“Mpo bókɔta na kati ya komekama te”
“Bókɛngɛlaka mpe bóbondelaka ntango nyonso, mpo bókɔta na kati ya komekama te.”—MATAI 26:41.
KOTUNGISAMA oyo Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, atungisamaki pene na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé elekaki oyo nyonso akutanaki na yango liboso. Yesu ayebaki ete mosika te bakokanga ye, bakokatela ye etumbu ya liwa, mpe bakokakisa ye likoló na nzete ya mpasi. Ayebaki ete ekateli nyonso oyo akozwa mpe makambo nyonso oyo akosala ekokumisa to ekofingisa nkombo ya Tata na ye. Yesu ayebaki mpe ete avenire ya bato ezalaki na motó na ye. Lokola atungisamaki bongo, asalaki nini?
2 Yesu ná bayekoli na ye bakendeki na elanga ya Getesemane, epai amesanaki kokende. Ntango bakómi kuna, atikaki bayekoli na ye kasi akendeki mosika mingi te na bango. Kuna, asɛngaki Tata na ye ya likoló apesa ye makasi, afungolelaki ye mpenza motema na libondeli—kaka mbala moko te kasi mbala misato. Atako Yesu azalaki moto ya kokoka, amonaki te ete akolonga mitungisi wana na makasi na ye moko.—Matai 26:36-44.
3 Biso mpe tozali na mitungisi lelo oyo. Tomonaki na ebandeli ya mwa buku oyo makambo oyo ezali kondimisa biso ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo mabe. Komekama mpe mitungisi ya mokili ya Satana ezali se kobakisama. Bikateli oyo biso baoyo tolobaka ete tosalelaka Nzambe ya solo tozwaka mpe makambo oyo tosalaka ekumisaka to efingisaka nkombo na ye; lisusu, yango ekoki kosala ete tózwa to tózanga bomoi na mokili na ye ya sika. Tolingaka Yehova. Mposa na biso ezali ya ‘koyika mpiko tii na nsuka’—nsuka ya bomoi na biso to nsuka ya ebongiseli oyo, ezala oyo wapi ekoya liboso. (Matai 24:13) Kasi ndenge nini tokoki kosala ete tóbosanaka te ete mikolo etikali ya kotánga mpe ndenge nini tokoki kokoba kokɛngɛla?
4 Lokola Yesu ayebaki ete bayekoli na ye, ezala ya ekeke ya liboso to ya mikolo na biso, bango mpe bakotungisama, alobaki boye: “Bókɛngɛlaka mpe bóbondelaka ntango nyonso, mpo bókɔta na kati ya komekama te.” (Matai 26:41) Maloba yango ezali na ndimbola nini mpo na biso lelo? Komekama nini okutanaka na yango? Mpe ndenge nini okoki ‘kokɛngɛlaka’?
Mpo na nini tomekamaka?
5 Zabolo amekaka biso nyonso mokolo na mokolo mpo tókwea na ‘motambo na ye.’ (2 Timote 2:26) Biblia ekebisi biso ete Satana azali koluka mingimingi basambeli ya Yehova.(1 Petelo 5:8; Emoniseli 12:12, 17) Mpo na nini? Ezali mpenzampenza mpo na koboma biso te. Satana akolonga te soki biso tokufi sembo epai ya Nzambe. Satana ayebi ete Yehova akosekwisa baoyo bakufá na ntango oyo ye moko aponi.—Luka 20:37, 38.
6 Mposa ya Satana ezali ya kobebisa eloko moko ya motuya mingi koleka kutu bomoi oyo tozali na yango sikoyo—bosembo na biso epai ya Nzambe. Satana azali koluka na ndenge nyonso komonisa ete akoki kopekisa biso kosambela Yehova. Na yango, soki batindi biso tótikala sembo te—elingi koloba tótika kosakola nsango malamu to tótika bizaleli malamu ya boklisto—yango nde ekomonisa ete Satana alongi! (Baefese 6:11-13) Yango wana, “Momeki” azali kotya komekama liboso na biso.—Matai 4:3.
