MOKAPO YA MISATO
Mafungola mibale mpo ete libala liumela
1, 2. (a) Libala esengeli koumela ntango boni? (b) Lolenge nini yango ekoki kosalema?
NTANGO Nzambe abalisaki mobali mpe mwasi ya liboso, eloko moko ezalaki te oyo emonisaki ete libala na bango esengeli kozala bobele mpo na mwa ntango moke. Adama mpe Eva basengelaki kozala esika moko bomoi na bango mobimba. (Genese 2:24) Engebene mobeko ya Nzambe, libala ya lokumu ezali libala oyo esalemi na mobali moko mpe mwasi moko. Makomami mapesi nzela ya koboma libala mpe kobala lisusu bobele soki moko na babalani asali ekobo.—Matai 5:32.
2 Likoki ezali ete bato mibale báfanda elongo na esengo nyonso na boumeli ya ntango molai? Ɛɛ, mpe Biblia emonisi makambo mibale ya ntina mingi, to mafungola, oyo mazali kopesa yango nzela. Soki mobali mpe mwasi basaleli yango, bakoki kozwa bolamu mpe mapamboli mingi. Mafungola yango mazali nini?
FUNGOLA YA LIBOSO
3. Wapi mitindo misato ya bolingo oyo babalani basengeli kolóna?
3 Fungola ya liboso ezali bolingo. Likambo ya kobenda likebi, Biblia elobeli mitindo mikeseni ya bolingo. Moko ezali mayoki ya mɔ́tɔ mpo na moto moko, lolenge ya bolingo oyo ezalaka kati na baninga ya penepene. (Yoane 11:3) Mosusu ezali bolingo oyo ezalaka kati na basangani ya libota moko. (Baloma 12:10) Motindo ya misato ezali lolango, bolingo oyo ezalaka kati na mwasi mpe mobali. (Masese 5:15-20) Ya solo, mobali mpe mwasi basengeli kolóna mitindo nyonso wana ya bolingo. Kasi ezali na motindo mosusu ya minei ya bolingo, oyo eleki nyonso mosusu wana.
4. Nini ezali motindo ya minei ya bolingo?
4 Na lokótá ya ebandeli ya Makomami ya Greke ya boklisto, liloba mpo na motindo wana ya minei ya bolingo ezali bongo a·gaʹpe. Liloba oyo lisalelami na 1 Yoane 4:8, epai elobami na biso ete: “Nzambe azali bolingo.” Ya solo, “biso tokolingaka mpo ete [Nzambe] alingaki biso liboso.” (1 Yoane 4:19) Moklisto akozala na bolingo motindo wana liboso mpo na Yehova Nzambe mpe na nsima mpo na bazalani na ye. (Malako 12:29-31) Liloba a·gaʹpe lisalelami mpe kati na Baefese 5:2, oyo elobi ete: “Bótambolaka mpe na bolingo pelamoko Klisto alingaki bino.” Yesu alobaki ete motindo wana ya bolingo ekosala ete báyeba bayekoli na ye ya solo: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo [a·gaʹpe].” (Yoane 13:35) Tótalela lisusu, lolenge liloba a·gaʹpe lisalelami na 1 Bakolinti 13:13: “Bongo kondima mpe elikya mpe bolingo izali koumela, yango misato. Nde oyo eleki kati na yango ezali bolingo [a·gaʹpe].”
5, 6. (a) Mpo na nini bolingo ezali monene koleka kondima mpe elikya? (b) Wapi mwa bantina mpo na yango bolingo ekosalisa mpo ete libala liumela?
5 Nini esali ete bolingo wana a·gaʹpe eleka kondima mpe elikya? Yango etambwisami na mitindá—mitindá ya sembo—mizali kati na Liloba ya Nzambe. (Nzembo 119:105) Ezali lobanzo ya kozanga koluka litomba mpo na kosalela basusu makambo oyo mazali sembo mpe malamu na miso ya Nzambe, ezala ete moto oyo azali kozwa yango amonani ete abongi na yango to abongi na yango te. Bolingo motindo wana ezali kopesa babalani likoki ya kolanda toli oyo ya Biblia: “Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. Pelamoko [Yehova] alimbisi bino, bino mpe bobele bongo.” (Bakolose 3:13) Babalani oyo balinganaka bazali mpe kolóna “bolingo [a·gaʹpe] makasi moko [epai na mosusu], mpamba te bolingo ezipaka ebele ya masumu.” (1 Petelo 4:8, NW) Tomoni ete bolingo ezipaka mabungá. Elongolaka yango te, mpamba te ezali na moto moko te ya kozanga kokoka oyo asalaka libungá te.—Nzembo 130:3, 4; Yakobo 3:2.
