Nasaleli Jéhovah na elaka malamu mpe na elaka ya mpasi
Lisolo ya Hal Bentley
MAKAMBO nyonso mabongisamaki mpo ete assemblée ya circonscription ya ba Témoins de Jéhovah ekoka kobanda kati na mboka moko moke ya Nyassaland (lelo Malawi). Mokengeli ya circonscription mpe ngai moko tozalaki kotala mpo na mbala ya nsuka, estrade oyo esalamaki na matiti mpe na bambou, mpe bandako ya matiti oyo esengelaki mpo ete bato bafanda. Na mbala moko, tozingamaki na etuluku ya bato oyo babombanaki kati na esobe oyo ezali pembeni wana. Bato yango batumbaki bandako mpe estrade, mpe bapusaki biso kino na bandako epai kuna tozalaki kolala.
Mwasi na ngai, Joyce, ayaki mbangu mpo na kotala ndenge makambo mazalaki koleka. Ye mpe bazongisaki ye. Mokonzi ya batomboki angangaki ete mzungu (mondele) asengeli kokende sikasikawa. Apesaki biso nzela te ete bakamata biloko na biso mpe atindaki biso na makasi ete tomata na Land Rover (motuka) na biso. Bango nyonso batondanaki zingazinga ya vuatire: mibali, basi mpe bana, kongangaka ete: “Pitani mzungu (Longwa awa, mondele) mpe “Kwacha” (Bonsomi). Tokanisaki ete bakobalola vuatire, yango wana tozalaki kosambela Jéhovah na nse ya motema Kasi bato bapanzanaki mpe tokendaki na biro ya la police ya penepene, na Mzimba, na ntaka ya bakilometele ntuku mitano na esika yango.
Tozongaki nsima mpenza na esika yango, elongo na polisyé moko. Na ntina na mobulu oyo mobimaki na bisika mosusu, atikalaki bobele ye moko. Ntango ekomaki biso na esika, tomonaki ete batelemisi bendele ya parti ya congrès ya Malawi, mpe makomi P.G.M. ekomamaki na mabelé. Atako bongo, nsima wana polisyé autaki kosolola elongo na bato ya mboka, bapesaki biso nzela ete tokotisa biloko na biso kati na Land Rover.
Tokutanaki mpe na mokengeli ya circonscription, Moses Rightwell, mpe mwasi na ye. Akimaki kobombama na zamba na ntango mobulu ezalaki kosalema. Kasi Moses alingaki kozinda kati na mai moko ya penepene. Batomboki bakamataki mpe bilei nyonso oyo bibongisamaki mpo na assemblée. Lisusu balobaki na baklisto mibali ete batambola na nzela na bango, mpe baklisto basi elongo na bana na nzela mosusu, na boumeli ya bakilometele mingi, kino ete bango moko bakolemba nde bakotika bango kokende.
Wana ezalaki bobele moko na ebele ya makama oyo mabimaki na epekiseli ya mosala na ba Témoins de Jéhovah ya Malawi, epekiseli oyo ebongwanaki na minyoko: koboma, kobeta, kobebisa basi na makasi mpe kokangama.
Mosala nini tozalaki kosala na Malawi?
Nabotamaki le 28 Juin 1916, na Leeds, kuna na Yorkshire (Angleterre), mpe nazalaki nsuka ya bana mitano. Tozalaki na kondima makasi te kati na libota na biso mpe tozalaki kokende ndako-nzambe te.
Baboti na ngai bakufaki na 1939, ntango Etumba ya Mibale ebimaki. Na Juin 1940, wana nazalaki naino na mbula 24, naponamaki na mosala ya soda, mpe na boumeli ya mibu mitano oyo milandaki nasalaki kati na bituluku bikeseni ya batambwisi mituka. Na boumeli ya mibu wana, ntango nafandaki na esika ya kobeta mitrailleuse na ngambo ya nord-est ya Angleterre mpe ete nazalaki kotala likoló etondi na minzoto, mbala mingi nazwaki libaku ya kokanisa na Nzambe mpe nazalaki komituna mpo na nini Mozalisi ya biloko kitoko boye azali kopesa nzela na mobulu oyo, na koboma oyo makasi mpe na mpasi oyo katikati na bato. Mwa ntango moke, nsima na kolongwa na mosala ya soda, nazwaki eyano na ebele na mituna oyo mizalaki kotungisa ngai uta kala.
