Bókoba kokola na bolingo ya bondeko
“Bókoba kotambola na kati ya bolingo, ndenge Kristo mpe alingaki bino.”—EF. 5:2.
1. Elembo nini ya ntina mingi Yesu alobaki ete ekomonisa bayekoli na ye?
BATATOLI YA YEHOVA bayebani mingi mpo na mosala na bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ndako na ndako. Nzokande, Kristo Yesu aponaki elembo mosusu oyo esengelaki komonisa bayekoli na ye ya solo. Alobaki boye: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka bino na bino. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”—Yoa. 13:34, 35.
2, 3. Bolingo ya bokristo esalaka nini epai ya bato oyo bayaka na makita na biso?
2 Bolingo oyo bakristo ya solo bazalaka na yango ekeseni mpenza na oyo ya bato ya mokili. Kaka ndenge emá ebendaka ebende, ndenge moko mpe bolingo ebendaka mpe esangisaka basaleli ya Yehova, mpe ebendaka bato ya mitema sembo na losambo ya solo. Tózwa ndakisa ya Marcelino, mobali moko na Cameroun oyo mosala na ye ebomaki ye miso. Nsima ya likama yango, nsango epanzanaki ete akufi miso mpo azali ndɔki. Na esika bábɔndisa ye, pastɛrɛ mpe bato mosusu ya lingomba na ye babenganaki ye na lingomba. Ntango Motatoli ya Yehova moko abengaki ye na makita, Marcelino akakatanaki mpo na kokende. Azalaki kobanga ete kuna mpe bakoboya ye.
3 Marcelino akamwaki ntango akendaki na Ndako ya Bokonzi. Bandeko bayambaki ye na esengo mpe mateya ya Biblia oyo ayokaki ebɔndisaki ye. Akómaki koyangana na makita nyonso, akobaki koyekola Biblia, mpe azwaki batisimo na 2006. Lelo oyo, ayebisaka solo yango epai ya bato ya libota na ye mpe bato ya kartye mpe azali koyekola Biblia na bato mingi. Marcelino alingaka bato báyekola Biblia elongo na ye mpo bango mpe bámona bolingo oyo ye amoni na kati ya basaleli ya Nzambe.
4. Mpo na nini tosengeli kolanda toli ya Paulo ya “kotambola na kati ya bolingo”?
4 Atako bolingo ya bondeko ebendaka bato, mokomoko na biso asengeli kosala makasi mpo bolingo yango ezala kaka. Tózwa ndakisa ya mɔtɔ oyo bapelisi na butu, mpe bato bazali koya mpo na koyɔta. Soki bato yango bazali kobakisa nkɔni te, mɔtɔ yango ekokufa. Ndenge moko mpe, bolingo na kati ya lisangá ekoki kokita soki mokomoko azali kosala makasi te mpo na kokómisa yango makasi. Ndenge nini tokoki kosala yango? Ntoma Paulo alobaki boye: “Bókoba kotambola na kati ya bolingo, ndenge Kristo mpe alingaki bino mpe amikabaki mpo na bino lokola likabo mpe mbeka epai ya Nzambe lokola malasi ya nsolo kitoko.” (Ef. 5:2) Motuna oyo tolingi kotalela ezali oyo: ndenge nini nakoki kotambola na kati ya bolingo?
“Bino mpe bófungwama”
5, 6. Mpo na nini Paulo alendisaki bakristo ya Korinti ‘báfungwama’?
5 Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Korinti boye: “Tofungoli monɔkɔ na biso mpo na kolobela bino polele, Bakorinti, motema na biso efungwami. Bozali na nkaka na kati na biso te, kasi bozali na nkaka nde na kati ya bolingo ya motema na bino moko. Yango wana, lokola mbano mpo na yango—nazali koloba lokola nde na bana mike—bino mpe bófungwama.” (2 Ko. 6:11-13) Mpo na nini Paulo alendisaki Bakorinti báfungwama na bolingo na bango?
6 Tótala naino ndenge lisangá ya Korinti ebandaki. Paulo ayaki na Korinti pene ya nsuka ya mobu 50 ya T.B. Atako na ebandeli akutanaki na botɛmɛli, ntoma yango alɛmbaki te. Nsima ya mwa ntango, bato mingi ya engumba yango bandimaki nsango malamu. Na boumeli ya “mbula moko na sanza motoba,” Paulo amipesaki na koteya mpe kolendisa lisangá yango ya sika. Na ntembe te, azalaki mpenza na bolingo makasi mpo na bakristo ya Korinti. (Mis. 18:5, 6, 9-11) Bango mpe basengelaki kolinga mpe komemya ye. Nzokande, bamosusu na kati ya lisangá bakómaki koboya ye. Ekoki kozala ete mwa ndambo ya bato bazalaki kosepela te na batoli na ye ya polele. (1 Ko. 5:1-5; 6:1-10) Ekoki mpe kozala ete bamosusu bakómaki kolanda maloba ya “bantoma minene.” (2 Ko. 11:5, 6) Paulo azalaki na mposa ete bandeko nyonso na kati ya lisangá bálinga ye. Yango wana, asɛngaki bango ‘báfungwama,’ bázala pene na ye mpe ya bakristo mosusu.