6 Ntango babalani balóni bolingo motindo wana mpo na Nzambe mpe kati na bango, libala na bango likoumela mpe likozala na esengo, mpamba te “bolingo ekosuka te.” (1 Bakolinti 13:8) Bolingo ezali “ekanganeli ekoki mpenza.” (Bakolose 3:14) Soki osilá kobala, lolenge nini yo mpe mobalani na yo bokoki kolóna motindo oyo ya bolingo? Bótángaka Liloba ya Nzambe elongo, mpe bósololaka na ntina na yango. Bóyekola ndakisa ya bolingo ya Yesu mpe bósala makasi na komekola ye, kokanisa mpe kosala lokola ye. Lisusu, bóyanganaka na makita ya boklisto, epai Liloba ya Nzambe ezali koteyama. Mpe bóbondelaka Nzambe mpo ete asalisa bino na kokólisa motindo oyo etombwami ya bolingo, oyo ezali moko na mbuma ya elimo santu ya Nzambe.—Masese 3:5, 6; Yoane 17:3; Bagalatia 5:22; Baebele 10:24, 25.
FUNGOLA YA MIBALE
7. Limemya ezali nini, mpe nani asengeli komonisa limemya kati na libala?
7 Soki babalani mibale bazali kolingana mpenza, na bongo basengeli mpe kozala na limemya moko epai na mosusu, mpe limemya ezali fungola ya mibale mpo na kozala na libala ya esengo. Limemya elimbolami boye ete “kopesa bato mosusu kilo, kokumisa bango.” Liloba ya Nzambe epesi toli oyo epai na baklisto nyonso, ezala mpe epai na mibali mpe basi: “Mpo na lokumu, bokumisanaka.” (Baloma 12:10) Ntoma Petelo akomaki ete: “Bino mibali lokola, bózalana na basi na bino kososola na mayele ete bango baleki motau, nde bópesa lokumu epai na bango.” (1 Petelo 3:7) Toli epesami epai na mwasi ete “azala na limemya mozindo epai na mobali na ye.” (Baefese 5:33, NW) Soki olingi kopesa moto lokumu, osengeli kozala na boboto epai na moto yango, komemya bomoto na ye mpe makanisi na ye, mpe kozala pene mpo na kokokisa lisɛngi lilongobani oyo akozala na yango mposa epai na yo.
8-10. Wapi mwa makambo oyo limemya ekosalisa mpo na kosala ete boyokani kati na libala eumela mpe ezala na esengo?
8 Baoyo balingi kozala na libala ya esengo bamonisaka limemya epai na babalani na bango na ‘kotaláká bobele makambo na [bango] moko te, kasi makambo na [babalani na bango] lokola.’ (Bafilipi 2:4) Bakotalelaka oyo ezali malamu bobele mpo na bango moko te—mpamba te kosala yango ekozala bongo moimi. Nzokande, batalelaka mpe oyo ezali malamu koleka mpo na babalani na bango. Ya solo, komibanzabanza mpo na babalani na bango ezalaka na esika ya liboso.
9 Kozala na limemya ekosalisa babalani ete bándima bokeseni oyo ekoki kozala kati na makanisi na bango. Tokoki komizela te ete bato mibale bázala na makanisi lolenge moko na makambo nyonso. Mbala mosusu likambo oyo ezali na ntina epai na mobali, ekoki kozala na ntina te epai na mwasi, mpe oyo mwasi azali kolinga, mbala mosusu ekoki te kozala oyo mobali alingi. Kasi moko na moko asengeli komemya makanisi mpe maponi ya mosusu soki yango ezali kobuka te mibeko mpe mitindá ya Yehova. (1 Petelo 2:16; kokanisá na Filemona 14.) Lisusu, moko na moko asengeli komemya lokumu ya mosusu na kobimisáká te maloba ya kotyola to masɛki mpo na moto yango, ezala liboso ya bato to na nkuku.
10 Ɛɛ, bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na moko na mosusu mpe kozala na limemya moko epai na mosusu ezali mafungola mibale ya ntina mpo na kozala na libala ya malamu. Lolenge nini yango ekoki kosalelama na makambo mosusu ya ntina kati na bomoi ya libala?