Na mbula wana, na mpokwa moko na hiver, moto moko abetaki na porte na ngai. Nafungolaki mpe namonaki mobange moko oyo abandaki kolobela ngai lisolo ya Biblia. Lisolo yango esukaki na boyekoli ya Biblia mpe, moke moke, na Avril 1946, nazwaki batisimo. Na 1949, natikaki mosala na ngai mpo na kokóma mosali ya ntango nyonso ya ba Témoins de Jéhovah (pionnier).
Na nsima, na boumeli ya mibu misato, nasalaki na Béthel ya Londres, mpe na 1953 nabiangamaki mpo na kokóta na kelasi ya 23 ya Eteyelo na Biblia ya Galaad, na South Lansing (Etats-Unis), mpo na kozwa formation ya misionere. Na nsuka ya kelasi, natindamaki lokola misionere kati na mokili oyo ezalaki kobengama kala, Nyassaland. Nsima na mibu, naponamaki lokola mokengeli ya distrike. Na boumeli ya mibu mitano, mpe wana ezalaki ngai naino monzemba, natambolaki mboka kitoko wana kobanda nsuka kino nsuka. Nalonaki bolingo mpo na bato wana na esengo mpe bayambi na bapaya, ata soki mingi kati na bango bazalaki na bozwi mingi te, longola bobele bilanga na bango ya masango, mwa bansoso mpe bantaba to bangulu. Bamosusu bazalaki balobi malamu na mbisi. Nazalaki kolala na bandako na bango ya bopolo oyo etongami na matiti mpe nazalaki kosakola na makolo elongo na bango mboka na mboka. Nazalaki mpe kosepela kozala elongo na bango na ba assemblées oyo ezalaki kosalema na esika ya polele, ntango bazalaki kofanda elongo na mabota na bango mpe koyokáká balobi na likebi mingi, ata soki mbula ezalaki kobeta makasi, lokola yango ezalaki kosalema mbala mosusu.
Ntango nazalaki kotambola na mboka moko bato nyonso, bilenge mpe mibange, bazalaki moto na moto koya kotala ngai mpe kopesa nga mbote, kolobáká: “Moni, muli bwanji?” (Mbote ozali malamu?) Ata ntango nazalaki kotambola mboka na mboka, bato bazalaki kotika kolongola matiti na bilanga na bango mpo na kopesa ngai mbote.
Lisangá nyonso oyo nazalaki kokende kotala elongo na mokengeli ya circonscription bazalaki kotonga ndako ya sika mpo na ngai. Mbala mosusu ezalaki ndako etongami na banze te mpe na nsambá ya matiti, oyo nazalaki kosepela na yango mingi. Kasi nayaki komona ete esengeli mikolo mingi mpo ete nsambá yango esalami na matiti ekoka kokauka.
Mokolo moko bandeko batongelaki ngai ndako moko oyo mobimba na yango esalamaki na matiti Ezalaki na bifelo misato, mpe Land Rover na ngai ekokisaki oyo ya minei. Ezalaki na lobwaku ya Shire, epai kuna moi mozala makasi mobu mobimba, mpe epai kuna bangungi bazali “ntango nyonso” mpe bazali kotikela moto ntango ya kopema te, ezala na butu to na moi. Kozanga mustikere to nkisi ya bangungi ezalaki mpenza mpasi mpo na kolonga.
Mosungi mpo na bomoi
Na 1960, nabalaki Joyce Shaw oyo azaláká misionere na mokili ya Equateur. Na yango, nsima na kozwa matomba na likabo ya monzemba na boumeli ya ebele na bambula, nazwaki esengo ya kozwa likabo mosusu, yango libala, mpe nazali ntango nyonso kosepela na yango nsima ya mibu 30. Joyce mpe ngai tozalaki na esengo ya kolekisa elongo ebele na bileko ya kosepelisa.
