‘Tomisosola’ na eleko ya ekaniseli
‘Soko nde tokomisosola, tokosambisama te . . . boye ete tokweisama te.”—1 BAKOLINTI 11:31, 32 MN.
1. Likambo nini baklisto ya solo basengeli kokima mpenza, mpe mpo na nini?
EZALI na likambo moko oyo moklisto asengeli kokima mpenza: ezali bongo kokweisama na Jéhovah. Koboyama na “Mosambisi ya mabelé mobimba” ekoki komema biso na ‘kokweisama elongo na mokili’ mpe kobungisa lobiko, ezala ete tozali na elikya ya kozwa bomoi na likoló elongo na Klisto to ya kozala na bomoi ya seko kati na paradis na mabelé.—Genese 18:25; 1 Bakolinti 11:32.
2, 3. Likambo nini kati na yango tokoki kokweisama, mpe ntoma Paulo alobaki nini mpo na yango?
2 Kati na 1 Bakolinti mokapo 11, ntoma Paulo alobeli likambo moko oyo kati na yango tokoki kokweisama. Ya solo, azalaki koloba na baklisto bapakolami, kasi batoli na ye etali biso nyonso, mingi mpenza na eleko oyo ya mobu. Mpamba te, soki tomisosoli biso moko mpenza, yango ekoki kosalisa biso na kondimama na Nzambe, na esika ete tokweisama. Mpo na oyo etali molulu ya Ekaniseli na Nkolo, Paulo akomaki:
3 “Na butu wana ekabamaki ye, Nkolo Yesu akamati limpa mpe esili ye kotonda, abuki yango, elobi ete, Oyo elakisi nzoto na ngai mpo na bino. Bosalaka boye mpo na ekaniseli na ngai. Bobele bongo na kopo, nsima na kolia, alobi ete, Kopo oyo elakisi kondimana na sika kati na makila na ngai. Bosalaka boye mbala na mbala ekomela bino yango mpo na ekaniseli na ngai. Mpamba te mbula na mbula ekoliaka bino limpa oyo mpe ekomelaka bino kopo oyo, bozali kosala kufa na nkolo kino ekoya ye’’.—1 Bakolinti 11:23-26.a
4. Likambo nini ya monene ekokumisama le 10 Avril 1990 na mpokwa?
4 Le 10 Avril 1990, nsima na kolala na moi, ba Témoins de Jéhovah bakokumisa Ekaniseli, mpo na kokanisa kufa na Klisto. Na libaku yango, bakosangana mingi kati na bango kati na masangá; yango ekopesa nzela epai na bato oyo naino bakomi Batemwe te bakoka koyangana na likita oyo. Likita yango ekoleka ndenge nini? Diskur moko ekopesama, mpe, nsima na libondeli, bakolekisa limpa epai na bayangani Libondeli mosusu ekosalema liboso ya kolekisa kopo ya vinyo. Lokola molulu yango ekozalaka na mibeko ebele ebele te, motuya ya mampa to ya bakopo mpe lolenge oyo ekotambwisama epai na bato ezali kotalela ezalela ya esika oyo bofandaka, Likambo ya ntina, ezali ete limpa mpe kopo ya vinyo elekisama epai na bayangani nyonso, ata soki mingi kati na bango bakolekisa yango mpamba kozanga kolia mpe komela. Kasi ezali limpa mpe vinyo ya lolenge nini, mpe ezali komonisa nini? Lisusu, tosengeli kokanisa na likambo nini liboso mpo ete tomisosola?
“Oyo elakisi nzoto na ngai”
5, 6. (a) Yesu asalaki nini na limpa? (b) Ezalaki limpa ya lolenge nini asalelaki?
5 Totangaki oyo ntoma Paulo “azwaki epai na Nkolo” mpo na Ekaniseli. Tozali mpe na masolo ya bakomi misato ya Evanzile, kati na bango moko azalaki wana ntango Yesu abandisaki molulu yango. (1 Bakolinti 11:23; Matai 26:26-29; Malako 14:22-25; Luka 22:19, 20). Masolo oyo malobi ete Yesu akamataki liboso limpa, mpe, nsima ya kosala libondeli, abukaki yango mpe akabolelaki bango. Ezalaki limpa ya lolenge nini? Bobele bongo, limpa ya lolenge nini tozali kosalela na mikolo na biso? Ezali komonisa nini?
