Mpo na nini tosengeli kotosa bakonzi?
NANI oyo asepelaka te lokola bapolisi bazali na bokonzi ya kokanga bato oyo bayibaka biloko na biso to mpe oyo bazali likama mpo na mabota na biso? Tosepelaka te lokola batribinale ezali na bokonzi ya kopesa bato oyo basalaka mabe bitumbu mpo na kobatela mboka mobimba?
Tokoki mpe kotánga misala mosusu oyo ezali mpo na bolamu ya bato nyonso lokola kobongisa banzela, kotonga balopitalo na bakelasi; misala oyo mingimingi esalemaka na mbongo oyo eutaka na mpako oyo bakonzi ya Leta bafutisaka bato. Baklisto ya solo bazali bato ya liboso oyo bandimaka ete tosengeli mpenza kotosa bakonzi. Kasi, botosi yango ezali na ndelo te? Na makambo nini tosengeli kotosa bakonzi?
Bokonzi na kati ya mboka
Biblia elobi na moto nyonso, azala mondimi to te, ete atosa bakonzi ya Leta, mpamba te bakonzi bazali kosala mpo na bolamu ya bato nyonso. Ntoma Paulo alobelaki likambo yango na mokanda oyo atindelaki baninga na ye bandimi na Loma; ezali mpe malamu tótalela makambo oyo alobaki; makambo yango ezali na Baloma 13:1-7.
Paulo azalaki mwanamboka Loma, ekólo oyo ezalaki nguya ya mokili mobimba na ntango wana. Paulo akomaki mokanda yango pene na mobu 56 T.B. Na mokanda yango apesaki baklisto toli ete bázala bato oyo bazali kopesa ndakisa malamu. Akomaki boye: “Tiká ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi. Zambi bokonzi ezali te bobele yango euti na Nzambe. Yango oyo izali ibongisami na Nzambe.”
Na vɛrsɛ yango, Paulo alimboli ete moto moko te akoki kozala mokonzi soki Nzambe apesi ye nzela te. Na ndenge yango, soki bakonzi oyo bazali liboso bazali na bisika na bango, ezali ebongiseli ya Nzambe. Yango wana, “ye oyo azali kotombokela bokonzi, azali kotombokela yango ebongisami na Nzambe.”
Bakonzi bakoki kokumisa banamboka oyo bazali kosala malamu, kasi bazali mpe na lotomo ya kopesa bato oyo bazali kosala mabe etumbu. Bato oyo bazali kosala mabe basengeli mpenza kobanga bakonzi ya Leta mpo bazali na lotomo ya “kokómisa nkanda” mpamba te bazali kosala lokola “mosali ya Nzambe.”
Na nsuka, Paulo alobi boye: “Boye ekoki kotosa bobele mpo na kobanga etumbu te kasi mpo na lisosoli lokola. Yango wana, bokofuta mpako. Mikonzi bazali basali ya Nzambe wana ekolendisa bango likambo oyo.”
Bakonzi ya Leta nde bazali na mokumba ya kokatela bato mpako oyo basengeli kofuta, kasi ezali bato bango moko te. Lokola moklisto azali moto ya sembo, alingaka te ete likambo moko etungisaka lisosoli na ye. Moklisto ayebi ete soki azali kotosa bakonzi mpe azali kofuta mpako na ye, azali kotosa mibeko ya mboka oyo afandi, mpe lisusu azali kotosa Nzambe.
Bokonzi na kati ya libota
Tokoloba boni mpo na bokonzi na kati ya libota? Ntango mwana abotami sika, mbala mingi alelaka to mpe asalaka makɛlɛlɛ soki azali na mposa ya eloko. Kasi, moboti ya mayele ayebaka bamposa ya solosolo ya mwana mpe amitungisaka te mbala nyonso oyo mwana azali kolela. Baboti mosusu babondelaka bana mpe batikaka bango básala ndenge oyo balingi ntango bazali kokola. Bakonzi ya mboka bayebi malamu ete lokola bana bayebi makambo mingi te ya bomoi, bakoki kosala mbeba to makambo mosusu ya mabe, mpe na ndenge yango, kokɔtisa mobulu na libota mpe na mboka mobimba.
