Tópesa Nzambe nkembo “na monɔkɔ kaka moko”
“Na monɔkɔ kaka moko bópesa nkembo na Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto.”—BALOMA 15:6.
1. Paulo apesaki baninga na ye bandimi toli básalaka nini ntango bazali na likanisi moko te?
MOKLISTO mokomoko azali na makambo oyo asepelaka na yango. Kasi, baklisto nyonso basengeli kozala na bomoko na ndenge bazali kotambola na nzela ya bomoi. Yango ekoki mpenza kosalema? Ekoki kosalema soki tozali te kongalisa mwa bokeseni oyo tokoki kozala na yango. Yango nde toli ntoma Paulo apesaki baninga na ye bandimi na ekeke ya liboso. Ndenge nini alobelaki likambo yango ya ntina mingi? Lelo oyo, ndenge nini tokoki kosalela toli oyo apesaki na lisalisi ya elimo santu?
Ntina ya bomoko na lisangá ya boklisto
2. Ndenge nini Paulo amonisaki ntina ya bomoko?
2 Paulo ayebaki ete ezali na ntina mingi baklisto bázala na bomoko, mpe apesaki batoli ya malamu mpo na kosalisa moklisto mokomoko ayeba kokanga motema na makambo ya bamosusu na bolingo. (Baefese 4:1-3; Bakolose 3:12-14) Atako bongo, nsima ya kofungola masangá mingi mpe kotala masangá mosusu na boumeli ya mbula koleka 20, amonaki ete kobatela bomoko ekoki kozala mpasi. (1 Bakolinti 1:11-13; Bagalatia 2:11-14) Yango wana, alendisaki baninga na ye bandimi oyo bazalaki na Loma na maloba oyo: “Tiká ete Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe kobɔndisama asala . . . ete na bomoko mpenza mpe na monɔkɔ kaka moko bópesa nkembo na Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto.” (Baloma 15:5, 6) Biso mpe lelo oyo tosengeli kokumisa Yehova Nzambe “na monɔkɔ kaka moko” na lisangá ya basaleli na ye oyo bazali na bomoko. Ndenge nini tosengeli kosala yango?
3, 4. (a) Baklisto ya Loma bautaki wapi? (b) Ndenge nini baklisto ya Loma bakokaki kosalela Yehova na “monɔkɔ kaka moko”?
3 Ebele ya baklisto na Loma bazalaki baninga ya Paulo. (Baloma 16:3-16) Atako bautaki na bikólo ndenge na ndenge, Paulo azalaki kotalela bandeko na ye nyonso ete bazali “balingami ya Nzambe.” Akomaki boye: “Nazali kopesa Nzambe na ngai matɔndi na nzela ya Yesu Klisto mpo na bino nyonso, mpamba te kondima na bino ezali kolobelama bipai nyonso na mokili mobimba.” Na maloba mosusu, Baloma bazalaki kopesa ndakisa malamu na makambo mingi. (Baloma 1:7, 8; 15:14) Kasi, bandeko mosusu na kati ya lisangá bazalaki na makanisi mosusu na mwa makambo mosusu. Lokola baklisto lelo oyo bauti na bikólo mpe na bonkɔkɔ ndenge na ndenge, koyekola toli oyo Paulo apesaki na lisalisi ya elimo santu, oyo emonisi nini basengeli kosala ntango bazali na makanisi ndenge moko te, ekosalisa bango bálobaka “na monɔkɔ kaka moko.”
4 Na Loma, ezalaki na bandimi oyo bautaki Yudea mpe bato ya bikólo mosusu. (Baloma 4:1; 11:13) Emonani ete Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto, bazalaki kokoka kotika te mimeseno mosusu ya Mibeko ya Moize, atako bayebaki ete ezalaki lisusu na ntina te mpo na kozwa lobiko. Bayuda mosusu mpe oyo bakómaki baklisto bandimaki ete mbeka ya Klisto elongolaki makambo oyo bazalaki kopekisa bango liboso bákóma baklisto. Yango wana, batikaki mimeseno mpe misala mosusu. (Bagalatia 4:8-11) Nzokande, ndenge Paulo amonisaki yango, bango nyonso bazalaki “balingami ya Nzambe.” Bakokaki bango nyonso kopesa Nzambe nkembo “na monɔkɔ kaka moko” soki bato na bato bazalaki na makanisi ya malamu mpo na bamosusu. Lelo oyo, biso mpe tokoki kozala na makanisi moko te na makambo mosusu, yango wana ezali na ntina tótalela malamu ndenge oyo Paulo alimbolaki likanisi wana ya ntina mingi.—Baloma 15:4.
