“Bólanda ezaleli ya boyambi bapaya”
“Bókabela babulami engebene bosɛnga na bango. Bólanda nzela ya boyambi bapaya.”—BALOMA 12:13, NW.
1. Mposa nini ya moboko moto azali na yango, mpe lolenge nini emonisamaka?
NA MIKOLO na biso oyo, kotambola na butu na nzela epai kuna bato balekaka mingi te, na kartyé oyo oyebi malamu te ekoki mpenza kozala likambo ya kobangisa. Kasi kozala kati na ebele ya bato oyo oyebi ata moko na bango te to mpe oyebani na moto te ekoki kotungisa motindo moko. Ya solo, mposa makasi oyo ezali kati na moto etali bongo likambo ya kobatelama, kondimama mpe kolingama. Moto moko te alingaka ete bátalela ye lokola mopaya to lokola moutá.
2. Lolenge nini Yehova akokisaki mposa na biso ya kozala na baninga?
2 Yehova Nzambe, Mokeli mpe Mozalisi ya biloko binso, ayebi malamu mposa oyo bato bazalaka na yango ya kozala na baninga. Lokola azali Mokeli ya bato, uta ebandeli mpenza Nzambe ayebaki ete ezalaki “malamu te ete moto azala ye moko,” mpe abongisaki likambo yango. (Genese 2:18, 21, 22) Biblia etondi na bandakisa ya misala ya boboto oyo Yehova mpe basaleli na ye bamonisaki epai na bato. Yango ezali kosalisa biso ete tóyekola lolenge nini “kolanda nzela ya boyambi bapaya,” oyo ekopesa basusu esengo mpe bosepeli monene mpe ekosepelisa biso lokola.—Baloma 12:13.
Bolingo mpo na bapaya
3. Pesá ndimbola ya moboko ya ezaleli ya boyambi bapaya.
3 Liloba “boyambi bapaya” na lolenge oyo esalelami kati na Biblia ebongolami na liloba ya Greke phi·lo·xe·niʹa, oyo esangisi mibímbí to eutelo ya maloba mibale oyo malimboli “bolingo” mpe “mopaya.” Na yango, boyambi bapaya elimboli mpenzampenza “bolingo mpo na bapaya.” Nzokande, oyo ezali te bobele likambo ya kolanda bikela to likambo litali bonkóndé. Yango etali mayoki mpe bolingo na biso ya motema. Engebene búku Exhaustive Concordance of the Bible ya James Strong, likelelo phi·leʹo, elimboli “kozala moninga ya (kolinga mingi) [moto to eloko moko], elingi koloba komonisa bolingo ya motema (mpo na kolobela bokangami ya moto moko, lokola likambo litali mayoki na ye).” Na yango, boyambi bapaya esuki te bobele na bolingo oyo epusami na malako, mbala mosusu mpo na mokumba to lisɛngisi. Na momeseno boyambi bapaya ezalaka elembo ya bolingi, ya bolingo ya motema mpe ya boninga ya solosolo.
4. Ezaleli ya boyambi bapaya esengeli komonisama epai na nani?
4 Ye oyo apesameli bolingo mpe boboto ya motema yango azali bongo “mopaya” (na Greke, xeʹnos). Ekoki kozala nani? Lisusu, búku Concordance ya Strong elimboli liloba xeʹnos ete ‘mopaya (na sikisiki moutá, to na ndimboli ya elilingi elongi ya sika; ekoki mpe kozala mobyangami to (moko to mosusu kati na bango) moto moko oyo ayebani te.’ Na bongo boyambi bapaya, na lolenge elakisami awa kati na Biblia, ekoki komonisa boboto esalelami epai na moto moko oyo tolingaka mingi, to ekoki kolakisama epai na moto oyo toyebi ye mpenza te. Yesu alobaki ete: “Soko bokolinga bobele baoyo bakolingaka bino, bozali na libonza nini? Bakongoli na mpako bakosalaka bongo te? Mpe soko bokopesa bobele bandeko na bino mbote, bozali kosala nini na koleka? Bapakano bakosalaka bongo te?” (Matai 5:46, 47) Boyambi ya solosolo etalaka te bokabwani mpe koponapona euti na makanisi mabe likoló na basusu mpe na bobángi.
Yehova, Moyambi malamu bɛ
5, 6. (a) Yesu azalaki kokanisa likambo nini ntango alobaki ete, “Tata na bino na Likoló azali malamu bɛ”? (b) Lolenge nini bokabi ya Yehova emonanaka?
