Lobiko
Ndimbola: Kobatelama to kobikisama na likama moko boye to na liwa. Moto akoki kobikisama na mabɔkɔ ya banyokoli na ye. Na nzela ya Mwana na ye, Yehova azali kobikisa bakristo nyonso ya solo na mokili mabe oyo mpe na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Mpo na ebele ya bato oyo bazali basaleli ya sembo ya Yehova, oyo bazali na bomoi na “mikolo ya nsuka,” lobiko ekomonana mpe ntango Yehova akobatela bango na bolɔzi monene.
Lokola Nzambe atondi na motema mawa, yango elingi koloba ete akobikisa bato nyonso?
Mokanda ya 2 Petro 3:9 emonisi ete bato nyonso bakobika? Vɛrsɛ yango elobi ete: “Nkolo akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba [“alingi moto ata moko te abomama,” NW] kasi ete bato nyonso bakoma kobongwana na motema.” (hf) Nzambe, na motema mawa na ye, alingi ete bana nyonso ya Adama bábongola motema, mpe na bolingo na ye azwi ebongiseli mpo na kolimbisa masumu ya bato oyo babongoli motema. Kasi atindaka moto na makasi te ete andima ebongiseli yango. (Talá Kolimbola Mibeko 30:15-20.) Bato mingi baboyaka ebongiseli yango. Bazali lokola moto oyo azali kozinda na mai kasi aboyi kosalela nsinga oyo babwakeli ye mpo na kobikisa ye. Atako bongo, simbá ete bato oyo baboyi kobongola motema bakokende na lifelo te. Ndenge 2 Petro 3:9 emonisi yango, baoyo baboyi kobongola motema bakobebisama, to “bakobomama.” Vɛrsɛ 7 (hf) elobeli mpe ‘kobomama ya bato oyo batiolaka Nzambe.’ Vɛrsɛ yango emonisi te ete bato nyonso bakobika.—Talá mpe motó ya likambo “Lifelo.”
Mokanda ya 1 Bakorinti 15:22 endimisi ete nsukansuka bato nyonso bakobika? Vɛrsɛ yango elobi ete: “Lokola na Adama nyonso bakokufaka, boye na Klisto nyonso bakozwa bomoi.” (hf) Ndenge bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango emonisi, vɛrsɛ yango ezali nde kolobela lisekwa. Nani akosekwa? Ezali baoyo nyonso bakufaki mpo na lisumu ya Adama (talá vɛrsɛ 21) mpe basalaki masumu na nko te, ndenge Baebre 10:26-29 emonisi yango. Lokola Yesu asekwaki mpe abimaki na Nkunda (Mis. 2:31), yango emonisi ete bato nyonso oyo bazali na Nkunda “bakozongisama na bomoi” na nzela ya lisekwa. (Em. 1:18; 20:13) Bato yango nyonso bakozwa lobiko ya seko? Bakopesa bango libaku ya kozwa lobiko yango, kasi ezali te moto nyonso nde akosalela libaku yango malamu, ndenge emonisami na Yoane 5:28, 29, oyo elobi ete bato mosusu bakosuka na “kosambisama.”
Tokoloba nini mpo na bavɛrsɛ oyo elobeli “lobiko ya bato nyonso,” ndenge hf ebongoli Tito 2:11? Bavɛrsɛ mosusu lokola Yoane 12:32, Baroma 5:18, mpe 1 Timote 2:3, 4, epesi likanisi kaka moko wana na LL, LNz, KNS. Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na liloba “nyonso” mpe maloba “moto nyonso” na bavɛrsɛ yango euti na liloba ya Grɛki pas. Ndenge diksionɛrɛ ya Vine (Expository Dictionary of New Testament Words, Londres, 1962, Vol. I, lok. 46) emonisi yango, liloba pas ekoki mpe kolimbola “ndenge nyonso, ndenge na ndenge.” Na yango, na bavɛrsɛ oyo ezali na likoló awa, na esika ya liloba “nyonso,” maloba “ndenge nyonso” ekoki kosalelama, ndenge ezali na NW. Sikoyo liloba nini ebongi—“nyonso” to “ndenge nyonso”? Na yango, ndenge nini ya kobongola eyokani na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia? Ezali oyo esaleli maloba “ndenge nyonso.” Talá Misala 10:34, 35; Emoniseli 7:9, 10; 2 Batesaloniki 1:9. (Simbá likambo oyo: Babongoli mosusu mpe bandimi ete liloba ya Grɛki yango ekoki mpe kozala na ndimbola wana, ndenge babongoli yango na Matai 5:11 mpe Baroma 7:8; ebongolami na maloba “ndenge na ndenge,” LNz, LL, “ya lolenge nyonso,” KJ.)