“Bóyambanaka bino na bino”
5, 6. Mpo na nini baklisto ya lisangá ya Loma bazalaki na likanisi moko te?
5 Na mokanda oyo akomelaki Baloma, Paulo alobelaki likambo moko oyo bango nyonso bazalaki kotalela ndenge moko te. Akomaki boye: “Moto boye azali na kondima ya kolya eloko nyonso, kasi moto oyo azali na bolɛmbu alyaka bandunda.” Mpo na nini ezalaki bongo? Mibeko ya Moize epekisaki kolya ngulu. (Baloma 14:2; Levitike 11:7) Kasi, nsima ya liwa ya Yesu, esɛngisamaki lisusu kotosa Mibeko yango te. (Baefese 2:15) Mbula misato na ndambo nsima ya liwa ya Yesu, anzelu moko alobaki na ntoma Petelo ete na miso ya Nzambe, eloko moko te ya kolya ekoki kobengama mbindo. (Misala 11:7-12) Na kotalela makambo yango, Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto bamonaki ete bakoki kolya ngulu, to mpe bilei mosusu oyo Mibeko epekisaki.
6 Kasi, emonani mpe ete mpo na Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto, likanisi mpamba ya kolya bilei oyo Mibeko elobaki ete ezali mbindo ezalaki kosimba te. Ekoki kozala ete bato ya ndenge wana bazalaki koyoka mabe komona bandeko na bango Bayuda oyo mpe bakómaki baklisto bazali kolya bilei wana. Lisusu, baklisto mosusu oyo bazalaki Bayuda te, baoyo mangomba na bango ya kala epekisaki bango biloko ya kolya te, bazalaki kokamwa ete moto azala na likambo ya koloba mpo na biloko ya kolya. Ya solo, mabe moko ezalaki te soki moto moko, mpo na bantina oyo etali ye moko, aboyi kolya bilei mosusu; kasi, asengelaki te kokanisa to koteya ete kosala bongo ezali na ntina mpo na kozwa lobiko. Nzokande, lokola bango nyonso bazalaki na likanisi moko te, yango ekokaki komema kowelana na kati ya lisangá. Baklisto ya Loma basengelaki kokeba ete bokeseni wana epekisa bango te kopesa Nzambe nkembo “na monɔkɔ moko kaka.”
7. Makanisi nini baklisto bazalaki na yango na likambo ya kotalela mokolo moko ete ezali mosantu?
7 Paulo apesaki ndakisa mosusu: “Moto boye azali komona mokolo boye ete eleki mosusu; moto mosusu azali komona mokolo boye ete ezali lokola mikolo mosusu nyonso.” (Baloma 14:5a) Mibeko ya Moize epekisaki kosala mosala mokolo ya Sabata. Ata kosala mobembo ya molai mpe epekisamaki. (Exode 20:8-10; Matai 24:20; Misala 1:12) Kasi, ntango Mibeko elongwaki, makambo wana esɛngisamaki lisusu te. Nzokande, Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto bazalaki komona mabe kosala mosala to mobembo molai na mokolo wana oyo ezalaki liboso mokolo mosantu. Ekoki kozala ete ata ntango bakómaki baklisto, na mokolo ya nsambo, bazalaki kosala kaka makambo ya elimo, atako Nzambe asɛngisaki lisusu te ete bátosaka Sabata. Tokoki nde koloba ete bazalaki kosala mabe? Bazalaki kosala mabe te, kasi basengelaki te koloba ete Nzambe nde azali kosɛnga bato bátosa Sabata. Yango wana, mpo na komemya lisosoli ya bandeko na ye baklisto, Paulo akomaki boye: “Tiká ete moto na moto amindimisa mpenza na kati ya makanisi na ye moko.”—Baloma 14:5b.
