Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Lisekwa ya Yesu esalemaki mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | 1 Sanza ya 3
    • Paulo ayebaki ete makambo oyo bakristo bazalaki kondima ezalaki lokuta te. Ayebaki ete Yesu asekwaki; mpe na mokuse, ayebisaki Bakorinti makambo oyo endimisaki ye “ete Kristo akufaki mpo na masumu na biso na kotalela Makomami; mpe ete akundamaki, ɛɛ, ete alamukaki na mokolo ya misato na kotalela Makomami; mpe ete abimelaki Kefa, mpe na nsima bantoma zomi na mibale.”b Na nsima abakisaki boye: “Na nsima na yango, abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500) na mbala moko, oyo mingi na bango bazali tii sikoyo, kasi bamosusu balalá na kati ya liwa. Na nsima na yango abimelaki Yakobo, mpe na nsima bantoma nyonso; kasi na nsuka mpenza abimelaki mpe ngai.”​—1 Bakorinti 15:3-8.

  • Lisekwa ya Yesu esalemaki mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | 1 Sanza ya 3
    • b “Bantoma zomi na mibale” ezali lolenge mosusu ya kobenga “bantoma” nyonso atako nsima ya liwa ya Yudasi Mokeriota batikalaki kaka 11. Na libaku mosusu oyo Yesu abimelaki bantoma, kaka 10 nde bazalaki, bango nde bamonisaki bantoma zomi na mibale, mpo Toma azalaki te.​—Yoane 20:24.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto