Lisiko: liteya oyo mangomba na boklisto ya lokuta basili kobosana yango
MPO na boklisto ya solo, endimeli ya lisiko—endimeli oyo ete Yesu akufaki mpo na masumu na bato—ezali moboko. Nzokande, uta kala, bateojié na boklisto ya lokuta bazali kotyola mpe koseka liteya yango.
Mpo na nini bongo? Yesu ye moko alobaki te kati na Malako 10:45 ete: “Mwana na moto ayei mpo na kosalisama te, kasi mpo na kosalela, mpe mpo na kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato mingi”?
Bamoko balobi ete, Yesu abimisaki maloba oyo te; ebongisamaki nsima na liwa na ye na bopusi ya ntoma Paulo. Bamosusu bazali koloba ete, awa, “lisiko” ezali bobele lolenge na koloba to ete liteya na yango liuti longwa na masapo na Bagreke! Tala mpo na nini elobami ete lisiko liteyami te na Mangomba.
Kasi, okomituna mbala mosusu ete, ndenge nini baklisto ya liboso bazalaki kososola liwa na Yesu? Paulo alimbweli biso na 2 Bakolinti 5:14, 15 (MN) ete: “Bolingo na Klisto bozali kopusa biso awa esili biso kososola ete: moto moko akufeli bato nyonso . . . mpo ete baoyo bazali na bomoi babika mpo na bango moko te, kasi mpo na ye oyo akufeli bango mpe asili kosekwa.” Liteya yango lizali mpenza petee kati na maloba na ye. Kasi na nsima, bateolojié na boklisto ya lokuta bayei kotya nkaka kati na yango.
Ekoki kozala ete Paulo nde abimisaki liteya yango? Te, mpamba te na 1 Bakolinti 15:3, alobi ete: “Na liboso napesaki bino yango ezwaki ngai ete, Klisto akufi mpo na masumu na biso pelamoko elobaki Makomami.” Ezali bongo polele ete, liboso mpenza na kokomama ya mikanda ya Paulo, baklisto bakangaki ntina ete Yesu akufaki lokola mbeka, ete liwa na ye lizalaki na motuya monene, lisiko lipesamaki mpo na kosomba bato na masumu. Lisusu, lokola oyo Paulo amonisi yango, bazalaki kokanga ntina ete liwa na Klisto likokisaki “Makomami,” elingi koloba bisakweli lokola oyo bikomami kati na Makomami na hébreu, to “Kondimana na Kala,” na Nzembo 22 mpe na Yisaya mokapo 53.
Mituna miye mizangi biyano
Bolukiluki na yo moko likoló na likambo oyo, bokopesa yo nzela na koyeba ete, na eleko na bantoma, mateya na lipengwi makotaki kati na boklisto. (Misala 20:29, 30; 2 Timoté 4:3, 4) Kasi lokola oyo emonisami na Bakonzi na Mangomba ya Kala, ntango wana bato bazalaki kondima mbeka ya lisiko na Klisto. Kasi, na nsima mpenza, mwa ndambo na bateolojié balingaki koyeba liteya ya lisiko na bozindo, mpe bakómaki komituna mituna makasi mpenza lokola oyo ete: Lisiko lifutami epai na nani? Mpe mpo na nini esengelaki kofuta yango?
Na ekeke ya minei, Grégoire de Nysse mpe bateolojié mosusu babimisaki endimeli oyo ete lisiko lifutamaki epai na Satan le Diable. Engebene bango, Satana asili kokangisa moto na nsé na nguya na ye; bongo lisiko lipesamaki epai na ye mpo ete bato bazwa bonsomi. Nzokande, moto moko ya eleko wana, na nkombo Grégoire de Nazianze amonaki libunga kati na liteya yango. Limonisaki ete Nzambe azali na nyongo ya Diable; oyo nde bozoba! Nzokande, likanisi oyo ya lisiko lifutami epai na Diable lizwaki elónga monene mpenza, oyo kino na boumeli na bikeke mingi, emonisamaki te ete ezali lokuta.
