Mpo na nini Elambo ya Mpokwa ya Nkolo ezali na ntina mpo na yo
YESU KLISTO abandisaki Elambo ya Mpokwa ya Nkolo na butu ya nsuka oyo alekisaki lokola moto. Ebongiseli yango esalemaki mokolo ya minei le 31 Mars na mpokwa, mpe mokolo ya mitano le 1er Avril nsima ya nzanga, Yesu akufaki. Mpo ete mikolo ya manaka ya Bayuda mizalaki kobanda na mpokwa ya mokolo moko kino mpokwa ya mokolo mosusu, elambo wana mpe kufa na Yesu ezalaki bobele na mokolo moko, le 14 Nisan ya mobu 33 T.B.
Mpo na nini Yesu abandisaki elambo yango? Ndimbola ya limpa mpe vinyo oyo asalelaki ezali nini? Nani asengeli kolya mpe komela yango? Mbala boni esengeli kokumisa elambo yango? Mpe ndenge nini ekoki kozala na ntina mpo na biso?
Mpo na nini etyamaki?
Na ntina ya elambo yango, Yesu alobaki na bayekoli na ye: “Bosalaka bongo mpo ya kokanisa ngai.”(Liloba lya Nzambe) Engebene libongoli ya Haut fleuve, alobaki: “Bosalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.” (1 Bakolinti 11:24) Na yango, Elambo ya Mpokwa ya Nkolo elobelami mbala mingi lokola Ekaniseli ya liwa ya Klisto.
Yesu akufaki sembo lokola mokoteli ya boyangeli ya Jéhovah mpe na yango apesaki elembeteli ete Satana azali mobuki na lokuta wana abimisi efundeli ete bato ya sembo bazali kosalela Nzambe bobele mpo na koluka matomba na bango moko. (Yobo 2:1-5) Liwa na ye esepelisaki motema na Nzambe.—Masese 27:11.
Na nzela ya kufa na ye ya moto na kokoka, Yesu ˈapesaki bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato mingi.ˈ (Matai 20:28) Ntango asalaki lisumu epai na Nzambe, moto ya liboso abungisaki bomoi ya moto ya kokoka mpe bilikya na yango. Kasi “Nzambe alingaki mokili [ya bato] na motindo boye ete apesaki Mwana na ye se moko ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Ya solo, “masumu makofutaka mbongo, mbongo yango bobele kufa; nde Nzambe akopesa likabo mpamba, likabo na ye bomoi na seko kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.”—Baloma 6:23.
“Yango ezwaki ngai epai na Nkolo”
Maloba oyo ya Paulo mazali kopesa pole na ntina ya Ekaniseli ya liwa ya Klisto: “Mpo ete yango ezwaki ngai epai na Nkolo mpe epesaki ngai bino ezalaki ete, na butu wana ekabamaki ye, Nkolo Yesu akamati limpa mpe esili ye kotonda, abuki yango, alobi ete: ˈOyo [elimboli] nzoto na ngai mpo na bino. Bosalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.ˈ Bobele bongo na kopo, nsima na kolia, alobi ete: ˈKopo oyo ezali kondimana na sika kati na makila na ngai. Bosalaka boye mbala na mbala ekomela bino yango mpo na ekaniseli na ngai.ˈ Mpo ete mbala na mbala ekolya bino limpa mpe ekomela bino kopo, bozali kosakola kufa na Nkolo kino ekoya ye.”—1 Bakolinti 11:23-26.
Mpo ete Paulo azalaki esika moko te elongo na Yesu mpe bantoma na ye 11 mokolo ya le 14 Nisan ya mobu 33, na ntembe te, etinda yango eutaki na Nkolo na nzela na emononeli epemami na elimo. Yesu abandisaki Ekaniseli “na butu wana ekabamaki ye” na Yuda epai na Bayuda banguna na ye bakonzi na mangomba, baoyo bapusaki Baloma na kobakisa Klisto na nzete. Baoyo babongi kolya limpa mpe komela vinyo ya elambo wana basengeli kosala yango mpo na kokanisa ye.
Kokumisa yango mbala boni?