7 “Mayele mabe” oyo Satana asalelaka ezalaka mitindo ebele. (Baefese 6:11) Akoki komeka biso na elimo ya koluka kozala na biloko mingi ya mokili, na kobanga, na kotya ntembe, to na koluka bisengo. Kasi kolɛmba nzoto ezali na kati ya mayele oyo alongaka na yango mingi koleka. Lokola atondi na mayele mabe mpe ayebi kosalela yango, ayebi ete soki moto alɛmbi nzoto, akoki kolɛmba na elimo, mpe akoki kokwea soki komekama eyei. (Masese 24:10) Yango wana, mingimingi ntango ‘tonyatami’ na makanisi, Satana amekaka biso mpo tókwea.—Nzembo 38:8.
8 Lokola etikali moke mikolo ya nsuka esila, emonani ete makambo oyo elɛmbisaka bato nzoto ekómi mingi; makambo yango ezali kokómela mpe biso. (Talá etanda “Mwa makambo oyo elɛmbisaka nzoto.”) Ezala tolɛmbi nzoto mpo na likambo nini, tóyeba ete yango ekoki kokitisa makasi na biso. ‘Komisombela ntango oyo ebongi’ mpo na makambo oyo tosengeli kosala na elimo—na ndakisa, kotánga Biblia, koyangana na makita ya boklisto, kosakola—ekoki kokómela biso mokakatano soki tolɛmbi makasi na nzoto, na makanisi mpe na motema. (Baefese 5:15, 16) Kobosana te ete mposa ya Satana ezali ete otika. Kasi, na kotalela ntango oyo tozali kobika, oyo ezali lisusu te ntango ya kolɛmbisa mabɔkɔ to ya kobosana ete mikolo etikali ya kotánga! (Luka 21:34-36) Ndenge nini okoki kotɛmɛla komekama mpe kolanda kokɛngɛla? Talelá makanisi minei oyo ekoki kosalisa yo.
‘Bondeláká ntango nyonso’
9 Tyelá Yehova motema na nzela ya libondeli. Kanisá lisusu ndakisa ya Yesu na elanga ya Getesemane. Asalaki nini ntango atungisamaki makasi na motema? Asɛngaki lisalisi epai ya Yehova, abondelaki makasi mpe “motoki na ye ekómaki lokola matangá ya makila oyo ezalaki kokwea na nse.” (Luka 22:44) Kanisá likambo yango. Yesu ayebaki Satana malamu. Yesu amonaki uta na likoló mitindo nyonso ya komekama oyo Satana asalelaka mpo na kokweisa basaleli ya Nzambe. Atako bongo, Yesu amonaki te ete akozala ata na mokakatano moko te mpo na kolonga komekama ata ya ndenge nini oyo Satana akobimisela ye. Soki Mwana ya Nzambe, oyo azalaki moto ya kokoka, amonaki ete esengeli abondela mpo Nzambe asalisa ye mpe apesa ye makasi, omoni te ete biso tosengeli kozala na mposa wana mingi koleka?—1 Petelo 2:21.
10 Kobosana mpe te ete nsima ya kolendisa bayekoli na ye ete ‘bábondelaka ntango nyonso,’ Yesu alobaki boye: “Ya solo, elimo ezali na molende, kasi mosuni ezali na bolɛmbu.” (Matai 26:41) Mosuni ya nani oyo Yesu azalaki kolobela? Na ntembe te, azalaki kolobela te mosuni na ye moko, mpamba te nzoto na ye ezalaki ata na bolɛmbu moko te mpo azalaki moto ya kokoka. (1 Petelo 2:22) Kasi ezalaki bongo te mpo na bayekoli na ye. Lokola babotamá na ezaleli ya kozanga kokoka mpe na makanisi ya kosala masumu, basengelaki mpenza na lisalisi mpo na kotɛmɛla komekama. (Baloma 7:21-24) Yango wana alendisaki bango—mpe baklisto nyonso ya solo oyo bakolanda na nsima—bábondelaka mpo na kozwa lisalisi oyo ekosunga bango bálonga komekama. (Matai 6:13) Yehova ayanolaka mabondeli ya ndenge wana. (Nzembo 65:2) Na ndenge nini? Na ndenge mibale to koleka.