6 Liboso na Yesu ezalaki na bilei oyo basalelaki mpo na elambo na Paque ya Bayuda, biloko lokola limpa ezangi levire, oyo Moise abiangaki ete “[mikatel ezangi mfulu, [mikatel na bolozi”. (Deteronome 16:3; Exode 12:8.) Limpa yango esalamaki na farine ya blé, kozanga kobakisa levire, mongwa to eloko mosusu ya koyeisa yango elengi. Lokola ezangaki levire (matstsah na liebele), limpa oyo ezalaki epapala mpe ekokaki kobukana noki; esengaki kobuka yango bitenibiteni mpo na kolya yango.—Malako 6:41; 8:6; Misala 27:35.
7. Ba Témoins de Jéhovah bazali kosalela limpa ya lolenge nini na Ekaniseli?
7 Lokola Yesu asalelaki limpa ezangi mfulu na ntango ya Elambo na Nkolo, ba Témoins de Jéhovah bazali kosala bobele bongo na mikolo na biso. Limpa oyo ebiangami azyme oyo Bayuda basalelaka ebongi kosalelama bobele soki basangisi biloko mosusu na kati te, lokola malt, matungulu to maki (Mampa oyo ebiangami azyme oyo masanganisami na biloko motindo oyo makokani te na “limpa na bolozi”.) To bankulutu na lisangá bakoki kosenga epai na ndeko moko asala limpa oyo ezali na levire te oyo esalami bobele na farine ya blé mpe na mai. Soki farine ya blé ezali te, farine ya loso to ya masango ekoki kosalelama Nsíma ya kosangisa farine yango na mai okozwa páte moko ya pepele, okolalisa yango likolo ya mwa eloko mpo ezala papala mpenza, nsima okolamba yango na kikalungu oyo osili kopakola yango mwa mafuta moke. oyo ebiangami azyme oyo Bayuda basalelaka ebongi kosalelama bobele soki basangisi biloko mosusu na kati te, lokola malt, matungulu to maki (Mampa oyo ebiangami azyme oyo masanganisami na biloko motindo oyo makokani te na “limpa na bolozi”.) To bankulutu na lisangá bakoki kosenga epai na ndeko moko asala limpa oyo ezali na levire te oyo esalami bobele na farine ya blé mpe na mai. Soki farine ya blé ezali te, farine ya loso to ya masango ekoki kosalelama. Nsima ya kosangisa farine yango na mai okozwa pate moko ya pepele, okolalisa yango likolo ya mwa eloko mpo ezala papala mpenza, nsima okolamba yango na kikalungu oyo osili kopakola yango mwa mafuta moke.
8. Mpo na nini limpa oyo ezangi levire ezali elilingi ebongi, mpe kolia yango elimboli nini (Baebele 10:5-7; 1 Petelo 4:1)?
8 Limpa motindo oyo ebongi mpenza mpamba te ezali na levire te, eloko oyo Biblia ezali kosalela lokola elilingi na libebi to masumu. Ntoma Paulo apesaki toli oyo mpo na mobali moko na etamboli mabe oyo azalaki mosangani na lisangá moko: ‘Mfulu (levire) moke ekofulisa mampa mobimba. Bolongola mfulu oyo na kala ete bozala mampa mazangi mfulu. Mpamba te Mpate na Elekeli (Paque) na biso esili kotombwa mbeka, ye Klisto. Tokumisa elambo na mfulu na kala te, yango mayele mabe mpe kilikili, kasi na mampa mazangi mfulu, yango mampa na sembo mpe na solo.’ (1 Bakolinti 5:6-8; tala Matai 13:33; 16:6, 12). Limpa ezangi levire ezali elilingi ebongi ya nzoto ya bomoto ya Yesu, ye oyo azalaki “mosembwi, na mayele mabe te, na litono te, oyo atangolami na bato na masumu”. (Baebele 7:26) Yesu azalaki na nzoto ya bomoto ya kokoka ntango alobaki epai na bantoma na ye ete: ‘Bokamata, bolia, [limpa oyol ezali elilingi na nzoto na ngai.’ (Matai 26:26, Nouveau Testament, A. Decoppet, note na nse ya lokasa). Na koliaka limpa yango, moto azali komonisa ete andimi matomba na mbeka na Yesu mpo na ye. Kasi makambo mosusu mazali.
