Apolo—Mosakoli ya solo ya boklisto oyo azalaki molobi malamu
EZALA basangani ya lisangá ya boklisto baoyo baumelá to baoyo ya sika, basakoli nyonso ya Bokonzi basengeli komibanzabanza mpo na kokóla lokola bateyi ya nsango malamu. Yango ezali kosɛnga ete tókólisa boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe mpe makoki na biso ya koteya yango epai na bato mosusu. Mpo na basakoli mosusu, ekoki kosɛnga kolónga makambo ya mpasi, kolónga mikakatano, to komipesa mpo na kosala lisusu mingi koleka.
Biblia ezali na ndakisa mingi ya mibali mpe basi ya ntango ya kala oyo, na lolenge moko to mosusu, balóngaki na kosaláká bokóli mingi na makambo ya elimo mpe bazwaki mbano mpo na milende na bango. Moko na bango ezalaki bongo Apolo. Na ebandeli Makomami mamonisi biso ye lokola moto oyo azali na boyebi moke ya mateya ya boklisto; nzokande, bobele mwa mibu moke na nsima, akómi kosala mosala ya mokɛngɛli motamboli ya lisangá ya ekeke ya liboso. Nini esalisaki ye ete asala bokóli motindo wana? Azalaki na bizaleli oyo ebongi ete biso nyonso tómekola yango.
‘Mobali na boyebi na Makomami’
Engebene Luka mokomi na Biblia, pene na mobu 52 T.B., “Moyuda moko, nkombo na ye Apolo, moto na Alesandalia, afandaki na Efese. Ye mobali na mayele [“molobi malamu,” NW] mpe na boyebi na Makomi. Asilaki kolakisama na nzela na Nkolo, mpe [“elimo,” NW] na ye ezalaki na mɔ́tɔ. Azalaki kosolola mpe kolakisa makambo na ntina na Yesu sembo mpenza, nde ayebaki bobele libatisa na Yoane. Ye wana abandi koloba na molende kati na eyanganelo.”—Mis. 18:24-26.
Alesandalia, na mboka Ezipito, ezalaki engumba ya mibale oyo elekaki monene kati na mokili mobimba, na nsima ya Loma mpe ezalaki moko na bisika bileki minene ya bato ya mayele ya eleko wana, ezala mpo na Bayuda mpe mpo na Bagreke. Ekoki mpenza kozala ete Apolo azwaki boyebi na ye ya solo ya Makomami ya Liebele mpe makoki ya koloba malamu mpo ete akɔtaki kelasi kati na etuluku monene ya Bayuda oyo ezalaki kati na engumba wana. Ezali mpasi mpo na koyeba sikisiki epai wapi Apolo ayekolaki makambo matali Yesu. Nganga-mayele F. F. Bruce alobaki: “Ntembe ezali te ete azalaki mosáli mibémbo—mbala mosusu mosáli mombongo na kotambolatambola, mpe ekoki kozala ete akutanaki na basakoli baklisto na moko na bisika epai kuna azalaki kokende.” Na lolenge moko to mosusu, alobaki mpe ateyaki na solo nyonso na ntina na Yesu, emonani lokola ete azwaki litatoli liboso ya Pantekote ya mobu 33 T.B., mpamba te “ayebaki bobele libatisa na Yoane.”
Lokola Yoane Mobatisi azalaki mopasoli-nzela liboso na Yesu, apesaki litatoli moko ya nguya epai na libota mobimba ya Yisalaele, mpe abatisaki bato mingi lokola elembo ya kobongola motema. (Malako 1:5; Luka 3:15, 16) Engebene banganga-mayele mingi oyo bayekolaka masoló ya makambo ya kala, kati na Bayuda oyo bazalaki na nsé ya boyangeli ya Loma, mpo na mingi na bango, mwa makambo moke oyo bayebaki na ntina na Yesu ezalaki bobele oyo bayokaki na monɔkɔ ya Yoane wana azalaki koteya na mabóngo ya Yordani. W. J. Conybeare mpe J. S. Howson balobi ete: “Boyebi na bango ya losambo ya boklisto esukaki bobele na makambo oyo bayokaki uta ebandeli ya mosala ya Nkolo na biso. Bayebaki mpenza te ndimbola ya liwa ya Klisto; ekoki mpenza kozala ete bayebaki te soki asekwisamaki solo.” Emonani lokola ete Apolo ayebaki te ete elimo santu esopamaki na Pantekote na mobu 33 T.B. Nzokande, asilaki koyeba makambo mosusu ya sikisiki na ntina na Yesu, mpe abombaki yango mpo na ye moko te. Ya solo, na mpiko nyonso, alukaki mabaku ya koloba na ntina na makambo oyo ayebaki. Nzokande, molende na ye ezalaki naino te na boyokani na boyebi ya sikisiki.
