Totambola na mayele kati na mokili
“Bozalaka na bizaleli na mayele liboso na bato ya libandá.”—BAKOLOSE 4:5.
1. Baklisto ya liboso bakutanaki na nini, mpe toli nini ntoma Paulo apesaki epai na lisangá ya Kolose?
BAKLISTO ya liboso oyo bafandaki kati na bingumba ya bokonzi ya Loma bakutanaki ntango nyonso na losambo ya bikeko, boluki bisengo na lolenge ya mbindo, milulu mpe mimeseno ya bopakano. Baoyo bafandaki na Kolose, engumba oyo ezalaki na centre-ouest ya Asie Mineure, na ntembe te bakutanaki na losambo ya nzambe-mama mpe na misala ya bilimu mabe ya bato ya mboka Phrygie, na filozofi ya Bagreke oyo bakendeki kofanda kuna mpe na losambo ya etuluku ya Bayuda oyo bazalaki wana. Ntoma Paulo apesaki baklisto toli ya “kotambola na mayele” liboso na bato wana “ya libandá”.—Bakolose 4:5.
2. Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah basengeli lelo oyo kotambola na mayele liboso na bato ya libandá?
2 Lelo oyo, ba Témoins de Jéhovah bazali kokutana na misala ya mbindo lolenge moko, mpe misala misusu ya mabe koleka. Mpo na yango, bango mpe basengeli kozala na mayele kati na boyokani na bango elongo na bato oyo bazali na libandá ya lisangá ya solo ya boklisto. Mingi kati na bato minene ya mangomba mpe ya politike, lokola mpe baoyo ya bopanzi nsango bazali koyina Batemwe. Basusu kati na bango, ezala na lolenge ya polele, to mbala mingi na kobombama, bazali komeka kobebisa lokumu ya ba Témoins de Jéhovah mpe bazali kopusa bato na kozala na makanisi mabe mpo na bango. Lokola batalelaki baklisto ya liboso na libunga nyonso ete bazalaki “lingomba” ya bindimandima, to mpe ya mabe, bobele bongo na mikolo na biso, ba Témoins de Jéhovah mbala mingi bato batalelaka bango na makanisi ya mabe mpe ya libunga.—Misala 24:14; 1 Petelo 4:4.
Lolenge ya kolónga makanisi mabe ya bato
3, 4. (a) Mpo na nini mokili ekoki soko moke te kolinga baklisto ya solo, kasi tosengeli komeka kosala nini? (b) Mokomi moko akomaki nini na ntina na ba Témoins de Jéhovah oyo bakangamaki na boloko mabe ya Nazi?
3 Baklisto ya solo bazali komizela te ete balingama na mokili, oyo engebene ntoma Yoane, “ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Atako bongo, Biblia ezali kolendisa baklisto na kosala makasi mpo na komema bato epai na Jéhovah mpe na losambo na ye ya peto. Tosalaka yango na nzela ya mosala ya kosakola mpe na nzela ya etamboli na biso ya malamu. Ntoma Petelo akomaki ete: “Bozala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete na likambo likotukaka bango bino lokola ete bozali bato mabe, awa ekomona bango misala na bino malamu, bakumisa Nzambe na mokolo wana ekoya ye kotala.”—1 Petelo 2:12.
4 Kati na mokanda na ye, Limbisa, kasi kobosana te (na Norvégien), mokomi mwasi Sylvia Salvesen alobaki na ntina na basi Batemwe baoyo bakangamaki elongo na ye kati na boloko mabe ya Nazi ete: “Baoyo wana mibale, Käthe mpe Margarethe, elongo na basusu mingi, basalisaki ngai mingi, bobele na nzela ya kondima na bango te, kasi lisusu kati na makambo mosusu ya bomoi. Bapesaki biso biteni ya bilamba ya peto oyo tokangisaki na mpota na biso . . . Na mokuse, tozalaki kati na bato oyo bazalaki mpenza kolinga biso, mpe baoyo bazalaki komonisa mayoki na bango ya boninga na nzela ya misala na bango.” Oyo nde litatoli kitoko liuti “na bato ya libandá”!
5, 6. (a) Mosala nini Klisto azali kokokisa yango na eleko na biso, mpe likambo nini tosengeli te kobosana? (b) Ezaleli na biso esengeli kozala nini liboso na bato ya mokili, mpe mpo na nini?
