Nzambe mpe Kaisala
“Na bongo futá na Kaisala biloko na Kaisala, mpe na Nzambe biloko na Nzambe.”—LUKA 20:25.
1. (a) Etɛlɛmɛlo nini etombwani Yehova azali na yango? (b) Eloko nini oyo tosengeli kopesa na Yehova kasi tokoki te kopesa yango na Kaisala?
NTANGO Yesu Klisto apesaki lilako oyo, ntembe ezalaki te kati na makanisi na ye ete makambo oyo Nzambe azali kosɛnga na basaleli na Ye masengeli koleka liboso na nyonso oyo Kaisala, to Letá, akokaki kosɛnga epai na bango. Yesu ayebaki malamu koleka bato mosusu nyonso bosolo ya libondeli oyo mokomi na Nzembo asalaki epai na Yehova: “Bokonzi na yo ezali bokonzi na seko, mpe nguya [lotómo na yo ya kozala mokonzi]a na yo ekoumela na mabota na mabota.” (Nzembo 145:13) Ntango Zábolo alakisaki Yesu makonzi nyonso ya mabelé, Yesu ayanolaki ete: “Esili kokomama ete, Okokumbamela [Yehova] Nzambe na yo, mpe okosalela bobele ye.” (Luka 4:5-8) Losambo losengelaki soko moke te kopesama na “Kaisala,” ata soki Kaisala yango ezalaki mokonzi ya Loma, mokonzi mosusu, to Letá yango moko.
2. (a) Etɛlɛmɛlo ya Satana ezali nini liboso ya mokili oyo? (b) Na ndingisa ya nani Satana azwaki bongo etɛlɛmɛlo yango?
2 Yesu abɛtaki ntembe te ete makonzi ya mokili mazali ya Satana. Na nsima, abéngaki Satana “mokóló na mokili oyo.” (Yoane 12:31; 16:11) Pene na nsuka ya ekeke ya liboso T.B., ntoma Yoane akomaki ete: “Toyebi ete tozali bana na Nzambe mpe mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Yango elingi koloba te ete Yehova asili kosundola bokonzi na ye, oyo asengeli kozala na yango likoló na mabelé. Omikundola ete, wana alakisaki Yesu boyangeli likoló na makonzi ya politiki, Satana alobaki ete: “Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso . . . mpo ete esili kopesama na ngai.” (Luka 4:6) Satana azali na bokonzi likoló na makonzi ya mokili oyo bobele na ndingisa ya Nzambe.
3. (a) Etɛlɛmɛlo nini biyangeli ya mabota bizali na yango liboso na Yehova? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete kotosa biyangeli ya mokili oyo elimboli te ete tozali kotosa Satana, nzambe ya mokili oyo?
3 Bobele bongo, Letá ezali kokokisa bokonzi na yango bobele mpo ete Nzambe oyo azali Mokonzi Monene nde apesi ndingisa mpo na yango. (Yoane 19:11) Na yango, tokoki koloba ete ‘makonzi oyo mazali’ “matyami kati na etɛlɛmɛlo na yango na ndingisa ya Nzambe.” Soki tokokanisi bokonzi na bango na bokonzi boleki bonene ya Yehova likoló na biloko binso, bokonzi na bango bozali bobele eloko moke. Atako bongo, bazali “mosáli na Nzambe,” [“basáli ya Nzambe mpo na bolamu ya bato banso,” NW] na boye ete basungaka na nzela ya misala ya ntina, batosisaka mibeko mpe babatelaka molɔngɔ́, bapesaka basáli na mabe etumbu. (Baloma 13:1, 4, 6) Na yango baklisto basengeli kososola ete atako Satana azali mokonzi azangi komonana ya mokili oyo, to ya ebongiseli oyo, bazali te kotosa ye wana bandimi kopesa Letá botosi oyo ezali na ndelo. Bazali nde kotosa Nzambe. Kino na mobu oyo, 1996, boyangeli ya Letá na nzela ya politiki bozali naino ‘ebongiseli euti na Nzambe,’ ebongiseli ya ntango mokuse oyo Nzambe atikeli yango nzela, mpe basaleli ya Yehova awa na mabelé basengeli kondima yango.—Baloma 13:2, NW.