Na libaku moko, na lisalisi ya banzete mpe matiti, ba Témoins batongaki etáláká moko mpo na kosalisa biso ete tokatisa mai moko, mpo ete nakoka kolakisa na mboka moko, film ya la Société oyo ezalaki na motó na likabo “Société du monde nouveau ezali kokende liboso”. Kasi remorque ya Land Rover kangamaki na nzete moko. Kozanga kobanga, bandeko na biso alongolaki remorque, mpo na kopesa ngai zela ete nakatisa na vuatire; mpe nsima na kosala mayele ndenge na ndenge, balongaki kolekisa remorque. Film na biso esepelisaki bato mingi.
Mbala mosusu mai mazalaki na bonene mingi ete mayele ya kosala etáláká ezalaki komonana te. Na bongo Batemwe bazalaki kokitisa biloko nyonso bizalaki na Land Rover: groupe electrogene ya moke, projecteur, ba films, mbeto, mpe bazalaki kokatisa mai na makolo nzokande ngai nazalaki komemama likoló na mapeka makasi ya moko kati na bango. Bandeko basi mibale bakumbaki Joyce mpo na kokatisa ye mai. Mai mosusu mazalaki mozindo koleka. Tozalaki kokatisa yango likoló ya bac moko ya banzete minene oyo ebongisami lokola mongala mpe etyami likoló na ba bidons mwambe ya minene. Batambwisi mibale ya bac bazalaki kokatisa biso na kobendaka nsinga.
Batemwe ya Malawi bazalaki boboto mingi, na ezalela ya kosalisa bato mpe bazalaki na limemya mozindo epai na biso. Kati na esika moko, bato batombokaki mpo ete batumba ndako oyo biso tozalaki kolala. Bandeko na biso akengelaki butu mobimba mpo na kobatela biso. Liboso nkutu ete mosala ya ba Témoins de jéhovah ekoka kopekisama na 1967, tozalaki kokutana na makama lokola oyo eyebisami na ebandeli ya lisolo oyo. Ntalo monene ya bandeko na biso mibali mpe basi ya Malawi balingaki kopesa bomoi na bango mpo na biso.
Mokolo moko, nazalaki kosakola ndako na ndako elongo na Témoin moko oyo azalaki na litutu monene na elongi. Abetamaki makasi mpenza mwa mikolo liboso. Na ndako moko, apesaki litatoli kitoko na motema pii epai na moto moko. Ntango tolongwaki wana, alobaki na ngai: “Ezali moto oyo nde abetaki ngai makasi.” Nakanisaki na maloba oyo na Paulo: “Bozongisaka mabe mpo na mabe te. . .zongisa mabe nsima mpo na malamu.”—Baloma 12:17-21.
Tokolisaki mosala na biso
Wana ezalaki biso naino na Malawi, Joyce mpe ngai tozalaki mbala mingi kokende na Mozambique. Boyebi na ye ya lokota na espagnol, oyo azwaki na mokili ya Equateur, ezalaki na ntina, mpamba te ba Portugais bakokaki koyoka ye. Nsima na bambula, biso mibale tokómaki na makoki ya kosolola na portugais. Uta na Zimbabwe, epai kuna totindamaki, tokobaki kokende na Mozambique. Lingomba ya katolike ezalaki kotemela makasi mosala ya kosakola mpe ezalaki kobimisa mobulu. Kasi na boumeli ya mibu zomi oyo milandaki nsima, mbala mingi tomonaki lisalisi mpe lisungi litondi na bolingo ya Jéhovah wana ezalaki biso koluka bampate.
Na ntango na moko ya mibembo na biso na Mozambique, tokendaki kotala mwasi moko oyo azalaki kosepela mingi na solo, mpe azalaki kofanda na nord ya libongo ya Beira. Ndeko na ye ya mwasi akomelaki ye uta na Portugal mpe alobelaki ye makambo kitoko oyo ayokaki na ntango azali koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Mwasi yango andimisamaki na bosolo ya makambo yango na kotangáká Biblia mpe abandaki nkutu koyebisa yango epai na baninga na ye ya pembeni. Nzokande, adresse moko oyo tozalaki na yango ezalaki bobele nkombo ya garage epai kuna mobali na ye azalaki kosala.
