Tolanda bolingo, nzela eleki malamu
JÉHOVAH NZAMBE azali mpenza bolingo. (1 Yoane 4:8) Yesu Klisto, Mwana na ye, alobaki ete tosengeli kolinga Nzambe mpe bazalani na biso. (Matai 22:37-40) Nzambe azali mpenza kokamba molóngó mobimba na ezaleli wana! Na yango, mpo na kozala na bomoi ya seko, ezala na esika nini, tosengeli kolanda nzela ya bolingo.
Nzambe amonisaki bolingo epai na libota na Yisraele, nde na nsima abwakaki yango mpo ete lisangá wana lizangaki sembo. Bongo, amonisaki ete bayekoli na Yesu basalaki lisangá na Ye ya sika. Lolenge nini? Na bilembo minene ya elimo santu, apesaki bango nguya ete baloba na minoko ndenge na ndenge mpe ete basakola. Mpe, na Pantɛkɔte ya mobu 33 ya ntango biso, Bayuda 3 000 mpe bapakano oyo babongwanaki na lingomba ya Bayuda bakómaki bandimi mpe batikaki lisangá ya kala mpo na kokɔta na lisangá ya sika ya Nzambe. (Misala 2:1-41) Na nsima, lokola makabo ya elimo mapesamaki na bantomá na Yesu, bilembo wana bisilaki mpe na liwa na bango. (Misala 8:5-18; 19:1-6) Kasi makabo ya elimo mamonisaki bongo ete ngolu na Nzambe ezalaki likoló na Yisraele ya elimo.—Bagalatia 6:16.
Makamwisi masalemaki na nzela na makabo ya elimo mazalaki na ntina. Nzokande, komonisela bato mosusu bolingo to komibanzabanza mpo na bato mosusu, ezalaki na ntina mingi koleka kozwa makabo ya elimo. Ntomá Paulo alimbolaki yango kati na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti (pene na mobu 55 ya ntango na biso). Kati na yango, alobaki na ntina na bolingo ete ezali “nzela eleki malamu.” (1 Bakolinti 12:31) Nzela yango etalelami kati na 1 Bakolinti mokapo 13.
Soki tozangi bolingo, tozali bobele mpamba
Paulo alimbolaki ete: “Soko nakoloba na minoko na bato mpe na baanzelu nde nazangi bolingo, nazali bobele ngonga mpamba oyo ekolelaka to mpe elonja oyo ekobɛtaka.” (1 Bakolinti 13:1, MN) Kozanga bolingo, ntina ezalaki te mpo na koloba na monoko na bato to na monoko ya baanzelu na nzela na likabo moko ya elimo. Paulo asepelaki kobimisa maloba mitano ya kolendisa na esika ya koloba maloba nkɔto zomi na monoko oyo bato bayebaki kososola yango te. (1 Bakolinti 14:19) Moto oyo azangi bolingo akokani na “elonja oyo ekobɛtaka”—ngonga ebɛtami makasi mpe ekosalaka mpasi na matoi—to “elonja ezali kobɛta” na motindo mobongi te. Soki bolingo te, likabo ya koloba na minoko ndenge na ndenge ezalaki nzela na kolendisa te mpe ezalaki kopesa makasi na elimo te mpo na kokumisa Nzambe mpe kosalisa libota na ye. Lelo oyo, tozali komonisa bolingo na biso na kosaleláká monoko oyo bato bayebi kososola kati na mosala ya boklisto.
Na nsima, ntomá alobaki ete: “Soko nakosakola ata mpe koyeba mabombami manso mosantu mpe makambo manso na mayele, mpe ata nazali na kondima nyonso mpo na kolongola ngomba, nde nazangi bolingo, nazali bobele mpamba.” (1 Bakolinti 13:2, MN) Makamwisi na kosakola bososoli na makambo minene mabombami mpe boyebi bopesami na elimo santu ekoki kozala na litomba epai na bato mosusu, kasi epai na baoyo bazwaki likabo yango te, soki nde bazangaki bolingo. Paulo asalelaki bososoli na ye ya kokamwa na mabómbami mosantu mpo na kosalisa bato mosusu mpe, na nzela na likabo ya boyebi, asakolaki ete bato bazindaki na masuwa bakobika. (Misala 27:20-44; 1 Bakolinti 4:1, 2) Kasi, soki azalaki na ‘boyebi ya makambo nyonso mpe na kondima nyonso,’ nde azangaki bolingo, mbɛlɛ azalaki bobele mpamba na miso na Jéhovah.
