Batelá motema na yo mpo obungisa bizaleli ya pɛto te
“Koleka eloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpo makambo ya bomoi eutaka na yango.”—MASESE 4:23, NW.
1-3. (a) Ndenge nini bato bazali komonisa ete kozala na bizaleli ya pɛto ezali na ntina te mpo na bango? Pesá ndakisa. (b) Mpo na nini ezali na ntina tótalela motuya ya bizaleli ya pɛto?
LIYEMI moko ezalaki komonana ya kala mpenza. Mbala mosusu, nkolo na yango azalaki komona ete ezali nde kobebisa bonzenga ya ndako na ye. Amonaki eloko oyo akoki kosala na yango te. Nsukansuka, atɛkaki yango na dolare 29 mpamba. Mwa bambula na nsima, emonanaki ete liyemi yango ekoki nde kotɛkama na dolare soki milio moko! Ezalaki eloko moko ya motuya mpenza oyo emonanaka mpambampamba te. Kanisá ndenge moto oyo atɛkaki yango liboso na ntalo moke ayokaki!
2 Likambo ya ndenge wana esalemaka mingi na oyo etali bizaleli ya pɛto, elingi koloba kozala na etamboli ya pɛto mpe koboya misala ya mbindo. Lelo oyo, bato mingi bazali komona te ntina ya kozala na etamboli ya pɛto. Basusu bazali kokanisa ete bizaleli ya pɛto ezali makambo ya kala oyo ezali lisusu na ntina te lelo oyo. Yango wana bazali kotɛka yango na ntalo moke. Basusu bazali kotika etamboli na bango ya pɛto mpo na elɛngi ya mwa ntango moke ya kosangisa nzoto. Basusu bazali kotika etamboli na bango ya pɛto mpo bázwa lokumu na miso ya baninga na bango to na miso ya mwana mobali to mwana mwasi moko.—Masese 13:20.
3 Mingi bafungwamaka miso na nsima mpe bamonaka ntina ya etamboli ya pɛto ntango basí babebisi. Mbala mingi bakómaka mawamawa. Ndenge Biblia elobi yango, mbuma mabe ya kindumba to mpe ya mobulu ya basi ekoki kozala lokola pwazo, “bololo lokola mbondo.” (Masese 5:3, 4) Lokola bizaleli ya bato mingi na mokili ebebi mpenza, ndenge nini okoki kopesa motuya na bizaleli ya pɛto mpe kobatela yango? Tokolobela makambo misato oyo okoki kosala.
Batelá motema na yo
4. Motema ya elilingi ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kobatela yango?
4 Mpo na kozala ntango nyonso na bizaleli ya pɛto, sɛkɛlɛ ezali kobatela motema. Biblia elobi: “Koleka eloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpo makambo ya bomoi eutaka na yango.” (Masese 4:23, NW) “Motema na yo” oyo balobeli awa ezali nini? Ezali motema mpenza te oyo ya nzoto. Ezali nde motema ya elilingi. Elingi koloba bomoto na yo, oyo esangisi elimo, makanisi, mpe bamposa na yo. Biblia elobi ete: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.” (Deteronome 6:5) Yesu abengaki yango mobeko oyo eleki monene. (Malako 12:29, 30) Tomoni ete motema yango ezali na motuya mingi. Ebongi mpenza tóbatela yango.
5. Ndenge nini motema ekoki kozala eloko ya motuya, mpe lisusu likama?
5 Kasi, Biblia elobi mpe ete “motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” (Yilimia 17:9) Ndenge nini motema ekoki kokosa biso—likambo oyo ezali likama mpo na biso? Tózwa ndakisa ya motuka. Motuka ezali na ntina mingi, mpe ekoki kobikisa moto oyo basengeli komema ye mbangumbangu na lopitalo. Kasi, soki sofɛlɛ azali kotambwisa motuka malamu te, azali kobalola yenda malamu te, motuka yango ekoki koboma. Ezali mpe bongo mpo na motema na yo; soki obateli yango te, okoluka kokokisa mposa na yango nyonso mpe okosuka na likama. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Ye oyo akotalela motema na ye moko azali elema nde ye oyo akotambola na mayele, ye akobika.” (Masese 28:26) Okoki kolanda nzela ya bwanya mpe kokima makama soki otiki Liloba ya Nzambe etambwisa yo, se ndenge oyo okotala karte ya nzela liboso okɔta na motuka na yo mpo okende mobembo.—Nzembo 119:105.