Azalaki na molende, kasi na komikitisa
Lisoló ya Luka ekóbi ete: “Wana eyoki Pilisikila na Akila ye, bakamati ye mpe balimboli ye nzela na Nzambe na motindo eleki sembo.” (Misala 18:26) Ekoki mpenza kozala ete Akila mpe Pilisikila basosolaki ete kondima ya Apolo ekokanaki na oyo ya bango na makambo mingi, kasi na mayele nyonso, balukaki kosembola ye te na miso ya bato banso na ntina na makambo mosusu oyo ye ayebaki malamu te. Lolenge nini Apolo, moto “na nguya . . . kati na Makomami” atalelaki kosembolama yango? (Misala 18:24, Kingdom Interlinear) Na ntembe te, Apolo azalaki kosakola na mwa ndambo ya boyebi na ye epai na bato banso mwa moke liboso ete akutana na Akila mpe Pilisikila. Moto na lolendo akokaki mbɛlɛ koboya kondima kosembolama, kasi Apolo azalaki na komikitisa mpe azalaki na botɔ́ndi lokola azwaki likoki ya kobakisa makambo mosusu likoló na boyebi na ye.
Elimo wana ya komikitisa oyo Apolo azalaki na yango emonanaki mpe polele wana aboyaki te komema nkomá ya kondimama oyo bandeko ya Efese bapesaki ye ete amema yango na lisangá ya Kolinti. Lisoló yango ekóbi ete: “Na nsima, wana ekanisi ye kokenda na Akaya, bandeko balendisi ye mpe bakomeli bayekoli mokanda ete bányangela ye [“báyamba ye na boboto,” NW].” (Misala 18:27; 19:1) Apolo asɛngaki te ete bándima ye mpo na makoki na ye moko, kasi na komikitisa nyonso, alandaki bibongiseli ya lisangá ya boklisto.
Na Kolinti
Na ebandeli ya mosala na ye na Kolinti, Apolo azwaki matomba malamu. Mokanda ya Misala eyebisi ete: “Esili ye kokóma, asungi mingi baoyo basili kondima mpo na ngɔlu, mpo ete na miso na bato akweisi ntembe na Bayuda, na kotalisa na kati na Makomi ete Yesu azali Klisto.”—Misala 18:27, 28.
Apolo amipesaki na mosala ya kosunga lisangá, komibongisa malamu mpe molende na ye ezalaki elendiseli mpo na bandeko. Sɛkɛlɛ́ ya bolóngi na ye ezalaki nini? Na ntembe te, Apolo azalaki na makoki oyo abotamaki na yango mpe azalaki na mpiko ya kotyana ntembe elongo na Bayuda liboso ya bato banso. Kasi likambo lileki ntina ezali oyo ete, azalaki kososola na kosaleláká makomami.
Atako Apolo azalaki na bopusi makasi epai na Bakolinti, kasi likambo ya mawa ezali ete mosala na ye ya kosakola ebimisaki mbuma mabe. Lolenge nini? Paulo na Apolo basalaki mosala monene mpo na oyo etali kolóna mpe kosopa mai likoló na mombóto ya solo ya Bokonzi na Kolinti. Paulo ateyaki kuna soko na mobu 50 T.B., mbula mibale liboso ete Apolo akóma kuna. Pene na ntango oyo Paulo akomaki mokanda ya liboso epai na Bakolinti, soko na mobu 55 T.B., bokabwani bosalemaki. Bamoko bazalaki kotalela Apolo lokola mokambi na bango, nzokande basusu bazalaki kolinga mingi Paulo to Petelo to bobele Klisto. (1 Bakolinti 1:10-12) Basusu bazalaki koloba ete: ‘Ngai nazali moto ya Apolo.’ Mpo na nini?
Nsango oyo Paulo asakolaki mpe oyo Apolo asakolaki ezalaki bobele moko, kasi bazalaki na bomoto bokeseni. Na monɔkɔ na ye moko, Paulo andimaki ete “koloba na ye ezali mpamba”; nzokande Apolo azalaki “molobi malamu.” (2 Bakolinti 10:10; 11:6) Azalaki na makoki oyo epesaki ye nzela na kobenda likebi ya bamoko kati na Bayuda oyo bazalaki kofanda na Kolinti. Alóngaki ‘kondimisa Bayuda polelepolele ete bazalaki na libúnga,’ nzokande Paulo, kala mingi te, alongwaki na eyanganelo.—Misala 18:1, 4-6.
