Bonzemba—libaku mpo na mosala mosalemi na likebi nyonso
“[Yango] elimboli kosalela Nkolo mosala na likebi nyonso.”—1 BAKOLINTI 7:35, NW.
1. Nsango nini ya kobulunganisa Paulo azwaki na ntina na baklisto ya Kolinti?
NTOMA Paulo azalaki komibanzabanza mpo na bandeko na ye baklisto ya Kolinti, na mboka Grèce. Mibu soko mitano liboso, afungolaki lisangá na engumba wana ya bozwi mingi oyo eyebanaki malamu mpo na bizaleli na yango ya mbindo. Sikawa, pene na mobu 55 T.B., wana azalaki na Efese, na Asie Mineure, azwaki nsango moko ya kobulunganisa euti na Kolinti na ntina na bokabwani kati na lisangá mpe kokanga miso likoló na etamboli moko mabe ya mbindo. Lisusu, Paulo asilaki kozwa mokanda longwa na baklisto ya Kolinti, kati na yango basɛngaki litambwisi na makambo matali kosangisa nzoto, bonzemba, libala, bokabwani, mpe kobala lisusu.
2. Lolenge nini ezaleli ya mbindo oyo epalanganaki mingi na Kolinti ezalaki na bopusi likoló na baklisto ya engumba yango?
2 Emonanaki lokola ete ezaleli ya mbindo oyo epalanganaki mingi na Kolinti ezalaki na bopusi likoló na lisangá ya mboka yango na mitindo mibale. Bamoko kati na baklisto bazalaki komipesa na bomoi ya mbindo to bazalaki kokanga miso likoló na yango. (1 Bakolinti 5:1; 6:15-17) Emonanaki mpe ete, basusu, mpo na kotɛmɛla komisepelisa nzoto oyo ezalaki bipai binso kati na engumba, balekisaki ndelo wana balendisaki koboya bosangisi nzoto, ata epai ya babalani.—1 Bakolinti 7:5.
3. Makambo nini Paulo alobelaki naino kati na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti?
3 Kati na nkomá molai oyo Paulo atindaki na lisangá ya Kolinti, libosoliboso alobelaki likambo litali bokabwani. (1 Bakolinti, mikapo 1-4) Alendisaki bango ete bátika kolanda bato, momeseno oyo mokoki bobele komema na bokabwani mabe. Basengelaki kozala na bomoko lokola “basalani elongo” na Nzambe. Na nsima apesaki bango mitindá ya sikisiki mpo na kobatela bopɛtɔ ya lisangá. (Mikapo 5, 6) Na nsuka ntoma ayanolaki na nkomá na bango.
Alendisi kozala monzemba
4. Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete “ezali malamu ete mobali amama mwasi te”?
4 Abandi ete: “Mpo na makambo makomaki bino, ezali malamu na mobali ete amama mwasi te.” (1 Bakolinti 7:1) Liloba “amama mwasi te” elimboli awa koboya bokutani nyonso ya nzoto elongo na mwasi mpo na kosepelisa mposa ya kosangisa nzoto. Lokola Paulo asilaki kokweisa pite, azalaki sikawa kolobela kosangisa nzoto kati na ebongiseli ya libala. Na yango, Paulo azalaki bongo kolendisa bonzemba. (1 Bakolinti 6:9, 16, 18; kokanisá na Genese 20:6; Masese 6:29.) Mwa moke na nsima akomi ete: “Nazali koloba epai na bango babali naino te mpe na basi-bakufeli-mibali ete malamu na bango bátikala lokola ngai.” (1 Bakolinti 7:8) Paulo azalaki na mobalani te, mbala mosusu azalaki mokufeli-mwasi.—1 Bakolinti 9:5.
5, 6. (a) Mpo na nini ezali polele ete Paulo azalaki te kolendisa motindo ya bomoi makasi lokola oyo ezalaka na monastɛrɛ? (b) Mpo na nini Paulo alendisaki bonzemba?
5 Ekoki mpenza kozala ete baklisto ya Kolinti basilaki koyeba filozofi ya Bagreke, oyo biteyelo mosusu na yango bizalaki kosɛnga lolenge makasi ya koboya bisengo nyonso, to komiboya mobimba. Mbala mosusu ekoki kozala na ntina yango nde Bakolinti batunaki Paulo soki ezalaki “malamu” mpo na baklisto báboya kosangisa nzoto ata na lolenge nini? Eyano ya Paulo emonisaki filozofi ya Bagreke te. (Bakolose 2:8) Na kokesena na bateolojié ya Katolike, epai moko te kati na mikanda na ye alendisaki bomoi ya komipimela ya bonzemba kati na monastɛrɛ to na kuvá, lokola nde minzemba bazalaki bulɛɛ na motindo mokeseni mpe bakokaki komizwela lobiko na nzela ya lolenge na bango ya bomoi mpe ya mabondeli na bango.