Vinyo mpe ndimbola na yango
9. Elembo nini mosusu Yesu atindaki ete tosalela?
9 Yesu asalelaki elilingi mosusu: ‘Akamataki mpe kopo mpe esili ye kotonda, apesi epai na bango, na kolobaka ete: Bomela na yango bino nyonso; mpamba te oyo elimboli makila na ngai, makila na kondimana masopameli bato mingi mpo na kolimbisa masumu.’ (Matai 26:27, 28 Decoppet, note na nse ya lokasa). Nini ezalaki kati na kopo oyo epesamaki na bantoma, oyo bango nyonso bamelaki, mpe yango elimboli nini mpo na biso baoyo tozali kosala milende mpo na komisosola?
10. Ndenge nini vinyo ekotisamaki na Elekeli na Bayuda?
10 Ntango Moise apesaki malako mpo na lolenge ya kokumisa Elekeli (Paque) ya liboso, alobaki te mpo na vinyo. Balimboli mingi na makomi bakanisi ete vinyo ebandaki kosalelama na Paque bobele na nsima mpenza, ekoki kozala na ekeke ya mibale liboso na ntango na biso.b Ata yango ezala boni, ezali ete bamesanaki komela vinyo na boumeli na elambo yango na ekeke ya liboso na ntango na biso, mpe Yesu aboyaki likambo yango te. Asalelaki vinyo ya Paque ntango abandisaki Ekaniseli.
11. Vinyo ya lolenge nini esengeli kosalelama mpo na kokumisa Elambo na Nkolo?
11 Lokola Elekeli na Bayuda esalamaki mikolo mingi nsima na kobuka miwiti, elakisi ete Yesu asalelaki mai na mbuma na miwiti te, kasi vinyo ya motane, oyo ebongaki mpenza mpo na komonisa makila na ye. (Tala Emoniseli 14:20) Makila na Klisto ezalaki na mposa te ete babakisa na yango eloko mosusu te; na bongo, esengeli kosalela vinyo oyo esangisami na eloko mosusu te; ebongi te kosalela vinyo oyo babakisi biloko mpo na kolangwisa (vinyo lokola porto, xéres to muscat) ebongi mpe te kosalela vinyo oyo babakisi biloko mpo ebimisa nsolo kitoko (lokola vermouth to vinyo oyo elamusaka mposa ya kolia). Kasi, tosengeli komitungisa koleka ndelo te mpo na koyeba lolenge nini vinyo oyo basalaki yango, koyeba soko batiaki mwa sukali ntango elingi koya makasi mpo na kobongola elengi na yango to makasi ya alcool, to batiaki mongwa mpo ebeba te’.c Na masangá mingi bandeko bazali kosalela vinyo ya motane oyo bazali koteka na ba magasin (lokola vinyo chianti, bourgogne, beaujolais to bordeaux) to lisusu vinyo ya motane oyo basalaki na ndako. Vinyo na limpa ezali bobele bilembo, to bililingi; na yango, oyo etikali ekoki komemama mpe kolia yango to komela yango nsima lokola esalemaka mpo na bilei nyonso to masanga nyonso.
12. Lokola Yesu alimbolaki yango, vinyo ezali komonisa nini?
12 Lokola Yesu alobelaki mpo na makila na ye na butu yango na Elekeli ekokaki kopesa likanisi ya makila ya bana na mpate na Ezipito. Kasi tosimba malamu ete asalelaki bokokani mosusu na kolobaka ete: “Kopo oyo emonisi kondimana na sika na makila na ngai, masengeli kosopana mpo na bino.” (Luka 22:20) Liboso, Nzambe asalaki kondimana elongo na libota na Yisraele na mosuni, kondimana oyo ebandisamaki na makila ya banyama oyo bapesamaki mbeka. Bokokani ezalaki kati ya makila na mbeka oyo mpe makila na Yesu. Nyonso mibale esalelamaki ntango Nzambe abandisaki kondimana oyo asalaki elongo na libota na basaleli na ye. (Exode 24:3-8; Baebele 9:17-20). Engebene kondimana na Mibeko, Yisraele na mosuni bazalaki na elikya ya kozala libota moko ya bakonzi—banganga (Exode 19:5, 6) Nzokande, lokola Bayisraele babatelaki kondimana na ye te, Jéhovah alobaki ete “kondimana na sika” ekozwa esika na “kondimana na liboso”. (Baebele 9:1, 15; Yilimia 31:31-34) Kopo na vinyo oyo Yesu alekisaki epai na bantoma na ye basembwi emonisaki kondimana yango ya sika.
13, 14. (a) Kokotisama na kondimana na sika elimboli nini? (b) Moto oyo alei limpa mpe ameli vinyo azali komonisa nini?
