Tomipesi na misala na kufa to na mosala ya Jéhovah?
“NAZALI okipé.” Wana ezali moko na botɛmɛli oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kokutana na yango na boumeli ya mosala na bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Matai 24:14) Atako maloba oyo ete “Nazali okipé” masalelami ntango mosusu mpo na koboya, tosengeli mpe koyeba ete bato mingi bazali mpenza okipé. Banyokwami na “mitungisi na ebongiseli na biloko ya ntango oyo,” elingi koloba mikakatano ya bomoi: koluka bilei, kofuta banyongo, kokende mosala mpe kozonga, kobɔkɔlo bana, kobongisa ndako, kobongisa vuatire mpe biloko mosusu.—Matai 13:22.
Nzokande, atako bato bakoki mpenza kozala okipé, bobele moke nde bazali komipesa na misala oyo mikopesaka litomba. Makambo yango makokani na oyo Salomo, moto na mayele akomaki yango na ntango na kala, ete: “Moto akozwa nini mpo na mosala na ye nyonso ya makasi mpe mpasi na motema na ye mpo na yango azali kosala makasi na nsé na moi? Mpo ete mikolo na ye nyonso mizali mpasi mpe mosala na ye mozali mawa ata na butu, motema na ye mokopema te. Yango mpe ezali mpamba.”—Mosakoli 2:22, 23.
Biblia elobeli lisusu misala yango mpamba ete, ezali “misala na kufa.” (Baebele 9:14) Bomoi na yo etambwisami nde na misala motindo wana? Soki tozali baklisto, motuna oyo mosengeli mpenza kosimba biso, mpamba te Nzambe ‘akozongisela moto na moto engebene misala na ye.’ (Nzembo 62:12) Mpe lokola “ntango oyo etikali ekómi mokuse,” tosengeli mpenza komisɛnzela ete tobebisa ntango te na komipesáká na misala na kufa. (1 Bakolinti 7:29, MN) Kasi, misala na kufa mizali mpenza nini? Lolenge nini tosengeli kotalela yango? Mpe lolenge nini tokoki kondimisama ete tomipesi na misala oyo mizali na motuya mingi?
Misala na kufa
Na Baebele 6:1, 2 (MN), Paulo akomaki ete: “Bongo, lokola totiki mateya na ebandeli na ntina na Klisto, topota noki mpo na kokomela, mpe tozongela lisusu mateya ya ebandeli te, yango kobongola motema na misala na kufa mpe kondimela Nzambe; liteya na batisimo mpe kotyama mabɔkɔ; lisekwa na bakufi mpe kosambisama na seko.” Tala ete “kobongola motema na misala na kufa” etongami kati na “mateya ya ebandeli.” Baklisto oyo basengelaki kotanga mokanda ya Paulo basilaki kobongola motema longwa na misala na kufa. Lolenge nini?
Liboso na kondima Klisto, basusu, na ekeke ya liboso, basalaki misala na kufa, “misala ya nzoto,” lokola “ekobo, mbindo, pite, kosambela bikeko, bondoki” mpe misala misusu mabe. (Bagalatia 5:19-21) Soki batikaki motindo na misala oyo te, mbɛlɛ ememaki bango na kufa ya elimo. Kasi, likambo ya esengo, baklisto wana babongwanaki longwa na nzela oyo ezalaki komema bango na libebi; babongolaki motema mpe “basukolamaki.” Bongo, batalelamaki lokola bato na pɛto na miso na Jéhovah.—1 Bakolinti 6:9-11.
Nzokande, baklisto nyonso bazalaki na mposa te ete babongola motema na misala mabe to misala ya mbindo. Mokanda ya Paulo motalelaki libosoliboso Bayuda oyo bazalaki bandimi, baoyo mingi na bango bakangamaki na Mibeko ya Moize liboso na koyamba Klisto. Babongolaki motema na misala nini na kufa? Mabe mazalaki te wana ezalaki bango kolanda milulu mpe mitinda na ntina na kolya, oyo elakamaki na Mibeko. Mibeko mizalaki ‘bulee, sembo mpe malamu.’ (Baloma 7:12) Ya solo, kasi na Baloma 10:2, 3 (MN), Paulo alobi na ntina na Bayuda ete: “Natatweli bango ete bazali na mposa mpo na Nzambe, nde na nzela na boyebi na solo te; awa ezangi bango koyeba boyengebene bouti na Nzambe, nde bazali koluka boyengebene na bango mpenza, bongo batósi boyengebene na Nzambe te.”