Ekoki kozala ete lisiko yango lifutamaki epai na Nzambe ye moko? Grégoire de Nazianze amonaki lisusu mwa mokakatano mpo na kondima yango. Lokola ‘tozalaki baombo na [Nzambe] te,’ mpo na nini esengelaki kofuta ye lisiko? Likambo na mpasi koleka ezali oyo ete, ‘Tata akoki nde kozala na esengo na liwa ya Mwana na ye’ na kosengisáká lisiko? Tala ebele na mituna oyo mokakatano yango esalaki lokola ete ebimisa ntembe likoló na liteya ya lisiko.
Liwa ya lisiko
Mbala mosusu bolukiluki na yo moko ememi yo kino na ebandeli ya ekeke ya zomi na mibale. Ezali na ntango wana nde Anselme, episkopo wa lokumu wa Cantorbéry, amekaki koyanola na mituna yango kati na mokanda na ye Cur Deus homo (Mpo na nini Nzambe amikómisaki moto). Mokanda yango mozalaki koteya ete, atako tokoki te kotalela liwa ya Klisto lokola lisiko, kasi yango epesi nzela na kokokisa boyengebene na Nzambe. Engebene Anselme, soki lisumu lilimbisamaki na nzela na lisiko kozanga ete boyengebene bokokana, mbele ekozala lokola nde yango elongolamaki te. Anselme alobi ete: “Kasi, kati na Bokonzi na ye, ekoki kosalema te ete Nzambe atika eloko mabe eumela.” Bongo, ndenge nini Nzambe asilisaki likambo yango?
Kotyáká na liboso likambo oyo ete ‘Nzambe asepeli na masumu te,’ Anselme alobaki ete ekoki te ‘na kozongisa eloko oyo esilaki kozwama’ na lisumu ya Adam. Mpo ete Nzambe asilaki kofingama, lisiko—oyo ya moto na kokoka mpamba—ekokaki te. Mokonzi wana ya lingomba asosolaki ete: “Na kotalela kofinga oyo esalemaki, esengelaki kopesa mingi koleka oyo ezwamaki.” (Biso nde tolalisi yango.) Anselme alobaki bongo ete esengelaki liwa ya moto oyo azalaki “na mbala moko Nzambe mpe moto.”
Ata soko ezaleli na yo ezali nini liboso na mateya ya Anselme, yeba ete yango endimamaki na bato ya ntango na ye mpe ezali na bopusi kino na mikolo na biso. Na bongo, kati na boklisto, Anselme asali makambo mibale na mbala moko: akumisi mingi mpenza liteya ya Trinité mpe abomi liteya ya lisiko mpo na libela. “Ntubélá” ekómaki liloba ya liboso epai na bateolojié, nzokande liloba “lisiko” ezongisamaki mokemoke na nsima. Nzokande, pene na mateya nyonso ya Anselme mazwi moboko likoló na makanisi na lokuta, kasi likoló na Biblia te. Na boumeli na ntango mpe na lisalisi ya likanisi mosusu oyo lisalemaki mpenza na mayele, bateolojié lokola Thomas d’Aquin babebisaki mokemoke liteya ya “ntubélá” oyo libandisamaki na Anselme. Wana makanisi mpamba mapesamelaki nzela, bayeisaki ebele na mateya oyo matali lisiko mpe, kozangáká mpenza bososoli na Makomami, ntembe ekómaki makasi koleka kati na mayele mabe ya bososoli na bato, na filozofi mpe na makanisi ya mabombami.