Basaleli ya Yehova na ntango ya kala mpe Letá
4. Mpo na nini Yehova apesaki Yosefe nzela ete akóma moto monene kati na boyangeli ya Ezipito?
4 Liboso ya ntango ya Klisto, Yehova atikaki nzela na basaleli na ye mosusu ete bázala na etɛlɛmɛlo monene kati na biyangeli ya Letá. Na ndakisa, na ekeke ya 18 L.T.B., Yosefe akómaki ministre wa yambo ya Ezipito, moto monene nsima ya mokonzi Falo. (Genese 41:39-43) Makambo oyo mabimaki nsima mamonisaki polele ete Yehova abongisaki likambo yango bongo mpo ete Yosefe akoka kozala esaleli mpo na kobatela ‘mombóto ya Abalayama,’ bakitani na ye, mpo na kokokisama ya mikano na Ye. Tosengeli mpe kobosana te ete Yosefe atekamaki lokola moombo na Ezipito, mpe azalaki na bomoi na eleko oyo basaleli ya Nzambe bazalaki na nsé ya Mibeko ya Mose te to mpe na nsé na “mobeko na Klisto” te.—Genese 15:5-7; 50:19-21; Bagalatia 6:2.
5. Mpo na nini Bayuda oyo bazalaki na boombo bapesamelaki etindá ya “koluka kimya” na Babilone?
5 Bikeke mingi na nsima, na kopemama na Yehova, mosakoli Yilimia ayebisaki Bayuda oyo bazalaki na boombo ete bátosa bakonzi kuna na boombo na Babilone mpe basengelaki kútu kobondela mpo na kimya ya engumba yango. Kati na nkomá oyo atindelaki bango, akomaki ete: “[Yehova] na bibele, Nzambe na Yisalaele, alobi boye na bakangami nyonso . . . Bóluka kimya mpo na mboka wana nakambi bino lokola bakangami; bóbondela epai na [Yehova] mpo na yango; zambi na kimya na yango bino bokozwa kimya.” (Yilimia 29:4, 7) Na bileko nyonso, libota ya Yehova ezali na bantina ya “koluka kimya” mpo na bango moko mpe kimya ya ekólo epai kuna bazali kofanda, mpo ete bákoka kozala na bonsomi ya kosambela Yehova.—1 Petelo 3:11.
6. Atako bapesamelaki etɛlɛmɛlo monene kati na boyangeli, na makambo nini Danyele mpe baninga na ye misato baboyaki kobebisa bosembo na bango mpo na oyo etali Mibeko ya Yehova?
6 Na boumeli ya boombo na bango na Babilone, Danyele mpe baninga na ye Bayuda misato ya sembo oyo bazalaki baombo na Babilone batosaki ekateli ya kobongisama na bango mpo na kokóma basáli na bisika minene kati na Letá ya Babilone. (Danyele 1:3-7; 2:48, 49) Nzokande, ata na boumeli ya ntango oyo bazalaki naino kobongisama, bazwaki ekateli makasi na ntina na bilei oyo bikokaki komema bango na kobuka Mibeko oyo Yehova, Nzambe na bango, apesaki na nzela ya Mose. Mpo na yango bazwaki mapamboli. (Danyele 1:8-17) Ntango Mokonzi Nebukadenesala atɛlɛmisaki ekeko ya Letá, Baebele misato oyo bazalaki baninga ya Danyele basengelaki kozala wana na molulu yango elongo na baninga na bango mosusu oyo bazalaki bakambi misala ya Letá. Nzokande, baboyaki “kokwea mpe kosambela” ekeko ya Letá. Lisusu, Yehova apambolaki bosembo na bango. (Danyele 3:1-6, 13-28) Bobele bongo lelo, Batatoli ya Yehova bamemyaka bendɛlɛ ya ekólo epai bafandi, kasi bapesaka yango losambo soko moke te.—Exode 20:4, 5; 1 Yoane 5:21.
7. (a) Ekateli malamu nini Danyele akamataki, atako azalaki na esika monene kati na boyangeli ya Babilone? (b) Mbongwana nini esalemaki na ntango ya baklisto?
7 Nsima ya kokwea ya bokonzi ya sika ya Babilone, Danyele atyamaki na etɛlɛmɛlo moko monene kati na boyangeli na nsé ya bokonzi ya Madai mpe Bapalasa oyo ekitanaki Babilone. (Danyele 5:30, 31; 6:1-3) Kasi atikaki te ete etɛlɛmɛlo monene oyo azalaki na yango emema ye na kobebisa bosembo na ye. Ntango mobeko moko ya Letá mosɛngaki ete asambela Mokonzi Dalio na esika ya kosambela Yehova, aboyaki. Mpo na ntina yango abwakamaki na libulu ya bankosi, kasi Yehova abikisaki ye. (Danyele 6:4-24) Ezali solo ete, wana ezalaki eleko liboso ya ntango ya Klisto. Ntango lisangá ya boklisto etyamaki, basaleli ya Nzambe bakómaki na nsé “na mibeko na Klisto.” Makambo mingi oyo mapesamaki nzela na nsé ya ebongiseli ya Bayuda masengelaki kotalelama na lolenge lokeseni, engebene lolenge oyo Yehova azalaki sikawa kosala elongo na libota na ye.—1 Bakolinti 9:21; Matai 5:31, 32; 19:3-9.
