Ozali nde komɛla ngɛngɛ ya elimo ya mokili?
NA MOKOLO mwa 12 Sɛtɛ́mbɛ 1990, mɔ́tɔ makasi ebimaki na izíni moko na mboka Kazakstan. Ngɛngɛ mabe oyo babéngi radioactif epalanganaki na mopɛpɛ, kotyáká na likámá bomoi ya bafandi 120 000 ya mboka wana, mpe mingi kati na bango batambolaki na banzela mpo na komonisa nkanda na bango mpo na ngɛngɛ wana mabe.
Nsima wana bayebaki makambo mosusu, bamonaki ete bazalaki kofanda na esika oyo mopɛpɛ ebebisamá na ngɛngɛ uta bambula mingi. Na boumeli ya bambula, tɔni 100 000 ya bosɔtɔ oyo ezali na ngɛngɛ ezalaki kobwakama na bisika ya polele. Atako likámá ezalaki zingazinga na bango, moto moko te atyaki likebi na yango. Mpo na nini?
Mikolo nyonso, na libándá ya masano ya mboka yango, bakonzi bazalaki kobimisa na etanda moko mitango oyo ezalaki komonisa soki ngɛngɛ ebakisami to ekiti na mopɛpɛ na boumeli ya mokolo, mpe yango ezalaki kopesa bato likanisi ete likámá lizalaki te. Mitángo mizalaki na bosikisiki, kasi mizalaki komonisa bobele ngɛngɛ oyo babéngi radiation gamma. Ngɛngɛ oyo babéngi radiation alpha eyebanaki motángo na yango te, nzokande ebomaka. Bamama mingi bakomaki kososola ntina oyo bana na bango bazalaki ntango nyonso kobɛla.
Na elobeli ya elimo, tokoki mpe kobebisama na ngɛngɛ oyo ezangi komonana. Mpe lokola bafandi ya mboka Kazakstan oyo basali likambo te, motuya monene ya bato bayebi te ete bomoi na bango etondi na makámá oyo makoki kobima pwasa. Biblia emonisi kobebisama ya mopɛpɛ oyo lokola “elimo ya mokili,” oyo etambwisami na moto mosusu te bobele na Satana Zábolo. (1 Bakolinti 2:12) Monguna ya Nzambe azali kosalela elimo oyo na mayele mabe—elingi koloba ezalela oyo ezali komonana epai ya bato mingi—ya mokili mpo na kobebisa bokangami na biso epai na Nzambe.
Lolenge nini elimo ya mokili ekoki kosilisa nguya na biso ya elimo? Na kolamusáká mposa ya miso na biso mpe na kokólisáká mposa ya moimi oyo tobotama na yango. (Baefese 2:1-3; 1 Yoane 2:16) Na ndakisa, tokotalela makambo misato makeseni oyo makanisi ya mokili makoki kobebisa elimo na biso mokemoke.
Tólukaka liboso Bokonzi
Yesu alendisaki baklisto ete ‘báluka nde liboso Bokonzi mpe boyengebene na yango.’ (Matai 6:33) Nzokande, elimo ya mokili ekoki kopusa biso ete tópesa motuya mingi na matomba mpe na bolamu na biso moko. Likámá ya libosoliboso ezali te ete okotika matomba ya elimo na mbala moko, kasi nde okozongisa yango nsima. Tokoki kokanisa ete likámá ezali te—lokola bato ya mboka Kazakstan basalaki—mpo tokanisi ete tozali na libateli. Bambula na biso ya mosala ya sembo mpe bosepeli na biso mpo na bandeko na biso mibali mpe bandeko na biso basi ekoki kolalisa biso mpɔngi na kokanisáká ete tokoki soko moke te kotika nzela ya solo. Na ntembe te, mingi kati na lisangá ya Efese bakanisaki bongo.
Pene na mobu 96 T.B., Yesu apesaki bango toli oyo elandi: “Kasi nazali na yo na likambo oyo ete osili kotika bolingo na yo na liboso.” (Emoniseli 2:4) Baklisto yango oyo basalaki na boumeli ya bambula mingi bakutanaki na mikakatano mingi. (Emoniseli 2:2, 3) Bateyamaki na bankulutu ya sembo, kati na bango ntoma Paulo. (Misala 20:17-21, 27) Nzokande, na boumeli ya bambula, bolingo na bango mpo na Yehova ekitaki, mpe babungisaki mɔ́tɔ na bango ya elimo.—Emoniseli 2:5.