6, 7. (a) Bosantu ezali nini, mpe mpo na nini ezali na ntina epai ya basaleli ya Yehova? (b) Nini endimisi biso ete bato ya kozanga kokoka bakoki komonisa bosantu ya Yehova?
6 Motema na biso ebendamaka yango moko na etamboli ya pɛto te. Biso nde tosengeli kotya yango na nzela. Lolenge moko oyo tokoki kosala yango ezali ya koyeba motuya ya solosolo ya etamboli ya pɛto. Ezaleli yango ezali ndeko ya bosantu, oyo elimboli kozala na mbindo te, to na lisumu te. Bosantu ezali ezaleli malamu mingi oyo Yehova Nzambe azali na yango. Bavɛrsɛ mingi ya Biblia elobeli yango mpo na Yehova. Kutu, Biblia elobi ete “Bosantu ezali na Yehova.” (Exode 28:36, NW) Kasi, ndenge nini biso bato ya kozanga kokoka tokoki kozala na ezaleli ya malamu mingi ndenge wana?
7 Na kati ya Liloba na ye, Yehova alobi na biso boye: “Bosengeli kozala basantu, mpo ngai nazali mosantu.” (1 Petelo 1:16) Tokoki mpenza kolanda ndakisa ya bosantu ya Yehova, kozala pɛto na miso na ye mpe kobatela ezaleli yango. Na yango, ntango tozali koboya misala ya mbindo, tozali koluka komonisa ezaleli malamu mingi ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló! (Baefese 5:1) Tókanisa te ete tokoki kosala yango te, mpamba te Nkolo na biso Yehova atondi na bwanya mpe azali na makambo makasi te, asɛngaka biso te makambo oyo tokoki kosala te. (Nzembo 103:13, 14; Yakobo 3:17) Ezali ya solo ete tosengeli kosala milende mpo na kobatela elimo na biso pɛto mpe kokangama na etamboli malamu. Kasi, ntoma Paulo alobaki ete “bosembo mpe . . . bopɛto ya bizaleli . . . esengeli na Klisto.” (2 Bakolinti 11:3) Mpo na Klisto mpe mpo na Tata na ye, tosengeli kosala milende mpo na kotikala pɛto! Kutu, bango bamonisi biso bolingo mingi oyo tokoki kozongisela bango te. (Yoane 3:16; 15:13) Tozali na libaku malamu ya kozala na bomoi ya pɛto mpo na komonisa botɔndi na biso. Soki tozali kotalela bizaleli ya pɛto ndenge yango, tokomona motuya na yango mpe tokobatela motema na biso.
8. (a) Ndenge nini tokoki koleisa motema na biso ya elilingi? (b) Masolo oyo tolingaka ekoki komonisa nini?
8 Tokoki mpe kobatela motema na biso na kotalela makambo oyo tozali kokɔtisa na bɔɔngɔ na biso. Mpo makanisi mpe motema na biso ezala malamu, tosengeli ntango nyonso koleisa yango malamu na elimo, kotya makanisi na biso na nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Bakolose 3:2) Masolo na biso esengeli mpe komonisa ete totyaka makanisi na biso na makambo yango. Soki toyebani ete tolingaka masolo ya makambo ya mokili, ya makambo ya nsɔni, tozali komonisa ndenge oyo motema na biso ezali. (Luka 6:45) Tóluka koyebana ete tolingaka masolo ya elimo mpe oyo etongaka. (Baefese 5:3) Mpo na kobatela motema na biso, ezali na makama oyo tosengeli kokima. Tólobela makama mibale.
Bókima pite
9-11. (a) Mpo na nini bato oyo bazali kobosana toli ya 1 Bakolinti 6:18 basukaka na kosala pite to ekobo? Pesá ndakisa. (b) Mpo na kokima pite, tosengeli koboya nini? (c) Ndakisa malamu nini Yobo, moto ya sembo, atikelaki biso?
