Zalá na esengo na libala na yo
“Ndako ekotongama malamu na nzela ya mayele; ekokokisama na nzela ya bososoli.”—Mas. 24:3.
1. Ndenge nini Nzambe amonisaki bwanya ntango akelaki moto ya liboso?
TATA na biso ya likoló mpe ya bwanya ayebi oyo ezali malamu mpo na biso. Na ndakisa, Nzambe ayebaki ete mpo mokano na ye ekokisama, ezalaki “malamu te ete moto azala ye moko” na kati ya elanga ya Edene. Likambo eleki ntina na mokano yango ezalaki ete mwasi ná mobali bábota mpe ‘bátondisa mokili.’—Gen. 1:28; 2:18.
2. Ebongiseli nini Yehova azwaki mpo na bolamu ya bato?
2 Yehova alobaki boye: “Nakosalela ye mosungi mobongi na ye.” Na nsima, Nzambe alalisaki mobali ya liboso mpɔngi makasi, abimisaki mopanzi moko na nzoto na ye ya kokoka mpe asalaki na yango mwasi. Ntango Yehova ayaki na Eva, mwasi ya kokoka epai ya Adama, mobali alobaki boye: “Oyo azali . . . mokuwa ya mikuwa na ngai, mpe mosuni ya mosuni na ngai. Ye akobengama mwasi, zambi ye akamatami na mobali.” Eva azalaki mpenza mosungi ya Adama. Mokomoko na bango azalaki na bizaleli mosusu oyo moninga azalaki na yango te, atako bongo, bango nyonso mibale bazalaki bato ya kokoka mpe bakelamaki na elilingi ya Nzambe. Na ndenge yango, Yehova abandisaki ebongiseli ya libala. Adama ná Eva bazalaki na mokakatano te ya kondima ebongiseli wana oyo Nzambe azwaki mpo básalisanaka mpe básunganaka.—Gen. 1:27; 2:21-23.
3. Bato mingi batalelaka likabo ya libala ndenge nini, mpe yango ebimisi mituna nini?
3 Likambo ya mawa, elimo ya botomboki etondi mpenza na mokili lelo oyo. Mikakatano oyo botomboki yango ezali kobimisa euti epai ya Nzambe te. Bato mingi batyolaka likabo ya libala oyo Nzambe apesá, balobaka ete esilá ngala mpe ebimisaka mikakatano mpe kowelana. Mingi kati na baoyo bazali kobala bazali koboma mabala. Baboti mosusu balingaka mpenza bana na bango te, mpe soki matata ezali, bakɔtisaka bana na matata na bango. Baboti mingi balingaka koyokana te, ata mpo na koluka kimya mpe bomoko na libota. (2 Tim. 3:3) Ndenge nini libala ekoki kozala na esengo na ntango oyo ya mabe? Ndenge nini kozala makambo makasimakasi te ekoki kobatela libala mpo ekufa te? Liteya nini tokoki kozwa na bandakisa ya bato ya ntango na biso oyo bazali na esengo na mabala na bango?
Tóndima litambwisi ya Yehova
4. (a) Toli nini Paulo apesaki na likambo ya libala? (b) Ndenge nini baklisto ya botosi balandaka toli wana ya Paulo?
4 Ntoma Paulo apesaki basi oyo bakufelá mibali toli ete soki balingi kobala lisusu, basengeli kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Kol. 7:39) Yango ezalaki likambo ya sika te mpo na baklisto oyo bazalaki Bayuda. Mobeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele emonisaki polele ete basengelaki te ‘kobalana’ na bato ya bikólo ya bapakano oyo bazalaki zingazinga na bango. Na nsima, ayebisaki bango mabe oyo ekoki kokómela bango soki batosi mobeko yango te. “Mpo ete [bato ya bikólo mosusu] bakopɛngwisa bana mibali na yo ete [bálanda] ngai te mpe básalela banzambe mosusu, bongo nkɛlɛ ya [Yehova] ekopelela bino, mpe akoboma yo noki.” (Det. 7:3, 4) Yehova alingi basaleli na ye ya lelo oyo bátalelaka likambo yango ndenge nini? Ezali polele ete mosaleli ya Nzambe asengeli kobala kaka moto oyo azali “na kati ya Nkolo,” elingi koloba mosambeli ya Yehova oyo amipesá mpe azwá batisimo. Kolanda malako ya Yehova ntango tozali kopona molongani ezali mpenza bwanya.
