Baklisto bakɔtaka na makambo ya mokili te na mikolo oyo ya nsuka
“Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.”—YOANE 17:16.
1, 2. Yesu alobaki nini mpo na boyokani ya bayekoli na ye na mokili, mpe maloba yango ezali kobimisa mituna nini?
NA BUTU na ye ya nsuka ntango azalaki na bomoi lokola moto ya kokoka, Yesu asalaki libondeli moko molai; ntango azalaki kobondela, bayekoli na ye bazalaki wana mpe bayokaki nyonso oyo alobaki. Na libondeli yango, alobaki likambo moko oyo ezali komonisa ndenge oyo bomoi ya baklisto nyonso ya solo esengeli kozala. Na ntina na bayekoli na ye, alobaki ete: “Napesi bango liloba na yo, kasi mokili eyini bango, mpo bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te. Nazali te kosɛnga yo olongola bango na mokili, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe. Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.”—Yoane 17:14-16.
2 Mbala mibale mobimba Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kozala bato ya mokili te. Lisusu, kokabwana na bango na mokili ekomemela bango mikakatano: mokili ekoyina bango. Kasi, baklisto basengelaki kobanga te; Yehova akobatela bango. (Masese 18:10; Matai 24:9, 13) Maloba ya Yesu ekoki kotinda biso tómituna ete: ‘Mpo na nini baklisto ya solo bazali bato ya mokili te? Kozala moto ya mokili te elimboli nini? Atako mokili ekoyina bango, ndenge nini baklisto bakotalela mokili yango, mingimingi baguvɛrnɛma ya mokili yango?’ Biyano oyo Makomami epesi na mituna yango ezali na ntina mingi mpamba te etaleli mokomoko na biso.
“Touti na Nzambe”
3. (a) Nini ezali kokabola biso na mokili? (b) Nini ezali komonisa ete mokili oyo ezali “na kati ya nguya ya moto mabe”?
3 Ntina moko oyo tozali bato ya mokili te ezali mpo ete tozali baninga mpenza ya Yehova. Ntoma Yoane akomaki boye: “Toyebi ete touti na Nzambe, kasi mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Likambo oyo Yoane alobaki mpo na mokili ezali mpenza solo. Makambo ya mabe oyo etondi na mokili lelo oyo, na ndakisa bitumba, kobomana, mobulu, konyokola bato, kozanga bosembo, pite na ekobo, ezali komonisa ete Satana nde azali kotambwisa mokili, kasi Nzambe te. (Yoane 12:31; 2 Bakolinti 4:4; Baefese 6:12) Na ntango moto akómi Motatoli ya Yehova, akotika makambo mabe wana mpe akondima yango lisusu te, mpe yango ekokabola ye na mokili.—Baloma 12:2; 13:12-14; 1 Bakolinti 6:9-11; 1 Yoane 3:10-12.
4. Na ndenge nini tomonisaka ete tozali bato ya Yehova?
4 Yoane alobaki ete baklisto ‘bauti na Nzambe,’ nzokande mokili euti na Nzambe te. Bato nyonso oyo bamipesi na Yehova bazali bato na ye. Ntoma Paulo alobaki ete: “Soki tozali na bomoi, tozali na bomoi mpo na Yehova, mpe soki tozali kokufa, tozali kokufa mpo na Yehova. Na yango soki tozali na bomoi mpe soki tozali kokufa, tozali bato ya Yehova.” (Baloma 14:8; Nzembo 116:15) Lokola tozali bato ya Yehova, tosambelaka kaka ye. (Exode 20:4-6) Yango wana, moklisto ya solo amipesaka na makambo ya mokili te. Lisusu, atako atosaka drapo ya ekólo, kasi na misala to na makanisi na ye, asambelaka yango te. Asambelaka mpe bavɛdɛti ya masano te to bato mosusu oyo bato bakómisi bango banzambe lelo oyo. Atako bongo, apekisaka bato mosusu te kosala oyo bamoni malamu, kasi ye asambelaka kaka Mozalisi. (Matai 4:10; Emoniseli 19:10) Yango mpe ezali kokabola ye na mokili.
“Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te”
5, 6. Ndenge nini kotosa Bokonzi ya Nzambe ekaboli biso na mokili?
