Ozali moklisto oyo “akɔmeli”?
NTOMA Paulo akomaki ete: “Ezalaki ngai mwana, nalobaki lokola mwana, nakanisaki lokola mwana, nabongisaki makambo lokola mwana.” Ya solo, biso nyonso tozalaki mpe bana mike. Kasi, totikalaki bongo libela te. Paulo alobi lisusu boye: ‘Nde esili ngai kokóma mobali, nabwaki makambo ya bomwana.’—1 Bakolinti 13:11.
Se ndenge yango, baklisto nyonso babandaka lokola bana mike na elimo. Kasi na nsima, bango nyonso bakoki ‘kokóma na bomoko na kondima mpe na boyebi ya sikisiki ya Mwana ya Nzambe, ya [moto oyo akɔmeli, NW ], lokola oyo akoli mpenza, oyo akokani na Klisto.’ (Baefese 4:13) Na 1 Bakolinti 14:20, balendisi biso boye: “Bandeko, bózala bana mike na makanisi na bino te . . . Bókóma [bato oyo bakɔmeli, NW ] kati na makanisi.”
Kozala na baklisto oyo bakɔmeli, elingi koloba oyo bakómi mikóló, ezali lipamboli mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo, mingimingi mpo bato ya sika bazali mingi. Baklisto oyo bakɔmeli basalaka milende mpo lisangá ezala makasi. Ntango baklisto yango bazali na lisangá moko, basalaka ete elimo ya lisangá yango ezala malamu.
Nzoto ekolaka yango moko, kasi mpo moto akola na elimo esɛngaka ntango mpe milende. Yango wana, tokoki kokamwa te ete na eleko ya Paulo, baklisto mosusu bakokaki te ‘kokende liboso,’ atako bazalaki kosalela Nzambe banda bambula mingi. (Baebele 5:12; 6:1, Boyokani ya Sika) Ezali boni mpo na yo? Ata soki ozali kosalela Nzambe banda bambula mingi to obandi sika, ekozala malamu omitalela malamumalamu. (2 Bakolinti 13:5) Ozali na kati ya baoyo bakoki mpenza kobengama baklisto oyo bakɔmeli, to oyo bakoli mpenza? Soki te, ndenge nini okoki kokóma moklisto oyo akɔmeli?
‘Bókóma bato oyo bakɔmeli kati na makanisi’
Bana mike na elimo “bakoninganaka mpe bakotɛngatɛngaka epai na epai na mipɛpɛ nyonso ya mateya mpe na mayele ya bato, na bozimbisi na bango na nzela ya mikano mabe.” Yango wana Paulo alobi na biso ete: “Kati na bolingo, tókola na makambo nyonso epai na ye oyo azali motó, ye Klisto.” (Baefese 4:14, 15) Yango esalemaka ndenge nini? Baebele 5:14 (NW ) elobi ete: “Bilei makasi ezali mpo na bato bakɔmeli; mpo na baoyo na misala, basili kolakisa bososoli na bango mpo na kokesenisa malamu na mabe.”
Awa balobi ete bato oyo bakɔmeli basili kolakisa bososoli na bango na misala, to na makambo oyo bazali kokutana na yango ntango bazali kosalela mitinda ya Biblia. Tomoni polele ete, kokɔmela ezali likambo ya lelo na lobi te; mpo moto akola na elimo, esɛngaka ntango. Atako bongo, kosala makasi mpo na kokola na elimo ekozala mpenza mpasi te soki ozali koyekola yo moko, mingimingi koyekola makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe. Na mikolo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobeli masolo mingi oyo ezali na makambo ya makasi. Bato oyo bakɔmeli bakimaka koyekola makambo ya ndenge yango te atako ezali “makasi [na kokanga] ntina.” (2 Petelo 3:16) Kutu, balyaka bilei ya makasi wana na mposa mpenza!
Bazali basakoli mpe bateyi ya molende
Yesu atindaki bayekoli na ye ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso oyo esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Tokoki mpe kokola noki na elimo soki tozali kosala mosala ya kosakola na molende. Soki ozali na ntango, mpo na nini te kosala makasi mpo na kosangana mingi na mosala yango?—Matai 13:23.
Ntango mosusu, kozwa ntango ya kosakola ekoki kozala mpasi mpo na mitungisi ya bomoi. Kasi, lokola ozali mosakoli, soki ‘ozali kosala makasi,’ okomonisa ete opesaka “nsango malamu” motuya monene. (Luka 13:24; Baloma 1:16) Na bongo, okozala “ndakisa mpo na bato ya sembo.”—1 Timote 4:12, NW.