6 Paulo alendisaki bonzemba “mpo na bolózi bozali koya.” (1 Bakolinti 7:26) Mbala mosusu azalaki kolobela ntango ya mpasi oyo baklisto bazalaki kati na yango, oyo mikakatano ya libala mikokaki kobakisa yango. (1 Bakolinti 7:28) Epai na baklisto minzemba apesaki toli oyo ete: “Malamu na bango bátikala lokola ngai.” Epai na bakufeli-basi, alobaki ete: “Okangwi na mwasi? Oluka mwasi te.” Epai na baklisto bakufeli-mibali, akomaki ete: “Nde na makanisi na ngai, akozala na esengo na koleka soko akotikala lokola ezali ye. Nabanzi mpe ete ngai nazali na [elimo] ya Nzambe.”—1 Bakolinti 7:8, 27, 40.
Kotikala monzemba ezali lisɛngisi te
7, 8. Nini emonisi ete Paulo azalaki te kopusa baklisto na makasi ete bátikala minzemba?
7 Na ntembe te elimo santu ya Yehova ezalaki kokamba Paulo ntango apesaki toli wana. Maloba na ye nyonso na ntina na bonzemba mpe libala mazali komonisa bokatikati mpe komipekisa. Akómisaki yango te lisɛngami ya kozala sembo to ya kozanga bosembo. Nzokande, ezalaki liponi ya moto na moto, mpe amonisaki matomba mingi ya bonzemba mpo na baoyo bazali na makoki ya kotikala pɛtɔ kati na ezalela yango.
8 Mbala moko nsima ya koloba “ezali malamu na mobali ete amama mwasi te,” Paulo abakisi ete: “Kasi mpo ete pite ezali [mingi], mobali na mobali azala na mwasi na ye mpe mwasi na mwasi azala na mobali na ye.” (1 Bakolinti 7:1, 2) Nsima ya kopesa toli na minzemba mpe basi bakufeli-mibali ete “bázala lokola ngai,” nokinoki abakisi ete: “Nde soki bayebi komikanga mposa na bango te, bábala. Kobala eleki malamu na kozika na mposa.” (1 Bakolinti 7:8, 9) Lisusu, toli na ye epai na mibali bakufeli-basi ezalaki ete: “Oluka mwasi te. Nde soko okobala mwasi, ozali na lisumu te.” (1 Bakolinti 7:27, 28) Toli wana ya bokatikati ezali komonisa likanisi ya bonsomi ya kopona.
9. Engebene Yesu mpe Paulo, lolenge nini libala mpe bonzemba ezali nyonso likabo liuti na Nzambe?
9 Paulo amonisaki ete ezala libala to bonzemba, nyonso ezali likabo ya Nzambe. “Nalingi ete bato nyonso bázala lokola ngai moko. Kasi moto na moto azali na likabo uta na Nzambe, moko na lolenge oyo, mosusu na lolenge mosusu.” (1 Bakolinti 7:7) Na ntembe te azalaki kokanisa oyo Yesu alobaki. Nsima ya komonisa ete libala eutaki na Nzambe, Yesu amonisaki ete bonzemba oyo moto aponi na bolingo na ye moko mpo na kosalela matomba ya Bokonzi ezali likabo ya ntina: “Bato nyonso bayebi koyamba liloba oyo te, bobele bango bapesameli yango. Bamosusu bazali mikube longwa na libumu na mama na bango, mpe [bamosusu] bazalisami mikube na bato; mpe bamosusu bamizalisi mikube mpo na Bokonzi na Likoló. Tiká ete oyo ayebi koyamba oyo, ayamba yango.”—Matai 19:4-6, 11, 12.