Paulo alingaki kolimbola nini ntango alobaki ete: “Mbala na mbala oyo bokolya limpa mpe bokomela kopo oyo, bozali kosakola kufa na Nkolo kino ekoya ye”? Baklisto bapakolami ya sembo basengelaki kolya limpa mpe komela vinyo ya Ekaniseli “mbala na mbala” kino bakokufa, liboso ete basekwisama mpo na bomoi ya likolo. Liboso na Nzambe mpe na mokili, basengeli bongo kosakola mbala na mbala kondima na bango kati na ebongiseli ya Jéhovah oyo apesaki Yesu lokola mbeka. Basengeli kosala bongo kino ntango nini? Paulo alobi ete: “Kino ekoya ye.” Na ntembe te, yango elimboli ete milulu wana milingaki kolandana kino koya na Yesu mpo na kozwa bayekoli na ye bapakolami, komema bango na likoló na nzela ya lisekwa na eleko ya “komonana” na ye. (1 Batesaloniki 4:14-17) Likambo yango liyokani na maloba oyo Klisto alobaki na bantoma na ye ya sembo 11 ete: “Soko nakokenda kobongisela bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai ete esika ezali ngai, bino bozala mpe wana lokola.”—Yoane 14:3.
Liwa ya Klisto lisengelaki kokanisama mokolo na mokolo to poso na poso? Ya solo, Yesu abandisaki Elambo ya Mpokwa ya Nkolo mpe akufaki mokolo ya Elekeli, oyo ezalaki kokanisa kosikolama ya Bayisraele na boombo ya Ezipito. Na yango, abyangami “Elekeli na biso, ye Klisto” mpamba te azali Mwana na Mpate oyo apesami mbeka mpo na baklisto. (1 Bakolinti 6:7) Elekeli ezalaki kokundolama bobele mbala moko na mbula, na le 14 Nisan. (Exode 12:6, 14; Levitike 23:5) Yango ezali komonisa ete kufa na Yesu esengeli kokanisama na motindo oyo ezalaki kosalema mpo na Elekeli—mbala moko na mbula, kasi mokolo na mokolo te to poso na poso te.
Na boumeli ya bikeke mingi, baoyo bazalaki komitanga “baklisto” bazalaki kokanisa kufa na Yesu mbala moko na mbula. Mpo ete bazalaki kokumisa yango le 14 Nisan, bakomaki kobyangama ba Quartodécimans, oyo elimboli “ya zomi na minei.” Na ntina na bango, mokomi na makambo ya kala J. L. von Mosheim akomaki ete: “Baklisto ya Asie Mineure bamesenaki kokumisa elambo wana ya bulee, bokundoli ya limpati ya Nkolo mpe ya liwa na Yesu Klisto, bobele na ntango oyo Bayuda bazalaki kolya mwana na mpate na bango ya Elekeli, na mpokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso [Nisan].... Batalelaki ndakisa ya Klisto lokola mobeko oyo basengeli kotosa.”
Ndimbola ya limpa mpe vinyo
Paulo alobi ete Yesu “akamataki limpa, mpe esili ye kotonda, abukaki yango.” Limpa wana, oyo ezalaki lokola bisikiti ya kokauka, esalemaki bobele na farine mpe na mai mpe ezangi mfulu esengelaki kobukama liboso ya kolya yango. Kati na maloba ya elilingi ya Biblia mfulu ezali kolimbola lisumu to libebi. Ntango alendisaki baklisto ya Kolinti na kobimisa moto moko ya pite na lisanga, Paulo alobaki ete: “Boyebi te ete mfulu moke ekofulisa mampa mobimba? Longola mfulu oyo ya kala ete bozala mampa ya sika, pelamoko mampa mazangi mfulu. Mpo ete mpate na Elekeli na biso esili kotombwa mbeka, ye Klisto. Tika ete tolya elambo na mfulu ya kala te. Yango mfulu na nko mpe na kilikili, kasi na mampa mazangi mfulu, yango na sembo mpe na solo.” (1 Bakolinti 5:6-8) Lokola mampa moke oyo ezali na mfulu ekobebisa liboke mobimba ya mampa, bobele bongo lisanga ekokoma mbindo na miso na Nzambe soki bopusi mabe ya moto moko ya mbindo elongwi te. Basengelaki kolongola “mfulu” kati na bango, na motindo na Bayisraele oyo basengelaki kozala na mfulu kati na ndako na bango te na boumeli ya elambo na Mampa mazangi Mfulu oyo elandaki Elekeli.
