Biblia ezali bongolabongola?
MOKOLO moko, Henry Van Dyke akomaki ete: “Ebotami na Orient mpe elatisami na ekomeli mpe na bililingi ya bato na Orient, mpe kokɔtáká na mboka moko nsima na mosusu, Biblia ezali kotambola na mokili mobimba mpe ezali bipai nyonso kati na yango. Eyekoli koloba nkotá mingi mpo na kosimba mitema ya bato. Bana balingaka koyoka masoló na yango na esengo mingi mpe kati na yango, bato na mayele bazali kozwa masese ya ntina mingi mpo na bomoi. Bato mabe mpe bato na lolendo bakolɛngaka mpo na makebisi na yango, nzokande ezali na mongongo ya mama epai na banyokwami mpe bato na mitema mitutami. . . . Moto na moto oyo azali na eloko wana ya motuya, akozala mobólá te mpe akozala na mpasi te.”
Ya solo, Biblia “eyekoli koloba nkotá mingi.” Moko na mikanda na yango 66 esilá kobongolama pene na nkotá 1 982. Bamilió na bato bazali kotalela yango lokola likabo liuti na Nzambe, bazali kotanga yango na esengo mpe bazali kozwa litomba na yango. Nzokande, basusu bakolobaka ete ezali na bongolabongola mpe, na yango, ebongi te mpo na kondimela yango. Botaleli Biblia na likebi emonisi nini?
Lokola emonisi yango elilingi ya lokasa ya ebandeli, Nzambe asalelaki bato ya sembo mpo na kokoma Biblia. Ya solo, botaleli Biblia na likebi emonisi ete ekomamaki na bato 40 na boumeli ya bikeke 16. Bazalaki nde bakomi oyo bayekola mosala yango? Te. Kati na bango ezalaki na babateli na bampate, na balɔbi mbisi, mokɔnɔgli na mpako, monganga moko, motongi na hema, banganganzambe, basakoli mpe mikonzi. Makomi na bango mbala mingi malobeli bato mpe mimeseno oyo eyebani mingi te na ekeke ya ntuku mibale. Mpo na yango, bakomi ya Biblia bango moko bayebaki te ndimbola ya makambo mosusu oyo bazalaki kokoma. (Danyele 12:8-10) Yango wana, tosengeli kokamwa te soki tokutani na mwa mikakatano wana ezali biso kotanga Biblia.
Mikakatano motindo wana mikoki kosilisama? Biblia ezali nde na bongolabongola? Mpo na koyeba yango, totalela mwa bandakisa.
Ezali mpenza mikakatano?
▪ Epai wapi Kaina azwaki mwasi na ye? (Genese 4:17)
Ekoki kokanisama ete nsima na kobomama ya Abele, bobele ndeko na ye mobomi Kaina mpe baboti na ye, Adam na Eva nde bazalaki na bomoi awa na mabelé. Nzokande, Adam mpe Eva bazalaki na libota monene. Engebene Genese 5:3, 4, Adam abotaki mwana mobali oyo abéngamaki nkombo Sete. Lisoló ebakisi ete: “Mikolo nyonso ya Adam, nsima na kobota Sete, ezalaki mbula nkama mwambi. Na boumeli ya ntango wana, abotaki bana mibali mpe bana basi.” Na bongo, Kaina abalaki ndeko na ye ya mwasi to mbala mosusu moko na bana ya bandeko na ye. Lokola bato balongwaki naino mosika te na ezaleli ya kokoka, emonani ete motindo na libala wana ezalaki na makámá te na ntina na kolongono ya nzoto lokola yango ezali kosala lelo epai na bana.
▪ Nani atɛkisaki Yosefe na Ezipito?
Genese 37:27 elobi ete bandeko na Yosefe bazwaki ekateli ya kotɛkisa ye epai na Bayismaele. Kasi verset elandi elobi ete: “Nzokande bato na mombongo ya Madiani bazalaki koleka. Na bongo, [bandeko ya Yosefe] babendaki Yosefe mpe babimisaki ye na libulu, mpe batɛkisaki Yosefe epai na Bayismaele na palata ntuku mibale. Na nsima, Bayismaele bakomisaki Yosefe na Ezipito.” Yosefe atɛkisamaki epai na bayismaele to epai na bato na Madiani? Ekoki kozala ete bato ya Madiani babengamaki mpe Bayismaele; ya solo bazalaki na bikanganelo ya bondeko elongo na bato wana na nzela na nkoko na bango Abalayama. To mpe bato na mombongo ya Madiani bazalaki kosala mobembo elongo na etuluku ya Bayismaele. Atako bongo, ezali bandeko na Yosefe nde batɛkisaki ye, mpe na nsima alobaki na bango ete: “Nazali Yosefe ndeko na bino, oyo botɛkisaki na Ezipito.”—Genese 45:4.