5 Nsima ya komonisa bolɛmbu ya bolingo oyo bato bamimonisaka bamoko epai na basusu, lokola elobami awa likoló, Yesu abakisaki likanisi oyo: “Tiká ete bózala malamu bɛ lokola Tata na bino na Likoló azali malamu bɛ.” (Matai 5:48) Ya solo, Yehova azali malamu bɛ na makambo nyonso. (Deteronome 32:4) Nzokande, Yesu azalaki kolobela na sikisiki motindo moko ya bizaleli ya Yehova mpo na oyo etali kosala malamu na lolenge ya kokoka, lokola amonisaki yango liboso ete: “Bongo [Nzambe] akobimisa moi na ye na bato mabe mpe na bato malamu mpe akonokisa mbula na bayengebene mpe na bapɛngwi.” (Matai 5:45) Na likambo litali komonisa boboto, Yehova azalaka na koponapona te.
6 Lokola azali Mozalisi, Yehova azali nkóló ya biloko binso. Yehova alobi ete: “Nyama nyonso na zámba izali na ngai mpe bibwɛlɛ likoló na ngomba nkóto na nkóto. Ngai nayebi ndɛkɛ nyonso na likoló, mpe banyama nyonso bakotambolaka na bilanga bazali na ngai.” (Nzembo 50:10, 11) Atako bongo, andukaka biloko nyonso te mpo na ye moko. Na bokabi na ye, akokisaka mposa ya bikelamu na ye nyonso. Mokomi na Nzembo alobi na ntina na Yehova ete: “Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa na nyonso na bomoi.”—Nzembo 145:16.
7. Tokoki koyekola nini na lolenge oyo Yehova asalaka epai na bapaya mpe baoyo bazali na bosɛnga?
7 Yehova apesaka bato biloko oyo bazali na yango mposa—ata bato oyo bayebi ye te, baoyo bazali bapaya liboso na ye. Paulo mpe Balanaba bakundwelaki basambeli ya bikeko na engumba Lusutula ete Yehova “azangaki kotatola na ntina na ye mpenza te, mpo ete asali misala malamu mpe apesi bino mbula na likoló mpe bilaka na kobota mbuma mingi, mpe atondisi mitema na bino na biloko na kolya mpe na esengo.” (Misala 14:17) Mingimingi epai na baoyo bazali na bosɛnga, Yehova azali na boboto mpe na bokabi mingi. (Deteronome 10:17, 18) Tokoki koyekola makambo mingi epai na Yehova mpo na oyo etali komonisa boboto mpe bokabi—kozala moyambi ya bapaya—epai na basusu.
8. Lolenge nini Yehova amonisaki bokabi na ye na kokokisáká bamposa na biso ya elimo?
8 Longola likambo ya kokokisa malamu mpenza bamposa ya mosuni ya bikelamu na ye, Yehova akokisaka mpe bamposa na bango ya elimo. Yehova asalaki na lolenge ya kokamwa mingi mpo na bolamu na biso ya elimo liboso kútu moto moko kati na biso ayeba ete tozalaki kati na ezalela ya kozanga elikya na elimo. Tozali kotánga kati na Baloma 5:8, 10 ete: “Nzambe amonisi bolingo na ye mpo na biso na nzela oyo: naino ezalaki biso bato na masumu, Klisto akufelaki biso. . . . Zambi tozalaki liboso bayini na Nzambe. Soko tozongi na bondeko na Nzambe mpo na kufa na mwana na ye mbɛ, na koleka mpenza, nsima na kozonga na bondeko, tokobika na bomoi na ye.” Ebongiseli oyo ezali kopesa basumuki nzela ya kokɔta na boyokani kitoko ya libota elongo na Tata na biso ya likoló. (Baloma 8:20, 21) Lisusu Yehova asɛnzɛlaki na boye ete tózwa litambwisi mpe kokambama mpo ete tókoka kolónga na bomoi atako tozali kati na ezalela ya lisumu mpe ya kozanga kokoka.—Nzembo 119:105; 2 Timoté 3:16.
9, 10. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali moyambi malamu bɛ? (b) Lolenge nini basambeli ya solo basengeli komekola Yehova na likambo yango?
9 Soki totaleli nyonso wana, tokoki koloba ete Yehova azali solo moyambi malamu bɛ na makambo mingi. Abosanaka te baoyo bazali kati na bosɛnga, bato na komikitisa mpe basɔkɛmi. Amonisaka bosepeli mpe komibanzabanza ya solo mpo na bapaya, ata epai na bayini na ye, mpe alukaka soko moke te kozwa lifuti na mosuni. Kati na makambo oyo nyonso, azali ndakisa eleki monene ya moyambi malamu bɛ, boye te?