Lelo oyo, elimo ya Jéhovah epesi nzela na Batemwe na ye ete bakanga ntina ya bisakweli ya Biblia mpe mabombami mosantu, mpe ezali kokamba bango wana ezali bango kolakisa boyebi yango epai na bato mosusu. (Yoele 2:28, 29) Elimo ezali mpe kopesa kondima esengeli mpo na kolónga mikakatano mikokani na ngomba. (Matai 17:20) Lokola ezali elimo nde ezali kosala makambo nyonso wana, ezali malamu te na komikumisa biso moko. Biso tozali mpenza na ntina te; boye tosengeli kosala mpo na lokumu na Jéhovah, na bolingo mpo na ye mpe mpo na bazalani na biso.—Bagalatia 5:6.
Mbeka epesami kozanga bolingo ezali bobele mpamba
Paulo alobaki ete: “Ata nakokaba nyonso ezali na ngai epai na bazalani, mpe ata nakopesa nzoto na ngai ete nakumisama, kasi soko nazangi bolingo, nakozwa litomba te.” (1 Bakolinti 13:3, MN) Soki bolingo te, mbɛlɛ Paulo azwaki litomba te na kopesa biloko oyo azalaki na yango mpo na koleisa bato mosusu. Nzambe akopesa biso mbano mpo na bolingo oyo tozali kopesa makabo na biso, kasi mpo na motuya na biloko ya mosuni te to mpo na lokumu oyo tolingi kozwa yango lokola Anania na Safira, baoyo babukaki lokutá. (Misala 5:1-11) Paulo apesaki ndakisa malamu na komipesáká ye moko na bolingo, na ntango asengelaki kosalisa bandimi na Yudea.—1 Bakolinti 16:1-4; 2 Bakolinti 8:1-24; 9:7.
Ata soki moto andimi kokufa na ntina na solo, nde azangi bolingo, yango ezali bobele mpamba mpo na Nzambe. (Masese 25:27) Yesu alobelaki mbeka na ye, kasi amikumisaki mpo na yango te. Na esika na kosala bongo, ye moko amipesaki na bolingo. (Malako 10:45; Baefese 5:2; Baebele 10:5-10) Bandeko na ye ya elimo ‘bazali kopesa nzoto na bango lokola mbeka na bomoi’ kati na mosala na Nzambe, mpo na komikumisa te ete babomami, kasi na komisɔkisa mpo na kokumisa Jéhovah mpe komonisa bolingo na bango epai na ye.—Baloma 12:1, 2.
Banzela oyo bolingo ekopusa biso na kolanda
Paulo akomaki ete: “Bolingo ezali na motema molai mpe ezali na boboto.” (1 Bakolinti 13:4a, MN) Motema molai oyo Nzambe azali komonisa uta lisumu ya Adam, epesi nzela na bato mingi ete babongola mitema, likambo oyo lizali komema bango na lobiko. (2 Petelo 3:9, 15) Soki tozali na bolingo, tokozala na motema molai mpo na kolakisa solo epai na bato mosusu. Tokosilika noki te, kasi tokomonisa bolingo mpo na bato mosusu mpe tokolimbisa bango (Matai 18:21, 22) Lisusu, bolingo ezali boboto, mpe boboto na Nzambe ezali kobenda biso epai na ye. Boboto oyo ezali bongo mbuma ya elimo na ye, ezali kopekisa biso na kozala na makambo makasi epai na bato mosusu lokola Nzambe akosalaka epai na biso. (Baefese 4:32) Bolingo ezali mpe koyeisa biso bato na boboto ata epai na baoyo bazangi botɔndi.—Luka 6:35.
Paulo abakisi ete: “Bolingo ezali na zuwa te, ekomikumisaka te, ekomivimbisaka na lolendo te.” (1 Bakolinti 13:4b, MN) Zuwa ezali moko na mosala na nzoto oyo mikolongolama na Bokonzi na Nzambe. (Bagalatia 5:19-21) Bolingo ezali kopekisa biso na kookela moto mosusu zuwa mpo na bozwi na ye to mpo na ezalela ya makambo na ye malamu. Soki azwi mokumba oyo tozalaki na yango mposa, bolingo ekopusa biso na kosepela elongo na ye, na kopesa ye lisungi na biso, mpe tokotɔnda Nzambe lokola asaleli ye mpo na bolamu ya lisangá.