BOKONZI BOKOKANI NA OYO YA KLISTO
11. Engebene Makomami, nani azali mokonzi kati na libala?
11 Biblia eyebisi biso ete mobali azalisamaki na bizaleli oyo bisali ete azala mokonzi oyo abongi kati na libota. Na yango, mobali azali na mokumba liboso ya Yehova mpo na bolamu ya elimo mpe ya mosuni ya mwasi na ye mpe ya bana na ye. Asengeli kokamata bikateli ya bokatikati oyo bizali komonisa mokano ya Yehova mpe asengeli kozala ndakisa malamu mpo na oyo etali kokangama epai na Nzambe. “Bino basi bótosaka mibali na bino motindo moko epai na Nkolo mpo ete mobali azali mokonzi na mwasi motindo moko Klisto azali mokonzi ya lisangá.” (Baefese 5:22, 23, NW) Atako bongo, Biblia elobi ete mobali azali mpe na mokonzi, Ye oyo azali na bokonzi likoló na ye. Ntoma Paulo akomaki ete: “Nalingi bósosola ete mokonzi na mibali nyonso ezali Klisto mpe ete mokonzi na mwasi ezali mobali mpe ete mokonzi na Klisto ezali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3, NW) Mobali ya mayele akoyekola lolenge ya kosalela bokonzi na ye na komekoláká mokonzi na ye, Klisto Yesu.
12. Ndakisa nini kitoko Yesu atikaki mpo na oyo etali komonisa botosi mpe kosalela bokonzi?
12 Yesu mpe azali na mokonzi, Yehova, mpe azalaka na botosi mpenza epai na Ye. Yesu alobaki ete: “Nakolukaka mokano na ngai moko te kasi mokano na ye oyo atindi ngai.” (Yoane 5:30) Oyo nde ndakisa malamu koleka! Yesu azali “Mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami.” (Bakolose 1:15) Akómaki Masiya. Abyangamaki kozala Mokonzi ya lisangá ya baklisto bapakolami mpe Mokonzi oyo aponami na Bokonzi ya Nzambe, likoló na baanzelu nyonso. (Bafilipi 2:9-11; Baebele 1:4) Atako azalaki na etɛlɛmɛlo wana etombwami mpe bilikya minene wana, Yesu azalaki moto ya makambo makasi te, ya kozanga boboto te mpe ya kosɛnga makambo mingi koleka te. Azalaki monyokoli te, oyo ntango nyonso azalaki kokundwela bayekoli na ye ete basengeli kotosa ye. Yesu azalaki na bolingo mpe na motema mawa, mingimingi epai na baoyo bazalaki konyokwama. Alobaki ete: “Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai; zambi ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.” (Matai 11:28-30) Ezalaki likambo ya kosepelisa kozala moninga na ye.
13, 14. Lolenge nini mobali oyo azali na bolingo akosalela bokonzi na ye, na ndakisa ya Yesu?
13 Mobali oyo alingi kozala na bomoi ya libota ya esengo, ekozala malamu mpo na ye ete atalela bizaleli malamu ya Yesu. Mobali malamu azalaka na makambo makasi te mpe azalaka mokonzi mabe te, oyo asalelaka bokonzi na ye na lolenge ya mabe lokola lingenda mpo na kobangisa mwasi na ye. Na esika ete asala bongo, akolinga mpe akokumisa mwasi na ye. Soki Yesu azalaki na “motema mosɔkɛmi,” mobali azali kútu na bantina mingi ya kozala na motema mosɔkɛmi mpamba te, na bokeseni na Yesu, mobali asalaka mabungá. Soki asali libungá, akolinga ete mwasi na ye amitya na esika na ye. Na yango, mobali oyo azali na komikitisa andimaka mabungá na ye, atako maloba, “Nayoki mawa; ozali na elónga,” ekoki kozala mpasi mpo na koloba. Mwasi akozala na mpasi te mpo na komonisa limemya epai na mobali oyo azali na bopɔlɔ mpe na komikitisa; nzokande ekozala mpasi ete amonisa yango epai na mobali oyo azali na lolendo mpe na motó makasi. Epai mosusu, mwasi ya limemya asɛngaka mpe bolimbisi ntango asali libungá.