5. Yehova ná baklisto oyo babalá batalelaka ndai ya libala ndenge nini?
5 Ndai ya libala ezali mosantu na miso ya Nzambe. Mpo na libala ya liboso, Yesu, Mwana ya Nzambe, alobaki boye: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Mat. 19:6) Mokomi ya nzembo asalisi biso tómona ete ndai ezali likambo ya lisɛki te: “Pesá Nzambe matɔndi mpo na likabo, kokisá ndai na yo epai ya Oyo-Aleki-Likoló.” (Nz. 50:14) Atako libala ezalaka likambo ya esengo, ndai oyo mwasi ná mobali basalaka na mokolo ya libala ezalaka mokumba monene.—Det. 23:21.
6. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yefeta?
6 Tózwa ndakisa ya Yefeta, oyo azalaki mosambisi na Yisalaele na ekeke ya 12 L.T.B. Alapaki ndai oyo liboso ya Yehova: “Soki okopesa Baamona na lobɔkɔ na ngai, mbɛlɛ ye oyo akobima na monɔkɔ ya ndako na ngai mpo na kozwana na ngai, wana ekobutwa ngai na elonga na Baamola, akozala ya [Yehova], mpe nakokaba ye lokola mbeka ya kotumba.” Yefeta aboyaki nde kokokisa ndai yango ntango amonaki ete mwana na ye kaka moko ya mwasi nde ayaki koyamba ye ntango azongaki na mboka na ye Misipa? Te. Alobaki boye: “Nasili kofungola monɔkɔ na ngai epai ya [Yehova] mpe nakoki kobongola monɔkɔ na ngai te.” (Bas. 11:30, 31, 35) Yefeta akokisaki ndai na ye atako ayebaki ete soki asali bongo akozwa bankɔkɔ te mpe nkombo na ye ekobunga. Ndai oyo Yefeta alapaki ekeseni na ndai ya libala, kasi ndenge akokisaki yango, atiká ndakisa malamu mpenza mpo na mibali mpe basi baklisto oyo balapá ndai ya libala.
Nini ebongisaka libala?
7. Mbongwana nini bato oyo babalani sika basengeli kosala?
7 Babalani mingi bamikundolaka na esengo ntango oyo bazalaki naino bafianse. Ezalaki mpenza esengo koyeba moto oyo bakobalana na ye! Kolekisa ntango mingi elongo esalisaki bango báyebana malamumalamu. Kasi, ezala bazalaki bafianse liboso ya kobalana to babalisaki bango kobalisa kozanga ete bango moko báluka koyebana, ezalaki na makambo oyo basengelaki kobongola ntango babalanaki. Mobali moko alobi boye: “Mokakatano ya makasi oyo tozalaki na yango na ebandeli ya libala na biso ezalaki ya kondima ete tozali lisusu minzemba te. Na boumeli ya mwa ntango, ezalaki mpasi tótya baninga ná bato ya libota na esika na bango mpe libala na biso na esika na yango.” Mobali mosusu oyo akokisi mbula 30 ya libala, amonaki na ebandeli ya libala na bango ete mpo na kozala na bokatikati, asengelaki kobosanaka te ete bakómá mibale. Liboso andima bákende esika moko soki babengi bango to andima likambo moko, atunaka mwasi na ye mpe atalelaka matomba na bango nyonso. Na makambo ya ndenge wana, koyeba koyokela moninga esalisaka mpenza.—Mas. 13:10.
8, 9. (a) Mpo na nini ezali na ntina mwasi ná mobali báyebaka kosolola? (b) Na makambo nini esɛngaka mwasi ná mobali bázala na bokatikati, mpe mpo na nini?
8 Mbala mosusu, libala esangisaka bato oyo bakeseni na mimeseno. Na ntango wana, esɛngaka mpenza kosololaka polelepolele. Bato nyonso balobaka ndenge moko te. Kotala ndenge molongani na yo asololaka na bandeko na ye ekoki kosalisa yo oyeba komitya na esika na ye. Ntango mosusu, makambo oyo moto azali kokanisa na motema eyebanaka kaka te na oyo alobi, kasi na ndenge oyo alobeli yango. Okoki mpe koyeba makanisi ya moto ata soki alobi eloko te. (Mas. 16:24; Kols. 4:6) Bososoli ezali na ntina mingi mpo na kozala na esengo.—Tángá Masese 24:3.
9 Mpo na oyo etali kominanola, bato mingi bamonaka ete basengeli kozala na bokatikati. Ekoki kozala ete liboso bóbalana, molongani na yo azalaki kolekisa ntango mingi na masano mpe na lolenge mosusu ya kominanola. Ekosɛnga mbala mosusu sikoyo abongola makambo mosusu. (1 Tim. 4:8) Ekoki kozala mpe ndenge moko mpo na ntango oyo azalaki kolekisa na bandeko na ye. Na ntembe te, mwasi ná mobali basengeli kozala na ntango mpo na kosalaka makambo ya elimo mpe makambo mosusu elongo.—Mat. 6:33.
