MOKAPO 16
“Yesu . . . alingaki bango tii na nsuka”
1, 2. Ndenge nini Yesu alekisi mpokwa na ye ya nsuka elongo na bantoma na ye, mpe mpo na nini bangonga wana ya nsuka ezali na ntina mingi mpo na ye?
YESU ayanganisi bantoma na ye na shambrɛ ya likoló na ndako moko na Yerusaleme; ayebi ete wana nde mpokwa ya nsuka oyo akozala elongo na bango. Mosika te, akozonga epai ya Tata na ye. Nsima ya mwa bangonga, bakokanga Yesu mpe kondima na ye ekomekama makasi koleka. Atako etikali moke abomama, Yesu azali kaka kotya likebi na bamposa ya bantoma na ye.
2 Atako Yesu asili kobongisa bantoma na ye liboso atika bango, azali naino na makambo mingi ya koloba mpo na kolendisa bango mpo na oyo ezali kozela bango. Na yango, azali kolekisa ntango wana ya ntina mingi mpo na koteya bango makambo oyo esengeli mpenza, oyo ekosalisa bango bátikala sembo. Maloba oyo azali koloba na bango ezali ya bolingo mpe ezali mpenza kosimba motema. Kasi, mpo na nini Yesu azali kotyela bantoma na ye likebi mingi koleka na esika amityela ye moko? Mpo na nini bangonga ya nsuka oyo azali kolekisa elongo na bango ezali na ntina mingi mpo na ye? Na mokuse, bolingo nde etindi ye asala bongo. Bolingo oyo azali na yango mpo na bango ezali makasi.
3. Ndenge nini toyebi ete Yesu azelaki kaka te mpokwa wana ya nsuka mpo amonisela bayekoli na ye bolingo?
3 Bambula mingi na nsima, na litambwisi ya elimo santu, ntango ntoma Yoane alobelaki makambo oyo esalemaki na mpokwa yango, akomaki boye: “Lokola ayebaki liboso ya fɛti ya Elekeli ete ngonga na ye esilaki kokoka mpo alongwa na mokili oyo akende epai ya Tata, Yesu, lokola alingaki baoyo ya ye oyo bazalaki na mokili, alingaki bango tii na nsuka.” (Yoane 13:1) Yesu azelaki te kaka butu wana mpo amonisela “bato na ye” bolingo. Na boumeli ya mosala na ye, bolingo na ye mpo na bayekoli na ye emonanaki na makambo ndenge na ndenge. Soki totaleli malamu mwa makambo oyo mpo na yango amoniselaki bayekoli na ye bolingo mpe tomekoli ye, tokozala mpenza bayekoli na ye ya solosolo.
Azalaki komonisa motema molai
4, 5. (a) Mpo na nini Yesu asengelaki kokanga motema na makambo ya bayekoli na ye? (b) Yesu asalaki ndenge nini ntango bantoma na ye misato basɛnzɛlaki te na elanga ya Getesemane?
4 Bolingo ná motema molai etambolaka nzela moko. Na 1 Bakorinti 13:4, totángi boye: “Bolingo ezali na motema molai.” Mpe motema molai esɛngaka kokanga mpenza motema na makambo ya basusu. Yesu asengelaki nde kokanga motema na makambo ya bayekoli na ye? Ɛɛ, esɛngaki bongo! Ndenge tomonaki yango na Mokapo 3, bantoma bazalaki na mokakatano mpo na komonisa komikitisa. Mbala na mbala, bazalaki kotyana ntembe mpo na koyeba nani na kati na bango aleki mpenza bamosusu. Yesu asalaki nini? Ayokaki nde nkanda mpe asilikaki to abombaki nde nkanda na motema? Te, na motema molai mpenza, asololaki na bango, atako “ntembe makasi” yango ebimaki na mpokwa ya nsuka oyo azalaki elongo na bango!—Luka 22:24-30; Matai 20:20-28; Marko 9:33-37.
