Mpiko oyo epesi nzela na kolónga
“Bozali na mposa na koyika mpiko mpo ete bosala mokano na Nzambe, mpe ete bozwa yango esili ye kolaka.”—BAEBELE 10:36, MN.
1. Mpo na nini moto nyonso oyo azali kosalela Jéhovah Nzambe, asengeli mpenza koyika mpiko?
MOKILI mobimba mozali kolala na nsé na nguya na nzambe oyo akopusaka bato na botomboki Satan le Diable,mokóló oyo akomonanaka te, azali kosala nyonso ekoki na ye mpo na kotɛmɛla Jéhovah mpe kobundisa Boyangeli na Ye ya molóngó mobimba ete elongisama te na nzela na Bokonzi na Masiya. Moto oyo amipesi na Nzambe mpe azwi etelemelo mpo na ye na ntina na likambo litali boyangeli, asengeli kokutana na botɛmɛli ya mokili oyo. (Yoane 15:18-20; 1 Yoane 5:19) Na yango, moko na moko kati na biso asengeli komibongisa mpo na koyika mpiko kino mokili oyo mokobomama nyɛɛ, na Armagedon. Mpo ete tótangama kati na basaleli na Nzambe baoyo bakolonga mokili mpo na kondima mpe mpo na bosembo na bango, tosengeli kozala na ekateli makasi mpo na koyika mpiko kino nsuka. (1 Yoane 5:4) Lolenge nini tokoki kolónga yango?
2, 3. Mpo na nini tokoki koloba ete Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto bazali bandakisa minene mpo na koyika mpiko?
2 Mpo na yango, tozali na ndakisa mibale ya mpiko oyo ezali bongo elendiseli mpo na biso. Yango nini? Moko na yango ezali Yesu Klisto, “mobotami na liboso na biloko binso bizalisami,” oyo azali kolendendela kati na mosala na Nzambe uta kozalisama na ye, na eleko oyo biso toyebi yango te. ’ Mpo na bosembo oyo amonisaki kati na mosala na ye mpo na Nzambe, Yesu asili kokóma ndakisa epai na bikelamu nyonso ya mayele oyo bizalisamaki nsima na ye, na likoló to mpe na mabelé (Bakolose 1:15, 16) Kasi, Jéhovah Nzambe nde asili kopesa biso ndakisa eleki monene ya mpiko, ye oyo uta ntango molai azali koyika mpiko mpo na botomboki basalemi na ntina na boyangeli na ye ya molóngó mobimba mpe akolanda kosala yango kino akosukisa botomboki wana ete asilisa likambo yango mbala moko mpo na libela.
3 Jéhovah apesaki ndakisa malamu ya koyika ‘mpiko na makambo matali lokumu na ye mpe mayoki na ye ya mozindo. Liboso na ntembe wana monene, akangaki motema mpe amipekisaki ete asala mabe te epai na baoyo bazalaki kofinga ye, Satan le Diable mpe atɛngami kati na bato yango. Tozali kotɔndo Nzambe na ndenge azali koyika mpiko mpe azali na motema mawa. Soki mpo na bizaleli wana te, mbɛlɛ tozwi bomoi te. Solo mpenza, motindo oyo Jéhovah Nzambe azali koyika mpiko ekesenisi ye na moto nyonso mosusu.‘
4, 5. (a) Lisese ya moyemi na mbeki liteyi biso nini likoló na mpiko mpe motema mawa na Nzambe? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete motema mawa na Nzambe mosalelamaki mpo na mpamba te?
4 Ntoma Paulo azali kokundola lolenge ná koyika mpiko mpe motema mawa na Nzambe awa elobi ye ete: “Moyemi na mbeki azali na bokonzi te likolo na moyomba? Bobele na ndambo moko, akosala mbeki moko mpo na misala na lokumu mpe mbeki mosusu mpo na misala na mpamba Bongo, atako Nzambe alingaki komonisa nkanda na ye mpe nguya na ye, nde ayiki mpiko monene mpo na mbeki na nkanda oyo ebongi na kobebisama ete alakisa nkembo na ye monene epai na mbeki na mawa oyo ye abongisaki liboso mpo na lokumu na ye. Mbeki yango ezali biso. Abyangi biso bobele na Bayuda te, kasi longwa na Bapakano lokola.”—Baloma 9:21-24, MN.
