Bonkɔ́kɔ bosengeli kowelana na solo?
MARTIN LUTHER amindimisaki ete azalaki na elónga. Akanisaki ete
Biblia ezalaki kosimba likanisi na ye. Na ngámbo mosusu, astrɔnɔmɛ Copernic, moto ya Pologne akanisaki ete bindimeli ya bonkɔ́kɔ ya eleko wana bizalaki ya lokuta.
Bindimeli nini? Na ndakisa, endimeli oyo ete mabelé mazalaki ntéi ya molɔ́ngɔ́ mpe ete biloko binso bizalaki kozolongana zingazinga na yango. Engebene Copernic, solo ezalaki ete mabelé nde mazalaki kozolongana zingazinga ya moi. Luther aboyaki kondima yango, kolobáká ete: “Bato bazali koyoka wayawaya ya astrɔlɔgɛ oyo azali koluka komonisa ete mabelé mazali kozolongana, kasi ezali te makoló to etando, to moi to sanza.”—History of Western Philosophy.
MBALA mingi bindimeli ya bonkɔ́kɔ biwelanaka na lolenge makambo mazalaka, na solo. Bikoki nkutu komema bato na kosala makambo mabe.
Ya solo, elingi koloba te ete bonkɔ́kɔ ewelanaka ntango nyonso na solo. Ntoma Paulo alendisaki baklisto ya ntango na ye ete bálandaka mimeseno [bonkɔ́kɔ] oyo atikelaki bango: “Nazali kokumisa bino mpo ete . . . bokosimbaka [bonkɔ́kɔ, NW] bopesaki ngai bino.”—1 Bakolinti 11:2; talá lisusu 2 Batesaloniki 2:15; 3:6.
Paulo alingaki koloba nini na “bonkɔ́kɔ”? Búku Insight on the Scriptures, Volimi 2, lokasa 1118, emonisi ete liloba ya Greke oyo asaleli awa mpo na “bonkɔ́kɔ,” pa·raʹdo·sis, elimboli likambo oyo “liteyami na maloba, na makomi.” Liloba wana ya Lingala elimboli “koyebisa makambo, mateya, to misala oyo baboti batikeli bana to oyo esili kokóma lolenge ya kokanisa to ya kosala makambo.”a Lokola bonkɔ́kɔ oyo Paulo atikaki ebimaki na eutelo ya malamu, baklisto basalaki malamu na kokangamaka na yango.
Na yango, emonani ete mateya ya bonkɔ́kɔ ekoki kozala solo, to lokuta, malamu to mabe. Na ndakisa, Bertrand Russell, filozofe ya Grande-Bretagne akumisaki bato lokola Copernic, oyo na ekeke ya 16 bamonisaki ezaleli ya kolongobana mpe ya mpiko mpo na kobɛtɛla bindimeli ya bonkɔ́kɔ ntembe. Bakólisaki “likanisi ete makambo oyo masilaki kondimama uta ntango ya kala makokaki mbala mosusu kozala ya lokuta.” Yo mpe ozali komona ete ezali likambo ya mayele te ya kondima mateya ya bonkɔ́kɔ bindimela?—Kokanisá na Malako 15:1-9, 14.
Bongo, ezali boni mpo na bindimeli mpe mimeseno ya losambo? Tokoki mbala moko kondima yango ete ezali sembo mpe na likámá te? Lolenge nini tokoki kososola yango? Tosengeli kosala nini soki tomoni ete bindimeli ya bonkɔ́kɔ ya mangomba bizali kowelana na solo? Lisoló lilandi likoyanola na mituna wana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Cover: Jean-Leon Huens © National Geographic Society
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Universität Leipzig