Mobali oyo abalá mpe azali nkulutu—Lolenge ya koyokanisa mikumba na ye
‘Ekoki na mokɛngɛli ete azala mobali na mwasi moko.’—1 TIMOTÉ 3:2.
1, 2. Mpo na nini bonzemba ya basángó eyokani te na Makomami?
NA EKEKE ya liboso, baklisto ya sembo bazalaki komibanzabanza na ntina na lolenge ya kobatela bokatikati na mikumba mikeseni oyo bazalaki na yango. Ntango ntoma Paulo alobaki ete moklisto oyo akotikala monzemba “akosala malamu koleka,” alingaki nde koloba ete mobali lolenge yango abongaki malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mokɛngɛli kati na lisangá ya boklisto? Azalaki nde kokómisa bonzemba lisɛngami mpo na kozala nkulutu? (1 Bakolinti 7:38) Bonzemba esɛngami epai na bakonzi ya lingomba ya Katolike. Kasi bonzemba ya basángó endimami nde na Makomami? Mangomba ya Ortɔdɔksɛ ya Ɛ́sti mapesaka nzela na basángó na bango ete bázala mibali babalá, nzokande baepískɔpɔ bapesameli ndingisa ya kobala te. Yango eyokani na Biblia?
2 Bantoma 12 ya Klisto, oyo lisangá ya boklisto ebandaki na bango, bazalaki mibali oyo babalá. (Matai 8:14, 15; Baefese 2:20) Paulo akomaki ete: “Tozangi nde bokonzi kotambola na ndeko mwasi pelamoko bantoma mosusu mpe bandeko na Nkolo mpe Kefa [Petelo]?” (1 Bakolinti 9:5) Búku monene The New Catholic Encyclopedia endimi ete “mobeko ya bonzemba euti na bakonzi ya mangomba” mpe ete “baministre ya K[ondimana] ya S[ika] bakangamaki te na mobeko ya kotikala monzemba.” Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa wana ya Makomami na esika ya kolanda mobeko ya bakonzi ya mangomba.—1 Timoté 4:1-3.
Mobali oyo abalá akoki kozala nkulutu
3. Makambo nini oyo mazali kati na Makomami mamonisi ete bakɛngɛli baklisto bakoki kozala mibali oyo babalá?
3 Na esika ya kosɛnga ete mibali oyo baponami bankulutu bázala minzemba, Paulo akomaki epai na Tito ete: “Mpo na ntina yango, natiki yo na Kelete ete obongisa makambo matikali mpe ete opona mibangé [na Greke pre·sbyʹte·ros] na mboka na mboka pelamoko elaki ngai yo, kotya moto bobele soko azangi lofundo [“efundeli,” NW], mobali na mwasi moko, oyo bana na ye bazali bandimi, baoyo bazali na mobulu te, batomboki mpe te. Zambi, ebongi na mokɛngɛli [na Greke, e·piʹsko·pos, epai liloba “epískɔpɔ” euti], ye mosungi na ndako na Nzambe, ete azanga lofundo [“efundeli,” NW].”—Tito 1:5-7.
4. (a) Lolenge nini toyebi ete libala ezali te lisɛngami ya Makomami mpo na kozala mokɛngɛli moklisto? (b) Matomba nini nkulutu moklisto oyo azali monzemba azali na yango?
4 Na ngámbo mosusu, libala lizali lisɛngami ya Makomami te mpo na kozala nkulutu. Yesu azalaki monzemba. (Baefese 1:22) Paulo, mokɛngɛli oyo ayebanaki mingi kati na lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso, azalaki monzemba. (1 Bakolinti 7:7-9) Lelo oyo, ezali na ebele ya baklisto minzemba oyo bazali bankulutu. Ekoki mpenza kozala ete bonzemba na bango ezali kopesa bango ntango mingi mpo na kokokisa mikumba na bango ya mokɛngɛli.
‘Mobali oyo abali akabwani’
5. Likambo nini oyo limonisami na Makomami bandeko mibali oyo babalá basengeli koyeba yango?
5 Ntango mobali moklisto abali, asengeli kososola ete asili kozwa mikumba ya sika oyo mikosɛnga ye ntango mpe likebi. Biblia elobi ete: “Moto oyo abali te akotyaka motema na makambo na Nkolo ete asepelisa Nkolo boni. Nde moto oyo abali akotyaka motema na makambo na mokili ete asepelisa mwasi na ye boni, mpe motema na ye ekabwani.” (1 Bakolinti 7:32-34) Na ndimbola nini akabwani?