10 Lokola azali Nzambe ya motema-boboto mpe ya bokabi, Yehova alingi ete basambeli na ye bámekola ye. Kati na Biblia mobimba, tozali komona bandakisa minene ya ezaleli wana ya boboto. Búku Encyclopaedia Judaica emonisi ete “kati na Yisalaele ya kala, boyambi bapaya ezalaki te bobele likambo ya bizaleli malamu, kasi ezalaki mobeko ya bizaleli malamu . . . Mimeseno ya ntango ya Biblia ya koyamba mosáli-mobembo oyo alɛmbi mpe koyamba mopaya na ndako ezalaki moboko oyo likoló na yango boyambi bapaya mpe mitindo na yango nyonso mikólaki kino kokóma ezaleli ya ntina kati na bonkɔ́kɔ ya Bayuda.” Na esika ete yango ezala elembo ya bato ya mboka to ya ekólo moko, boyambi bapaya esengeli kozala elembo moko ya basambeli ya solo ya Yehova.
Ayambaki baanzelu
11. Ndakisa monene nini emonisi ete boyambi bapaya ememaki mapamboli oyo ekanisamaki te? (Talá lisusu Genese 19:1-3; Basambisi 13:11-16.)
11 Moko na masoló ya Biblia oyo eyebani mingi mpo na likambo litali komonisa boyambi bapaya ezali bongo lisoló ya Abalayama mpe Sala wana bazalaki naino kofanda kati na nzeté minene na Mamɛlɛ, pene na Hebeloni. (Genese 18:1-10; 23:19) Na ntembe te ntoma Paulo azalaki kokanisa likambo yango ntango apesaki likebisi oyo ete: “Bóbosana te komonisa bapaya boboto. Mpo ete na motindo yango, bamosusu banyangeli banze wana bayebaki te.” (Baebele 13:2) Boyekoli ya lisoló wana ekomonisa biso ete boyambi bapaya ezali te bobele likambo ya momeseno to ya lolenge moto abɔkɔlamaki. Nzokande, ezali ezaleli ya moto na Nzambe oyo ememaka mapamboli kitoko.
12. Lolenge nini Abalayama amonisaki bolingo na ye mpo na bapaya?
12 Genese 18:1, 2 emonisi ete Abalayama ayebaki bato oyo bayaki na ndako na ye te mpe ayebaki liboso te ete bakoya, mpo na ye bazalaki bobele bapaya misato baleki-nzela. Engebene balimboli mosusu ya Biblia, epai na bato ya ebimeli ya ntango, momeseno mozalaki ete mosáli-mobembo na mokili ya bopaya azalaki na lotómo ya komizela ete báyamba ye ata soki ayebaki moto moko te kuna. Kasi Abalayama azelaki te ete bapaya básɛnga lotómo na bango; abandaki kosala eloko. “Akendaki na mbangu” kokutana na bapaya yango oyo bazalaki naino mosika na ye—nyonso wana “na ntango na moi na midi,” mpe Abalayama azalaki na mibu 99! Likambo wana lizali komonisa ntina mpo na yango Paulo alobeli Abalayama ete azali ndakisa oyo tosengeli komekola, boye te? Yango emonisi mpenza boyambi bapaya, bolingo mpo na bapaya, komibanzabanza mpo na bamposa na bango. Ezali ezaleli moko malamu.
13. Mpo na nini Abalayama “akumbamaki” liboso na bato oyo bayaki kotala ye?
13 Lisoló yango liyebisi biso mpe ete nsima ya kokutana na bapaya yango, Abalayama “akumbamaki na mabelé liboso na bango.” Kokumbama liboso na bato oyo ayebaki mpenza bango te? Kokumbama na mabelé, lokola Abalayama asalaki yango, ezalaki bongo lolenge ya kopesa mbote epai na moto ya lokumu oyo oyambi to moto oyo azali na etɛlɛmɛlo monene, yango ekeseni na kofukama mpo na kopesa losambo, oyo ebongi bobele na Nzambe. (Kokanisá na Misala 10:25, 26; Emoniseli 19:10.) Na kokumbamáká, bobele te kongumba motó kasi kokumbama “na mabelé,” Abalayama apesaki na bapaya wana lokumu ete bazalaki bato minene. Ye azalaki mokonzi ya libota monene, ya bozwi mingi, atako bongo atalelaki bapaya yango ete babongaki kozwa lokumu monene koleka ye. Oyo nde bokeseni na momeseno ya kobanga bapaya, komonisa bokɛngi ya kolekisa ndelo! Ya solo, Abalayama akokisaki mpenza ndimbola ya liloba oyo: “Mpo na lokumu, bokumisanaka.”—Baloma 12:10.