9 Ntoma Paulo apesaki toli oyo epemamaki na Yehova oyo esalisi bato ebele na kobatela motema na bango mpe kozala na bizaleli ya pɛto. Paulo alobaki ete: “Bókima pite.” (1 Bakolinti 6:18) Tómoni ete alobaki kaka te ete, “Bóboya pite.” Baklisto basengeli kaka te koboya pite. Basengeli kokima makambo ya nsɔni ndenge bakimaka eloko nyonso oyo ezali likama mpo na bomoi na bango. Soki tolandi toli yango te, tokomityela mabaku oyo ekokweisa biso na lisumu monene ya pite to ekobo mpe ekobebisa boninga na biso na Nzambe.
10 Tózwa ndakisa moko: Libota moko balingi kobima; mama asukoli mwana na ye mpe alatisi ye bilamba ya kitoko. Ntango bazali kozela ngonga ya kokende, mwana alingi ete akende kosakana libándá, mpe mama andimi kasi, asɛngi ye likambo moko. Alobi na ye boye: “Kokende pembeni ya mai ya salite oyo ezali na libanda te. Soki obebisi bilamba, nakobɛta yo.” Kasi, mwa moke na nsima, amoni mwana azali kotambola pene mpenza ya mai ya salite mpe alingi kokwea. Pɔtɔpɔtɔ ebebisi ye te. Kasi, abosani ete mama apekisaki ye kokende pembeni ya mai ya salite, mpe akosuka kaka na kobebisa bilamba. (Masese 22:15) Bilenge mpe mikóló mingi oyo bayebi malamu makebisi bazali kosala libunga yango. Ndenge nini?
11 Na mikolo na biso, ebele ya bato bamipesi na “bamposa ya kosangisa nzoto na ndenge ya nsɔni”; basusu bakómi kosalela makambo ya pite mombongo. (Baloma 1:26, 27) Bazulunalo, babuku, bakasɛti-video mpe Internet etondi na bililingi ya bato bazali kosangisa nzoto. Ezali mpasi mpo bato oyo batalaka bililingi yango bákima pite. Bazali kosakana na pite, kotambola pembeni na yango, mpe bazali kobosana toli ya Biblia. Na esika bábatela mitema na bango, bazali kobebisa yango na ndenge bazali kotala bililingi oyo ekoki kosɛnga bambula mpo ebunga na makanisi ya moto. (Masese 6:27) Tózwa liteya epai ya Yobo, moto ya sembo, oyo ayokanaki na miso na ye ete atala te makambo oyo ekoki kobenda ye na misala ya mabe. (Yobo 31:1) Tosengeli mpenza kolanda ndakisa na ye!
12. Ndenge nini baklisto bakoki ‘kokima pite’ ntango bazali bafianse?
12 Esengeli mpenzampenza ‘kokima pite’ ntango bozali bafianse. Na ntango bato bazali bafianse, ezalaka ntango moko ya esengo, oyo bazelaka makambo malamu oyo ezali liboso na bango; nzokande, bilenge mosusu bazali kobebisa eleko yango na ndenge bazali kosala makambo oyo ekoki komema bango na kokwea na pite. Ntango bazali kosala bongo, bazali kobebisa makambo oyo etongaka libala ya malamu, elingi koloba bolingo ya solosolo, komipekisa, mpe kotosa Yehova Nzambe. Mobali moko ná mwasi na ye bazalaki na etamboli ya mbindo ntango bazalaki bafianse. Nsima ya libala na bango, mwasi alobaki ete lisosoli na ye ezalaki kotungisa ye, kutu, mokolo ya fɛti ya libala na bango azalaki mpenza na esengo te. Alobaki boye: “Nasɛngaki Yehova bolimbisi mbala ebele, kasi, atako eleki mbula nsambo, lisosoli na ngai ezali kaka kotungisama.” Bato oyo basali masumu ya ndenge wana basengeli koluka lisalisi ya elimo epai ya bankulutu. (Yakobo 5:14, 15) Nzokande, baklisto mingi, ntango bazali bafianse, bamitambwisaka na bwanya mpe bakebaka ete bákwea te. (Masese 22:3) Bakebaka ete ntango bazali komonisana bolingo, bákóma te tii na kosimbanasimbana na nzoto. Ntango balingi kobima, balukaka moto ya misato azala na bango mpe bakimaka bisika oyo bakozala kaka bango mibale.