5 Baklisto bazali bayekoli ya Yesu Klisto mpe bato ya Bokonzi ya Nzambe; mpo na ntina yango mpe, bazali bato ya mokili te. Ntango Yesu azalaki kosamba liboso ya Ponsi Pilato, alobaki ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama te epai ya Bayuda. Kasi nde, bokonzi na ngai euti awa te.” (Yoane 18:36) Bokonzi yango nde ekosantisa nkombo ya Yehova, ekolongisa bokonzi na ye, mpe na nzela na yango, mokano na ye ekosalema awa na mabele ndenge ezali kosalema na likoló. (Matai 6:9, 10) Yesu azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi yango ntango azalaki awa na mabele, mpe alobaki ete bayekoli na ye bakosakola Bokonzi yango tii ntango ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekosuka. (Matai 4:23; 24:14) Na 1914, esakweli ya Emoniseli 11:15 ekokisamaki: “Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na ye, mpe akoyangela libela na libela seko.” Etikali moke Bokonzi wana ya likoló ekóma boyangeli kaka moko mpo na bato nyonso. (Danyele 2:44) Ekozala na ntango moko oyo ata bakonzi ya mokili, bálinga, bálinga te, bakondima bokonzi yango.—Nzembo 2:6-12.
6 Lokola bayebi nyonso wana, lelo oyo baklisto ya solo bazali bato ya Bokonzi ya Nzambe, mpe balandaka toli oyo Yesu apesaki ete ‘bákoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene ya Nzambe.’ (Matai 6:33) Yango elingi koloba te ete batosaka te ekólo oyo bafandi; kasi na makambo ya elimo, bakabwani na mokili. Mosala ya libosoliboso ya moklisto lelo oyo, lokola mpe na ekeke ya liboso, ezali ya ‘kopesa litatoli malamumalamu mpo na bokonzi ya Nzambe.’ (Misala 28:23) Guvɛrnɛma moko te ya mokili ezali na lotomo ya kopekisa mosala wana oyo Nzambe atindi.
7. Mpo na nini baklisto ya solo bakɔtaka na makambo ya politiki te, mpe ndenge nini bamonisaki yango?
7 Lokola Batatoli bazali bato ya Yehova, bazali bayekoli ya Yesu mpe bato ya Bokonzi ya Nzambe, bakɔtaki te na matata kati na bikólo na ekeke ya 20 to mpe na bambula oyo. Baponaki kozala na ngámbo moko te, basimbaki mindoki te mpo na koboma bato, mpe balendisaki likanisi moko te ya bato ya mokili oyo. Ata na ntango batɛmɛli bango makasi, bamonisaki kondima makasi, bazongelaki kaka maloba oyo bayebisaki bakonzi ya Banazi na Allemagne na 1934 ete: “Tokɔtaka na makambo ya politiki te, kasi tomipesi mobimba na bokonzi ya Nzambe oyo Klisto azali Mokonzi na yango. Tokosala ata moto moko mabe te. Tolingi kofanda na kimya mpe kosalela bato nyonso malamu na ndenge oyo tokokoka.”
Baambasadɛrɛ na batindami mpo na Klisto
8, 9. Na ndenge nini Batatoli ya Yehova bazali baambasadɛrɛ mpe batindami, mpe ndenge nini batalelaka bikólo ya mokili oyo?
8 Paulo alobaki ete ye na baninga na ye baklisto bapakolami bazali “baambasadɛrɛ na esika ya Klisto, lokola nde Nzambe azali kobondelabondela na nzela na [bango].” (2 Bakolinti 5:20; Baefese 6:20) Banda 1914, baklisto bapakolami na elimo bakoki mpenza kobengama baambasadɛrɛ ya Bokonzi ya Nzambe; bazali mpe “bana” ya bokonzi yango. (Matai 13:38; Bafilipi 3:20; Emoniseli 5:9, 10) Lisusu, Yehova abimisi “ebele ya bato” oyo bazali na kati ya “bampate mosusu” na kati ya bikólo, elingi koloba baklisto oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabele, mpo na kosunga bana na ye bapakolami na mosala na bango ya baambasadɛrɛ. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) “Bampate mosusu” yango bakoki kobengama “batindami” ya Bokonzi ya Nzambe.