Ezaleli ya Yesu liboso na Letá
8. Likambo nini limonisi ete Yesu azalaki na ekateli makasi ya koboya komikɔtisa kati na politiki?
8 Ntango Yesu ayaki awa na mabelé, apesaki na bayekoli na ye mitindá mitombwani, mpe aboyaki lolenge nyonso ya komikɔtisa kati na makambo ya politiki mpe ya basodá. Nsima wana Yesu aleisaki bankóto ya bato na likamwisi, na mwa ndambo ya mapa mpe mbisi mibale, mibali ya Yuda balingaki kokanga ye mpe kotya ye mokonzi ya politiki. Kasi Yesu akimaki bango wana akendaki nokinoki na ngomba bobele ye moko. (Yoane 6:5-15) Na ntina na likambo yango, búku moko (The New International Commentary on the New Testament) elobi ete: “Na eleko wana Bayuda bazalaki na mposa makasi ya kokokisa mikano mitali ekólo na bango, mpe na ntembe te ebele ya baoyo bamonaki likamwisi wana bakanisaki ete yango ezalaki elembo ya mokonzi oyo andimami na Nzambe, oyo asengelaki mpenza kokamba bango mpo na kobundisa Baloma. Na yango bakanaki bango moko kozalisa ye mokonzi.” Búku yango elobi lisusu ete Yesu “aboyaki mpenza makasi” lipesi wana ya kozala mokonzi ya politiki. Klisto asungaki na lolenge moko te botomboki ya Bayuda epai na bokonzi ya Baloma. Ya solo, asakolaki mbuma mabe ya botomboki oyo elingaki kobima nsima ya kufa na ye—bampasi ya nsɔ́mɔ likoló na bafandi ya Yelusaleme mpe kobomama ya engumba yango.—Luka 21:20-24.
9. (a) Lolenge nini Yesu amonisaki boyokani oyo ezalaki kati na Bokonzi na ye mpe mokili? (b) Litambwisi nini Yesu apesaki na Bayekoli na ye mpo na oyo etali boyokani na bango elongo na biyangeli ya mokili?
9 Mwa moke liboso na kufa na ye, Yesu ayebisaki na momonisi monene ya mokonzi ya Loma na etúká ya Yuda ete: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te. Soko bokonzi na ngai ezalaki na mokili oyo, mbɛ babili na ngai bakobunda ete nakabama epai na Bayuda te. Nde bokonzi na ngai euti na awa te.” (Yoane 18:36) Liboso ete Bokonzi na ye esukisa boyangeli ya politiki, bayekoli ya Klisto bazali kolanda ndakisa na ye. Bamonisaka botosi epai na bakonzi oyo batyami, kasi bamikɔtisaka te kati na makambo na bango ya politiki. (Danyele 2:44; Matai 4:8-10) Yesu apesaki litambwisi mpo na bayekoli na ye, wana alobaki ete: “Pesá epai na Kaisala yango ezali na Kaisala mpe na Nzambe yango ezali na Nzambe.” (Matai 22:21) Liboso na yango, kati na Lisoló likoló na Ngomba, Yesu alobaki ete: “Mpe ye nani akangi yo ete okenda na ye kilomɛtɛlɛ moko, kendá na ye mibale.” (Matai 5:41) Engebene likanisi ya lisoló oyo, Yesu azalaki komonisa na lisese lilako ya kotosa na motema malamu masɛngami ya bakonzi, ezala na bosalisani kati na bato to kati na masɛngami ya biyangeli, masɛngami oyo mayokani na mibeko ya Nzambe.—Luka 6:27-31; Yoane 17:14, 15.
Baklisto mpe Kaisala
10. Engebene mokomi moko ya makambo ya kala, etɛlɛmɛlo nini ya sembo baklisto ya liboso bazalaki na yango liboso na Kaisala?