Mangomba ya réforme mpe lisiko
Kasi tolobela naino mwa moke eleko na biso. Ntango baprotesta basalaki Réforme to mbongwana na ekeke ya zomi na motoba, etuluku ya bato na makanisi ya mabungá esalemaki.a Ba Sociniens, lokola bazalaki kobengama, bazalaki kondima te ete liwa na Yesu ‘ezali kopesa biso lobiko’; mpo na bango, endimeli oyo ezalaki “na bokosi, epengwi mpe ezalaki mabe mpenza . . . , ekeseni lisusu na Makomami mingi mpe ekeseni na bososoli.” (Le Catéchisme de Raków) Engebene bango, mpo ete Nzambe akolimbisaka na bolingo na ye moko, ntina na kosalela boyengebene ezali te; liwa ya Klisto ezali kosomba bato na kopusáká bango ete bamekola ndakisa na ye ya kokoka.
Kotungisamáká na mangomba yango mpe na mosusu lisusu, Lingomba ya katolike eyanolaki bango na kosaláká likita ya Trente (kobanda 1545 kino 1563). Nzokande, wana likita yango lizwaki etelemelo likoló na ebele na mateya, na esika ete elobela lisiko, likita wana lizwaki ekateli ya sikisiki te mpo na yango. Balobelaki ‘motuya na Yesu Klisto’ mpe basalelaki liloba “ntubélá,” kasi bapengolaki liloba “lisiko.” Na yango, Lingomba limipesaki te mpo na kozwa etelemelo malamu oyo etongami likoló na Biblia. Mateya mingi mosusu mabimaki.
Mpo na nini bakonzi ya mangomba balongaki te?
Kobanda likita ya Trente, bateolojié ya katolike mpe ya protestá basalaki mateya mingi mpenza na ntina na kosikolama (Tala etanda na lokasa 7.) Nzokande, bazali bobele koyokana te likoló na liwa ya Klisto. Bateolojié bazali komipesa bobele na likambo moko: kotyola oyo bazali komonisa mpo na liloba na Biblia “lisiko,” oyo balingi ete bakitisa motuya na yango, wana ezali bango kolobela yango bobele moke. Ndimbola ya liwa na Klisto esalelami na molende mpenza ya makanisi na bokosi mpe na maloba ya koluka kobenda likebi ya bato, lokola “bopusi na bizaleli malamu” mpe “ntubélá mpo na mosuni.” Na esika ya kolendisa kondima ya bandimi kati na liwa ya Klisto, bakonzi na mangomba na boklisto ya lokuta bakómisi nzete na mpasi na Yesu lokola libanga likobetisaka mabaku oyo limonisami na mobulungano monene.
Ntina nini mpenza bazangi kolónga? Teolojié ya katolike, Boniface Willems alobi mpo ete baninga na ye “bayekoli na bisika bitangwi mosika na bato”; nzela ezali te mpo na koyeba mpenza bamposa ya bato.b Yo mpe ozali kondima likanisi oyo. Boye te? Nzokande, Yilimia 8:9 (MN) elobi na bozindo, mpamba te ezali komonisa mpenza mosisa ya mabe. Na yango elobi boye: “Tala ete baboyi liloba na Jéhovah. Mayele nini bazali na yango?”
Ya solo, liteya ya lisiko ekoki kobimisa mwa mituna makasi (2 Petelo 3:16) Kasi, na esika ya kotalela Makomami mpo na kozwa biyano, bateolojié basaleli mayele mpe makanisi na bato. (1 Bakolinti 1:19, 20; 2:13) Nkutu balongoli biteni nyonso ya Biblia oyo bizalaki kosepelisa bango te to oyo bizalaki koyokana te na mateya na bango. (2 Timoté 3:16) Balakisaki mateya oyo mautaki na Biblia te, lokola Trinité. (Yoane 14:28) Mpe libunga na bango monene ezali oyo ya kotya lokumu ya moto na esika ya liboso, nde na nsima makambo ya ntina mingi matali nkombo mpe Bokonzi na Nzambe.—Matai 6:9, 10.
Mokóteli ya lisiko
Tokómi na nsuka ya ekeke ya zomi na libwa kati na bolukiluki na biso. Ezali na eleko yango nde mobali moko oyo azalaki kobanga Nzambe, na nkombo Charles Russell, akabwanaki na teoloji ya bato mpe asalaki zulunalo oyo osimbi yango na maboko: La Tour de Garde (Mosenzeli). Russell akundoli ete: “Uta ebandeli, ezalaki mokóteli monene ya Lisiko.”