6, 7. (a) Wapi moko na mitindo oyo mobali moklisto oyo abalá “akabwani”? (b) Toli nini Paulo apesaki na baklisto oyo babali? (c) Lolenge nini yango ekoki kopusa ekateli ya mobali ya kondima to ya kobaya mokumba moko ya mosala?
6 Na lolenge moko, mobali oyo abali azali lisusu na bokonzi likoló na nzoto na ye moko te. Paulo amonisaki yango polele ete: “Mwasi azali na bokonzi likoló na nzoto na ye moko te kasi mobali azali na yango. Boye mpe mobali azali na bokonzi likoló na nzoto na ye moko te kasi mwasi azali na yango.” (1 Bakolinti 7:4) Basusu oyo bazali kokana kobala bakoki koloba ete wana ezali bobele likambo moke, mpamba te kosangisa nzoto ekozala yango moko te likambo lileki ntina kati na libala na bango. Nzokande, lokola Makomami mazali kosɛnga bopɛtɔ liboso na libala, baklisto bayebaka mpenza te nini oyo ezali bamposa ya moto oyo akokóma mobalani na bango na likambo litali kosangisa nzoto.
7 Paulo amonisi ete ata babalani oyo ‘bazali kotya motema na makambo ya elimo’ basengeli kokanisa bamposa ya moko na mosusu na likambo litali kosangisa nzoto. Apesaki baklisto ya Kolinti toli ete: “Mobali apesa mwasi yango ekoki na ye mpe bongo mwasi apesa mobali yango ekoki na ye. Bóboyana kati na bino te bobele soko bondimani kosala bongo mwa ntango ete bómipesa na kobondela mpe na nsima kosangana lisusu ete Satana ameka bino te awa ezangi bino nguya na komikanga mposa.” (Baloma 8:5; 1 Bakolinti 7:3, 5) Likambo ya mawa, ntango bazangaki kolanda toli oyo basusu bakweaki na ekobo. Lokola ezali bongo, moklisto oyo abalá asengeli kokanisa malamumalamu liboso ete andima mokumba moko ya mosala oyo ekokabola ye na mwasi na ye na boumeli ya ntango molai. Azali lisusu na bonsomi te ya kosala makambo lokola ntango azalaki monzemba.
8, 9. (a) Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete baklisto oyo babalá “bazali kotya mitema na makambo ya mokili”? (b) Baklisto oyo babalá basengeli komibanzabanza mpo na kosala nini?
8 Na ndimboli nini ekoki kolobama ete mibali baklisto oyo babalá, ezala bankulutu, bazali “kotya mitema na makambo ya mokili [koʹsmos]”? (1 Bakolinti 7:33) Ezali mpenza polele ete Paulo azalaki kolobela te makambo mabe ya mokili, oyo baklisto nyonso ya solo basengeli kokima yango. (2 Petelo 1:4; 2:18-20; 1 Yoane 2:15-17) Liloba ya Nzambe lizali kolakisa biso ete “tóboya kotuka Nzambe mpe kobila mposa na mokili [ko·smi·kosʹ], kasi tózala na bizaleli na kokanga motema mpe na boyengebene mpe na kosambela Nzambe kati na ekeke oyo.”—Tito 2:12.
9 Na yango, moklisto oyo abalá azali “kotya motema na makambo na mokili” na boye ete azali na lotómo ya komibanzabanza na ntina na biloko ya mosuni oyo bisengeli mpo na bomoi malamu ya libala. Yango esangisi ndako, bilei, bilamba, bopemi—kozanga kotánga ebele na mabanzo mosusu soki azali na bana. Kasi ata mpo na babalani oyo bazali na bana te, mpo ete libala likoka kolónga, mobali mpe mwasi basengeli bango nyonso komibanzabanza mpo na “kosepelisa” moto na moto mobalani na ye. Likambo yango lizali mpenza na ntina mingi mpo na bankulutu baklisto wana ezali bango koluka koyokanisa mikumba na bango.
Bazali mibali malamu mpe bankulutu malamu
10. Mpo ete moklisto akokisa masɛngami mpo na kozala nkulutu, bandeko na ye kati na lisangá mpe bato ya libándá basengeli komona nini epai na ye?
