Ndenge nini okoki kozala na boyokani na Nzambe?
NTOMA Paulo akomaki boye: “Kozala ntango nyonso na makanisi ya mosuni ezali liwa, kasi kozala ntango nyonso na makanisi ya elimo ezali bomoi mpe kimya.” (Baloma 8:6, King James Version) Na maloba wana, ntoma Paulo alingaki komonisa ete kozala na boyokani na Nzambe ezali te likambo oyo moto akoki kosala kaka soki alingi. Ezali nde likambo ya bomoi to liwa. Kasi, ndenge nini moto oyo azali na boyokani na Nzambe azwaka “bomoi mpe kimya”? Biblia elobi ete moto ya ndenge wana azali na kimya lelo oyo (na motema na ye mpe na Nzambe) mpe akozwa bomoi ya seko na mikolo ekoya. (Baloma 6:23; Bafilipi 4:7) Yango wana, tokokamwa te ete Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”—Matai 5:3.
Lokola ozali kotánga zulunalo oyo, yango emonisi ete ozali na mposa ya kozala na boyokani na Nzambe, mpe yango ezali mpenza bwanya. Nzokande, lokola makanisi ezali ndenge na ndenge na ntina na likambo yango, okoki komituna boye: ‘Kozala na boyokani na Nzambe elimboli mpenzampenza nini? Mpe ndenge nini moto akoki kokóma na boyokani na Nzambe?’
“Makanisi ya Klisto”
Longola komonisa ntina mpe matomba ya kozala na boyokani na Nzambe, ntoma Paulo alobaki lisusu makambo mingi na likambo yango. Paulo alimbolelaki baklisto ya engumba ya kala ya Kolinti bokeseni oyo ezali na kati ya moto ya mosuni, elingi koloba moto oyo alandaka bamposa ya mosuni, ná moto ya elimo, oyo asepelaka na makambo ya elimo. Paulo akomaki boye: “Moto ya mosuni ayambaka te makambo ya elimo ya Nzambe, mpo yango ezali bozoba epai na ye.” Epai mosusu, Paulo alobaki ete moto ya elimo azalaka na “makanisi ya Klisto.”—1 Bakolinti 2:14-16.
Kozala na “makanisi ya Klisto” elimboli mpenzampenza kozala na “ezaleli ya makanisi ndenge moko na oyo Klisto Yesu azalaki na yango.” (Baloma 15:5; Bafilipi 2:5) Na maloba mosusu, moto ya elimo ezali oyo akanisaka lokola Yesu mpe alandaka matambe na Ye. (1 Petelo 2:21; 4:1) Ntango moto azali kokóma na makanisi ya Klisto, akokóma mpe na boyokani makasi na Nzambe, mpe akozala lisusu mosika te na kozwa “bomoi mpe kimya.”—Baloma 13:14.
Ndenge ya koyeba “makanisi ya Klisto”
Nzokande, mpo na kozala na makanisi ya Klisto, tosengeli libosoliboso koyeba yango. Yango wana, mpo na kokóma na boyokani na Nzambe, tosengeli libosoliboso koyeba makanisi ya Yesu. Kasi, ndenge nini tokoki koyeba makanisi ya moto oyo azalaki awa na mabelé esili koleka mbula 2 000? Kanisá naino, ndenge nini oyebaki masolo ya bomoi ya bato ya kala ya ekólo na bino? Na ntembe te, otángaki yango. Ndenge moko, soki tolingi koyeba makanisi ya Klisto, ezali na ntina mingi tótánga lisolo ya bomoi na ye.—Yoane 17:3.
Na ntina na Yesu, tozali na masolo minei oyo elobeli bomoi na ye; Evanzile ya Matai, ya Malako, ya Luka mpe ya Yoane. Kotánga masolo wana na likebi ekosalisa yo oyeba makanisi mpe mayoki ya Yesu, mpe ntina oyo asalaki likambo boye to boye. Soki ozali kokanisa na mozindo makambo oyo ozali kotánga na ntina na Yesu, okomona na makanisi soki azalaki moto ya ndenge nini. Ata soki omitalelaka lokola moyekoli ya Klisto, kotánga mpe kokanisa ndenge wana ekosalisa yo ‘okoba kokola na kati ya boboto monene mpe na boyebi ya Nkolo na biso mpe Mobikisi Yesu Klisto.’—2 Petelo 3:18.
Na makanisi wana na motó, tótalela sikoyo mwa bavɛrsɛ ya Baevanzile mpo na koyeba nini ekómisaki Yesu moto ya elimo. Na nsima, talelá ndenge okoki kolanda ndakisa na ye.—Yoane 13:15.
