Lolenge oyo baklisto bazali kotalela Bokonzi
“Bokonji ejali tɛ bobɛlɛ yango euti na Njambe.”—BALOMA 13:1.
1. Liloba “bokonzi” ezali na boyokani na nini, na yango, mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali Mokonzi Aleki-likoló?
BOKONZI ezali na boyokani na nguya ya kozalisa. Liloba “bokonzi” liyokani na liloba “mokeli,” oyo elimboli “ye oyo akobandisaka, ye oyo akosalaka, to ye oyo akozalisaka.” Ye Oyo-Aleki likoló, oyo azalisaki bikelamu nyonso, ya bomoi mpe yango ezangi bomoi, ezali Yehova Nzambe. Na ntembe te, ye nde azali Mokonzi Oyo-Aleki likoló. Baklisto ya solo bazali na makanisi motindo moko na bikelamu ya likoló oyo bazali koloba ete: “Yehova, Nzambe na biso, yo obongi na kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo nde bizali mpe bisili kozalisama.”—Emoniseli 4:11, NW.
2. Na meko moko to mosusu, lolenge nini bayangeli ya kala bandimaki ete bazalaki na lotómo te ya kokonza likoló na baninga na bango bato, mpe likambo nini Yesu alobaki na Ponti Pilato?
2 Bobele likambo oyo ete bayangeli mingi ya kalakala bamekaki kondimisa bokonzi na bango na komibengáká banzambe to bamonisi ya nzambe, emonisaki ete moto azali na lotómo te ya koyangela baninga na ye bato.a (Yilimia 10:23) Eutelo bobele moko ya bokonzi ezali bongo Yehova Nzambe. Klisto ayebisaki Ponti Pilato, mokonzi Moloma ya Yudea ete: “Ojali na bokonji likoló na ngai tɛ sɔkɔ epɛsamɛli yɔ uta na likoló tɛ.”—Yoane 19:11.
“Bokonji ejali tɛ bobɛlɛ yango euti na Njambe”
3. Ntoma Paulo alobaki nini na ntina na “bakonzi baleki liboso,” mpe maloba ya Yesu mpe Paulo mazali kobimisa mituna nini?
3 Ntoma Paulo akomelaki baklisto oyo bazalaki na nsé ya boyangeli ya Bokonzi ya Loma ete: “Tika ete moto na moto atosaka [bakonzi baleki liboso, NW]. Jambi bokonji ejali tɛ bobɛlɛ yango euti na Njambe. Yango oyo ijali ibɔngisami na Njambe.” (Baloma 13:1) Mpo na nini Yesu alobaki ete bokonzi ya Pilato epesamelaki ye “uta na likoló”? Mpe na ndimbola nini Paulo atalelaki ete bokonzi ya politiki ya mikolo na ye ebongisamaki na Nzambe? Balingaki koloba ete Yehova ye moko nde azali kopona moyangeli moko na moko ya politiki ya mokili oyo?
4. Yesu mpe Paulo babéngaki Satana na nkombo nini, mpe likambo nini oyo Satana alobaki, mpe Yesu awanganaki yango te?
4 Lolenge nini ekokaki kozala bongo, mpamba te Yesu abéngaki Satana ete “mokolo na mokili oyo,” mpe ntoma Paulo abéngaki ye ete “Njambe na mokili oyo”? (Yoane 12:31; 16:11; 2 Bakɔlinti 4:4) Lisusu, ntango amekaki Yesu, Satana alakaki kopesa ye “bokonji” likoló na “bokonji yɔnsɔ na mokili,” kolobáká ete bokonzi yango epesamelaki ye. Yesu aboyaki lipesi na ye, kasi aboyaki te kondima ete Satana azalaki na bokonzi motindo wana.—Luka 4:5-8.
5. (a) Lolenge nini tosengeli kolimbola maloba ya Yesu mpe ya Paulo na ntina etali bokonzi ya bato? (b) Na ndimbola nini “bakonzi baleki liboso” ‘babongisami na Nzambe’?
