“Bópela na elimo”
“Bózala na gɔigɔi te na misala na bino. Bópela na elimo. Bósalela Yehova lokola baombo.”—ROM. 12:11.
1. Mpo na nini Bayisraele bazalaki kopesa bambeka ya banyama mpe makabo mosusu?
YEHOVA asepelaka na bambeka oyo basaleli na ye bapesaka na motema mobimba mpo na komonisa ete balingaka ye mpe bakokisaka mokano na ye. Na ntango ya kala, azalaki kondima bambeka ya banyama ndenge na ndenge mpe makabo mosusu. Bayisraele bazalaki kopesa bambeka yango ndenge esɛngamaki na Mibeko ya Moize, mpo masumu na bango elimbisama mpe mpo na komonisa botɔndi na bango. Na lisangá ya bokristo, Yehova azali kosɛnga te ete tópesaka bambeka ya ndenge wana. Nzokande, na mokapo 12 ya mokanda na ye epai ya bakristo ya Roma, ntoma Paulo amonisaki ete biso mpe tozali na bambeka oyo tosengeli kopesa. Tótalela likambo yango.
Mbeka ya bomoi
2. Biso bakristo tosengeli kozala na bomoi ya ndenge nini, mpe yango esɛngi nini?
2 Tángá Baroma 12:1, 2. Na ebandeli ya mokanda na ye, Paulo amonisaki polele ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bázala Bayuda to bato ya bikólo mosusu, batángamaki bayengebene liboso ya Nzambe na nzela ya kondima, kasi na misala te. (Rom. 1:16; 3:20-24) Na mokapo 12, Paulo alimbolaki ete bakristo basengeli komipimela makambo mosusu mpo na komonisa botɔndi na bango. Yango wana, tosengeli kokómisa makanisi na biso makanisi ya sika. Lokola tosangolá kozanga kokoka, tozali na nse ya “mobeko ya lisumu mpe ya liwa.” (Rom. 8:2) Yango wana, tosengeli kobongwana, ‘kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na biso,’ elingi koloba kobongola mpenza ndenge na biso ya kokanisa. (Ef. 4:23) Tokoki kosala mbongwana yango kaka na lisalisi ya Nzambe mpe ya elimo na ye. Tosengeli mpe kosala milende makasi, kosalela ‘makoki na biso ya kokanisa.’ Yango elimboli ete tosengeli kosala nyonso mpo ‘tólanda te makambo ya ntango oyo’ ná bizaleli na yango ya mabe, kominanola ya mbindo, mpe lolenge na yango ya kokanisa.—Ef. 2:1-3.
3. Mpo na nini tomipesaka na misala ya bokristo?
3 Paulo alendisi biso mpe tósalela ‘makoki na biso ya kokanisa’ mpo tómindimisa biso moko “mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” Mpo na nini totángaka Biblia mokolo na mokolo, tomanyolaka makambo oyo tozali kotánga, tobondelaka, toyanganaka na makita, mpe tosakolaka nsango malamu ya Bokonzi? Ezali nde mpo bankulutu ya lisangá balendisaka biso tósala yango? Ya solo, tozali na botɔndi ndenge bankutulu bakundwelaka biso makambo yango. Kasi, tomipesaka na misala ya bokristo mpo elimo ya Nzambe etindaka biso tómonisa ete tolingaka Yehova na motema mobimba. Longola yango, biso moko tomindimisi ete kosala makambo yango ezali mokano ya Nzambe. (Zek. 4:6; Ef. 5:10) Toyokaka esengo mpe tosepelaka mingi koyeba ete ntango tozali komipesa mpenza na misala ya bokristo, Nzambe akoki kondima biso.
Makabo ndenge na ndenge
4, 5. Ndenge nini bankulutu basengeli kosalela makabo na bango?
4 Tángá Baroma 12:6-8, 11. Paulo alobaki ete “tozali na makabo ndenge na ndenge na kolanda boboto monene oyo bamoniselaki biso.” Makabo mosusu oyo Paulo atángaki, na ndakisa kolendisa mpe kokamba, etali mingimingi bankulutu, oyo balendisami ete bákambaka “na lisɛki te.”
