Lolenge nini tokoki kobakisa bizaleli bibongi likoló na kondima na biso?
“Bobakisa bizaleli bibongi wana ezali bino na kondima.”—2 PETELO 1:5, MN.
1, 2. Mpo na nini tosengeli komizela ete basaleli ya Jéhovah bamonisa bizaleli bibongi?
JÉHOVAH azali ntango nyonso kosala oyo ebongi kati na banzela na ye. Azali kosala makambo ya sembo mpe ya malamu. Mpo na yango, ntoma Petelo akokaki koloba na ntina na Nzambe lokola ye oyo abyangi baklisto bapakolami ‘kati na nkembo na Ye mpe na bizaleli na Ye bibongi.’ Boyebi ya solo ya Tata na bango ya likoló oyo azali na bizaleli bibongi, emonisaki bango likambo ya ntina mpo na kolanda lolenge ya solo ya kobanga Nzambe.—2 Petelo 1:2, 3.
2 Ntoma Paulo apesaki toli na baklisto ete “bazala bamekoli ya Nzambe, lokola bana balingami.” (Baefese 5:1) Lokola Tata na bango ya likoló, basambeli ya Jéhovah basengeli komonisa bizaleli bibongi kati na makambo nyonso. Kasi bizaleli bibongi ezali nini?
Ndimbola ya bizaleli bibongi
3. Lolenge nini balimboli “bizaleli bibongi”?
3 Badiksionere ya ntango na biso elimboli “bizaleli bibongi” lokola “bizaleli kitoko; malamu.” Ezali “misala mpe makanisi na sembo; bomoto malamu.” Moto na bizaleli bibongi azali moyengebene. Bizaleli bibongi bilimbolami lisusu lokola “oyo eyokani na mitinda ya sembo.” Na yango, mpo na baklisto, “mitinda ya sembo” misili kotyama na Nzambe mpe mimonisami polele kati na Biblia, Liloba na ye Mosantu.
4. Bizaleli nini bitangami na 2 Petelo 1:5-7 oyo baklisto basengeli komonisa yango?
4 Baklisto ya solo bazali komiyokanisa na mitinda ya sembo ya Jéhovah Nzambe, mpe bazali komonisa kondima kati na bilaká na ye kitoko. Bazali mpe kotya likebi na toli oyo ya Petelo ete: “Bosala na makasi nyonso ete bobakisa bizaleli bibongi wana ezali bino na kondima; mpe bobakisa boyebi wana ezali bino na bizaleli bibongi; mpe bobakisa komipekisa wana ezali bino na boyebi, mpe bobakisa koyika mpiko wana ezali bino na komipekisa, mpe bobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe wana ezali bino koyika mpiko, bozala na bolingo mpo na bandeko wana ezali bino na ezaleli ya kobanga Nzambe, mpe bobakisa bolingo wana ezali bino na bolingo mpo na bandeko.” (2 Petelo 1:5-7, MN) Moklisto asengeli kosala nyonso ekoki na ye mpo na kokólisa bizaleli wana. Yango ekosalema te bobele na mwa mikolo soko na mwa bambula, kasi yango esɛngi kolanda kosala milende na boumeli ya bomoi mobimba. Kobakisa bizaleli bibongi likoló na kondima na biso ezali likambo moke te.
5. Ezaleli ebongi ezali nini engebene Makomami?
5 Molimboli ya maloba na nkóta, M. R. Vincent alobaki ete na Greke ya kala, ndimbola ya liboso ya liloba oyo libongolami na “ezaleli ebongi” emonisi “kitoko kati na makambo nyonso.” Petelo asalelaki yango na boike wana alobaki ete baklisto basengelaki koyebisa “makambo kitoko,” to bizaleli bibongi ya Nzambe. (1 Petelo 2:9) Na kotalela Makomami, ezaleli ebongi emonisami te lokola eloko ezangi mosala, kasi lokola “ezaleli na nguya, bizaleli makasi, bokasi ya molimo.” Na kolobeláká bizaleli bibongi, Petelo akanisaki mpo na bizaleli malamu oyo basaleli ya Nzambe basengeli komonisa yango na molende, mpe kobatela yango. Atako bongo, lokola tozangi kokoka, tokoki mpenza komonisa bizaleli bibongi na miso na Nzambe?