Koyamba likabo ya bonzemba
10. Lolenge nini moto akoki “koyamba” likabo ya bonzemba?
10 Atako Yesu mpe Paulo balobelaki bango nyonso mibale bonzemba ete ezali “likabo,” moko te kati na bango alobaki ete ezali likabo ya kokamwisa oyo bobele bamoko bazalaki na yango. Yesu alobaki ete “bato nyonso te bayebi koyamba” likabo wana, mpe alendisaki ye oyo akokaki kosala bongo ete “ayamba yango,” lokola Yesu mpe Paulo basalaki. Ezali solo ete Paulo akomaki, “Kobalana eleki malamu na kozika na mposa,” kasi azalaki kolobela baoyo “bayebi komikanga mposa na bango te.” (1 Bakolinti 7:9) Kati na mikanda na ye ya ebandeli, Paulo amonisaki ete baklisto bakoki kopɛngola likambo ya kozika na mposa. (Bagalatia 5:16, 22-24) Kotambola na elimo elimboli kotika elimo ya Yehova ete etambwisa biso kati na matambe nyonso tokoki kosala. Bilenge baklisto bakoki nde kosala bongo? Ee, bakoki kosala bongo soki balandi na likebi nyonso Liloba ya Yehova. Mokomi na Nzembo akomaki ete: “Elenge mobali [to elenge mwasi] akopɛtɔla nzela na ye na nini? Bobele na kokeba ete asala lokola liloba na yo.”—Nzembo 119:9.
11. ‘Kotambola na elimo’ elimboli nini?
11 Yango etali likambo ya komibatela na makanisi ya kolɛngola oyo mapalanganisami na nzela ya televizyó, na bafilime, na masoló ya bazulunalo, na babúku mpe na banzembo ya lolango. Makanisi motindo wana mazali kokólisa mposa ya mosuni. Elenge mobali to elenge mwasi moklisto oyo alingi kozala monzemba asengeli “kotambola na bizaleli na nzoto te kasi na bizaleli na [elimo]. Zambi baoyo bazali bato na nzoto, bakotya mitema na makambo na nzoto; nde baoyo bazali na [elimo] bakotya mitema [na bango] na makambo na [elimo].” (Baloma 8:4, 5) Makambo ya elimo mazali bongo sembo, pɛtɔ, makoki kolingama, malamu mpenza. Baklisto, bilenge mpe mikolo, basengeli ‘kokanisa makambo yango.’—Bafilipi 4:8, 9.
12. Koyamba bonzemba ezali kosɛnga nini?
12 Koyamba likabo ya bonzemba etaleli mingimingi likambo ya kotya motema na mokano yango mpe ya kobondela Yehova ete apesa lisalisi ya kolanda yango. (Bafilipi 4:6, 7) Paulo akomaki ete: “Kasi ye oyo ayebi na solo na motema na ye wana epusami ye te nde akangi mposa na ye ngwi mpe akani boye na motema na ye, soko abateli [“bongɔ́ndɔ na ye,” NW] azali kosala malamu. Boye ye oyo [“akopesa bongɔ́ndɔ na ye na libala,” NW] akosala malamu; ye oyo [“akopesa yango te,” NW] akosala malamu na koleka.”—1 Bakolinti 7:37, 38.
Bonzemba mpo na kokokisa mokano moko
13, 14. (a) Bokokanisi nini Paulo asalaki kati na baklisto oyo babalá mpe baoyo bazali minzemba? (b) Bobele na lolenge nini moklisto monzemba “akosala malamu koleka” baoyo babali?
13 Bonzemba yango moko ezali na ntina te. Bongo, na ndimbola nini ekoki kozala “malamu koleka”? Nyonso etali lolenge oyo moto yango azali kosalela bonsomi oyo bonzemba epesaka. Paulo akomaki ete: “Nalingi ete bókangwa na mikakatano. Moto oyo abali te akotyaka motema na makambo na Nkolo ete asepelisa Nkolo boni. Nde moto oyo abali akotyaka motema na makambo na mokili ete asepelisa mwasi na ye boni, mpe motema na ye ekabwani. Mwasi to moseka oyo abali te, akotyaka motema na makambo na Nkolo ete azala bulɛɛ na makambo na nzoto mpe na [elimo]. Kasi mwasi oyo abali akotyaka motema na makambo na mokili ete asepelisa mobali na ye boni. Nazali koloba oyo epai na bino bobele mpo na malamu na bino; ezali mpo na kokanga bino na nkamba te, kasi na ntina ete bótambolaka na ngɔlu mpe ete [“bósalelaka Nkolo mosala na likebi nyonso,” NW].”—1 Bakolinti 7:32-35.