5 Na nsima, kaka na mpokwa yango ya nsuka, ntango Yesu akendaki na elanga ya Getesemane elongo na bantoma na ye 11 ya sembo, motema molai na ye emekamaki lisusu. Yesu atikaki bantoma mosusu mwambe, akamataki Petro, Yakobo ná Yoane bakei na kati mpenza ya elanga. Yesu ayebisaki bango ete: “Nazali na mawa makasi mpenza, lokola nakufa. Bótikala awa mpe bókoba kosɛnzɛla elongo na ngai.” Apusanaki mwa moke liboso mpe abandaki kobondela na motema mobimba. Nsima ya kobondela mwa ntango molai, azongaki epai bantoma yango misato bazalaki. Akutaki bango ndenge nini? Na ngonga oyo Yesu akómi na komekama ya makasi koleka, akuti bango balali mpɔngi! Asilikelaki nde bango mpo basɛnzɛlaki te? Te, na motema molai mpenza, alendisaki bango. Maloba na ye ya boboto emonisaki ete ayebi mawa oyo bazalaki na yango mpe bolɛmbu na bango.a Alobaki ete: “Ya solo, elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.” Yesu amonisaki kaka motema molai na ntango yango, ata akutaki bango balali kaka mbala moko te, kasi mbala misato mobimba!—Matai 26:36-46.
6. Ndenge nini tokoki komekola Yesu na boyokani na biso ná basusu?
6 Komona ete Yesu azalaki kaka kotyela bantoma na ye motema, ezali mpenza likambo ya kolendisa! Nsukansuka motema molai na ye ebotaki mbuma, mpamba te mibali yango ya sembo bayebaki ntina ya komikitisa mpe ya kosɛnzɛla. (1 Petro 3:8; 4:7) Ndenge nini tokoki komekola Yesu na boyokani na biso ná basusu? Mingimingi bankulutu basengeli kozala na motema molai. Ndeko moko akoki koya na likambo na ye epai ya nkulutu moko na ntango oyo nkulutu ye moko alɛmbi to mpe azali na likambo moko oyo ezali kotungisa ye. Ntango mosusu, bandeko oyo basengeli na lisalisi batosaka noki te toli ya bankulutu. Atako bongo, bankulutu ya mitema milai bateyaka “na boboto” mpe ‘basalelaka etonga makambo na boboto.’ (2 Timote 2:24, 25; Misala 20:28, 29) Baboti mpe basengeli komekola Yesu mpe kozala na motema molai, mpamba te, na bantango mosusu, bana batosaka noki te toli to disiplini. Bolingo mpe motema molai ekosalisa baboti bálɛmba te na milende oyo bazali kosala mpo na kobɔkɔla bana na bango. Kozala na motema molai ndenge wana ekoki kopesa mbano monene.—Nzembo 127:3.
Azalaki kokokisa bamposa na bango
7. Ndenge nini Yesu akokisaki bamposa ya mosuni ya bayekoli na ye?
7 Bolingo emonanaka na misala oyo ezangi moimi. (1 Yoane 3:17, 18) Bolingo “elukaka matomba na yango moko te.” (1 Bakorinti 13:5) Bolingo etindaki Yesu akokisa bamposa ya mosuni ya bayekoli na ye. Mbala mingi, azalaki kokokisa bamposa na bango ata soki balobi eloko te. Ntango amonaki ete balɛmbi, alobaki na bango bákende elongo na ye ‘na esika oyo bato bazalaka te mpe bápema mwa moke.’ (Marko 6:31) Ntango amonaki ete bazali na nzala, asalaki eloko mpo na koleisa bango elongo na bankóto mosusu ya bato oyo bayaki koyoka mateya na ye.—Matai 14:19, 20; 15:35-37.
8, 9. (a) Nini emonisi ete Yesu ayebaki bamposa ya elimo ya bayekoli na ye mpe akokisaki yango? (b) Ntango azalaki likoló ya nzete, ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki komitungisa mpo na bolamu ya mama na ye?
8 Yesu ayebaki mpe bamposa ya elimo ya bayekoli na ye mpe akokisaki yango. (Matai 4:4; 5:3) Ntango azalaki koteya, mbala mingi azalaki kotyela bango mpenza likebi. Lisolo Likoló ya Ngomba epesamaki libosoliboso mpo na bayekoli na ye. (Matai 5:1, 2, 13-16) Ntango azalaki kosalela bandakisa mpo na koteya, “azalaki kolimbwela bayekoli na ye makambo nyonso ntango bazali kaka bango moko.” (Marko 4:34) Yesu asakolaki ete akotya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo apesaka bayekoli na ye bilei ya elimo na mikolo ya nsuka. Kobanda 1919, mombo yango ya sembo, oyo esalemi na etuluku moke ya bandeko ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino awa na mabele, bazali kopesa ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’—Matai 24:45.