10 Mitindá wana ya mokuse misengelaki kokamba boyokani katikati na baklisto mpe Letá. Kati na búku na ye The Rise of Christianity (Bokóli ya Boklisto), E. W. Barnes, mokomi na makambo ya kala akomaki ete: “Na boumeli ya bikeke mingi oyo bilandaki, ntango nyonso oyo moklisto moko azalaki kokakatana mpo na oyo etali mokumba na ye epai na Letá, azalaki komibalola epai na mateya ya Klisto oyo ezalaki na nguya. Azalaki kofuta mpako: biloko oyo bisɛngamaki bizalaki bozito—yango elekaki ndelo mwa moke liboso na kokwea ya Bokonzi ya Wɛ́sti—kasi moklisto azalaki koyikela yango mpiko. Bobele bongo azalaki kondima mikumba nyonso misɛngamaki na Letá, soki yango ezalaki te kosɛnga ete apesa na Kaisala biloko na Nzambe.”
11. Toli nini Paulo apesaki na baklisto kati na boyokani na bango elongo na bakonzi ya mokili?
11 Ezalaki na boyokani na likambo yango nde, bambula soko koleka 20 nsima ya kufa ya Klisto, ntoma Paulo ayebisaki baklisto na Loma ete: “Tiká ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi.” (Baloma 13:1) Pene na mibu zomi na nsima, mwa moke liboso na kokangama na ye mpo na mbala ya mibale mpe kobomama na ye na Loma, Paulo akomelaki Tito ete: “Kaniselá bango [baklisto ya Kelete] ete bámisɔkisa liboso na mikóló mpe mikonzi; bázala na botosi mpe báselingwa mpo na misala nyonso malamu, ete bátuka te, báboya kowelana, bázala na boboto, bámonisa bopɔlɔ epai na bato nyonso.”—Tito 3:1, 2.
Bososoli ekóli likoló na “bakonzi bazali liboso”
12. (a) Charles Taze Russell akanisaki ete etɛlɛmɛlo ya moklisto liboso na bakonzi oyo bazali koyangela ezalaki nini? (b) Na ntina na mosala ya sodá, makanisi nini makeseni baklisto bapakolami bazalaki na yango na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
12 Uta ebandeli na mobu 1886, Charles Taze Russell akomaki kati na búku The Plan of the Ages ete: “Ezala Yesu to bantoma na ye bazalaki kowelana soko moke te na bakonzi ya mabelé. . . . Bateyaki Lingomba ete etosa mibeko, mpe ezala na limemya epai na baoyo bazalaki na bokonzi na ntina na etɛlɛmɛlo na bango, . . . báfuta mpako na bango, longolá bobele soki mibeko yango miyokani te na mibeko ya Nzambe (Misala 4:19; 5:29) bátɛmɛla te mibeko oyo mityami. (Loma 13:1-7; Mat. 22:21) Yesu mpe bantoma mpe lingomba ya ebandeli bazalaki bango nyonso batosi ya mibeko, atako bazalaki bato na mokili te, mpe bazalaki te kosangana na biyangeli ya mokili oyo.” Búku wana emonisaki na lolenge lobongi “bakonzi bazali likoló,” to “bakonzi bazali liboso,” oyo Paulo alobeli, ete ezali biyangeli ya bato. (Baloma 13:1, King James Version) Na 1904 búku La Nouvelle création elobaki ete baklisto ya solo “basengeli kozala kati na bato oyo bazali mpenza batosi ya molende ya mibeko na ntango na biso—bazali batombokisi te, bato ya koswanisa baninga te, to batyoli te.” Basusu basosolaki likambo yango lokola kopesa botosi mobimba epai na bakonzi, ata mpe kondima kosala mosala ya sodá na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Nzokande, basusu batalelaki yango ete ezalaki kotɛmɛla liloba oyo Yesu alobaki ete: “Baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Ezali polele ete bazalaki na mposa ya bososoli malamu ya ndelo ya botosi ya baklisto epai na bakonzi bazali liboso.
13. Mbongwana nini esalemaki na mobu 1929 mpo na oyo etali koyeba soki bakonzi bazali likoló bazali banani, mpe lolenge nini yango epesaki litomba?
13 Na mobu 1929, na eleko oyo mibeko ya biyangeli mingi mibandaki kopekisa makambo oyo Nzambe asɛngaka to kosɛnga makambo oyo mibeko ya Nzambe mipekisaki, ekanisamaki ete bakonzi bazali likoló esengelaki bongo kozala Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto.b Ezalaki bososoli oyo basaleli ya Yehova bazalaki na yango na eleko ya ntina mingi oyo ezalaki liboso mpe na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe, na nsima, na eleko ya kokanelama kati na mabota, wana bazalaki kobangana mpe koyikanisa bibundeli na bango. Ntango tozali kokanisa makambo maleká, tokoki koloba ete lolenge wana ya kotalela makambo, oyo etombolaki bonene ya Yehova mpe ya Klisto, esungaki libota ya Nzambe ete ebatela na bosembo nyonso etɛlɛmɛlo na yango ya kozanga komikɔtisa na mokili na boumeli ya eleko wana ya mpasi.
