Kumisá libala, ebongiseli oyo Nzambe atyá
“Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”— MARKO 10:9.
1, 2. Baebre 13:4 esengeli kotinda biso tósala nini?
BISO nyonso tolingaka kokumisa Yehova mpo abongi kozwa lokumu. Alaki ete ye mpe akokumisa baoyo bakumisaka ye. (1 Samwele 2:30; Masese 3:9; Emoniseli 4:11) Alingi mpe tópesa basusu lokumu, na ndakisa bakonzi ya Leta. (Baroma 12:10; 13:7) Kasi, ezali na ebongiseli oyo tosengeli mpe kopesa lokumu. Ebongiseli yango ezali libala.
2 Ntoma Paulo akomaki ete: “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te.” (Baebre 13:4) Paulo alobelaki kaka te likambo oyo etali libala nyonso. Azalaki nde koyebisa bakristo ete basengeli kokumisa libala, elingi koloba kozwa yango na motuya. Otalelaka libala ndenge wana, mingimingi libala na yo moko?
3. Yesu apesaki toli nini ya ntina mpo na libala? (Talá elilingi ya ebandeli.)
3 Soki ozwaka libala na motuya, wana olandaka ndakisa malamu ya Yesu, mpo ye mpe azalaki kopesa libala lokumu. Ntango Bafarisai batunaki ye motuna na likambo etali koboma libala, Yesu alobelaki likambo oyo Nzambe alobaki mpo na libala ya liboso ete: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko.” Yesu abakisaki ete: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”—Tángá Marko 10:2-12; Ebandeli 2:24.
4. Mokano ya Yehova mpo na libala ezalaki nini?
4 Yesu andimaki ete libala ezali ebongiseli oyo Nzambe atyá mpe esengeli koumela libela. Ntango Nzambe abalisaki Adama ná Eva, ayebisaki bango te ete bakokaki koboma libala. Kasi, mokano na ye ezalaki ete “bango mibale” báfanda elongo na libala libela na libela.
MAKAMBO OYO EBONGOLI LIBALA MPO NA MWA NTANGO
5. Ndenge nini liwa ebongolaki ebongiseli ya libala?
5 Kasi ntango Adama asalaki lisumu, makambo mingi ebongwanaki. Na ndakisa, bato bakómaki kokufa mpe yango ebongolaki ebongiseli ya libala. Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ete ntango molongani moko akufi, libala esuki, mpe molongani oyo atikali azali na bonsomi ya kobala lisusu.—Baroma 7:1-3.
6. Mibeko ya Moize eteyaka biso ete Nzambe atalelaka libala ndenge nini?
6 Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele elobaki makambo mosusu ebele mpo na libala. Na ndakisa, Mibeko epesaki Moyisraele ya mobali nzela ya kobala basi ebele. Momeseno yango ebandaki liboso kutu Nzambe apesa Yisraele Mibeko. Kasi ezalaki na mibeko oyo ebatelaki basi ná bana mpo bányokwama te. Na ndakisa, soki Moyisraele ya mobali abalaki mwasi oyo azalaki moombo mpe na nsima abali mwasi ya mibale, asengelaki kokoba kopesa mwasi ya liboso bilei, bilamba mpe lotomo na ye ya libala. Nzambe asɛngaki ete akoba kobatela mpe kokokisa bamposa na ye. (Kobima 21:9, 10) Tolandaka Mibeko ya Moize te lelo. Kasi, eteyaka biso ete Nzambe azwaka libala na motuya mingi. Yango esalisaka biso mpenza tókumisa libala.
7, 8. (a) Na kotalela Kolimbola Mibeko 24:1, Mibeko elobaki nini mpo na koboma libala? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka koboma libala?
7 Mibeko elobaki nini mpo na koboma libala? Atako Yehova akanaki te ete mokolo mosusu mwasi ná mobali báboma libala, Mibeko epesaki nzela ete Moyisraele ya mobali aboma libala soki “akuti likambo moko ya nsɔni” epai ya mwasi na ye. (Tángá Kolimbola Mibeko 24:1.) Mibeko emonisaki polele te soki ‘likambo yango ya nsɔni’ ezalaki nini. Kasi, na ntembe te ezalaki likambo ya mabe mpenza to ya monene, kasi te kaka mbeba ya moke. (Kolimbola Mibeko 23:14) Likambo ya mawa, na mikolo ya Yesu, Bayuda mingi bazalaki koboma libala na basi na bango “mpo na likambo nyonso.” (Matai 19:3) Tosengeli te kokóma na makanisi ya ndenge wana.