5 Na mayele oyo tozali komitambwisa liboso na bato ya libandá, tokoki na makambo mingi kolónga makanisi mabe oyo bato bazalaka na yango. Ya solo, tozali kobika na eleko oyo Yesu Klisto, Mokonzi na biso oyo azali koyangela, azali kokabola bato ya mabota, “lokola mobateli na bampate akokabolaka bampate na bantaba.” (Matai 25:32) Tobosana soko moke te ete Klisto azali Mosambisi; ye nde ayebi banani bazali “bampate” mpe banani bazali “bantaba.”—Yoane 5:22.
6 Likambo yango esengeli kozala na bopusi likoló na ezaleli na biso liboso na baoyo bazali kati na lisangá ya Jéhovah te. Ekoki kozala ete tozali kotalela bango ete bazali bato ya mokili, kasi bazali kati na mokili ya bato oyo “Nzambe alingaki . . . na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Eleki malamu kotalela bato lokola ete bakokóma bampate na mikolo mizali koya na esika ya kotalela bango na lolendo nyonso ete bazali bantaba. Bato mosusu oyo kala bazalaki mpenza kotemela solo bazali lelo oyo ba Témoins de Jéhovah oyo basili komipesa. Mpe mingi kati na bango, liboso ya kondima litatoli, babendamaki na makambo mingi ya boboto. Talá, na ndakisa, elilingi ya lokasa 18.
Bazali na molende, kasi bato na mobulu te
7. Efundeli nini pápa abimisaki yango, kasi motuna nini tosengeli komituna?
7 Pápa Jean Paul II alobaki mabe na ntina na mangomba mike nyonso, mpe mingimingi mpo na ba Témoins de Jéhovah, wana alobaki ete: “Molende ya mobulu oyo basusu bazali komonisa wana bazali koluka bandimi ya sika, wana bazali kokende ndako na ndako, to wana bazali kotelemisa baleki nzela na pembeni ya balabala, eyokani te na molende oyo ezalaki na bantoma mpe bamisionere.” Tokoki bongo komituna, soki molende na biso “eyokani te na molende ya bantoma mpe ya bamisionere,” epai wapi tokoki kokuta molende ya solo mpo na kosakola nsango malamu? Ezali solo ete tokoki kokuta yango te epai ya Bakatolike to mpe epai ya Baprotestá to epai ya basangani ya mangomba ya Orthodoxe.
8. Lolenge nini tosengeli kokokisa mosala na biso ya kosakola ndako na ndako, mpe litomba nini yango ekoki kobimisa?
8 Nzokande, mpo na kokweisa bifundeli nyonso oyo bimonisi ete tozalaka na mobulu kati na mosala na biso ya kosakola, tosengeli ntango nyonso kozala na boboto, na limemya mpe na bonkónde wana tozali kosolola elongo na bato. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Nani kati na bino azali moto na mayele mpe na kososola malamu? Tika ete amonisa misala na ye na bizaleli malamu kati na bopolo mpe na mayele.” (Yakobo 3:13) Ntoma Paulo azali kolendisa biso na “koboya kowelana.” (Tito 3:2) Na ndakisa, na esika ete tokweisa mbala moko bindimeli ya moto oyo tozali koyebisa ye nsango malamu, mpo na nini te komonisa bosepeli ya solo na koyoka makanisi na ye? Na nsima, tokoyebisa moto yango nsango malamu lokola ezali kati na Biblia. Soki tozali na makanisi malamu wana tozali kosolola elongo na bato mpe soki tomonisi limemya ya solo epai na bato oyo bazali na bindimeli bikeseni na oyo ya biso, tokosalisa bango na kozala na makanisi malamu mpo na koyoka biso, mpe mbala mosusu bakososola motuya ya nsango ya Biblia. Lokola litomba, basusu kati na bango bakoya “kokumisa Nzambe.”—1 Petelo 2:12.
9. Lolenge nini tokoki kosalela toli oyo ntoma Paulo apesaki (a) na Bakolose 4:5? (b) na Bakolose 4:6?
9 Ntoma Paulo apesaki toli ete: “Bozalaka na bizaleli na mayele liboso na bato ya libandá, bosalela ntango na bino malamu.” (Bakolose 4:5) Wana azalaki kolimbola maloba oyo ya nsuka, J. B. Lightfoot akomaki ete: “Kozanga libaku moko te, ya koyebisa mpe ya kosala oyo nyonso ekoki kotombola matomba ya Nzambe.” Ya solo, tosengeli komilengela na koloba mpe na kosala na ntango oyo esengeli. Mayele motindo wana ezali mpe kosenga ete topona ngonga oyo ebongi mpo na kotala bato. Soki bato baboyi nsango na biso, ezali mpo ete bato bazali kosepela na yango te, to ezali mpo ete tokendeki mbala mosusu kotala bango na ntango oyo esengeli te? Ntoma Paulo akomaki mpe ete: “Tika ete maloba na bino mazala na ngolu, na elengi na mongwa ntango nyonso ete boyeba soko ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.” (Bakolose 4:6) Yango ezali kosenga kokanisa liboso ya koloba mpe bolingo ya solo mpo na bazalani na biso. Tika ete toyebisa ntango nyonso nsango malamu na esengo.