7. Ndenge nini tokoki ‘kofungwama’ na bolingo na biso ya bondeko?
7 Ezali boni mpo na biso? Ndenge nini tokoki ‘kofungwama’ na oyo etali komonisa bolingo ya bondeko? Mbala mingi, ezalaka mpasi te mpo bato ya mbula moko to ya mimeseno moko bámoniselana bolingo ya bondeko. Mpe mbala mingi baoyo bazalaka na bamposa ndenge moko na makambo ya kominanola balekisaka ntango mingi elongo. Kasi, soki makambo oyo esalaka ete tóyokana na bakristo mosusu, ezali kokabola biso na bandeko mosusu, tosengeli ‘kofungwama.’ Ekozala malamu tómituna boye: ‘Nasakolaka mpe nalekisaka ntango ata na bandeko mosusu oyo bazali baninga na ngai ya motema te? Na Ndako ya Bokonzi, naboyaka kopusana pene ya bato oyo bazali koya sika na lisangá mpo nakanisaka ete ntango esengeli koleka naino liboso bákóma baninga na ngai? Napesaka bato nyonso mbote na lisangá?’
8, 9. Ndenge nini toli ya Paulo oyo ezali na Baroma 15:7, ekoki kosalisa biso tópesanaka mbote na ndenge oyo ekokolisa bolingo na biso?
8 Na oyo etali kopesana mbote, makambo oyo Paulo alobaki na bakristo ya Roma ekoki kosalisa biso tótalelaka bandeko na biso na ndenge ebongi. (Tángá Baroma 15:7.) Liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na kobongola “bóyambanaka” elimboli “koyamba na boboto to koyamba moto malamu, kondima ye na kati ya baninga.” Na ntango ya kala, soki moto moko ayambi bapaya na ndako na ye, azalaki kosala nyonso mpo bámona ete asepeli komona bango. Na ndenge ya elilingi, Kristo mpe ayambi biso ndenge wana, mpe tolendisami na komekola ye, tóyambaka mpe bandeko na biso.
9 Ntango tozali kopesa bandeko na biso mbote ezala na Ndako ya Bokonzi to na bisika mosusu, tokoki kotya likebi na baoyo tomonaki te to tosololaki na bango te eleki mwa mikolo. Mpo na nini te kozwa mwa miniti mpo na kosolola na bango? Na mokolo mosusu ya makita, tokoki mpe kosala bongo epai ya bandeko mosusu. Tokomona ete na mwa ntango, tokozwa libaku ya kobɛta masolo kitoko na bandeko na biso nyonso. Ezali na ntina te tómitungisa mpo tosololi na bandeko nyonso te na mokolo moko wana. Moto moko te asengeli kosilika soki tozwi libaku te ya kopesaka ye mbote na makita nyonso.
10. Mabaku kitoko nini biso nyonso tozali na yango na lisangá, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango?
10 Kopesa basusu mbote ezali likambo ya liboso oyo emonisaka ete toyambi bango. Ekoki kopesa nzela na masolo kitoko mpe na boninga oyo ekoumela. Na ndakisa, ntango toyebisi bandeko oyo tokutani na bango na mayangani nkombo na biso mpe tobandi kosolola na bango, tozalaka na mposa ya kokutana lisusu. Mbala mingi, bandeko oyo batongaka Bandako ya Bokonzi mpe baoyo bapesaka mabɔkɔ mpo na kosunga baoyo bazwi likama bakómaka baninga mpenza mpo bazwaka libaku ya komona bizaleli kitoko ya moko na moko. Ebongiseli ya Yehova epesaka biso mabaku mingi ya kosala boninga oyo ekoumela. Soki ‘tofungwami’ tokokóma na baninga mingi, tokokolisa bolingo oyo esangisaka biso na losambo ya solo.
