Mpo na nini kopesaka mɛrsi?
“Moninga na ngai Raquel,
Natɔndi yo mingi mpo na ndenge olendisaka ngai ntango nyonso. Ata soki oyebi yango te, maloba na yo ya kolendisa mpe ya boboto elendisaka ngai mingi.”—Jennifer.
OSILÁ kozwa mokanda moko oyo bakomeli yo mpo na kopesa yo botɔndi? Soki bongo, na ntembe te maloba ya botɔndi wana esepelisaki yo mpenza. Kutu, moto nyonso alingaka basusu bámona ete azali na ntina mpe bápesaka ye botɔndi.—Matai 25:19-23.
Kopesa mɛrsi ekolisaka bolingo na kati ya moto oyo apesi yango mpe moto oyo bapesi ye yango. Longola yango, moto oyo apesaka mɛrsi alandaka ndakisa ya Yesu Klisto, oyo azalaki kozanga te komona bolamu ya basusu.—Malako 14:3-9; Luka 21:1-4.
Likambo ya mawa, bato bakokaka lisusu mpenza kopesa mɛrsi te, ezala na monɔkɔ to na mokanda. Biblia elobaki ete na “mikolo ya nsuka” bato ‘bakozanga botɔndi.’ (2 Timote 3:1, 2) Soki tokebi te, kozanga botɔndi oyo etondi mpenza na mokili ekoki kotinda biso mpe tózanga botɔndi.
Baboti basengeli kosala nini mpo na kosalisa bana na bango bázalaka na botɔndi? Tosengeli kozalaka na botɔndi epai ya nani? Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi ata soki bato oyo tofandi na bango bazalaka na botɔndi te?
Na kati ya libota
Baboti basalaka nyonso mpo na kokokisa bamposa ya bana na bango. Kasi, mbala mosusu baboti bakoki komona ete bana na bango bazalaka na botɔndi te mpo na milende nyonso oyo bazali kosala mpo na bango. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango na likambo wana? Ezali na makambo misato oyo basengeli kosala.
(1) Bópesaka bana ndakisa. Kopesa bana ndakisa ezali lolenge eleki malamu ya koteya bango. Mpo na mama oyo azalaki makasi na mosala na Yisalaele, Biblia elobi boye: “Bana ba ye bakokumisaka ye.” Nani ateyaki bana wana kozala na botɔndi? Vɛrsɛ yango epesi eyano oyo: “Mpe mobali wa ye akopesaka ye longonya.” (Biyele 31:28, Biblia Liloba lya Nzambe) Baboti oyo bapesanaka mɛrsi basalisaka bana na bango báyeba ete kopesa botɔndi epesaka moto oyo azwi yango esengo, ekolisaka bolingo na kati ya libota mpe bámona ete baoyo bapesaka botɔndi bazali bato oyo bakɔmeli.
Tata moko na nkombo Stephen alobi boye: “Mpo na kopesa bana na ngai ndakisa, natɔndaka mwasi na ngai mpo na bilei.” Yango ebimisi matomba nini? Stephen alobi boye: “Bana na ngai mibale ya basi bamonaka yango, mpe yango esalisi bango báyebaka kopesa mɛrsi.” Soki obalá, ozalaka na momeseno ya kopesa mwasi to mobali na yo mɛrsi soki alambi to asukoli basaani? Opesaka bana na yo mɛrsi ata soki basali makambo oyo bana basengeli kosala?
(2) Bóteyaka bango. Botɔndi ezali lokola bafololo. Esɛngaka kolona fololo na mabelé ya malamu mpo ekola. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bákóma na botɔndi? Mokonzi Salomo alobelaki likambo moko ya ntina mpenza ntango akomaki boye: “Motema ya moyengebene [ekanisaka] liboso ya kozongisa liloba.”—Masese 15:28.
