Okofuta motuya nini mpo na mombongo na yo?
MWASI ya presidá ya mboka moko ya Amerika ya Súdi afundamaki ete abebisaki bankótó ya badolare kati na boyokani elongo na bakompanyi ya lokuta oyo basangani ya libota na ye basalaki. Mobali moko, moto ya mombongo, ya mbula 38 na mboka Inde akangamaki mpe akumbamaki mosika ya ndako na ye kitoko mpe ya mituka na ye 29 mpo ete afundamaki ete asalelaki mayele mabe mpo na koyiba bamiliare 1,6 ya badolare kati na mombongo mpe mosolo ya bánki. Na mboka Philippines, bankóto ya bafandi ya esanga moko babikelaka na mosala ya kosala mandóki kozanga ndingisa. Mpo na kobatela mosala yango oyo ezali kopesa mosolo mingi, elobamaki ete bazalaka na momeseno ya kopesa kanyaka epai na bakonzi ya Leta.
Ee, kozanga kolongobana mpe kobuba ezali kosalema kati na mombongo bipai binso na mokili. Mpe mbala mingi bato oyo basalaka bongo bafutaki yango na etɛlɛmɛlo mpe na lokumu na bango, bakisá mpe mosolo na bango.
Ezali boni mpo na yo? Osalaka mombongo? To ozali kokana kobanda mombongo? Okofuta motuya nini mpo na yango? Kozanga ntembe, kosala mombongo ekosɛnga ete ofuta eloko moko. Yango ezalaka ntango nyonso mabe te. Nzokande, ezali likambo ya mayele kotánga motuya liboso na komikɔtisa kati na mombongo to liboso ya kozwa bikateli bitali mombongo oyo ozali kosala. (Luka 14:28) Etánda oyo ezwami na lokasa 31 ezali komonisa mituya ya kofuta oyo osengeli kotalela.
Ya solo, kosala mombongo ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Moklisto azali na mikumba ya elimo mpe ya bizaleli malamu oyo asengeli kotalela. Okoki kofuta motuya yango mpe kobatela bokatikati na yo ya elimo? Mituya misusu mileki oyo okoki kondima engebene mitindá ya bizaleli malamu? Wapi mwa mitindá oyo ekosalisa yo na koyeba mituya nini ebongi kofuta mpe oyo wapi ebongi te?
Tyá mosolo na esika na yango
Esengeli kozala na mosoló mpo na kosala mombongo, mpe elikya ezali ete mombongo ekokɔtisa mosolo mobongi mpo na kosunga libota na yo. Nzokande, kati na likambo ya mosolo ezali mpasi te kobosana mokano omityelaki na ebandeli. Lokoso ekoki kokɔta na kati. Mpo na bato mingi, na likambo litali mosolo makambo mosusu nyonso masengeli kozala na esika ya mibale. Nzokande, mokomi moko ya Masese ya Biblia, Agulu, amonisaki likanisi libongi ntango alobaki ete: “Pɛsa ngai bobola tɛ, bojui mpe tɛ. Leisa ngai bilei bikoki na ngai.” (Masese 30:8) Ayebaki motuya ya kosepela na biloko oyo bikoki mpo na bomoi na moto—alukaki te kokóma na bozwi mingi.
Nzokande, lokoso ekoki kosala ete moto abosana motindá wana ntango libaku moko ya kitoko mpenza emonani. Mosaleli moko ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova kati na mokili moko ya bobólá apesaki lapólo ya likambo motindo oyo. Kompanyi moko oyo ezalaki na mposa ya mbongo mpo na kotambwisa mosala na yango emonisaki lokola ete bato oyo bakotya mbongo kati na yango bakozwa nokinoki mosolo na bango oyo ekólisami mbala mibale, ntango mosusu bobele nsima ya mwa basanza. Lipesi wana ya kozwa mosolo nokinoki ememaki bato mingi na kotya mosolo kati na yango. Mosaleli-motamboli alobi ete: “Basusu bazalaki mpenza na mposa makasi ya komikɔtisa kati na yango. Bamitunaki mpenza mituna mingi te mpe badefaki mosolo mpo na [kokɔtisa].”
