Ndenge nini kokanisa bolei ya mpokwa ya Nkolo?
NTOMA Paulo akomaki makambo oyo ezali kosalisa biso tóyeba ndenge malamu ya kokanisa Bolei ya Mpokwa ya Nkolo; akomaki boye: “Nazwaki epai ya Nkolo likambo oyo napesaki mpe bino, ete Nkolo Yesu na butu oyo asengelaki kokabama akamataki limpa mpe, nsima ya kopesa matɔndi, abukaki yango mpe alobaki ete: ‘Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ezali mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.’ Asalaki lisusu mpe ndenge moko mpo na kɔpɔ, nsima wana asilisaki bolei ya mpokwa, kolobáká ete: ‘Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai. Bókoba kosalaka boye, mbala nyonso oyo bokomɛla yango, mpo na kokanisa ngai.’ Mpo mbala nyonso oyo bozali kolya limpa oyo mpe komɛla kɔpɔ oyo, bozali kokoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya.”—1 Bakolinti 11:23-26.
Ndenge Paulo alobi yango, Yesu abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo ‘na butu oyo [Yuda Mokeliota] akabaki [Yesu]’ epai ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda oyo basɛngisaki Baloma ete bákakisa Klisto na nzete. Balyaki bilei yango mokolo ya minei, 31 Marsi 33 ya ntango na biso (T.B.), na butu. Yesu akufaki na nzete ya mpasi mokolo ya mitano, 1 Aprili, na nsima ya midi. Lokola Bayuda bazalaki kotánga mokolo moko banda na mpokwa moko tii na mpokwa ya mokolo oyo elandi, elingi koloba ete mokolo oyo balyaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo ezali kaka mokolo oyo Yesu Klisto akufaki, mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B.
Baoyo balyaki limpa mpe bamɛlaki vinyo basengelaki ‘kokoba kosala yango’ mpo na kokanisa Yesu. Libongoli mosusu ya Biblia elobi ete Yesu alobaki boye: “Bósala boye lokola ekaniseli na ngai.” (1 Bakolinti 11:24, Bible de Jérusalem) Bolei ya Mpokwa ya Nkolo ebengamaka mpe Ekaniseli ya liwa ya Klisto.
Mpo na nini tosengeli kokanisaka liwa ya Yesu?
Mpo na kozwa eyano tosengeli koyeba ntina oyo Yesu akufaki. Yesu akufaki lokola moto oyo aleki na molende mpo na bokonzi ya Yehova. Na ndenge yango, amonisaki ete Satana azali moto ya lokuta lokola alobaki ete bato basalelaka Nzambe se mpo na matomba na bango. (Yobo 2:1-5; Masese 27:11) Lisusu, lokola Yesu akufaki moto ya kokoka, ‘apesaki molimo na ye lisiko mpo na esika ya bato mingi.’ (Matai 20:28) Ntango Adama asalaki lisumu, abungisaki bomoi ya kokoka mpe makambo nyonso ya malamu oyo moto oyo azali na bomoi ya ndenge wana akoki kozala na yango. Kasi, “Nzambe alingaki mokili [elingi koloba bato] mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) “Lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.”—Baloma 6:23.
Liwa ya Yesu Klisto ezali komonisa bolingo ya bato mibale, oyo ezali mpe bolingo eleki monene oyo emonaná: bolingo monene oyo Yehova amoniselaki bato na ndenge apesaki Mwana na ye, mpe bolingo oyo Yesu amonisaki bato na ndenge andimaki kokufa mpo na bango. Ekaniseli ya liwa ya Yesu ekumisaka bolingo ya bato wana mibale. Lokola bamoniselaki biso bolingo yango, ebongi mpenza tózala na botɔndi mpo na yango. Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kozanga te mokolo ya kokanisa Bolei ya Mpokwa ya Nkolo.