Ekoki kozala ete bamoko kati na Baefese babendamaki na makambo ya mombongo mpe ya bozwi ya mboka. Likambo ya mawa, mposa ya bozwi ya mosuni oyo ezali komonana lelo kati na mokili esili kopɛngwisa baklisto mosusu. Ekateli ya kosala makasi mpo na kozala na lolenge ya bomoi ya malamu koleka oyo tozali na yango, nsukansuka ekopɛngola biso mosika na mikano ya elimo.—Kokanisá Matai 6:24.
Kokebisáká bato na likámá oyo, Yesu alobaki ete: “Liso ezali mwinda ya nzoto. Soko liso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba ekozala na pole. Nde soko liso na yo ezali mabe [“na bilulela,” maloba na nsé ya lokasa, NW], nzoto na yo mobimba ekozala na molili.” (Matai 6:22, 23) Liso “malamu” ezali liso oyo ezali komona malamu na elimo, liso oyo ezali kotala epai na Bokonzi ya Nzambe. Nzokande, liso ya “mabe” to ya “bilulela” emonaka mosika te, emonaka bobele bamposa ya nzoto oyo yango ekoki kozwa noki. Mikano ya elimo mpe libonza na mikolo mizali koya etali yango te.
Na versɛ́ oyo ezali liboso, Yesu alobaki ete: “Zambi na esika ezali biloko na yo na motuya, motema na yo ekozala wana lokola.” (Matai 6:21) Ndenge nini tokoki koyeba soki motema na biso etondi na mposa ya makambo ya elimo to ya mosuni? Ntango mosusu yango ekoyebana malamumalamu na masoló na biso, mpo ete ‘na maloba mingi oyo ezali kati na motema monɔkɔ ekoloba.’ (Luka 6:45) Soki tomoni ete tozali ntango nyonso koloba mpo na biloko ya mokili to mpo na mikano ya mokili, ezali elembo ete motema na biso ekabwani mpe lolenge na biso ya komona makambo ya elimo ezali lisusu malamu te.
Ndeko mwasi Carmen, ya ekólo Espagne, abundisaki likambo oyoa. Alimboli ete: “Nakólaki kati na solo, kasi ntango nakómaki na mbula 18, nafungolaki eteyelo na ngai moko ya bana mike. Mbula misato na nsima nazwaki basali minei, mosala ezalaki kotambola malamu, mpe nazalaki kozwa mosolo mingi. Ntango mosusu, likambo oyo lizalaki kosepelisa ngai mingi, ezalaki bongo kozanga mitungisi ya mbongo, mpe lokumu mingi oyo nazalaki na yango. Mpo na koloba solo, motema na ngai ezalaki na mosala na ngai—nalingaki yango mingi koleka.
“Nazalaki komiyoka ete nazali kaka Motatoli ya Yehova atako nazalaki kopesa ntango na ngai mingi na matomba ya mosala na ngai. Epai mosusu, natungisamaki ntango nyonso na mayoki ete nakokaki kosala mingi koleka mpo na kosalela Yehova. Nsukansuka likambo yango lindimisaki ngai ete natya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso ezalaki bongo ndakisa ya baninga mibale oyo bazalaki babongisi-nzela. Moko na bango, Juliana, azalaki na lisangá na biso. Atindikaki ngai na makasi te ete nazala mobongisi-nzela, kasi masoló na ye mpe esengo oyo azalaki kozwa na mosala na ye esungaki ngai ete natalela lisusu matomba na ngai ya elimo.
“Nsima ya mwa ntango, wana nakendaki kolekisa lói (congé) na ngai na États-Unis, tofandaki ngai na Gloria, ndeko mwasi mobongisi-nzela. Mobali na ye autaki kokufa, mpe azalaki kobɔkɔla mwana na ye ya mwasi ya mbula mitano mpe mama na ye oyo azalaki na bokɔnɔ ya kanser. Kasi, azalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela. Ndakisa na ye mpe esengo ya motema na ye na ntina na mosala na ye esimbaki motema na ngai. Mikolo minei oyo nalekisaki na ndako na ye epesaki ngai ekateli ya komipesa mpenza mobimba na mosala ya Yehova. Liboso nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe nsima ya mwa bambula, ngai na mobali na ngai tobyangamaki mpo na kosala na Betele. Natikaki mosala na ngai—epekiseli mpo na bokóli na ngai na elimo—mpe sikawa nazali komiyoka ete bomoi na ngai ezali na lokumu na miso na Yehova, yango ezali likambo libongi mpenza.”—Luka 14:33.