Mpo ete bolingo “ekomikumisaka te,” ezali bongo kopekisa biso na komikumisa mpo na oyo Nzambe azali kopesa biso kati na mosala na ye. Bakolinti mosusu bazalaki komikumisa lokola nde makabo ya elimo eutaki epai na bango moko, nzokande eutaki epai na Nzambe, likambo oyo lizali kosalema mpe lelo mpo na mikumba oyo mipesami kati na lisangá na ye. Na esika na kokóma na lolɛndo mpo na etɛlɛmɛlo oyo tozali na yango kati na lisangá ya Nzambe, tokokeba ete tokwea te. (1 Bakolinti 1:31; 4:7; 10:12) Bolingo “ekomivimbisaka na lolɛndo te,” kasi moto oyo azangi bolingo akoki ye moko komitalela na motuya mingi. Bato ya bolingo bakomitalaka te ete baleki bato mosusu.—1 Bakolinti 4:18, 19; Bagalatia 6:3.
Na nsɔni te, na moimi te, na kobómba mabe na motema te
Bolingo “ekosalaka na nsɔni te, ekolukaka matomba na yango moko te, ekosilaka te.” (1 Bakolinti 13:5a, MN) Ezali kopusa na kozala na bizaleli malamu, na etamboli ya kobanga Nzambe, na kotósa bakonzi, mpe kozala na ezaleli malamu na makita na boklisto. (Baefese 5:3-5; 1 Bakolinti 11:17-34; 14:40; tala Yuda 4, 8-10.) Mpo ete bolingo epesi nzela na moto na moto na komiyoka ete azali na ntina, lolenge moko mpo na biteni na nzoto ya moto, lisangá oyo lizali na bolingo lizali esika na kimya mpe ebómbamelo. (1 Bakolinti 12:22-25) Na esika na ‘koluka matomba na yango moko’ na lolenge na moimi, bolingo ezali kopusa biso na komipimela lotómo na biso na ntango mosusu mpo na matomba mpe bolamu ya bato mosusu. (Bafilipi 2:1-4) Bolingo ezali kopusa biso na ‘kokóma nyonso mpo na bato ya motindo nyonso, mpo na kobikisa basusu’ na mosala na biso.—1 Bakolinti 9:22, 23.
Bolingo “ekosilaka te.” Nkanda ezali mosala ya nzoto na masumu, kasi bolingo ezali kopekisa biso na “kooka nkanda noki.” (Yakobo 1:19; Bagalatia 5:19, 20) Ata soki tozali na bantina ya kosilika, bolingo ezali kopekisa biso na koumela na nkanda ete topesa nzela na Diable te. (Baefese 4:26, 27) Mingi mpenza, bankulutu basengeli te kosilika soki baninga na bango bazali te kosalela batoli na bango.
Paulo alobaki lisusu na ntina na bolingo ete: “Ekobómbaka mabe na motema te.” (1 Bakolinti 13:5, MN) Bolingo ekotangaka mabungá te, lokola bakotangaka misolo. Bolingo ekomonaka malamu ya baninga mpe ekozongisaka mabe na mabe te na mabungá masalemi solo to te. (Masese 20:22; 24:29; 25:21, 22) Bolingo ezali kosalisa biso na “kolanda makambo oyo mazali kopesa kimya.” (Baloma 14:19) Paulo mpe Balanaba baswanaki mpe bakabwanaki nzela kati na mosala Nzambe, kasi bolingo esilisaki matáta na bango mpe babómbaki mabe na motema te.—Levitike 19:17, 18; Misala 15:36-41.
Ekosalelaka boyengebene mpe solo
Na ntina na bolingo, Paulo alobi lisusu ete: “Ekosepelaka na bokesene te, kasi solo.” (1 Bakolinti 13:6, MN) Bato mosusu basepelaka mingi na bokesene na boye ete “bakolalaka bobele soki basali mabe.” (Masese 4:16, MN) Kasi kati na lisangá ya Nzambe, tozali kobundana te kati na biso to tozali kosepela te soki moko asali lisumu. (Masese 17:5; 24:17, 18) Soki lisangá ya Kolinti lizalaki mpenza na bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na boyengebene, mbɛlɛ batikaki te ete pite esalema kati na yango. (1 Bakolinti 5:1-13) Kati na makambo mosusu, bolingo ya boyengebene ezali kopekisa biso na kominanola na kotaláká ba programmes ya televizio, bafilme to masano oyo mazali kokumisa bokesene.