14 Nzambe azalisaki mwasi na bizaleli malamu oyo akoki kosalela yango mpo ete libala ezala ya esengo. Mobali ya mayele akondima yango mpe akopekisa ye te ete amonisa bizaleli yango. Basi mingi bamonisaka ezaleli ya motema mawa mingi mpe bakangaka motema te, bizaleli oyo bisengeli mpenza mpo na kobatela libota mpe mpo na kokólisa boyokani kati na bato. Na momeseno, ezali mwasi nde asalaka ete ndako ezala esika ya kosepelisa mpo na kofanda. “Mwasi ya molende” oyo alobelami kati na Masese mokapo 31 azalaki na bizaleli mingi ya kosepelisa mpe makoki ya kitoko, mpe libota na ye ezalaki kozwa litomba na yango. Mpo na nini? Mpamba te mobali na ye ‘atyelaki ye motema.’—Masese 31:10, 11.
15. Lolenge nini mobali akoki komonisa bolingo oyo ekokani na oyo ya Klisto mpe limemya epai na mwasi na ye?
15 Kati na bamboka mosusu, bokonzi ya mobali epesameli motuya moleki ndelo, na boye ete ata kotuna ye motuna etalelamaka lokola kozanga limemya. Akoki kosalela mwasi na ye makambo lokola moombo. Lolenge mabe wana ya kosalela bokonzi ebebisaka boyokani bobele te kati na ye mpe mwasi na ye, kasi lisusu elongo na Nzambe. (Kokanisá na 1 Yoane 4:20, 21.) Epai mosusu, mibali misusu bamonisaka bopɔtu mpo na kokamba libota mpe batikelaka basi na bango mokumba ya kotambwisa libota. Mobali oyo azali mpenza na botosi epai na Klisto anyokolaka mwasi na ye te mpe abebisaka lokumu ya mwasi na ye te. Nzokande, amekolaka bolingo bozangi moimi oyo Yesu azalaki na yango mpe asalaka na boyokani na toli oyo Paulo apesi ete: “Bino babali, bólingaka basi na bino pelamoko Klisto alingaki [lisangá] mpe amipesaki ye moko mpo na bango.” (Baefese 5:25) Klisto Yesu alingaki bayekoli na ye mingi na boye ete akufaki mpo na bango. Mobali malamu akosala makasi na komekola ezaleli wana ya kozanga moimi, koluka malamu ya mwasi na ye, na esika ya kosɛngaka ye makambo mingi. Ntango mobali azali na botosi epai na Klisto mpe azali komonisa bolingo mpe limemya oyo ekokani na oyo ya Klisto, mwasi na ye akopusama na komonisa botosi epai na ye.—Baefese 5:28, 29, 33.
BOTOSI YA MWASI
16. Bizaleli nini mwasi asengeli komonisa kati na boyokani na ye elongo na mobali na ye?
16 Mwa ntango moke nsima na kozalisama ya Adama, “[Yehova] Nzambe alobaki ete, Ezali malamu te ete moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi mobongi na ye.” (Genese 2:18) Nzambe azalisaki Eva lokola “mosungi,” kasi lokola mowelani te. Libala esengeli te kozala lokola masuwa oyo ezali na bakapitɛni mibale oyo bazali kowela yenda. Mobali asengeli kosalela bokonzi na bolingo nyonso, mpe mwasi asengeli komonisa bolingo, limemya mpe botosi oyo euti na motema.
17, 18. Wapi mwa ndambo na makambo oyo mpo na yango mwasi akoki kozala mosungi mpenza mpo na mobali na ye?
17 Nzokande, mwasi malamu asuki te bobele na kozala na botosi. Asalaka makasi ete azala mpenza mosungi ya solosolo, kopesa mobali na ye mabɔkɔ na bikateli oyo azali kozwa. Ya solo, yango ekozala pɛtɛɛ mpo na ye soki azali kondima bikateli ya mobali na ye. Kasi ata soki azali kondima yango te, ezaleli na ye ya kopesa mabɔkɔ ekoki kolendisa ekateli ya mobali na ye mpo ete elónga malamu.