Bazangi kokoka nde bazali na bizaleli bibongi
6. Atako tozangi kokoka, mpo na nini elobami ete tokoki kosala makambo mabongi na miso ya Nzambe?
6 Tosili kosangola kozanga kokoka mpe lisumu, na yango, tokoki komituna soki lolenge nini tokoki mpenza komonisa bizaleli bibongi na miso na Nzambe. (Baloma 5:12) Solo mpenza, tozali na mposa ya lisungi ya Jéhovah mpo na kozala na mitema ya peto, epai makanisi, maloba, mpe misala oyo ebongi ekoki kouta. (Tala Luka 6:45.) Nsima na kosala lisumu elongo na Bata-seba, Davidi, mokomi na Nzembo oyo abongolaki motema alɔmbaki ete: “Ɛ Nzambe, zalisela ngai motema peto mpe pesa ngai elimo ya sika ya boyengebene kati na ngai.” (Nzembo 51:10) Davidi azwaki bolimbisi ya Nzambe mpe lisalisi lisengelaki ete alanda kozala na bizaleli bibongi. Bobele bongo, soki tosali libungá monene mpe tobongoli mpenza motema, soki tondimi lisungi ya Nzambe mpe oyo ya bankulutu ya lisangá, tokoki kozongela lisusu nzela ya bizaleli bibongi mpe kotikala kati na yango.—Nzembo 103:1-3, 10-14; Yakobo 5:13-15.
7, 8. (a) Nini tosengeli kosala mpo na kotikala ntango nyonso bato na bizaleli bibongi? (b) Baklisto bazali kozwa lisungi nini mpo na kozala bato na bizaleli bibongi?
7 Lokola tosili kosangola lisumu, tosengeli kolanda kobunda etumba ya motema mpo na kosala oyo esɛngami na bizaleli bibongi. Soki tozali ntango nyonso na bizaleli bibongi, tokokoka soko moke te kokóma baombo ya masumu. Na esika ya kosala bongo, tosengeli nde kozala “baombo ya boyengebene” na makanisi, na maloba, mpe kosala makambo na lolenge lobongi. (Baloma 6:16-23) Ya solo, bamposa ya nzoto na biso mpe makanisi na biso mabe ezali na nguya, mpe tozali komona etumba kati na bolɛmbu yango mpe makambo mabongi oyo Nzambe azali kosɛnga biso. Tokoki bongo kosala nini?
8 Libosoliboso, tozali na mposa ya litambwisi ya elimo santu ya Jéhovah, to bokasi bokosalaka mosala. Mpo na yango, tosengeli kotya likebi na toli oyo ya Paulo ete: “Botambola na elimo mpe bopesa mposa na nzoto nzela te. Mpo ete mposa na nzoto ekobundanaka na mposa na elimo, mpe mposa na elimo ekobundanaka na mposa na nzoto; nyonso mibale ekotɛmɛlanaka, kopekisa bino ete bozanga kosala yango ekani bino.” (Bagalatia 5:16, 17) Ya solo, tozali na elimo ya Nzambe oyo ezali nguya mpo na biso ete tosala boyengebene, mpe tozali na Liloba na ye lokola motambwisi na nzela ya malamu. Tozali lisusu na lisungi ya bolingo ya lisangá ya Jéhovah mpe batoli ya “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Na yango, tokoki kolónga makanisi ya mabe. (Baloma 7:15-25) Ya solo, soki likanisi ya mbindo liyeli biso, tosengeli kobwaka yango nokinoki mpe kobondela mpo na kozwa lisungi ya Nzambe mpo na kotɛmɛla komekama nyonso ete tozanga bizaleli bibongi te kati na masɛnginya nyonso.—Matai 6:13.