Yango ekokaki kozala ntina oyo basusu balandaki Apolo? Banganga-mayele mingi bakanisi ete lokola Bagreke bazalaki kolinga mingi kosolola makambo ya filozofi, ekoki kozala mpo na yango nde babendamaki na kosepela mingi na lolenge ya kolamwisa mayoki lokola Apolo azalaki kosala yango. Giuseppe Ricciotti alobi ete, “elobeli ya kosepelisa [ya Apolo] mpe kosalela bililingi kitoko ya makanisi ebendaki bato mingi oyo basepelaki na ye koleka Paulo, moto na elobeli ya sukali te mpe mazangi nguya.” Soki mpenza bamoko batikaki nzela na libunga nyonso ete bobendani epai na moko to mosusu ebimisa bokabwani kati na bandeko, ezali mpasi te mpo na kososola ntina oyo Paulo akweisaki makasi ezaleli ya kokumisa “boyebi na bayebi.”—1 Bakolinti 1:17-25.
Nzokande, maloba wana ya kokweisa malimboli te ete Paulo mpe Apolo bazalaki kowelana. Atako basusu bakanisi ete bateyi wana mibale bazalaki banguna minene oyo bazalaki kowelana mpo na kolingama mingi na Bakolinti, Makomami malobi likambo motindo wana te. Na esika ya komitya lokola mokambi ya etuluku moko, Apolo alongwaki na Kolinti, azongaki na Efese, mpe kuna azalaki elongo na Paulo na ntango akomaki mokanda na ye ya liboso epai na lisangá oyo ekabwanaki.
Bango mibale bazalaki na bokabwani te to na bowelani te; nzokande, basalanaki elongo mpo na kosilisa mikakatano kati na Kolinti na kotyelanáká motema. Mbala mosusu Paulo azalaki motema likoló mpo na bamoko kati na Kolinti kasi mpo na Apolo soko moke te. Mosala ya bato wana mibale mozalaki na boyokani makasi; mateya na bango mazalaki kobakisana moko na mosusu. Tokoki kozongela maloba oyo ya Paulo: “Ngai nakónaki, Apolo amwangisaki mai,” mpamba te bango mibale bazalaki “basalani na Nzambe elongo.”—1 Bakolinti 3:6, 9, 21-23.
Lokola Paulo, Bakolinti balingaki Apolo mingi, bazalaki na mposa ete akende lisusu kotala bango. Kasi na ntango Paulo asɛngaki na Apolo ete azonga lisusu na Kolinti, Moalesandalia yango aboyaki. Paulo alobi ete: “Mpo na ndeko Apolo, napesaki ye simbisi monene ete aya epai na bino . . . Kasi akani ete aya sasaipi te nde akoya wana ntango ekoki malamu.” (1 Bakolinti 16:12) Ekoki kozala ete Apolo akakatanaki mpo na kozonga kuna mpo ete abangaki noki boyei na ye ekobimisa lisusu bokabwani, to bobele mpo ete azalaki na mosala mingi epai mosusu.
Mbala ya nsuka oyo Apolo alobelami kati na Makomami, azalaki kokende mobémbo na Kelete, mbala mosusu mwa mosika lisusu koleka. Paulo amonisi lisusu limemya oyo azalaki na yango epai na moninga mpe mosalani na ye, kosɛngáká Tito ete apesa Apolo mpe moninga na ye ya mobémbo, Zenas, biloko nyonso oyo bakokaki kozala na yango mposa mpo na mobémbo na bango. (Tito 3:13) Na ntango yango, nsima ya mbula zomi ya kolakisama na makambo ya boklisto, Apolo asilaki kosala bokóli oyo ekokaki mpo ete asala mosala ya mokɛngɛli motamboli ya lisangá.
Bizaleli ya moto na Nzambe oyo epesaka nzela na kokóla na elimo
Mosakoli Moalesandalia wana atikaki ndakisa malamu mpo na basakoli nyonso ya nsango malamu na mikolo na biso mpe, ya solo, mpo na baoyo balingi kokóla na elimo. Mbala mosusu tozali balobi malamu te lokola ye, kasi tokoki kosala milende mpo na kokóma na boyebi mpe makoki ya kosalela Makomami lokola ye, kosalisáká bato ya motema sembo oyo bazali koluka solo. Na ndakisa na ye ya kosala na molende, Apolo ‘asungaki mingi baoyo basilaki kondima.’ (Misala 18:27) Apolo azalaki na komikitisa, na elimo ya komipimela, mpe pene na kosala mosala mpo na litomba ya basusu. Asosolaki malamu ete esika ezali te mpo na kowelana to bilulela kati na lisangá ya boklisto, mpamba te biso nyonso tozali “basalani elongo na Nzambe.”—1 Bakolinti 3:4-9; Luka 17:10.
Na ndakisa ya Apolo, biso mpe tokoki kokóla na elimo. Tozalaka pene ya kobongisa lisusu mosala na biso ya bulɛɛ mpe kokólisa yango, mpo na komizwela makoki mingi mpo ete tókoka kosalelama na Yehova mpe na lisangá na ye? Soki ezali bongo tokozala bayekoli ya molende mpe basakoli ya solo ya boklisto.