5 Lokola yango emonisami na maloba oyo, na eleko oyo azali komonisa ete azali koyika mpiko, Jéhovah azali kolanda mokano na ye kitoko mpe azali komimonisa na motema mawa epai na ndambo mosusu na “mbeki” na bato. Azali kobongisa mbeki yango mpo na nkembo na seko, kokweisáká bongo mikano mabe ya monguna na ye monene, Satan le Diable, mpe mikano ya bato oyo balandi Diable. Bato banso bakómaki mbeki na nkanda te oyo ebongi na liwa. Wana elakisi ete motema molai mpe koyika mpiko na Nzambe Mozwi na-Nguya-Nyonso ezalaki mpamba te mpe amonisaki motema mawa na ye na ntina. Yango ebimisi (1) Bokonzi kitoko na makoló, oyo esalemi na libota na bomoko oyo litambwisami na Yesu Klisto, Mwana molingami na Jéhovah; mpe (2) libota na bato oyo bakokóma lisusu na ezalela ya kokoka, mpe bakozala na bomoi ya seko kati na Paradis awa na mabelé.
Toyika mpiko kino nsuka
6. (a) Mpo na nini mpiko ya baklisto etyami na komekama? (b) Liloba na greke oyo libongolami na “koyika mpiko” elakisi nini?
6 “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Lokola elikya na biso ezali mpenza kitoko, maloba na kolendisa oyo na Yesu masengeli koyokama mbala na mbala kati na matoi na biso. Ya solo, ebongi mpenza kobanda litambé malamu kati na bomoi ya moyekoli moklisto. Nzokande, oyo eleki na motuya, ezali lolenge oyo tozali koyika mpiko, oyo tozali kopota mpo nakokóma na nsuka na emekaneli na mbango. Ezali yango nde ntoma Paulo amonisaki wana elobaki ye ete: “Bozali na mposa na koyika mpiko mpo ete bosala mokano na Nzambe, mpe ete bozwa ango esili ye kolaka.” (Baebele 10:36, MN)Liloba na greke libongolami na “koyika mpiko ezali hy-po-mo-ne. Mbala mingi ekomonisaka molende, kolendendela to motema molai ya moto oyo azangi kobungisa elikya na ye liboso na bipekiseli, na minyoko, na mimekamo mpe na masɛnginya. Mpo na kolikya kozwa lobiko mokolo mosusu, tosengeli kondima ete mpiko na biso etyama na komekama, mpo na kobongisa biso ete tozwa lobiko yango.
7. Makanisi nini bosengeli kopɛngola yango, mpe bandakisa nini ekosalisa biso na koyika mpiko?
7 Tosengeli kokanisa te ete momekamo wana mokoki kosila nokinoki. Mpo ete makambo na ntina na boyangeli ya molóngó mobimba mpe ya bosembo na moto ekoka kokatama mpo na libela, Jéhovah alukaki te kosukisa yango nokinoki. Ayikaki mpiko na mabe, nzokande akokaki kosilisa yango bobele na ntango wana. Yesu Klisto mpe azalaki ndakisa malamu ya koyika mpiko. (1 Petelo 2:21; tala Baroma 15:3-5.) Lokola tozali na bandakisa wana kitoko liboso na biso, tozali na mposa mpenza ete toyika mpiko kino nsuka—Baebele 12:2, 3.
