Bomoi ya monzemba na ntango na mikakatano ya nkita
CHUKS, oyo azali kofanda na Afrika ya Wɛ́sti alobaki ete: “Nalingaki kobala ntango nazalaki na mbula 25. Nasilaki kopona elenge mwasi moko, mpe ye alingaki ngai. Mokakatano moko mozalaki bongo mbongo. Tata na ngai mpe yaya na ngai ya mobali bazalaki na mosala te, mpe balɛki na ngai ya mibali mpe ya basi bazalaki naino na kelasi. Nasengelaki kosunga moto nyonso ya libota na biso. Bongo, makambo makómaki mpasi mingi ntango baboti na ngai babɛlaki, mpe yango esɛngaki ete nazwa lisusu mosolo mingi mpo na kofuta lopitalo.”
Chuks, oyo azali Motatoli ya Yehova, alingaki te kobala wana azalaki na makoki te ya kokokisa bamposa ya mwasi. Azalaki kobosana te maloba ya Paulo oyo mazwami na 1 Timoté 5:8 ete: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.”
Chuks akóbi koloba ete: “Nazalaki kosala mingi, kasi mbongo ezalaki kokoka soko moke te. Nsuka na yango ezalaki ete, mokolo ya libala na biso mosengelaki kozongisama nsima mbala na mbala. Mpo na kosukisa nazwaki mokanda ya elenge mwasi oyo alobaki ete moto mosusu asilaki kokutana na tata na ye mpo na kotuna ye na libala. Tata na ye asilaki kondima. Mwa mikolo nsima ya mokanda na ye, libota na bango libongisaki elambo ya kokanga lopango.”
Lokola Chuks, mibali baklisto mingi basili komona kobebisama ya elaka na bango ya libala to bapusaki yango nsima mpo na mpasi ya mikakatano ya nkita. Kati na bamboka mingi motuya ya mosolo mozali kokwea mingi mpenza. Na ndakisa, na mboka moko ya Afrika ya katikati, motuya ya biloko mobakisamaki na 8319 % kati na mbula moko! Kati na bamboka mosusu kozwa mosala ezali mpasi. Lisusu, mbala mingi lifuti lizalaka mpenza moke na boye ete ezali mpasi mpo na mobali kokokisa bamposa na ye moko, mpe kozanga kotánga oyo ya mwasi mpe ya bana na ye. Elenge mobali moko ya Nigeria amilelaki ete mosala ya mokolo mobimba oyo ye azwaki na izine moko efutaka bobele badolare 17 na sanza—ekoki ata te na mbongo ya bisi mpo na kokende mpe kozonga na mosala!
Basi baklisto oyo bazali minzemba bazali mpe komona ete mikakatano ya nkita mizali kobebisa elaka na bango ya libala. Mbala mingi basengeli kosala mpo na kosunga basangani ya libota na bango. Komonáká ezaleli yango, mibali misusu oyo bazali minzemba, bakakatanaka mpo na kobala, mpo bayebi ete mobali oyo akobala mwasi ya lolenge yango asengeli kozwa mosolo mingi mpo na kosunga bobele mwasi na ye te kasi lisusu kosunga libota ya mwasi na ye. Ayo, mwasi oyo azali na mapɔ́lɔmi ya eteyelo monene, asengeli kosala milende mpo na kokokisa bamposa na ye moko, ya mama na ye mpe ya balɛki na ye ya mibali mpe ya basi. Amileli ete: “Nalingaka kobala, kasi ntango basusu bayaka mpe bamonaka molɔngɔ́ molai oyo nazali na yango [mikumba oyo mizali kosɛnga mosolo], bakimaka.”
Atako bazali na mikakatano ya mosolo, baklisto minzemba mingi bakutanaka na mitungisi ya bandeko ya mosuni mpe ya bato mosusu oyo bazali kopusa bango na kobala mpe kobota bana. Mbala mosusu bopusi wana esalemaka na lolenge ya botyoli. Na ndakisa, na bisika mosusu ya Afrika, momeseno mozalaka ete wana bazali kopesa moto oyo akóli mbote, ebongi kotuna nsango ya mobalani na ye mpe ya bana na ye. Mbala mosusu, mbote motindo yango esalelamaka mpo na koseka bato oyo babali te. John, oyo abɛlɛmi na mibu 50, alobaki ete: “Wana bato batumolaka ngai mpe balobaka ete, ‘Mwasi na yo azali malamu?’ nayanolaka ete, ‘Ee, azali koya.’ Mokakatano mozali oyo ete, lolenge nini nakoki kobala mwasi soki nakokoka te kokokisa bamposa na ye?”