▪ Bayisraele boni bakufaki nsima na kosangisa nzoto na lolenge na mbindo elongo na basi ya Moaba mpe nsima na kosangana na losambo ya Baala na Peola?
Mituya 25:9 elobi ete: “Baoyo bakufaki na mpasi [eyeisamaki na Jéhovah na ntina na etamboli na bango ya mabe] bazalaki nkɔto ntuku mibale na minei.” Nzokande, ntomá Paulo alobaki ete: “Tosala pite te, lokola bamoko kati na bango [Bayisraele kati na mokili mokauki] basalaki pite, mpe bakufaki bato nkoto ntuku mibale na misato na mokolo moko.” (1 Bakolinti 10:8) Ekoki kozala ete motuya ya bato bakufaki ezali kati na 23 000 mpe 24 000, na boye ete moko kati na mituya oyo mibale ekoki kondimama. Lisusu, mokanda ya Mituya emonisi na sikisiki ete “batambwisi na mabota nyonso” baoyo bazwamaki na lisumu yango babomamaki na basambisi. (Mituya 25:4, 5) Ezalaki mbala mosusu na “batambwisi” 1 000 baoyo bazwamaki na lisumu yango, baoyo soki tobakisi motuya na bango na bato 23 000 baoyo batangami na Paulo ekokomisa motuya nyonso ya bakufi na 24 000. Atako bobele bato 23 000 nde bazwaki bolózi boutaki na Jéhovah na mbala moko, kasi bato 24 000 bazwaki bolózi wana ya Jéhovah, mpamba te bango nyonso bakufaki nsima na kosambisama na ye ya kufa.—Deteronome 4:3.
▪ Lokola Agaga azalaki na bomoi na ntango ya Saulo, mokonzi na Yisraele, ezali likambo na bongolabongola te na komona ete uta kala, Balama asilaki kolobela mokonzi Moameleke oyo azalaki bobele na nkombo yango moko?
Pene na mobu 1473 liboso ya ntango na biso, Balama asakolaki ete mokonzi moko ya Yisraele “akoleka Agaga.” (Mituya 24:7) Balobelaki lisusu Agaga te kino na ntango ya boyangeli ya mokonzi Saulo (1117-1078 liboso ya ntango na biso). (1 Samwele 15:8) Ata bongo, ezali na likambo ya bongolabongola te mpamba te “Agaga” ezalaki mbala mosusu nkombo epesamaki na bokonzi, lokola Farao na Ezipito. Mbala mosusu Agaga ezalaki nkombo mpenza ya bakonzi mingi Baemeleke.
▪ Nani apusaki Davidi na kotanga Bayisraele?
2 Samwele 24:1 elobi ete: “Mpe nkanda na Jéhovah epɛlaki makasi epai na Yisraele, ntango basilikisaki Davidi [to: “ntango Davidi asilikisamaki,” Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelesi elongo na mitindami] na bango, ete: ‘Kende, tanga motuya na Yisraele mpe Yuda.’” Kasi ezali Jéhovah te oyo apusaki mokonzi Davidi ete asala lisumu, mpamba te 1 Ntango 21:1 elobi ete: “Na yango, Satana [to: “motɛmɛli”] atɛmɛlaki Yisraele mpe apusaki Davidi na kotanga motuya na Yisraele.” Nzambe asepelaki na Bayisraele te mpe atikaki nzela na Satan le Diable ete abimisa lisumu wana kati na bango. Ezali na ntina yango nde 2 Samwele 24:1 elobi lokola nde Nzambe ye moko moto ayeisaki likambo yango. Lisusu, libongoli ya Lingelesi ya Joseph Rotherham elobi ete: “Nkanda ya Yawe epɛlaki epai na Yisraele, na boye ete apesaki nzela ete Davidi asilikisama na bango wana alobaki ete: ‘Kende, tanga motuya na Yisraele mpe Yuda.’”
▪ Ndenge nini tokoki koyokanisa mituya mikeseni ya Bayisraele mpe Bayuda mipesamaki na botangi basalemaki na Davidi?
Engebene 2 Samwele 24:9, ezalaki na Bayisraele 800 000 mpe Bayuda 500 000, nzokande, engebene 1 Ntango 21:5, motuya ya bato na etumba mpo na Yisraele ezalaki 1 100 000 mpe mpo na Bayuda bazalaki 470 000. Ezalaki na basodá 288 000 bazalaki ntango nyonso na mosala ya mokonzi; bakabolamaki na bituluku 12 oyo moko na moko ezalaki na mibali 24 000 mpe moko na moko na bituluku yango ezalaki kosala sanza moko na mbula. Etuluku moko ya mibali 12 000 oyo ebakisamaki, ezalaki na mosala ya bana na bakonzi 12 na libota moko na moko, yango ekomisi motuya nyonso na bato 300 000. Emonani lokola ete motuya 1 100 000 mapesami na 1 Ntango 21:5 esangisi mibali wana 300 000 oyo bazwamaki na mosala, nzokande motuya oyo epesami na 2 Samwele 24:9 esangisi yango te. (Mituya 1:16; Deteronome 1:15; 1 Ntango 27:1-22) Na ntina etali Yuda, emonani lokola ete 2 Samwele 24:9 esangisi mibali 30 000 ya limpinga ya bakɛngeli oyo batyamki na ndelo ya Filistia, nde batangamaki te kati na motuya oyo mopesami na 1 Ntango 21:5. (2 Samwele 6:1) Soki tomikundoli ete 2 Samwele mpe 1 Ntango ekomamaki na bato mibale, baoyo bazalaki na makanisi mpe na mikano mikeseni, tokoki koyokanisa mituya yango.
▪ Nani azalaki tata na Salatiele?
Makomi mosusu mamonisi ete Yekonia (mokonzi Yoyakini) azalaki tata ya Salatiele na mosuni. (1 Ntango 3:16-18; Matai 1:12) Kasi Luka, mokomi na Evanzile, abéngi Salatiele ete “mwana ya Neri.” (Luka 3:27) Emonani lokola ete Neri apesaki mwana na ye ya mwasi ete azala mwasi ya Salatiele. Lokola Baebele bazalaki kotalela bakilo mibali lokola bana na bango ya mibali, mingi mpenza na molongó ya bakitani na libota, Luka akokaki mpenza kobénga Salatiele ete mwana na Neri. Bobele bongo, Luka alobi na ntina na Yozefe ete azali mwana na Héli, nzokande Héli azalaki mpenza tata ya Marie, mwasi na Yozefe.—Luka 3:23.
Boyokani kati na mikapo mitali Yesu
▪ Bato boni Yesu abimisaki bilimo mabe oyo bikɛɔtaki na etonga monene ya bangulu?
Matai, mokomi na Evanzile, alobeli bato mibale, kasi Malako mpe Luka balobeli bobele moto moko. (Matai 8:28; Malako 5:2; Luka 8:27) Emonani polele ete Malako mpe Luka bazali kobenda likebi bobele likoló na moto moko oyo azalaki na bilimu mabe, mpo ete Yesu alobaki na ye mpe likambo na ye ezalaki kokamwisa. Ekoki kozala ete moto wana azalaki moto ya makasi to mpe anyokwamaki na bilimu mabe na boumeli ya mikolo mingi. Na nsima, ekoki kozala ete bobele ye nde alingaki kotambola elongo na Yesu. (Matai 5:18-20) Na likambo moko likokani na oyo, Matai alobeli mibali mibale oyo bakufeli miso baoyo babikisamaki na Yesu, nzokande, Malako mpe Luka balobeli bobele moto moko oyo akufeli miso. (Matai 20:29-34; Malako 10:46; Luka 18:35) Wana ezali bongolabongola te, mpamba te, moko na bato yango azalaki.
▪ Elamba oyo Yesu alataki mokolo ya liwa na ye ezalaki na langi nini?
Engebene Malako (15:17) mpe Yoane (19:2), basodá balatisaki Yesu elamba ngóla. Nzokande Matai (27:28) alobeli “monkoto moko ya motane ngbwa” oyo emonisi ete ngóla ezali langi euti na kosangisama ya motane mpe langi bule. Malako mpe Yoane bamonaki malamu koloba ete monkoto motane. Bingengiseli mpe mwa molili epesaki makanisi makeseni na ntina na elamba, mpe bakomi ya Baevanzile balobeli langi oyo ezalaki komonana mingi epai na bango to epai na baoyo bango bazwaki bandimbola oyo. Kokesena wana moke elakisi mosala ya mokomi mokomoko mpe emonisi ete bapesanaki makanisi te.
▪ Nani amemaki nzeté na mpasi na Yesu?