Tomonisa makoki na biso
8. Ntoma Paulo monisaki ezaleli nini oyo biso banso tosengeli komonisa yango?
8 Uta kala, basaleli nyonso na Nzambe basɛngisamaki na mokumba oyo: komonisa bosembo na bango na koyika mpiko. Bato na lokumu baoyo balobelami na Biblia mpe batikalaki sembo kino kufa, mpe bazwi bomoi ya seko na makoló, bamonisaki ezaleli ya kolendendela. Na yango, Saulo moto na Talasi, Mofalisai na kala, alobaki epai na Bakolinti ete: “Ata nazali eloko mpamba, kasi baoyo bokobéngaka ete bantoma minene baleki ngai te. Bilembo na ntoma bisili komonana kati na bino, na mpiko nyonso, na makamwisi, na bisakweli mpe na misala na nguya. ”(2 Bakolinti 12:11, 12, MN) Paulo azalaki kotalela mosala na ye na motuya mingi na boye ete ayikaki mpiko na mimekamo mingi atako yango ezalaki likámá mpo na ye, mpe asalaki milende nyonso ete abwaka nsoni te likoló na mosala na ye.—2 Bakolinti 6:3, 4, 9.
9. (a) Mpiko nini batikali bapakolami bamonisaki yango, mpe yango ebimisi matomba nini? (b) Eloko nini ezali kopusa biso na kolendendela kati na mosala ya Nzambe?
9 Na eleko na biso, baklisto bapakolami baoyo-asalelaki Nzambe liboso na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bayebaki ete ntango na Bapakano ekosuka na 1914, mpe mingi kati na bango bazalaki na elikya ya kozwa mbano na bango mpo na bomoi na likoló na mobu wana monene. Kasi bakendaki likoló te. Lokola yango emonisamaki na makambo masalemaki uta ntango wana, bambula mingi esengelaki koleka. Na boumeli ya ntango oyo balandaki kozala na bomoi awa na mabelé, Jéhovah Nzambe apetolaki bango. (Zekaria 13:9; Malaki 3:2, 3) Na nsima mpiko oyo bamonisaki epesaki bango nzela na kolona bizaleli malamu. Basaleli wana na Jéhovah basepelaki wana babengamaki na nkombo na ye. (Yisaya 43:10-12; Misala 15:14) Lelo oyo, nsima na kokutana na bitumba mibale ya mokili mobimba mpe ebele na matata ya mikemike, basaleli wana na Nzambe bazali na esengo na komona ebele monene na bampate oyo ezali sé kobakisama, oyo motuya na bango moleki bamilio minei sikawa, bazali kosalisa bango mpo na kopalanganisa nsango malamu. Paradis na bango ya elimo esili kopalangana na mokili mobimba, kino na bisanga mosika. Awa ezali biso na bomoi, tozali sé kosepela mingi na ngolu emonisameli biso, oyo ezali kopusa biso na kolendendela na sembo nyonso kati na mosala na Nzambe kino mokano mpe mwango nyonso na Jéhovah ekokokana.
10. Eloko nini tozali na yango mposa ntango nyonso mpo ete tolɛmba te?
10 Lokola mbano na biso. euti na ezaleli na biso ya kolendendela, tozali ntango nyonso na mposa ya kolendisama kati na likambo yango ya ntina mingi. (1 Bakolinti 15:58; Bakolose 1:23) Mpo ete basaleli na Jéhovah balɛmba te, basengeli kolendisama mbala na mbala ete bakangami na solo mpe na libaku kitoko oyo bazali na yango ya kopalanganisa solo wana. Ezali yango nde esalemaki na ekeke ya liboso kati na masangá ya sika oyo Paulo mpe Balanaba bazongaki kotula. (Misala 14:21, 22) Lokola yango elobi ntoma Yoane, tozwa ekateli makasi ete solo eumela kati na biso, mpe “ekozala na biso elongo mpo na libela.”—2 Yoane 2.
Awa ezali biso kozela,taningana te kati na mpiko na biso
11.Emonani lokola ete Nzambe azali koloba nini epai na basaleli na ye, mpe lolenge nini yango emonanaki mpo na Yozefe?