9 Na mokolo ya liwa na ye, Yesu amonisaki mpenza ete azalaki komitungisa mpo na bolamu ya elimo ya bato oyo azalaki kolinga. Kanisá ndenge makambo elekaki: Yesu azali likoló ya nzete, azali na mpasi ya liwa. Mpo na kopema, emonani ete asengelaki komisembola na kotindika makolo na ye; kasi yango ezalaki kopesa ye mpasi makasi, mpo nzoto na ye ezalaki kopasuka na bisika oyo babakaki ye nsɛtɛ na makolo mpe bampota ya mokɔngɔ oyo babɛtaki ye ezalaki koswa ntango ezali kotutana na nzete. Lokola mpema na ye ekangamaki, ezalaki mokakatano mpe mpasi mpo na kobimisa maloba. Kasi liboso akufa, Yesu alobaki maloba oyo emonisaki bolingo makasi oyo azalaki na yango mpo na Maria, mama na ye. Ntango amonaki Maria ná ntoma Yoane batɛlɛmi pembeni wana, na mongongo makasi, na ndenge ete bato oyo batɛlɛmaki pembeni wana bayokaki, Yesu alobaki na mama na ye ete: “Mwasi, talá! Mwana na yo!” Na nsima, alobaki na Yoane ete: “Talá! Mama na yo!” (Yoane 19:26, 27) Yesu ayebaki ete ntoma na ye wana ya sembo akokokisa bamposa ya Maria na mosuni, kasi ayebaki mpe ete akobatela ye na elimo.b
10. Ndenge nini baboti bakoki komekola Yesu wana bazali kokokisa bamposa ya bana na bango?
10 Baboti ya bolingo bamonaka ete ezali na ntina kokanisa na ndakisa wana ya Yesu. Tata oyo alingaka mpenza bato ya libota na ye akokisaka bamposa na bango ya mosuni. (1 Timote 5:8) Batata ya bolingo, oyo bazali na bokatikati, babongisaka ntango ya kopema mpe ya kominanola ná mabota na bango. Likambo ya ntina koleka, baboti bakristo bakokisaka bamposa ya elimo ya bana na bango. Ndenge nini? Baboti yango babongisaka boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ, mpe basalaka makasi ete makambo oyo bakoyekola ezala ya kolendisa mpe esepelisa bana na bango. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Na maloba mpe na ndakisa, baboti bateyaka bana na bango ete mosala ya kosakola ezali mosala ya ntina, mpe ete kobongisa mpe koyangana na makita ezali makambo ya ntina mingi na losambo na biso.—Baebre 10:24, 25.
Andimaki kolimbisa
11. Yesu ateyaki bayekoli na ye nini na oyo etali kolimbisa?
11 Lokola tolingaka bato, tondimaka mpe kolimbisa bango. (Bakolose 3:13, 14) Na 1 Bakorinti 13:5, totángi ete bolingo “ebombaka mabe na motema te.” Na mabaku mingi, Yesu ateyaki bayekoli na ye ntina ya kolimbisa. Alendisaki bango ete bálimbisaka basusu “tii mbala nsambo te, kasi tii mbala 77”, elingi koloba mbala mingi, kozanga nsuka. (Matai 18:21, 22) Ateyaki bango ete mosumuki oyo apamelami mpe abongoli motema, esengeli kolimbisa ye. (Luka 17:3, 4) Nzokande, Yesu azalaki te lokola Bafarisai ya bokosi, oyo bazalaki koteya kaka na maloba; kasi ye azalaki koteya na ndakisa. (Matai 23:2-4) Tiká tómona ndenge Yesu andimaki kolimbisa ata ntango oyo moninga na ye moko ya motema alɛmbisaki ye nzoto.
12, 13. (a) Ndenge nini Petro alɛmbisaki Yesu nzoto na butu oyo bakangaki ye? (b) Ndenge nini makambo oyo Yesu asalaki nsima ya lisekwa na ye emonisi polele ete ayebaki mpenza kolimbisa?
12 Yesu azalaki mpenza moninga ya ntoma Petro, mobali moko ya boboto, oyo na bantango mosusu azalaki motema mɔtɔmɔtɔ. Yesu ayebaki bizaleli malamu ya Petro mpe apesaki ye mikumba minene. Petro, Yakobo ná Yoane bamonaki mpenza na miso makamwisi mosusu oyo bantoma mosusu bamonaki te. (Matai 17:1, 2; Luka 8:49-55) Ndenge tomonaki yango na ebandeli, Petro azalaki moko ya bantoma oyo bazalaki elongo na Yesu na kati ya elanga ya Getesemane na butu oyo bakangaki ye. Nzokande kaka na butu yango, ntango Yesu atɛkamaki mpe akangamaki, Petro ná bantoma mosusu basundolaki ye mpe bakimaki. Na nsima, Petro amonisaki mpiko na ndenge azalaki na libándá ya esika oyo bazalaki kosambisa Yesu na lolenge oyo eyokani na mibeko te. Lisusu, lokola Petro akómaki kobanga, yango etindaki ye asala libunga moko monene, elingi koloba, mbala misato mobimba awanganaki mpe akosaki ete ayebi Yesu te! (Matai 26:69-75) Yesu asalaki nini? Yo olingaki kosala nini soki moninga na yo moko ya motema asali yo ndenge wana?
