‘Liwa ekozala lisusu te’
“Monguna ya nsuka oyo akozala lisusu te ezali liwa.”—1 BAKOLINTI 15:26, NW.
1, 2. (a) Paulo azalaki na elikya nini na ntina na bakufi? (b) Paulo atunaki motuna nini na ntina na lisekwa?
LIBONDELI ebéngami “Nayambi” elobaka ete, “Nayambi . . . nsekwa ya bato, bomoi bwa lobiko.” Bakatolike mpe Baprotesta bazongelaka maloba yango mbala na mbala, kasi bayebaka mpenza te ete bindimeli na bango ekokani mingi na filozofi ya Bagreke, kasi na bindimeli ya bantoma te. Nzokande, ntoma Paulo aboyaki filozofi ya Bagreke mpe andimaki ete molimo ekufaka. Kasi, azalaki na kondima makasi kati na bomoi na mikolo mikoya mpe na kopemama na Nzambe, akomaki ete: “Monguna ya nsuka oyo akozala lisusu te ezali liwa.” (1 Bakolinti 15:26, NW) Likambo yango elimboli nini mpo na bato, oyo nsuka na bango ezalaka se liwa?
2 Mpo na kozwa eyano, tótalela lisusu bandimbola ya Paulo na ntina na lisekwa oyo ekomami na 1 Bakolinti mokapo 15. Omikundola ete na bavɛrsɛ ya liboso, Paulo amonisaki ete lisekwa ezali moko na mateya ya moboko kati na bindimeli ya boklisto. Sikawa, atuni motuna moko ya sikisiki ete: “Kasi moto moko akotunaka ete, Bakufi bakosekwa na nzela nini? Bakoya na nzoto na motindo boni?”—1 Bakolinti 15:35.
Nzoto ya motindo nini?
3. Mpo na nini bato mosusu baboyaki liteya ya lisekwa?
3 Na kotunáká motuna yango, ekoki mpenza kozala ete Paulo alukaki kolongola bopusi ya filozofi ya Platon. Platon ateyaki ete moto azali na molimo oyo elandaka kozala na bomoi na ntango nzoto ekufi. Na ntembe te, mpo na baoyo bakolaki na likanisi wana, liteya ya boklisto ezalaki na ntina te. Soki molimo elandaka kozala na bomoi, lisekwa ezali na ntina nini? Na ntembe te, emonanaki mpe ete liteya ya lisekwa elongobani te. Soki nzoto esili kozonga mputulu, lolenge nini lisekwa ekoki kosalema? Heinrich Meyer, oyo azali molimboli ya Biblia, alobi ete mbala mosusu ntembe ya baklisto mosusu etongamaki “na moboko ya filozofi oyo elobi ete nzoto oyo esili kokóma mputulu ekoki kozongisama lisusu mobimba te.”
4, 5. (a) Mpo na nini ntembe ya bato bazangi kondima elongobanaki te? (b) Limbolá elakiseli ya “mombóto” oyo Paulo apesaki. (c) Nzambe azali kopesa bapakolami oyo basekwisami nzoto ya motindo nini?
4 Paulo amonisi ete makanisi na bango mazangi ntina: “Zoba! Nkona oyo okokonaka ekozwa bomoi te bobele ete ekufa naino. Mpe yango ekokonaka yo ezali nzoto oyo ekoya te kasi bobele mbóto na bolumbu, soko na masangu soko na lolenge mosusu. Nde Nzambe akopesaka yango nzoto pelamoko elingi ye, na lolenge na lolenge na mbóto, nzoto na yango mpenza.” (1 Bakolinti 15:36-38) Nzambe alingaki kosekwisa nzoto oyo bato bazalaki na yango ntango bazalaki awa na mabelé te. Kasi, mbongwana esengelaki kosalema.