9 Ntango batindi moto ambasadɛrɛ na ekólo moko, ye na bato na ye bakɔtaka na makambo ya ekólo yango te. Ndenge moko mpe, baklisto bakɔtaka na makambo ya politiki ya mokili oyo te. Bamityaka na ngámbo moko te ntango bato bakabwani mpo na ekólo, loposo, makanisi, to makambo ya nkita. (Misala 10:34, 35) Kasi ‘basalaka epai ya bato nyonso oyo ezali malamu.’ (Bagalatia 6:10) Lokola balingaka kokɔta na makambo ya mokili te, moto moko te akoki koloba ete aboyi nsango na bango mpo bamityaka na ngámbo ya bato ya loposo boye to ekólo boye.
Bayebani na bolingo
10. Mpo na moklisto, bolingo ezali na esika nini?
10 Longola nyonso oyo tolobi, likambo mosusu oyo epekisaka baklisto kokɔta na makambo ya mokili ezali boyokani na bango na baklisto mosusu. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Bolingo na kati ya bandeko ezali likambo ya ntina mingi mpo na moklisto. (1 Yoane 3:14) Moklisto azalaka na boyokani malamu na bandeko na ye baklisto mpamba te boninga na ye na Yehova mpe Yesu etalelaka mpe boyokani wana. Bolingo na ye esuki kaka te na bandeko oyo azali na bango lisangá moko. Moklisto alingaka “lisangá mobimba ya bandeko [na ye] na kati ya mokili.”—1 Petelo 5:9.
11. Ndenge nini etamboli ya Batatoli ya Yehova emonisaka bolingo oyo bazali na yango na kati na bango?
11 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali komonisana bolingo, mpe na ndenge yango, bazali kokokisa maloba ya Yisaya 2:4, ete: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli ya matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” Lokola Yehova azali koteya bango, baklisto ya solo bazali na kimya na ye mpe bango na bango bazali na kimya. (Yisaya 54:13) Lokola balingi Nzambe mpe balingi bandeko na bango, bakoki kokanisa te ete básimba mindoki mpo na kobundisa bandeko na bango to bato mosusu oyo bafandi na bikólo mosusu. Kimya mpe bomoko na bango ezali na esika monene na kati ya losambo na bango; yango ezali komonisa ete bazali mpenza na elimo ya Nzambe. (Nzembo 133:1; Mika 2:12; Matai 22:37-39; Bakolose 3:14) ‘Bazali koluka kimya . . . mpe bazali kolanda yango’ mpo bayebi ete “miso ya Yehova ezali epai ya bayengebene.”—Nzembo 34:14, 15, NW.
Ndenge oyo baklisto batalelaka mokili
12. Wapi lolenge Yehova atalelaka bato ya mokili oyo Batatoli ya Yehova balandaka, mpe ndenge nini basalaka yango?
12 Yehova asakoli etumbu oyo akopesa mokili oyo, kasi asambisi naino moto mokomoko te. Na ntango oyo ye moko aponi, akotinda Yesu asala yango. (Nzembo 67:3, 4; Matai 25:31-46; 2 Petelo 3:10) Liboso na yango, azali komonisa bolingo mingi epai ya bato. Kutu, apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko mpo ete moto nyonso azala na libaku ya kozwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Biso baklisto tolandaka ndakisa ya bolingo ya Nzambe, yango wana atako mbala mingi bato batyolaka mosala na biso, toyebisaka bango makambo oyo Nzambe abongisi mpo na kobikisa bato.
13. Ndenge nini tosengeli kotalela bakonzi ya mokili oyo?
13 Ezaleli nini tosengeli komonisa epai ya bakonzi ya mokili oyo? Paulo apesaki eyano na motuna yango ntango akomaki boye: “Tiká molimo nyonso etosaka bakonzi oyo bazali liboso, mpo ezali na bokonzi te soki na nzela ya Nzambe te; bakonzi oyo bazali batyami na bibonga na bango oyo elandaná na nzela ya Nzambe.” (Baloma 13:1, 2) Bokonzi ya bato ‘elandani’ (bamosusu bazali na bokonzi mingi, bamosusu mpe bokonzi moke, kasi bango nyonso bazali na nse ya Yehova) mpamba te Mozwi-ya-Nguya-Nyonso apesi bango nzela. Moklisto atosaka bakonzi ya mokili mpamba te kotosa bango elimboli mpe kotosa Yehova. Kasi, moklisto asalaka nini na ntango makambo oyo baguvɛrnɛma ya mokili ezali kosɛnga ye eyokani te na makambo oyo Nzambe azali kosɛnga ye?