11 Esengeli ntango mingi mpo ete momekamo na biso ekokisa mosala na yango. (Yakobo 1:2-4) Na ntango ekateli na bango ya kolendendela kati na kondima etyamaki na komekama, ezali lokola nde Nzambe alobaki epai na basaleli na ye ya ntango na kala ete: Bozela! Bozela! Bozela! Kasi, kozela ezalaki ntango nyonso kopesa matomba malamu mpo na basaleli wana ya sembo. Na ndakisa, Yozefe azelaki mibu 13 kati na boombo mpe kati na nkangá, kasi momekamo wana mopɛtɔlaki bomoto na ye.—Nzembo 105:17-19.
12, 13. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Abalayama azali ndakisa ya koyika mpiko mpe ya bosembo? (b) Makambo nini malobami na ntina na kondima mpe mpiko oyo Abalayama amonisaki?
12 Abalayama azalaki na mibu 75 na ntango Nzambe abyangaki ye longwa na mboka Ulu, na mokili ya Bakaladi, mpo na kokenda na Mabelé na ndaká. Azalaki soko na mibu 125 wana andimisamaki na elaká oyo Nzambe alápéláki ye ndai—yango esalemaki bobele nsima wana amonisaki kondima na ye makasi na kopesáká Yisaka, mwana na ye molingami lokola mbeka, nde atikaki bobele ntango anzelu na Jéhovah apekisaki lobɔkɔ na ye ete apesa mwana lokola mbeka te. (Genese 22:1-18) Mibu ntuku mitano ezalaki ntango molai mpo na Abalayama, ye oyo afandaki na mboka mopaya; kasi alendendelaki lisusu mibu 50, kino akufaki wana akokisaki mibu 175. Na boumeli ya eleko wana, Abalayama azalaki ntango nyonso motatoli mpe mosakoli na sembo na Jéhovah Nzambe.—Nzembo 105:9-15.
13 Kondima mpe mpiko ya Abalayama ezali ndakisa mpo na basaleli nyonso na Nzambe baoyo balingi kozwa mapamboli malakámi na nzela na Yesu Klisto, Libota na Abalayama. (Baebele 11:8-10, 17-19) Totangi na ntina na ye kati na Baebele 6:11-15 (MN) ete: “Tolingi ete moto na moto kati na bino amonisa etyngia ete atonda na elikya kino nsuka, mpo ete bozala bagoigoi te, kasi bomekola baoyo basili kosangola libula na bilaká na ntina na kondima mpe motema molai na bango. Na yango, wana Nzambe apesaki elaká na Abalayama, alápáki ndai na nkombo na ye moko mpamba te azalaki na moto mosusu te oyo aleki ye monene ete alápa ndai na nkombo na ye, ete: ‘Mpo na mapamboli nakopambola yo, mpe mpo na kofulisa nakofulisa yo.’ Na bongo, Abalayama azwaki elaká yango mpo ete azalaki na motema molai.”
14. Mpo na nini tosengeli kokanisa te ete momekamo oyo toyikeli yango mpiko akoma te mpe ete tokozwa mbano te?
14 Mpo na batikali bapakolami, mibu ntuku nsambo na nsambo misili koleka uta ntango ya Bapakano ezwaki nsuka na yango. Na eleko wana, na 1914, bamoko na basangani wana bazalaki kozela ete lisangá na boklisto ya solo lizwa nkembo na makoló. Toyebi te soki batikali basengeli kozela ntango boni lisusu. Tosengeli nde koningana mpe kokanisa ete to. tozeli ntango mingi, ete tokozwa mbano oyo elakami te? Soko moke te! Mpamba te, na kosalaka bongo, boyangeli na Nzambe mbɛlɛ ekolongisama te, mpe nkombo na ye mbɛlɛ ekokumisama te.Mbɛlɛ Jéhovah akolongisama te liboso na mokili na ntango akopesa biso elónga mpe libonza na yango, bomoi na seko. Batikali mpe baninga na bango na sembo baoyo bakokisami na bampate, basili kozwa ekateli ya kozela kino Jéhovah akomonisa nkanda na ye na ntango oyo ye moko asili kokana yango. Na ezaleli na bango ya kolendendela, bazali kolanda matambé ya Abalayama.—Baloma 8:23-25.