5 Paulo akokanisi lisekwa na lolenge oyo mombóto ebimaka. Mwa mombóto moke ya masangu ekokani ata moke te na nzete oyo ekobima kati na yango. Buku The World Book Encyclopedia elobi ete: “Ntango mombóto ebandi kobima, emelaka mai mingi. Mai yango esalaka mbongwana mingi kati na mombóto. Lisusu, esalaka ete mombóto yango evimba mpe mposo na yango epasuka.” Mombóto ekufaka mpenza mpe molona ebandaka kobima na esika yango. “Nzambe akopesaka yango nzoto” na boye ete asilá kobongisa mibeko oyo ekosala ete ekola, mpe mombóto mokomoko ezwaka nzoto engebene lolenge na yango. (Genese 1:11) Bobele bongo, baklisto bapakolami bakufaka naino na nzoto na bango ya mosuni. Na nsima, na elaka na ye, Nzambe azongisaka bango na bomoi na nzoto ya sika. Lokola Paulo ayebisaki Bafilipi, “Yesu Klisto . . . akobongola lolenge na nzoto na biso na kosɔkɛma kino na lolenge na nzoto na ye na nkembo.” (Bafilipi 3:20, 21; 2 Bakolinti 5:1, 2) Basekwisamaka na nzoto ya elimo mpe bakendaka na mokili ya elimo.—1 Yoane 3:2.
6. Mpo na nini elongobani kondima ete Nzambe akoki kopesa basekwi nzoto ya elimo oyo ebongi?
6 Ezali mpasi mingi mpo na kondima yango? Te. Paulo amonisi ete banyama bazali na mitindo ya nzoto ekeseni. Lisusu, amonisi bokeseni ezali kati na baanzelu mpe bato oyo bazali na nzoto ya mosuni, na kolobáká ete: “Nzoto na likoló izali, nzoto na mokili izali mpe lokola.” Mpe lisusu, biloko oyo bizangi bomoi bizali mitindo ndenge na ndenge. Kala mpenza, liboso ete siansi eyeba biloko mosusu bizali na molɔ́ngɔ́ lokola minzoto ya bule, minzoto mineneminene ya motane, mpe minzoto mikemike ya mpɛmbɛ, Paulo alobaki ete, “[Monzoto, NW] na [monzoto] na likoló ikeseni na ndenge na nkembo.” Mpo na yango, elongobani kokanisa ete Nzambe akoki kopesa nzoto ebongi na bapakolami oyo basekwisami, boye te?—1 Bakolinti 15:39-41.
7. Kozanga kopola elimboli nini mpe kozanga kokufa elimboli nini?
7 Na nsima, Paulo alobi ete: “Ezali mpe bongo na lisekwa na bakufi. Ekokonama eloko na kopola, ekosekwa eloko na kozanga kopola.” (1 Bakolinti 15:42) Nzoto ya moto, ata soki ezali ya kokoka, ekoki kopola. Ekoki kobomama. Na ndakisa, Paulo alobaki ete Yesu oyo asekwisamaki “akozonga kati na kopola lisusu te.” (Misala 13:34) Asengelaki lisusu kozonga na bomoi na nzoto ya moto te, oyo ekoki kopola, ata soki ezali ya kokoka. Nzoto oyo Nzambe apesi na bapakolami oyo basekwisami ekoki kopola te—ekoki kokufa te to mpe kobeba te. Paulo alobi lisusu ete: “Ekokonama na motindo na nsɔni, ekosekwa na motindo na nkembo; ekokonama na bolɛmbu, ekosekwa na nguya; ekokonama nzoto na mosuni mpenza, ekosekwa nzoto na [elimo, NW].” (1 Bakolinti 15:43, 44) Paulo abakisi ete: “Nzoto oyo na kufa elata kozanga-kokufa.” Kozanga kokufa elimboli bomoi ezangi nsuka, oyo ekoki kobebisama te. (1 Bakolinti 15:53; Baebele 7:16) Na ndenge yango, baoyo basekwisami balati “elilingi na moto na Likoló,” elingi koloba Yesu, oyo afungweli bango nzela ya lisekwa.—1 Bakolinti 15:45-49.
8. (a) Ndenge nini toyebi ete basekwi bakozala bobele bato oyo bazalaki liboso na bomoi awa na mabelé? (b) Bisakweli nini bikokokisama ntango lisekwa ekosalema?