Baboti, bokoki kosalisa bana na bino bákanisaka milende oyo moto asali mpe motema malamu oyo amonisi mpo na kopesa bango eloko? Kokanisa ndenge wana ekokolisa botɔndi ya bana ndenge mabelé ya malamu ekolisaka bafololo. Maria, oyo akolisá bana misato, alobi boye: “Esɛngaka kozwa ntango ya kofanda na bana mpo na kolimbolela bango báyeba milende oyo moto asalaki mpo na kokabela bango. Moto yango akanisaki bango naino mpe alingaki komonisa bango ete alingaka bango. Namoni ete ebongi mpenza kosala milende wana mpo na kosalisa bana.” Masolo ya ndenge wana esalisaka bana báyeba nini basengeli koloba mpo na kopesa mɛrsi mpe mpo na nini basengeli koloba yango.
Baboti ya bwanya basalisaka bana na bango bákanisaka te ete biloko oyo bapesaka bango, esengelaki kaka bápesa bango yango.a Toli ya Masese 29:21 (NW) oyo ezali kolobela baombo ebongi mpenza mpo na bana: “Soki moto alekisi kobondela moombo na ye banda bomwana, ntango akokola akozanga botɔndi.”
Ndenge nini bokoki kosalisa bana ya mike bázalaka na botɔndi? Linda, mama moko ya bana misato, alobi boye: “Soki tolingi kokomela moto mokanda mpo na kopesa ye botɔndi, tozalaki kosala yango elongo na bana na biso. Tozalaki kosɛnga bango bátya mwa mayemi to bákoma bankombo na bango na mokanda yango.” Ya solo, ekoki kozala ete mayemi na bango ezalaki kaka bongobongo mpe nkoma na bango ezalaki komonana malamu te, kasi yango ezalaki mpenza koteya bango.
(3) Bólɛmba te. Biso nyonso tobotamaka na ezaleli ya kolukaka kaka matomba na biso moko, mpe yango ekoki kopekisa biso kozala na botɔndi. (Genese 8:21; Matai 15:19) Kasi, Biblia ezali kolendisa basaleli ya Nzambe boye: “Bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kopusa makanisi na bino, mpe bosengeli kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe.”—Baefese 4:23, 24.
Kasi, baboti oyo bakolisá bana bayebaka ete kosalisa bana ‘bálata bomoto ya sika’ ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Stephen, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Kosalisa bana na biso bákóma koyeba kopesa mɛrsi kozanga ete bátinda bango esɛngaki ntango molai.” Kasi, Stephen ná mwasi na ye balɛmbaki te. Stephen abakisi boye: “Lokola tolɛmbaki te, bana na biso basimbaki liteya yango. Lelo oyo, tozalaka mpenza na esengo ntango tomonaka bango bazali kopesa bato mosusu mɛrsi.”
Epai ya baninga mpe bato mosusu oyo tofandi na bango
Ntango mosusu, tobosanaka koloba mɛrsi ata soki tozali na botɔndi mpo na likambo oyo basaleli biso. Ezali mpenza na ntina tósukaka kaka te na kozala na botɔndi na motema, kasi tóbimisaka yango mpe na maloba? Mpo na koyanola na motuna wana, tótalela likambo moko oyo elekaki na kati ya Yesu ná bato moko ya maba.
Ntango Yesu azalaki kokende na Yelusaleme, akutanaki na mibali zomi oyo bazalaki na maba. Biblia elobi boye: “batombolaki mingongo na bango mpe balobaki ete: ‘Yesu, Molakisi, yokelá biso mawa!’ Mpe ntango amonaki bango alobaki na bango ete: ‘Bókende mpe bómilakisa epai ya banganga-nzambe.’ Bongo wana bazalaki kokende bapɛtolamaki. Moko na bango, ntango amonaki ete abiki, azongaki, kopesáká Nzambe nkembo na mongongo makasi. Mpe akweaki na elongi na ye na makolo ya Yesu, apesaki ye matɔndi; nzokande, azalaki Mosamalia.”—Luka 17:11-16.
Yesu akipaki te ndenge bato yango mosusu bapesaki ye mɛrsi te? Biblia ebakisi boye: “Yesu azongisaki ete: ‘Bato zomi bapɛtwamaki te? Bongo, bamosusu libwa bazali wapi? Moto ata moko te azongaki mpo na kopesa Nzambe nkembo longola kaka moto oyo ya ekólo mosusu?’”—Luka 17:17, 18.