8 Na mikolo ya mosakoli Malaki, mibali mingi bakómaki na momeseno ya koboma libala na ‘basi ya bolenge na bango,’ mbala mosusu mpo na kobala bilenge basi oyo bazalaki kosambela Yehova te. Kasi, Nzambe amonisaki polele ndenge oyo azalaki kotalela koboma libala. Malaki alobaki ete: “Ye ayini koboma libala.” (Malaki 2:14-16) Likanisi ya Nzambe mpo na libala ebongwanaki te banda na ebandeli, ntango alobaki ete mobali “asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Yesu mpe amonisaki ete andimaka likanisi ya Tata na ye mpo na libala ntango alobaki: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”—Matai 19:6.
NTINA KAKA MOKO YA KOBOMA LIBALA
9. Maloba ya Yesu oyo ezali na Marko 10:11, 12 elimboli nini?
9 Bato mosusu bakoki komituna ete, ‘Ezali na likambo oyo ekoki kosala ete mokristo aboma libala mpe abala moto mosusu?’ Talá oyo Yesu alobaki: “Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye mpe abali mosusu azali kosalela ye ekobo, mpe soki ekómi ete mwasi moko, nsima ya koboma libala na mobali na ye, abali mosusu, asali ekobo.” (Marko 10:11, 12; Luka 16:18) Ezali polele ete Yesu azalaki kopesa libala lokumu mpe alingaki ete basusu básala mpe bongo. Soki mobali abomi libala na mwasi na ye oyo azali sembo epai na ye mpe abali mwasi mosusu, yango ekozala ekobo. Ezali mpe bongo soki mwasi abomi libala na mobali na ye oyo azali sembo. Soki ekobo esalemi te, ata soki mwasi ná mobali babomi libala, Nzambe azali komona bango kaka “mosuni moko.” Yesu alobaki mpe ete soki mobali abomi libala na mwasi na ye oyo asali ekobo te, akotya mwasi na likama ya kosala ekobo. Na ndenge nini? Na ntango ya Yesu, mwasi oyo mobali na ye abomi libala akokaki komona ete asengeli kobala lisusu mpo azwa mbongo ya kobikela. Libala ya ndenge wana ezalaki lokola ekobo.
10. Wapi ntina kaka moko oyo mokristo akoki koboma libala mpe kozwa bonsomi ya kobala lisusu?
10 Yesu ateyaki ete ezali na ntina moko oyo moto akoki koboma libala; alobaki: “Nalobi na bino ete moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.” (Matai 19:9) Alobaki mpe likambo yango na Lisolo likoló ya Ngomba. (Matai 5:31, 32) Na mabaku yango nyonso mibale, Yesu alobelaki “pite.” Pite esangisi masumu lokola ekobo, bondumba, kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, mpe kosangisa nzoto na nyama. Soki, na ndakisa, mobali oyo abalá asali pite, mwasi na ye akoki kozwa ekateli ya koboma libala to ya koboma libala te. Soki mwasi abomi libala, na miso ya Nzambe, libala na bango ezali lisusu te.
11. Mpo na nini mokristo mosusu akoki komona malamu aboma libala te ata soki molongani na ye asali pite?
11 Yesu alobaki te ete soki moto oyo abalá asali pite, molongani na ye asengeli koboma libala. Na ndakisa, mwasi mosusu akoki komona malamu aboma libala te ata soki mobali na ye asalaki pite. Mpo na nini? Mbala mosusu alingi kaka mobali na ye, mpe amoni ete akoki kolimbisa ye mpe kopesa ye mabɔkɔ mpo bábongisa libala na bango. Lisusu, soki abomi libala kasi azwi mobali mosusu te mpo abala ye, akokutana na mwa mikakatano. Na ndakisa, nani akokokisa bamposa na ya ye mosuni mpe ya nzoto? Akomiyoka kaka ye moko te? Koboma libala ekosala nini epai ya bana? Ekozala mpasi mingi kobɔkɔla bango na kati ya solo? (1 Bakorinti 7:14) Ezali polele ete mokristo oyo azwaki ekateli ya koboma libala mpo molongani na ye asalaki ekobo, akoki kokutana na mikakatano ya minene.