8. Atako bakokaki koboya kotungisa lisosoli ya basusu, likambo nini baklisto ya Loma basengelaki kosala te?
8 Atako Paulo alendisaki bandeko bázala na motema molai epai ya baoyo lisosoli na bango ezalaki kotungisama, akweisaki mpe baoyo bazalaki koluka kondimisa baklisto mosusu na makasi bátosa Mibeko ya Moize mpo na kozwa lobiko. Na ndakisa, soki na mobu 61 ya ntango na biso (T.B.), Paulo akomelaki Bayuda oyo bakómaki baklisto mokanda ya Baebele, epai alimbolaki polele ete kotosa Mibeko ya Moize ezali lisusu na ntina te mpamba te baklisto bazali na elikya ya malamu koleka, oyo esimbami na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa bato.—Bagalatia 5:1-12; Tito 1:10, 11; Baebele 10:1-17.
9, 10. Baklisto basengeli koboya kosala nini? Limbolá.
9 Lokola tomoni yango, Paulo alobaki ete bokeseni na makambo oyo moklisto na moklisto akoki kopona esengeli te kobebisa bomoko soki ezali mpenza kobuka mitinda ya boklisto te. Yango wana, Paulo atunaki baklisto oyo lisosoli na bango ezalaki makasi te motuna oyo: “Mpo na nini ozali kosambisa ndeko na yo?” Atunaki mpe baoyo bazalaki makasi (mbala mosusu baoyo lisosoli na bango ezalaki kopekisa bango te kolya bilei mosusu oyo Mibeko epekisaki to kosala mosala mokolo ya Sabata): “Mpo na nini ozali mpe kotyola ndeko na yo?” (Baloma 14:10) Na makanisi ya Paulo, baklisto oyo lisosoli na bango ezali makasi te basengelaki te kosambisa bandeko na bango oyo bazalaki na makanisi mosusu. Kasi, baklisto oyo bazali makasi basengeli te kotyola baoyo bazali naino na bolɛmbu na makambo mosusu. Bato na bato basengeli komemya makanisi ya basusu mpe “kokanisa mpo na [bango] moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa.”—Baloma 12:3, 18.
10 Paulo amonisaki makanisi oyo ebongi na maloba oyo: “Tiká ete moto oyo azali kolya atyola te moto oyo azali kolya te, mpe tiká moto oyo azali kolya te asambisa te moto oyo azali kolya, mpo Nzambe ayambi moto wana.” Abakisaki boye: “Klisto mpe ayambaki biso, mpo na nkembo ya Nzambe.” Lokola Nzambe mpe Klisto bandimaka ná baoyo bazali makasi ná baoyo bazali na bolɛmbu, biso mpe tosengeli kozala na makanisi malamu ndenge wana mpe ‘koyambana biso na biso.’ (Baloma 14:3; 15:7) Ezali na moto ya makanisi malamu oyo akokaki koboya makanisi wana?
Bolingo ya bondeko ezali kotya bomoko lelo oyo
11. Likambo nini ebimaki na ntango ya Paulo?
11 Na mokanda na ye epai ya Baloma, Paulo alobelaki likambo moko ya sikisiki. Yehova autaki kolongola kondimana moko mpe asalaki kondimana mosusu. Bato mosusu bazalaki na mokakatano mpo na komesana na mbongwana wana. Lelo oyo, tozali mpenza na likambo wana te, kasi makambo ya ndenge wana ekoki ntango mosusu kobima.
12, 13. Lelo oyo, na makambo lokola nini baklisto basengeli kotalelaka lisosoli ya bandeko na bango?
12 Na ndakisa, ekoki kozala ete ndeko mwasi moko azalaki na lingomba oyo eteyaka ete mwasi asengeli te kolata bilamba ya midɛlɛ ya kitoko to ya langilangi mpe asengeli kosalaka monzɛlɛ te. Ntango ayambi solo, akoki kozala na mokakatano mpo na komesana na likanisi ete ezali mabe te ete mwasi alata elamba oyo ezali na langi ya kitoko, oyo ebongisi nzoto, mpe asala mwa monzɛlɛ na ntango oyo ebongi. Lokola ezali na etinda moko te ya Biblia oyo esɛngi yango, ezali malamu te moto aluka kondimisa mwasi ya ndenge wana asala makambo oyo lisosoli na ye eboyi. Kasi, ndeko mwasi yango mpe asengeli koyeba ete ebongi te aloba mabe mpo na baninga na ye oyo lisosoli na bango ezali kopekisa bango te kosala makambo wana.