13. Mpo na nini moklisto asengeli te kondima kozala fianse ya moto oyo asalelaka Yehova te?
13 Baklisto oyo bandimaka kozala bafianse ya bato oyo bazali basaleli ya Yehova te, bakutanaka na mikakatano makasi. Na ndakisa, ekobanda boni yo mosaleli ya Yehova okende kolinga moto oyo alingaka Yehova Nzambe te? Ezali na ntina mingi moklisto abalana kaka na moto oyo alingaka Yehova mpe atosaka mitinda na ye ya etamboli ya pɛto. Liloba ya Nzambe elobi na biso ete: “Bósala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te. Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe botyoli-mibeko? To bosangani nini ezali na kati ya pole mpe molili?”—2 Bakolinti 6:14.
14, 15. (a) Libunga nini bato mingi bazalaka na yango mpo na ndimbola ya “pite”? (b) “Pite” esangisi makambo nini, mpe ndenge nini baklisto bakoki ‘kokima pite’?
14 Koyeba likambo malamu ezali mpe na ntina mingi. Tokoki kokima pite te soki toyebi te nini babengi pite. Lelo oyo, bato mosusu bazali kolimbola “pite” na ndenge ya malamu te. Bakanisaka ete kosilisa mposa na bango ya kosangisa nzoto na ndenge mosusu ezali mabe te, mabe nde soki basangisi mpenza nzoto. Kutu, minganga mosusu oyo bayebani mingi balakisaka bilenge mayele ya kokima zemi mpo bázwaka bazemi ya balabala mpambampamba te. Toli ya ndenge wana ezali kobungisa bango nzela. Koboya kozwa zemi ntango obali naino te ná kobatela etamboli ya pɛto ezali makambo mibale ekeseni, mpe kosala pite elimboli kaka kosangisa nzoto te.
15 Liloba ya Grɛki pornéïa, oyo ebongolamaka na “pite,” ezali kolobela makambo mwa mingi. Elimboli kosangisa nzoto na moto oyo bobalani na ye te mpe, mingimingi, kosalela nzoto ya mwasi to ya mobali na ndenge oyo ebongi te, ndenge oyo esalemaka mingi na bandako ya basi ya ndumba. Pornéïa elimboli mpe kosangisa nzoto na monɔkɔ, na esumbeli to mpe kosimbasimba moto na binama ya kobotela. Baoyo bakanisaka ete misala wana ezali “pite” te bazali komikosa mpe basí bazwami na motambo ya Satana. (2 Timote 2:26) Lisusu, kobatela bopɛto elimboli kaka te kosala te makambo oyo ekoki kobengama pite. Mpo na ‘kokima pite,’ tosengeli koboya makambo nyonso ya mbindo mpe makambo ya nsɔni oyo ekoki komema biso na lisumu monene ya pornéïa. (Baefese 4:19) Soki tozali kosala bongo nde tokotikala pɛto.
Kebá na kokangamakangama na moto oyo ozali kokana kobala ye te
16. Maloba ya bolingo, kosimbanasimbana mpe kopesana bizi ebongi mpo na banani, mpe ndakisa nini ya Biblia elobeli likambo yango?
16 Mpo na kozala ntango nyonso na etamboli ya pɛto, esengeli mpe koboya kokangamakangama na moto oyo ozali na mokano ya kobala ye te. Basusu bakoki koloba ete ezali mabe te, ezali kaka mpo na kosolola mpe kolekisa ntango malamu ná mwana mwasi to ná mwana mobali. Ezali na bato oyo babongi kosolola masolo ya bolingo, kosimbanasimbana mpe kopesana babizi. Ntango bato bamonaki Yisaka “azali kosakana” ná Lebeka, bakanisaki mbala moko ete bazali kaka yaya ná leki te. (Genese 26:7-9, NW) Bazalaki nde mwasi ná mobali. Likambo oyo bango basalaki ezalaki mabe te. Nzokande, soki mobali azali kosala masɛki ya kosimba na nzoto to koyebisa maloba ya bolingo na moto oyo azali mwasi na ye te, wana ekómi likambo mosusu.
17. Kokangamakangama na moto elingi koloba nini, mpe ndenge nini tosengeli kotalela yango?
17 Kokangamakangama na moto elingi koloba kozala na ye selesele, kasi ozali na mokano ya kobala ye te. Biso bato tokeseni; yango wana, ezali na ndenge mingi ya kokangamakangama na moto, mosusu kutu emonanaka polele te. (Masese 30:18, 19) Yango wana, mibeko makasimakasi ekoki kosilisa likambo yango te. Nzokande, likambo ya malamu koleka oyo moto akoki kosala ezali komitalela na bosembo mpe kolanda mpenza mitinda ya Biblia.