Mpe ezali bobele bongo kino sikawa. Ee, uta koleka ekeke moko, Mosenzeli ezali kopesa bantina ya Biblia mpo na kondima lisiko, na kokesena na mikanda oyo mizali koloba mabe na ntina na makanisi malongobani oyo mazwami na Makomami. Bongo, tosengi yo ete otalela makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa na Yesu mpe ndimbola na yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala lisoló “Les Sociniens—Pourquoi n’acceptent-ils pas la Trinité?” oyo ebimaki kati na Réveillez-vous! ya 22 Novembre 1988.
b Mpo na yango, tala liteya ya Willems kati na maloba mazali na encadré awa likoló.
[Etanda na lokasa 7]
MWA MATEYA YA KOSIKOLAMA
◻ LITEYA YA MOKONZI: Hugo Grotius, teolojié Holandé, abimisaki yango na ekeke ya zomi na sambo mpo na kotemela mate a ya ba Sociniens. Grotius atalelaki liwa na Klisto lokola “lolenge na boyokani moko bosalemaki ete, Nzambe azwaki mokumba ya Mokonzi, mpe moto azwaki mokumba ya moto oyo akumbaki ngambo.”—Encyclopédie de religion et d’éthique (angl.), ya Hastings.
◻ LITEYA YA MBEKA EKOPESA BOMOI: lisalemaki na 1946 na teolojié protesta na nkombo Clarence Hewitt. Atalelaki te mosala ya Klisto lokola kokokisama ya mpasi oyo esengelaki, kasi lokola eloko ‘esikolaki biso na mobeko ya lisumu mpe ya liwa, komemáká biso na kobongola motema mpe na kooka mpenza mawa na mabe tosalaki, likambo oyo lizali kosalisa biso na kozwa lilimbisi liboso na Nzambe.’
◻ KOSIKOLAMA NA NZELA NA BOMOKO NA BOKLISTO: Teolojié ya katolike, Boniface Willems (1970) azali koyokanisa “kosikolama” na likambo ya “kobongwana na moimi na biso mpe na kopesana motema bamoko epai na bamosusu.” Abakisi ete: “Liteya ya boklisto oyo ya konyokwama mpo na bazalani ezali oyo elandi: moto na moto ayebi ete asili kokabwana na bato oyo basili mpenza kobebisama na masumu. . . . Lingomba ezali bongo lisangani ya baoyo basili komilengela na kobika mpo na bamoko kati mosala moleki monene.”
◻ LITEYA YA MOTO OYO AMEMI MASUMU NA BATO MOSUSU: Teolojié ya katolike Raymond Schwager asalaki yango na 1978. Liteya liboyi likanisi oyo ete Nzambe ‘akosengisa liso mpo na liso.’ Elobeli oyo ete, mbeka na Klisto ezali lolenge mosusu ya catharsis (kopetolama) oyo ezali kopesa nzela na bato ete baboya makanisi na bango ya kobotama, mpe bakabwana na yango.
◻ KOSIKOLAMA NA BATO NA NZELA NA POLITIKE: Teolojié ya lingomba ya Baptiste, Thorwald Lorenzen akomaki na 1985 ete: “Nzambe azali te koluka lilimbisi mpo na mosumuki bobele na ndimbola ya lingomba, kasi lisusu na nzela ya politike mpo na kopesa bonsomi epai na babóla mpe baoyo bazali konyokwama. . . . Na yango, liwa na Yesu emonisi Nzambe oyo azali komibanzabanza na kobikisama ya mitindo nyonso na bato.”
[Elilingi na lokasa 5]
Bateolojié katolike mpe ya protestá basili kosala mateya mingi likoló na kosikolama mpe lisiko, kasi Biblia ateyi nini mpo na yango?