5 Yehova apesaki boyangeli ya mokili oyo epai na Satana na kotikeláká ye nzela ya kozala na bomoi na nsima ya botomboki na ye mpe na nsima wana amekaki Adama na Eva mpe apusaki bango na kotombokela boyangeli na Ye. (Genese 3:1-6; kokanisá na Esode 9:15, 16.) Na yango, maloba ya Yesu mpe ya Paulo malimboli mpenza ete nsima wana, kati na Edene, babalani ya liboso baboyaki teokrasi, to boyangeli ya Nzambe, Yehova atikaki nzela na bato oyo bamikabolaki na ye ete básala ebongiseli ya bokonzi oyo esengeli kosalisa bango ete báfanda kati na ezalela ya makambo mazali kotambola na molɔngɔ́. Na nsima ya bambula, mpo na kokokisa mokano na ye, Yehova asalaki ete bakonzi to babulamatari ekwea. (Danyiele 2:19-21) Basusu bapesamelaki ndingisa ya kotikala na bokonzi. Mpo na bakonzi oyo Yehova atikelaki bango nzela ete bázala, tokoki koloba na ntina na bango ete bokonzi na bango ‘ebongisami na Nzambe.’
Baklisto ya liboso mpe bakonzi ya Loma
6. Lolenge nini baklisto ya liboso bazalaki kotalela bakonzi Baloma, mpe mpo na nini?
6 Baklisto ya liboso basanganaki te na mangomba mikemike ya Bayuda oyo bazalaki koluka kokweisa bokonzi ya Baloma mpe bazalaki kobundisa baoyo bayaki kofanda na Yisraele. Na meko oyo bakonzi ya Loma, elongo na ebongiseli na bango ya mibeko, batambwisaki makambo na molɔngɔ́ kati na mokili mpe na mai; batongaki mikɛlɛ minene ya mai, banzela, mpe gbagba; mpe mingi mpenza, basalaki mpo na bolamu ya bato banso, baklisto batalelaki bango lokola ‘basali ya Nzambe mpo na bolamu na bango.’ (Baloma 13:3, 4) Mibeko mpe kozanga mobulu esalaki ete efandelo oyo ékoka kopesa baklisto nzela ya kosakola nsango malamu na bipai binso, lokola Yesu apesaki etinda. (Matai 28:19, 20) Na lisosoli malamu, bakokaki kofuta mpako oyo Baloma bazalaki kosɛnga, ata soki mosolo mosusu mozalaki kosalelama na mikano oyo mindimami na Nzambe te.—Baloma 13:5-7.
7, 8. (a) Botaleli malamu ya Baloma 13:1-7 ezali komonisa nini, mpe nini emonisami na mikapo ya zingazinga? (b) Na mabaku nini oyo bakonzi Baloma bazalaki kosala te lokola “basali na Njambe,” mpe kati na likambo yango, baklisto ya liboso bamonisaki ezaleli nini?
7 Botaleli malamu ya milɔngɔ́ nsambo ya liboso ya mokapo 13 ya mokanda ya Baloma emonisi ete “bakonzi baleki liboso” na politiki bazalaki “basali na Njambe” mpo na kokumisa baoyo bazalaki kosala malamu mpe kopesa etumbu na baoyo bazali kosala mabe. Mikapo ya zingazinga mizali komonisa ete Nzambe nde azali kokata nini ezali malamu to mabe, kasi bakonzi baleki liboso te. Na yango, soki mokonzi ya Loma to mokonzi nini mosusu ya politiki asɛngaki makambo oyo Nzambe aboyi to, soki mpe apekisaki makambo oyo Nzambe azali kosɛnga, boye azalaki kosala lisusu te lokola mosali ya Nzambe. Yesu alobaki ete: “Pɛsa epai na Kaisala yango ezali na Kaisala mpe na Njambe yango ejali na Njambe.” (Matai 22:21) Wana Leta ya Loma ezalaki kosɛnga makambo oyo mazali mpo na Nzambe, na ndakisa losambo to bomoi ya moto, baklisto ya solo bazalaki kolanda toli oyo ya bantoma: “Ekoki ete totosa Njambe liboso na kotosa bato.”—Misala 5:29.