15. (a) lolenge nini ba Témoins bazali lisusu komitambwisa lelo oyo, mpe Jéhovah asungaki bango kati na mimekamo nini? (b) Paulo apesaki toli nini oyo ezali na ntina kino na eleko ma biso?
15 Lelo, bazali lisusu komonisa mpiko mingi na kokokisama ya mokano na Nzambe. (Baloma 2:6, 7) Na ntango eleki Jéhovah asungaki biso, na ndakisa kati na bolɔkɔ mpe na bisika na kokangama oyo bazalaki kobenga ete camps de concentration; apesaki biso nzela na kobima na mpasi wana na elónga nyonso, kokumisáká bongo nkombo na ye mpe mokano na ye.’a Na boumeli na ntango oyo etikali kino momekano na biso mokokokisa mosala na yango, Jéhovah akosala lolenge moko. Toli oyo na Paulo ezali na ntina mingi mpo na eleko na biso ete: “Bosengeli kokanga motema mpo ete nsima ya kokokisa makambo oyo Nzambe alingi, bokoka kozwa oyo ye alakaki bino.”—Baebele 10:36, Boyokani ya sika; Baloma 8:37.
16. Mpo na nini tosengeli kotya ndelo te na komipesa na biso epai na Jéhovah, ezala mpo na ntango soko mpo na milende?
16 Lokola Jéhovah azali naino na mosala mingi mpo na biso kati na mokili oyo mabe, na ndakisa na Yesu, biso mpe tolingi kokokisa mosala yango kino ekosila. (Yoane 17:4) Na ntango tomipesaki epai na Jéhovah, ezalaki te mpo na kosalela ye na boumeli ya mwa ntango kino etumba ya Armagedon ekoya. Kasi ezalaki nde mpo na libela. Nsima na Armagedon, mosala na biso mpo na Jéhovah mokosuka te. Nzokande, soki tolingi komona makambo kitoko makosalema nsima na etumba wana monene, tosengeli liboso kokokisa mosala oyo ye asili kopesa biso. Na yango, longola libaku kitoko oyo asili kopesa biso ete tolanda kosala mpo na ye, tokozwa bolamu oyo tozali kozela uta bileko—mingi, engebene elaká na ye.—Baloma 8:32.
Bolingo mpo na Nzambe ezali kosalisa biso na koyika mpiko
17, 18. (a) Eloko nini ekosalisa biso ete toyika mpiko na momekamo mpo na kondimama na Nzambe? (b) Eloko nini ekosalisa biso na kolónga mimekamo, mpe nini tokoloba te na ntina na ntango oyo etikali?
17 Na ntango tozwi momekamo, mbala mosusu tokoki komituna ete: ‘Lolenge nini tokoyika mpiko na boumeli ya ntango molai?’ Eyano ezali nini? Na kolingáká Nzambe na motema na biso mobimba, na elimo na biso mobimba, na molimo na biso mobimba mpe na makasi na biso mobimba. “Bolingo ezali na motema molai mpe ezali malamu. Bolingo ezali na zuwa te, ekomikumisaka te, ekomibimbisaka na lolendo te. Ekokanga motema na nyonso, ekondimaka nyonso, ekolikyaka nyonso, ekoyikaka mpiko na nyonso. Bolingo ekosuka te.” (1 Bakolinti 13:4, 7, 8, MN) Mpiko na biso ekozala na ntina bobele soki epusami na bolingo na biso mpo na Nzambe. Soko tokokanga motema na bolózi likoló na bokangami na biso epai na Jéhovah, mpiko na biso ekozala bongo na mokano ya kokólisa bolingo na biso mpo na ye. Eloko oyo epesaki Yesu nzela ete ayika mpiko, ezali nde bolingo oyo azalaki na yango mpo na Nzambe, Tata na ye.(Yoane 14:30, 31; Baebele 12:2) Likambo nini tokokoka koyikela mpiko te, soki nde mokano na biso mpenza ezali bolingo mpo na Nzambe, Tata na biso?