Zwáká ntango ya kosolola na basusu
11. Ndenge Marko 10:13-16 emonisi yango, ndakisa nini Yesu atikaki?
11 Mokristo nyonso asengeli kosala makasi mpo na kosololaka na moto nyonso, ndenge Yesu azalaki kosala. Tótala ndenge Yesu alobaki ntango bayekoli na ye balukaki kopekisa baboti báya na bana na bango epai na ye. Alobaki boye: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango, mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango.” Na nsima, “akamataki bana na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango, atyelaki bango mabɔkɔ.” (Mrk. 10:13-16) Kanisá naino esengo oyo bana yango bayokaki ndenge Moteyi Monene atyelaki bango likebi!
12. Nini ekoki kopekisa biso kosolola na basusu?
12 Mokristo nyonso asengeli komituna boye: ‘Nazwaka ntango ya kosolola na basusu to mbala mingi namonisaka ete nazali na mosala mingi?’ Ata makambo mosusu oyo ezali mpenza mabe te ekoki ntango mosusu kopekisa bato básolola. Na ndakisa, ntango tozali na baninga, soki tozalaka na momeseno ya kosololasolola na telefone to kotya écouteur na matoi, ekomonisa ete tosepeli te kozala na bango. Soki bato bamonaka ete mbala mingi ntango tozali na bango tosakanaka na telefone na biso, bakoki komona ete tolingaka te kosolola na bango. Ya solo, ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ.” Kasi, ntango tozali na bato, mbala mingi yango ezalaka nde “ntango ya koloba.” (Mos. 3:7) Bato mosusu bakoki koloba boye: “Nasepelaka kozala ngai moko” to “Nalingaka te koloba na ntɔngɔ.” Nzokande, kosolola na baninga ata ntango oyo tozali na mposa te ya kosala yango emonisaka ete tozali na bolingo oyo “elukaka matomba na yango moko te.”—1 Ko. 13:5.
13. Paulo alendisaki Timote atalela bandeko na lisangá ndenge nini?
13 Paulo alendisaki Timote azala na limemya epai ya bandeko nyonso na lisangá. (Tángá 1 Timote 5:1, 2.) Biso mpe tosengeli kotalela bakristo oyo bazali mikóló lokola bamama to batata na biso mpe baoyo bazali bilenge lokola baleki, bana ya baboti na biso. Soki tozali kokanisa bongo, ndeko moko te akomimona mopaya soki azali elongo na biso.
14. Matomba nini okozwa soki ozali kosolola masolo kitoko na basusu?
14 Ntango tozali kosolola na basusu masolo ya kolendisa, tokosala ete bázala makasi na elimo mpe bámiyoka malamu. Ndeko moko oyo asalaka na Betele, akanisaka ndenge bandeko mingi ya mikóló na Betele bazalaki kozwa ntango ya kosolola na ye ntango ayaki sika. Maloba na bango ya kolendisa esalisaki ye amiyoka ete balingaka ye. Lelo oyo ye mpe asalaka bongo, azwaka ntango ya kosolola na bandeko na ye ya Betele.
Komikitisa esalisaka biso tózongisa kimya
15. Nini emonisi ete matata ekoki mpe kobima kati na bakristo?
15 Emonani ete Evodi ná Sɛntishe bandeko basi mibale na lisangá ya Filipi bazalaki na mokakatano mpo na kosilisa matata oyo bazalaki na yango. (Flp. 4:2, 3) Paulo ná Barnabasi baswanaki makasi, likambo yango eyebanaki mpe esalaki ete bákabwana, moto na moto akende nzela na ye mpo na mwa ntango. (Mis. 15:37-39) Masolo yango emonisi ete ntango mosusu matata ekoki mpe kobima kati na bakristo. Yehova asalisaka biso tóyeba ndenge ya kosilisa matata mpe kozongisa boninga. Kasi, asɛngaka biso eloko moko.
16, 17. (a) Komikitisa ezali na ntina nini mpo na kosilisa matata? (b) Ndenge nini likambo oyo Yakobo asalaki ntango akutanaki na Esau emonisi ntina ya komikitisa?
16 Kanisá ete yo ná moninga na yo bolingi kosala mobembo na motuka. Mpo motuka etambola, bosengeli kozala na fungola mpo na kopelisa yango. Ezali mpe bongo mpo na kosilisa matata; bosengeli kozala na fungola. Fungola yango ezali komikitisa. (Tángá Yakobo 4:10.) Ndenge ndakisa oyo ya Makomami emonisi yango, fungola yango esalisaka baoyo bazali na matata bábanda kosalela mitinda ya Biblia.