Bolingo ‘ekosepelaka na solo.’ Awa, solo ekeseni na bokesene. Solo mpenza, yango elimboli ete bolingo ezali kopesa biso esengo ya komona ete solo ezali kopusa bato na kosalela boyengebene. Tozali na esengo kati na makambo oyo mazali kolendisa mpe oyo mazali kolongisa solo mpe boyengebene. Bolingo epekisi biso na kobuka lokutá, ezali kopesa biso esengo na ntango moto na sembo alóngisami likambo, mpe ezali kosepelisa biso wana solo na Nzambe elóngisami.—Nzembo 45:4.
Lolenge oyo bolingo ekotalaka makambo nyonso
Wana alandaki kopesa ndimbola na ye ya bolingo, Paulo akomaki ete: “Ekokanga motema na makambo nyonso, ekondimaka makambo nyonso, ekolikyaka makambo nyonso, ekoyikaka mpiko na makambo nyonso.” (1 Bakolinti 13:7, MN) ‘Kokangáká motema na makambo nyonso,’ bolingo ezali kolongola koyina, lokola nsamba malamu ekobatelaka bato na mbula. Soki moto oyo asaleli biso mabe asɛngi ete tolimbisa ye, na bolingo, tokokanga motema na mabe wana mpe, na esika na kotɔnga moto yango, tokolimbisa ye mpo na mabe asalelaki biso. Na bolingo tokomeka ‘kolónga ndeko na biso.’—Matai 18:15-17; Bakolose 3:13.
Bolingo “ekondimaka makambo nyonso” mazwami kati na Liloba na Nzambe mpe ezali koyeisa biso bato na botɔndi mpo na bilei ya elimo bipesameli biso na “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Atako tozali bato na bindimela te, kasi bolingo epekisi biso ete tozala na motema mozangi kondima mpe tokanisela baninga na biso makambo mabe te. (Mosakoli 7:21, 22) Lisusu, bolingo “ekolikyaka makambo nyonso” mazwami kati na Makomami, lokola solo na ntina na Bokonzi na Nzambe. Kopusamáká na bolingo, tozali kolikya mpe kobondela mpo na kolónga mimekamo. Mpe, bolingo ezali kopusa biso na koyebisa bato mosusu ntina ya elikya na biso. (1 Petelo 3:15, MN) Lisusu, bolingo “ekoyikaka mpiko na makambo nyonso,” bakisa mpe masumu oyo basaleli biso. (Masese 10:12) Bolingo mpo na Nzambe ezali mpe kosalisa biso na koyika mpiko na minyoko mpe mimekamo mosusu.
Paulo abakisi ete: “Bolingo ekosuka te.” (1 Bakolinti 13:8a, MN) Lokola Jéhovah, yango ekoki kosuka te to kosila te. Lokola Nzambe na biso ya seko azali ndakisa eleki malamu ya bolingo, ezaleli wana ekosuka te. (1 Timoté 1:17; 1 Yoane 4:16) Molóngó mobimba mokoyangelama ntango nyonso na bolingo. Na bongo, tobondela ete Nzambe asalisa biso mpo na kolónga bizaleli ya moimi mpe komonisa mbuma ya elimo na ye oyo ekosila te.—Luka 11:13.
Makambo oyo masengeli koleka
Paulo akóbaki kokoma ete: “Nzokande, atako ezali na [makabo ya] kosakola, ekolongwa; atako ezali na minoko ndenge na ndenge, ekosila; atako boyebi ezali, ekolongwa.” (1 Bakolinti 13:8b, MN) ‘Makabo ya kosakola’ mapesaki nzela na koyebisa bisakweli ya sika. Atako makabo wana masilaki nsima wana lisangá na boklisto lindimisamaki ete ezali lisangá ya Nzambe, nguya na Nzambe mpo na kosakola esilaki te, mpe Liloba na ye lizali na bisakweli nyonso oyo tozali na yango mposa lelo. Makoki ya koloba na minoko ndenge na ndenge oyo epesamaki na elimo, esilaki mpe boyebi na kokamwa ‘elongwaki’ lokola yango esakolamaki. Kasi Liloba na Jéhovah oyo ekoki lizali kopesa biso makambo nyonso oyo tozali na yango mposa mpo na kozwa lobiko. (Baloma 10:8-10) Lisusu, libota na Nzambe litondi na elimo na ye mpe yango ezali kobotisa mbuma kati na bango.