11 Ya liboso, Nzambe asalisaka biso tóyeba makambo oyo tokoki komekama na yango. Makambo oyo Satana amekaka bato na yango ezali lokola mitambo oyo batanditandi yango na nzela oyo ezali na molili. Mitambo yango ekoki kokanga yo soki omoni yango te. Na nzela ya Biblia mpe ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, Yehova azali komonisa polele mitambo ya Satana; na ndenge yango, azali kosalisa biso tókwea na komekama te. Eleki sikoyo bambula mingi, mikanda ná mateya oyo toyokaka na mayangani ya minene mpe ya mike ezali kokebisa biso mbala na mbala na makama lokola kobanga bato, pite mpe ekobo, elimo ya koluka kozala na biloko mingi, mpe makambo mosusu oyo Satana amekaka biso na yango. (Masese 29:25; 1 Bakolinti 10:8-11; 1 Timote 6:9, 10) Na ntembe te, ozali na botɔndi epai ya Yehova mpo na ndenge azali kokebisa biso na ntina na mitambo ya Satana, boye te? (2 Bakolinti 2:11) Makebisi wana nyonso ezali biyano oyo azali kopesa na mabondeli oyo osalaka epai na ye mpo na kosɛnga ye asalisa yo otɛmɛla komekama.
12 Ya mibale, Yehova ayanolaka na mabondeli na biso ntango apesaka biso makasi mpo tóyikela komekama mpiko. Liloba na ye elobi boye: “Nzambe . . . akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobimela.” (1 Bakolinti 10:13) Soki tozali kolanda kotyela Nzambe motema ntango nyonso, akotika soki moke te ete komekama moko eleka biso motó mpe biso tózanga makasi ya elimo mpo na kotɛmɛla yango. Ndenge nini ‘abongiselaka biso nzela ya kobimela’? ‘Apesaka elimo santu epai ya baoyo basɛngaka ye yango.’ (Luka 11:13) Elimo yango ekoki kosalisa biso tóbosana te mitinda ya Biblia oyo ekoki koyeisa makasi mokano na biso ya kosala oyo ezali malamu mpe ekoki kosalisa biso tózwa bikateli na bwanya. (Yoane 14:26; Yakobo 1:5, 6) Ekoki kosalisa biso tómonisa bizaleli oyo tosengeli na yango mpenza mpo na kolonga makanisi ya kosala mabe. (Bagalatia 5:22, 23) Elimo santu ekoki mpe kotinda bandeko na biso baklisto ‘bákóma lisalisi oyo ezali kopesa biso makasi.’ (Bakolose 4:11) Na ntembe te, ozali na botɔndi mpo na ndenge Yehova azali koyanola na lolenge wana ya bolingo na mabondeli oyo osalaka mpo na kosɛnga ye lisalisi, boye te?
Kotya elikya te na makambo oyo ekoki kosalema te
13 Mpo tólanda kokɛngɛla, esengeli tótya elikya te na makambo oyo ekoki kosalema te. Mitungisi ya bomoi elɛmbisaka biso nyonso na bantango mosusu. Kasi tosengeli kobosana te ete Nzambe alakaki soki moke te ete biso tokokutana na mikakatano te na kati ya ebongiseli oyo. Ezala na ntango ya kala, basaleli ya Nzambe bakutanaki na mikakatano: minyoko, bobola, konyokwama na makanisi, mpe maladi.—Misala 8:1; 2 Bakolinti 8:1, 2; 1 Batesaloniki 5:14; 1 Timote 5:23.