Bizaleli bibongi mpe makanisi na biso
9. Etamboli ebongi esɛngi kozala na makanisi ya lolenge nini?
9 Bizaleli bibongi bikobandaka kati na makanisi ya moto. Mpo na kozwa ngolu ya Nzambe, tosengeli kokanisa na ntina na makambo na sembo, oyo malamu, mpe mayokani na makambo mabongi. Paulo alobaki ete: “Bandeko, mpo na makambo nyonso ya solo, na makambo nyonso mandimami, na makambo nyonso na sembo, na makambo nyonso na peto, na makambo nyonso na boboto, na makambo nyonso na lokumu, soko makambo mabongi mpe soko yango ebongi kosanzolama, bokanisaka makambo yango.” (Bafilipi 4:8) Tosengeli kotya makanisi na biso kati na makambo ya sembo, na makambo ya peto, mpe tokobendama soko moke te na likambo oyo libongi te. Paulo akokaki bongo koloba ete: “Yango eyekoli bino mpe eyambi bino mpe eyoki bino mpe emoni bino epai na ngai, bosalaka yango.” Soki tomekoli Paulo—na bizaleli bibongi kati na makanisi, na maloba, mpe na misala—tokozala baninga malamu mpe bandakisa malamu na nzela ya boklisto, mpe ‘Nzambe ya kimya akozala na biso.’—Bafilipi 4:9.
10. Lolenge nini kosalela makambo oyo mazwami na 1 Bakolinti 14:20 ekosalisa biso na kotikala ntango nyonso bato na bizaleli bibongi?
10 Soki tozali na mposa ya kobatela bizaleli bibongi kati na makanisi na biso mpe bongo kosepelisa Tata na biso ya likoló, tosengeli kosalela toli oyo ya Paulo: “Bozala bana mike na makanisi na bino te, kasi bozala bana mike kati na makambo mabe; nde bokóma mikóló kati na makanisi.” (1 Bakolinti 14:20) Yango elimboli ete, lokola tozali baklisto, tokoluka te koyeba makambo mabe soko mpe kosala makambo mabe. Na esika ya kopesa nzela na makanisi na biso ete mabebisama na lolenge wana, tokolinga na mayele nyonso ete toyeba yango te mpe, lokola bana mike, tozala na likambo te kati na yango. Lisusu, toyebi malamu ete pite mpe misala mabe ezali lisumu na miso ya Jéhovah. Mposa ya solo mpo na kosepelisa ye na kozaláká na bizaleli bibongi ekopesa biso bolamu, na yango tokopusama na kobwaka lolenge ya masano mabe mpe makanisi mosusu ya mabe mauti na bopusi ya mokili oyo molali kati na nguya ya Satana.—1 Yoane 5:19.
Bizaleli bibongi mpe maloba na biso
11. Kozala bato na bizaleli bibongi esɛngi kozala na maloba ya lolenge nini, mpe na likambo yango, bandakisa nini tozali na yango mpo na Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto?
11 Soki makanisi na biso mayokani na bizaleli bibongi, yango esengeli kozala na bopusi mozindo likoló na oyo tozali koloba. Kozala na bizaleli bibongi esɛngi kozala na maloba ya peto, ya sembo, ya solo, oyo ekoki kolendisa. (2 Bakolinti 6:3, 4, 7) Jéhovah azali “Nzambe na solo.” (Nzembo 31:5) Azali sembo kati na makambo na ye nyonso mpe bilaká na ye nyonso bizali solo mpo ete ye akobukaka lokutá te. (Mituya 23:19; 1 Samwele 15:29; Tito 1:2) Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, “atondi na ngolu mpe na solo.” Ntango azalaki awa na mabelé, alobaki ntango nyonso solo lokola azwaki yango epai na Tata na ye. (Yoane 1:14; 8:40) Lisusu, Yesu “asalaki lisumu te, mpe azwamaki na bokosi te kati na monoko na ye.” (1 Petelo 2:22) Soki tozali mpenza basaleli ya solo ya Nzambe mpe ya Klisto, tokozala na maloba ya solo mpe na etamboli ya sembo, lokola nde ‘tolati nkamba na solo.’—Baefese 5:9; 6:14.