13 Baklisto oyo bakotisamaki kati na kondimana oyo na sika bakomaki libota moko ya elimo ya bakonzi-banganga. (Bagalatia 6:16) Ntoma Petelo akomaki ete: “Bino bozali ‘libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulee, bato baponami, ete bayebisa malamu na oyo abiangi bino kobima na molili kokɔta na moi na ye na kokamwisa.” (1 Petelo 2:9). Tososoli polele lobiko oyo epesami na bango: bomoi na likolo lokola bakonzi elongo na Yesu. Ezali yango endimisami na Emoniseli 20:6 na maloba oyo: “Baoyo babimi na lisekwa na liboso bazali na esengo, mpe bazali basantu; . . . bakozala banganga na Nzambe mpe na Klisto, bakozala bakonzi esika moko na ye mbula nkoto.”
14 Nsima na kopesa epai na bantoma na ye limpa mpe vinyo lokola bilembo, Yesu alobaki na bango ete ‘bakolia mpe bakomela na mesa na ye kati na bokonzi na ye, mpe bakofanda na kiti na bokonzi mpo na kosambisa mabota zomi na mibale na Yisraele’. (Luka 22:28-30.) Na yango, kolia limpa mpe komela vinyo na ntango na Ekaniseli ezali na ndimbola mingi koleka bobele kondima mbeka na Yesu. Moklisto nyonso asengeli kondima lisiko mpe kozala na kondima soki alingi kozwa bomoi ya seko ezala na likoló to na mabelé. (Matai 20:28; Yoane 6:51) Kasi ye oyo alei limpa mpe ameli vinyo amonisi ete ekokisami na kondimana na sika, ete aponami mpo na kozala elongo na Yesu kati na Bokonzi na ye.
Tosengeli komonisa bososoli na eleko na Ekaniseli
15. Ndenge nini Yesu apesaki elikya ya sika epai na basaleli ma Nzambe?
15 Lokola lisolo ya liboso elimbolaki yango, basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala liboso na eleko ya boklisto bazalaki na elikya ya kokende na likolo te. Bazalaki nde na elikya ya kozwa bomoi ya seko na mabelé, efandelo ya bato uta ebundeli. Yesu Klisto azalaki moto ya liboso oyo asekwisamaki lokola elimo, moto ya liboso oyo amataki na likoló. (Baefese 1:20-22; 1 Petelo 3:18, 22) Ezali yango ntoma Paulo endimisi ntango akomaki ete: “Tozali na molende ete toingela na esika mosantu mpo na makila na Yesu na nzela na sika mpe na bomoi oyo ye asili kozipwela biso.” (Baebele 10:19, 20). Nani akokaki kolanda Yesu nsima wana afungolaki nzela yango?
16. Eloko nini ezali kozela baoyo bazali kolia limpa mpe komela vinyo?
16 Na butu oyo abandisaki Elambo na Nkolo, Yesu alobaki epai na bantoma na ye na sembo ete akokende kobongisela bango esika na likoló. (Yoane 14:2, 3) Kasi alobaki lisusu ete baoyo bakolia limpa mpe bakomela vinyo bakozala kati na Bokonzi na ye mpe bakofanda na kiti na bokonzi mpo na kosambisa. Libaku malamu oyo epesamaki bobele na bantoma? Te, mpamba te ntoma Yoane ayokaki na nsima ete baklisto mosusu bakolonga, mpe ‘bakofanda na Yesu elongo na kiti na bokonzi na ye’. (Emoniseli 3:21; 5:10.) Yoane ayokaki lisusu ete motuya mobimba ya baklisto oyo “basombami na mabelé” ekozala bato 144 000. (Emoniseli 14:1-3) Lokola ezali bobele etuluku moke ya bato, “etonga moke” na kotalela motuya monene ya bato nyonso basambelaki Nzambe na boumeli ya bikeke, ezali ntina na komisosola malamumalamu na eleko na Ekaniseli.—Luka 12:32.