18 Mwasi akoki kosalisa mobali na ye ete azala mokonzi malamu na makambo mosusu. Mwasi akoki komonisa bosepeli na ye mpo na milende oyo mobali na ye azali kosala mpo na kokamba libota, na esika ya kotɔ́nga ye to kozala na mayoki ete akokisaka soko moke te bamposa na ye. Na kozaláká na boyokani malamu elongo na mobali na ye, mwasi asengeli komikundola ete “elimo ya kimya mpe ya bopɔlɔ . . . ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe,” kasi bobele na miso ya mobali na ye te. (1 Petelo 3:3, 4, NW; Bakolose 3:12) Ezali boni soki mobali azali mondimi te? Azala mondimi to mondimi te, Makomami malendisi basi ete “bálinga mibali na bango, bálinga mpe bana na bango. Bázala mpe basembwi, na ezaleli na pɛto, babongisi malamu na ndako, bato na boboto, batosi na babali na bango ete Liloba na Nzambe litukama te.” (Tito 2:4, 5) Soki makambo oyo matali lisosoli mabimi, mobali oyo azali mondimi te akozala na limemya mingi na likanisi ya mwasi na ye soki yango emonisami na “ezaleli ya bopɔlɔ mpe na limemya mingi.” Mibali mosusu oyo bazali bandimi te basili ‘kozwama na kimya mpe na bizaleli malamu na basi na bango, wana esili bango kotala bizaleli na [basi] na bango bizali na pɛto mpe na limemya.’—1 Petelo 3:1, 2, 15; 1 Bakolinti 7:13-16.
19. Ezali boni soki mobali azali kosɛnga na mwasi na ye ete abuka mobeko ya Nzambe?
19 Ezali boni soki mobali asɛngi na mwasi na ye ete asala likambo moko oyo lipekisami na Nzambe? Soki likambo motindo wana libimi, mwasi asengeli komikundola ete Nzambe azali Mokonzi ya liboso. Lokola ndakisa, akolanda oyo bantoma basalaki ntango bakonzi basɛngaki na bango ete bábuka mobeko ya Nzambe. Misala 5:29 elobi ete: “Petelo, na bantoma mosusu, balobi ete, Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.”
KOSOLOLA YA MALAMU
20. Nini ezali likambo ya ntina mingi oyo kati na yango bolingo mpe limemya esengeli mpenza?
20 Bolingo mpe limemya ezali na ntina mingi kati na likambo mosusu litali libala—kosolola. Mobali oyo azali na bolingo akosolola elongo na mwasi na ye na ntina na misala, mikakatano, makanisi ya mwasi na ye na makambo ndenge na ndenge. Mwasi asengeli mpenza na yango. Mobali oyo azwaka ntango ya kosolola elongo na mwasi na ye mpe azali mpenza koyoka oyo mwasi na ye azali koloba, amonisaka bolingo mpe limemya epai na mwasi na ye. (Yakobo 1:19) Basi mosusu bamilelaka ete mibali na bango balekisaka bobele mwa ntango moke mpo na kosolola elongo na bango. Yango ezali likambo ya mawa. Ya solo, na eleko oyo bazali na makambo mingi ya kosala, mibali bakoki kolekisa ngonga mingi na mosala mosika na ndako, mpe makambo ya nkita makoki kosala ete basi mosusu mpe bázala na mosala ya kosala libándá ya libota. Kasi babalani basengeli komibombela ntango moko mpo na mosusu. Soki basali bongo te, bakoki kokóma na lipandá moko epai na mosusu. Yango ekoki komema na mikakatano makasi soki bakómi koluka baninga libándá ya libala.
21. Lolenge nini maloba ya malamu masalisaka na kozala na libala ya esengo?
21 Lolenge oyo mibali mpe basi basololaka ezali na ntina. “Maloba kitoko izali . . . na elɛngi epai na molimo mpe na kobika kati na mikuwa.” (Masese 16:24) Mobalani na yo azala mondimi to mondimi te, toli oyo ya Biblia ebongi mpenza: “Tiká ete maloba na bino mázala na ngɔlu, na elɛngi na mongwa ntango nyonso,” elingi koloba na lolenge ya malamu. (Bakolose 4:6) Ntango moko alekisi mokolo moko ya mpasi, mwa maloba ya boboto, ya bolingo ya mobalani mosusu ekoki kozala lisungi monene. “Liloba lilobami na ntango malamu ezali lokola wolo etyami kati na palata.” (Masese 25:11) Mongongo na yo mpe maloba na yo ezali na ntina mingi. Na ndakisa, na lolenge ya kosilikisa, ya kosɛngisa, moko akoki koloba na mosusu ete: “Kangá ndako!” Kasi ekozala mpenza maloba na “elɛngi na mongwa,” soki olobi na kimya nyonso, na mongongo ya mayele ete, “Nalɔmbi yo, okosepela kokanga ndako?”