12. Soki tozali na bizaleli bibongi, tosengeli kopɛngola maloba ya lolenge nini?
12 Soki tozali na bizaleli bibongi, ezali na lolenge ya maloba oyo tokopɛngola. Tokolanda toli oyo ya Paulo, ete: “Makambo nyonso makopesaka mawa, mpe nkanda, mpe nkɛlɛ, mpe kongala, mpe kotɔnga mpe makambo mosusu ya mabe lokola, elongwa epai na bino.” “Tika te ete pite, makambo nyonso na mbindo mpe na lokoso ezwama kati na bino; ebongi bongo na basantu. Bozala na etamboli na nsɔni te, na maloba mabe te, maloba na nsɔni te—yango ebongi te—kasi bozala nde na botɔndi.” (Baefese 4:31; 5:3, 4, MN) Bato mosusu bakosepela kosala boninga elongo na biso mpo ete mitema na biso ya sembo mizali kopusa biso na kopɛngola maloba oyo mabongi te mpo na baklisto.
13. Mpo na nini baklisto basengeli kobatela lolemo na bango?
13 Mposa ya kosepelisa Nzambe mpe ya koloba makambo mabongi ekosalisa biso na kopekisa lolemo na biso. Na ntina na makanisi na biso mabe, biso banso tobɛtaka mabaku na maloba na ntango mosusu. Atako bongo, moyekoli Yakobo alobaki ete “soki totii ebendé na monoko ya mpunda,” bakotósa biso mpe bakokenda epai oyo tokokamba bango. Na yango, tosengeli kosala makasi mpo na kopekisa lolemo mpe komeka kosalela yango bobele na motindo mobongi. Lolemo oyo lopekisami te “ezali lokola mokili na bokesene.” (Yakobo 3:1-7, MN) Makanisi nyonso ya mabe oyo mamonisi mokili oyo mozangi ezaleli ya kobanga Nzambe, masangisi mpe kozanga kopekisa lolemo. Yango ekobimisaka makambo mabe lokola litatoli ya lokutá, kofinga mpe kotuka. (Yisaya 5:20; Matai 15:18-20) Mpe wana lolemo oyo lozangi ekangeli lobimisi maloba na kofinga, soko na kozokisa, to mpe maloba na kotuka, boye yango etondi mpenza na ngɛngɛ ya koboma.—Nzembo 140:3; Baloma 3:13; Yakobo 3:8.
14. Wapi mitindo mibale ya maloba oyo baklisto basengeli kopɛngola yango?
14 Lokola Yakobo amonisi yango, ebongi te “kopambola Jéhovah” na kolobáká malamu mpo na ye, mpe kosalela lolemo na lolenge mabe mpo na “kolakela bato mabe,” na kobyangáká mabe likoló na bango. Oyo nde lisumu na koyembela Nzambe na makita mpe nsima wana tobimi, tokei koloba mabe mpo na baninga na biso bandimi! Mai malamu mpe mai na bololo ekoki kobima te longwa na liziba moko. Soki tozali kosalela Jéhovah, bato mosusu bazali komizela ete toloba makambo mabongi na esika na kobimisa maloba mabe. Na yango, topɛngola maloba mabe mpe toluka koloba makambo oyo makozala mpo na bolamu ya baninga na biso mpe kokólisa elimo na bango.—Yakobo 3:9-12.