Bato na limemya mpe “baselingwi mpo na misala nyonso malamu”
10. (a) Toli nini ntoma Paulo apesaki na baklisto oyo bazalaki na Kelete? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa ndakisa na kolanda toli ya ntoma Paulo?
10 Tokoki te kobuka mitinda ya Biblia. Epai mosusu, tosengeli te koswana mpambampamba na ntina na makambo oyo mazali kotya na likámá te bosembo ya moklisto. Ntoma Paulo akomaki ete: “Kanisela bango [Baklisto ya esanga Kelete] ete bamisokisa liboso na mikóló mpe mikonzi; bazala na botósi mpe baselingwa mpo na misala nyonso malamu, ete batuka te, baboya kowelana, bazala na boboto, bamonisa bopolo epai na bato nyonso.” (Tito 3:1, 2) Moyekoli na Biblia E. F. Scott akomaki na ntina na mokapo wana ete: “Baklisto basengelaki te bobele kotósa bakonzi, kasi basengelaki lisusu koselingwa mpo na misala nyonso malamu. Yango . . . elimboli ete, ntango libaku limonani, baklisto basengelaki kozala kati na bato ya liboso na kosala mpo na bolamu ya bato nyonso. Ekozala ntango nyonso na bandako oyo ekozika, na malozi, na makámá makeseni, oyo ekopusa ba citoyens nyonso ya malamu na kosalisa bazalani na bango.” Kati na mokili mobimba, makámá mingi mazali kokwela bato, oyo ntango yango esalemi ba Témoins de Jéhovah bazali kati na bato ya liboso mpo na kopesa lisungi. Basalisaka bobele bandeko na bango te, kasi lisusu bato ya libandá.
11, 12. (a) Lolenge nini baklisto basengeli kosala liboso ya bakonzi? (b) Kotósa bakonzi ezali kosenga nini wana esengeli kotónga ba Salles du Royaume?
11 Mokapo wana moko ya mokanda ya ntoma Paulo epai na Tito elobeli lisusu makasi ntina ya komonisa limemya epai na bakonzi. Bilenge baklisto oyo, basengeli kosamba liboso ya basambisi mpo na etelemelo na bango ya kozanga kokota na makambo ya mokili, basengeli mpenza kokeba ete batambola na mayele liboso na bato ya libandá. Na elateli na bango, na bizaleli na bango, mpe na lolenge oyo bazali koloba liboso ya bakonzi yango, bakoki kopesa to kobebisa lokumu ya libota na Jéhovah. Basengeli “kopesa . . . lokumu na baoyo bakoki kozwa lokumu,” mpe kozongisa monoko mpo na komilóngisa na limemya mozindo.—Baloma 13:1-7; 1 Petelo 2:17; 3:15.
12 “Bakonzi” esangisi mpe bakambi ya ba zones. Lokola ba Salles du Royaume mingi ezali kotóngama, bankulutu basengeli kokutana na bakonzi ya mboka na bango mpe mbala mingi bakutanaka na makanisi mabe oyo bazali na yango likoló na biso. Kasi, emonani ete wana bamonisi ya lisangá bazali na boyokani malamu elongo na bakonzi mpe bazali kosala na boyokani elongo na bato batalelaka misala ya botóngi ndako na bingumba (urbanisme), makanisi wana ya mabe mazali kolimwa. Mbala mingi, litatoli malamu ezali kopesama epai na bato oyo liboso bayebaki ba Témoins de Jéhovah mpe nsango na bango bobele mwa moke to bayebaki bango ata moke te.
‘Soki ekoki, bozala na kimya elongo na bato nyonso’
13, 14. Toli nini ntoma Paulo apesaki na baklisto ya Loma, mpe lolenge nini tokoki kosalela yango kati na boyokani na biso elongo na bato ya libandá?