22. Bizaleli nini babalani basengeli kozala na yango mpo na kobatela kosolola ya malamu?
22 Kosolola ya malamu eyaka kozanga nkaká wana maloba ya boboto, kotalana ya ngɔlu mpe bikela, bonkonde, komitya na esika ya mosusu, mpe kozanga makambo makasi ezali. Na kosaláká makasi mpo na kobatela kosolola ya malamu, mobali mpe mwasi bakozala na bonsomi ya koyebisa bamposa na bango, mpe bakoki kozala liziba ya kobɔndisa mpe ya lisalisi moko na mosusu na ntango ya mikakatano mpe ya mpasi. Liloba ya Nzambe esɛngi ete: “Bózala na maloba ya kobɔndisa epai na milimo mitungisami na makanisi.” (1 Batesaloniki 5:14, NW) Ekozala na bantango mosusu oyo mobali akoki kolɛmba na motema mpe na bantango mosusu oyo mwasi mpe akoki kolɛmba na motema. Bakoki ‘kozala na maloba ya kobɔndisa,’ kolendisana moko na mosusu.—Baloma 15:2.
23, 24. Lolenge nini bolingo mpe limemya ekosalisa ntango mikakatano mibimi? Pesá ndakisa.
23 Mobali mpe mwasi oyo bazali komonisa bolingo mpe limemya bakotalela te mokakatano nyonso lokola likambo moko monene. Bakosala makasi mpo ete bázala te na “makambo makasi” moko epai na mosusu. (Bakolose 3:19) Bango nyonso mibale basengeli komikundola ete “kozongisa liloba na bolɛmbu ekopɛngola nkanda.” (Masese 15:1) Zalá na bokɛngi ete okitisa te to okweisa te mobalani na yo oyo azali koyebisa yo mayoki na ye oyo mazali na nsé ya motema. Nzokande, talelá maloba wana lokola libaku kitoko mpo na kososola likanisi ya mosusu. Bino nyonso mibale, bósala makasi ete bólónga bokeseni mpe na nsuka bókóma na boyokani.
24 Omikundola likambo lisalemaki ntango Sala amonisaki na mobali na ye, Abalayama, lolenge asengelaki kosala mpo na kosilisa mokakatano moko mpe yango eyokanaki te na makanisi ya mobali na ye. Nzokande, Nzambe alobaki na Abalayama ete: “Yoká mongongo na ye.” (Genese 21:9-12, NW) Abalayama ayokaki, mpe azwaki mapamboli. Bobele bongo, soki mwasi abimisi likanisi oyo likeseni na oyo ya mobali na ye, mobali asengeli koyoka ye. Na ntango yango, mwasi mpe asengeli te koluka ete bobele ye nde alobaka, kasi asengeli koyoka oyo mobali na ye azali koloba. (Masese 25:24) Ezala mpo na mobali to mpo na mwasi kolinga ete bobele likanisi na yo endimama ntango nyonso ezali kozanga bolingo mpe kozanga limemya.
25. Lolenge nini kosolola ya malamu ekopesa nzela na bolamu kati na makambo matali kosangisa nzoto?
25 Kosolola malamu ezali mpe na ntina na makambo matali kosangisa nzoto. Ezaleli ya moimi mpe ya kozanga komipekisa ekoki kobimisa mikakatano makasi na likambo litali kosangisa nzoto kati na libala. Kosolola ya polele, oyo esangani na motema pɛtɛɛ, ezali na ntina mingi. Ntango moko na moko azali koluka na kozanga moimi bolamu ya mosusu, kosangisa nzoto ekoki mpenza kobimisa mikakatano te. Kati na likambo wana mpe na makambo mosusu, “Tiká te ete moto aluka bobele malamu na ye moko kasi yango na mozalani na ye.”—1 Bakolinti 7:3-5; 10:24.
26. Atako libala nyonso ezalaka na mikakatano na yango mpe na bisengo na yango, lolenge nini koyoka Liloba ya Nzambe ekosalisa babalani ete bázwa bolamu?
26 Oyo nde toli kitoko Liloba ya Nzambe epesi biso! Ya solo, libala nyonso ekozalaka na mikakatano na yango mpe na bisengo na yango. Kasi wana babalani bazali kotosa likanisi ya Nzambe, lokola yango emonisami kati na Biblia, mpe soki batongi boyokani na bango likoló na bolingo mpe likoló na limemya, bakoki kondimisama ete libala na bango likoumela mpe likozala na esengo. Na yango, bakopesa lokumu bobele epai na bango moko te, kasi lisusu epai na Mobandisi ya libala, Yehova Nzambe.