8 Baklisto ya liboso bazwaki minyoko mpo ete baboyaki kopesa losambo epai na mokonzi mpe baboyaki kosambela bikeko, baboyaki kotika makita na bango ya boklisto, mpe baboyaki kokata mosala ya kosakola nsango malamu. Endimami na bato mingi ete ntoma Paulo abomamaki na etinda ya mokonzi Néro. Bakonzi mosusu, mingi mpenza Domitien, Marc Aurèle, Septime Sévère, Decius, mpe Dioclétien, banyokolaki mpe baklisto ya liboso. Na ntango bakonzi yango mpe bakonzi basungi na bango bazalaki konyokola baklisto, bazalaki soko moke te kosala lokola “basali na Njambe.”
9. (a) Likambo nini lizali solo mpo likobongwana te na ntina na bakonzi baleki liboso na politiki, mpe nyama na politiki azali kozwa nguya mpe bokonzi epai na nani? (b) Nini ekoki mpenza kolobama na ntina na botosi ya baklisto epai na bakonzi baleki liboso?
9 Nyonso wana emonisi ete atako “bakonzi baleki liboso” na politiki bazali kosala kati na makambo mosusu lokola “yango ebɔngisami na Njambe” mpo na kotambwisa makambo na bato na molɔngɔ́, bazali bobele eteni ya ebongiseli ya biloko ya mokili oyo Satana azali nzambe na yango. (1 Yoane 5:19) Bazali kati na ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba oyo emonisami na elilingi ya “nyama na yauli” ya Emoniseli 13:1, 2. Nyama wana ezwi nguya mpe bokonzi na yango epai na “dalagona monene,” ye Satana Zábolo. (Emoniseli 12:9) Na yango, emonani mpenza ete botosi ya baklisto epai ya bakonzi motindo oyo ezali na ndelo, ezali kati na makambo nyonso te.—Kokanisá na Danyele 3:16-18.
Ndenge nini komemya bakonzi
10, 11. (a) Lolenge nini Paulo amonisaki ete tosengeli kozala na botosi epai na bato oyo bazali na bokonzi? (b) Lolenge nini mpe mpo na nini mabondeli makoki kosalema “mpɔ na mikonji yɔnsɔ baoyo bajali liboso”?
10 Kasi, yango elimboli te ete baklisto basengeli komonisa ezaleli ya kozanga botosi, ezaleli ya kotɛmɛla bakonzi baleki liboso na politiki. Ya solo, mingi kati na bato yango babongi na limemya te kati na bomoi na bango ya nkuku, ata mpe na bomoi liboso na bato banso. Nzokande, bantoma, na nzela ya ndakisa na bango mpe ya batoli na bango, bamonisaki ete bato oyo bazali na bokonzi basengeli kopesamela limemya. Ntango Paulo asambaki liboso ya Mokonzi Hérode Agrippa II, oyo abalaki mwasi ya ndeko na ye moko, alobaki na ye na limemya ya solo.—Misala 26:2, 3, 25.
11 Paulo alobaki nkutu ete ebongi mpe totangaka bakonzi ya mokili kati na mabondeli na biso, mingimingi soki basengeli kozwa bikateli oyo bitali bomoi na biso mpe misala na biso ya boklisto. Akomaki ete: “Bongo, liboso na makambo manso, nasɛngi ete malɔmbɔ, mabondeli, masɛngi, matɔndi, masalema mpo na motindo na bato banso, mpo na bakonzi mpe baoyo nyonso bazali na etɛlɛmɛlo monene; mpo ete tokoka kokóba kozala na bomoi ya kimya mpe ya mobulu te, elongo na ezaleli ya kobanga Nzambe mpe na bosembo nyonso. Yango ezali malamu mpe endimami epai na Nzambe, Mobikisi na biso, oyo alingi ete motindo na bato banso bábika mpe bakóma na boyebi solo ya sikisiki.” (1 Timoté 2:1-4, NW) Ezaleli na biso ya limemya epai na bakonzi oyo ekoki kopusa bango na kotikela biso nzela ya kokóba mosala na biso na bonsomi mingi koleka, wana ezali biso koluka kobikisa “bato yɔnsɔ.”