17 Mbula ntuku mibale elekaki banda Esau asilikaki na ndenge lipasa na ye Yakobo abɔtɔlaki esika na ye ya mwana ya liboso, yango wana alukaki koboma Yakobo. Nsima ya ebele ya bambula wana, mapasa yango basengelaki kokutana mpe “Yakobo abandaki kobanga mingi mpe akómaki motema likoló.” Azalaki kokanisa ete ntango bakokutana, Esau akosala ye mabe. Kasi, ntango bakutanaki, Yakobo asalaki likambo moko oyo Esau akokaki kokanisa te. Yakobo “agumbamaki tii na nse” ntango azalaki kopusana pene ya ndeko na ye. Likambo nini esalemaki? “Esau apotaki mbangu mpo na kokutana na ye, ayambaki ye, akweaki na nkingo na ye, apwɛpwaki ye, mpe babandaki kolela.” Likanisi ya etumba ezalaki lisusu te. Komikitisa ya Yakobo esalaki ete Esau alongola nkanda to koyina nyonso oyo azalaki na yango.—Eba. 27:41; 32:3-8; 33:3, 4.
18, 19. (a) Ntango matata ebimi, mpo na nini ezali na ntina tózala bato ya liboso ya kosalela toli ya Makomami? (b) Mpo na nini tosengeli kolɛmba te soki moninga mosusu aboyi naino kozongisa kimya?
18 Biblia ezali na batoli kitoko na oyo etali kosilisa matata. (Mat. 5:23, 24; 18:15-17; Ef. 4:26, 27)a Soki tolandi batoli yango te, ekozala mpasi mpo na kozongisa kimya. Kozela ete moninga mosusu nde amikitisa esilisaka mokakatano te, mpo biso mpe tosimbi fungola.
19 Soki mpo na ntina moko to mosusu milende oyo tozali kosala mpo na kozongisa kimya ezali kobota mbuma te, tosengeli kolɛmba te. Ekoki kosɛnga mwa ntango mpo moninga mosusu akitisa motema. Bandeko ya Yozefe basalaki ye mabe. Elekaki bambula mingi liboso bákutana lisusu; na ntango wana akómaki ministre-mokonzi ya Ezipito. Nsukansuka, babongolaki mitema mpe basɛngaki ye alimbisa bango. Yozefe alimbisaki bango, mpe bana ya Yakobo bakómaki ekólo oyo ezwaki libaku ya komema nkombo ya Yehova. (Eba. 50:15-21) Soki tozali kobatela kimya na bandeko na biso, tokosala ete bomoko mpe esengo ezala na lisangá.—Tángá Bakolose 3:12-14.
Tólingaka “na misala mpe na solo”
20, 21. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yesu asukolaki makolo ya bantoma na ye?
20 Mwa moke liboso akufa, Yesu ayebisaki bantoma na ye boye: “Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo.” (Yoa. 13:15) Autaki kosukola makolo ya bantoma yango 12. Likambo oyo Yesu asalaki ezalaki kaka molulu moko boye te to mpo na komonisa boboto te. Liboso ya kolobela likambo yango, Yoane akomaki boye: “Yesu, lokola alingaki bato na ye oyo bazalaki na mokili, alingaki bango tii na nsuka.” (Yoa. 13:1) Bolingo oyo azalaki na yango mpo na bayekoli nde etindaki Yesu asalela bango likambo oyo ezalaki mosala ya moombo. Bango mpe basengelaki kosalelana makambo oyo ekomonisa bolingo. Ya solo, bolingo ya bondeko esengeli kotinda biso tótyelanaka likebi mpe tómibanzabanzaka mpo na bandeko na biso nyonso ya elimo.
21 Ntoma Petro, oyo Mwana ya Nzambe asukolaki ye makolo, azwaki liteya na likambo oyo Yesu asalaki. Akomaki boye: “Sikoyo lokola bopɛtoli milimo na bino na ndenge bozali kotosa solo mpe yango eboti bolingo ya bondeko oyo ezali na bokosi te, bólinganaka makasi na motema moko.” (1 Pe. 1:22) Ntoma Yoane mpe, oyo Nkolo asukolaki ye makolo, akomaki mpe boye: “Bana, tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.” (1 Yoa. 3:18) Tiká ete mitema na biso etinda biso tómonisa bolingo ya bondeko na misala.
[Maloba na nse ya lokasa]
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini tokoki ‘kofungwama’ na bolingo na biso mpo na basusu?
• Nini ekosalisa biso tózwaka ntango ya kosolola na basusu?
• Komikitisa ezali na ntina nini mpo na kozongisa kimya?
• Nini esengeli kotinda biso tómibanzabanzaka mpo na bandeko na biso ya elimo?
[Elilingi na lokasa 21]
Tóyambaka bandeko na biso na esengo
[Elilingi na lokasa 23]
Tólekisaka te mabaku ya kosolola na basusu