Mibeko ya Nzambe na mibeko ya Kaisala
14, 15. (a) Na ndenge nini Danyele alongaki kokima mokakatano moko na likambo ya botosi? (b) Baebele misato basalaki nini lokola bazalaki na likoki te ya kokima likambo moko oyo emekaki botosi na bango?
14 Danyele na baninga na ye misato bapesaki ndakisa malamu na likambo etali kotosa baguvɛrnɛma ya mokili, kozanga kobosana kotosa bokonzi ya Nzambe. Ntango bilenge Baebele wana minei bazalaki na boombo na Babilone, bazalaki kotosa mibeko ya ekólo yango mpe eumelaki te, baponaki bango mpo na kolanda formasyo moko mpo ete na nsima bápesa bango mikumba ya minene. Lokola Danyele amonaki ete formasyo yango ekosɛnga makambo mosusu oyo eyokani te na Mibeko ya Yehova, asololaki na mokonzi oyo azalaki kolandela formasyo na bango. Yango wana, mokonzi yango azwaki bibongiseli mpo básala te makambo oyo ekotungisa lisosoli ya Baebele wana minei. (Danyele 1:8-17) Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa ya Danyele ntango balimbolaka makanisi na bango epai ya bakonzi na limemya mpenza mpo na koboya mikakatano.
15 Kasi, mokakatano mosusu ebimaki na nsima na likambo etali botosi oyo bilenge Baebele wana bakokaki kokima yango te. Mokonzi ya Babilone asalisaki ekeko moko monene na mokili ya Dula mpe abengisaki bakonzi minene ya mboka, na bakonzi ya bitúká na fɛti oyo abongisaki mpo na kolakisa ekeko yango. Na ntango wana, baninga misato ya Danyele bazalaki bakonzi ya etúká na Babilone; yango wana, esengelaki ete bango mpe bázala wana. Na ntango bazalaki kosala milulu, esɛngaki ete na ntango moko bato nyonso oyo bayanganaki wana báfukama liboso ya ekeko. Kasi, Baebele bayebaki ete soki basali bongo, babuki mobeko ya Nzambe. (Deteronome 5:8-10) Yango wana, ntango bato nyonso bafukamaki, bango baninganaki te. Lokola batosaki etinda ya mokonzi te, basengelaki kobomama na liwa moko ya nsɔmɔ; bango bandimaki ata kokufa, kasi kotika kotosa Yehova te. Soki babikaki ezalaki se na likamwisi ya Yehova.—Danyele 2:49–3:29.
16, 17. Bantoma balobaki nini ntango bapesaki bango mobeko ete bátika kosakola, mpe mpo na nini?
16 Na ekeke ya liboso, bantoma ya Yesu Klisto basambaki liboso ya bakonzi ya Bayuda na Yelusaleme mpe bapesaki bango mobeko ete bátika kosakola na nkombo ya Yesu. Basalaki nini? Yesu atindaki bango ete bákende kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, ata mpe ya Yudea. Alobaki na bango mpe bázala batatoli na ye na Yelusaleme mpe na mokili mobimba. (Matai 28:19, 20; Misala 1:8) Bantoma bayebaki ete makambo oyo Yesu atindaki bango ezalaki mokano ya Nzambe mpo na bango. (Yoane 5:30; 8:28) Yango wana, balobaki ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”—Misala 4:19, 20; 5:29.
17 Bantoma bazalaki batomboki te. (Masese 24:21) Bakonzi nde bapekisaki bango kosala mokano ya Nzambe, yango wana balobaki ete, ‘Tosengeli kotosa Nzambe, kasi moto te.’ Yesu alobaki ete tosengeli ‘kozongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.’ (Malako 12:17) Soki totosi etinda ya Nzambe te mpo bato bapekisi biso kosala yango, ekomonisa ete tozali kopesa bato biloko ya Nzambe. Nzokande, topesaka na Kaisala nyonso oyo tosengeli kopesa ye, kasi toyebi ete Yehova nde azali mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso. Azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́, Mozalisi, mpe ye nde apesaka bokonzi.—Emoniseli 4:11.
Tokozonga nsima te
18, 19. Likambo nini ya malamu bandeko na biso mingi basalaki, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na bango?