13 Tózwa ndakisa mosusu. Ekoki kozala ete moklisto moko akolá na mboka oyo bamonaka ete komɛla masanga ezali mabe. Ntango ayekoli solo, akomona ete Biblia elobi ete masanga ezali likabo ya Nzambe mpe moklisto akoki komɛla yango mwa moke. (Nzembo 104:15) Andimi likanisi wana. Kasi, amoni malamu amɛlaka masanga te mpo amesaná te; nzokande, akoloba mabe te mpo na baoyo bamɛlaka. Na ndenge wana, akolanda maloba ya Paulo oyo: “Tiká tólanda makambo oyo epesaka kimya mpe makambo oyo etongaka biso nyonso.”—Baloma 14:19.
14. Na makambo nini baklisto bakoki kolanda toli oyo Paulo apesaki Baloma?
14 Makambo mosusu ebimaka oyo esɛngaka mpe kosalela toli oyo Paulo apesaki Baloma. Lisangá ya boklisto esangisi bato ebele, mpe moto na moto azali na makambo oyo asepelaka na yango. Yango wana, moto na moto akoki kopona oyo amoni malamu, na ndakisa, na molato mpe monzɛlɛ. Kasi, Biblia ezali na mitinda ya polele oyo baklisto nyonso ya sembo basengeli kolanda. Moto moko te asengeli kolata bilamba to kobongisa nsuki na ndenge oyo ebongi te, oyo ekotinda bato mosusu bátya ye na molɔngɔ ya bato ya mokili oyo bazali na lokumu ya malamu te. (1 Yoane 2:15-17) Baklisto babosanaka te ete na ngonga nyonso, ata ntango bazali kozwa mopɛpɛ, bazali baministre oyo bazali komonisa Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Yisaya 43:10; Yoane 17:16; 1 Timote 2:9, 10) Kasi, na makambo mingi, moklisto mokomoko azali mpenza na bonsomi ya kopona oyo esepelisi ye, oyo mpe bandeko mosusu bakomona yango mabe te.a
Tóbɛtisa basusu libaku te
15. Ntango nini moklisto, mpo na bolamu ya bandeko na ye, akoki koboya kosala likambo oyo azali na lotomo ya kosala?
15 Ezali mpe na etinda mosusu ya ntina oyo Paulo alobelaki na toli oyo apesaki baklisto ya Loma. Ntango mosusu, moklisto oyo lisosoli na ye eteyami malamu akoki komona malamu asala te likambo moko atako ezali mabe te. Mpo na nini? Mpo amoni ete soki asali yango, ekoki kobɛtisa basusu libaku. Na likambo ya ndenge wana, tosengeli kosala nini? Paulo alobaki boye: “Ezali malamu koboya kolya mosuni to komɛla vinyo to kosala eloko moko boye oyo ezali kobɛtisa ndeko na yo libaku.” (Baloma 14:14, 20, 21) Yango wana, “biso baoyo tozali makasi tosengeli komema bolɛmbu ya baoyo bazali makasi te, mpe komisepelisáká te biso moko. Tiká ete moto na moto na kati na biso asepelisa mozalani na ye na oyo ezali malamu mpo na kotonga ye.” (Baloma 15:1, 2) Ntango tomoni ete likambo oyo tozali kosala ekoki kotungisa lisosoli ya ndeko moko, bolingo ya bondeko ekotinda biso tómitya na esika na ye mpe tótika kosala yango, ata soki biso moko tomoni yango mabe te. Tokoki kozwa ndakisa ya masanga. Biblia epesi moklisto nzela ya komɛla mwa moke. Kasi, soki komɛla ekoki kobɛtisa moninga na ye libaku, akoloba te ete asengeli kaka komɛla mpo Biblia epekisi yango te.
16. Na esika oyo tofandi, tosengeli kosala nini mpo tóbɛtisa bato libaku te?
16 Tokoki mpe kosalela etinda yango na makambo oyo tosalaka na miso ya bato oyo bazali Batatoli ya Yehova te. Na ndakisa, ekoki kozala ete tofandaka na mboka moko oyo lingomba oyo ezali na bandimi mingi eteyaka ete esengeli kopema na mokolo moko boye ya pɔsɔ. Mpo na kobɛtisa bato libaku te mpe komibendela mindɔndɔ te na mosala ya kosakola, tokoboya kosala makambo oyo bazalani na biso bakosepela na yango te. Tókamata ndakisa mosusu: Moklisto moko oyo azali na bozwi akoki kokende kofanda na mboka oyo basakoli bazali mingi te mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola; kasi, ekoki kozala ete bato mingi kuna bazali mpenza na bozwi te. Mpo na kobɛtisa bango libaku te, akoki komona malamu alataka bilamba ya ntalo te to azalaka lokola nde azali na bozwi mingi te.
