya “kolendisana” mpe ya komonisa bolingo epai ya bandeko na biso mpe epai ya Nzambe na biso. (Baloma 1:11, 12) Mabaku ya ndenge wana ememaka matomba mingi mpo na baoyo bayambi bapaya, mpamba te “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Balobaka ete soki na mobu 100 ya ntango na biso (T.B.), Loma ezalaki na ebele ya banzela minene oyo nyonso ekokaki kosala bakilomɛtrɛ 80 000.
[Elilingi na lokasa 23]
Baklisto ‘balandaka ezaleli ya koyamba bapaya’