Ndimbola ya limpa mpe ya vinyo
Ntango Yesu abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo, asalelaki limpa mpe kɔpɔ ya vinyo lokola bililingi. Azwaki limpa mpe “nsima ya kopesa matɔndi, abukaki yango mpe alobaki ete: ‘[Limpa] oyo elakisi nzoto na ngai oyo ezali mpo na bino.’” (1 Bakolinti 11:24) Mpo na kokabola limpa yango na bato nyonso bálya yango, esengelaki kobuka yango mpamba te ekoki mpenza kozala ete ezalaki limpa ya mwa makasi oyo bazalaki kosala na farine basangisi na mai, kasi batyá yango levire te. Na Biblia, levire ezali elilingi ya lisumu. (Matai 16:11, 12; 1 Bakolinti 5:6, 7) Yesu azalaki na masumu te. Yango wana, nzoto na ye ya kokoka ebongaki mpo na kopesa yango mbeka mpo na kobikisa bato. (1 Yoane 2:1, 2) Yango wana, ebongaki mpenza ete limpa oyo ezalaki elilingi ya nzoto ezangi masumu ya Klisto ezala na levire te!
Lisusu, Yesu azongisaki matɔndi mpo na kɔpɔ ya vinyo motane oyo basangisi na eloko mosusu te mpe alobaki boye: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai.” (1 Bakolinti 11:25) Vinyo motane ezalaki elilingi ya makila ya Yesu. Se ndenge makila ya bangɔmbɛ mpe bantaba oyo bapesaki mbeka esimbaki kondimana ya Mibeko oyo Nzambe asalaki na ekólo Yisalaele na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), makila ya Yesu oyo esopanaki mokolo oyo akufaki esimbaki kondimana ya sika.
Banani bakoki kolya limpa mpe komɛla vinyo?
Mpo na koyeba banani oyo babongi kolya limpa mpe komɛla vinyo ya Ekaniseli, tosengeli koyeba ntina ya kondimana yango mpe esalemi kati na banani. Biblia elobi boye: “[Yehova] alobi ete, Talá mikolo ekoya wana nakokata kondimana ya sika na ndako ya Yisalaele mpe na ndako ya Yuda, . . . Nakotya mobeko na ngai na kati na bango, nakokoma yango na mitema na bango; nakozala Nzambe na bango mpe bango bakozala bato na ngai. . . . Nakolimbisa bokesene na bango, nakokanisa mpe mabe na bango lisusu te.”—Yilimia 31:31-34.
Kondimana ya sika epesi bato nzela ya kokóma na boyokani moko ya ndenge mosusu na Yehova Nzambe. Na nzela ya kondimana yango, etuluku moko ya bato bakómi bato na ye mpe ye akómi Nzambe na bango. Mibeko ya Yehova ekomami na mitema na bango, mpe Nzambe akoki kosala kondimana yango ata na bato oyo bakatami ngɛnga te mpe, na mosuni, bazali Bayuda te. (Baloma 2:19) Luka akomaki ete Nzambe azalaki na mokano ya ‘kobalola likebi na ye epai ya bikólo mosusu mpo na kobimisa uta na bango ekólo moko mpo na nkombo na ye.’ (Misala 15:14) Mokapo ya 1 Petelo 2:10 elobi ete bato yango ‘bazalaki ekólo na ye te, kasi sikoyo bazali ekólo ya Nzambe.’ Biblia ebengi bango “Yisalaele ya Nzambe,” elingi koloba, Yisalaele ya elimo. (Bagalatia 6:16; 2 Bakolinti 1:21) Na bongo, kondimana ya sika ezali kondimana oyo Yehova Nzambe asali na Yisalaele ya elimo.
Yesu mpe asalaki kondimana mosusu na bayekoli na ye na butu ya nsuka oyo alekisaki na bango. Alobaki na bango boye: “Nazali kosala kondimana elongo na bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi moko.” (Luka 22:29) Yango ezali kondimana ya Bokonzi. Bato nyonso oyo asali na bango kondimana wana bazali 144 000. Nsima ya lisekwa na bango mpo na kozala na bomoi na likoló, bakoyangela elongo na Klisto lokola bakonzi mpe banganga-nzambe. (Emoniseli 5:9, 10; 14:1-4) Na bongo, bato oyo Yehova Nzambe asali na bango kondimana ya sika basali mpe kondimana ya Bokonzi elongo na Yesu Klisto. Kaka bango nde babongi kolya limpa mpe komɛla vinyo na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo.