Paulo alandi koloba, ete: “Mpamba te toyebi bobele ndambo, mpe tozali kosakola bobele ndambo; kasi ntango yango ekoki ekoya, oyo na ndambo ekolongwa.” (1 Bakolinti 13:9, 10, MN) Makabo ya boyebi mpe ya kosakola mazalaki ndambo. Emonani ete bisakweli wana biyebisaki makambo nyonso te mpe ete mosakoli moko na moko na yango amonisaki makambo ya ntango ekoya bobele ndambo, mpamba te azalaki na boyebi ya kokoka te mpo na makambo oyo ye azalaki kosakola. Nzokande, bososoli na bisakweli ezali kokokisama na mobimba na yango. Na ndakisa, makambo oyo mazali kokokisa bisakweli ya Biblia mamonisi ete Yesu azwaki nguya ya koyangela bato na 1914. Uta ntango wana, tozali kobika na “ntango ya nsuka,” mpe tozali ntango nyonso na esengo ya kobakisa boyebi na biso ya elimo mpe bososoli na biso na bisakweli ya Biblia. (Danyele 12:4) Lokola tobɛlɛmi na boyebi ya kokoka, “yango ekoki” esengeli koya mosika te.
Ezaleli eleki, ekoumela
Kolobáká na ntina na bokóli ya lisangá, Paulo akomaki ete: “Wana nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nakanisaki lokola mwana moke, nasosolaki lokola mwana moke; kasi awa esili ngai kokóla, nasili kolongola [makambo nyonso] ya bomwana.” (1 Bakolinti 13:11, MN) Lokola mwana moke akosalaka makambo engebene boyebi na ye moke mpe engebene bokóli ya nzoto na ye, akoki kopusama na likambo moko to mosusu, lokola nde apusami na mbeto na ye ya bomwana. Kasi moto oyo akomeli akóli na nzoto, ayebi makambo mingi mpe, mingi mpenza, akopusamaka na moto mosusu te. Asili kolongola makanisi, bizaleli mpe lolenge ya bomwana. Bobele bongo, na ntango lisangá na ye awa na mabelé likólaki mpe lilongwaki na eleko na yango ya bomwana, Nzambe amonaki ete makabo na elimo mpo na kosakola, koloba minoko ndenge na ndenge mpe kozala na boyebi, ezalaki na ntina te. Lelo, atako basangani ya lisangá baoyo bakómi mibange bazali na mposa na makabo yango te, kasi bazali na esengo ya kosalela Nzambe na litambwisi ya elimo na ye.
Paulo abakisi ete: “Na yango, sikawa tozali komona na talatála, nde tozali komona malamu te, kasi na ntango yango, tokomona polele. Sikawa, nayebi bobele ndambo, kasi na ntango yango nakoyeba na lolenge na kokoka, motindo moko ngai nayebani.” (1 Bakolinti 13:12, MN) Na boumeli ya bomwana ya lisangá, ntango ekokaki te mpo na Nzambe ete amonisa makambo mosusu. Baklisto bakokaki te komona malamu lokola nde bazalaki kotala na talatala oyo ezali seliseli te. (Misala 1:6, 7) Kasi tozali na mpasi mpo na komona malamu. Lelo, kokokana ya bisakweli mpe bililingi ya bisakweli bizali komonana na miso na biso, mpamba te oyo ezali ntango na emonaneli na Nzambe. (Nzembo 97:11; Danyele 2:28) Atako Paulo ye moko ayebaki Nzambe, kasi asengelaki kozwa boyebi ya kokoka na ntina Jéhovah mpe boyokani boleki malamu elongo na Ye bobele na ntango oyo asekwaki mpo na kozala na bomoi na likoló, kozwáká bongo mbano na ye na emekaneli na mbango na boklisto.
Kosukisáká ndimbola na ye mpo na bolingo, Paulo akomaki ete: “Kondima, elikya, bolingo, yango misato ezali koumela sikawa; kasi oyo eleki kati na yango [misato], ezali bolingo.” (1 Bakolinti 13:13, MN) Atako makabo na makamwisi na elimo mazali te, lisangá lizali sikawa na boyebi ekoki mpenza mpe na bantina eleki malamu ya kozala na kondima, na elikya mpe bolingo. Lindimisami ete makambo mingi oyo Nzambe alaki, makokokana solo. (Baebele 11:1) Makambo matali kondima makolimwa wana makambo nyonso oyo masakolamaki na Liloba na Nzambe makokokana. Makambo matali elikya makosila na ntango tokomona makambo oyo tozalaki kozela. Kasi bolingo ekoumela seko. Na bongo, tika ete ba Témoins de Jéhovah nyonso balanda bolingo, nzela eleki malamu.