12, 13. (a) Petelo apesaki toli nini ya bokatikati na ntina na bakonzi? (b) Lolenge nini tokoki kopɛngola bansango ya lokuta, ya “bato na bilobaloba na bilema,” baoyo bazali kobimisa makanisi mabe mpo na batatoli ya Yehova?
12 Ntoma Petelo akomaki ete: “Botosa miango yɔnsɔ na bato mpɔ na Nkolo, sɔkɔ na mokonji monɛnɛ oyo aleki yɔnsɔ, sɔkɔ na mikonji mikɛ baoyo batindami na ye mpɔ na kopɛsaka bitumbu epai na bato na misala mabe mpe mpɔ na kosanjola bato na misala mibɔngi. Mpɔ ete mokano na Njambe ejali boye ete, awa ekosala bino misala mibɔngi, bojalisa bato na bilobaloba na bilema nyɛ. Bojala na bonsɔmi, nde na bonsɔmi lokola ejipɛli na makambo mabe tɛ, kasi bojala baombo na Njambe. Bokumisa bato yɔnsɔ, bolinga bandeko, bomɛmisa Njambe, bokumisa mokonji monene.” (1 Pɛtɛlɔ 2:13-17) Oyo nde toli ya bokatikati! Tosengeli kozala na botosi mobimba epai na Nzambe, biso tozali baombo na ye; kozala na botosi oyo ezali na ndelo mpe na limemya epai na bakonzi ya politiki oyo batindami mpo na kopesa etumbu epai na basáli na mabe.
13 Emonanaka mingi ete bakonzi ya mokili bazalaka na makanisi mabe mpenza na ntina na Batatoli ya Yehova. Ezalaka bongo mbala mingi mpo ete bansango oyo bazwaka eutaka nde na banguna ya basaleli ya Nzambe, oyo bayebisaka yango na lolenge mabe. To ekoki kosalema ete makambo nyonso oyo bayebi na ntina na biso bayokaki yango na nzela ya myango ya bopanzi nsango, oyo ezalaka ntango nyonso na koponapona kati na bopesi nsango yango. Mbala mosusu tokoki kokweisa makanisi mabe wana na nzela ya ezalela na biso ya limemya mpe na kopesáká, soki likoki lizali, bandimbola mozindo epai na bakonzi na ntina etali misala mpe bindimeli ya Batatoli ya Yehova. Mpo na bakonzi ya Leta oyo bazali na misala mingi, mwa búku Ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso ekoki kopesa mwa bandimbola mokuse. Bandimbola mozindo ekoki kopesama na lisalisi ya búku Les Témoins de Jéhovah — Proclamateurs du Royaume de Dieu, esaleli kitoko oyo ebongi kozala kati na bablioteki ya kartyé to ya mboka.
Bokonzi kati na mabota ya boklisto
14, 15. (a) Nini ezali moboko ya bokonzi kati na libota ya boklisto? (b) Ezaleli nini basi baklisto basengeli kozala na yango liboso ya mibali na bango mpe mpo na nini?
14 Emonani polele ete soki Nzambe asɛngi na baklisto ete bamonisa limemya libongi epai na bakonzi ya mokili, basengeli mpe kotosa ebongiseli ya bokonzi oyo Ye asili kotya kati na mabota ya boklisto. Ntoma Paulo amonisaki na maloba ya polele lilako litali bokonzi oyo lizali kati na libota ya Yehova. Akomaki ete: “Nde nalingi ete bosɔsɔla ete motó na babali yɔnsɔ ajali Klisto mpe ete moto na mwasi ajali mobali mpe ete moto na Klisto ajali Njambe.” (1 Bakolinti 11:3) Yango ezali lilako ya teokrasi, to boyangeli ya Nzambe. Yango esɛngi nini?