Ndenge nini bato oyo babongi kolya limpa na Ekaniseli bayebaka ete Nzambe asali na bango kondimana mpe bakoyangela elongo na Klisto? Paulo alimbolaki boye: “Elimo [santu] yango moko epesaka litatoli elongo na elimo [to makanisi] na biso ete tozali bana ya Nzambe. Boye, soki tozali bana, tozali mpe bazwi-ya-libula: ɛɛ bazwi-ya-libula ya Nzambe, kasi bazwi-ya-libula elongo na Klisto, soki tomoni mpasi elongo na ye mpo tózwa mpe nkembo elongo.”—Baloma 8:16, 17.
Nzambe apakolaka bato oyo bakoyangela na Klisto na elimo santu, to nguya na ye oyo esalaka mosala. Yango endimisaka bango ete bakoyangela na kati ya Bokonzi. Elimo yango epesaka bapakolami elikya ya kozala na bomoi na likoló. Bamonaka ete makambo oyo Biblia elobi mpo na bomoi na likoló etaleli bango. Lisusu, bandimaka kotika makambo nyonso ya bomoi awa na mabelé, ata mpe bomoi awa na mabelé mpe bandeko mpe baninga na bango. Atako baklisto oyo bapakolami na elimo bayebaka ete bomoi na Paladiso awa na mabelé ekozala malamu mingi, bamonaka ete bazali na elikya wana te. (Luka 23:43) Ezali te mpo na mateya ya lokuta oyo bateyaki bango liboso, kasi ezali elimo santu ya Nzambe nde esalaka kati na bango; bazalaka na elikya makasi ya kozala na bomoi na likoló mpe na bongo, balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli.
Ezali boni soki moto moko azali naino komituna soki mpenza Nzambe asali na ye kondimana ya sika mpe soki Klisto asali na ye kondimana mpo na Bokonzi; soki azali na litatoli ya elimo ya Nzambe te ete akoyangela elongo na Klisto? Ekozala mabe moto yango alya limpa mpe amɛla vinyo. Nzambe akosepela te na moto oyo Nzambe apesi ye elikya ya bomoi na likoló te mpo na kozala mokonzi mpe nganga-nzambe, kasi ye azali komonisa ete azali na elikya wana.—Baloma 9:16; Emoniseli 22:5.
Esengeli kokanisaka yango mbala boni?
Esengeli kokanisaka liwa ya Yesu pɔsɔ na pɔsɔ to mpe mokolo na mokolo? Klisto abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo mokolo ya Elekeli; babomaki ye mpe kaka mokolo wana. Bayuda bazalaki kosala fɛti ya Elekeli mbala moko na mbula, na mokolo ya 14 Nisana, mpo na kokanisa mokolo oyo babimaki na boombo na Ezipito. (Exode 12:6, 14; Levitike 23:5) Na bongo, tosengeli kokanisaka liwa ya “Klisto elekeli na biso” kaka mbala moko na mbula, kasi pɔsɔ na pɔsɔ to mokolo na mokolo te. (1 Bakolinti 5:7) Ntango baklisto balyaka Bolei ya Mpokwa ya Nkolo, balandaka ndenge Yesu asalaki ntango abandisaki yango.
Boye, Paulo alingaki koloba nini na maloba oyo: “Mpo mbala nyonso oyo bozali kolya limpa oyo mpe komɛla kɔpɔ oyo, bozali kokoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya”? (1 Bakolinti 11:26) Na vɛrsɛ yango, Paulo asalelaki liloba oyo elimboli “ntango nyonso oyo” to “ntango nyonso.” Na bongo, azalaki koloba ete ntango nyonso oyo baklisto bakolya limpa mpe bakomɛla vinyo, bakosakola kondima na bango na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa biso.