13 Yesu andimaki kolimbisa Petro mpo ayebaki ete likambo oyo asalaki etungisaki ye makasi. Lokola ntoma Petro “alɛmbaki nzoto mpe abandaki kolela,” yango emonisaki mpenza ete abongolaki motema. (Marko 14:72) Na mokolo oyo asekwaki, Yesu abimelaki Petro, ekoki kozala mpo na kobɔndisa ye mpe kokitisa ye motema. (Luka 24:34; 1 Bakorinti 15:5) Na nsima, liboso sanza ekoka, na mokolo ya Pantekote, Yesu apesaki Petro lokumu na ndenge asalaki ete azala moto ya liboso mpo na kopesa litatoli epai ya ebele ya bato oyo bazalaki na Yerusaleme. (Misala 2:14-40) Tóbosana mpe te ete Yesu akangelaki bantoma na ye nkanda te na ndenge basundolaki ye. Kutu, nsima ya kosekwa, akobaki kobenga bango “bandeko na ngai.” (Matai 28:10) Tomoni polele ete Yesu ayebaki mpenza kolimbisa, boye te?
14. Mpo na nini tosengeli koyeba kolimbisa basusu, mpe ndenge nini tokoki komonisa ete tondimaka kolimbisa?
14 Lokola tozali bayekoli ya Kristo, biso mpe tosengeli koyeba kolimbisa basusu. Mpo na nini? Biso ná baoyo bakoki kosalela biso lisumu tokeseni na Yesu, mpamba te tozali bato ya kozanga kokoka. Na bantango mosusu, biso nyonso tobɛtaka mabaku na maloba to na misala. (Baroma 3:23; Yakobo 3:2) Soki motema mawa ezali kotinda biso tólimbisa basusu, tozali nde kobongisa nzela mpo Nzambe alimbisa masumu na biso. (Marko 11:25) Na yango, ndenge nini tokoki komonisa ete tondimi kolimbisa baoyo bakoki kosalela biso masumu? Na makambo mingi, bolingo esalisaka biso tóbosana masumu mpe mabunga mikemike ya basusu. (1 Petro 4:8) Ntango baoyo basaleli biso mabe babongoli mpenza motema, ndenge Petro asalaki, tokomekola mpenza Yesu mpe tokolimbisa bango. Na esika ya kokanga nkanda na motema, ezali malamu kolimbisa. (Baefese 4:32) Soki tosali bongo, tokobatela kimya na lisangá mpe biso moko tokozala na kimya na makanisi mpe na motema.—1 Petro 3:11.
Azalaki kotyela bango motema
15. Mpo na nini Yesu atyelaki bayekoli na ye motema atako bazalaki kosala mabunga?
15 Bolingo mpe ezaleli ya kotyela basusu motema etambolaka nzela moko. Bolingo “endimaka makambo nyonso.”c (1 Bakorinti 13:7) Lokola Yesu azalaki na bolingo, amonisaki mpenza ete azalaki kotyela bayekoli na ye motema atako bazalaki bato ya kozanga kokoka. Azalaki kotyela bango motema mpe andimaki mpenza ete bazalaki kolinga Yehova na mitema na bango mpe bazalaki na mposa ya kosala mokano na ye. Ata ntango bazalaki kosala mabunga, Yesu abɛtɛlaki bosembo na bango ntembe te. Na ndakisa, ntango ntoma Yakobo ná ntoma Yoane batindaki mama na bango ete asɛngɛla bango báfanda pembeni ya Yesu na Bokonzi na ye, Yesu abɛtɛlaki bosembo na bango ntembe te mpe alongolaki bango na molɔngɔ ya bantoma te.—Matai 20:20-28.
16, 17. Wapi mikumba mosusu oyo Yesu atikelaki bayekoli na ye?