15 Botosi mpo na teokrasi ebandaka kati na libota. Mwasi moklisto oyo azangi komonisa limemya libongi mpo na bokonzi ya mobali na ye—azala mondimi to te—mwasi yango azali kolanda teokrasi te. Paulo apesaki toli oyo epai na baklisto ete: “Botosanaka mpɔ na kobanga Klisto. Bino basi botosaka babali na bino pelamɔkɔ epai na Nkolo mpɔ ete mobali ajali moto na mwasi pelamɔkɔ Klisto ajali motó na [lisangá, NW]. Ye wana ajali mobikisi na njoto. Kasi pelamɔkɔ [lisangá, NW] ekotosaka Klisto, bongo tika ete basi batosa babali na bango na makambo yɔnsɔ.” (Baɛfɛsɛ 5:21-24) Lokola mibali baklisto basengeli kotosa bokonzi ya Klisto, bobele bongo basi baklisto basengeli koyeba ete kotosa bokonzi bouti na Nzambe oyo bopesameli mibali na bango, ezali likambo ya mayele. Yango ekomemela bango bosepeli mingi, mpe oyo eleki ntina, bakozwa mapamboli ya Yehova.
16, 17. (a) Lolenge nini bana oyo babɔkɔlami kati na mabota ya baklisto bakoki komikesenisa na ebele ya bilenge mosusu lelo oyo, mpe elendiseli nini bazali na yango? (b) Na ndimbola nini Yesu azalaki ndakisa kitoko mpo na bilenge lelo oyo, mpe balendisami na kosala nini?
16 Bana oyo bazali kolanda teokrasi bazali na esengo ya komonisa botosi ya solo epai na baboti na bango. Esakolamaki na ntina na bilenge ya mikolo ya nsuka ete, ‘bakozanga kotosa baboti.’ (2 Timɔtɛ 3:1, 2) Kasi mpo na bana baklisto, Liloba oyo lipemami na Nzambe, liyebisi ete: “Bino bana, botosaka baboti na bino na makambo yɔnsɔ, mpɔ ekoki bongo kati na Nkolo.” (Bakɔlɔsɛ 3:20) Kotosa baboti esepelisaka Yehova mpe ekomemaka mapamboli na ye.
17 Yango emonanaki epai na Yesu. Lisoló ya Luka liyebisi ete: “Akitaki na bango [baboti na ye] elɔngɔ mpe akomaki na Nasalɛtɛ mpe [alandaki kotosa, NW] bango. . . . Yesu akolaki na mayɛlɛ mpe na molai, mpe na boboto na [ngolu ya Nzambe mpe ya bato, NW].” (Luka 2:51, 52) Na ntango wana, Yesu azalaki na mibu 12, mpe likelelo ya Greke oyo lisalelami awa liyebisi mpenza ete “alandaki kotosa” baboti na ye. Na yango, botosi na ye esukaki te na ntango oyo akómaki elenge mpenza. Soki bino bilenge mibali mpe bilenge basi bolingi kokóla na elimo mpe na ngolu ya Yehova mpe bato oyo babangaka Nzambe, esengeli na bino bómonisa botosi mpo na bokonzi kati na libota mpe libándá na yango.
Bokonzi kati na lisangá
18. Nani azali Motó ya lisangá ya boklisto, mpe apesi mwa bokonzi epai na banani?
18 Kolobáká mpo na lolenge oyo makambo masengeli kotambola na molɔngɔ́ kati na lisangá, Paulo akomaki ete: “Mpɔ ete Njambe ajali na mobulu tɛ kasi na kimya. . . . Nde tika ete makambo yɔnsɔ masalama na motindo mojali na nsɔni te mpe na mobulu tɛ.” (1 Bakolinti 14:33, 40) Mpo ete makambo manso matambola na molɔngɔ́, Klisto, Motó ya lisangá ya boklisto, apesaki bokonzi epai na mibali ya sembo. Tozali kotánga ete: “Apesaki basusu lokola bantoma, basusu lokola basakoli, basusu lokola bapalanganisi ya nsango malamu, basusu lokola babateli na mpate mpe balakisi, mpo na kosembolama ya basantu, mpo na mosala ya kosunga, Kasi, awa ezali biso koloba solo [mpe] na bolingo, tokóla na makambo nyonso kati na Klisto, oyo azali kokamba biso.”—Baefese 4:11, 12, 15, NW.
19. (a) Nani oyo Klisto atyaki ye likoló na bozwi na ye nyonso ya mabelé mpe ye apesi bokonzi ya ntina mingi epai na banani? (b) Lolenge nini bokonzi bopesami kati na lisangá ya boklisto, mpe yango ezali kosɛnga nini epai na biso?