12, 13. (a) Nini esalemaki na libala ya Hosea? (b) Mpo na nini Hosea azongisaki Gomere na ndako, mpe yango ekoki koteya biso nini mpo na libala?
12 Likambo oyo mosakoli Hosea akutanaki na yango emonisi biso likanisi ya Nzambe mpo na libala. Nzambe ayebisaki Hosea abala Gomere “mwasi oyo akosala pite” mpe akozala na “bana oyo aboti na pite.” Gomere “azwaki zemi mpe na nsima abotelaki [Hosea] mwana mobali.” (Hosea 1:2, 3) Na nsima, Gomere abotaki mwana mwasi ná mwana mosusu ya mobali, mpe emonani ete bazalaki bana ya Hosea te. Atako Gomere asalaki ekobo koleka mbala moko, Hosea abomaki libala te. Nsukansuka, Gomere atikaki Hosea mpe akómaki moombo. Kasi, Hosea akendaki kozwa ye mpo na kozongisa ye na ndako. (Hosea 3:1, 2) Yehova asalelaki Hosea mpo amonisa ndenge alimbisaki ekólo Yisraele mbala na mbala atako ezalaki sembo te epai na Ye mpe ezalaki kosambela banzambe mosusu. Yango ekoki koteya biso nini?
13 Soki mokristo asali pite, molongani na ye asengeli kozwa ekateli. Yesu alobaki ete na ntango wana, molongani oyo azali sembo azali na ntina ya koboma libala mpe kozwa bonsomi ya kobala lisusu. Kasi, ekozala mabe te soki molongani yango amoni ete akoki kolimbisa. Hosea azongisaki Gomere na ndako. Ntango azongaki, Hosea ayebisaki ye ete asangisa nzoto na mobali mosusu te. Hosea ‘asangisaki nzoto te’a na Gomere mpo na mwa ntango. (Hosea 3:3) Kasi, na ntembe te na nsima, Hosea azongelaki kosangisa nzoto na mwasi na ye. Likambo yango emonisaki ndenge Nzambe azalaki kondima Bayisraele bázongela ye mpe bábongisa boyokani oyo ebebaki. (Hosea 1:11; 3:3-5) Yango ezali koteya biso nini mpo na libala lelo oyo? Soki molongani oyo asalaki pite te abandi lisusu kosangisa nzoto na molongani na ye oyo asalaki pite, yango ekomonisa ete alimbisi ye. (1 Bakorinti 7:3, 5) Na ntango wana, ntina ya koboma libala ezali lisusu te. Nsima na yango, mwasi ná mobali basengeli kopesana mabɔkɔ mpo bátalela libala ndenge oyo Nzambe atalelaka yango.
KUMISÁ LIBALA ATA NA NTANGO YA MIKAKATANO YA MAKASI
14. Na kotalela 1 Bakorinti 7:10, 11, nini ekoki kosalema na libala?
14 Bakristo nyonso basengeli komekola Yehova ná Yesu mpe kokumisa libala. Kasi, na bantango mosusu ezalaka mpasi kosala yango mpo tozali bato ya kozanga kokoka. (Baroma 7:18-23) Na yango, tosengeli kokamwa te ete bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso bazalaki na mikakatano ya makasi na mabala na bango. Paulo akomaki ete “mwasi akabwana na mobali na ye te”; kasi na bantango mosusu, likambo yango esalemaki.—Tángá 1 Bakorinti 7:10, 11.
15, 16. (a) Mwasi ná mobali basengeli kozala na mokano nini soki matata ebimi na libala na bango, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini toli yango etali mokristo oyo molongani na ye asalelaka Yehova te?