10. Ndenge nini kozala makambo makasimakasi te ekoki kosala ete baboti ná bana na bango oyo babalá báyokanaka?
10 Soki mobali abali, atikaka tata na ye ná mama na ye; ezali mpe bongo mpo na mwasi. (Tángá Genese 2:24.) Atako bongo, basengeli kaka kotosa mobeko ya Nzambe oyo esɛngi bana bákumisaka tata ná mama. Na yango, ata nsima ya kobalana, bakobanda kaka kolekisaka mwa ntango elongo na baboti to babokilo na bango. Mobali moko oyo akokisi mbula 25 na libala alobi boye: “Ezalaka ntango mosusu mpasi mpo na kokipe ná molongani na yo ná baboti mpe bandeko na bino. Genese 2:24 esalisaki ngai mingi na likambo yango. Ezali solo ete moto asengeli kobosana bato mosusu ya libota na ye te, kasi vɛrsɛ wana emonisi ete mwasi na ngai asengeli kaka kozala na esika ya liboso.” Yango wana, baboti baklisto oyo bazalaka makambo makasimakasi te bayebaka ete bana na bango oyo babali bakómi na libota mosusu, oyo mobali nde azali na mokumba ya kokamba.
11, 12. Mpo na nini koyekolaka mpe kobondelaka elongo ezali na ntina mingi mpo na mwasi ná mobali?
11 Kozala na momeseno ya koyekola na libota ezali na ntina mingi. Ndakisa ya mabota mingi ya baklisto emonisi bosolo ya likambo yango. Ezalaka pɛtɛɛ te mpo na kosala programɛ ya koyekola mpe kokoba kolanda yango. Tata ya libota moko alobi boye: “Soki tozalaki na likoki ya kobandela lisusu bomoi na biso mpe kobongola likambo moko, tolingaki kopona kozala na momeseno ya koyekolaka na libota banda na ebandeli ya libala na biso.” Abakisi boye: “Komona ndenge mwasi na ngai azali kosepela soki toyekoli likambo moko ya kitoko na Biblia ezalaka likabo kitoko mpenza mpo na ngai.”
12 Kobondela elongo ezali mpe na ntina mingi. (Lom. 12:12) Soki mwasi ná mobali basambelaka Yehova, boyokani na bango na Nzambe ekokolisa mpe boyokani na bango mibale. (Yak. 4:8) Moklisto moko alobaki boye: “Kosɛnga mbala moko bolimbisi mpo na mabunga oyo esalemi mpe kolobela yango ntango bozali kobondela elongo ezali lolenge moko ya komonisa ete ozali mpenza na mawa na motema, ata mpo na mwa libunga ya moke oyo eyokisaki moninga mpasi.”—Ef. 6:18.
Kozala makambo makasimakasi te na libala
13. Toli nini Paulo apesi basi ná mibali na likambo ya kosangisa nzoto?
13 Baklisto basengeli kokima bizaleli oyo ekoki kobebisa mabala na bango, bizaleli oyo ezali komonana na mokili ya lelo oyo etondi na pite mpe ekobo. Na likambo yango, Paulo apesaki toli oyo: “Tiká ete mobali apesa mwasi na ye eloko oyo azali na lotomo ya kozwa; kasi tiká mwasi mpe asala ndenge wana epai ya mobali na ye. Mwasi azali na bokonzi te likoló ya nzoto na ye moko, kasi mobali na ye nde azali na yango; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te likoló ya nzoto na ye moko, kasi mwasi na ye nde azali na yango.” Na nsima, Paulo apesaki toli oyo: “Bópimelanaka yango te, longola kaka soki bino mibale bondimi yango mpo na mwa ntango moko boye oyo etyami.” Mpo na nini? “Na ntina ete bópesa ntango na libondeli mpe bóya lisusu kosangana, mpo Satana akoba te komeka bino mpo na kozanga komipekisa na bino.” (1 Kol. 7:3-5) Lokola atángaki mpe libondeli, Paulo amonisaki makambo oyo eleki ntina mpo na moklisto. Amonisaki mpe polele ete moklisto nyonso oyo abalá asengeli kotalelaka bamposa nyonso ya molongani na ye.