8 Atako mbongwana yango ekosalema, baoyo basekwisami bazali bobele bato oyo bazalaki liboso ya kokufa. Na ntango bakosekwa, bakoyeba makambo oyo bayebaki liboso mpe bakobatela bizaleli malamu na bango ya boklisto. (Malaki 3:3; Emoniseli 21:10, 18) Na likambo oyo, bakokani na Yesu Klisto. Abongwanaki longwa na nzoto ya elimo mpo na kozwa nzoto ya mosuni. Na nsima, akufaki mpe asekwisamaki na nzoto ya elimo. Kasi, “Yesu Klisto azali motindo moko, lobi mpe lelo mpe libela.” (Baebele 13:8) Bapakolami bazali solo na libaku malamu ya nkembo! Paulo alobi ete: “Mpe wana nzoto oyo na kopola ekolata kozanga-kopola mpe nzoto oyo na kokufa ekolata kozanga-kokufa, bongo liloba likokoka oyo ekomami ete, Kufa esili komelama na elonga! Ɛ kufa, kolonga na yo wapi? Ɛ kufa, esweli na yo wapi?”—1 Bakolinti 15:54, 55; Yisaya 25:8; Hosea 13:14.
Lisekwa mpo na bomoi awa na mabelé?
9, 10. (a) Na 1 Bakolinti 15:24, “nsuka” elimboli nini, mpe makambo nini makosalema na nsuka yango? (b) Nini esengeli kosalema mpo ete liwa ezala lisusu te?
9 Elikya moko ezali mpo na bamilio ya bato oyo bakozwa bomoi lokola bikelamu ya elimo na likoló te? Ɛɛ, elikya ezali! Nsima ya kolimbola ete lisekwa mpo na bomoi ya likoló ekosalema na eleko ya Kozala ya Klisto, Paulo amonisi makambo oyo makolanda; alobi ete: “Boye, nsuka ekoya wana ekopesa ye bokonzi epai na Nzambe mpe Tata, nsima wana esili ye kobwaka lokumu nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya nyonso.”—1 Bakolinti 15:23, 24.
10 “Nsuka” ezali bongo nsuka ya Boyangeli ya Klisto oyo ekoumela mbula nkóto, ntango Yesu, na komikitisa nyonso mpe na bosembo nyonso, akozongisa Bokonzi epai ya Nzambe mpe Tata na ye. (Emoniseli 20:4) Mokano ya Nzambe ya ‘koyanganisa biloko nyonso kati na Klisto’ ekosila kokokisama. (Baefese 1:9, 10) Kasi, liboso na yango, Klisto akobukabuka “bokonzi nyonso mpe nguya nyonso” oyo ezali kotɛmɛla mokano ya Nzambe. Yango ekosuka bobele na kobebisama oyo ekosalama na Armagedon te. (Emoniseli 16:16; 19:11-21) Paulo alobi ete: “[Klisto] asengeli koyangela lokola mokonzi kino Nzambe akotya banguna nyonso na nse ya makolo na ye. Monguna ya nsuka oyo akozala lisusu te ezali liwa.” (1 Bakolinti 15:25, 26, NW) Ɛɛ, bilembo nyonso ya lisumu ya Adama mpe liwa bikolongolama. Boye, ekosengela ete Nzambe abimisa bato nyonso oyo bazali kati na “nkunda ya ekaniseli” na nzela ya lisekwa.—Yoane 5:28.
11. (a) Ndenge nini toyebi ete Nzambe akoki kozalisa lisusu milimo oyo ekufá? (b) Basekwi oyo bakozonga na bomoi awa na mabelé bakozwa nzoto ya motindo nini?