18. Nini etindaka bato mosusu bákangamakangama na moto, mpe mpo na nini ezali mabe?
18 Mpo na koloba solo, moto nyonso akondima ete ntango mwana mobali to mwana mwasi azali kosepela na ye, ayokaka nzoto. Biso bato tozalaka bongo. Kasi, tosengeli nde kokangamakangama na moto mpo tómona ete basepelaka na biso, kaka mpo tómipesa mwa valɛrɛ to tótumola mposa na motema na ye? Soki ezali bongo, osí okanisá mpasi oyo okoki koyokisa ye? Masese 13:12 elobi boye: “Elikya oyo ezelisami epesi motema mpasi.” Soki ozali kokangamakangama na moto, ozali mbala mosusu koyeba te oyo ye azali kokanisa na motema na ye. Akoki mbala mosusu kolona makanisi ete bokolingana mpe na nsima bokobalana. Ekosala ye mpasi mingi soki amoni ete amityelaki makanisi mpamba. (Masese 18:14) Kosakana na motema ya mwana ya moto ndenge wana ezali malamu ata moke te.
19. Ndenge nini kokangamakangama na moto oyo azali molongani na yo te ekoki kobebisa mabala ya baklisto?
19 Tosengeli lisusu kokeba mpenza na kokangamakangama na moto oyo abalá. Ezali mabe kolula moto oyo abalá to mpe moto oyo abalá akóma kolula moto oyo azali molongani na ye te. Likambo ya mawa ezali ete baklisto mosusu bakanisaki ete kolula mobali to mwasi oyo azali molongani na ye te ezali mpenza mabe te. Basusu kutu bakómaka tii koyebisa basɛkɛlɛ na bango epai ya “moninga” na bango wana, ná makambo mosusu oyo babombelá kutu basi to mibali na bango. Ezaleli wana ememaki na boninga oyo ekoki kobebisa to koboma libala. Baklisto oyo babalá basengeli te kobosana toli malamu oyo Yesu apesaki mpo na kokima ekobo; alobaki ete ekobo ebandaka na motema. (Matai 5:28) Yango wana, tóbatela motema na biso mpe tókima makambo oyo ekoki komema biso na makambo ya ndenge wana.
20. Ekateli nini tosengeli kozala na yango na oyo etali bizaleli na biso ya pɛto?
20 Ya solo, kobatela bizaleli ya pɛto na mokili oyo etondi na misala ya mabe ezali pɛtɛɛ te. Kasi, tóbosana te ete atako ezali mpasi kobatela bizaleli ya pɛto, ezalaka lisusu mpasi koleka kozongela yango soki osí obungisi yango. Toboyi te, Yehova akoki ‘kolimbisa na solo’ mpe akoki kopɛtola baoyo babongoli mpenza motema. (Yisaya 55:7) Kasi, Yehova apekisaka te ete moto oyo asali pite to ekobo abuka mbuma mabe ya misala na ye. Mbuma mabe yango ekoki koumela bambula, to mpe bomoi mobimba. (2 Samwele 12:9-12) Yango wana, salá nyonso obatelaka motema na yo mpo ozala na bizaleli ya pɛto. Kozala pɛto na miso ya Yehova Nzambe ezali eloko ya motuya mingi mpe batelá yango malamu!
Okopesa eyano nini?
• Etamboli ya pɛto elimboli nini, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi?
• Ndenge nini tokoki kobatela motema na biso?
• Kokima pite esɛngi mpe makambo nini?
• Mpo na nini tosengeli koboya kokangamakangama na moto oyo tozali kokana kobalana na ye te?
[Elilingi na lokasa 11]
Soki moto azali kotambwisa motuka malamu te, yango ekoki komemela ye likama
[Bililingi na lokasa 12]
Nini ekoki kokómela biso soki tozali koyoka makebisi te?
[Elilingi na lokasa 13]
Kobatela bizaleli ya pɛto ntango bozali bafianse epesaka esengo mpe ekumisaka Nzambe