Na ndakisa ya Carmen, “komindimisa makambo maleki ntina,” ekosalisa biso ete tózwa bikateli ya mayele na oyo etali mosala, kelasi, esika ya kofanda, mpe lolenge ya bomoi na biso. (Bafilipi 1:10, NW) Kasi, na oyo etali kominanola tomindimisaka mpe makambo oyo maleki ntina? Oyo ezali likambo mosusu likoló na yango elimo ya mokili ezali kosala bopusi makasi.
Tótya kominanola na esika na yango
Elimo ya mokili ezali kosalela na mayele mabe mposa oyo bato babotami na yango ya kozwa bopemi mpe kominanola. Lokola ebele na bato bazali na elikya te na mikolo mizali koya, na ntina yango bazali koluka na ntango bazali naino na bomoi, kominanola ntango nyonso. (Kokanisá Yisaya 22:13; 1 Bakolinti 15:32.) Tozali nde kopesa ntango na biso mingi koleka na bopemi mpe kominanola? Yango ekoki kozala elembo ete lolenge ya kokanisa ya mokili ezali na bopusi likoló na biso.
Biblia epesi likebisi oyo: “Moto oyo alingi bobele bisengo [“kominanola,” Lamsa] akozala mobola.” (Masese 21:17) Kominanola ezali mabe te, kasi kolinga yango, to kotya yango na esika ya liboso, ekomema na bobola ya elimo. Nsukansuka, mposa na biso ya bilei ya elimo ekosila, mpe tokozala na ntango mingi te mpo na kosakola nsango malamu.
Mpo na ntina oyo, Liloba ya Nzambe ezali kopesa biso toli ete “tómilɛngɛla na makanisi mpo na mosala, tómipekisa mpenza.” (1 Petelo 1:13, The New English Bible) Komipekisa ezali na ntina mpo na kosukisa kominanola na ntango ekoki. Kokanga nkamba mpo na mosala elimboli kozala pene mpo na mosala ya elimo, ezala boyekoli, makita, to mosala ya kosakola.
Ezali boni mpo na bopemi oyo nzoto na biso ezali na yango mposa? Tosengeli nde komiyoka lokola tomemi ngambo mpamba te tozwi ntango mpo na kopema? Ezali bongo te. Bopemi ezali na ntina mingi, mpenzampenza kati na mokili ya lelo oyo etondi na mitungisi. Nzokande, lokola tozali baklisto oyo bamipesi tokoki te kopesa nzela na kominanola ete etambwisa bomoi na biso. Bopemi mpe kominanola kolekisa ndelo ekoki kolɛmbisa biso kino tokosala lisusu mosala na molende te. Ekoki kokitisa mayoki na biso ya komona ete makambo masengeli kotambola na lombango, mpe ekoki kútu kolendisa biso na ezaleli ya komisepelisa. Na bongo, ndenge nini tokoki kozala na bokatikati mpo na oyo etali bopemi mpe kominanola?
Biblia ezali kosɛnga na biso ete tózwaka mwa bopemi na esika ya koboma nzoto—mingimingi na mosala ya mosuni oyo esengeli mpenzampenza te. (Mosakoli 4:6) Atako bopemi esalisaka nzoto na biso mpo na kozongela makasi, liziba ya bokasi ya elimo ezali nguya ya Nzambe oyo ekosalaka mosala. (Yisaya 40:29-31) Tozwaka elimo santu yango na kokokisáká misala na biso ya boklisto. Boyekoli ya biso moko etondisaka motema na biso na bamposa malamu mpe elamusaka yango. Koyangana na makita ekólisaka bosepeli mpo na Mozalisi na biso. Kosangana na mosala ya kosakola ekólisaka mayoki na biso ya bolingo mpo na basusu. (1 Bakolinti 9:22, 23) Lokola Paulo alimbolaki yango solo mpenza ete, “bomoto na biso ya libándá ezali kobimisa motoki mpe mai ya miso, kasi mokolo na mokolo bomoto na biso ya kati ezali kozwa nguya ya sika.”—2 Bakolinti 4:16, Phillips.
Ileana, mama ya bana motoba oyo mobali na ye azali mondimi te, azali na mokumba monene kati na bomoi na ye. Azali kotala makambo ya libota na ye moko mpe ya ebele ya bandeko na ye, yango elimboli ete azalaka ntango nyonso na misala mpe emonanaka ete asalaka yango na lombango. Atako bongo, azali kopesa ndakisa malamu na mosala ya kosakola mpe na kobongisa makita. Ndenge nini azali kokoka kosala ebele ya misala wana?