13 Ntoma Paulo apesaki toli oyo elandi epai na baklisto oyo bazalaki na Loma, engumba ya bapakano: “Bozongisaka mabe mpo na mabe te; bolikyaka mpo na yango emonani sembo na miso na bato nyonso. Soki ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bozala na bato nyonso kimya. Balingami, bobukanisa mpo na bino mpenza te, kasi tika esika mpo na nkanda na Nzambe. Lokola ekomami ete: ‘Jéhovah alobi ete: Kobukanisa ezali likambo na ngai, ngai nakofuta.’ Kasi, ‘soki moyini na yo akoyoka nzala, leisa ye bilei; soki akoyoka mposa na mai, melisa ye. Mpo ekosala yo boye, ozali kotya makala na mɔ́tɔ likoló na motó na ye.’ Tika te ete mabe mazongisa yo nsima, kasi yo zongisa mabe nsima mpo na malamu.”—Baloma 12:17-21.
14 Ezali solo ete, kati na boyokani na biso elongo na bato ya libandá, lokola tozali baklisto ya solo, tokozanga te kokutana na batemeli. Kati na mokapo oyo touti kolobela, ntoma Paulo amonisi ete nzela ya mayele ezali ya kosala makasi ete tolónga botemeli na misala malamu. Lokola makala na mɔ́tɔ, misala wana malamu mikoki kosilisa koyinana mpe komema monguna na komonisa ezaleli ya malamu mingi epai na basaleli ya Jéhovah, mpe ekoki mbala mosusu ata kolamwisa mposa na ye mpo na nsango malamu. Ntango yango esalemi bongo, malamu elóngi mabe.
15. Ntango nini baklisto basengeli mpenzampenza kokeba ete batambola na mayele liboso na bato ya libandá?
15 Kotambola na mayele epai na bato ya libandá ezali mpenza na ntina mingi kati na bandako oyo moko na babalani andimi naino solo te. Kotósa mitinda ya Biblia ezali kobimisa mibali ya malamu, basi ya malamu, batata ya malamu, bamama ya malamu mpe bana oyo bazali na botósi mingi mpe baoyo bazali na mayele na eteyelo. Moto oyo azali mondimi te asengeli komona matomba malamu ya mitinda ya Biblia likoló ya moto oyo azali mondimi. Na yango, basusu “bakoki kozwama na kimya mpe na bizaleli malamu” ya basangani ya libota oyo basili komipesa.—1 Petelo 3:1, 2.
“Tosalela bato nyonso malamu”
16, 17. (a) Nzambe asepelaka na mbeka ya lolenge nini? (b) Lolenge nini tosengeli “kosala malamu” epai na bandeko na biso mpe lisusu epai na bato ya libandá?
16 Likambo lileki malamu oyo tokoki kosala mpo na bazalani na biso ezali ya koyebisa bango nsango ya bomoi mpe koteya bango na ntina ya kozala na boyokani elongo na Jéhovah na nzela ya Yesu Klisto. (Baloma 5:8-11) Yango wana ntoma Paulo alobi na biso ete: “Bongo mpo na ye [Klisto], totombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye.” (Baebele 13:15) Ntoma Paulo abakisi ete: “Bobosana te kosala malamu mpe kokabela basusu biloko mpo ete Nzambe akosepela mbeka na motindo yango.” (Baebele 13:16) Longola mosala na biso ya kosakola, tosengeli te kobosana “kosala malamu.” Yango esangani kati na mbeka oyo Nzambe azali kosepela na yango.
17 Na momeseno, tosalaka malamu epai na bandeko na biso ya elimo, baoyo bazali na mposa ya lisalisi na mayoki, na elimo, to na mosuni. Ntoma Paulo alobelaki yango wana akomaki ete: “Soki tozwi nzela, tosalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.” (Bagalatia 6:10; Yakobo 2:15, 16) Nzokande, tosengeli te kobosana maloba oyo ete: “Tosalela bato nyonso malamu.” Kosala malamu epai na ndeko ya mosuni, na moto oyo afandi pembeni na yo to na moninga ya mosala ekoki mpenza kolongola makanisi mabe oyo bazalaka na yango mpo na biso mpe ekoki kofungola motema ya moto mpo na solo.
18. (a) Makámá nini tosengeli kopengola? (b) Lolenge nini tosengeli kosalela malamu na biso ya boklisto mpo na kokembisa mosala na biso ya kosakola?