5 Paulo alobaki mpe ete bakɛngɛli basengeli kosala na lisɛki te ntango bazali koteya mpe ntango bazali kokokisa “mosala” moko. Na kolanda bavɛrsɛ oyo ezali liboso, emonani ete Paulo azalaki kolobela “mosala” oyo ezalaki kosalema na kati ya lisangá, to “nzoto kaka moko.” (Rom. 12:4, 5) Mosala yango ekokani na oyo elobami na Misala 6:4, epai bantoma balobaki ete: “Biso tokomipesa na mabondeli mpe na mosala ya liloba.” Mosala yango esangisi makambo nini? Bankulutu basalelaka makabo na bango mpo na kolendisa bandeko ya lisangá. Basengeli kokamba lisangá mpe kopesa malako na lisɛki te. Mpo na kokokisa mokumba yango malamu, basengeli koyekola na mozindo, kosala bolukiluki, koteya mpe kobatela bampate. Soki bazali kosala bongo, bakomonisa ete ‘bamipesi na mosala yango.’ Bakɛngɛli basengeli kosalela makabo na bango na likebi mpe kobatela bampate “na esengo.”—Rom. 12:7, 8; 1 Pe. 5:1-3.
6. Ndenge nini tokoki kolanda toli ya Baroma 12:11, mokapo oyo esimbi lisolo oyo?
6 Paulo alobaki lisusu ete: “Bózala na gɔigɔi te na misala na bino. Bópela na elimo. Bósalela Yehova lokola baombo.” Soki tomoni ete mosala ya kosakola ezali kosepelisa biso lisusu te, mbala mosusu ekosɛnga tóbongola ndenge na biso ya koyekola mpe tóbondela Yehova na etingya mpo na kosɛnga elimo na ye, oyo ekoki kosalisa biso tólonga bolɛmbu na biso mpe tózongela molende na biso. (Luka 11:9, 13; Em. 2:4; 3:14, 15, 19) Elimo santu epesaki bakristo ya liboso mpiko ya kolobela “makambo minene ya Nzambe.” (Mis. 2:4, 11) Ndenge moko mpe, ekoki kosala ete tózala molende na mosala ya kosakola, ‘tópela na elimo.’
Komikitisa mpe bopɔlɔ
7. Mpo na nini tosengeli kosala na komikitisa mpe na bopɔlɔ?
7 Tángá Baroma 12:3, 16. Makabo nyonso oyo tokoki kozala na yango ezali mpo na “boboto monene” ya Yehova. Na mokanda na ye mosusu, Paulo alobaki boye: “Kobonga na biso mpenza euti nde na Nzambe.” (2 Ko. 3:5) Yango wana tosengeli te komikumisa. Tosengeli kondima na komikitisa nyonso ete mbuma malamu nyonso oyo tokoki kozwa na mosala na biso ezali mpo na lipamboli ya Nzambe, kasi te mpo na makoki na biso moko. (1 Ko. 3:6, 7) Na boyokani na yango, Paulo alobaki boye: “Ngai nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza.” Ezali mabe te tómipesaka limemya mpe tósepelaka na mosala oyo tozali kosalela Yehova. Kasi, kozala na bopɔlɔ, to koyeba esika makoki na biso esuki, ekopekisa biso tókóma motó makasi. Tolingi nde ‘kokanisa na ndenge oyo ezali komonisa ete tozali na makanisi malamu.’
8. Ndenge nini tokoki koboya ‘kokóma bato ya mayele na miso na biso moko’?
8 Ekozala mpenza bozoba soki tozali komikumisa mpo na makambo oyo tozali kokokisa. “Nzambe [nde] moto azali kokolisa.” (1 Ko. 3:7) Paulo alobaki ete moto mokomoko na kati ya lisangá azali na “bonene ya kondima” oyo Nzambe akabeli ye. Na esika tómona ete toleki basusu, tosengeli kondimaka makambo oyo basusu bazali kokokisa na kolanda bonene ya kondima na bango. Ntoma Paulo alobaki lisusu ete: “Bókanisaka bamosusu ndenge bomikanisaka.” Na mokanda na ye mosusu, alobaki boye: “Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.” (Flp. 2:3) Esɛngaka mpenza komikitisa mpe kosala milende mingi mpo na kondima ete ndeko mokomoko ya lisangá aleki biso na likambo moko boye. Komikitisa ekopekisa biso ‘tókóma bato ya mayele na miso na biso moko.’ Ata soki mikumba oyo tozali na yango ezali kosala ete bato bátyelaka biso likebi mingi, biso nyonso tokoki koyoka esengo mingi soki tozali kosala makambo “ya komikitisa,” elingi koloba misala mikemike oyo mbala mingi bato bamonaka te.—1 Pe. 5:5.
