Mibali, bómekola bolingo ya Klisto!
NA BUTU ya nsuka, liboso ya liwa na ye, Yesu alobaki na bantoma na ye ya sembo boye: “Nazali kopesa bino komandema ya sika, ete bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, mpo bino mpe bólingana bino na bino. Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:34, 35) Ɛɛ, baklisto ya solo basengeli kolinganaka.
Ntoma Paulo apesaki mibali toli oyo: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, se ndenge Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” (Ef. 5:25) Ndenge nini moklisto oyo abalá akoki kosalela toli yango, mingimingi soki mwasi na ye azali mpe mosaleli ya Yehova oyo amipesá?
Klisto alingaki lisangá
Biblia elobi boye: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Moto oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko, mpo ata moto moko te ayinaka mosuni na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango, ndenge Klisto mpe asalaka epai ya lisangá.” (Ef. 5:28, 29) Yesu azalaki kolinga bayekoli na ye mingi. Atako bazalaki bato ya kozanga kokoka, azalaki komonisela bango boboto. Azalaki kotya miso na bizaleli malamu ya bayekoli na ye mpo “akoka kobimisa lisangá epai na ye moko na kati ya kitoko na yango.”—Ef. 5:27.
Ndenge Klisto azalaki kolinga lisangá, mibali mpe basengeli komonisa na maloba mpe na misala ete balingaka basi na bango. Mwasi oyo mobali na ye alingaka ye mingi amonaka ete azali na valɛrɛ mpe azalaka na esengo. Epai mosusu, soki mobali akipaka mwasi na ye te, mwasi yango akozala na esengo te ata soki atondiseli ye bomɛngo na ndako.
Ndenge nini mobali akoki komonisa ete alingaka mwasi na ye? Ntango azali liboso ya bato oyo bayebi mwasi na ye te, akoki kolakisa bango mwasi na ye na limemya nyonso mpe kokumisa ye mpo na ndenge asungaka ye. Soki mwasi na ye asali likambo moko ya malamu mpo na libota na bango, akokakatana te koyebisa yango epai ya basusu. Ata ntango bazali kaka bango mibale, mobali yango amonisaka mwasi na ye ete alingaka ye. Kosimba ye na lobɔkɔ, kosɛkisa ye, koyamba ye, mpe kopesa ye longonya; yango ekoki komonana lokola makambo ya mike, kasi ezalaka na ntina mingi mpo na mwasi.
‘Ayokaki nsɔni te kobenga bango “bandeko”’
Klisto Yesu ayokaki “nsɔni te mpo na kobenga [bayekoli na ye bapakolami] ‘bandeko.’” (Ebe. 2:11, 12, 17) Soki ozali na mwasi, kobosana te ete azali mpe ndeko na yo moklisto. Komipesa na ye epai ya Yehova ezali na esika ya liboso, ata soki amipesaki mpe azwaki batisimo nsima ya libala na bino. Ntango mwasi na yo alingi kopesa eyano na makita, ndeko mobali oyo azali kotambwisa akobenga ye “ndeko mwasi.” Azali mpe ndeko na yo, ezala na Ndako ya Bokonzi to na ndako na bino. Osengeli komemya ye, kaka te ntango bozali na Ndako ya Bokonzi, kasi mpe ntango bozali na ndako.
Soki ozali na mikumba na lisangá, ekoki kozala ntango mosusu mpasi okokisa mikumba yango mpe mikumba na yo mosusu na libota. Boyokani malamu kati na bankulutu mosusu mpe basaleli na misala mpe koyeba kotikela basusu mikumba ekosalisa yo ozwaka ntango mpo na ndeko mwasi oyo azalaka na mposa na yo mingi koleka, elingi koloba mwasi na yo. Kobosana te, bandeko mibali mingi bakoki kokokisa mikumba na yo na lisangá, kasi mwasi na yo azali kaka na yo.
Lisusu, ozali mokonzi ya mwasi na yo. Biblia elobi boye: “Mokonzi ya mobali nyonso ezali Klisto; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali.” (1 Kol. 11:3) Ndenge nini osengeli kosalela bokonzi yango? Na bolingo, na esika otángelaka mwasi na yo vɛrsɛ yango ntango nyonso mpe osɛngaka ye atosaka yo. Sɛkɛlɛ mpo na kosalela bokonzi na yo na ndenge ya malamu ezali komekola Yesu Klisto na ndenge ofandaka ná mwasi na yo.—1 Pet. 2:21.
“Bozali baninga na ngai”
Yesu abengaki bayekoli na ye baninga. Alobaki na bango boye: “Nazali kobenga bino lisusu baombo te, mpamba te moombo ayebaka te oyo nkolo na ye asalaka. Kasi nabengi bino baninga, mpamba te makambo nyonso oyo nayokaki epai ya Tata na ngai nayebisi bino yango.” (Yoa. 15:14, 15) Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kosolola malamu. Bazalaki mpe kosala makambo elongo. “Yesu ná bayekoli na ye” babengamaki na fɛti ya libala na Kana. (Yoa. 2:2) Bazalaki na bisika oyo bazalaki kolinga kokende, na ndakisa elanga ya Getesemane. Biblia elobi ete “Yesu azalaki mbala mingi koyangana kuna elongo na bayekoli na ye.”—Yoa. 18:2.
Na ntembe te, mwasi asengeli komonaka ete azali moninga mpenza ya mobali na ye. Ezali mpenza na ntina ete mibali ná basi na bango bálekisaka ntango elongo! Básalelaka Nzambe elongo. Bázwaka ntango ya koyekola Biblia elongo. Bátambolaka, básololaka mpe bályaka elongo. Bózala kaka mwasi ná mobali te, kasi bózala mpenza baninga ya motema.
“Alingaki bango tii na nsuka”
Yesu ‘alingaki bayekoli na ye tii na nsuka.’ (Yoa. 13:1) Mibali mosusu bamekolaka Klisto te na likambo yango. Bamosusu kutu basundolaka ‘mwasi ya bolenge na bango,’ mbala mosusu mpo na kobala oyo azali elenge.—Mal. 2:14, 15.
Nzokande, mibali mosusu bamekolaka Klisto. Tózwa ndakisa ya Willi. Lokola mwasi na ye azalaki lisusu nzoto kolɔngɔnɔ te, esɛngaki abatela ye na boumeli ya mbula mingi. Ndenge nini Willi atalelaki likambo yango? Alobi boye: “Natalelaka ntango nyonso mwasi na ngai lokola likabo oyo Nzambe apesá ngai, mpe nasepelaka na ye ndenge azali. Longola yango, eleki lelo mbula 60, nalapaki ndai ete nakobatela ye na ntango ya mpasi mpe na ntango ya bisengo. Nakobosana ndai yango mokolo moko te.”
Mibali baklisto, bómekola bolingo ya Klisto. Bólingaka basi na bino oyo bazali basaleli ya Nzambe, bandeko mpe baninga na bino.
[Elilingi na lokasa 20]
Mwasi na yo azalaka moninga na yo ya motema?
[Elilingi na lokasa 20]
‘Kobá kolinga mwasi na yo’