10 Atako libala ezali lisɛngami te mpo na kozala nkulutu, soki mobali moklisto asili kobala, liboso ete bápona ye lokola nkulutu, asengeli mpenza komonisa bilembeteli ya milende oyo azali kosala mpo na kozala mobali malamu, mobali oyo azali na bolingo epai na mwasi na ye, wana ezali ye kosalela bokonzi na ye. (Baefese 5:23-25, 28-31) Paulo akomaki ete: “Soko moto alingi ete asala mosala na mokɛngɛli, azali na mposa na mosala malamu. Ekoki na mokɛngɛli ete azala na lofundo [“efundeli,” NW] soko moke te, mobali na mwasi moko.” (1 Timoté 3:1, 2) Esengeli komonana polele ete nkulutu azali kosala nyonso ekoki na ye mpo na kozala mobali malamu, ata soki mwasi na ye azali moklisto lokola ye to azali moklisto te. Ya solo, ata bato na libándá ya lisangá basengeli komona ete azali kobatela mwasi na ye malamu mpe azali kokokisa malamu mikumba na ye misusu. Paulo abakisi ete: “Ekoki mpe ete azala na litatoli malamu epai na bato na libándá ete akwea na nsɔ́ni mpe na motambo na oyo mabe te.”—1 Timoté 3:7.
11. Maloba oyo ete “mobali na mwasi moko” ezali komonisa nini, bongo bokɛngi nini bankulutu basengeli komonisa?
11 Ya solo, liloba “mobali na mwasi moko” elongoli likanisi ya kobala basi mingi, nzokande ezali lisusu kopesa likanisi ya bosembo kati na libala. (Baebele 13:4) Bankulutu basengeli kokeba mingi wana bazali kosalisa bandeko basi kati na lisangá. Nkulutu asengeli kopɛngola kozala ye moko wana akei kotala ndeko mwasi moko oyo azali na mposa ya toli mpe ya libɔndisi. Ekozala malamu kokende elongo na nkulutu mosusu, to elongo na mosaleli na misala, to akoki kokende elongo na mwasi na ye soki ezali bobele mpo na kopesana bilendiseli.—1 Timoté 5:1, 2.
12. Basi ya bankulutu mpe ya basaleli na misala basengeli kosala milende mpo na kokokisa masɛngami nini?
12 Tiká tóloba ete, wana ezalaki ye kotánga masɛngami mpo na kopona bankulutu to basaleli na misala, ntoma Paulo apesaki mpe toli epai na basi ya baoyo basengeli kotalelama mpo na mikumba yango. Akomaki ete: “Basi mpe bázala na sembo na bozito, bato na kotukatuka te, bato na kokanga motema mpe na sembo na makambo nyonso.” (1 Timoté 3:11) Mobali moklisto akoki kosala mingi mpo na kosalisa mwasi na ye ete akokisa masɛngami yango.
Mikumba oyo Makomami etyeli mobali epai na mwasi na ye
13, 14. Ata soki mwasi na ye azali Motatoli te, mpo na nini nkulutu asengeli kofanda na ye mpe komimonisa mobali malamu?
13 Ya solo, toli oyo epesameli basi ya bankulutu to ya basaleli na misala ezali komonisa ete basi yango mpe bazali bango moko baklisto oyo bamipesi epai na Nzambe. Ezalaka mbala mingi bongo mpamba te baklisto basɛngisami ete bábala “bobele kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39) Kasi ezali boni mpo na ndeko moko oyo asilaki kobalana na moto azangi kondima liboso ete amipesa epai na Yehova, to oyo mwasi na ye atiki nzela ya solo mpo na libungá na ye moko?
14 Likambo yango moko ekoki te kopekisa ye ete aponama lokola nkulutu. Yango esengeli mpe te kopesa ye lotómo ya kokabwana na mwasi na ye mpo ete azali kosangana elongo na ye te kati na bindimeli na ye. Paulo apesaki toli oyo: “Okangami na mwasi? Omeka kokangwa te.” (1 Bakolinti 7:27) Alobi lisusu ete: “Soko ndeko moko azali na mwasi oyo azangi kondima mpe ye asepeli kofanda na ye, ekoki na mobali kolongola ye te. Nde soko ye oyo azangi kondima alingi kolongwa, tiká ete alongwa. Na likambo yango, ndeko mobali to ndeko mwasi akangani te. Mpo ete Nzambe abyangi biso mpo na kimya. Zambi yo mwasi, oyebi soko okobikisa mobali na yo? Yo mobali mpe, oyebi soko okobikisa mwasi na yo?” (1 Bakolinti 7:12, 15, 16) Ata soki mwasi na ye azali Motatoli te, nkulutu asengeli kozala mobali malamu epai na ye.