Bomoko na biso ya bokristo
9. Mpo na nini Paulo alobaki ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali lokola binama ya nzoto?
9 Tángá Baroma 12:4, 5, 9, 10. Paulo alobaki ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali lokola binama ya nzoto mpe bazali kosala na bomoko na litambwisi ya Motó na bango, Kristo. (Kol. 1:18) Akundwelaki bakristo yango ete nzoto ezali na binama mingi oyo esalaka misala ekeseni mpe ete bango, ‘atako bazali mingi, bazali nzoto kaka moko na bomoko na Kristo.’ Ndenge moko mpe, Paulo alendisaki bakristo ya Efese oyo batyami mafuta na elimo ete: “Tókola na bolingo na makambo nyonso na boyokani na moto oyo azali motó, Kristo. Uta na ye nzoto mobimba, lokola esangani liboke moko na boyokani mpenza mpe ebongisami mpo na kosala elongo na nzela ya matonga nyonso oyo epesaka nyonso oyo esengeli, na kolanda mosala ya enama mokomoko na meko oyo ekoki, ezali kosalisa na bokoli ya nzoto mpo emitonga yango moko na bolingo.”—Ef. 4:15, 16.
10. Bokonzi nini “bampate mosusu” basengeli kondima?
10 Atako “bampate mosusu” bazali na kati ya nzoto ya Kristo te, bakoki kozwa mateya mingi na ndakisa yango. (Yoa. 10:16) Paulo alobaki ete Yehova “atyaki . . . biloko nyonso na nse ya makolo [ya Kristo], mpe akómisaki ye mokonzi ya biloko nyonso oyo etali lisangá.” (Ef. 1:22) Lelo oyo, bampate mosusu bazali na kati ya “biloko nyonso” oyo Yehova atye na nse ya bokonzi ya Mwana na ye. Bazali mpe na kati ya “biloko” oyo Kristo apesi “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45-47) Yango wana, baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele basengeli kondima Kristo lokola Mokonzi na bango mpe kotosa moombo ya sembo mpe ya mayele ná Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe bandeko mibali oyo batyami bakɛngɛli na lisangá. (Ebr. 13:7, 17) Yango elendisaka bomoko ya bokristo.
11. Bomoko na biso esimbami na nini, mpe toli nini mosusu Paulo apesaki?
11 Bomoko yango esimbami na bolingo, oyo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Kol. 3:14) Paulo amonisaki yango na Baroma mokapo 12, ntango alobaki ete bolingo na biso esengeli ‘kozala na bokosi te’ mpe ete tosengeli ‘kolinganaka na motema’ “na bolingo ya bondeko.” Yango esalaka ete tópesanaka limemya. Ntoma Paulo alobaki boye: “Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” Nzokande, tosengeli kokesenisa bolingo ya solosolo ná bolingo oyo ekangaka miso na mabe. Tosengeli kosala nyonso mpo na kobatela bopɛto ya lisangá. Ntango apesaki toli ete tólinganaka, Paulo abakisaki boye: “Bóyina oyo ezali mabe, bókangama na oyo ezali malamu.”
Ezaleli ya koyamba bapaya
12. Na oyo etali ezaleli ya koyamba bapaya, liteya nini tokoki kozwa epai ya bakristo ya Masedonia?
12 Tángá Baroma 12:13. Bolingo mpo na bandeko na biso ekotinda biso ‘tókabelaka basantu na kolanda bamposa na bango’ mpe na kolanda makoki na biso. Ata soki tozali na bozwi te, tokoki kokabela basusu biloko oyo tozali na yango. Paulo akomaki mpo na bakristo ya Masedonia ete: “Na ntango ya komekama moko makasi na kati ya mpasi, esengo na bango monene mpe bobola na bango ya makasi esalaki ete bokabi na bango emonana lisusu mingi. Mpo esalemaki na kotalela makoki na bango mpenza, ɛɛ, nazali kotatola yango, koleka ata makoki na bango mpenza, wana bango moko bakobaki kobondela biso makasi mpenza ete bázwa libaku malamu ya kopesa biloko na boboto mpe ya kopesa mabɔkɔ na mosala oyo esengelaki kosalema mpo na basantu [ya Yudea].” (2 Ko. 8:2-4) Atako bakristo ya Masedonia bazalaki babola, bazalaki kokaba mingi. Bamonaki ete kokabela bandeko na bango ya Yudea oyo bazalaki na bosɛnga ezalaki mpenza libaku kitoko.
13. Kozala na “ezaleli ya koyamba bapaya” esangisi makambo nini?
13 Maloba “bózalaka na ezaleli ya koyamba bapaya” euti na maloba ya Grɛki oyo elimbolaka kobimisa likanisi ya kosala likambo moko boye. Biblia moko (The New Jerusalem Bible) ebongoli maloba ya vɛrsɛ yango na “bólukaka mabaku ya koyamba bapaya.” Tokoki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya ntango tobengisi moto aya kolya na ndako na biso; mpe soki bolingo nde etindi biso tósala yango, ezali likambo ya malamu. Kasi, soki tokanisi malamu, tokomona ete ezali na mitindo mosusu mingi ya koyamba bapaya. Na ndakisa, soki tozali na mbongo mingi te to na makasi mingi te mpo na kolamba mpe kobengisa basusu báya kolya epai na biso, kopesa bango ata mwa nguba ná bitabe to mwa biloko mosusu ya ndenge wana ezali mpe lolenge ya komonisa ezaleli ya koyamba bapaya.