Bato mosusu libwa wana bazalaki bato mabe te. Liboso, bamonisaki polele ete bazalaki kondimela Yesu, mpe bakakatanaki te kotosa malako oyo apesaki bango, oyo esɛngaki bákende komilakisa epai ya banganga-nzambe na Yelusaleme. Kasi, atako bazalaki mpenza na botɔndi na ndenge Yesu abikisaki bango, bazongaki mpo na kopesa ye mɛrsi te. Yango esepelisaki Yesu ata moke te. Ezali boni mpo na biso? Soki moto moko asali biso malamu, topesaka ye mɛrsi mbala moko mpe, soki likoki ezali, totindelaka ye mwa mokanda mpo na komonisa botɔndi na biso?
Biblia elobi ete moto ya bolingo “aboyaka makambo oyo ebongi té, alukaka bolamu na ye moko té.” (1 Bakorinti 13:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Na yango, kopesa mɛrsi oyo euti mpenza na motema ezali kaka te elembo ya bonkonde, kasi mpe elembo ya bolingo. Lisolo wana ya bato ya maba eteyi biso ete bato oyo balingi kosepelisa Klisto basengeli komonisaka bolingo ya ndenge wana mpe kozalaka na botɔndi epai ya bato nyonso, ezala bazali bato ya ekólo, mposo to lingomba nini.
Omituna boye: ‘Wapi mbala ya nsuka oyo napesaki mɛrsi na moto moko ya kartye, moninga ya mosala, ya eteyelo, monganga, motɛki moko ya biloko na magazini to moto moko oyo asalisaki ngai?’ Mpo na nini te kofanda mpe okanisa soki opesaki mɛrsi to okomaki mwa mokanda mpo na komonisa botɔndi na yo mbala boni na boumeli ya mokolo moko to mibale oyo eleki? Kokanisaka ndenge wana ekoki kosalisa yo omona esika osengeli kobongisa na likambo yango.
Moto ya libosoliboso oyo tosengeli kozala na botɔndi mpo na ye ezali Yehova Nzambe. Azali Mopesi ya “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.” (Yakobo 1:17) Wapi mbala ya nsuka oyo opesaki Yehova mɛrsi na motema moko mpo na makambo oyo asalelaki yo?—1 Batesaloniki 5:17, 18.
Mpo na nini kozala na botɔndi ata soki bato mosusu bazangi botɔndi?
Ekoki kozala ete bato mosusu bapesaka yo mɛrsi te soki osaleli bango likambo moko ya malamu. Kasi, mpo na nini tosengeli kopesaka mɛrsi ata soki bato mosusu bazali kosala yango te? Ntina moko yango oyo.
Soki tozali kokoba kosala bato malamu ata soki bazangi botɔndi, tokomekola Yehova Nzambe, Mokeli na biso ya motema mawa. Atako bato mingi batɔndaka Yehova te mpo na bolingo na ye, yango epekisaka ye te kosala bango malamu. (Baloma 5:8; 1 Yoane 4:9, 10) “Asalaka ete moi na ye ebima likoló ya bato mabe mpe bato malamu mpe asalaka ete mbula enɔka likoló ya bayengebene mpe bato bazangi boyengebene.” Soki tozali kosala nyonso tópesaka botɔndi atako tozali na kati ya bato oyo bazangi botɔndi, tokomonisa ete tozali “bana ya Tata na [biso] oyo azali na likoló.”—Matai 5:45.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Baboti mingi batángá mpe balobelá ná bana na bango makambo oyo ezali na buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, ebimisami na Batatoli ya Yehova. Mokapo 18 ya buku yango ezali na motó ya likambo, “Obosanaka koloba mɛrsi?”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
Fandá mpe kanisá soki opesaki mɛrsi to okomaki mwa mokanda mpo na komonisa botɔndi na yo mbala boni na boumeli ya mokolo moko to mibale oyo eleki
[Elilingi na lokasa 15]
Ata bana mike bakoki mpe koyekola kopesaka mɛrsi
[Elilingi na lokasa 15]
Pesaká bana na yo ndakisa na likambo ya kopesaka botɔndi