Ileana alimboli ete: “Makita mpe mosala ya kosakola esungaka ngai solo ete nakokisa mikumba na ngai mosusu. Na ndakisa, nsima ya mosala ya kosakola, nakanisaka makambo mingi wana nazali kosala mosala ya ndako. Mbala mingi nayembaka ntango nazali kosala. Ntango mosusu, soki nazangisi makita to nasali mingi te na mosala ya kosakola, misala ya ndako ekómaka mpenza kiló.”
Oyo nde bokeseni monene na baoyo bapesaka motuya mingi na bopemi mpe na kominanola!
Kitoko ya elimo esepelisaka Yehova
Tozali na mokili oyo ezali kotya likebi mingi koleka na kitoko ya nzoto. Bato bazali kobimisa mosolo mingi mpo na myango ya kobongisa loposo mpe kopɛngola konuna. Yango esangisi kolata nsuki oyo bato basali (mèches), ezala na lolenge ya kotonga yango likoló ya nsuki (plantes), ya kolata yango lokola ekɔti (perruque) to koyeisa yango mwindo to na lángi mosusu, ata mpe kobongisa ntólo ya mwasi, mpe myango ya kolongola masusa na elongi. Bamilió ya bato balandaka mateya mpo na koluka kokitisa kilo ya nzoto, bakɔtaka na bandako oyo ebongisamá mpo na kosala ngalasisi, mpe na bisika ya kopema mopɛpɛ ya malamu koleka to basombaka bavideo oyo ezali kolakisa myango ya kokembisa nzoto, to mpe babúku oyo ezali kolimbola lolenge ya kokitisa kilo ya nzoto. Mokili elingi kondimisa biso ete bomoto ya libándá ezali fungola mpo na bolamu, ete lolenge nzoto na biso ezali komonana epai na bato mosusu ezali na ntina mingi.
Engebene zulunalo Newsweek, bolukiluki moko oyo esalemaki na États-Unis, emonisaki ete bilenge mindɛlɛ 90 likoló ya monkámá “bazalaki kosepela te na lolenge ya nzoto na bango.” Kolukaluka lolenge ya nzoto oyo okoki kozwa yango te ekoki kotungisa elimo na biso. Dora elenge Motatoli ya Yehova azalaki koyoka nsɔ́ni mpo ete azalaki moto ya nzoto mineneminene. Alobaki ete: “Ntango nazalaki kokende kosomba bilamba, ezalaki mpasi mpo nakoka kozwa oyo ekokani na nzoto na ngai. Emonanaki lokola ete bilamba ya kitoko etongamaki bobele mpo na bilenge ya nzoto mike. Likambo ya mabe lisusu koleka, bato bazalaki kolobela nzoto na ngai na lolenge ya mabe, likambo yango lizalaki kopesa ngai nkanda, mingimingi soki maloba yango ya mabe mauti na monɔkɔ ya bandeko na ngai ya elimo ezala mibali to basi.
“Yango wana, nazalaki ntango nyonso komitungisa mpo na nzoto na ngai, kino na meko oyo nakómaki kozongisa makambo ya elimo nsima na bomoi na ngai. Ezalaki lokola ete bolamu na ngai ekangisamaki na bonene ya nzoto na ngai. Esili koleka bambula mingi, sikawa nasili kokɔmela lokola mwasi mpe lokola moklisto, nazali komona makambo na lolenge mosusu. Atako nazali kobatela nzoto na ngai mpo na komonana kitoko liboso na bato, nandimisami ete kitoko ya elimo nde ezali na motuya mingi, mpe ezali yango nde esepelisaka ngai mingi koleka. Ntango nasosolaki yango, nakómaki kotya matomba ya Bokonzi na esika ebongi na yango mpenza.”
Sala azalaki mwasi ya sembo na ntango ya kala mpe azalaki na makanisi ya bokatikati motindo wana. Atako Biblia ezali kolobela kitoko na ye ya nzoto wana asilaki koleka mbula 60, yango ezali kobenda likebi na biso mpenzampenza likoló na bizaleli na ye malamu—bomoto oyo ebombami kati na motema. (Genese 12:11; 1 Petelo 3:4-6) Amonisaki elimo ya boboto mpe ya bopɔlɔ, mpe atosaki mobali na ye na komikitisa nyonso. Sala azalaki ntango nyonso te komibanzabanza na lolenge bato bazalaki kotalela ye. Atako autaki na libota ya bozwi, azalaki na bolingo malamu ya kofanda na hema na boumeli ya mbula koleka 60. Na bopɔlɔ mpe kozanga moimi asungaki mobali na ye; azalaki mwasi ya kondima. Ezali yango nde ekómisaki ye mwasi kitoko mpenza.—Masese 31:30; Baebele 11:11.