14 Lelo oyo, biso mpe tozali kokutana na mikakatano. Tokoki kokutana na minyoko, kotungisama mpo tozangi mbongo, kotungisama na makanisi, kobɛla, mpe konyokwama na balolenge mosusu. Soki Yehova asengelaki kobatela biso na lolenge ya kokamwa na makambo nyonso ya mabe, okanisi te ete yango ekotinda nde lisusu Satana atumola Yehova makasi? (Masese 27:11) Yehova atikaka mpenza basaleli na ye bámekama, ntango mosusu atikaka ata bákufa liwa ya mobesu na mabɔkɔ ya banguna.—Yoane 16:2.
15 Bongo, Yehova alaki nini? Ndenge tomonaki yango, alaki ete akopesa biso makoki ya kotɛmɛla komekama nyonso oyo tokoki kokutana na yango soki biso tozali kotyela ye motema na biso mobimba. (Masese 3:5, 6) Na nzela ya Liloba na ye, elimo na ye, mpe ebongiseli na ye, azali kobatela biso na elimo; azali kosalisa biso tóbatela boyokani na biso elongo na ye. Soki tobateli boyokani yango, ata soki tokufi, tolongi. Eloko moko te, ezala ata liwa, ekoki kopekisa Nzambe apesa mbano epai ya basaleli na ye ya sembo. (Baebele 11:6) Mpe na mokili ya sika oyo ekómi pene, Yehova akozanga te kokokisa bilaka na ye nyonso ya kitoko oyo ekokisami naino te, bilaka ya mapamboli oyo akopesa baoyo balingaka ye.—Nzembo 145:16.
Kobosana te makambo oyo babɛtelaki yango ntembe
16 Mpo na koyika mpiko tii na nsuka, esengeli tóbosana te makambo ya ntina oyo babɛtelaki yango ntembe, oyo esali ete Nzambe atika nzela na mabe. Soki na bantango mosusu makambo na biso moko ekómi koleka biso motó mpe tokómi na mposa ete tótika, ekozala malamu tómikundola ete Satana abɛtaki ntembe ete Yehova abongi te kozala mokonzi monene. Satana abɛtaki mpe ntembe na ntina na ezaleli ya basambeli ya Nzambe ya kokangama na ye mpe kozala sembo epai na ye. (Yobo 1:8-11; 2:3, 4) Makambo yango oyo Satana abɛtelaki ntembe mpe lolenge oyo Yehova amoni malamu kosilisa makambo yango ezali na ntina mingi koleka bomoi ya mokomoko na biso. Na ndenge nini?
17 Ntango oyo Nzambe atiki naino nzela ete bampasi ezala esalisi bato mosusu báyamba solo. Kanisá naino likambo oyo: Yesu anyokwamaki mpo biso tózwa bomoi. (Yoane 3:16) Tozali na botɔndi te mpo na likambo yango? Kasi, tokosepela nde koyikela mikakatano mpiko mpo na mwa ntango lisusu mpo bato mosusu mpe bázwa bomoi? Mpo tóyika mpiko tii na nsuka, tosengeli kondima ete bwanya ya Yehova eleki oyo ya biso mosika mpenza. (Yisaya 55:9) Akosilisa mabe na ntango oyo ebongi mpenza mpo ete makambo oyo babɛtelaki yango ntembe ekatama mpo na libela mpe mpo na bolamu na biso ya seko. Yango nde lolenge ya malamu mpenza ya kokata makambo yango, boye te? Nzambe azangi bosembo te!—Baloma 9:14-24.
‘Pusaná penepene na Nzambe’
18 Mpo tóyebaka ntango nyonso ete mikolo etikali ya kotánga, esengeli tótikala penepene na Yehova. Kobosana te ete Satana azali kosala nyonso mpo abebisa boyokani na biso na Yehova. Satana alingi kotinda biso tóndima ete nsuka ekoya te, mpe ete ezali na ntina te tósakolaka nsango malamu to tótosaka mitinda ya Biblia. Kasi “azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Tosengeli kozala na ekateli ya ‘kotɛmɛla Zabolo.’ Tosengeli te komona boyokani na biso na Yehova lokola eloko moko oyo ezali na ntina mingi te. Biblia ezali kolendisa biso na bolingo nyonso ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:7, 8) Kasi ndenge nini okoki kopusana penepene na Yehova?