18 Mpo na kokokisa yango, tosengeli te kosala boninga ya penepene elongo na bato ya libandá. Boninga motindo wana ezali na makámá mingi. (1 Bakolinti 15:33) Lisusu, tozali koluka te kozala baninga ya mokili. (Yakobo 4:4) Kasi malamu na biso ya boklisto ekoki kokembisa mosala na biso ya kosakola. Na mikili misusu, kosolola na bato na bandako na bango ezali likambo ya mpasi mingi. Bandako mosusu ya minene epekisami ete bato bakota, yango ezali kopesa biso nzela te na kokutana na bafandi na yango. Na mikili ya bozwi, telefone ezali mwango ya kosakola epai ya bato yango. Na mikili mingi, likoki ezali ya kopesa litatoli na balabala. Atako bongo, na mikili nyonso, kozala na bosepeli, na bonkónde, na boboto mpe kosalisa bato ekopesa nzela na kolongola makanisi mabe oyo bato bazalaka na yango mpe ekopesa litatoli moko malamu.
Tozalisa banguna na biso nyee
19. (a) Lokola tozali koluka te ete bato basepela na biso na makasi, tosengeli komizela na nini? (b) Na ndimbola nini tosengeli kosala makasi mpo na komekola ndakisa ya Danyele mpe kosalela toli ya ntoma Petelo?
19 Ba Témoins de Jéhovah balukaka na makasi te ete bato basepela na bango, kasi babangaka mpe bango te. (Masese 29:25; Baefese 6:6) Bayebi malamu ete atako bazali kosala milende ya kozala ndakisa mpo na kofuta mpako mpe kozala ba citoyens malamu, banguna bakopanza likoló na bango makambo ya lokuta mpe maloba ya kotuka. (1 Petelo 3:16) Lokola bayebi yango, bazali komekola Danyele, oyo banguna na ye balobaki ete: “Tokozwa likambo na ntina na Danyele te, bobele soki tozwi yango na ntina na mobeko ya Nzambe na ye.” (Danyele 6:5) Tokobuka soko moke te mitinda ya Biblia mpo na kosepelisa bato. Epai mosusu, tozali koluka te ete baboma biso lokola ba martyrs. Tozali kosala makasi mpo na kozala na kimya mpe kolanda toli oyo ya ntoma [Petelo] ete: “Mpo ete mokano na Nzambe ezali boye ete, awa ekosala bino misala mibongi, bozalisa bato na bilobaloba na bilema nyee.”—1 Petelo 2:15.
20. (a) Tondimisami na likambo nini, mpe elendiseli nini Yesu apesaki biso? (b) Lolenge nini tokoki kolanda kotambola na mayele liboso na bato ya libandá?
20 Tondimisami ete etelemelo na biso ya komikabola na mokili eyokani mpenza na Biblia. Emonisami na lisoló ya makambo matali baklisto ya ekeke ya liboso. Tolendisami na maloba oyo ya Yesu ete: “Kati na mokili bozali na bolozi, nde boyika mpiko, ngai nasili [kolónga] mokili.” (Yoane 16:33) Tozali kobanga te. “Nani akosalela bino mabe soki bozali na mposa makasi mpo na malamu? Kasi soki boyoki mpasi mpo na boyengebene, esengo na bino! Mpo na kobangisa na bango, bobanga te, bomitungisa mpe te. Bobulisa Klisto lokola Nkolo kati na mitema na bino; boselingwaka mikolo nyonso mpo na kozongisa monoko na moto na moto oyo akotuna bino mpo na ntina na elikya ezali kati na bino. Kasi bozongisa monoko yango na bopolo mpe na limemya.” (1 Petelo 3:13-15) Soki tokosala boye, tokolanda kotambola na mayele liboso na bato ya libandá.
Bozongeli
◻ Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah basengeli kotambola na mayele liboso na bato ya libandá?
◻ Mpo na nini baklisto ya solo basengeli te kolikya ete mokili elinga bango, kasi basengeli komeka kosala nini?
◻ Ezaleli na biso esengeli kozala nini epai na bato ya mokili, mpe mpo na nini?
◻ Mpo na nini tosengeli “kosala malamu” bobele epai na bandeko na biso te, kasi lisusu epai na bato ya libandá?
◻ Lolenge nini etamboli na biso ya mayele liboso na bato ya libandá ekoki kosalisa biso kati na mosala na biso ya kosakola?
[Elilingi na lokasa 18]
Na loboko ya mwasi: Baklisto ya solo na mokili ya France bazali kosalisa bazalani na bango nsima ya kozinda na bandako
[Elilingi na lokasa 20]
Misala malamu ya boklisto mikoki mpenza kolongola makanisi mabe oyo bato bazalaka na yango mpo na biso
[Elilingi na lokasa 23]
Baklisto basengeli “koselingwa mpo na misala nyonso malamu”