14. Milende mpe komipimela nini Abalayama asalaki mpo na komonisa ezaleli ya boyambi epai na bato oyo ayebaki bango te?
14 Lisoló yango emonisi lisusu ete mayoki oyo Abalayama amonisaki mautaki na nsé ya motema. Bilei oyo alambaki ezalaki ya kobenda likebi. Ata kati na libota ya bato mingi oyo lizali na bitɔ́nga mingi, “mwana na ngɔmbɛ na motau mpe malamu” ezalaka bilei ya mokolo na mokolo te. Na ntina na momeseno oyo mopalanganaki mingi kati na etúká yango, búku Daily Bible Illustrations ya John Kitto elobi ete: “Bazalaki soko moke te kolamba bilei ya motuya mingi, longola bobele na bilambo mosusu, to na boyei ya mopaya; mpe ezalaki bobele na mabaku lolenge wana nde bazalaki kolya nyama, ata baoyo bazalaki na bampate mpe bangɔmbɛ mingi.” Molungé mozalaki kopesa nzela te na kobomba bilei ete bipola te, na yango mpo na kolamba bilei motindo wana, biloko nyonso bisengelaki kobongisama na ntango yango. Ezali likambo ya kokamwa te ete kati na lisoló mokuse wana, liloba “noki” ezongelami mbala misato, mpe Abalayama “akendaki na mbangu” mpenza mpo na kobongisa bilei!—Genese 18:6-8.
15. Wapi likanisi libongi na ntina na biloko ya mosuni na ntango tozali komonisa ezaleli ya boyambi bapaya, engebene ndakisa oyo Abalayama amonisaki?
15 Nzokande, mokano na yango ezali te bobele kosala elambo monene mpo na kokamwisa bato. Atako Abalayama mpe Sala basalaki makasi mpenza mpo na kolamba bilei mpe kopesa yango, talá lolenge Abalayama alobelaki yango na ebandeli: “Tiká ete moto aya na mwa ndambo na mai kosukola makolo na bino mpe bopema moke na nsé na nzeté oyo. Nakokenda kokamata ndambo na kwanga mpo na kolendisa nzoto na bino mpe na nsima bokokenda mobembo na bino, zambi boyei epai na moombo na bino mpo na yango.” (Genese 18:4, 5) “Ndambo na kwanga” yango oyo alobelaki ekómaki elambo monene ya mwana na ngɔmbɛ na mafuta, elongo na mikate ya falini, manteka mpe miliki—elambo monene. Ezali koteya nini? Na ntango tomonisi ezaleli ya boyambi bapaya, likambo ya ntina, to likambo oyo esengeli kotyela likebi mingi, ezali te ete bilei mpe masanga ezala mingi, to ete masano ya kitoko mabongisama, mpe bongo na bongo. Boyambi bapaya etali te mosolo mingi mpo na kosomba biloko ya ntalo mingi. Nzokande, yango etali nde komibanzabanza ya solo mpo na bolamu ya basusu mpe mposa ya kosalela basusu malamu na meko ya makoki na biso. Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Bilei na mwa ndunda na epai na bolingo eleki elambo na ngɔmbɛ na mafuta wana koyinana ezali,” mpe yango ezali sɛkɛ́lɛ ya boyambi ya solo.—Masese 15:17.
16. Lolenge nini Abalayama amonisaki limemya na ye mpo na makambo ya elimo kati na oyo asalaki epai na bapaya?
16 Nzokande, tosengeli koyeba ete, likambo yango mobimba lizalaki mpe na ndimbola ya elimo. Abalayama na lolenge moko to mosusu asosolaki ete bapaya wana bazalaki bamemi-nsango oyo bautaki epai na Yehova. Yango emonisami na lolenge na ye ya kobyanga bango na maloba oyo: “[Yehova], soko nabongi na miso na yo mbɛlɛ nalɔmbi yo ete oleka esika na moombo na yo te.”a (Genese 18:3; kokanisá na Exode 33:20.) Abalayama ayebaki liboso te soki bamemelaki ye nsango to soki bazalaki na bango bobele koleka. Atako bongo, andimaki ete ezalaki mpo na kokokisama ya mokano ya Yehova. Bato yango bazalaki kokokisa mokumba oyo Yehova apesaki bango. Soki akokaki kosala eloko moko mpo na kosunga na mokumba yango, azalaki na esengo monene ya kosala yango. Asosolaki ete basaleli ya Yehova babongi kozwa biloko bileki malamu, mpe apesaki bango oyo eleki malamu na libaku yango. Na kosaláká bongo, mapamboli ya elimo makokaki kozwama, ezala mpo na ye moko to mpo na moto mosusu. Na lolenge likambo yango lisukaki, Abalayama mpe Sala bazwaki mapamboli mingi mpo na boyambi na bango ya sembo.—Genese 18:9-15; 21:1, 2.