15 Paulo alobelaki te makambo nini etindaki basi ná mibali mosusu bákabwana. Kasi, toyebi ete ezalaki makambo lokola pite te, mpo yango elingaki kopesa molongani mosusu ntina ya koboma libala mpe kozwa bonsomi ya kobala lisusu. Paulo akomaki ete mwasi oyo akabwani na mobali na ye “afanda bongo abala te to mpe ayokana lisusu na mobali na ye.” Na yango, na miso ya Nzambe libala na bango ezalaki kaka. Paulo alobaki ete ata soki mwasi ná mobali bakutani na matata to mikakatano ya ndenge nini, soki moko te kati na bango asali pite, basengeli kozala na mokano ya koyokana lisusu, elingi koloba kosilisa matata na bango mpe kofanda elongo. Bakoki kosɛnga bankulutu básalisa bango. Bankulutu bakokɔtela moto te, kasi bakoki kopesa bango toli ya Biblia oyo ekosalisa bango.
16 Kasi, mokristo oyo molongani na ye asambelaka Yehova te akosala nini? Bakoki kokabwana soki mikakatano ebimi na libala na bango? Ndenge tomonaki yango, Biblia epesi kaka ntina moko ya koboma libala: pite. Kasi, Biblia elobeli te bantina oyo mwasi ná mobali bakoki kokabwana. Paulo akomaki boye: “Mwasi oyo azali na mobali oyo azali mondimi te, nzokande mobali yango andimi kofanda na ye, mwasi yango atika mobali na ye te.” (1 Bakorinti 7:12, 13) Ezali mpe bongo mpo na biso lelo.
17, 18. Mpo na nini bakristo mosusu bakabwanaka te na molongani na bango ata ntango bazali na mikakatano makasi?
17 Kasi, na bantango mosusu ekómaka ete “mobali oyo azali mondimi te” amonisa na misala na ye ete “andimi kofanda na” mwasi na ye te. Na ndakisa, soki abɛtaka mwasi na ndenge ya nko, tii mwasi akómi komona ete nzoto na ye to bomoi na ye ezali na likama. Mbala mosusu aboyaka kokokisa bamposa na ye ya mosuni mpe ya libota, to azali kopesa ye nzela ata moke te asalela Yehova. Na ntango wana, ndeko mwasi ye moko akoki kozwa ekateli ete basengeli kokabwana, mpo ata soki na monɔkɔ mobali azali koloba makambo mosusu, misala na ye emonisi ete ‘andimi te kofanda na ye.’ Kasi, bakristo mosusu oyo bakutanaka na makambo wana bazwi ekateli ya kofanda kaka na molongani na bango. Bazali koyika mpiko mpe kosala makasi mpo na kobongisa libala na bango. Mpo na nini?
18 Soki mwasi ná mobali bakabwani, libala na bango ezali kaka; lisusu bakozala na mikakatano oyo tolobelaki liboso. Ntoma Paulo apesaki ntina mosusu oyo mwasi ná mobali basengeli kofanda elongo. Akomaki boye: “Mobali wana oyo azali mondimi te asantisami mpo na mwasi na ye, mpe mwasi wana oyo azali mondimi te asantisami mpo na ndeko mobali wana; soki te, bana na bino bakozala mpenza mbindo, kasi sikoyo bazali basantu.” (1 Bakorinti 7:14) Bakristo mingi ya sembo bazwaki ekateli ya kofanda na molongani na bango oyo azalaki kosambela Yehova te atako ezalaki mpasi mingi. Basepelaki mpenza ndenge basalaki yango, ntango na nsima molongani na bango akómaki Motatoli ya Yehova.—Tángá 1 Bakorinti 7:16; 1 Petro 3:1, 2.
19. Mpo na nini masangá ya Batatoli ya Yehova etondi na basi ná mibali oyo bazali na esengo?
19 Yesu alobelaki likambo ya koboma libala, mpe ntoma Paulo apesaki toli ya Nzambe na likambo etali kokabwana. Balingaki ete basaleli ya Nzambe bákumisa libala. Lelo oyo, masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba etondi na mabala ya esengo. Na ntembe te, na lisangá na bino mpe bandeko ebele bazali na esengo na mabala na bango. Mibali bazali sembo mpe balingaka basi na bango, mpe basi batosaka mibali na bango. Bango nyonso bamonisaka ete libala ekoki kokumisama. Tokoki kozala na esengo ndenge ebele ya basi ná mibali bazali komonisa bosolo ya maloba oyo ya Nzambe ete: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakokóma mosuni moko.”—Baefese 5:31, 33.
a Euti na maloba na nse ya lokasa na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ya Anglais, oyo ebimaki na 2013.