17. Mpo na nini ezali malamu tótalela makanisi ya basusu na makambo oyo tozali kosala?
17 Ezali malamu kosɛnga “baoyo bazali makasi” básala bongo? Tókanisa naino ndakisa oyo: Tozali kotambola na motuka, tomoni liboso na biso bana mike bazali kosakana na nzela, na esika oyo motuka ekoki kotuta bango. Tokotambola kaka na mbangu oyo mibeko epesi biso ndingisa mpo tozali na lotomo ya kosala yango? Te, tokotambola malɛmbɛ mpo bana wana bázwa likama te. Ntango mosusu, esɛngaka mpe tótambola malɛmbɛ, elingi koloba tótika makambo mosusu mpo na bolamu ya baninga na biso bandimi to bato mosusu. Ekoki kozala ete tozali kosala likambo oyo tozali mpenza na lotomo ya kosala, mpe tobuki mobeko moko ya Biblia te. Kasi, soki yango ekoki kobɛtisa basusu libaku to kobebisa bato oyo lisosoli na bango ezali makasi te, bolingo ya boklisto ekotinda biso tókeba. (Baloma 14:13, 15) Kobatela bomoko mpe koluka ete matomba ya Bokonzi ekende liboso ezali na ntina mingi koleka makambo oyo tozali na lotomo ya kosala.
18, 19. (a) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na likambo ya kotalela makanisi ya basusu? (b) Biso nyonso tozali mpenza na bomoko na makambo nini, mpe tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
18 Ntango tozali kosala bongo, tozali kolanda ndakisa oyo eleki malamu. Paulo alobaki boye: “Klisto kutu amisepelisaki ye moko te; kasi kaka ndenge ekomamá ete: ‘Kosambwisa ya baoyo bazalaki kosambwisa yo ekweli ngai.’” Yesu andimaki kopesa bomoi na ye mpo na biso. Biso mpe tosengeli kondima kotika makambo mosusu oyo tozali na lotomo ya kosala soki yango ekopesa nzela ete biso ná “baoyo bazali makasi te” tópesa Nzambe nkembo na bomoko. Ya solo, koboya matata mpe kosepelisa baklisto oyo bazali na lisosoli ya makasi te, to kondima kotika makambo mosusu oyo tokokaki kopona mpe kotingama te na lotomo na biso, emonisaka “ezaleli ya makanisi ndenge moko na oyo Klisto Yesu azalaki na yango.”—Baloma 15:1-5.
19 Atako tokoki kozala na makanisi ndenge moko te na makambo oyo Biblia elobeli te, tozali na bomoko mpenza na makambo ya losambo. (1 Bakolinti 1:10) Bomoko yango emonanaka polele, na ndakisa, na ndenge totalelaka baoyo batɛmɛlaka losambo ya solo. Liloba ya Nzambe ebengi batɛmɛli yango bapaya mpe elobi na biso tókeba na “mongongo ya bapaya.” (Yoane 10:5) Ndenge nini tokoki koyeba bapaya yango? Ndenge nini tosengeli kotalela bango? Tokotalela mituna yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Baboti nde basengeli kopona molato oyo ebongi mpo na bana na bango ya mike.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini bokeseni ya makanisi na makambo mosusu ekoki kobebisa bomoko te?
• Mpo na nini biso baklisto tosengeli komityaka na esika ya bandeko na biso?
• Lelo oyo, na makambo lokola nini tokoki kolanda toli oyo Paulo apesaki mpo na bomoko, mpe nini ekotinda biso tósala yango?
[Elilingi na lokasa 9]
Toli oyo Paulo apesaki mpo na bomoko ezali na ntina mingi mpo na lisangá
[Elilingi na lokasa 10]
Baklisto bazali na bomoko atako bauti na bikólo ndenge na ndenge
[Elilingi na lokasa 12]
Sofɛlɛ oyo asengeli kosala nini sikoyo?