Ezali nde na bavɛrsɛ mosusu oyo emonisi ete bato mosusu bakobika te?
2 Tes. 1:9, LNz: ‘Bakozwa etumbu ya liwa lya seko, bakozala mosika na elongi ya mokonzi, mosika na nkembo ya nguya ya ye.’
Em. 21:8, hf: “Mpo na bagɔigɔi, na bato na ntembe, bato babebi na bosɔtɔ, na babomi na bato, na bato na pite, na bato na soloka, na basambeli na bikeko, na bato na lokuta, nyonso, likabo na bango ekozala kati na libeke na likopelaka na mɔtɔ na sufulu, oyo ezali kufa na mibale.”
Mat. 7:13, 14, hf: “Boingela na ekuke na nkaka. Zambi ekuke ezali monene oyo ekoleka kino libebi. Bazali mingi baoyo bakoingela na yango. Mpo ete ekuke ezali na nkaka mpe nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.”
Soki moto abiki, abiki mpo na libela?
Yuda 5, hf: ‘Nalingi kokanisela bino, ata bosili koyeba makambo oyo mbala moko mpo na libela, ete Nkolo abikisi bato na mokili na Ezipito nde na nsima abomi bango bazangi kondima.’
Mat. 24:13, hf: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Na yango, ntango moto abandi kondimela Yesu, eyebani naino te soki akobika to te.)
Flp. 2:12, LNz: “Bozalaki kotosa ngai ntango inso; bongo bótosa bobele te ntango nazali epai ya bino, kasi sikawa mpe awa nazali mosika: bóluka libiki na bobangi mpe na nsomo o mitema.” (Maloba yango etalelaki “basantu” oyo bazalaki na Filipi, ndenge Bafilipi 1:1 emonisi yango. Ntoma Paulo alendisaki bango ete bámityela motema koleka ndelo te mpo bayebaki naino te soki bakobika to te.)
Ebr. 10:26, 27, hf: “Soki tokosalaka masumu na nko nsima na kozwa boyebi na solo, mbeka mpo na masumu ezali lisusu te. Etikali bobɛlɛ kotalela esambiseli na nsɔmɔ mpe mɔtɔ na nkanda oyo ekozikisa batɛmɛli.” (Na yango, Biblia elobi te ete moto akobungisa lobiko na ye te ata soki asali lisumu ya ndenge nini nsima ya kozwa lobiko. Elendisi bakristo ete bátikala ntango nyonso sembo. Talá mpe Baebre 6:4-6, esika Biblia emonisi ete ata moto oyo atyami mafuta na elimo santu akoki kobungisa elikya na ye ya lobiko.)
Kondima yango moko ekoki mpo na kozwa lobiko?
Ef. 2:8, 9, LNz: “Bobiki bobele mpo ya ngrasya [“boboto monene,” NW]. Libiki liuti epai ya bino moko te, lizali likabo lya Nzambe. Bobiki mpo ya misala mya bino te: moto moko te akoki komikumisa na myango.” (Ebongiseli nyonso mpo na lobiko ezali komonisa boboto monene ya Nzambe. Mwana nyonso ya Adama akoki kozwa lobiko na makasi na ye moko te, ata soki asali misala ya malamu ndenge nini. Lobiko ezali likabo oyo Nzambe azali kopesa na bato nyonso oyo bazali kondimela motuya ya mbeka ya Mwana na ye, oyo ezali kozipa masumu.)
Ebr. 5:9, hf: ‘[Yesu] akómaki eutelo na lobiko na seko mpo na bango nyonso bakotosaka ye.’ (Yango ekweisi nde vɛrsɛ oyo elobi ete bakristo ‘babikisami na nzela ya kondima’? Te. Botosi na bango emonisaka kaka ete bazali na kondima ya solo mpenza.)