Na kokesena, bato mibale bakendaki kosala bolukiluki na biro ya kompanyi yango liboso ya kokɔtisa mosolo na bango. Lisɛngi na bango mpo na komona ndako ya bamasini ya mosala endimamaki te. Yango etindaki bango na kokakatana na ntina na limemya oyo bazalaki na yango mpo na kompanyi yango. Yango ezalaki libateli mpo na bango, mpamba te nsima na mwa bapɔ́sɔ, mwango ya kobuba motɔndɔlamaki, mpe bakangaki bato mosusu. Kanisá naino motuya efutamaki na bato oyo basalaki bolukiluki liboso te. Babungisaki bobele mosolo te kasi mbala mosusu mpe baninga oyo badefisaki bango mosolo nzokande bakokaki lisusu kozwa yango te ntango mwango mabe mokweaki. Kati na likambo litali mosolo, ezali mpenza mayele kosalela motindá oyo mozali kati na Masese 22:3: “Moto na mayɛlɛ akosɔsɔla mabe liboso mpe akomibomba; nde bajoba bakoleka wana mpe bakojua etumbu”!
Bongolá maloba na yo te
Ezali boni soki mombongo mopesi te litomba oyo omizelaki na yango? Njembo 15:4 ezali kokumisa moto oyo abongolaka boyokani na ye te ata soki kosala bongo ekopesa ye litomba te: “Sɔkɔ akati ndai, akobongola yango tɛ ata epɛsi ye mpasi.” Ezali mpasi te kokangama na maloba na yo wana makambo mazali kotambola malamu. Kasi bosembo etyami na komekama wana osengeli kobungisa mosolo.
Omikundolá ndakisa ya Biblia oyo etali eleko ya Yosua. Bato na Gibona basalelaki mayele mabe mpo ete bankumu ya Yisraele basala boyokani elongo na bango ete báboma bango te. Ya solo, bazalaki eteni ya libota oyo litalelamaki lokola likámá liboso na Yisraele. Ntango mayele mabe na bango mayebanaki, “bato na Yisalaele nde babomaki bango tɛ, mpɔ ete bato na liboso na lingomba basimbelaki bango ndai na nkombo na [Yehova] Njambe na Yisalaele.” (Yosua 9:18) Atako etuluku wana eutaki na mboka ya monguna, bankumu bamonaki malamu ete babongola liloba na bango te. Mpe makambo oyo malandaki nsima mamonisaki ete Yehova andimaki yango.—Yosua 10:6-11.
Okokangama na boyokani mpe na kontrá ya mombongo na yo ata soki makambo mabongi mpenza te lokola okanisaki?a Soki osali bongo okokokana na Yehova, oyo akangamaka ntango nyonso na liloba na ye.—Yisaya 55:11.
Zalá moto na kolongobana
Ezaleli ya kolongobana ezali na likámá ya kolimwa, soki yango elimwi naino te kati na mombongo ya mokili ya ntango na biso. Bato mosusu oyo bazali kosala mombongo motindo moko na yo bakoki kozanga kolongobana mpo na kobakisa mosolo na bango. Ekoki kozala ete bazangi kolongobana ntango bazali kosala piblisité ya biloko oyo bazali kotɛkisa. Bakoki mbala mosusu koyiba nkombo ya kompanyi mosusu mpe kotya yango likoló na biloko na bango. To bakoki kolakisa biloko ya ntalo moke lokola oyo ya motuya mingi. Mitindo wana nyonso mizali kozanga kolongobana. Baoyo bazali kosala bongo bazali “baoyo mabe” oyo, engebene Asafa, “bakojua mosɔlɔ mingi,” na mwango oyo mozali mpenza sembo te.—Njembo 73:12.
Lokola ozali moklisto, okosalela myango oyo mizali sembo te? To okomitika kotambwisama na mitindá ya Biblia, lokola oyo: “Tosaleli moto mɔkɔ mabe tɛ, tobebisi moto mɔkɔ tɛ, tobɔtwɛli moto elɔkɔ tɛ”; “tosili koboya makambo mabombami mpe na nsɔni, tondimi kosala makambo na mayɛlɛ mabe tɛ”; “bipimeli na bojito bikɛsɛni ijali elɔkɔ na koboyama na [Yehova], epimelo na bojito na lokuta ejali malamu tɛ”? (2 Bakɔlinti 4:2; 7:2; Masese 20:23) Omikundolá ete mobandisi ya kozanga kolongobana ezali moto mosusu te, kasi Satana Zábolo, “tata na nkuta.”—Yoane 8:44.