Na ntina ya limpa ezangi mfulu ya Ekaniseli, Yesu alobaki ete: “Oyo [elimboli] nzoto na ngai [oyo ezali] mpo na biso.” (1 Bakolinti 11:24) Limpa ezali elembo ya Nzoto ya kokoka na Yesu, oyo na ntina na yango Paulo akomaki ete: “Awa eyei Klisto kati na mokili, alobaki ete: ˈ“Olingaki mbeka mpe makabo na kotombwa te, kasi osili kobongisela ngai nzoto. Osepeli mbeka na kotumba mpe miboma mpo na masumu te.” Boye nalobaki ete: “Tala nasili koya, ekomami mpo na ngai kati na mokanda. Ɛ Nzambe nayei kosala mokano na yo.”ˈ ... Mpe na ˈmokanoˈ yango tosili kobulisama mpo na kotombwa na nzoto na Yesu Klisto lokola mbeka mbala moko mpo na libela.” (Baebele 10:5-10) Nzoto na moto ya kokoka Yesu ezalaki na masumu te mpe epesamaki lokola mbeka ya lisiko mpo na bato.—Baebele 7:26.
Nsima ya kobondela likoló na kopo ya vinyo motane oyo batye eloko mosusu na kati te, Yesu alobaki ete: “Kopo oyo [elimboli] kondimana ya sika kati na makila na ngai.” (1 Bakolinti 11:25) Libongoli mosusu elobi ete: “Kopo oyo ezali kondimana ya sika ya Nzambe oyo ezwi ndanga mpo na makila na ngai.” (Francais courant) Lokola makila ya bangombe mpe bantaba epesaki motuya na kondimana ya Mibeko kati na Nzambe mpe libota ya Yisraele, bobele bongo makila oyo Yesu asopaki na liwa na ye epesaki motuya na kondimana ya sika. Lisolo ya kondimana wana ekosalisa biso na kososola nani abongi mpenza kolya limpa mpe komela vinyo ya Ekaniseli.
Nani abongi kolya limpa mpe komela vinyo?
Bayekoli na Yesu bapakolami baoyo bazali kati na kondimana ya sika babongi kolya limpa mpe komela vinyo ya Ekaniseli. Kondimana yango esalemaki kati na Nzambe mpe Yisraele ya elimo. (Yilimia 31:31-34; Bagalatia 6:16) Kasi kondimana ya sika ekomema mpe mapamboli epai na bato nyonso ya botosi, yo mpe okoki kozala kati na baoyo bakozwa mapamboli yango.
Bato oyo bazali kolya limpa mpe komela vinyo ya Ekaniseli basengeli kozala kati na kondimana mpo na Bokonzi oyo Yesu asalaki elongo na moko na moko na bango. Ntango abandaki elambo yango, Yesu alobaki na bantoma na ye ete: “Nazali kosala kondimana elongo na bino, lokola Tata asalaki kondimana elongo na ngai mpo na Bokonzi.” (Luka 22:29, MN) Kondimana mpo na Bokonzi oyo Nzambe asalaki elongo na mokonzi Davidi ezalaki kosakola koya na Yesu, ye oyo asengelaki koyangela mpo na libela. Bayisraele ya elimo 144.000 oyo bakosangana na Bokonzi elongo na Yesu bamonisami lokola batelemi na Ngomba Siona na likolo elongo na Mwana na Mpate, Yesu Klisto. Nsima na lisekwa na bango, bakoyangela elongo na Klisto lokola bakonzi mpe banganga balandi. (2 Samwele 7:11-16; Emoniseli 7:4; 14:1-4; 20:6) Bobele baoyo bazali kati na kondimana ya sika mpe kati na kondimana elongo na Yesu nde babongi kolya limpa mpe komela vinyo na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo.