Moto oyo azali na boyokani na Nzambe amonisaka “mbuma ya elimo”
Luka, moko ya bato oyo bakomaki Baevanzile, alobaki ete ntango Yesu azwaki batisimo, elimo santu ya Nzambe ekitelaki ye mpe “atondaki na elimo santu.” (Luka 3:21, 22; 4:1) Yesu mpe amonisaki bayekoli na ye ntina ya kotambwisama na elimo santu ya Nzambe to ‘nguya na ye oyo asalelaka mosala.’ (Genese 1:2, NW; Luka 11:9-13) Mpo na nini yango ezali na ntina? Mpo elimo ya Nzambe ezali na nguya ya kobongola makanisi ya moto mpe kokómisa yango lokola oyo ya Klisto. (Baloma 12:1, 2) Elimo santu esalisaka moto akóma na bizaleli lokola “bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa.” Bizaleli yango, oyo Biblia ezali kobenga “mbuma ya elimo” emonisaka nani azali mpenza moto ya elimo. (Bagalatia 5:22, 23) Na mokuse, moto oyo azali na boyokani na Nzambe ezali oyo azali kotambwisama na elimo santu ya Nzambe.
Yesu amonisaki mbuma ya elimo na boumeli ya ntango nyonso oyo asalaki mosala na ye awa na mabelé. Lolenge oyo Yesu azalaki kotalela bato oyo bazalaki bato mpamba na mokili ya Bayuda emonisaki ete azali na bolingo, motema malamu mpe bolamu. (Matai 9:36) Tózwa ndakisa ya likambo moko oyo ntoma Yoane alobelaki. Totángaka boye: “Ntango [Yesu] azalaki koleka amonaki moto moko oyo akufá miso banda kobotama.” Bayekoli ya Yesu mpe bamonaki moto yango, kasi batalelaki ye lokola moto ya masumu. Batunaki boye: “Nani asalaki lisumu, moto oyo to baboti na ye?” Bato oyo bazalaki kofanda na ye esika moko mpe bamonaki ye, kasi bazalaki kotalela ye kaka lokola mosɛngi. Balobaki boye: “Oyo ezali te moto oyo azalaki kofanda mpe kosɛngasɛnga?” Kasi, Yesu atalelaki ye lokola moto oyo azali na mposa ya lisalisi. Asololaki na ye mpe abikisaki ye.—Yoane 9:1-8.
Likambo wana eteyi yo nini na oyo etali makanisi ya Klisto? Ya liboso, Yesu azalaki kotyola bato mpamba te, kasi azalaki koyokela bango mawa. Ya mibale, azalaki ntango nyonso koluka ndenge ya kosalisa basusu. Okanisi ete olandaka ndakisa ya Yesu? Otalelaka bato ndenge Yesu azalaki kotalela bango mpe opesaka bango lisalisi oyo basengeli na yango mpo na kobongisa bomoi na bango mpe kopesa bango elikya? To ozwaka na lokumu kaka bato minene, kasi otalaka bato mpamba ata na miso te? Soki otalelaka bato ndenge Yesu azalaki kotalela bango, ozali mpenza kolanda ndakisa ya Yesu.—Nzembo 72:12-14.
Moto oyo azali na boyokani na Nzambe abondelaka mingi
Baebanzile ezali komonisa ete Yesu azalaki kobondela Nzambe mbala na mbala. (Malako 1:35; Luka 5:16; 22:41) Ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabelé, Yesu azalaki komibombela ntango mpo na kobondela. Moyekoli Matai akomaki boye: “Ntango [Yesu] asilisaki kotinda bibele wana ya bato ete bázonga, amataki na ngomba kaka ye moko mpo na kobondela.” (Matai 14:23) Na bangonga ya ndenge wana, oyo Yesu azalaki kosolola na Tata na ye ya likoló na bisika oyo makelele ezalaki te, azalaki mpenza kozwa makasi. (Matai 26:36-44) Lelo oyo mpe, bato ya elimo balukaka mabaku ya kosolola na Nzambe, mpo bayebi ete yango ebongisaka boyokani na bango na Nzambe, Mozalisi mpe esalisaka bango bákóma na makanisi ya Klisto.
Yesu azalaki mbala mingi kobondela ntango molai. (Yoane 17:1-26) Na ndakisa, liboso apona mibali zomi na mibale oyo bakómaki bantoma na ye, Yesu “abimaki mpe akendaki na ngomba kobondela, mpe alekisaki butu mobimba na libondeli epai ya Nzambe.” (Luka 6:12) Atako babondelaka butu mobimba te, bato oyo bazali na boyokani na Nzambe balandaka ndakisa ya Yesu. Liboso bázwa bikateli ya minene, bazwaka mpenza ntango ya kobondela Nzambe mpo apesa bango elimo santu esalisa bango bázwa bikateli oyo ekokolisa boyokani na bango na Nzambe.