Mokakatano ya John mpe ebele na bato oyo bakokani na ye, mokoki kolobelama na mokuse na nzela ya lisese oyo ya Yoruba: “Kowela kobala ezali likambo oyo moto akomikumisa na yango te; mbongo ya kosomba bilei nde ezali mpasi.”
Zwá litomba na ezalela na yo
Ezali mpasi te konyokwama na makanisi wana tozali kooka mposa makasi ya eloko moko oyo ezali koumela. Masese 13:12 elobi ete: “Elikia oyo ezilisami epɛsi motema mpasi.” Mbala mosusu ezali lolenge ozali kooka soki ozali na mposa makasi ya kobala kasi ozali na mosolo te mpo na yango. Likambo yango lizali mpenza solo soki ozali moko na bato oyo ntoma Paulo alobelaki lokola bazali “kozika na mposa.”—1 Bakolinti 7:9.
Mbala mosusu ezalaka mpasi koyika mpiko, kasi ezali na makambo oyo okoki kosala mpo okoka koyika mpiko mpe ata kozwa esengo na ezalela na yo. Yesu Klisto, mobali oyo abalaki te, apesaki etindá moko kitoko ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo na kolónga mawa oyo makoki kouta na elikya oyo ezilisami. Alobaki ete: “Esɛngo na kopɛsa eleki esɛngo na kozua.”—Misala 20:35.
Okoki kosalela toli oyo na kosaláká makambo malamu mpo na libota na yo mpe mpo na bandeko mosusu kati na lisangá. Mbala mosusu okoki mpe kokólisa mosala na yo kati na mosala ya kosakola. Soki omipesi mobimba kati na mosala ya kopesa na bolingo nyonso, okomona ete okokóma na ‘ekateli makasi kati na motema na yo, kozaláká na bokonzi likoló na yo moko.’—1 Bakolinti 7:37.
Mobali mosusu oyo abalaki te, ntoma Paulo, akomaki toli moko kitoko ete: “Bongo, bokeba mpɔ na etambweli na bino, bozalaka bazoba tɛ kasi bato na mayɛlɛ mpenza. Bosalisa ntango na bino misala malamu, zambi mikɔlɔ ezali mabe.” (Baefese 5:15, 16) Baklisto mingi oyo babali te basili kozwa ‘kopema mpɔ na milimo na bango’ na kosaleláká ntango na bango mpo na kobɛlɛma penepene na Yehova kati na libondeli, na boyekoli ya Liloba ya Nzambe mpe na kosanganáká na makita ya boklisto. (Matai 11:28-30) Soki osali bongo, okokoka koyika mpiko na mikakatano ya nkita. Ekosalisa lisusu yo na kozala mpenza makasi na elimo, kokómisáká yo mobali to mwasi malamu mingi mpo na libala wana ekobala yo na nsima.
Obosana soko moke te ete Yehova amibanzabanzaka mpo na baoyo nyonso bazali kosalela ye. Ayebi mikakatano mpe mpasi oyo ozali konyokwama na yango. Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo ayebi mpe nini oyo eleki malamu mpo na yo na mikolo mizali koya, ezala mpo na bolamu na yo ya elimo to ya maoki. Soki otosi na motema pɛtɛɛ nyonso mitindá ya Liloba na ye kati na bomoi na yo ya mokolo na mokolo, okoki mpenza kondimisama solo ete akopesa yo kobɔndisama na ntango oyo ebongi mpe akokokisa bamposa mpe bisɛngi ya motema na yo mpo na bolamu na yo ya seko. Biblia ezali kondimisa biso ete: “[Yehova] akoboya kopɛsa elɔkɔ malamu sɔkɔ mɔkɔ tɛ na baoyo bazali kotambola alima.”—Nzembo 84:11.