14. Ndenge nini mitinda ya Biblia ekoki kosalisa mwasi ná mobali na likambo ya kosangisa nzoto?
14 Mwasi ná mobali basengeli koyokanaka malamu mpe koyeba ete kozala makambo makasimakasi na likambo ya kosangisa nzoto ebimisaka mikakatano. (Tángá Bafilipi 2:3, 4; talá mpe Matai 7:12.) Likambo yango emonanaka mpenza na mabota oyo mwasi ná mobali basambelaka esika moko te. Ata soki bayokani te na likambo moko, makambo ekoki kobonga soki moklisto azali na ezaleli malamu, na boboto mpe azali koluka boyokani. (Tángá 1 Petelo 3:1, 2.) Bolingo mpo na Yehova mpe mpo na molongani na ye, mpe koyeba komitya na esika ya moninga ekoki kosalisa na likambo yango.
15. Ndenge nini limemya ekoki kosalisa mwasi ná mobali bázala na esengo?
15 Ata mpe na makambo mosusu, mobali ya boboto akopesa mwasi na ye limemya. Na ndakisa, akobanda kotalela mpe makanisi na ye, ata na makambo ya mikemike. Mobali moko ya mbula 47 alobi boye: “Na likambo wana, nazali naino na mingi ya koyekola.” Biblia esɛngi basi baklisto bázalaka na limemya makasi epai ya mibali na bango. (Ef. 5:33) Koloba mabe mpo na mibali na bango to kobimisa mabe na bango na miso ya bato ekomonisa limemya ata moke te. Masese 14:1 elobi boye: “Mwasi ya mayele akotonga ndako na ye, nde oyo ya zoba akobuka yango na mabɔkɔ na ye mpenza.”
Bótikela Zabolo esika te
16. Ndenge nini balongani bakoki kosalela toli ya Baefese 4:26, 27?
16 “Bóyoka nkanda, mpe atako bongo bósala lisumu te; tiká ete moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.” (Ef. 4:26, 27) Kosalela toli wana ekosalisa biso tósilisa to tókima matata oyo ekoki kobima na libala. Ndeko moko ya mwasi alobi boye: “Nayebi te mokolo oyo ngai ná mobali na ngai toswanaki mpe tofandi te mpo na kobongisa, ata soki yango esengelaki kozwa biso ntango mingi.” Na ebandeli ya libala na bango, ye ná mobali na ye bazwaki ekateli ete soki bazwani matata, bakolala te soki basilisi yango te. “Tozwaki ekateli ete ata soki tozwani matata ya ndenge nini, tokolimbisana mpe tokobosana, mpo tóbanda mokolo ya sika malamu.” Na ndenge yango, baboyaki ‘kotikela Zabolo esika.’
17. Ata soki omoni ete oponaki molongani oyo abongi na yo te, nini ekoki kosalisa yo?
17 Kasi, okosala nini soki omoni ete oponaki molongani oyo abongi na yo te? Okoki komona ete ozali na esengo na libala na yo te lokola baninga. Kasi, soki obosani te ndenge oyo Mozalisi atalelaka libala, yango ekosalisa yo. Na lisalisi ya elimo santu, Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Tiká libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te, mpo Nzambe akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.” (Ebe. 13:4) Tosengeli mpe kobosana te maloba oyo: “Nkamba ya nsinga misato ekokatanaka noki te.” (Mos. 4:12) Soki ná mwasi ná mobali bazali kosala nyonso mpo na kosantisa nkombo ya Yehova, bango mibale bakozala na boyokani makasi; bakozala mpe na boyokani makasi ná Nzambe. Basengeli kosala makasi mpo libala na bango ezala malamu, mpo bayebi ete yango ekopesa Yehova lokumu, ye oyo azali Mobandisi ya libala.—1 Pet. 3:11.
18. Likambo nini tokoki mpenza kondima na ntina ya libala?
18 Baklisto bakoki mpenza kozala na esengo na mabala na bango. Kasi, mpo na kozwa esengo yango, basengeli kosala milende mpe komonisa bizaleli ya baklisto, na ndakisa kozala makambo makasimakasi te. Lelo oyo, na kati ya masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, ezali na ebele ya mabala oyo emonisi ete bato oyo babalá bakoki kozala na esengo.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini kozala na libala ya esengo ezali ndɔtɔ mpamba te?
• Nini ekoki kobongisa libala?
• Bizaleli nini mwasi ná mobali basengeli kozala na yango?
[Elilingi na lokasa 9]
Mwasi ná mobali basololaka liboso bándima libyangi moko to bápesa moto elaka
[Elilingi na lokasa 10]
Soki bozwani matata, bósalaka makasi mpo na kosilisa yango kaka mokolo yango, mpo “bótikela Zabolo esika te”