Mabondeli ya Yesu ezali koteya biso ndenge oyo tosengeli komonisaka mayoki na biso ntango tozali kobondela. Talá oyo Luka akomaki na ntina na libondeli oyo Yesu asalaki na butu, liboso ya mokolo oyo akufaki. “Kokɔtáká na kati ya mpasi moko monene akobaki kobondela na etingya koleka; mpe motoki na ye ekómaki lokola matangá ya makila oyo ezalaki kokwea na nse.” (Luka 22:44) Liboso, Yesu azalaki mpe kobondela na etingya, kasi na mbala wana, lokola akutanaki na komekama makasi koleka nyonso oyo akutanaki na yango awa na mabelé, abondelaki “na etingya koleka,” mpe Nzambe ayokaki ye. (Baebele 5:7) Bato oyo bazali na boyokani na Nzambe balandaka ndakisa ya Yesu. Soki bakutani na komekama ya makasi, babondelaka Nzambe “na etingya koleka” mpo apesa bango elimo santu, atambwisa mpe asunga bango.
Lokola emonani polele ete Yesu azalaki kobondela mingi, tokoki kokamwa te ete bayekoli na ye bazalaki na mposa ya komekola ye. Yango wana, batunaki ye boye: “Nkolo, teyá biso ndenge ya kobondela.” (Luka 11:1) Ndenge moko mpe lelo oyo, bato oyo batalelaka boyokani na Nzambe na motuya mpe balukaka litambwisi ya elimo santu, balandaka ndakisa ya Yesu na mabondeli na bango. Bato oyo bazali na boyokani ya solosolo na Nzambe babondelaka ntango nyonso.
Moto oyo azali na boyokani na Nzambe asakolaka nsango malamu
Evanzile ya Malako eyebisi ete mokolo moko Yesu abikisaki bato ebele ya maladi, mpe asalaki yango na butu makasi. Na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, ntango azalaki ye moko mpe azalaki kobondela, bantoma na ye bayaki koyebisa ye ete bato ebele bazali koluka ye, ntango mosusu mpo abikisa bango. Kasi, Yesu alobaki na bango ete: “Tiká tókende epai mosusu, na bamboka-sité ya pembeni, mpo nasakola mpe kuna.” Na nsima, ayebisaki bango ntina oyo asengelaki kokende epai mosusu: “Ezali mpo na yango nde nabimaki.” (Malako 1:32-38; Luka 4:43) Atako kobikisa bato ezalaki likambo ya ntina mpo na Yesu, mokumba na ye ya libosoliboso ezalaki nde ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.—Malako 1:14, 15.
Ata tii lelo oyo, kosakola nsango ya Bokonzi ya Nzambe ezali elembo oyo esalisaka mpo na koyeba bato oyo bazali na makanisi ya Klisto. Yesu alobaki na bato nyonso oyo balingi kozala bayekoli na ye boye: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” (Matai 28:19, 20) Longola yango, Yesu asakolaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Lokola Liloba ya Nzambe emonisi ete mosala ya kosakola ezali kosalema na nguya ya elimo santu, komipesa mpenza na mosala yango ezali elembo ya moto oyo azali na boyokani na Nzambe.—Misala 1:8.
Mpo na kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba, esengeli bamilio ya bato básala mosala yango na bomoko. (Yoane 17:20, 21) Longola kozala na boyokani na Nzambe, baoyo bamipesi na mosala yango na mokili mobimba basengeli mpe kotambwisama bango nyonso na ebongiseli kaka moko. Oyebi bato oyo bazali kolanda matambe ya Klisto mpe bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba?
Yo mpe ozali na boyokani na Nzambe?
Toboyi te, ezali na bizaleli mosusu oyo emonisaka soki moto azali na boyokani na Nzambe, kasi okanisi ete ozali na bizaleli oyo tolobeli na lisolo oyo? Mpo na koyeba soki ozali na bizaleli yango, omituna boye: ‘Natángaka Liloba ya Nzambe, Biblia, mokolo na mokolo mpe nakanisaka na mozindo makambo oyo nazali kotánga? Namonisaka mbuma ya elimo na bomoi na ngai? Nabondelaka mingi? Nalingaka kozala na kati ya bato oyo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba?’
Soki omitaleli na bosembo nyonso, okoyeba soki ozali mpenza na boyokani na Nzambe. Tolendisi yo osala nyonso oyo okoki sikoyo, mpo ozwa “bomoi mpe kimya.”—Baloma 8:6; Matai 7:13, 14; 2 Petelo 1:5-11.
[Etanda/Bililingi na lokasa 7]
BILEMBO YA MOTO OYO AZALI NA BOYOKANI NA NZAMBE
◆ Kolinga Liloba ya Nzambe
◆ Komonisa mbuma ya elimo
◆ Kobondelaka Nzambe mbala na mbala mpe na motema moko
◆ Kosakolela basusu nsango malamu ya Bokonzi
[Elilingi na lokasa 5]
Biblia ekosalisa yo oyeba “makanisi ya Klisto”