Lokola ezalaki biso kobelama penepene na porte ya atelier, mobali moko atunaki biso soki likambo nini akoki kosala mpo na biso. Tolobaki ete tolingi komona mobali ya mwasi yango. Alakisaki biso na mosapi mekanisyé moko oyo azalaki kobongisa vwature moko mpe atikaki biso nokinoki. Tomiyebisaki epai na mekanisyé yango mpe tolobaki na ye ete tolingi kokende kotala mwasi na ye. Asilikaki makasi. Wana ezalaki ye kokende na biso elongo epai na ye, ayebisaki biso ete moto oyo tosololaki na ye liboso akendaki koyebisa mokonzi ya P.l.D.E. (sureté) ya esika wana mpo na koya na biso. Tomikotisaki kati na motambo! Ayebisaki mpe lisusu ete, mpo ete azalaki kosakola bazali kolandalanda mwasi na ye uta mwa mikolo, mpe ete bapolisyé babotolaki mokanda oyo ezalaki koyebisa koya na biso. Babotolaki ye Biblia, kasi na mayele nyonso abombaki mosusu liboso. Babengisaki mpe episkopo mpo na komeka kopekisa ye ete atika koteya nkombo ya Jéhovah mpe Bokonzi na ye.
Ntango tokutanaki na mwasi yango, atondaki na esengo mingi mpenza kino ete amibwakaki na maboko ya Joyce. Abondelaki mobali na ye ete apesa biso nzela ete totikala epai na bango, kasi ye aboyaki mpe azongaki na mosala. Tosalelaki mwa ntango moke oyo tozalaki na yango mpo na kolendisa ye na maloba oyo mauti na Biblia mpe kopesa ye longonya mpo na ndenge atikalaki ngwi. Na nsima, mpo ete tobendela ye mikakatano te, tokendaki na kolakáká ye ete tokozonga mokolo mosusu soki makambo mabongi. Ntango tobimaki na ndako mpe totondisaki réservoir na biso ya essence na garage, tomonaki ete bato bazalaki kotalatala biso, kasi bakangaki biso be. Tokendaki bongo na Béira mpe totalaki lisangá moko ya moke ya mboka yango liboso ete tozonga na Zimbabwe Tozongaki lisusu mwa basanza na nsima mpe tozalaki na esengo ya kolya elongo na mwasi wana oyo azalaki kosepela na solo, elongo mpe na mwana na ye ya mwasi mpe elongo na mobali na ye. Nsuka na yango, azwaki batisimo na ntango ya mobembo moko oyo asalaki na Portugal mpe akomaki mosakoli mwasi moke ya molende ya Bokonzi na Nzambe.
Lisusu na nord, mbala mingi tozalaki kotala bisika lokola Quelimane, Nampula mpe Nacala mwa libongo moko ya moke. Na Nacala, mbala mingi tozalaki kokenda kotala libota ya Soares. M. Soares ayokaki solo liboso na Portugal. Kasi ntango ayaki na Mozambique, Batemwe ya Lourenco Marques (lelo Maputo), kapitale ya Mozambique, bayekolaki Biblia elongo na ye mpe na libota na ye. Bato ya libota yango basepelaki mingi mpo ete tomilengelaki mpo na kotambola ebele na bakilometele mpo na kokende kotala libota moko oyo bafandaki bango moko. Basalaki bokoli malamu, mpe nsima, bakendaki na Afrika ya Ngele epai kuna mwana na bango ya mwasi, Manuela, azali kosala na Béthel lokola mobongoli na lokota ya portugais. Mbala mingi tozalaki lisangá ya Lourenco Marques. Kolongwa na Blantyre yango ezalaki komonisa mobembo ya koleka bakilometele 1 100 na banzela ya mabulu. Mbala mibale tozwaki mikakatano minene ya motuka mpe babendaki biso kino na Salisbury (lelo Harare) mpo na kobongisa motuka. Atako bongo ezalaki esengo monene na komona etuluku moke ya Lourenco Marques kokóma lisangá kitoko na boumeli ya epekiseli. Ba assemblées mike ya circonscription ezalaki kosalema mbala na mbala. Kasi ezalaki kosalama na zamba, na motindo ya pique—nique moko ya monene. Mbala mingi, ba assemblées ebongisamaki na mboka mosusu, na Nelspruit, na Afrika ya Ngele, yango esalisaki Batemwe ya Maputo na kosepela na lisangá ya Jéhovah mpe na kokola kati na elimo.