Mwasi moko nkombo na ye Rosalind Miles, akomaki mokanda moko (Children We Deserve) mpe alobi boye: “Baboti balekisaka ntango mingi mpo bábanda kopesa bana na bango disipilini. Esengeli kobanda ntango kaka mwana abotami.” Soki banda na ebandeli baboti bazali koloba na ndenge oyo ezali komonisa ete bazali na bokonzi mpe bazali kosalela yango na boboto mpe na bolingo mpe bazali na makambo ya bongolabongola te, bana na bango bakondima bokonzi yango mbala moko mpe bakondima disipilini oyo epesami na bolingo.
Biblia elobi makambo mingi mpo na bokonzi na kati ya libota. Na mokanda ya Masese, Salomo moto ya mayele, amonisi ete baboti oyo batosaka mibeko ya Nzambe basalaka na bomoko mpo na kobɔkɔla bana na bango. Alobi boye: “Mwana na ngai, yoká mateya ya tata na yo mpe tiká mibeko ya mama na yo te.” (Masese 1:8) Soki baboti bazali na bomoko ndenge yango mpe bana bazali komona yango, bakoyeba makambo nini baboti na bango balingaka. Mpo bázwa nzela ya kosala oyo balingi, bana bakoki koluka kosalela mayele mabe mpo baboti na bango báyokana te; kasi soki baboti bazali koloba liloba moko, bokonzi na bango ekobatela bana na bango.
Biblia elobi ete mobali azali na mokumba oyo eleki monene mpo na bolamu ya elimo ya bana mpe ya mwasi na ye. Babengi mokumba yango ete bokonzi. Asengeli kozala mokonzi ya ndenge nini? Paulo amonisi ete Klisto azali Mokonzi ya lisangá, ndenge moko mpe mobali azali mokonzi ya mwasi na ye. Na nsima, Paulo alobi lisusu boye: “Bino babali, bólingaka basi na bino [lokola] Klisto alingaki Lingomba [mwasi na ye ya elimo] mpe amipesaki ye moko mpo na bango.” (Baefese 5:25) Soki mobali azali kolanda ndakisa ya Yesu mpe azali na bolingo, mwasi na ye akozala na “limemya mingi” epai na ye. (Baefese 5:33, NW ) Na libota ya ndenge yango, bana bakomona ete bokonzi oyo Nzambe atii ezali mpenza malamu mpe bakokakatana te mpo na kondima yango.—Baefese 6:1-3.
Baboti oyo bazali kobɔkɔla bana na bango bango moko mpe baoyo bakufelá mobali to mwasi bakoki kosala ndenge nini na likambo yango? Baboti yango, ezala batata to bamama, bakoki kotya bokonzi ya Yehova Nzambe na Yesu Klisto na esika ya liboso. Yesu azalaki ntango nyonso koloba lokola moto oyo azali na bokonzi, elingi koloba bokonzi oyo Tata na ye mpe Makomami Mosantu epesi ye.—Matai 4:1-10; 7:29; Yoane 5:19, 30; 8:28.
Biblia ezali koteya makambo mingi oyo ebongi mpenza mpo na kosalisa bana bálonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango. Soki moboti moko azali koluka batoli yango mpe kosalela yango, akoyeba kopesa bana na ye toli ya malamu oyo ekosunga bango. (Genese 6:22; Masese 13:20; Matai 6:33; 1 Bakolinti 15:33; Bafilipi 4:8, 9) Baboti bakoki mpe kotánga mikanda oyo ezali kolimbola Biblia oyo ebongisami mpenzampenza mpo na kosalisa bango na koteya bana na bango mpo ete bándima mpo na nini kotosa bokonzi ya Makomami ezali malamu.a
Bokonzi na kati ya lisangá ya boklisto
“Oyo Mwana na ngai ya bolingo, nasepeli [na] ye mingi. Bóyoka ye!” (Matai 17:5) Maloba oyo ya Yehova Nzambe emonisi ete Yesu asalelaka bokonzi oyo Nzambe apesi ye. Maloba na ye ekomami na Baevanzile minei mpe ezali mpasi te mpo tótánga yango.
