“Tólanda makambo oyo epesaka kimya”
NZELA oyo bauti kobongisa na goudron emonanaka makasi, lokola nde ekoki kobeba te. Kasi nsima ya mikolo, nzela yango ekoki kokóma mabulumabulu. Mpo nzela yango ezala kaka malamu, esengeli bábongisaka yango.
Ndenge moko, boyokani na biso na bandeko ekoki mbala mosusu kobeba. Ntoma Paulo alobaki ete boyokani ezalaki te na kati ya baklisto ya Loma. Apesaki baninga na ye baklisto toli oyo: “Tólanda makambo oyo epesaka kimya mpe makambo oyo etongaka biso nyonso.” (Lom. 14:13, 19) Mpo na nini ezali na ntina ‘kolanda makambo oyo epesaka kimya’? Ndenge nini tokoki kolanda kimya na mpiko nyonso mpe na ndenge ebongi?
Mpo na nini tosengeli kolanda kimya?
Soki bazipi te mwa mabulu oyo ebandi kobima na nzela, mwa mabulu yango ekoki kokóma minene. Ndenge moko, soki tosilisi te matata oyo ebimi na kati na biso, makama ekoki kozala mingi. Ntoma Yoane akomaki ete: “Soki moto azali koloba ete: ‘Nalingaka Nzambe,’ nzokande azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Mpo moto oyo azali kolinga ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki te kolinga Nzambe, oyo ye amoni te.” (1 Yoa. 4:20) Soki bandeko mibale basilisi te matata na bango, yango ekoki kotinda moko akóma koyina ndeko na ye.
Yesu Klisto amonisaki ete Yehova akoki kondima losambo na biso te soki tozongisi kimya te na ndeko na biso. Yesu apesaki bayekoli na ye toli oyo: “Soki ozali komema likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na yo likambo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo ná ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.” (Mat. 5:23, 24) Ya solo, ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kolanda kimya ezali mpo tolingi kosepelisa Yehova Nzambe.a
Likambo moko oyo esalemaki na lisangá ya Filipi emonisi ntina mosusu oyo tosengeli kolanda kimya. Bandeko mibale ya basi, Evodi ná Sɛntisi, bakutanaki na matata mpo na likambo moko oyo Biblia eyebisi te, mpe yango elingaki kobebisa kimya ya lisangá mobimba. (Filp. 4:2, 3) Soki bandeko mibale oyo bazwani matata basilisi yango te, ekoki kokóma likambo ya bato nyonso. Soki tolingi bolingo mpe bomoko ezala na lisangá, tokolanda kimya na bandeko na biso baklisto.
Yesu alobaki ete: “Esengo na bato batyaka kimya.” (Mat. 5:9) Kolanda kimya epesaka esengo mingi. Lisusu, kimya esalisaka moto azala nzoto kolɔngɔnɔ, mpo “motema ya kimya ekoyeisela mosuni bomoi.” (Mas. 14:30) Nzokande, kobombaka nkanda na motema ekoki kobɛlisa biso.
Atako baklisto mingi bandimaka ete kolanda kimya ezali na ntina, okoki komituna ndenge nini okoki kosilisa matata. Tótalela naino batoli ya Makomami oyo ekoki kosalisa biso.
Kosolola na motema mpiɔ ekoki kozongisa kimya
Mpo na kobongisa nzela oyo ebandi kobeba, esɛngaka mbala mingi kozipa mabulu oyo ebimi. Tozali na likoki ya kolimbisa mpe kobosana mabunga mikemike ya bandeko na biso? Na ntembe te, yango ekoki kosalisa mpo na kosilisa matata ná bandeko, mpo ntoma Petelo akomaki ete “bolingo ezipaka ebele ya masumu.”—1 Pet. 4:8.
Kasi, ntango mosusu tokoki kokanisa ete likambo eleki monene mpe tokokoka te kotika yango eleka kaka bongo te. Tózwa ndakisa ya likambo oyo ekómelaki Bayisalaele nsima ya kokɔta na Mokili ya ndaka. Liboso “Balubene mpe Bagada mpe ndambo ya libota ya Manase” bákatisa Ebale Yaladene, batongaki “etumbelo monene mpe ekokaki kotalama mosika.” Mabota mosusu ya Yisalaele bakanisaki ete etumbelo wana esalemaki mpo na losambo ya bikeko mpe bamonaki ete bakoki kotika likambo yango bongo te. Bamibongisaki mpo na kokende kobunda na bango.—Yos. 22:9-12.
Ekoki kozala ete Bayisalaele mosusu bakanisaki ete etumbelo yango etongamaki kaka mpo na losambo ya bikeko, mpe ete soki bakɔteli bango na mbalakaka, bato ya ngámbo na bango bakokufa mingi te. Na esika ya kowelela kaka kokende kobunda na bango, mabota oyo ezalaki na wɛsti ya Yaladene etindaki naino bato bákende kosolola na bandeko na bango. Batunaki bango boye: “Oyo ezali nini bino bosaleli Nzambe na Yisalaele, na kotika lelo [kolanda Yehova]?” Nzokande, mabota wana oyo etongaki etumbelo epesaki Nzambe mokɔngɔ te. Kasi, basalaki nini liboso ya efundeli wana? Babandaki nde koswanisa bandeko na bango oyo bafundaki bango to baboyaki kosolola na bango? Mabota wana ya Yisalaele bayanolaki na motema mpiɔ, bamonisaki polele ete batongaki etumbelo wana mpo na losambo ya Yehova. Eyano na bango esalisaki bango bábungisa te boyokani na bango na Nzambe mpe makila etanga te. Kosolola na motema mpiɔ esalisaki bango báyokana mpe kimya ezongaki.—Yos. 22:13-34.