Ya solo, Bayuda bakanisaki na libunga nyonso ete basilaki kozwa lobiko na kolandáká mpenza Mibeko. Nzokande, Paulo alimbolaki ete “moto akotongama moyengebene mpo na misala na ye [ya] mibeko te, nde bobele na kondima epai na Klisto Yesu.” (Bagalatia 2:16, MN) Na ntango Klisto apesaki mbeka ya lisiko, misala ya Mibeko, atako mizali malamu mpe mibongi, mikómaki misala na kufa mpe mizalaki na ntina te mpo na kozwa lobiko. Bayuda ya motema sembo balukaki bongo ngolu na Nzambe na kobongoláká motema longwa na misala yango na kufa mpe na kozwaká batisimo lokola elembo ya kobongola motema na bango.—Misala 2:38.
Toyekoli nini na likambo oyo? Ete misala na kufa mizali bobele misala mabe te to mpe oyo na mbindo te; esangisi misala nyonso na kufa, na mpamba to oyo ezangi kobota mbuma kati na elimo. Kasi baklisto nyonso bazali nde kobongola motema te longwa na motindo na misala wana na kufa, liboso na batisimo na bango? Ezali solo, nzokande, na ekeke ya liboso, baklisto bakweaki na pite. (1 Bakolinti 5:1) Mpe baklisto oyo bazalaki Bayuda, bazalaki na mposa ya kozongela misala na kufa oyo ya Mibeko na Moize. Paulo akundwelaki bango ete bazongela motindo na misala wana te.—Bagalatia 4:21; 5:1.
Ndenge nini komibatela na misala na kufa
Basaleli ya Jéhovah basengeli lelo kozala na bokɛngi mpo ete bakwea te kati na motambo ya misala na kufa. Tobundisami pene na bipai nyonso na masɛnginya oyo mazali kopusa biso ete tobebisa bizaleli na biso, mpo na kozanga sembo mpe na kosangisa nzoto na motindo na mbindo. Ezali mawa mpo na koloba yango, kasi bankoto mingi na baklisto bazali kokwea mbula na mbula na motindo na masɛnginya oyo, mpe baoyo baboyi kobongola motema, bazali kobimisama na lisangá ya boklisto. Ata lolenge nini, moklisto asengeli bongo kosimba toli oyo ya ntóma Paulo, ezwami na Baefese 4:22-24 (MN) ete: “Bolongola bomoto na kala bomonisami na ezaleli na liboso, oyo esili kobeba mpo na mposa mabe; kasi bobongwana bato na sika na nguya ekopusaka elimo na bino mpe bolata bomoto na sika oyo bozalisami na mokano na Nzambe kati na boyengebene mpe na bosembo ya solo.”
Ya solo, Baefese oyo Paulo akomelaki mokanda basilaki kolata bomoto ya sika. Kasi Paulo asalisaki bango na kokanga ntina ete yango ezalaki likambo lisengeli kosalema ntango nyonso! Soki baklisto batikaki kosala milende makasi, bamposa mabe oyo ezalaki ntango nyonso na bopusi mabe, ekokaki kozongisa bango na misala na kufa. Ezali bobele bongo mpo na biso lelo oyo. Tosengeli ntango nyonso kobunda mpo na kolata bomoto ya sika, mpe kotika te ete tozala na ezaleli moko ya bomoto oyo tozalaki na yango na lolenge na bomoi na biso ya kala ete ebebisa yango. Tosengeli kokima, ata mpe koyina motindo na misala nyonso mabe ya nzoto. Mokomi na nzembo apesi biso toli ete: “Bino baoyo bokolingaka Jéhovah, boyina oyo ezali mabe.”—Nzembo 97:10.
Ebele na basaleli na Jéhovah ya lelo, bazali kolanda toli oyo mpe bazali na bizaleli ya pɛto, likambo oyo lizali kopesa bango lokumu. Nzokande, basusu basili komitika kopɛngwisama longwa na nzela wana mpo na misala oyo mizali mpenza mabe te, nde mizali mpamba mpe mikobotaka mbuma te. Na ndakisa, basusu bazali komipesa mpenza na misala mikopesaka mosolo mingi to na mposa ya kozwa biloko mingi ya mosuni. Kasi Biblia epesi likebisi oyo ete: “Baoyo bamipesi mpo na kokóma bazwi bazali kokwea kati na komekama, kati na motambo mpe kati na bamposa mingi mabe mpe na mpasi, oyo ekozindisa bato kati na kufa mpe na libebi.” (1 Timoté 6:9, MN) Mpo na basusu, bakelasi nde esili kokóma motambo. Ya solo, kosala mwa bakelasi ezali na ntina mpo na kozwa mosala. Kasi basusu basili kobebisa elimo na bango na kosaláká bakelasi milaimilai oyo ezali kozwa ntango mingi.
Na bongo, misala mingi mikoki mpenza kozala mabe te na kotalela bizaleli malamu. Kasi, atako bongo, ezali misala na kufa soki yango ezali kopesa eloko moko ya ntina mingi te mpo na bomoi na biso ya sikawa to soki ezali kopesa biso nzela te ete tozwa ngolu na Nzambe. Motindo na misala wana mizali kozwa ntango na biso mingi mpe makasi na biso, nzokande ezali kopesa ata bolamu moko te kati na elimo, mpe ata esengo ya libela te.—Tala Mosakoli 2:11.
Na ntembe te, tozali kosala milende makasi mpo na komipesa na misala ya elimo oyo epesaka litomba. Nzokande, ezali mpe na ntina ete tomitalela ntango nyonso. Mbala na mbala, tokoki komituna mituna lokola oyo ete: ‘Nazali nde kosangana mingi te kati na mosala ya kosakola mpe nazali koyangana mingi te na makita mpo ete nazali na mosala mingi [ya mosuni]?’ ‘Nazali nde na ntango mingi mpo na kominanola, nzokande nazali bobele na ntango moke mpo na koyekola ngai moko mpe elongo na libota?’ ‘Nazali nde kolekisa ntango mingi na biloko ya mosuni, nzokande nazali kosalisa te baoyo bazali na mposa ya lisungi kati na lisangá, lokola bato na maladi to mpe mibangé?’ Ntango mosusu eyano na mituna oyo ekolakisa biso ete tosengeli kotya makambo ya elimo na esika ya liboso.
Tomipesa ntango nyonso kati na mosala ya Jéhovah
Lokola elobami na 1 Bakolinti 15:58, ezali na “mosala mingi kati na Nkolo.” Mosala ya kosakola Bokonzi na Nzambe mpe ya kozalisa bayekoli mozali na ntina mingi. Na 2 Timoté 4:5 (MN), Paulo apesi toli oyo ete: “Osala mosala na mopalanganisi na nsango malamu, okokisa malamu mosala na Nzambe.” Bankulutu mpe basaleli na misala bazali na mosala mingi ya kosala mpo na kokokisa bamposa ya etongá. (1 Timoté 3:1, 5, 13; 1 Petelo 5:2) Batata to bamama ya mabota, baoyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko, bazali mpe na mokumba monene ya kobatela mabota na bango mpe kosalisa bana na bango ete bakóla mpe balendisa boyokani na bango elongo na Nzambe. Mokumba wana mokoki kolɛmbisa, ekoki mpe kozala mpasi. Kasi, lokola mizali misala na kufa te, misala motindo wana mikopesaka nde esengo!
Mokakatano mozali awa, ezali oyo ete: ndenge nini kozwa ntango ya kokokisa misala nyonso wana ya ntina mpe na mituya mingi? Komipimela makambo mosusu mpe ebongiseli malamu ezali na ntina mingi. Paulo akomaki na 1 Bakolinti 9:26, 27 (MN) ete: “Na yango, ngai nazali kopota boye: [nazali kopota] mpamba te; [mpe] nazali kobɛta bibɔtu na ngai boye: [nazali kobɛta yango] lokola nakobɛta na mopepe te; kasi nazali kotuta nzoto na ngai bibɔtu mpe nazali komema yango lokola moombo, ete naboyama te na lolenge moko to mosusu, awa esili ngai kosakwela bato mosusu.” Mpo na kosalela etinda ezwami na mokapo oyo, tosengeli, kati na makambo mosusu, kotalela mimeseno na biso mpe lolenge ya bomoi na biso. Tokomona mpenza ete tokoki kolongola misala mingi mizangi ntina oyo mizali kozwa ntango mpe makasi mingi.
Na ndakisa, tolekisaka ndambo monene ya makasi na biso mpe ntango na biso liboso na televizio, na kominanola, na kotanga mikanda mizangi ntina to na kolekisa ntango mpamba? Engebene lisoló moko ya zulunalo The New York Times, Moameriké oyo azali na mwa bomoi malamu, asalaka “koleka ngonga 30 poso na poso” mpo na kotala televizio. Na ntembe te, ntango wana ekokaki mpenza kosalelama malamu. Tala oyo mwasi ya mokɛngɛli moko ya zongazonga alobaki: “Nasili kotika pene na misala nyonso oyo mizali kozwa ngai ntango, lokola kotala televizio.” Yango epesaki matomba nini? Asilisaki kotanga volumes mibale ya mokanda Perspicacité grâce aux Ecritures (angl.)!
Tosengeli lisusu kotala na meko nini tokoki koyeisa bomoi na biso pɛpɛlɛ. Salomo alobaki ete: “Mpongi na moto na mosala ezali kitoko ata alei moke to mingi; kasi biloko mingi na mozwi bikopekisa mpongi na ye.” (Mosakoli 5:12) Tolekisaka ntango mpe makasi mingi na biloko bizangi ntina? Solo mpenza, soki tozali na biloko mingi, tokozala mpe na biloko mingi ya kopɛtola, ya kokɛngɛla ya kobongisa mpe ya kobatela. Ekozala malamu te ete tolongola biloko mosusu?
Ebongiseli malamu ezali mpe kosalisa mpo na kosalela ntango na biso malamu. Ebongiseli motindo wana esengeli kotalela bamposa na biso ya kominanola. Kasi esengeli kopesa esika ya liboso na matomba ya elimo. Esengeli komibombela ntango mpo na koyangana mbala na mbala na makita nyonso ya lisangá. Tokoki lisusu kobongisa liboso, mikolo to mpokwa oyo tokolekisa na mosala ya kosakola. Soki tosali ebongiseli na biso malamu, tokoki kobakisa ntango oyo tozali kolekisa na mosala ya kosakola, ata mpe kokóma pionnier auxiliaire mbala na mbala. Kasi, tosɛnzela ete tomibómbela ntango mpo na boyekoli ya biso moko mpe mpo na boyekoli na libota, bakisa mpe kobongisa makita malamu. Soki tomibongisi, tokozwa bobele matomba mingi na makita te, kasi tokoki lisusu “kopesana simbisi moko na moko mpo na kolingana mpe na kosala misala malamu.”—Baebele 10:24, MN.
Mbala mosusu ekozala ntina na komiboyisa makambo mosusu mpo na kozwa ntango ya boyekoli. Na ndakisa, mabota ya Béthel na mokili mobimba, balamukaka na ntɔngɔ nyonso mpo na kotalela texte du jour. Ekokoka na biso ete tosomba mwa ntango na ntɔngɔ nyonso mpo na boyekoli ya biso moko? Mokomi na nzembo alobaki ete: “Naino ntɔngɔ etani te, nalamukaki mpo na kobelela yo. Nayokaki maloba na yo.” (Nzembo 119:147, MN) Ya solo, soki tozali kolamuka na ntɔngɔntɔngɔ, tosengeli kolala na ntango malamu na mpokwa mpo ete tobandá mokolo molandi na nzoto makasi.
Bolamu bozali kozwama na komipesa kati na mosala ya Jéhovah
Kozala na “mosala mingi kati na Nkolo” esɛngi kosala ebongiseli, komipimela makambo mosusu mpe koboya misala mosusu. Kasi tokozwa bolamu mingi mpo na yango. Tomipesa ntango nyonso kati na mosala ya Jéhovah, kasi na misala na kufa te soko na misala mpamba te oyo mikopesaka eloko te, nde ekopesaka mpasi. Mpamba te, ezali na motindo na misala wana nde tokomonisa kondima na biso, mpe tokondimama na Nzambe mpe, na nsima, tokozwa mbano ya bomoi ya seko.
[Elilingi na lokasa 28]
Ebongiseli malamu ezali kosalisa moklisto na kosalela ntango na ye na lolenge malamu