19 Kokanisa na bozindo mpe kobondela ezali na ntina. Ntango omoni ete mitungisi ya bomoi eleki yo motó, fungolelá Yehova motema na yo. Soki omonisi ye polele mikakatano oyo ozali na yango, ekozala mpasi te omona eyano oyo akopesa na mabondeli na yo. Eyano ekoki ntango nyonso te kozala ndenge oyo mpenza yo ozalaki kokanisa, kasi soki mposa na yo ezali ya kokumisa ye mpe ya kobatela bosembo, akopesa yo lisalisi oyo ozali na yango mposa mpo oyeba koyika mpiko. (1 Yoane 5:14) Ntango ozali komona ndenge azali kotambwisa yo, okopusana lisusu penepene na ye. Kotánga mpe kokanisa likoló na bizaleli mpe banzela ya Yehova, ndenge Biblia emonisi yango, ezali mpe na ntina mingi. Kokanisa malamumalamu ndenge wana ekosalisa yo oyeba ye malamumalamu; ekosimba motema na yo mpe okobanda kolinga ye mingi. (Nzembo 19:14) Mpe na koleka, bolingo yango ekosalisa yo otɛmɛla komekama mpe okɛngɛlaka.—1 Yoane 5:3.
20 Mpo tózala pene na Yehova, ezali mpe na ntina mingi ete tózala pene na bandeko na biso bandimi. Tokolobela likambo yango na eteni ya nsuka ya mwa buku oyo.
MITUNA YA BOYEKOLI
• Yesu asalaki nini ntango atungisamaki mingi pene na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, mpe asɛngaki bayekoli na ye básala nini? (Par. 1-4)
• Mpo na nini Satana azali koluka basambeli ya Yehova, mpe na ndenge nini amekaka biso? (Par. 5-8)
• Mpo na kotɛmɛla komekama, mpo na nini esengeli tóbondelaka ntango nyonso (Par. 9-12), tótya elikya te na makambo oyo ekoki kosalema te (Par. 13-15), tóbosana te makambo oyo babɛtelaki yango ntembe (Par. 16-17), mpe ‘tópusana penepene na Nzambe’ (Par. 18-20)?
[Etanda na lokasa 25]
Mwa makambo oyo elɛmbisaka nzoto
Bokolɔngɔnɔ ya nzoto to kokóma mobange. Soki tobɛli maladi oyo eumeli mingi to soki tozali kokoka lisusu te kosala makambo mosusu mpo tokómi mibange, tokoki konyokwama na makanisi mpo tozali kokoka te kosalela Nzambe mingi.—Baebele 6:10.
Koyoka mawa. Tokoki kolɛmba nzoto soki tomoni ete milende oyo tozali kosala mpo na kosakola Liloba ya Nzambe ezali kobota mbuma mingi te.—Masese 13:12.
Komiyoka ete ozali na ntina te. Soki moto anyokwami bambula ebele, akoki komona mpenza ete balingaka ye te to mpe kokanisa ete ata Yehova alingaka ye te.—1 Yoane 3:19, 20.
Mpasi na motema. Soki ndeko moko moklisto asali biso mpenza mabe, yango ekoki mbala mosusu kotungisa biso mingi na makanisi mpe kotinda biso ntango mosusu tótika koyangana na makita to mpe tótika kosakola.—Luka 17:1.
Minyoko. Bato oyo tozalaka na bango lingomba moko te bakoki kotɛmɛla biso, konyokola biso, to mpe kosɛka biso.—2 Timote 3:12; 2 Petelo 3:3, 4.
[Elilingi na lokasa 26]
Yesu alendisaki biso ‘tóbondelaka ntango nyonso’ mpo na kozwa lisalisi ya kobundisa komekama