Na esika bákende mbala moko kobunda, Bayisalaele basololaki naino na bandeko na bango ya Mabota ya Lubene, ya Gada mpe ndambo ya libota ya Manase. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Yoká nkanda noki na molimo na yo te, zambi nkanda ekoumela na motema ya bazoba.” (Mos. 7:9) Biblia elobi ete soki tozwani matata, tosengeli kaka kokitisa mitema mpe kosolola polelepolele mpo na kosilisa yango. Tokoki mpenza kozala na elikya ete Yehova akopambola biso soki tobombi nkanda na motema mpe toboyi ata kosolola na moto oyo tokanisi ete asali biso mabe?
Lisusu, tokosala nini soki ndeko moko alobi na biso ete tosali ye likambo moko, oyo ntango mosusu ezali lokuta? Biblia elobi ete: “Kozongisa liloba na bolembu ekopɛngola nkanda.” (Mas. 15:1) Mabota ya Yisalaele oyo bakoselaki makambo bamonisaki na motema mpiɔ mpe na lolenge ya polele ete batongaki yango na makanisi ya mabe te, mpe na ndenge yango bakitisaki nkanda ya bandeko na bango. Soki tokei kokutana na ndeko na biso to ye nde ayei kokutana na biso mpo na likambo moko, tosengeli komituna boye, ‘Maloba nini nasengeli kosalela, mongongo nini nakoki kosalela mpe elongi na ngai esengeli kozala ndenge nini mpo kimya ezala?’
Saleláká lolemo na yo na bwanya
Yehova ayebi ete biso bato tolingaka koyebisa makambo oyo ezali kotungisa biso. Soki tozwani matata na ndeko moko mpe tosilisi yango te, tokoki koluka koyebisa bato mosusu likambo yango. Kobomba nkanda na motema ekoki kotinda moto abanda kopanza moninga nsango. Mpo na oyo etali kosalela lolemo na ndenge ya mabe, Masese 11:11 elobi ete: “Mpo na monɔkɔ ya bato mabe engumba ekwei, NW.” Ndenge moko, soki moklisto azali koloba mabe mpo na ndeko na ye, akoki kobebisa kimya ya lisangá mobimba.
Kasi, kolanda kimya elingi koloba te ete tótángaka lisusu te bankombo ya bandeko na masolo na biso. Ntoma Paulo apesaki baninga na ye baklisto toli oyo: “Bótika songi-songi; kasi soki likambo ezali, bóloba nde oyo ekoki kosalisa bato, boye ekomema bolamu na baoyo bakoyoka yango. . . . Bólinganaka, bósalisanaka pe bólimbisanaka.” (Baefese 4:29-32, Bible na lingala ya lelo oyo) Soki ndeko moko oyo asepelaki te na maloba na yo to na likambo moko oyo osalaki ye ayei kosolola na yo mpo na likambo yango, omoni te ete ekozala mpasi te olimbisa ye mpe bózongisa kimya soki ndeko yango atɔngá yo naino te epai ya bato mosusu? Na ntembe te, soki tomesaná kolobaka malamu mpo na bandeko na biso baklisto, soki matata ebimi ekozala mpasi te tózongisa kimya.—Luka 6:31.
Tósalela Nzambe na “bomoko”
Lokola tozali bato ya masumu, tozalaka na momeseno ya kokima bato oyo bazokisi biso. Kasi kosala bongo ezali kozanga bwanya. (Mas. 18:1) Lokola tozali libota ya Nzambe oyo ezali kobelela nkombo ya Yehova na bomoko, tozali na ekateli ya ‘kosalela ye na bomoko.’—Sef. 3:9, NW.
Maloba to bizaleli mabe ya bandeko mosusu esengeli te kokitisa milende na biso mpo na losambo ya pɛto. Mwa moke liboso Yesu apesa mbeka oyo esengelaki kozwa esika ya bambeka oyo bazalaki kopesa na tempelo mpe mwa moke nsima ya kotɔndɔla Bakomeli, amonaki mwasi moko mobola oyo akufelá mobali azali kotya “nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela” na kɛsi ya makabo na tempelo. Yesu apekisaki ye? Te, Yesu akumisaki mwasi yango mpo na likabo oyo apesaki mpo na kosunga lisangá ya Yehova na ntango wana. (Luka 21:1-4) Atako bato mosusu bazalaki na etamboli mabe, mwasi yango aboyaki te kokokisa mokumba na ye ya kopesa mabɔkɔ na misala ya Nzambe.
Tokosala nini soki tokanisi ete ndeko moko asali biso likambo moko oyo ebongi te, ata mpe ya mabe? Tokotika nde kosalela Yehova na molimo na biso mobimba mpo na likambo yango? To na mpiko nyonso tokoluka kosilisa matata nyonso oyo ebimi mpo na kobatela kimya ya lisangá ya Nzambe?
Makomami epesi biso toli oyo: “Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.” (Lom. 12:18) Soki tozali na ekateli ya kosala bongo, tokotikala na nzela ya bomoi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na toli wana ya Yesu oyo ezali na Matai 18:15-17, talá Linɔngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1999, nkasa 17-22.
[Elilingi na lokasa 17]
Evodi ná Sɛntisi basengelaki kolanda kimya
[Elilingi na lokasa 18]
Maloba ya ndenge nini, mongongo nini mpe elongi ya ndenge nini ekoki kosalisa biso tózongisa kimya?