14. (a) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ezaleli ya koyamba bapaya” esangisi maloba nini? (b) Na mosala ya kosakola, ndenge nini tokoki komonisa ete tomibanzabanzaka mpo na bapaya?
14 Ezaleli ya koyamba bapaya etali mpe ndenge na biso ya kotalela makambo. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ezaleli ya koyamba bapaya” esangisi maloba mibale oyo elimboli “bolingo” mpe “mopaya.” Makanisi nini tozalaka na yango mpo na bapaya to bato oyo bautá na bikólo mosusu? Bakristo oyo basalaka makasi mpo na koyekola monɔkɔ mosusu mpo na kosakola nsango malamu epai ya bapaya oyo bayá kofanda na teritware ya lisangá na bango bakoki mpenza kotángama na kati ya bato oyo bazali na ezaleli ya koyamba bapaya. Ya solo, mingi kati na biso tokoki te koyekola monɔkɔ mosusu. Kasi, biso nyonso tokoki kosalisa bapaya soki tosaleli malamu mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations, oyo ezali na nsango ya Biblia na minɔkɔ ebele. Osilá kozwa mbuma malamu ndenge osalelaki mwa buku yango na mosala ya kosakola?
Komitya na esika ya basusu
15. Ndenge nini toli oyo ezali na Baroma 12:15 emonanaki na bomoi ya Yesu?
15 Tángá Baroma 12:15. Na mokuse, toli yango ya Paulo ezali ete: Bómityaka na esika ya basusu. Tosengeli koluka koyeba esengo to mpasi ya basusu mpe kokabola yango na bango. Soki tozali kopela na elimo, ezaleli na biso ya kosepela na baoyo bazali kosepela mpe ya kolela na baoyo bazali na mawa ekomonana. Ntango bayekoli 70 ya Kristo bazongaki na esengo ntango bautaki kosakola mpe bayebisaki mbuma malamu ya mosala na bango, Yesu ye moko mpe “atondaki na esengo mpe na elimo santu.” (Luka 10:17-21) Asepelaki elongo na bango. Epai mosusu, Yesu ‘alelaki elongo na bato oyo bazalaki kolela’ ntango moninga na ye Lazare akufaki.—Yoa. 11:32-35.
16. Ndenge nini tokoki komonisa ete tomityaka na esika ya basusu, mpe mingimingi banani nde basengeli kosala yango?
16 Tozali na mposa ya kolanda ndakisa ya Yesu ya komitya na esika ya basusu. Ntango ndeko moko azali kosepela, ezali malamu tósepela elongo na ye. Ndenge moko mpe, tosengeli kokabolaka mpasi mpe mawa ya bandeko na biso. Tokoki kolendisa bandeko na biso oyo bazali na mpasi na motema soki tozali koyoka bango mpe komitya mpenza na esika na bango. Ntango mosusu, tokoki koyoka mawa mingi na motema mpe kolela mpo na komonisa ete tomitye mpenza na esika ya ndeko oyo tozali kosolola na ye. (1 Pe. 1:22) Mingimingi bankulutu nde basengeli kolanda toli ya Paulo ya komitya na esika ya basusu.
17. Makambo nini toyekoli na Baroma 12, mpe tokolobela nini na lisolo elandi?
17 Bavɛrsɛ ya Baroma 12 oyo totaleli epesi biso toli oyo etali bomoi na biso ya bokristo mpe boyokani na biso na bandeko ya lisangá. Na lisolo elandi, tokotalela bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango, oyo elobeli ndenge oyo tosengeli kotalela bato oyo bazali Batatoli te, ata mpe batɛmɛli mpe banguna na biso.
Bozongeli
• Ndenge nini tomonisaka ete tozali ‘kopela na elimo’?
• Mpo na nini tosengeli kosalela Nzambe na komikitisa mpe bopɔlɔ?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tomityaka na esika ya bandeko na biso bakristo mpe toyokelaka bango mawa?
[Bililingi na lokasa 4]
Mpo na nini tomipesaka na misala ya bokristo oyo?
[Elilingi na lokasa 6]
Ndenge nini mokomoko na biso akoki kosalisa bapaya báyoka nsango ya Bokonzi?