11 Yango elimboli kozalisa lisusu milimo ya bato. Ekoki kosalema te? Te, mpamba te Nzembo 104:29, 30 endimisi biso ete Nzambe akoki kosala yango: “Okolongola mpema na bango mpe bakokufa; bakobongwana lisusu na mputulu. Yo okotindaka [elimo, NW] na yo, bango bazali kosalama.” Atako baoyo bakosekwisama bakozala bobele bato oyo bazalaki liboso ya kokufa, ekosɛnga te ete bázongela lisusu nzoto oyo bazalaki na yango. Lolenge moko na baoyo basekwisamaki mpo na kokende na likoló, Nzambe akopesa bango nzoto lokola asepeli. Na ntembe te nzoto yango ya sika ekozala malamu mpe ekokokana na nzoto oyo bazalaki na yango liboso ete bákufa mpo ete balingami na bango bákoka koyeba bango.
12. Lisekwa mpo na bomoi awa na mabelé ekosalema ntango nini?
12 Lisekwa mpo na bomoi awa na mabelé ekosalema ntango nini? Malata alobaki na ntina na ndeko na ye Lasalo oyo akufaki ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo na nsuka.” (Yoane 11:24) Ayebaki yango ndenge nini? Likambo ya lisekwa ezalaki kobimisa ntembe mingi na eleko na bango, mpamba te Bafalisai bazalaki kondima yango kasi Basadukai bazalaki kondima yango te. (Misala 23:8) Kasi, ekoki kozala ete Malata ayebaki batatoli oyo bazalaki liboso na koya ya Klisto mpe bazalaki na elikya ya lisekwa. (Baebele 11:35) Lisusu, ekoki kozala ete asosolaki uta na maloba ya Danyele 12:13 ete lisekwa ekozala na mokolo ya nsuka. Ekoki mpe kozala ete Yesu ye moko nde ateyaki ye yango. (Yoane 6:39) “Mokolo ya nsuka” yango ezali bongo Boyangeli ya Klisto oyo ekoumela mbula nkóto. (Emoniseli 20:6) Kanisá esengo oyo ekozala na “mokolo” wana ntango likambo monene boye ekobanda!—Kokanisá na Luka 24:41.
Nani akosekwisama?
13. Emonaneli nini ya lisekwa elobelami na Emoniseli 20:12-14?
13 Emonaneli ya Yoane na ntina na lisekwa ekomami na Emoniseli 20:12-14; elobi ete: “Namoni mpe bakufi, minene na mike, batɛlɛmi na liboso na kiti na bokonzi, mpe buku ifungolami, mpe buku mosusu efungolami, oyo buku na bomoi. Bakufi basambisami na makambo masili kokomama na buku yango, na motindo na misala na bango. Mai monene ezongisi bakufi na kati na yango: Kufa na [Hades, NW] izongisi bakufi na kati na yango. Basambisami moto na motindo na misala na ye, moto na motindo na misala na ye. Na nsima Kufa na Hades ibwakami kati na libeke na mɔ́tɔ. Libeke na mɔ́tɔ oyo ezali kufa na mibale.”
14. Banani bakozala kati na basekwisami wana?
14 Lisekwa ekozala mpo na bato “minene na mike,” elingi koloba bato ya lokumu mpe bato oyo bayebanaki te baye bazalaká na bomoi mpe bakufá. Ɛɛ, ezala bana mike bakozala kati na bato yango! (Yilimia 31:15, 16) Likambo mosusu ya ntina emonisami na Misala 24:15 ete: “Lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” Bato ya lokumu kati na “bato sembo” ekozala mibali mpe basi oyo bamonisaki bosembo na ntango ya kala, lokola Abele, Enoka, Noa, Abalayama, Sala, mpe Lahaba. (Baebele 11:1-40) Kanisá ete yo ozwa libaku ya kosolola na bato motindo wana mpe koyoka makambo oyo masalemaká kala mpe mayebisami na Biblia na monɔkɔ ya baoyo bamonaki yango na miso! Kati na “bato sembo,” ekozala na bankóto ya bato oyo bazalaki kobanga Nzambe oyo bakufi mosika te na mokolo ya nsuka mpe bazali na elikya ya kokende na likoló te. Ozali na ndeko moko to moninga moko oyo akoki kozala kati na bato yango? Ezali mpenza libɔndisi na koyeba ete okoki komona bango lisusu! Kasi, “bato sembo te” oyo bakosekwisama ezali banani? Ezali bamilio, mbala mosusu bamiliare ya bato oyo bakufaki kozanga ete bázwa libaku ya koyekola mpe kosalela solo ya Biblia.