Elimo na Nzambe ezali kotatola elongo na elimo na baoyo bapakolami ete bazali bana na Ye mpe bakozwa libula elongo na Klisto. Paulo akomaki ete: “EIimo yango moko ekosanganaka na elimo na biso kotatola ete tozali bana na Nzambe. Soko tozali bana, mbele tozali basangoli na libula. Tozali basangoli na libula na Nzambe, basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo, soko tokoyoka mpasi na ye elongo ete tozwa nkembo esika moko na ye.” (Baloma 8:16, 17) Elimo na Nzambe, to nguya oyo ezali kosala mosala, ekopesa na baoyo bapakolami na elimo elikya makasi ya kozala na bomoi na likolo. Bazali komona ete makambo nyonso mayebisami kati na Makomi na ntina na bomoi ya likolo matali bango mpe bazali pene ya kotika biloko nyonso ya mokili, ata mpe bomoi na bango ya bomoto. Atako bomoi kati na Paradis na mabele ekozala kitoko, kasi elikya na bango ezali yango te. (Luka 23:43) Elikya ya bomoi na likolo, oyo etongami likolo na mateya na mangomba ya Iokuta te, yango nde ezali kopesa bango ndingisa ya kolya limpa mpe komela vino ya Ekaniseli.
Jéhovah akosepela te soki moto amikanisi ye moko ete azali mokonzi mpe nganga oyo abyangami mpo na bomoi na likoló nzokande; azali na libyangi yango te. (Baloma 9:16; Emoniseli 22:5) Nzambe abomaki Kola mpo ete alukaki na lolendo nyonso kozwa bonganga. (Exode 28:1; Mituya 16:4-11,31-35) Bongo, soki mayoki makasi to mateya ya kala ya mangomba mazimbisaki moto moko na kolya limpa mpe komela vinyo ya Ekaniseli na lolenge ya mabe? Moto yango asengeli kotika kolya mpe komela yango mpe kobondela mpo na kosenga lilimbisi na bopolo nyonso epai na Nzambe.—Nzembo 19:13.
Etali mpe biso
Ezali kosenga te ete moto alya limpa mpe amela vinyo ya Ekaniseli mpo na kozwa litomba na lisiko ya Yesu mpe bomoi ya seko na mabelé. Na ndakisa Biblia emonisi epai moko te ete mokolo mosusu bato na kobanga Nzambe lokola Abalayama, Sara, Yisaka Rebeka, Boaze, Luta mpe Davidi bakolya limpa mpe bakomela vinyo wana. Kasi, bango mpe baoyo nyonso bazali na mposa ya bomoi ezangi nsuka na mabelé basengeli kondimela Nzambe mpe Klisto, mpe ebongiseli ya Jéhovah, oyo ezali bongo mbeka ya Yesu. (Yoane 3:36; 14:1) Kokumisa kufa na Klisto mbula na mbula ezali kokundola biso mbeka wana monene.
Ntina ya mbeka na Yesu emonisamaki ntngo ntoma Yoane alobaki ete: “Nazali kokomela bino makambo oyo, mpo ete bosala lisumu te. Nde soko moto nani akosala lisumu, tozali na Molobeli epai na Tata, ye Yesu Klisto, Moyengebene. Ye azali mpe mbondi mpo na masumu na biso. Kasi bobele yango na biso te nde mpo na mokili mobimba.” (1 Yoane 2:1, 2) Baklisto bapikolami bakoki koloba ete Yesu “azali [mbeka na] mbondi mpo na masumu na [bango].” Kasi, azali mpe mbeka mpo na masumu ya mokili mobimba, azali kopesa bato na botosi likoki ya kozwa bomoi ya seko na mabelé oyo mosika te makobongwana Paradis.
Soki okoyangana na Ekaniseli ya liwa na Klisto, okozwa litomba na koyoka lisoló moko ya Biblia oyo ekotinda yo na kokanisa na mozindo. Bakokundwela: biso makambo minene oyo Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto basalaki mpo na biso. Okozwa mpe matomba mingi na elimo na koyangana elongo na baoyo bazali na limemya mozindo mpo na Nzambe mpe Klisto, mpe limemya mozindo mpo na mbeka ya lisiko ya Klisto. Libaki yango ekoki mbala mosusu kokolisa mposa na yo na kokoma moko na baoyo bakozwa litomba na ngolu na Nzambe, oyo ekomema na bomoi ya seko. Tozali kobyanga yo na esengo nyonso na koyangana elongo na ba Témoins de Jéhovah mokolo ya le 6 Avril 1993, nsima na kolala ya moi, mpo na kokanisa kufa na Yesu Klisto mpo ete Elambo ya Mpokwa ya Nkolo ekoki kozala na ntina mingi mpo na yo.