Engebene Biblia
Botosi ya mwasi elimboli nini?
BIBLIA, Liloba ya Nzambe, elobi na Baefese 5:22 ete: “Bino basi bótosaka babali na bino pelamoko epai na Nkolo.” Yango elimboli mpenza nini? Mwasi asengeli nde kotosa makambo nyonso oyo mobali na ye alingi, ezala ya lolenge nini? Akoki soko moke te kozwa likatami ye moko to kozala na makanisi makeseni na oyo ya mobali na ye?
Tótalela lisoló ya Abigaili kati na Biblia. Asalaki na bokɛngi kasi na bokeseni na bolingi ya mobali na ye Nabala, moto na bozwi. Atako Davidi aponamaki na Nzambe mpo na kozala mokonzi na Yisalaele mpe bato na Davidi bamoniselaki Nabala boboto, kasi Nabala “atombwelaki bango mongongo na ye.” Davidi asilikaki mpenza na ntina na kozanga botɔ́ndi wana ya Nabala mpe azwaki ekateli ete akenda koboma ye. Abigaili amonaki ete bomoi ya bato nyonso ya ndako na ye ezalaki na likámá. Amekaki kokitisa nkanda ya Davidi. Na lolenge nini?—1 Samwele 25:2-35.
Abigaili alobaki liboso ya Davidi ete mobali na ye Nabala azali “moto mpamba” mpe apesaki Davidi bilei oyo Nabala apimelaki ye. Yango elongobani te mpe ezali mpenza mabe ete mwasi to mobali alobela mabunga ya bolongani na ye liboso na bato. Kasi Abigaili akómaki nde motomboki mpo ete alobelaki mobali na ye na lolenge wana? Te. Alingaki bobele kobikisa bomoi ya Nabala mpe ya bato ya ndako na ye. Tokoki kozala ata na likanisi moko te ete Abigaili azalaki na momeseno ya kozanga limemya to ya komonisa elimo ya lipanda. Ata Nabala, moto na makambo makasi, amonaki mabe te na lolenge mwasi na ye asalaki mpo na kobatela bomengo na ye. Nzokande, liboso ya mokakatano monene wana, mwasi amonaki ete ezalaki likambo ya mayele ete azwa likatami ye moko. Biblia kútu ezali kokumisa lolenge Abigaili asalaki.—1 Samwele 25:3, 25, 32, 33.
Liboso na ntango ya Abigaili, basi ya batata na mabota, na bantango mosusu, babimisaki makanisi makeseni mpe bazwaki makatami makeseni na oyo ya mibali na bango. Nzokande, ‘basi yango ya bulɛɛ oyo bazalaki kolikya epai na Nzambe’ batalelami lokola bandakisa ya botosi epai na basi baklisto. (1 Petelo 3:1-6) Na ndakisa, ntango Sala amonaki ete Yisamaele, mwana ya Abalayama akómaki kotya bomoi ya Yisaka, mwana na bango na likámá, Sala azwaki likatami ete abengana Yisamaele. Yango ‘etungisaki mpenza Abalayama.’ Kasi Nzambe alobaki na Abalayama ete: “Tika te ete oyo nyonso Sala azali koloba na yo na ntina na mwana mobali etungisa yo . . . Yoká lolaka na ye.”—Genese 21:11, 12, NW.
Bososoli ezali na ntina
Nzokande, ekozala likambo ya malamu te ete mwasi apusama na kosala makambo oyo ye ayebi ete mazali mabe to mazali kobuka mitindá ya Nzambe, bobele mpo ete asɛngisami na kotosa. Ebongi mpe te komemisa ye ngambo mpo ete azwi likatami ye moko na mwa makambo ya ntina, lokola Sala mpe Abigaili basalaki yango.
Botosi ya mwasi elimboli te ete mwasi asengeli ntango nyonso kondima likambo nyonso oyo mobali na ye alingi. Mpo na nini esengeli kozala bongo te? Mpamba te, soki yango esali ete mitindá ya sembo mityama na likámá, mwasi akoki mbala mosusu koboya likanisi ya mobali na ye. Nzokande, asengeli kolanda komonisa botosi ya mozindo oyo euti na Nzambe.
Ya solo, mwasi asengeli kokeba ete aboya na nkó te, to na bokosi te to na matindiki mabe te makambo oyo mobali na ye alingi. Asengeli nde kososola mpe kozala “na boyebi malamu,” lokola ezalaki Abigaili.—1 Samwele 25:3.
Wana mobali azali kokokisa mokumba na ye te
Na kosaláká elongo na mobali na ye mpe na kolendisáká bikateli na ye, mwasi azali kokokisa mokano ya liboso ya botosi oyo euti na Nzambe, elingi koloba, kosepelisa Yehova. Yango ezalaka mpenza mpasi te soki mobali azali moto oyo akɔmeli na elimo. Ekoki kozala mpasi soki mobali akɔmeli naino na elimo te.