15. Toli nini ntoma Petelo apesaki na mibali baklisto, mpe mbuma mabe nini ekobima soki nkulutu amonisi bopotu kati na mokumba na ye ya mobali oyo abalá?
15 Ezala ete mwasi na ye azali mondimi lokola ye to azali mondimi te, nkulutu moklisto asengeli koyeba ete mwasi na ye azali na mposa ya likebi na ye oyo etondi na bolingo. Ntoma Petelo akomaki ete: “Bino mibali lokola, bózalana na basi na bino kososola na mayele ete bango baleki motau, nde bópesa lokumu epai na bango lokola na bato bakozwa libula na likabo na bomoi na bino elongo; bongo mabondeli na bino makopekisama te.” (1 Petelo 3:7) Mobali oyo azali na nkó nyonso koboya kokokisa bamposa ya mwasi na ye azali kotya boyokani na ye elongo na Yehova na likámá; yango ekoki kopekisa libondeli na ye epai na Yehova lokola “na lipata kino malɔmbɔ makoleka te.” (Bileli 3:44) Yango ekoki kosala ete alongolama mokumba ya mokɛngɛli moklisto.
16. Likanisi nini ya ntina Paulo amonisi, mpe bankulutu basengeli kokanisa nini na ntina na yango?
16 Lokola tomoni yango, likanisi ya ntina ya maloba ya Paulo lizali ete ntango mobali moko abali, azali lisusu na bonsomi mingi te oyo azalaki na yango lokola monzemba ya “kosalela Nkolo mosala na likebi nyonso.” (1 Bakolinti 7:35, NW) Balapólo ezali komonisa ete bankulutu mosusu oyo babalá bamonisaka ntango nyonso bokatikati te kati na makanisi na bango na ntina na maloba oyo mapemami ya Paulo. Kati na mposa na bango ya kokokisa oyo bakanisi ete nkulutu malamu asengeli kosala, bazali kobosana kokokisa mikumba misusu na bango kati na libala. Basusu bamonaka ete ezali mpasi koboya mikumba ya lisangá, ata soki ezali polele ete kondima yango ekozala likámá mpo na ezaleli ya elimo ya basi na bango. Bazali koluka matomba oyo mautaka na libala, kasi balingi nde kokokisa mikumba oyo mizali kouta na yango?
17. Nini ekómelaki basi mosusu ya bakɛngɛli, nzokande lolenge nini makambo yango mbɛlɛ makokaki kopɛngolama?
17 Na ntembe te, nkulutu oyo azali kosala mosala na ye na molende abongi kopesamela longonya. Nzokande, moklisto akoki mpenza komonisa bokatikati, soki, wana ezali ye kokokisa mikumba na ye kati na lisangá, azali bongo kosundola mikumba oyo Makomami epesi ye epai na mwasi na ye? Atako azali na mposa ya kosunga bandeko kati na lisangá nkulutu oyo azali na bokatikati akomibanzabanza mpe na ntina na ezaleli ya elimo ya mwasi na ye. Basi ya bankulutu mosusu balɛmbaki na elimo, mpe basusu ‘bazindaki’ na elimo. (1 Timoté 1:19) Atako mwasi ye moko azali na mokumba ya kosala milende mpo na lobiko na ye, mbala mosusu mikakatano ya elimo mikokaki kopɛngolama soki nkulutu ‘aleisaki mpe abatelaki’ mwasi na ye, ‘lokola Klisto asalaki yango epai na lisangá.’ (Baefese 5:28, 29) Ya solo, bankulutu basengeli ‘kokeba na ntina na bango mpenza mpe na ntina na etɔ́nga mobimba.’ (Misala 20:28) Soki bazali mibali babalá, yango esangisi mpe basi na bango.
‘Mitungisi kati na nzoto’
18. Wapi mitindo misusu ya “mitungisi” oyo baklisto oyo babalá bakutanaka na yango, mpe lolenge nini yango ekoki kozala na bopusi likoló na mikumba ya nkulutu?