Bapakolami basengelaki kokanisaka liwa ya Klisto “tii ntango akoya.” Ekaniseli yango esengelaki kokoba kosalema tii ntango Yesu akoya mpo na kozwa bayekoli na ye bapakolami na nzela ya lisekwa ya elimo mpo akende na bango na likoló na ntango ya “kozala” na ye. (1 Batesaloniki 4:14-17) Likanisi yango eyokani na maloba oyo Klisto ayebisaki bayekoli na ye ya sembo 11 ete: “Soki nakei mpe nabongiseli bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai mpenza, mpo esika ngai nazali bino mpe bózala wana.”—Yoane 14:3.
Ekaniseli ezali na ntina nini mpo na yo?
Moto asengeli kaka kolya limpa mpe komɛla vinyo mpo mbeka ya Yesu ezipa masumu na ye mpe azwa bomoi ya seko awa na mabelé? Te. Esika moko te Biblia elobi ete ntango bakosekwa awa na mabelé, basaleli ya Nzambe lokola Noa, Abalayama, Sala, Yisaka, Lebeka, Yozefe, Moize, mpe Davidi bakolya limpa mpe bakomɛla vinyo. Kasi, bato yango mpe bato mosusu oyo bazali na mposa ya bomoi ya seko na mabelé bakomonisa ete bazali na kondima epai ya Nzambe mpe Klisto mpe ebongiseli ya mbeka ya Yesu oyo Yehova asali mpo na kobikisa biso. (Yoane 3:36; 14:1) Mpo okoka kozwa bomoi ya seko, yo mpe osengeli komonisa kondima ya ndenge wana. Kozala na yo na ekaniseli ya liwa ya Klisto ekosalisa yo okanisa lisusu mbeka monene wana mpe yango ekobakisa botɔndi na yo mpo na mbeka yango.
Ntoma Yoane amonisaki malamu ntina ya mbeka ya Yesu ntango alobaki boye: “Nazali kokomela bino [baninga na ngai bapakolami] makambo oyo mpo bósala lisumu te. Nzokande, soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Klisto, moyengebene. Mpe ye azali mbeka ya mbɔndi mpo na masumu na biso, nzokande mpo na oyo ya biso kaka te kasi mpe mpo na oyo ya mokili mobimba.” (1 Yoane 2:1, 2) Bapakolami bakoki koloba ete na lisalisi ya mbeka ya Yesu, Nzambe azali kolimbisa masumu na bango. Kasi, mbeka yango ezali mpe mpo na masumu ya mokili mobimba, ezali kopesa bato nyonso ya botosi likoki ya kozwa bomoi ya seko!
Okozala na Ekaniseli ya liwa ya Yesu mokolo ya 4 Aprili 2004? Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bakosala Ekaniseli yango na bandako na bango ya makita. Soki yo mpe osangani na bango, okoyoka lisukulu moko ya ntina mingi. Lisukulu yango ekomonisa makambo minene oyo Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto basali mpo na biso. Okozwa mpe litomba na elimo na kosangana elongo na bato oyo bazali na limemya mingi mpo na Nzambe ná Klisto, mpe mpo na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa biso. Na libaku yango, okoki kolendisa mposa oyo ozali na yango ete Nzambe amonisela yo boboto monene na ye oyo ezali komema na bomoi ya seko. Kotika te eloko moko ezangisa yo yango. Kozanga te na ekaniseli oyo ezali kopesa nkembo na Yehova Nzambe, Tata na biso ya likoló, mpe ezali kosepelisa ye.
[Elilingi na lokasa 5]
Liwa ya Yesu ezali komonisa bolingo eleki monene oyo bato mibale bamonisaki
[Elilingi na lokasa 6]
Limpa ezangi levire mpe vinyo ezali bililingi oyo ebongi mpo na nzoto ya Yesu oyo ezali na lisumu te mpe makila na ye oyo esopamaki