14 Moklisto monzemba oyo azali kosalela bonzemba na ye mpo na mikano ya moimi azali te kosala “malamu koleka” baklisto oyo babali. Atikali monzemba, “mpo na Bokonzi” te, kasi mpo na bantina na ye moko. (Matai 19:12) Mobali to mwasi monzemba asengeli “kotya motema na makambo na Nkolo,” koluka “kosepelisa Nkolo,” mpe “kosalela Nkolo mosala na likebi nyonso.” Yango elingi koloba kotya likebi mobimba na mosala ya kosalela Yehova mpe Klisto Yesu. Bobele na kosaláká bongo nde mibali mpe basi baklisto oyo bazali minzemba bakosala “malamu koleka” baklisto oyo babali.
Mosala mosalemi na likebi nyonso
15. Likanisi ya ntina ya maloba na Paulo na 1 Bakolinti mokapo 7 lizali nini?
15 Likanisi mobimba ya Paulo kati na mokapo wana ezali oyo: Atako libala lizali likambo libongi mpe, na bantango mosusu, ebongi kolendisa basusu ete bábala, na ntembe te, bonzemba ezali na matomba mpo na mobali to mwasi moklisto oyo alingi kosalela Yehova na likebi na ye nyonso. Wana moto oyo abali, “motema na ye ekabwani,” moklisto monzemba azali na bonsomi ya kotya makanisi nyonso likoló na “biloko na Nkolo.”
16, 17. Lolenge nini moklisto monzemba akoki kotya likanisi na ye mobimba na “makambo na Nkolo”?
16 Makambo nini ya Nkolo moklisto monzemba akoki kotyela yango likebi mingi koleka bato oyo babalá? Na libaku mosusu, Yesu alobelaki “biloko na Nzambe”—biloko oyo moklisto asengeli te kopesa yango na Kaisala. (Matai 22:21) Biloko yango bitaleli mingimingi bomoi ya moklisto, losambo mpe mosala ya Nzambe oyo azali kosala.—Matai 4:10; Baloma 14:8; 2 Bakolinti 2:17; 3:5, 6; 4:1.
17 Mbala mingi minzemba bazalaka na bonsomi ya kopesa ntango mingi na mosala ya Yehova, oyo ekoki kozala litomba mpo na bango na elimo mpe litomba mpo na mosala na bango mpo na Nzambe. Bakoki kolekisa ntango mingi na boyekoli na bango moko mpe na bomanyoli. Mbala mingi minzemba bakoki kokɔtisa botángi na bango ya Biblia kati na manáka na bango malamu koleka bato oyo babalá. Bazali mpe na makoki mingi ya komibongisa malamu mpo na makita mpe mpo na mosala ya kosakola. Nyonso oyo ezali mpo na “matomba na bango moko.”—1 Bakolinti 7:35.
18. Lolenge nini bandeko mibali mingi oyo bazali minzemba bamonisaka ete balingi kosalela Yehova “na likebi nyonso”?
18 Bandeko mibali mingi oyo bazali minzemba mpe bazali kosala lokola basaleli na misala bazali na bonsomi ya koloba epai na Yehova ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 6:8) Bakoki kosɛnga ete bákɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, oyo esalemi bobele mpo na bankulutu mpe basaleli na misala minzemba oyo bakoki kokenda epai mposa ezali monene. Ata bandeko mibali oyo bazali na makoki te ya kotika lisangá na bango bakoki komipesa bango moko mpo na kosalela bandeko na bango lokola basaleli na misala to bankulutu.—Bafilipi 2:20-23.
19. Lolenge nini bandeko basi mingi minzemba basili kozwa lipamboli, mpe wapi moko na banzela oyo bakoki kozala mapamboli mpo na lisangá?
19 Bandeko basi minzemba, oyo bazali na mibali te ya kotuna likanisi mpe koyebisa bango basɛkɛlɛ́ na bango, bakoki mpenza kozala na makoki mingi ya ‘kokitisa mokumba na bango epai na [Yehova].’ (Nzembo 55:22; 1 Bakolinti 11:3) Yango ezali mpenza na ntina mingi mpo na bandeko basi oyo batikali minzemba mpo na bolingo na bango epai na Yehova. Na nsima soki bakobala, basengeli kobala “bobele kati na Nkolo,” elingi koloba, kobala bobele moto oyo asili komipesa epai na Yehova. (1 Bakolinti 7:39) Bankulutu bazali na botɔ́ndi mingi ya kozala na bandeko basi minzemba kati na lisangá na bango; mbala mingi bandeko basi yango batalaka mpe basalisaka babɛli mpe mibangé. Yango epesaka esengo epai na bandeko yango mpe epai na baye basalisami.—Misala 20:35.