15. Likambo oyo ete baoyo bakozonga na bomoi “basambisami na makambo masili kokomama na buku yango” elimboli nini?
15 Kasi, ndenge nini basekwi “basambisami na makambo masili kokomama na buku yango, na motindo na misala na bango”? Babuku yango ezali na makambo oyo basalaká te; mpamba te ntango bakufaki, batikaki kotángela bango masumu oyo basalaki na bomoi na bango. (Baloma 6:7, 23) Nzokande, bato oyo bakosekwisama bakokoba kozala na lisumu ya Adama. Boye, esengeli kozala ete babuku yango ekopesa malako ya Nzambe oyo bato nyonso bakotosa mpo na kozwa litomba na mbeka ya Yesu Klisto. Wana elembo ya nsuka ya lisumu ya Adama ekolongolama, ‘liwa ekozali lisusu te.’ Na nsuka ya mbula nkóto, Nzambe akozala “nyonso kati na bato nyonso.” (1 Bakolinti 15:28) Moto moko te akozala lisusu na mposa ya misala ya Nganga Monene to Mosikoli. Bato nyonso bakozongisama na ezalela ya kokoka oyo Adama azalaká na yango.
Lisekwa ekosalema na molɔngɔ
16. (a) Mpo na nini elongobani kokanisa ete lisekwa ekosalema na molɔngɔ? (b) Banani bakoki kozala kati na baoyo bakosekwisama liboso?
16 Lokola lisekwa mpo na bomoi na likoló ekosalema na molɔngɔ, “moto na moto na kokitana na ye mpenza,” emonani mpe ete lisekwa mpo na bomoi awa na mabelé ekobimisa mobulungano te na kotondisáká ebele ya bato na mokili na mbala moko. (1 Bakolinti 15:23) Na ntembe te bato oyo bauti kosekwisama sika bakozala na mposa ya lisungi. (Kokanisá na Luka 8:55.) Bakozala na mposa básunga bango na mosuni mpe—oyo eleki ntina—bakozala na mposa ya lisungi ya elimo mpo na kozwa boyebi ya Yehova mpe Yesu Klisto, boyebi oyo ememaka na bomoi. (Yoane 17:3) Soki bato nyonso bazongi na bomoi na mbala moko, likoki ya kosunga bango nyonso na lolenge lobongi ekozala te. Elongobani kokanisa ete bato bakobanda kosekwisama na kolandana mokemoke. Ekoki mpenza kozala ete baklisto ya sembo oyo bakufaki mwa moke liboso ete nsuka ya ebongiseli ya Satana eya, bakozala kati na baoyo bakosekwisama liboso. Tokoki mpe kolikya ete basembwi ya kala oyo bakosala lokola “bana na mokonzi,” bakozala kati na baoyo bakosekwisama liboso.—Nzembo 45:16.
17. Makambo nini matali lisekwa na ntina na yango Biblia elobi eloko te, mpe mpo na nini baklisto basengeli te komibanzabanza na yango na kolekisa ndelo?