18 Lelo oyo, baguvɛrnɛma mingi ezali kondima makanisi ya Batatoli ya Yehova na ndenge bakɔtaka na makambo ya politiki te, mpe tozali na botɔndi mpo na yango. Kasi, na mikili mosusu bakonzi bazali mpenza kotɛmɛla Batatoli. Na ekeke ya 20 bandeko na biso mosusu babundaki makasi mpe ata lelo oyo, bandeko na biso mosusu bazali kobunda mpenza “etumba ya malamu mingi ya kondima.”—1 Timote 6:12.
19 Ndenge nini tokoki kosala mpo tózonga nsima te ndenge bango bazongaki nsima te? Ya liboso, tosengeli kobosana te ete bato ya mokili bakotɛmɛla biso. Tosengeli kolɛmba nzoto te to kokamwa te soki batɛmɛli biso. Paulo ayebisaki Timote ete: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya boyokani elongo na Klisto Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Timote 3:12; 1 Petelo 4:12) Na mokili oyo Satana azali koyangela, ekoki mpenza kosalema ete bátɛmɛla biso te? (Emoniseli 12:17) Na ntango oyo tozali sembo, bato mosusu oyo bazali ‘kotungisama mpe bazali kokoba kofinga biso’ bakozanga te.—1 Petelo 4:4.
20. Solo nini bazongeli biso lisusu?
20 Ya mibale, tozali na kondima ete Yehova na baanzelu na ye bakosunga biso. Lokola Elisa alobaki yango na ntango ya kala, “baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango!” (2 Mikonzi 6:16; Nzembo 34:7) Ekoki kozala ete Yehova, mpo na ntina oyo ye moko ayebi, atiki nzela ete mpo na mwa ntango moko boye, banguna bákoba kotungisa biso. Atako bongo, akotika te kopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko. (Yisaya 41:9, 10) Bamosusu babomamaki, kasi yango esengeli kobangisa biso te. Yesu alobaki ete: “Bóbanga te baoyo babomaka nzoto nde bakoki koboma molimo te; kasi bóbanga nde ye oyo akoki koboma ná molimo ná nzoto na kati ya Gehena.” (Matai 10:16-23, 28) Biso tozali se “bafandi ya ntango mokuse” na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Tozali kosalela ntango na biso mpo na ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo,’ bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe. (1 Petelo 2:11; 1 Timote 6:19) Soki totikali sembo epai ya Nzambe, moto moko te akobɔtɔla biso mbano wana.
21. Likambo nini tosengeli kobosanaka te?
21 Yango wana, tóbosanaka te boninga ya malamu oyo tozali na yango na Yehova Nzambe. Tósepelaka ntango nyonso na bolamu ya kozala bayekoli ya Klisto mpe bato ya Bokonzi ya Nzambe. Tólinga bandeko na biso na motema mobimba, mpe tósepela ntango nyonso na bolingo oyo bazali kolinga biso. Na koleka, tókokisa maloba ya mokomi ya nzembo: “Tyá elikya epai na Yehova; zalá na mpiko mpe tiká ete motema na yo mozala na nguya. Ɛɛ, tyá elikya epai na Yehova.” (Nzembo 27:14, NW; Yisaya 54:17) Na bongo, tokozala lokola ebele ya baklisto oyo bazalaki liboso na biso, tokozonga nsima te, tokobatela elikya makasi, tokotikala sembo mpe tokokɔta na makambo ya mokili te.
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini boninga na biso na Yehova ezali kokabola biso na mokili oyo?
• Lokola tozali bato ya Bokonzi ya Nzambe, tosalaka ndenge nini mpo tókɔta na makambo ya mokili te?
• Na ndenge nini bolingo oyo tolingaka bandeko na biso epekisaka biso kokɔta na makambo ya mokili, ekabolaka biso na mokili?
[Elilingi na lokasa 15]
Lokola tozali kotosa Bokonzi ya Nzambe, ndenge nini totalelaka mokili?
[Elilingi na lokasa 16]
Hutu na Tutsi bazali kosala elongo na esengo
[Elilingi na lokasa 17]
Bandeko oyo, moko azali Moyuda, mosusu azali Moarabe
[Elilingi na lokasa 17]
Baklisto ya Serbie, Bosnie, mpe Croatie bazali kofanda elongo na esengo
[Elilingi na lokasa 18]
Wapi likambo ebongi kosala ntango bakonzi ya mokili basɛngi biso tóbuka mobeko ya Nzambe?