20. Lolenge nini baklisto mingi bazali komonisa ete bazali kosalela “Nkolo mosala na likebi nyonso”?
20 Bilenge baklisto mingi basili kobongisa makambo na bango na motindo boye ete “básalela Nkolo mosala na likebi nyonso.” (1 Bakolinti 7:35) Bazali kosalela Yehova lokola baministre ya ntango nyonso babongisi-nzela, bamisionere, to kati na moko na babiro ya filiale ya la Société Watch Tower. Oyo nde etuluku ya bato na esengo! Kozala elongo na bango ezali mpenza kopesa kobɔndisama! Ya solo, na miso na Yehova mpe na Yesu, bazali “lokola mamwɛ.”—Nzembo 110:3.
Ezali na ndai te mpo na kotikala libela monzemba
21. (a) Mpo na nini ezali polele ete Paulo alendisi te kokata ndai mpo na kotikala monzemba? (b) Alingaki koloba nini wana alobelaki “kolekisa eleko ya bolenge”?
21 Likanisi ya ntina kati na toli ya Paulo lizali ete ekozala “malamu” soki baklisto bakanisi koyamba bonzemba kati na bomoi na bango. (1 Bakolinti 7:1, 8, 26, 37) Nzokande, alendisaki bango te ete bákata ndai ya kotikala monzemba. Na kokesena, akomaki ete: “Soko moto akanisi ete azali kosala malamu te mpo na bongɔ́ndɔ na ye, soko mpe yango esili koleka eleko ya bolenge mpe soko likambo limonani malamu, asala lokola elingi ye. Ezali lisumu te; tiká ete bábala.” (1 Bakolinti 7:36, NW) Liloba bobele moko ya Greke (hy·peʹra·kmos) oyo ebongolami na “koleka eleko ya bolenge” elimboli mpenzampenza “koleka ndelo ya nsuka” mpe ezali kolobela koleka ntango oyo mposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi mingi. Na yango, baoyo basili koumela mibu mingi lokola minzemba mpe na nsima bakanisi ete basengeli kobala bazali mpenza na bonsomi ya kobalana elongo na moninga moko mondimi.—2 Bakolinti 6:14.
22. Mpo na nini ezali mpenza litomba na makambo nyonso ete moklisto atikala monzemba wana azali naino elenge mpenza?
22 Bambula oyo elenge moklisto azali kolekisa na kosalela Yehova na likebi nyonso ezali bozwi ya mayele mpenza azali kobomba. Yango ekosalisa ye na kozwa mayele, eksperiansi mpe bososoli. (Masese 1:3, 4) Moto oyo atikali monzemba mpo na Bokonzi azali kobongisama malamu mpo ete na nsima, soki akani kobala, akozala na makoki mingi ya kokokisa mikumba ya libala mpe mbala mosusu mokumba ya moboti.
23. Eloko nini baoyo bazali kokanisa kobala basengeli kobosana yango te, kasi motuna nini mokotalelama kati na masoló malandi?
23 Baklisto mosusu oyo balekisaki mibu mingi na kosalela Yehova kati na mosala ya ntango nyonso lokola minzemba bazalaka na bokɛngi mpo na kopona mobalani na bango, ete bákóba elongo kati na lolenge moko ya mosala ya ntango nyonso. Babongi mpenza kopesamela longonya. Basusu bakoki mpe kokanisa kobala na kozaláká na likanisi ya kotika nzela te ete libala na bango epekisa mosala na bango na lolenge moko to mosusu. Kasi moklisto oyo abalá akoki kokanisa ete azali na bonsomi ya komipesa na mosala ya Yehova lolenge azalaki kosala liboso ntango azalaki monzemba? Motuna oyo mokotalelama kati na masoló malandi.
Bozongeli
◻ Mpo na nini ntoma Paulo amonaki ntina ya kokomela lisangá ya Kolinti?
◻ Lolenge nini toyebi ete Paulo azalaki te kolendisa motindo ya bomoi ya monastɛrɛ?
◻ Lolenge nini moto akoki “koyamba” bonzemba?
◻ Lolenge nini bandeko basi minzemba bakoki kozwa matomba na ezalela na bango ya bonzemba?
◻ Na lolenge nini bandeko mibali oyo bazali minzemba bakoki kosalela malamu bonsomi na bango mpo na kosalela Yehova “na likebi nyonso”?