Talelá makambo na lolenge malamu na yango
Lisusu, kobosana te, ete kozala monzemba ezali na matomba ya sikisiki. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ye oyo akopesa boseka na ye na libala akosala malamu, kasi ye oyo akopesa yango na libala te akosala malamu mingi.”—1 Bakolinti 7:38, NW.
Mpo na nini bonzemba ezali “malamu mingi” koleka libala? Paulo alimboli ete: “Moto oyo abali tɛ akotiaka motema na makambo na Nkolo ete asepelisa Nkolo boni. Nde moto oyo abali akotiaka motema na makambo na mokili ete asepelisa mwasi na ye boni, mpe motema na ye ekabwani. Mwasi to moseka oyo abalani tɛ, akotiaka motema na makambo na Nkolo ete azali bulɛɛ na nzoto mpe na [elimo, NW]. Kasi mwasi oyo abalani akotiaka motema na makambo na mokili ete asepelisa mobali na ye boni.”—1 Bakolinti 7:32-34.
Na maloba mosusu, baklisto oyo babali bazali na ntina ya komitungisa mpo na bamposa, na makambo oyo makosepelisa mpe oyo makozanga kosepelisa babalani na bango. Kasi baklisto oyo bazali minzemba bakoki kotya makanisi na bango mobimba likoló na mosala ya Yehova. Na bokokanisi elongo na baklisto oyo babali, baklisto oyo bazali minzemba bazali na makoki mingi ya “kotalela Nkolo na motema mobimba.”—1 Bakolinti 7:35.
Paulo alobi te ete baklisto minzemba bazangi mitungisi. Soki ozali na motungisi mouti na mikakatano ya nkita, okoki kooka lokola ete makambo mingi malingi kolongola likebi na yo na mosala ya boklisto. Nzokande, mbala mingi mobali to mwasi oyo abali te azalaka na bonsomi mingi ya kosalela Nzambe koleka baoyo basili kobala.
Atako azalaki kokumisa bonzemba lokola lolenge ya bomoi oyo eleki malamu, ntoma Paulo alobaki te ete kobala ezali mabe. Akomaki ete: “Nde sɔkɔ okobala mwasi, ozali na lisumu tɛ.” Nzokande, akebisaki ete: “Kasi bato motindo oyo [babali] bakozala na mpasi na nzoto.”—1 Bakolinti 7:28.
Alingaki koloba nini na maloba yango? Libala limemaka mitungisi. Na ntango ya mikakatano ya nkita, mpasi motindo yango ekoki kozala komibanzabanza oyo tata azalaka na yango mpo na oyo etali kokokisa bamposa ya mwasi na ye mpe ya bana na ye. Lisusu bokɔnɔ ekoki kobakisa bozito likoló na mosolo mpe mpasi ya maoki ya libota.
Boye ata soki ezalela na yo ezali te oyo olingaka, mbala mosusu ozali kutu malamu mingi koleka soki obalaki mpe ozalaki na mokumba ya bana. Mikakatano oyo ozali kokutana na yango sikawa mizali bobele mpo na ntango moke; yango ekozala lisusu te kati na ebongiseli ya sika ya Nzambe—mpe ekoki kozala ete mosusu na yango ekosila kutu nokinoki mpenza.—Kokanisá na Nzembo 145:16.
Okoki kokólisa mosala na yo?
Atako bato nyonso te bakoki kosala yango, basusu bakoki kokɔta na mosala ya ntango nyonso ata bazali na mikakatano ya mosolo. Chuks, oyo tolobelaki na ebandeli, azalaki kosomba mpe koteka bisaleli ya biro mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye. Bobele na ntango oyo elaka ya libala na ye ebebisamaki, ye azwaki libyangi mpo na kosala na ntango moke na botongi ya biro ya filiale ya la Société Watch Tower. Wana atungisamaki na likambo ya mosolo, ndeko na ye ya mobali aboyaki ete ye akende. Nzokande, Chuks asosolaki ete Yehova nde asalisaki ye na kobanda mombongo ya bisaleli ya biro, na yango asengelaki kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso mpe kotya motema kati na makoki ya Nzambe mpo na kokokisa bamposa na ye. (Matai 6:25-34) Lisusu, akanisaki ete ezalaki bobele mpo na boumeli ya sanza misato mpamba.