17 Nzokande, tokoki koloba yango na kondimisama nyonso te. Ezali na makambo mingi oyo Biblia elobi eloko te. Eyebisi makambo nyonso te na ntina na lolenge, ntango, to na bisika oyo lisekwa ya Songolo ekosalema. Biblia eyebisi biso te ndenge nini baoyo bakozonga na bomoi bakozwa ndako ya kolala, ndenge bakozwa bilei mpe bilamba. Tokoki mpe koloba te na kondimisama nyonso lolenge oyo Yehova akosala na makambo matali kobɔkɔla mpe kobatela bana oyo bakosekwisama to lolenge nini akobongisa makambo mosusu matali baninga mpe balingami na biso. Ya solo, ezali mabe te tómituna mituna na ntina na makambo yango; kasi ekozala likambo ya mayele te soki tokolekisa ntango na biso na komekáká koyanola na mituna oyo mikoki koyanolama sikawa te. Tosengeli nde kotya likebi na biso na kosalela Yehova na bosembo mpe kozwa bomoi ya seko. Baklisto bapakolami batii elikya na bango na lisekwa ya nkembo mpo na bomoi na likoló. (2 Petelo 1:10, 11) “Bampate mosusu” bazali na elikya ya libula ya seko awa na mabelé na nse ya Bokonzi ya Nzambe. (Yoane 10:16; Matai 25:33, 34) Mpo na makambo mingi ya mikemike oyo mayebani te na ntina na lisekwa, totii bobele elikya na Yehova. Bolamu na biso na mikolo mizali koya ezali na mabɔkɔ na Ye oyo akoki ‘kosilisa mposa na nyonso na bomoi.’—Nzembo 145:16; Yilimia 17:7.
18. (a) Elonga nini Paulo amonisi polele? (b) Mpo na nini totii motema mobimba na elikya ya lisekwa?
18 Paulo asukisi na kolobáká ete: “Matɔ́ndi epai na Nzambe oyo apesi biso elonga na nzela na Nkolo na biso Yesu Klisto.” (1 Bakolinti 15:57) Ɛɛ, na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto, tolongi liwa oyo Adama amemelaki biso, mpe ezala bapakolami to “bampate mosusu,” biso nyonso tosangani na elonga yango. Ya solo, “bampate mosusu” oyo bazali na bomoi lelo oyo bazali na elikya oyo bato ya bileko mosusu bazalaki na yango te. Lokola bazali kati na “ebele monene” oyo ezali se kokola, bakoki kobika na “bolɔzi monene” oyo ebɛlɛmi mpe mbala mosusu bakokufa soko moke te! (Emoniseli 7:9, 14) Nzokande, ata baoyo bazali kokufa mpo na “ntango mpe makambo makanami te” to na mabɔkɔ ya basaleli ya Satana, bakoki kotya motema na bango na elikya ya lisekwa.—Mosakoli 9:11, NW.
19. Lelo oyo, baklisto nyonso basengeli kotya likebi na elendiseli nini?
19 Yango wana, tozali kozela na mposa mingi mokolo wana ya nkembo ntango liwa ekozala lisusu te. Tozali kotalela makambo na bokatikati mpamba te totii motema na biso mobimba na lisekwa oyo Yehova alaki. Ezala likambo nini ekómeli biso na bomoi oyo—ata soki tokufi—eloko moko te ekoki kobɔtɔla biso libonza oyo Yehova alaki. Na yango, elendiseli ya nsuka oyo Paulo apesaki na Bakolinti ebongi mpenza epai na biso lelo oyo lokola ezalaki na ntango wana, eleki sikawa mbula nkóto mibale: “Bongo, bandeko na ngai balingami, bótɛlɛma ngwi, bóninganaka te, bósalaka mosala na Nkolo ntango nyonso, awa eyebi bino ete kati na Nkolo mosala na bino ezali mpamba te.”—1 Bakolinti 15:58.
Okoki kolimbola?
◻ Paulo ayanolaki nini na motuna etali nzoto oyo bapakolami bakozwa na lisekwa?
◻ Ntango nini mpe lolenge nini liwa ekozala lisusu te?
◻ Banani bakozala kati na baoyo bakosekwisama mpo na bomoi awa na mabelé?
◻ Tosengeli kozala na makanisi nini na ntina na makambo oyo Biblia elobi eloko te?
[Elilingi na lokasa 20]
Mombóto ‘ekufaka’ wana ezali kosala mbongwana monene
[Bililingi na lokasa 23]
Bato ya sembo ya ntango ya kala, lokola Noa, Abalayama, Sala, mpe Lahaba, bakozala kati na baoyo bakosekwisama
[Elilingi na lokasa 24]
Lisekwa ekozala ntango ya esengo monene!