OYEBAKI YANGO?
Mokumba ya mokonzi ya basoda ya limpinga ya Baroma ezalaki nini?
Makomami ya Grɛki elobeli bakonzi ya basoda ya Roma na bisika mingi. Soda oyo atalaki ndenge bazali koboma Yesu azalaki mpe na mpɛtɛ yango ndenge moko na Korneyi, moto ya liboso oyo azalaki Moyuda te kasi akómaki mokristo. Soda oyo atalaki ndenge babɛtaki ntoma Paulo fimbo mpe Yuliusi, oyo amemaki Paulo na Roma bazalaki mpe bakonzi ya basoda.—Marko 15:39; Misala 10:1; 22:25; 27:1.
Bakonzi yango ya basoda bazalaki kokamba limpinga oyo ezalaki na basoda kobanda 50 tii 100. Mokumba na bango ezalaki ya kopesa formasyo mpe disiplini na basoda oyo bazalaki kokamba; kotalatala bilamba mpe bibundeli na bango mpe kopesa bango mitindo ntango bazalaki kokende bitumba.
Mpɛtɛ yango ezalaki mpɛtɛ monene oyo soda nyonso akokaki kozwa. Baoyo bazalaki kozwa mpɛtɛ yango ezali basoda oyo baumelaki mingi na mosala yango mpe bazalaki bakambi ya malamu. Bakonzi yango nde bazalaki kosala ete limpinga ya Roma etambola malamu mpe ezala makasi. Buku moko elobi ete bakonzi yango ya basoda “bazalaki na eksperiansi mingi mpe bayebaki makambo mingi koleka basoda mosusu nyonso.”
Batalatala ya ntango ya kala ekeseni na oyo ya lelo na nini?
Na kokesana na batalatala ya lelo, oyo ya ntango ya kala ezalaki mbala mingi kosalema na ebende oyo babongisi malamu; mingimingi bronzɛ kasi mpe motako, palata, wolo to wolo esanganá na palata. Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli batalatala ezali ntango bazalaki kotonga tabernakle, esika ya liboso ya losambo ya Bayisraele. Basi bapesaki batalatala mpo básala na yango saani monene ya motako ná etɛlɛmiselo na yango. (Kobima 38:8) Ekoki kozala ete bazalaki konyangwisa batalatala yango mpo básala na yango biloko yango.
Mbala mingi, batalatala oyo bato ya arkeoloji batimolaki na Israël to zingazinga na yango ezalaki na babiju mpe biloko mosusu ya monzɛlɛ ya basi. Batalatala yango ezalaki mingimingi sɛrklɛ mpe esimbeli na yango ezalaki ya nzete, ebende to mpɛmbɛ ya nzoku oyo bazalaki kobongisa yango lokola elongi ya mwasi. Mbala mingi, esika ya kotala elongi batyaki yango eloko te.
Batalatala ya ntango ya kala ezalaki komonisa mpenza elongi malamu te soki tokokanisi yango na oyo ya lelo. Yango ekoki kozala ntina oyo ntoma Paulo alobelaki yango boye: “Sikoyo tozali komona bandelo molilimolili na talatala ya ebende.”—1 Bakorinti 13:12.