Bizaleli bibongi mpe misala na biso
15. Mpo na nini ezali ntina na kopɛngola banzela mabe?
15 Lokola makanisi mpe maloba ya moklisto masengeli kozala na lolenge lobongi, ezali boni mpo na misala na biso? Kozala bato na bizaleli bibongi kati na etamboli ezali nzela bobele moko mpo na kondimama na Nzambe. Moko te kati na basaleli ya Jéhovah akoki kotika bizaleli bibongi mpo na kosala makambo mabongi te mpe na bokosi, mpe kotalela yango lokola makambo oyo makoki kondimama na Nzambe. Masese 3:32 elobi ete: “Moto na yauli aboyami na Jéhovah, nde boninga na Ye [Jéhovah] ezali na bato na sembo.” Soki tosepeli mpenza na boyokani na biso elongo na Jéhovah Nzambe, maloba wana ya kosimba motema masengeli kopusa biso na kobwaka mabe soko mpe kosala likambo moko ya mabe. Ya solo, moko na makambo nsambo mayinami na molimo ya Jéhovah, ezali “motema mokobanzabanzaka na misala mabe.” (Masese 6:16-19) Na bongo, topɛngola lolenge na misala wana mpe tosala oyo ebongi, mpo na bolamu ya baninga na biso bato mpe mpo na kokumisa Tata na biso ya likoló.
16. Mpo na nini baklisto basengeli te kosala makambo na bokosi?
16 Mpo na komonisa bizaleli bibongi, tosengeli kozala sembo. (Baebele 13:18) Moto na bokosi, oyo misala na ye miyokani te na maloba na ye, azali moto na bizaleli bibongi te. Liloba na Greke libongolami na “mokosi” (hy·po·kri·tesʹ) elimboli “ye oyo azali koyanola” mpe elimboli lisusu mosáli na masano. Lokola basáli na masano na Greke mpe na Loma bazalaki kolata ba masques, liloba wana liyaki kobongwana mpo na kosalelama epai na ye oyo azali komibomba. Bakosi bazali “bato na sembo te.” (Tala Luka 12:46 mpe Matai 24:50, 51.) Bokosi (hy·poʹkri·sis) ekoki mpe komema na mabe mpe na mayele mabe. (Matai 22:18; Malako 12:15; Luka 20:23) Oyo nde mawa wana moto oyo abongi na kotyelama motema akosami na mwa koseka ya lokutá, na maloba na kolɛtalɛta, mpe na makambo mamonani malamu bobele na libandá! Kasi ezali likambo ya kolendisa soki toyebi ete tozali na boyokani malamu elongo na baklisto babongi na kotyela motema. Lisusu, Nzambe azali kopambola biso mpo tozali bato na bizaleli bibongi mpe na bokosi te. Baoyo bazali komonisa “bolingo bozangi bokosi mpo na bandeko” mpe bazali “na kondima ezangi bokosi,” bandimami na Nzambe.—1 Petelo 1:22; 1 Timoté 1:5.
Bizaleli bibongi bikosalaka malamu
17, 18. Lokola tozali komonisa mbuma ya elimo oyo ete malamu, tokozala na etamboli nini liboso na bato mosusu?
17 Soki tobakisi bizaleli bibongi likoló na kondima na biso, tokosala makasi ete topekisa makanisi na biso, maloba na biso, mpe tokoboya kosala makambo oyo maboyami na Nzambe. Nzokande, komonisa bizaleli bibongi na boklisto esɛngi lisusu ete tosala malamu. Ya solo, bizaleli bibongi bilimbolami lokola malamu. Mpe malamu ezali mbuma ya elimo santu ya Jéhovah; kasi yango euti na milende ya bato te. (Bagalatia 5:22, 23) Lokola tozali komonisa mbuma wana ya elimo oyo ete malamu, tokopusama na kokanisa malamu na ntina na bato mosusu mpe kokumisa bango mpo na bizaleli na bango ya malamu atako mabungá na bango. Bazali nde kosalela Jéhovah na bosembo uta bambula mingi? Boye tosengeli komonisela bango limemya mpe koloba malamu na ntina na bango mpe mosala na bango mpo na Nzambe. Tata na biso ya likoló azali kosepela na bolingo oyo bazali komonisa mpo na nkombo na ye mpe misala na bango mibongi na kondima, biso mpe tosengeli kosepela mpo na yango.—Nehemia 13:31b; Baebele 6:10.