Lisangá ya Beira mpe elendisamaki. Na ntina na mobulu ya politike oyo eningisaki Mozambique, Batemwe ya mboka yango basili sikawa kopalangana na Portugal, na Afrika ya Ngele, na canada na Brésil, na Etats-Unis mpe kati na mikili misusu. Lokumu nyonso ya elendiseli wana epesami epai na Jéhovah, ‘ye oyo azali kokolisa’. (1 Bakolinti 3:6, 7) Na yango, na boumeli ya mibu zomi, tozwaki libaku ya kosalisa bandeko na Mozambique na nse na boyangeli ya ba portugais, mpe ntango tozali kotala nsima, tozala kotonda na esengo mpo na lolenge oyo Jehovah atambwisaki biso mpo na yango.
Mokolo moko, wana ezalaki biso kotala lisangá moko ya Nampula, kuna na nord, tokangamaki na moto moko ya P.l.D.E. Abotolaki biso mikanda na biso nyonso, bakisa mpe ba Biblia na biso, mpe alobaki na biso ete bakopesa biso lisusu ndingisa te mpo na koya na Mozambique. Atako bongo, na lisalisi ya Jéhovah, tokokaki lisusu kosala ebele na mibembo mosusu kati na mboka yango. Mbala nyonso oyo tozalaki kokóma na frontiére (ndelo ya mboka), tozalaki kosenga lisalisi na ye mpe litambwisi na ye mpo ete tokoka kokokisa mokano na ye mpe kopesa bilendiseli mpe formation oyo esengeli epai na Batemwe ya mboka wana.
Na 1979, totindamaki na Botswana. Ezali mboka monene, oyo bonene na yango ekokanaki penepene na katikati ya Afrika ya Ngele; kasi lokola esobe ya Kalahari ezali kozwa eteni monene, Botswana ezali na bato na nse ya milió moko. Awa, tozalaki na libaku ya kosangana na kotángama ya Salle du Royaume moko mpe na ndako moko ya ba misionere na Gaborone, kapitale, mpe lisusu na oyo ya kosalisa bato ya Angola oyo bakimaki bitumba oyo balobaka lokota ya portugais mpe koyekola Biblia elongo na bango.
Tolongaki mpe kopesa lisalisi na biso na bilenge mibale ya mike oyo bautaki na Zimbabwe. Kati na mboka wana ya penepene, mpenzampenza na lisalisi ya bibongiseli ya sipesiale, ba Témoin de Jéhovah bazwaki ndingisa ya koteya Makomami kati na biteyelo mosusu. Ezali na boye nde mposa ya bana wana mpo na Biblia elamwisamaki. Na nsima, ntango bakendaki na Botswana, tokutanaki na bango mpe basengaki boyekoli ya Biblia. Kasi, lokola baboti na bango bazalaki kotemela, basengelaki koya na ndako ya bamisionere mpo na koyekola Basalaki bokoli malamu mpe bakomaki batemwe batizé.
Ntango nazali kotalela mibu 41 ya mosala ya misionere kati na mikili mwambe mikeseni, nazali kotondo Jéhovah na motema moko mpo na ebele na mapamboli oyo apesaki ngai. Atako ezalaki petee te, Joyce mpe ngai toyokaki bisengo mingi mpo na kosalisa bato mingi na kozwa ekateli mpo na Bokonzi, mpe na komona bokoli ya mosala katikati na makama ebele mpe na botemeli makasi. Yango ezalaki bongo libaku ya ‘kosakola liloba, na etingya na elaka malamu mpe na elaka ya mpasi’. Na ntembe te, mosala ya pionnier ezali mosala kitoko mpe libaku monene oyo tozali kosenga na motema moko epai na baoyo bakoki kobongisa bomoi na bango mpo ete babanda yango.—2 Timote 4:2.
[Elilingi na lokasa 24, 25]
Ntango mai mazalaki mozindo mingi, bato mibale oyo batambwisaka bac bazalaki kokatisa biso na kobendáká nsinga.