Yak. 2:14, 26, hf: “Bandeko na ngai, wapi litomba soko moto alobi ete azali na kondima wana ezangi ye misala? Kondima na ye eyebi kobikisa ye? Ntina ete, lokola nzoto oyo ezangi mpema esili kokufa, bongo kondima oyo ezangi misala esili kokufa lokola.” (Moto moko te akozwa lobiko mpo na misala na ye. Nzokande, moto oyo azali na kondima ya solo asalaka misala oyo emonisi ete azali na kondima yango, elingi koloba kotosa mibeko ya Nzambe mpe ya Kristo. Misala yango emonisaka ete moto azali na kondima mpe na bolingo, mpo kondima oyo ezali na misala yango te ekufi.)
Mis. 16:30, 31, hf: “‘Batata nasala nini ete nabikisama?’ [Paulo ná Silasi] balobaki ete, ‘Ndimelá Nkolo Yesu mpe okobikisama, na yo na bato na ndako na yo.’” (Lokola moto yango mpe bato ya ndako na ye bandimaki mpenza, bamonisaki kondima na bango na misala, boye te?)
Soki moto alobi—
‘Nasilá kobikisama’
Okoki koloba: ‘Nasepeli ndenge oyebisi ngai yango, mpo yango emonisi ete ondimelaka Yesu Kristo. Mosala oyo nazali kosala ezali mosala oyo Yesu apesaki bayekoli na ye, elingi koloba koyebisa bato mosusu ete Bokonzi ya Nzambe esili kotyama. (Mat. 24:14)’ Okoki kobakisa: (1) ‘Bokonzi yango ezali nini? Makambo nini ekosala na mabele? (Dan. 2:44)’ (2) ‘Bomoi ya bato ekozala ndenge nini awa na mabele ntango guvɛrnema yango ya likoló ekoyangela? (Nz. 37:11; Em. 21:3, 4)’
To okoki koloba: ‘Na yango, nakanisi okosepela na maloba ya ntoma Petro oyo ezali na Misala 4:12. . . . Osilá komituna nani apesaki biso nkombo ya Yesu mpo tóndimela yango?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Yesu ye moko ayebisi biso soki ezali nani. (Yoa. 17:3)’ (2) ‘Simbá ete Yesu alobaki ete amonisaki nkombo ya Tata na ye. (Yoa. 17:6) Nkombo ya Tata na ye nani? Yango etindi yo okanisa likambo nini? (Kob. 3:15; 34:5-7)’
‘Osilá kobikisama?’
Okoki koyanola: ‘Ɛɛ, mpo na lelo, kasi nayebi te oyo ekoya lobi. Nalobi bongo mpo nayebi toli ya Biblia oyo elobi ete tosengeli komityela motema koleka ndelo te. Oyebi vɛrsɛ oyo elobi bongo? (1 Ko. 10:12)’ Okoki kobakisa: ‘Mpo na nini Biblia epesi biso toli yango? Mpo na bato oyo babotami lisusu mpe bazali na elikya ya bomoi na likoló (Ebr. 3:1), ntoma Paulo akomaki ete . . . (Ebr. 3:12-14) Tokolendisa kondima na biso soki tozali kobakisa boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe.’
To okoki koloba: ‘Nakoki koloba na mokuse, Ɛɛ. Kasi oyebi ete Biblia elobi ete lobiko ezali kaka moko te? Na ndakisa, oyebaka ndimbola ya Emoniseli 7:9, 10, 14? . . . Na yango, ezali na bato oyo bakobika na bolɔzi monene, mpe bakozala na bomoi awa na mabele. (Mat. 5:5)’
‘Ondimelaka Yesu ete azali Mobikisi na yo?’
Talá lokasa 438, na motó ya likambo “Yesu Kristo.”
‘Bolobaka ete kaka bato 144 000 nde bakobika’
Okoki koloba: ‘Nasepeli mingi lokola obimisi likanisi wana; na yango, nakoki koyebisa yo oyo tondimaka mpenza. Bato mingi oyo bazali kondimela ebongiseli oyo Nzambe azwi na nzela ya Yesu bakozwa lobiko. Kasi Biblia elobi ete kaka bato 144 000 nde bakokende na likoló mpo na kozala elongo na Kristo. Osilá kotánga likambo yango na Biblia? . . . Ezali awa na Emoniseli 14:1, 3.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Bakokende kosala nini na likoló? (Em. 20:6)’ (2) ‘Emonani polele ete bakoyangela bato. Okanisi bato yango bazali banani? . . . (Mat. 5:5; 6:10)’