19 Na ntango oyo ya nsuka, Klisto asili kotya kelasi ya “moombo na sembo mpe na mayele” likoló na ‘bozwi na ye nyonso.’ (Matai 24:45-47) Lokola na ekeke ya liboso, moombo yango amonisami na lisangani ya mikóló-bakambi oyo esangisi mibali baklisto oyo Yesu apesaki bango bokonzi ya kozwa bikateli mpe kopona bankulutu mosusu. (Misala 6:2, 3; 15:2) Na nsima, Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesi bokonzi epai na Bakambi ya bafilale, na bakɛngɛli ya etúká mpe bakɛngɛli ya zongazonga, mpe bankulutu na lisangá moko na moko kati na masangá koleka 73 000 ya Batatoli ya Yehova kati na mabelé mobimba. Baklisto mibali wana nyonso oyo bamipesi, babongi na kozwa lisungi mpe limemya na biso.—1 Timoté 5:17.
20. Bandakisa nini emonisi ete Yehova ayini baoyo bazangi botosi epai na baninga na bango baklisto oyo bapesameli bokonzi?
20 Bokokanisi kitoko bokoki kosalema kati na botosi oyo tosengeli komonisa epai na baoyo bazali na bokonzi kati na lisangá ya boklisto mpe botosi oyo tosengeli kopesa epai na bakonzi ya mokili. Na ntango moto moko abuki mobeko oyo motyami na bato, mobeko oyo mondimami na Nzambe, etumbu oyo ‘bakonzi’ bakopesa ezali lolenge oyo Nzambe azali komonisa nkanda na ye “epai na moto oyo akosalaka mabe.” (Baloma 13:3, 4) Soki Yehova akozalaka na nkanda na ntango moto moko abuki mibeko oyo mityami na bato mpe azangi botosi oyo ebongi epai na bakonzi ya mokili, akosilika lisusu mingi koleka soki moklisto moko ya sembo abuki mitinda ya Biblia mpe azangi komonisa botosi epai na baninga baklisto oyo bapesameli bokonzi!
21. Toli nini euti na Makomami oyo ekopesa biso esengo mpo na kolanda yango, mpe nini ekotalelama na lisoló lilandi?
21 Na esika ya komibendela mindondó na komonisáká ezalela ya botomboki to ya koluka lipandá, tokolanda nde toli oyo Paulo apesaki epai na baklisto ya Filipi, ete: “Bongo, balingami na ngai, pelamɔkɔ bosili kotosa ntango yɔnsɔ, boluka sasaipi njela na kobika na bino na nsɔmɔ mpe na kolɛnga, bobɛlɛ wana najali esika mɔkɔ na bino tɛ kasi na koleka wana najali mosika na bino. Mpɔ ete Njambe ajali kosala mosala kati na bino mpɔ na kolingisa bino mpe kosalisa bino na ntina na mokano na ye. Bosala makambo yɔnsɔ na kojanga koimaima mpe kotiana ntembe ete bojala na efundeli tɛ mpe ekweli tɛ, bana na Njambe baoyo bajangi litɔnɔ kati na libota na bato bayɔngɔtani mpe bapɛngwi njela. Kati na bango bojali kongɛnga lokola miinda na mokili.” (Bafilipi 2:12-15) Na bokeseni na libota oyo linyongotani, oyo emiyeiseli mpasi na ntina etali kotosa bokonzi, libota ya Yehova bazali kotosa bokonzi kozanga nkaka. Na yango, bazali kozwa matomba kitoko, lokola tokomona yango na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisoló ezali na nsima.
Bozongeli
◻ Nani azali Mokonzi Aleki-likoló, mpe mpo na nini bokonzi na ye ezali na lotómo?
◻ Na ndimbola nini bakonzi baleki liboso ‘babongisami na Nzambe’?
◻ Na ntango nini bakonzi baleki liboso batikaka kozala ‘basali ya Nzambe”?
◻ Ebongiseli nini ya bokonzi ezali kati na mabota ya boklisto?
◻ Lolenge nini bokonzi bopesami kati na lisangá ya boklisto?
[Bililingi na lokasa 18]
Yesu alobaki ete: “Bopɛsa na Kaisala biloko na Kaisala”