-
Lisekwa ya Yesu elimboli bomoi!Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | 1 Sanza ya 3
-
-
LISEKWA ya Yesu ezali te mwa likambo moko boye ya kala oyo ezali na ntina te mpo na biso lelo oyo. Ntoma Paulo amonisaki ntina na yango ntango akomaki boye: “Kristo alamuki uta na bakufi, mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa. Mpo lokola liwa eyei na nzela ya moto moko, lisekwa ya bakufi eyei mpe na nzela ya moto moko. Mpo kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.”—1 Bakorinti 15:20-22.
-
-
Lisekwa ya Yesu elimboli bomoi!Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | 1 Sanza ya 3
-
-
Maloba oyo Paulo alobaki na nsima emonisi mapamboli oyo lisekwa ya Yesu ememeli bato. Paulo alobaki boye: “Lokola liwa eyei na nzela ya moto moko, lisekwa ya bakufi eyei mpe na nzela ya moto moko.” Bato bakufaka mpo na lisumu mpe kozanga kokoka oyo bazwá epai ya Adama. Bomoi ya kokoka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato, epesi bango likoki ya kolongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa na nzela ya lisekwa. Na Baroma 6:23, Paulo alobeli likambo yango na mokuse boye: “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.”
-