Yoane (19:17) alobi ete: “Mpe, amemi ye moko nzete ya mpasi, mpe (Yesu) akei na esika ya mokwa ya moto oyo ebéngami na Liebele ete Golgota.” Kasi Matai (27:32), Malako (15:21) mpe Luka (23:26) balobi ete, ‘wana bazalaki kokende, bazwaki Simona, moto na Kulene, mpo na komema nzeté na mpasi.’ Yesu amemaki nzeté na ye ya mpasi lokola Yoane alobaki yango. Nzokande, kati na mobimba ya lisoló na ye, Yoane ayebisaki te na sikisiki ete, na nsima, Simona ezwamaki mpo na komema nzeté ya mpasi. Na bongo, masoló ya Baevanzile mazali na boyokani na likambo oyo.
▪ Lolenge nini Yuda Mokeliota akufaki?
Matai 27:5 elobi ete Yuda amikangisaki nsinga na nkingo, nzokande Misala 1:18 elobi ete, “lokola akweyaki motó na nsé, nzoto na ye evimbaki mpe libumu na ye lipaswanaki mpe misɔpó na ye nyonso mibimaki.” Wana Matai azali kolobela lolenge amibomaki, mokanda ya Misala ezali koyebisa makambo mabimaki. Mbala mosusu Yuda akangisaki nsinga na etape ya nzeté moko, mpe alekisaki yango na nkingo na ye, amikakisaki mpe amibwakaki longwa na likoló. Ekoki kozala ete nsinga to etape ekatanaki, na yango akweaki mpe apanzanaki likoló na mabangá mazalaki na nsé. Boyekoli ya bisika bizali zingazinga na Yelusaleme endimisi bosukisi oyo.
Lolenge nini okotalela makambo oyo?
Soki tokutani na likambo oyo limonani lokola bongolabongola kati na Biblia, ezali malamu na koyeba ete, mbala mingi, bato balobaka makambo oyo mamonanaka lokola bongolabongola, nzokande ezali mpasi te na kokanga ntina na yango to na kososola yango. Na ndakisa, moto moko ya mombongo akoki kotindela moto mosusu mokanda, na koyebisa maloba epai na sekretere na ye ya mwasi ete akoma yango. Soki batuni ye, akoloba ete ye moto atindaki mokanda yango. Kasi lokola ezali sekretere nde moto akomaki mpe atindaki mokanda yango, akoki mpe koloba ete ezali ye nde atindaki yango. Motindo moko, bongolabongola ezali te wana Matai (8:5) alobi ete soda moko ayaki epai na Yesu mpo na kosɛnga ye lisalisi, nzokande Luka (7:2, 3) alobi ete mobali yango atindaki bamonisi na ye.
Bandakisa ezali liboso emonisi ete mikakatano mizwami na Biblia mikoki kosilisama. Na bongo, tozali na bantina malamu ya kozala na likanisi malamu mpo na Makomami. Ezalela ya elimo motindo wana esɛɔngisamaki kati na maloba malandi mabimaki na 1876 na Biblia ya libota, ete:
“Lolenge malamu ya kolobela mikakatano wana, soki yango ekoki, ezali bongo kosilisa yango, kokangama na solo mpe kotosa yango, ata soki yango esosolami mpenza malamu te. Tosengeli komekola ndakisa ya bantomá oyo, na ntango bayekoli mosusu bazokisamaki na motema na oyo babengaki ete ‘liloba makasi’ mpe batikaki Klisto, basilisaki ntembe na kolobáká ete: ‘Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko. Biso tondimi mpe toyebi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe na bolingo,’ . . . Soki tomoni lokola ete likambo moko liyokani na mosusu te, toluka koyokanisa yango, mpe tokolakisa yango epai na bato nyonso.”—Yoane 6:60-69.
Okolanda likanisi oyo? Nsima na kotalela bobele mwa bandakisa oyo emonisi boyokani bozali na Makomami, tozali kolikya ete okondima likanisi ya mokomi na nzembo oyo alobaki na Nzambe ete: “Liloba na yo mobimba ezali solo.” (Nzembo 119:160) Ba Témoins de Jéhovah batalelaka Biblia motindo yango mpe bazali na esengo ya koyebisa bantina oyo bazali kondimela yango. Mpo na nini te kotalela elongo na bango, mokanda yango moleki mikanda nyonso mosusu? Nsango na yango ya kolendisa ekoki kopesa yo elikya ya solo mpe ye esengo.
[Elilingi na lokasa 7]
Osilá kotuna na ba Témoins de Jéhovah mpo na nini bazali kondimela Biblia?