Basusu bakoki kotya ntembe mpe koloba ete: ‘Ezali mpasi kokóba mombongo, kozanga kosalela myango mizangi kolongobana lokola basusu bazali kosala yango.’ Ezali wana nde moklisto asengeli komonisa ete azali na kondima epai na Yehova. Kolongobana etyami na komekama wana esengeli kofuta motuya ya eloko moko. Koloba ete moto akoki kozwa biloko oyo asengeli na yango bobele soki azangi kolongobana ekokani mpenza na koloba ete Nzambe abatelaka te bato oyo balingaka ye. Ye oyo azali na kondima ya solo epai na Yehova ayebi ete Nzambe akoki kokokisa mposa ya basaleli na ye na mikili nyonso mpe kati na ezalela ya makambo nyonso. (Baebele 13:5) Ya solo, okoki kozwa mosolo moke na bokokanisi elongo na oyo bato bazangi kolongobana bazwaka, kasi yango ezali motuya oyo ebongi kofuta mpo na kozwa mapamboli ya Nzambe, boye te?
Omikundolá ete, kozanga kolongobana ekokani na ebundeli ebéngami boomrang, oyo soki ebwakami, ezongelaka moto oyo abwakaki yango. Soki emonani ete moto moko ya mombongo azangi kolongobana, basombi mpe bato oyo bapesaka ye biloko ya koteka mbala mingi bakosundolaka ye. Akoki kobuba bango mbala moko, nzokande akokoka lisusu kozimbisa bango te. Na ngámbo mosusu, moto oyo azali sembo kati na mombongo azwaka mbala mingi limemya ya bato mosusu. Kebá ete likanisi oyo ya mabe ezwa yo te, ‘Bato nyonso basalaka yango, boye ezali malamu.’ Motindá ya Biblia ezali ete, “Okobila ebele mpɔ na kosala mabe tɛ.”—Esode 23:2.
Na ndakisa, moninga na yo oyo boumeli na ye mingi na mombongo azali moklisto te mpe alandaka ntango nyonso te mitindá ya Biblia. Ekozala malamu kosalela ntina wana mpo na kokima mokumba na yo wana likambo moko oyo ezali kobuka mitindá ya Biblia ezali kosalema? Kanisá bandakisa ya Adama mpe Saulo. Na esika ya kopɛngola lisumu, bamitikaki nde kati na yango mpo na bopusi ya bato mosusu mpe na nsima bapamelaki baninga na bango. Oyo nde motuya monene bafutaki!—Genese 3:12, 17-19; 1 Samwele 15:20-26.
Tósala na motindo mobongi epai na baninga na biso bandimi
Ezali na motuya oyo tosengeli kotalela ntango tozali kosala mombongo elongo na baninga na biso basaleli ya Yehova? Ntango mosakoli Yilimia asombaki elanga na mboka na ye ya kobotama Anatoto epai na ndeko na ye, apesaki ye te bobele mosolo mpe mbote na mabɔkɔ lokola elembo ya boyokani. Nzokande, alobaki ete: “Nakomaki mpe mokanda mpe nakangaki yango, nabiangaki batatoli mpe napimelaki ye mosɔlɔ kati na epimelo na bojito.” (Yilimia 32:10) Kokoma mikanda ya boyokani motindo yango ekoki kopɛngola kozanga koyokana nyonso oyo ekoki kobima na nsima soki makambo mabongwani.
Kasi ezali boni soki emonani ete ndeko moko moklisto asali yo mabe kati na mombongo? Okomema ye na esambiselo ya mokili? Biblia ezali polele na likambo yango. Paulo atunaki ete: “Sɔkɔ mɔkɔ na bino ajali na likambo epai na mosusu, akojala nde na lolɛndɔ kosambisa liboso na bato na masumu kasi liboso na Babulami tɛ?” Ezali boni soki likambo yango libongisami nokinoki te na lolenge oyo lobongi? Paulo abakisi ete: “Awa ejali bino na makambo na kofundana kati na bino, bojongi nsima. Mpɔ na nini bokondima tɛ ete bato basalela bino mabe? Mpɔ na nini bokondima tɛ ete bato bajimbisa bino?” Kanisá naino nsoni oyo ekoya likoló na lisangá ya boklisto soki bato na libándá bayoki ete baklisto ya solo bazali kobundisana na esambiselo ya mokili! Ekoki kozala ete na likambo motindo yango bolingo ya mosolo esili kokóma makasi koleka bolingo mpo na bandeko? To ekoki kozala ete lokumu ya moto moko ebebisamaki mpe mposa ya kozongisa mabe ezali likambo ya liboso oyo azali na yango na makanisi na ye? Toli ya Paulo ezali komonisa ete na makambo lokola oyo ekozala malamu kotika mosolo ebunga na esika ya komema makambo na esambiselo ya mokili.—1 Bakɔlinti 6:1, 7; Baloma 12:17-21.