Botosi oyo ezali na ndelo
14. Lolenge nini na mobu 1962 kongɛngisama ebakisamaki likoló na Baloma 13:1, 2 mpe mikapo oyo mizalaki na boyokani na yango?
14 Na mobu 1961 Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau (na Lingelesi) esilaki kobima na mobimba na yango. Kobongisama na yango esɛngaki boyekoli ya mozindo ya elobeli oyo esalelami kati na Makomami. Libongoli ya sikisiki ya maloba oyo masalelami bobele kati na Baloma mokapo 13 te, kasi lisusu na biteni mosusu lokola Tito 3:1, 2 mpe 1 Petelo 2:13, 17 emonisaki polele ete “bakonzi bazali liboso” bazalaki komonisa te bakonzi baleki likoló, Yehova mpe Mwana na ye, Yesu, kasi nde bokonzi ya biyangeli ya bato. Na nsuka ya mobu 1962, masoló oyo mabimaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli malimbolaki malamu Baloma mokapo 13 mpe mapesaki lisusu likanisi ya polele koleka oyo ezalaki na eleko ya C. T. Russell. Masoló wana mazalaki komonisa ete botosi ya baklisto epai na bakonzi ekoki kozala ya mobimba te. Esengeli kozala na ndelo, soki yango ekopusa basaleli ya Nzambe te na kobuka mibeko ya Nzambe. Masoló mosusu kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli malobelaki makasi likambo wana ya ntina mingi.c
15, 16. (a) Bokatikati nini ya malamu mpenza bososoli ya sika ya Baloma mokapo 13 ebimisaki? (b) Mituna nini misengeli kozwa biyano?
15 Fungola wana oyo epesaki nzela na bososoli malamu ya Baloma mokapo 13 esungaki basaleli ya Yehova ete bázala na bokatikati kati na limemya oyo basengeli kopesa bakonzi ya politiki wana bakangami makasi na mitindá ya ntina mingi oyo mizwami kati na Makomami. (Nzembo 97:11; Yilimia 3:15) Yango epesaki bango nzela ya kososola malamu boyokani na bango elongo na Nzambe mpe etamboli na bango liboso na Leta. Esalaki ete, atako basengeli kopesa na Kaisala yango ezali na Kaisala, basengeli te kozala na bopɔtu mpo na oyo etali kopesa Nzambe yango ezali na Nzambe.
16 Kasi biloko ya Kaisala bizali nini? Masɛngami nini oyo mabongi Letá akoki kosɛnga epai na moklisto? Mituna oyo mikotalelama kati na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Nzembo 103:22, NW, maloba na nsé ya lokasa.
b Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 1 mpe 15 Yúni 1929 (na Lingelesi).
c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 1 mpe 15 Novɛ́mbɛ, 1 Desɛ́mbɛ 1962 (na Lingelesi); 1 Novɛ́mbɛ 1990; 1 Febwáli 1993; 1 Yulí 1994.
Likambo ya kobenda likebi, kati na komantɛrɛ na ye likoló na Baloma mokapo 13, Professeur F. F. Bruce akomi ete: “Ezali polele engebene mokapo yango, lokola mpe engebene likanisi mobimba ya makomi ya bantoma, ete Letá ekoki kosɛnga botosi oyo ebongi bobele katikati na bandelo ya mikano oyo mpo na yango etyamaki na Nzambe—mingi mpenza, tokoki te bobele kotɛmɛla kasi tosengeli mpe koboya soki Letá asɛngi bokangami oyo bosengeli kopesama bobele na Nzambe.”
Okoki kolimbola?
◻ Mpo na nini kotosa bakonzi bazali liboso elimboli te kotosa Satana?
◻ Ezaleli ya Yesu ezalaki nini liboso na makambo ya politiki na eleko na ye?
◻ Toli nini Yesu apesaki na bayekoli na ye mpo na oyo etali boyokani na bango elongo na Kaisala?
◻ Toli nini Paulo apesaki na baklisto kati na boyokani na bango elongo na bakonzi ya mabota?
◻ Lolenge nini boyebi na ntina na bakonzi bazali liboso ekólaki na boumeli ya bambula?
[Elilingi na lokasa 10]
Ntango Satana alakisaki ye biyangeli ya politiki, Yesu aboyaki yango
[Elilingi na lokasa 13]
Russell akomaki ete baklisto “basengeli kozala kati na bato oyo bazali mpenza batosi ya molende ya mibeko na ntango na biso”