18 Bizaleli bibongi bizali kokómisa biso bato na motema molai, na bososoli, na motema mawa. Soki mosambeli moko ya Jéhovah azali na mpasi to anyokwami na makanisi, tokobɔndisa ye mpe tokoluka kopesa ye mwa bilendiseli, lokola biso tolendisami na Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló. (2 Bakolinti 1:3, 4; 1 Batesaloniki 5:14) Tokozala na mawa elongo na baoyo bazali na mpasi, mbala mosusu bakufeli moto oyo bango balingaki mingi. Soki tokoki kosala eloko moko mpo na kobɔndisa mpasi na bango, tokosala yango, mpo ete elimo na bizaleli bibongi ekopusaka na misala malamu, na misala mitondi na bolingo.
19. Lolenge nini bato mosusu bakosalela biso mpenza soki tozali bato na bizaleli bibongi kati na makanisi, na maloba, mpe na misala?
19 Lolenge moko tozali kopambola Jéhovah na kolobáká malamu mpo na ye, na ntembe te bato mosusu mpe bakopambola biso soki tozali bato na bizaleli bibongi kati na makanisi, na maloba, mpe na misala. (Nzembo 145:10) Lisese moko ya mayele liyebisi ete: “Mapamboli mazali na motó ya moyengebene, kasi yauli ezali na monoko ya bato mabe.” (Masese 10:6) Moto mabe mpe moto na yauli azangi bizaleli bibongi oyo ekoki kopusa bato mosusu na kolinga ye. Akobuka yango azali kolóna mpamba te, na sembo nyonso, bato bakoki kopambola ye te na kolobáká malamu mpo na ye. (Bagalatia 6:7) Oyo nde esengo mpo na baoyo bazali na makanisi, na maloba, mpe na misala na makambo mabongi lokola basaleli ya Jéhovah! Na yango, balingami, batyelami motema, mpe bazali kozwa limemya na bato mosusu, baoyo bapusami na kopambola bango mpe na koloba malamu mpo na bango. Lisusu, bizaleli na bango malamu bikozwilaka mapamboli ya Jéhovah oyo maleki na motuya.—Masese 10:22.
20. Makanisi, maloba, mpe misala oyo ebongi ekoki kozala na bopusi nini kati na lisangá ya libota ya Jéhovah?
20 Makanisi, maloba, mpe misala oyo ebongi ezali mpenza lipamboli mpo na lisangá ya basaleli ya Jéhovah. Wana baninga na biso bandimi bazali na bolingo, bazali komemyana, bolingo mpo na bandeko ekokóla kati na bango. (Yoane 13:34, 35) Maloba mabongi oyo makobimisaka makumisi mpe bilendiseli ya solo, ekobatelaka boyokani mpe bomoko. (Nzembo 133:1-3) Lisusu, makambo na kosepelisa mpe oyo mabongi makopusaka bato mosusu na kosala motindo moko. Oyo eleki mpenza ezali ete, komonisa bizaleli bibongi na boklisto ekozwilaka ngolu mpe mapamboli ya Jéhovah, Tata na biso ya likoló, oyo azali na bizaleli bibongi. Na bongo, tokomityela mokano ya komonisa kondima kati na bilaká kitoko ya Nzambe. Mpe tosala milende makasi mpo na kobakisa bizaleli bibongi likoló na kondima na biso.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Lolenge nini okoki kolimbola “bizaleli bibongi,” mpe mpo na nini bato bazangi kokoka bakoki kozala bato na bizaleli bibongi?
◻ Bizaleli bibongi bisɛngi kozala na makanisi ya lolenge nini?
◻ Bizaleli bibongi bisengeli kozala na bopusi nini likoló na maloba na biso?
◻ Bizaleli bibongi bisengeli kozala na bopusi nini likoló na misala na biso?
◻ Bolamu nini bato na bizaleli bibongi bazali kozwa yango?
[Elilingi na lokasa 21]
Lokola mai malamu mpe mai na bololo ekoki kobima te longwa na liziba moko, bato mosusu bazali komizela ete basaleli ya Jéhovah baloba bobele makambo mabongi