Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Na Baloma 5:3-5, mpo na nini ntoma Paulo atángaki elikya na nsuka ya makambo oyo alobeli?
Paulo atángaki makambo mingi oyo ezalaka epai ya baklisto—minyoko, koyika mpiko, kondimama mpe elikya. “Elikya” yango ezali te elikya oyo tozalaki na yango na ebandeli ntango toyekolaki Biblia; kasi ezali elikya ya makasi koleka, ya mozindo, elikya oyo moklisto akoki kozwa yango nsima ya ntango.—15/12, nkasa 22-23.
• Mpo na nini moklisto akoki lelo kotya likebi na masano oyo ezalaki kosalema na Grèce ya kala?
Soki tokangi ntina ya lolenge mpe makambo ya masano yango, ekoki mpenza kongɛngisa bavɛrsɛ mingi ya Biblia. Bavɛrsɛ mosusu elobeli ‘kokima mbangu na kotosa mibeko,’ ‘kolongola kilo nyonso mpe kolanda ndakisa ya Yesu,’ ‘kokima mbangu na molende,’ mpe kozwa motole, to libonza. (2 Timote 2:5; 4:7, 8; Baebele 12:1, 2; 1 Bakolinti 9:24, 25; 1 Petelo 5:4, NW)—1/1, nkasa 28-30.
• Mayele nini ya sika mpo na kosakola nsango malamu ebimaki na Yanuali 1914?
Na ntango wana babimisaki “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Ezalaki kolakisama na biteni minei mpe ezalaki na bililingi oyo ezalaki koningana mpe ebele ya bililingi ya langi ndenge na ndenge oyo ezalaki koningana te (diapozitive); mingi na yango ezalaki kolakisa na ntango fono ezalaki kobɛta diske oyo ezalaki na masolo oyo ezali kolimbola bililingi yango. Babongisaki biteni 20 ya Drame yango mpe basalelaki yango mingi mpo na koteya bato nsango ya Biblia.—15/1, nkasa 8-9.
• Ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekeseni na lisangá oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta?
Bato nyonso ya lisangá oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta baponaka bakambi na yango na voti, nzokande, ezali bato te, kasi Yesu nde aponaka bato oyo bazali na Lisangani ya Mikolo-Bakambi. Esɛngisami te ete batambwisi ya masangá ndenge na ndenge esalemi na kolanda mibeko ya Leta, oyo Batatoli ya Yehova basalelaka, bázala na Lisangani ya Mikolo-Bakambi. Na likita ya nsuka ya mbula ya basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, oyo eutaki kosalema, bandeko mosusu oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo bazalaki kosala lokola bakambi, bamilongolaki bango moko na bisika yango. Na bisika na bango baponaki, kati na “bampate mosusu,” bandeko oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala yango. (Yoane 10:16) Yango ekosala ete bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi bázala na ntango mingi mpo na kolɛngɛla bilei ya elimo mpe makambo mosusu oyo etali kokokisa bamposa ya elimo ya bandeko na mokili mobimba.—15/1, nkasa 29, 31.
• Yebisá nkombo ya bato mibale oyo bapesaki ndakisa oyo tokoki kotalela mpo na koyekola lolenge ya kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto?
Ya liboso ezali Hana, mama ya Samwele. Akokaki kolɛmba nzoto ntango Eli, nganga monene ya Yisalaele azwelaki ye makanisi mabe. Nzokande, Hana alobaki polele mpe na limemya mpo na kosembola makanisi na ye. Lisusu, Hana akangelaki Eli nkanda te. Ya mibale ezali Malako; ye akokaki kolɛmba nzoto ntango ntoma Paulo aboyaki kokende na ye elongo na mobembo lokola bamisionɛrɛ. Na esika ya kolɛmba na ndenge azangaki libaku malamu yango, alandaki kosala mosala na ye; akendaki mibembo na Balanaba.—1/2, nkasa 20-22.
• Mpo na nini baklisto basengeli kokeba na likambo ya kopesa to kozwa bakopi ya baprograme ya ordinatɛrɛ?
Baprograme mingi ya ordinatɛrɛ (ezala oyo ya masano) ezalaka na mikanda ya Leta oyo epesaka babimisi na yango lotomo nyonso na babimisi, mpe emonisaka ete kaka moto oyo asombi yango nde akoki kokɔtisa to kosalela programe yango na ordinatɛrɛ na ye. Mbala mingi, kosala bakopi mpo na bato mosusu ezali nde kobuka mobeko ya lotomo ya mobimisi; ata soki topesi bango yango mpamba. Baklisto basengeli kotosa mibeko, ‘kopesa na Kaisala biloko ya Kaisala.’ (Malako 12:17)—15/2, nkasa 28-29.
• Cyrille na Méthode bazalaki banani, mpe eloko nini ya sika bamemaki na boyekoli ya Biblia?
Bazalaki bandeko mibale oyo babotamaki na Tesaloniki, na ekólo Grèce, na ekeke ya libwa. Basalaki alfabe ya sika ya lokota ya Slavon, mpe babongolaki mikanda mingi ya Biblia na lokota yango.—1/3, nkasa 28-29
• Maloba “kokanisa makambo ya elimo” elimboli nini?—Baloma 8:6.
Yango elimboli kotika ete nguya ya Yehova oyo esalaka mosala ekɛngɛla, eyangela, mpe etambwisa biso. Tokoki kotika ete elimo ya Nzambe esala kati na biso na kotángáká mpe koyekoláká Biblia, na kotosáká mibeko ya Nzambe na motema mobimba, mpe na kobondeláká mpo na kozwa elimo ya Nzambe.—15/3, nkasa 15.
• Tokoki kosala nini soki tomoni ete bazali kozwela biso makanisi ya mabe?
Malamu koluka komonisa likambo yango polele, na elimo ya bolingo. Soki emonani ete elongi te, kolɛmba nzoto te. Sɛngá mayele mpe lisungi epai ya Yehova, ye oyo “akomekaka mitema.” (Masese 21:2; 1 Samwele 16:7)—1/4, nkasa 21-23.