Na ntango yango, mwasi akoki kosala nini? Akoki kolamwisa mayoki ya mobali na ye to kopesa ye makanisi likoló na bikateli oyo amoni ete bikozala na matomba malamu koleka mpo na libota. Soki atikeli mobali nzela ete ‘asimba yenda,’ akokóma lisusu na makoki mingi na likambo yango. Komilelalela na ntina na mobali ezali kobuka ezaleli mpenza ya botosi. (Masese 21:19) Nzokande, soki emonani polele ete kimya ya libota ezali na likámá na lolenge mobali azali kotambwisa makambo, mwasi akoki kolakisa lolenge mosusu mpo na kosembola makambo, lokola Sala asalaki.
Soki mobali azali mondimi te, ekoki kozala komekama makasi koleka epai na mwasi. Nzokande, akolanda kotosa ye ntango nyonso oyo mobali na ye akosɛngisa ye te ete abuka mibeko ya Biblia. Soki asɛngisi ye ete abuka yango, mwasi moklisto asengeli kosala lokola esalaki bayekoli na ekeke ya liboso ntango bazúzi basɛngaki bango ete bábuka mibeko ya Nzambe; balobaki ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.”—Misala 5:29.
Nzokande, mpo na bozangi ya eksperiansi to mpo na mayele moke, ata mibali mpe basi oyo bazali kokana kosalana mabe te bakoki kolekisa ndelo wana bazali kokokisa mikumba na bango. Mobali akoki kozanga kotalela bamposa ya mwasi; mwasi mpe akoki kosala bopusi makasi koleka likoló na mobali na ye mpo ete akokisa bamposa na ye. Nini ekoki kosunga bango? Komitalela na bopɔlɔ ekosunga mokomoko na bango, mpo ete “biso nyonso tokokweaka na makambo mingi.”—Yakobo 3:2.
Mibali mingi bandimaka likambo mwasi abandisi yango ye moko soki asali yango na makanisi malamu mpe na ntango ebongi. Soki bango nyonso mibale balimbisani mabunga na bango, bakozwa elendiseli mpo na kolanda kosalana elongo. Lolenge moko Yehova azali kolimbisa mabunga na biso mokolo na mokolo, na bongo tosengeli kolimbisa bamosusu. “Ɛ [Yehova], soko yo okotalaka bokesene, ɛ Nkolo, nani akotɛlɛma? Na yo nde kolimbisa ezali na ntina ete obangama.”—Nzembo 130:3, 4.
“Bótosanaka”
Na bongo, mpo ete mokomoko na biso azwa matomba malamu koleka, Makomami mapesi toli oyo ete: “Bótosanaka mpo na kobanga Klisto.” Tómonisa bolingo mpe limemya moko epai na mosusu; tóyokisanaka mpasi te to tówelanaka te. Molɔngɔ́ yango elandi koloba ete: “Bino basi bótosaka babali na bino pelamoko epai na Nkolo mpo ete mobali azali motó na mwasi pelamoko Klisto azali motó na Lingomba.”—Baefese 5:21-23.
Liloba ya Greke oyo Paulo asalelaki na Baefese 5:21, 22 elimboli kotosa na bolingo malamu kasi te kotindama na makasi. Botosi yango ezali bobele mpo na kozala na bomoko kati na libala te kasi nde mpo na Nkolo. Lisangá ya bapakolami ya Klisto lizali kotosa ye na bolingo malamu mpe na esengo. Ntango mwasi azali kosala bongo epai na mobali na ye, na ntembe te libala na bango likozala na esengo mpe bakolónga mikakatano.
Makomami malobi lisusu ete: “Tiká ete moko na moko na bino alinga mwasi na ye lokola ye moko,” na bokangami ntango nyonso. (Baefese 5:33; 1 Petelo 3:7) Mobali asengeli koyeba na makanisi na ye ete ye mpe asengeli kotosa motó na ye, mpo Biblia elobi ete: “Motó na babali nyonso azali Klisto.” Ɛɛ, mobali asengeli kotosa mateya ya Klisto. Na ngala na ye, Klisto azali kotosa motó na ye, lokola Makomami elobi yango ete: “Motó na Klisto azali Nzambe.” Na bongo, moto nyonso azali na mokonzi, longola bobele Yehova. Kútu Yehova ye mpenza azali kokangama na mibeko na ye.—1 Bakolinti 11:3; Tito 1:2; Baebele 6:18.
Botosi ya boklisto ezali ya bokatikati mpe ezali kopesa matomba epai na mwasi mpe epai na mobali. Ezali komema boyokani na libala mpe bosepeli oyo bobele Mozalisi na biso ya bolingo nde akoki kopesa yango.—Bafilipi 4:7.