Ya solo, mwango ezali ya kosilisa matáta motindo wana kati na lisangá engebene toli ya Makomami. (Matai 5:37; 18:15-17) Mpo na kosalisa bandeko oyo bazali na matáta ete bálanda matambe oyo masɛngami, bakɛngɛli baklisto bakoki kopesa toli oyo ebongi mpo na baoyo nyonso batalelami na likambo yango. Ekoki komonana ete ezali pɛtɛɛ kondima mitindá ya Biblia na boumeli ya masoló motindo yango, kasi na nsima okomonisa ete oyokaki mpenza na kosaleláká toli oyo epesamaki? Bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na baninga na biso baklisto esengeli kopusa biso na kosala bongo.
Na ntembe te, kosala mombongo ekosɛnga ete ofuta motuya ya eloko moko. Elikya ezali ete, motuya oyo okofuta ezali oyo esengeli na yango. Wana ozali liboso na bikateli to na likambo moko oyo elongobani te, kobosana soko moke te ete ezali na biloko mosusu kati na bomoi oyo bizali na motuya mingi koleka mosolo. Na kotyáká mosolo na esika oyo ebongi na yango, na kobongoláká te maloba na yo, na kozaláká moto ya kolongobana, mpe na kosaláká epai na baninga na yo ya mombongo na motindo ya boklisto, okosɛnzɛla ete mombongo ezwela yo ntango mpe mosolo te koleka oyo osengeli kopesa na yango, mpe na ntango wana, tokoki kobatela boyokani na biso elongo na basusu, lisosoli malamu mpe boyokani malamu elongo na Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na ndakisa ya mikolo na biso etali kokangama na liloba na biso kati na mombongo, talá lisoló “Une parole, un engagement” kati na Lamuká! ya 8 mai 1988, nkasa 11-13 (ebimeli ya Lifalansé).
[Etanda na lokasa 31]
Biloko oyo okoki kofuta mpo na mombongo na yo
Ntango: Kosala mombongo na yo moko mbala mingi ezwaka ntango koleka kozala mosáli kati na kompanyi. Yango ekobulunganisa manáka na yo, kotikeláká yo ntango moke mpo na makambo ya elimo, oyo mazali makambo maleki ntina? Na ngámbo mosusu, okoki kobongisa makambo na yo mpo na kolekisa ntango mingi mpo na kosala mokano ya Nzambe? Soki ee, ezali malamu. Kasi kebá! Koloba ezali pɛtɛɛ nzokande kosala yango ezalaka mpasi.
Mosolo: Esɛngaka kozala na mosolo mpo na kozwa mosolo. Mombongo na yo mozali kosɛnga mosolo boni? Osili kozwa mosolo mpo na kobanda yango? To ekosɛnga ete odefa? Okondima kobungisa mwa mosolo? To motuya yango mozali mingi koleka oyo okoki kondima soki makambo matamboli te na motindo oyo ozalaki kozela yango?
Baninga: Na ntina na mikakatano oyo mizali kobima mokolo na mokolo, mombongo ya bato mingi ya mombongo ememaka na kobungisa baninga na bango. Atako makoki ya kosala boninga mazali, likoki ya kobebisama ya boyokani lizali mpenza monene. Ezali boni soki baninga wana bazali bandeko na biso baklisto?
Lisosoli ya malamu: Likanisi oyo lizali komonana mingi lelo kati na mombongo na mokili ezali oyo ete “Komekana makasi” to “Litomba nini nakozwa kati na yango?” Koleka bayekoli 70 likoló na monkámá oyo batunamaki na Mpótó bamonaki ete bizaleli malamu bizali na esika moke to bizali na esika te kati na mombongo. Ezali likambo ya kokamwa te ete kobuba, kozanga kolongobana mpe mimeseno ya mombongo oyo mizali sembo te misili kopalangana bipai binso. Okomekama ete ólanda basusu?
Boyokani na yo elongo na Yehova: Misala nyonso ya mombongo oyo mizali kotɛmɛla mibeko mpe mitindá ya Nzambe, atako mizali kosalema mingi kati na mombongo, mikobebisaka boyokani ya moto elongo na Mokeli na ye. Ekoki kosɛnga ete áfuta yango na elikya na ye ya bomoi ya seko. Oyo ekozala mpenza motuya moleki monene oyo moklisto asengeli kofuta, atako azwi matomba nini ya biloko ya mosuni, boye te?
[Bililingi na lokasa 31]
Eloko nini ekopesa nzela na kopɛngola kozanga koyokana oyo ekoki kobima na nsima? Kondimisana na maloba mpamba to mokanda ya boyokani oyo ekomami?