16 Lokola Yesu azalaki kotyela bayekoli na ye motema, azalaki kopesa bango nzela bákokisa mikumba mosusu ndenge na ndenge. Na mabaku mibale, ntango akómisaki biloko mingi ya kolya na ndenge ya likamwisi mpe aleisaki ebele ya bato, atikelaki bayekoli na ye mokumba ya kokabola biloko yango. (Matai 14:19; 15:36) Mpo na kobongisa Elekeli na ye ya nsuka, atindaki Petro ná Yoane na Yerusaleme mpo na kobongisa makambo oyo esengelaki. Basalaki nyonso mpo bázwa mwana-mpate, vinyo, mampa oyo ezangi levire, ndunda ya bololo, mpe biloko mosusu oyo esengelaki. Yango ezalaki mokumba ya lisɛki te, mpamba te kosala Elekeli na ndenge ya malamu ezali likambo oyo esɛngamaki na Mibeko ya Moize, mpe Yesu asengelaki kotosa Mibeko yango. Longola yango, na nsima kaka na mpokwa yango, ntango Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, asalelaki vinyo mpe limpa oyo elakisaki nzoto mpe makila na ye.—Matai 26:17-19; Luka 22:8, 13.
17 Yesu amonaki malamu apesa bayekoli na ye ata mikumba ya minene. Ndenge tomonaki yango liboso, atikelaki etuluku moke ya bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino awa na mabele, mokumba monene ya kopesa bilei ya elimo. (Luka 12:42-44) Tóyeba mpe ete apesaki bayekoli na ye mokumba monene ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:18-20) Atako Yesu azali sikoyo koyangela na likoló, apesi bankulutu mokumba ya kobatela lisangá.—Baefese 4:8, 11, 12.
18-20. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka bandeko na biso bakristo motema mpe tondimaka bango? (b) Ndenge nini tokoki komekola elimo ya Yesu ya kotikela basusu nzela bákokisa mikumba mosusu? (c) Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?
18 Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na boyokani na biso ná basusu? Tokomonisa bolingo soki tozali kotyela bandeko na biso bakristo motema mpe kondima bango. Tóbosana te ete bolingo esalaka makambo ya malamu, kasi ya mabe te. Soki basusu basaleli biso mabe, mpo yango mpe ekómaka na bantango mosusu, bolingo ekopekisa biso tóloba nokinoki ete basali yango na nko. (Matai 7:1, 2) Soki tozali kotalela bandeko na biso bakristo na ndenge ya malamu, tokosalela bango makambo oyo ekolendisa, kasi oyo ekolɛmbisa bango te.—1 Batesaloniki 5:11.
19 Tokoki nde komekola elimo ya Yesu ya kotikela basusu mikumba mosusu? Ezali malamu ete baoyo bazali na mikumba na lisangá báyeba kotikela basusu mikumba oyo ebongi mpe na ndenge oyo esengeli, kotyela bango motema ete bakokokisa yango. Bankulutu oyo bakɔmɛlá bakoki koteya na ndenge ya malamu mpe na ndenge esengeli bilenge mibali oyo bazali “koluka kosala” mpo na kosalisa lisangá. (1 Timote 3:1; 2 Timote 2:2) Yango ezali na ntina mingi. Lokola Yehova azali kobenda bato mingi na lisangá, ekosɛnga kopesa bandeko mibali mingi ya makoki formasyo mpo na kopesa mabɔkɔ na bokoli yango.—Yisaya 60:22.
20 Yesu atikelá biso ndakisa ya malamu koleka na oyo etali kolinga basusu. Komonisela basusu bolingo nde likambo eleki ntina oyo tokoki kosala mpo na kolanda ye. Na mokapo oyo elandi, tokolobela bolingo oyo eleki nyonso oyo azalaki na yango mpo na biso, ndenge andimaki kopesa bomoi na ye.
a Mpɔngi ya bantoma eutaki kaka te na kolɛmba ya nzoto. Lisolo yango ndenge ekomami na Luka 22:45 elobi ete Yesu “akutaki bango balali mpɔngi mpo balɛmbi na mawa.”
b Ekoki kozala ete na ntango wana Maria azalaki mwasi oyo mobali akufá, mpe emonani ete bana na ye mosusu bakómaki naino bayekoli ya Yesu te.—Yoane 7:5.
c Ya solo, yango elingi koloba te ete bolingo ekangaka miso na mabe to ekipaka makambo te. Elingi nde koloba ete bolingo etɔngaka te to ekaniselaka bato mabe te. Bolingo epekisaka biso tósambisa basusu mbangumbangu to kokanisela bango mabe.