Chuks andimaki libyangi yango mpe atikaki mosala epai na ndeko na ye. Mibu motoba na nsima, Chuks azali naino kokóba na mosala ya ntango nyonso, azali nkulutu kati na lisangá ya boklisto mpe azali na mosolo ya kobala. Azali kooka mawa na lolenge makambo malekaki kati na bomoi na ye? Chuks alobi ete: “Naokaki mawa wana nazangaki makoki ya kobala ntango nakanaki yango, kasi makambo masalemaki na lolenge eleki malamu. Nasili kozwa esengo mingi mpe matomba mingi ya mosala oyo mbala mosusu nakokaki te kozwa soki nabalaki na ntango wana mpe nazalaki na libota.”
Libateli mpo na mikolo mizali koya
Na ntango ya mikakatano bato mingi balukaka libateli kati na libala lokola ekimelo mpo na nkaka ya mosolo na mikolo mizali koya. Bamboka mosusu, oyo ezali na nyongo mingi, epesaka bobele lisalisi moke to epesaka lisalisi moko te mpo na mibangé. Na yango, baboti mingi batyaka motema epai na mabota na bango, mpe mingimingi epai na bana na bango, mpo na kosunga bango na ntango na bobangé na bango. Yango wana, mibali mpe basi minzemba mbala mingi bapusamaka na kobala mpe kobota bana, ata soki bazali na nkaka ya mosolo.
Kasi libala mpe kobota bana ezali ndanga te ya libateli. Bana mosusu ya mokili oyo balingaka te kosunga baboti na bango, basusu bazali na makoki te, ezali mpe na basusu oyo bakufaka liboso na baboti na bango. Baklisto balukaka libosoliboso libateli epai mosusu, mpamba te bazali kobosana te elaka ya Nzambe: “Nakotika yɔ sɔkɔ mokɛ tɛ, nakosabola yɔ mpe tɛ.”—Baebele 13:5.
Baoyo bazongisaki libala na bango nsima mpo na kosalela Yehova batikamaki te. Christiana azali monzemba mpe azali na mbula 32. Asili kosalela Nzambe lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza na Nigeria na boumeli ya mibu libwa oyo miuti koleka. Alobi ete: “Natyaka elikya na ngai epai na Yehova oyo azali kondimisa biso ete akotika basaleli na ye soko moke te. Elaka na ye ezali endimiseli na ngai. Yehova azali kokokisa bamposa na ngai ya elimo mpe ya mosuni. Ye asili komimonisa tata ya bokabi mingi. Na ndakisa, nakendaki kosala lokola mobongisi-nzela na esika mposa ya Batatoli ezali mingi. Atako bisengo bizali mingi te kuna, nayekolaki kolónga yango. Ntango nakɔtaki lopitalo mpo na bokɔnɔ ya typhus, bandeko ya lisangá epai nautaki bayaki kosunga ngai.
“Nazali kosepela mingi na mosala ya ntango nyonso. Nazali komona ete kosala elongo na Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mpe ebele na bandeko mibali mpe bandeko basi kati na mokili mobimba ezali libaku moko kitoko mingi. Namonaka bilenge mingi oyo bazali na mawa mpe bazangi elikya na ntina na makambo oyo mazali kobima zingazinga na bango. Mpo na ngai, bomoi ezali na ntina; nazali kotalela mikolo mizali koya na elikya nyonso. Nayebi ete kozala na boyokani ya penepene elongo na Yehova ezali mwango moleki malamu mpo na kosilisa mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo.”
Soki ozali kooka mposa makasi ya kobala kasi ozali na makoki te ya kobala na ntina na mikakatano ya nkita, yiká mpiko! Ozali yo moko te. Na lisalisi ya Yehova bato mosusu mingi bazali koyika mpiko na komekama lolenge yango. Zwá matomba kitoko na ezalela na yo na kosaláká makambo malamu mpo na basusu mpe na kobongisáká elimo na yo. Bɛlɛmá penepene na Nzambe; akosalisa yo mpamba te azali mpenza komibanzabanza mpo na yo.—1 Petelo 5:7, NW.