17, 18. (a) Baklisto mosusu na Kolinti bazalaki na ezaleli nini? (b) Mpo na nini lokoso na bango na kolia mpe komela ezalaki mabe mingi? (Baebele 10:28-31)
17 Ntoma Paulo alobeli mpo na likambo oyo kati na mokanda na ye epai na Bakolinti na ntango oyo bantoma mosusu bazalaki naino na bomoi mpe ntango oyo Nzambe azalaki kobianga baklisto mpo ete “bazala basantu”. Paulo alobaki ete baklisto ya Kolinti baoyo basengelaki kolia limpa mpe komela vinyo bazalaki na ezaleli moko ya mabe. Liboso na koyangana, bamosusu bazalaki kolia to komela na kolekisa ndelo, ntina wana bazalaki na mpongi na miso mpe bazalaki kooka eloko te. Na bongo, bakokaki ‘kososola nzoto’ te, nzoto ya mosuni ya Yesu oyo emonisamaki na limpa. Ezalaki mabe mingi? Ee, mpamba te na koliaka mpe komelaka na motindo mobongi te, bazalaki ‘komikweisa na ntina na nzoto mpe makila na Nkolo’. Nzokande, soki bakokaki kolamuka na makanisi mpe na elimo, mbele ‘bakokaki komisosola mpe mbele bakokaki kosambisama te’.—1 Bakolinti 1:2: 11:20-22, 27-31.
18 Eloko nini baklisto basengelaki kososola, mpe ndenge nini? Liboso mpenza, basengelaki komindimisa na motema na bango mpe elimo na bango ete babiangamaki kozala kati na ba 144 000 basengeli na bomoi na likoló, Ndenge nini basosolaki yango, mpe na mikolo na biso bato mingi basengeli kondima ete bazali basangani na etonga moke oyo Nzambe aponaki uta eleko na bantoma?
19. Mitango mizwamaki na Ekaniseli na 1989 emonisi biso nini?
19 Na solo mpenza, ezali bobele motuya moke na baklisto ya solo nde bazali kososola likambo yango mpo na bango. Ntango na molulu na Elambo na Nkolo na 1989, bato koleka 9 479 000 bayanganaki kati na masangá ya ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba. Na motuya oyo, penepene na bato 8 700 nde bamonisaki ete bazali na elikya ya ‘kobikisama mpo na bokonzi na likoló’. (2 Timoté 4:18.) Motuya moleki monene na bato—ee, bamilio na baklisto mosusu basembwi oyo bapambolami na Nzambe baoyo bayanganaki basosolaki ete elikya na bango ya solo ezali ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé.
20. Ndenge nini ba 144 000 bazali kososola libiangami oyo epesameli bango? (1 Yoane 2:27)
20 Na Pantekote ya mobu 33, Nzambe abandaki kopona bato 144 000 oyo babiangami kozala na bomoi na likoló lokola elikya yango ezalaki ya sika (basaleli na Nzambe na ntango ya kala liboso na boklisto bazalaki na elikya yango te), ndenge nini baponami bakokaki koyeba sikisiki ete elikya yango epesamelaki bango? Basosolaki yango na kozwaka litatoli na elimo santu na Nzambe. Elingi koloba te ete bazali komona elimo na miso na bango (mpamba te elimo ezali moto te), to ete bazali komona emononeli moko ya elimo kolobaka na bango; bazali mpe koyoka mingongo te kouta na bifandelo ya elimo. Ntoma Paulo azali kolimbola ete: “Elimo yango moko ekosangana na elimo na biso kotatola ete tozali bana na Nzambe . . . mpe tozali basangoli na libula; tozali basangoli na libula na Nzambe, kasi basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo, soko tokoyokaka mpasi elongo ete tozwa nkembo esika moko na ye.”—Baloma 8:16, 17.
20 Litatoli yango, to kososola malamu, ezali kopesa etambwiseli ya sika na makanisi na bango mpe elikya na bango. Bazali bobele bato mpe bazali kosepela na bolamu oyo ezali kozwama na biloko oyo Jéhovah azalisaki awa na mabelé, kasi eloko oyo ezali na ntina mingi na bomoi na bango, ezali ete basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo. Bazwaki ekateli yango na kopusama na mayoki na bango te. Bazali bato lokola bato nyonso, baoyo bazali na bokatikati na makanisi na bango mpe na etamboli na bango. Nzokande, lokola babulisami na elimo na Nzambe, bandimisami makasi mpo na libiangami na bango, mpe bazali na ntembe te kati na mitema na bango mpo na yango. Bakangi ntina ete bakozwa lobiko na bango na likoló soko bakomimonisa sembo. (2 Batesaloniki 2:13; 2 Timoté 2:10-12). Lokola bazali kokanga ntina malamu na oyo mbeka na Yesu elimboli mpo na bango mpe bazali kososola ete bapakolami na elimo, na bopolo nyonso bazali kolia limpa mpe komela vinyo na ntango na Ekaniseli.