Lokola tozali baklisto, tozali kosepela na kobongisáká kitoko na biso ya elimo, kitoko oyo, soki tokobongisa yango mbala na mbala, ekokóla mpe ekoumela. (Bakolose 1:9, 10) Tokoki kobongisa kitoko na biso ya elimo na mitindo mibale.
Tozali kokóma kitoko koleka na miso ya Yehova ntango tozali kosangana na mosala na biso ya kosakola oyo ekobikisa bomoi. (Yisaya 52:7; 2 Bakolinti 3:18–4:2) Lisusu, lokola tozali koyekola komonisa bizaleli ya boklisto, kitoko na biso ezali kobakisama. Mabaku mpo na komonisa kitoko na biso ya elimo mazali mingi: “Bólinganaka; mpo na lokumu, bókumisanaka. . . . Mpo na [“elimo,” NW] bópela na mɔ́tɔ. . . . Bónyangela bapaya. . . . Bósepelaka na basepeli; bólelaka na baleli. . . . Bózongisaka mabe mpo na mabe te. . . . Bózala na bato nyonso kimya.” (Baloma 12:10-18) Kolóna bizaleli motindo wana ekosala ete tózala na motuya mingi na miso ya Yehova mpe ya bazalani na biso, mpe yango ekosala ete tótya likebi mingi te na lolenge mabe oyo nzoto na biso, oyo ezangi kokoka, ekoki komonana na miso ya bato.—Bagalatia 5:22, 23; 2 Petelo 1:5-8.
Tokoki kobundisa elimo ya mokili!
Na ndenge mingi oyo tokoki koyeba te, elimo ya mokili ekoki kolɛmbisa bosembo na biso. Ekoki kosala ete tósepela te na oyo tozali na yango mpe ekopusa biso ete tótya bamposa na biso mpe matomba na biso liboso na oyo ya Nzambe. Ekoki mpe kopusa biso na kokanisa makanisi ya bato na esika ya oyo ya Nzambe, kopesáká na kominanola mpe bomoto na biso ya libándá motuya moleki ndelo.—Kokanisá Matai 16:21-23.
Satana azali na ekateli makasi ya kobebisa elimo na biso, mpe elimo ya mokili ezali moko na bisaleli na ye minene. Obosana te ete Zábolo akoki kobongola myango na ye, longwa na oyo ya konguluma lokola nkosi kino na oyo ya kosala na bokɛngi lokola nyoka. (Genese 3:1; 1 Petelo 5:8) Na mabaku mosusu, mokili elóngaka moklisto na nzela ya minyoko makasi, kasi nde na mbala mingi koleka emɛlisaka ye ngɛngɛ mokemoke. Paulo amibanzabanzaki mingi mpenza mpo na likámá ya mibale oyo touti kolobela, alobaki ete: “Kasi lokola nyoka azimbisaki Eva na mayele na ye, nabangi ete makanisi na bino makopɛngwa longwa na [“bosembo mpe bopɛto,” NW] mpo na Klisto.”—2 Bakolinti 11:3.
Mpo na komibatela liboso na mayele mabe ya nyoka, tosengeli koyeba makanisi mabe oyo ye azali kopalanganisa, oyo “euti na mokili” mpe bongo kozala na ekateli makasi ya kobwaka yango. (1 Yoane 2:16) Tosengeli te kozimbisama na kondimáká ete lolenge ya kokanisa ya mokili ezangi likamá. Mopɛpɛ ya ngɛngɛ ya ebongiseli ya Satana esili kopanzana na ndenge moko ya nsɔ́mɔ.—Baefese 2:2.
Soki totɔndɔli lolenge ya kokanisa ya mokili tokoki kobundisa yango na kotondisáká bɔɔngɔ́ mpe mitema na biso na mateya ya pɛto ya Yehova. Lokola Mokonzi David, tiká tóloba: “Ɛ [Yehova], yebisá ngai nzela na yo; monisa ngai bilekelo na yo. Tambolisá ngai kati na solo na yo mpe lakisá ngai, zambi yo ozali Nzambe na kobika na ngai.”—Nzembo 25:4, 5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu na lisiló oyo.
[Elilingi na lokasa 26]
Kosala makasi mpo na kozala na lolenge ya bomoi ya komipesa kati na bozwi ekoki kopɛngola biso mosika na mikano ya elimo