Liboso amata na likoló, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bokonzi nyonso esili kopesama na ngai na likoló mpe na nse.” (Matai 28:18) Lokola azali Mokonzi ya lisangá, banda Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango elimo santu ekitelaki bayekoli na ye, miso ya Yesu ezali likoló ya bayekoli na ye bapakolami oyo bazali kolanda matambe na ye awa na mabele, mpe lisusu, atii bango lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na koteya makambo ya solo. (Matai 24:45-47; Misala 2:1-36) Nini oyo ye asali mpo na kokokisa makambo nyonso wana mpe kolendisa lisangá ya boklisto? “Esili ye kobuta likoló . . . , apesaki makabo [na motindo na mibali, NW ].” (Baefese 4:8) “Makabo na motindo na mibali” yango ezali bankulutu baklisto, elimo santu eponi bango mpe bazali na mokumba ya kobatela bandeko na bango bandimi mpo bázala malamu na elimo.—Misala 20:28.
Yango wana Paulo apesi toli oyo: “Bókanisa baoyo bakokambaka bino, baoyo basololi Liloba ya Nzambe epai na bino. Bóbanzabanza mpo na nsuka na bizaleli na bango mpe bóyekolaka kondima na bango.” Lokola mibali yango ya sembo balandaka mpenza matambe ya Yesu, soki tozali kolanda ndakisa ya kondima na bango ekomonisa ete tozali kosala mpenza na mayele. Na nsima, Paulo alobi lisusu boye: “Bótosa bango bakokambaka bino mpe bómisɔkisa liboso na bango [“bóndimaka ntango nyonso ete bazali na bokonzi likoló na bino,” The Amplified Bible]. Zambi bazali kokɛngɛlaka milimo na bino lokola bato baoyo bakozongisa monɔkɔ na ntina na makambo na bango. Tiká ete básala mosala na esengo, na mawa te mpo ete yango ekosungaka bino te.”—Baebele 13:7, 17.
Likambo nini emonanaka na ntango moto aboyi kotosa malako yango? Na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso, bato mosusu baboyaki kotosa baoyo bazali liboso mpe bakómaki bapɛngwi. Biblia elobi ete Umenai na Filete babebisaki kondima ya basusu mpe maloba na bango ya mpambampamba ‘etyolaki oyo ezali mosantu.’ Bato yango bazalaki mpe koloba ete lisekwa esi esalemá; bango bazalaki kolobela lisekwa ya elimo to ya elilingi, mpe maloba na bango ezalaki komonisa ete lisekwa mosusu ekozala te ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.—2 Timote 2:16-18, NW.
Bato oyo Nzambe apesaki bango bokonzi bazongisaki makambo na nzela. Bankulutu bakweisaki makanisi wana mpamba te, lokola bazalaki koloba na esika ya Yesu Klisto, basalelaki bokonzi ya Makomami. (2 Timote 3:16, 17) Lelo oyo mpe ezali se bongo na lisangá ya boklisto, lisangá oyo Biblia ebengi yango “likonzi mpe etɛlɛmiselo ya makambo ya solo.” (1 Timote 3:15) Ata mokolo moko te bakotika nzela ete mateya ya lokuta ebebisa “lolenge ya maloba ya sembo,” oyo ebatelami mpo na biso lokola eloko ya motuya na kati ya Biblia.—2 Timote 1:13, 14.
Atako bato oyo bazali kotosa bakonzi te bazali se kokóma mingi na mokili, biso baklisto tondimaka ete bokonzi ya malamu na kati ya libota, na kati ya lisangá, mpe na kati ya mboka ezali mpo na bolamu na biso. Mpo tózala malamu, ezala na nzoto, na makanisi to na elimo, tosengeli kotosa bakonzi. Soki tondimi mpe totosi bato oyo Nzambe apesi bango bokonzi, Yehova na Yesu Klisto, bakonzi oyo baleki bakonzi nyonso bakobatela biso mpe tokozwa bolamu ya seko.—Nzembo 119:165; Baebele 12:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi mpe buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, nyonso ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 5]
Biblia elobi makambo mingi mpo na bokonzi na kati ya libota
[Elilingi na lokasa 6]
Baboti oyo bazali kobɔkɔla bana na bango bango moko bakoki kotya bokonzi ya Yehova Nzambe na Yesu Klisto na esika ya liboso
[Bililingi na lokasa 7]
Baklisto bandimaka ete bokonzi ya malamu na kati ya libota, na kati ya lisangá, mpe na kati ya mboka ezali mpo na bolamu na bango
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
Fɔtɔ ya Josh Mathes, Collection of the Supreme Court of the United States