Bazali bato ya bosembo
Kokóma moto oyo akɔmeli esɛngaka kosala lisusu milende mpo na kobatela bosembo. Na Nzembo 26:1, Davidi alobaki ete: “Ɛ [Yehova], longisá ngai, mpo ete nasili kotambola na [bosembo].” Kozala na bosembo ezali mpe kozala moto ya kolongobana, kokokisa makambo nyonso oyo esɛngami. Kasi, elimboli te kozala na ezaleli ya kokoka. Davidi ye moko asalaki ebele ya masumu ya minene. Kasi lokola andimaki mpamela mpe atikaki misala mabe, amonisaki ete azalaki kaka kolinga Yehova Nzambe na motema na ye mobimba. (Nzembo 26:2, 3, 6, 8, 11) Kozala na bosembo elimboli mpe komipesa na makambo nyonso, na motema mobimba. Davidi ayebisaki mwana na ye Salomo ete: “Yebá Nzambe ya tata na yo mpe salelá ye na motema [mobimba, NW ].”—1 Ntango 28:9.
Kozala moto ya bosembo ezali kosɛnga ete ozala ‘moto ya mokili te,’ okɔta na makambo ya politiki te mpe na bitumba te oyo bikólo bazali kobunda. (Yoane 17:16) Esengeli mpe koboya misala ya mbindo, lokola pite, ekobo, na komela bangi. (Bagalatia 5:19-21) Nzokande, kozala moto ya bosembo esuki kaka na koboya makambo wana te. Salomo apesaki likebisi oyo: “Banzinzi oyo ekufi ekómisaka pomadi ya monganga nsolo mabe mpe etangisaka yango. Mwa bozoba moke esalaka mpe bongo na moto oyo azali na lokumu mpo na mayele mpe nkembo.” (Mosakoli 10:1, NW ) Ya solo, “lokumu ya moto ya mayele” ekoki kobeba ata likoló ya “mwa bozoba moke,” na ndakisa, soki azali kosala masɛki oyo elongobani te to azali kopesa mwana mobali to mwana mwasi makanisi ya mpamba ete azali kolinga ye.” (Yobo 31:1) Yango wana, lakisá ete ozali moto oyo akoli na kozaláká ndakisa malamu na etamboli na yo mobimba, mpe boyá “mabe ya ndenge nyonso.”—1 Batesaloniki 5:22, Boyokani ya Sika.
Batosaka bibongiseli
Moklisto oyo akɔmeli atosaka bibongiseli. Na Baefese 4:24, (NW ) ntoma Paulo alendisi baklisto ete: “Bólata bomoto ya sika oyo esalemi na mokano ya Nzambe kati na boyengebene mpe bosembo ya solo.” Na kati ya Makomami ya Greke, liloba oyo esalelamaki na ebandeli mpo na “bosembo” ezali kopesa likanisi ya bulɛɛ, boyengebene, limemya. Moto oyo atosaka bibongiseli azali moto oyo amipesi, abangaka Nzambe; akokisaka malamumalamu mikumba na ye nyonso epai ya Nzambe.
Wapi mwa makambo oyo ekoki komonisa ete otosaka bibongiseli? Moko na makambo yango ezali bongo kosala na bomoko na bankulutu ya lisangá na yo. (Baebele 13:17) Osengeli koyeba ete Klisto azali Mokonzi oyo atyami na lisangá ya boklisto. Baklisto oyo bakɔmeli batosaka baoyo batyami “mpo na kobatela lisangá ya Nzambe.” (Misala 20:28, NW ) Ekozala malamu te kotya ntembe to kobebisa lokumu ya bankulutu oyo baponami! Osengeli lisusu kotosa bibongesli ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe bibongiseli ya babiro oyo ezali kotambwisa misala ndenge na ndenge mpe bato oyo azali kosalela mpo na kokabola “bilei na elaka na yango.” (Matai 24:45) Soki ozwi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu, tángá yango nokinoki mpe salelá makambo oyo otángi.
Monisá bolingo na misala na yo
Ntoma Paul akomelaki baklisto ya Tesaloniki ete: “Bolingo na moko na moko na bino mpo na mosusu ezali koyikana mingi.” (2 Batesaloniki 1:3) Kokola na bolingo ezali mpenzampenza likambo ya ntina mpo na kokola na elimo. Na Yoane 13:35, Yesu alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” Bolingo yango ya bondeko emonanaka kaka na maloba to na kosɛka te. Diksionɛrɛ moko (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) elobi ete: “Bolingo ekoki komonana kaka na misala oyo yango ezali kotinda bato básala.” Ya solo, okokende liboso na likambo yango soki ozali komonisa bolingo na yo na misala!