18 Ntoma akomaki lisusu ete: “Nde soko okobala mwasi, ozali na lisumu te. Kasi bato na motindo oyo bakozala na mpasi na nzoto, mpe nalingi kokimisa bino yango!” (1 Bakolinti 7:28) Paulo alingi kobatela baoyo bakokaki kolanda ndakisa na ye ete bákima mitungisi oyo miyaka elongo na libala. Ata mpo na babalani oyo bazali na bana te, mitungisi wana mikoki kozala mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto to mikakatano ya mosolo mpe mikumba oyo Makomami matyeli mobali to mwasi epai na baboti ya mobalani na ye oyo bakómi mibangé. (1 Timoté 5:4, 8) Nkulutu asengeli kokokisa mikumba wana na lolenge oyo ekopesa ndakisa malamu mpenza, mpe na bantango mosusu mikumba yango mikozala na bopusi likoló na misala na ye ya mokɛngɛli moklisto. Likambo ya esengo, bankulutu mingi bazali kosala mosala malamu mpenza na kokokisáká mikumba nyonso na bango na libota mpe kati na lisangá.
19. Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete: “Tiká ete baoyo bazali na basi bázala lokola bango bazangi basi”?
19 Paulo alobi lisusu ete: “Ntango eyei mokuse, sasaipi tiká ete baoyo bazali na basi bázala lokola bango bazangi basi.” (1 Bakolinti 7:29) Ya solo, na kotalela makambo oyo asilaki kokoma kati na mokapo wana epai na Bakolinti, ezali polele ete alingaki koloba te ete baklisto oyo babalá basengeli na lolenge moko to mosusu kosundola basi na bango. (1 Bakolinti 7:2, 3, 33) Amonisaki oyo ye alingaki koloba, wana akomaki ete: “[Tiká ete] bango bakosalisa mokili mosala bázala pelamoko bango bazali kosalisa mokili mosala te. Mpo ete motindo na mokili oyo ezali kolimwa.” (1 Bakolinti 7:31) Koleka mpenza ndenge ezalaki na mikolo ya Paulo to na mikolo ya ntoma Yoane, lelo oyo “mokili ezali kolongwa.” (1 Yoane 2:15-17) Na yango, babalani baklisto oyo bazali komona ntina ya komipimela mwa makambo mosusu mpo na kolanda ndakisa ya Klisto bakoki te komipesa mobimba bobele na bisengo mpe na matomba na bango ya libala.—1 Bakolinti 7:5.
Basi oyo bazali komipimela
20, 21. (a) Komipimela ya lolenge nini basi baklisto mingi bandimaka na bolingo nyonso? (b) Eloko nini mwasi moklisto oyo abali akoki na lotómo nyonso kozela ete mobali na ye apesa ye, ata soki azali nkulutu?
20 Motindo moko lokola bankulutu bazali komipimela mwa makambo mosusu mpo na kosunga basusu, bobele bongo basi ya bankulutu mingi basalaki milende mpo na koyokanisa mikumba na bango ya libala mpe matomba ya Bokonzi oyo ezali na ntina mingi. Bankóto ya basi basungaka na esengo nyonso mibali na bango mpo ete bákokisa mikumba na bango ya bakɛngɛli. Yehova alingi bango mingi mpo na yango, mpe azali kopambola bango mpo na elimo malamu oyo bazali komonisa. (Filemona 25) Nzokande, toli ya bokatikati oyo Paulo apesaki emonisi ete basi ya bakɛngɛli bakoki na lotómo nyonso kozela ete mibali na bango bápesa bango ntango oyo ebongi mpe likebi. Ezali mokumba oyo Makomami matyeli bankulutu oyo babalá ete bápesa ntango oyo ebongi mpo na basi na bango mpo ete bákoka koyokanisa mikumba na bango ya mibali oyo babalá mpe ya bakɛngɛli.
21 Kasi ezali boni soki longola kozala mobali oyo abalá, nkulutu moklisto azali mpe tata? Yango ebakisi lisusu mikumba na ye mpe etye liboso na ye motindo mosusu ya mosala ya mokɛngɛli, lokola tokomona yango kati na lisoló lilandi.
Bozongeli
◻ Makambo nini oyo mayebisami na Makomami mamonisi ete mokɛngɛli moklisto akoki kozala mobali oyo abalá?
◻ Soki nkulutu oyo azali monzemba abali, likambo nini asengeli te kobosana?
◻ Na ndimbola nini moklisto oyo abalá “azali kotya motema na makambo ya mokili”?
◻ Lolenge nini basi mingi ya bakɛngɛli bazali komonisa elimo malamu mpenza ya komipimela?
[Elilingi na lokasa 17]
Ata soki amipesi mingi na misala ya Teokrasi, nkulutu asengeli kopesa na mwasi na ye likebi litondi na bolingo