21. (a) Ndenge nini baklisto bapakolami bazali koyeba ete bazali na elikya ya likoló? (1 Bakolinti 10:15-17) (b) Baklisto bapakolami bazali bato ya lolenge nini, mpe na kosalaka nini nde bazali kotatola mpo na elikya na bango na bopolo?
21 Motuya monene koleka na baoyo, kotosaka etinda yango, bakoyangana le 10 Avril, bazali na elikya oyo te, mpamba te Nzambe apakolaki bango na elimo te mpo na kobianga bango na bomoi na likoló. Lokola tolobaki yango, Nzambe abandaki kopona ba 144 000 na mikolo ya bantoma. Kasi nsima wana libiangami yango esukaki, ebongi kokanisa ete bato mosusu oyo bazali koya kosambela Nzambe bazali na elikya oyo Moise, David, Yoane Mobatisi mpe basembwi nyonso oyo bakufaki bazalaki na yango liboso ete Yesu afungola nzela na bomoi na likoló. Na bongo bamilió na baklisto na sembo mpe na molende bazali kolia limpa te mpe komela vinyo te na ntango na Ekaniseli. Bazali kososola lolenge bango bazali liboso na Nzambe, na ndimbola ete bazali kokanga ntina mpenza nini ezali elikya na bango. Bazali kozwa matomba malamu na nzela na makila mpe na nzoto na Yesu na kolimbisama na masumu na bango, nsima bakozwa bomoi ya seko na mabelé.—1 Petelo 1:19; 2:24; Emoniseli 7:9, 15.
22. Mingi na baoyo bazali koyangana na Elambo na Nkolo bazali kososola nini?
22 Na bongo tosepela na likanisi ya koyangana na Ekaniseli, oyo ekokumisama le 10 Avril. Na libaku yango, tosengeli komonisa bososoli, kasi mpe ekozala ntango na esengo: esengo mpo na motuya moke na baoyo bazali na elikya na likoló, baoyo na ndenge esengeli mpe na botosi, bakolia limpa mpe bakomela vinyo. (Emoniseli 19:7); esengo mpe na bamilió na baklisto baoyo bakozala wana na mpokwa yango mpo na kotala mpe koyekola, mpe bazali kolikia komikundola seko na mabelé molulu oyo na ntina.—Yoane 3:29.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Na butu wana balingaki kokaba ye na maboko na banguna Mokonzi Yesu akamati limpa atondi Nzambe, abuki limpa mpe alobi ete: ‘Oyo ezali nzoto na ngai ebomami mpo na bino. Bosalaka boye mpo na kokanisa ngai.’ Bobele bongo nsima na kolia, akamati kopo mpe alobi: ‘Kopo oyo ezali boyokani ya sika kati na makila na ngai. Mbala nyonso, ekomela bino yango, bosalaka bongo mpo na kokanisa ngai.”—Le Nouveau Testament de P. de Beaumont.
b Molimboli moko na makomi alimboli mpo na kokoma na vinyo na Paque boye ete: “[Elekelil esengelaki kozala lisusu te likita moko monene ya mbula na mbula mpo na koyanganisa mibali; ekokaki kozala sikawa libaku malamu ya kosepela na kati ya libota, mpe bongo vinyo ezwaki esika na kotalela momeseno mobongi.”La Paque hébraïque Des origines a l’an 70 (angl.), de J. Segal.
c Uta ntango ya kalakala bazali kosalela mongwa, eteni ya mpembe na maki to biloko mosusu mpo na kosala ete vinyo ezala mpeto, to mpo na kongalisa yango to kopesa yango elengi ya nsolo kitoko. Baloma bazalaki kosalela uta soufre mpo na koboma microbe ntango bazalaki kosala vinyo.
Bozongeli
◻ Mpo na nini balekisaka limpa ezangi levire kati na bayangani na ntango na Ekaniseli, mpe limpa yango ezali elilingi ya nini?
◻ Vinyo ya lolenge nini ekolekisama kati na bayangani na ntango na Ekaniseli, mpe yango ezali komonisa nini?
◻ Mpo na nini tosengeli komisosola na eleko na Ekaniseli?
◻ Mpo na nini likanisi ya koyangana na Ekaniseli ezali kopesa yo esengo?
23. Mpo na nini Ekaniseli ekozala molulu na esengo? (Tala 2 Ntango 30:21)