Na ndakisa, tozali kotánga na Baloma 15:7 (NW ) ete: “Bóyambanaka malamu.” Lolenge moko ya komonisa bolingo ezali ya kopesa bandeko mpe bato ya sika na makita ya lisangá mbote na esengo mpenza mpe na nsai nyonso! Luká koyeba bango mokomoko. Talelaká mpe “makambo” ya bamosusu. (Bafilipi 2:4) Na bantango mosusu okoki komonisa ezaleli ya boyambi bapaya mpe kobengisa bato ndenge na ndenge na ndako na yo. (Misala 16:14, 15) Na bantango mosusu, mabunga ya bandeko mosusu ekoki kotya bolingo na yo na komekama kotala soki ezali mozindo, kasi lokola ozali koyekola ‘kofanda na bango na bolingo,’ okomonisa ete ozali kokola mpenza.—Baefese 4:2.
Tósalela biloko na biso mpo na kotombola losambo ya pɛto
Na ntango ya kala, basaleli ya Nzambe nyonso te nde bazalaki kokokisa mokumba na bango mpo na kotombola misala ya tempelo ya Yehova. Yango wana Nzambe atindaki basakoli, lokola Hagai na Malaki, mpo na kolendisa basaleli na Ye na likambo yango. (Hagai 1:2-6; Malaki 3:10) Lelo oyo, baklisto oyo bakɔmeli bazali kosalela biloko na bango na esengo nyonso mpo losambo ya Yehova ekende liboso. Tólanda ndakisa ya bato yango mpe tósalela etinda oyo ezali na 1 Bakolinti 16:1, 2, (NW ), mbala na mbala ‘tóbombaka eloko moko’ mpo na kopesa makabo na lisangá mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Nzambe alaki ete: “Ye oyo akokona mingi akobuka mingi.”—2 Bakolinti 9:6.
Komona mpamba te biloko mosusu oyo ozali na yango, lokola ntango mpe makasi na yo. Meká ‘kosomba ntango,’ elingi koloba tiká makambo mosusu oyo ezali na ntina mingi te. (Baefese 5:15, 16; Bafilipi 1:10) Yekolá kosalela malamu ntango na yo. Soko okosala bongo okozala na likoki ya kosangana na misala ya kobatela Ndako ya Bokonzi mpe na misala mosusu ya ndenge yango oyo ezali kotombola losambo ya Yehova. Soki ozali kosalela biloko na yo na ndenge yango, ekomonisa lisusu polele ete ozali kokóma moklisto oyo akɔmeli.
Kendé liboso!
Mibali na basi oyo bayekolaka mingi mpe bayebi makambo mingi, oyo bazali basakoli ya molende, oyo babebisaka bosembo na bango te, oyo batosaka bibongiseli mpe bazali na bolingo, mpe oyo bandimi komipesa bango moko mpe biloko na bango mpo na kotombola mosala ya Bokonzi, bazali mpenza lipamboli monene. Tokokamwa te, ndenge ntoma Paulo alendisaki ete: “Boye totika makambo mikemike na liboso na mateya na Klisto mpe [tókende liboso]”!—Baebele 6:1, Boyokani ya Sika.
Ozali moklisto oyo akɔmeli, elingi koloba oyo akómi mokóló? To na makambo mosusu ozali naino lokola mwana moke na elimo? (Baebele 5:13) Ezala bongo to te, omityela mokano ya koyekola yo moko, ya koteya, mpe ya komonisa bolingo mpo na bandeko na yo. Ndimá toli mpe disipilini nyonso oyo bakopesa yo na bato oyo bakɔmeli. (Masese 8:33) Kokisáká mokumba na yo nyonso ya moklisto. Nsima ya ntango mpe na milende, yo mpe okoki ‘kokóma na bomoko na kondima mpe na boyebi ya Mwana ya Nzambe, ya mobali [oyo akɔmeli], lokola oyo akoli mpenza, oyo akokani na Klisto.’—Baefese 4:13.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
Baklisto oyo bakɔmeli basalaka milende mpo lisangá ezala makasi. Ntango baklisto yango bazali na lisangá moko, basalaka ete elimo ya lisangá yango ezala malamu.
[Bililingi na lokasa 29]
Bato oyo bakɔmeli basalaka ete lisangá ezala malamu na ndenge basepelaka na bato nyonso.