Libota oyo liyambaka bapaya
17. Yehova azalaki kosɛnga nini epai na Bayisalaele na ntina na bapaya mpe baoyo bazalaki na bosɛnga kati na bango?
17 Libota oyo libimaki na Abalayama lisengelaki te kobosana ndakisa monene oyo ye atikaki. Mibeko oyo Yehova apesaki na Bayisalaele esangisaki bibongiseli mpo na komonisa boyambi epai na bapaya oyo bazalaki kofanda kati na bango. “Mopaya oyo afandi epai na bino akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza, mpo ete bino bozalaki bapaya na mokili na Ezipito. Ngai nazali [Yehova] Nzambe na bino.” (Levitike 19:34) Libota yango lisengelaki kotya likebi monene epai na bato oyo bazalaki na mposa ya lisungi mpe kotala bango mpamba te. Na ntango oyo Yehova azalaki kopambola bango na kobuka mbuma mingi ya bilanga, ntango bazalaki kosepela na bilambo na bango, ntango bapemaki na misala na bango na boumeli ya bambula ya Sabata, mpe na mabaku mosusu, libota yango lisengelaki kokanisa babólá—basi bakufeli-mibali, bana mibali bazangi batata, mpe bapaya kati na bango.—Deteronome 16:9-14; 24:19-21; 26:12, 13.
18. Ezaleli ya boyambi bapaya ezali na ntina nini mpo na oyo etali kozwa ngɔlu mpe mapamboli ya Yehova?
18 Ntina ya komonisa boboto, bokabi mpe boyambi epai na basusu, mingimingi epai na baoyo bazali na bosɛnga, ekoki komonana na lolenge oyo Yehova asalaki epai na Bayisalaele wana bazalaki na bopotu mpo komonisa bizaleli yango. Yehova amonisaki yango polele ete boboto mpe bokabi epai na bapaya mpe baye bazali na bosɛnga ezalaki kati na masɛngami oyo libota na ye lisengelaki kokokisa mpo na kokóba kozwa mapamboli. (Nzembo 82:2, 3; Yisaya 1:17; Yilimia 7:5-7; Ezekiele 22:7; Zekalia 7:9-11) Ntango libota yango lizalaki kokokisa masɛngami wana mpe masɛngami mosusu na molende nyonso, bazalaki kokóla mpe bazalaki na bozwi mingi ya mosuni mpe ya elimo. Ntango bamipesaki moto na moto na mikano ya moimi mpe babosanaki komonisa bizaleli ya boboto epai na baoyo bazalaki kati bosɛnga, Yehova akweisaki bango, mpe na nsima bapesamelaki etumbu.—Deteronome 27:19; 28:15, 45.
19. Makambo nini tokotalela na lisoló lilandi?
19 Bongo, ezali mpenza na ntina mingi ete, tómitalela mpo na komona soki tozali kotambola na boyokani na masɛngami ya Yehova na likambo yango! Esengeli mpenza kozala bongo na mikolo na biso na kotalela elimo ya moimi mpe ya bokabwani oyo ezali kati na mokili. Lolenge nini tokoki komonisa ezaleli ya boyambi bapaya ya boklisto kati na mokili oyo mokabwani? Yango ezali likambo tokotalela na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na lisoló mobimba na likambo yango, talá lisoló “Moto moko asila komona Nzambe?” kati na Mosenzeli ya 15 Dɛsɛ́mbɛ 1988, nkasa 21-23.
Ozali komikundola?
◻ Liloba ya Biblia oyo libongolami na “boyambi bapaya” lizali na ndimbola nini?
◻ Na lolenge nini Yehova azali ndakisa malamu bɛ mpo na oyo etali komonisa ezaleli ya boyambi bapaya?
◻ Abalayama asalaki nini mpo na komimonisa moyambi bapaya?
◻ Mpo na nini basambeli ya solo nyonso basengeli “kolanda nzela ya boyambi bapaya”?