18 Ezali bolingo na biso makasi mpo na Jéhovah Nzambe nde epesi biso nzela na kozala ntango nyonso balóngi ya mokili na eleko oyo na mpasi monene. Na ntango nyonso oyo akotika nzela na ebongiseli ya biloko ya sikawa, Jéhovah akolanda kopesa biso lisalisi oyo tozali na yango mposa, na nzela na Yesu Klisto.(1 Petelo 5:10) Ya solo, tosakoli soko moke te mpo na ntango oyo etikali, mpe totii eleká te. Yango ezali mpo na Nkolo na bilaká, Jéhovah Nzambe.—Nzembo 31:15.
19, 20. (a) Lolenge nini tosengeli kotalela mokolo nyonso oyo mazali koleka mpe toyikeli yango mpiko? (b) ngomba nini tolingi kopɛngola yango, mpe mpo na nini?
19 Kasi lelo oyo, engebene bisakweli, libota oyo lisengeli komona “nsuka ya ebongiseli na biloko ya ntango oyo,” bakómi mibangé mpenza. (Matai 24:3, 32-35) Na yango, toyeba ete mokolo nyonso oyo tozali koyika mpiko mozali koleka mpe motangami lisusu te na mikolo oyo Satana mpe bilimu mabe na ye bakobebisa lisusu molóngó mobimba, ntango oyo ezali kobɛlɛmisa biso na eleko oyo Jéhovah akoboma “mbeki na nkanda oyo ebongi na kobebisama.” (Baloma 9:22, MN) Mosika te, na ntango motema molai na ye mokokóma na nsuka na yango, Jéhovah akosopa nkanda na ye likoló na bato mabe. Akomonisa bongo ete aboyi etamboli na bango, ata asili kotikela bango nzela ete boumela kino ntango wana.
20 Mbɛlɛ tokozala bibebe soko tokotika kosala milende na bolingo mpo na kozwa libonza kitoko oyo lipesameli biso na nzela na Yesu Klisto. Na esika na kosala bongo, tosili kozwa ekateli ya kozala ntango nyonso ba Témoins de Jéhovah ya sembo na eleko na ntina mingi oyo Mozalisi ekolóngisa boyangeli na ye ya molóngó mobimba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na yango, christine King akomaki ete: “Bobele ba Témoins de Jéhovah nde bakweisaki boyangeli ya (nazi, mpamba te atako babomaki bankumu mingi na bango, kasi mosala na bango mokóbaki, mpe, na sanza ya Mai 1945, lingomba ya ba Témoins de Jéhovah lizalaki naino, nzokande boyangeli ye national-socialisme ezalaki lisusu te. Ba Témoins bakómaki ebele, kozanga ete babebisama. Bato mingi babomamaki kati na lingomba wana mpe lingomba elóngaki etumba mosusu oyo ebakisami kati na etumbu ya Jéhovah Nzambe.’’—L’Elat nazi et les nouvelles religions: Etude portant sur cinq; cas de non-conformisme (angl.), page 193.
Bozongeli
◻ Mpo na nini tokoki te kopɛngola ete mpiko na biso etyama na komekama te?
◻ Makanisi nini tolingi te ete tozala na yango?
◻ Tosengeli kosala nini mpo ete tolemba te?
◻ Ezaleli nini ba Témoins bazali lisusu komonisa yango lelo?
◻ Eloko nini ezali kosalisa biso na koyika mpiko wana tokutani na momekamo?
[Elilingi na lokasa 11
Lokola ba Témoins oyo ya mboka Port d’ Espagne, na esanga ya Trinité, basaleli na Nzambe bazali ntango nyoso kozela Jéhovah