Mokapo 41
Mokolo na Kosambisa na Nzambe esuki na esengo nyonso!
Emonaneli 15—Emoniseli 20:11 kino 21:8
Teme: Lisekwa ya bato banso, Mokolo na kosambisama mpe bolamu bokozwama na likoló na sika mpe mabelé na sika
Eleko na kokokana na yango: Na Boyangeli ya mbula nkoto
1. (a) Eloko nini bato babungisaki mpo na lisumu ya Adam mpe Eva? (b) Mokano nini ya Nzambe ebongwani te kino lelo, mpe ndenge nini toyebi yango?
BATO bazalisamaki mpo ete bazala na bomoi libela. Soki Adam na Eva batosaki mibeko na Nzambe, mbele bakufaki te. (Genese 1:28; 2:8, 16, 17; Mosakoli 3:10, 11) Kasi lokola basalaki lisumu, babungisaki ezalela ya kokoka mpe bomoi mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango, mpe liwa eyaki koyangela bato nyonso lokola monguna monene. (Baloma 5:12, 14; 1 Bakolinti 15:26) Ata ndenge nini, mokano na Nzambe, oyo elingi ete bato na kokoka bafanda libela kati na paradis, ebongwani soko moke te. Lokola bolingo na ye mpo na bato ezali monene, Nzambe atindaki na mabelé Mwana na ye se moko, Yesu, oyo apesaki bomoi na ye ya moto na kokoka lokola mbeka mpo na “mingi” kati na bakitani ya Adam. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Yesu akoki sikawa kosalela motuya ya mbeka na ye mpo ete bato oyo bazali na kondima bakoka kozwa bomoi ya kokoka kati na Paradis na mabelé. (1 Petelo 3:18; 1 Yoane 2:2) Oyo ezali ntina malamu koleka mpo na bato ete ‘bazala na esengo mpe basepela.’ Boye te?—Yisaya 25:8, 9.
2. Yoane alobi nini kati na Emoniseli 20:11, mpe “kiti na bokonzi mpembe mpe monene” ezali nini?
2 Nsima wana Satana abwakami kati na libulu mozindo, Boyangeli na nkembo ya mbula nkoto na Yesu ebandi. Ekozala “mokolo” oyo Nzambe akánáki mpo na “kosambisa mikili nyonso na sembo na nzela na moto oyo asili kopona.” (Misala 17:31; 2 Petelo 3:8) Yoane alobi: “Namonaki kiti na bokonzi mpembe mpe monene, na Mofandi na yango. Mokili mpe likoló ekimaki elongi na ye, mpe esika ezwami te mpo na yango.” (Emoniseli 20:11) “Kiti na bokonzi mpembe monene” wana ezali nini? Eloko mosusu te bobele tribinale “na Nzambe, ye Mosambisi na bato nyonso.” (Baebele 12:23) Sikawa Nzambe asengeli kosambisa bato mpo na koyeba nani akozwa matomba ya mbeka na lisiko na Yesu.—Malako 10:45.
3. (a) Likambo oyo ete kiti na bokonzi na Nzambe ezali “monene” mpe “mpembe” elimboli nini? (b) Na boumeli ya Mokolo na Kosambisama, nani nde asambisi bato mpe na kotalelaka makambo nini?
3 Kiti ya bokonzi na Nzambe ezali “monene,” yango emonisi mpenza bonene ya Jéhovah, Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba, mpe ezali “mpembe,” yango ebendi likebi na biso likoló na boyengebene na ye ya kokoka. Azali Mosambisi monene na bato. (Nzembo 19:7-11; Yisaya 33:22; 51:5, 8) Nzokande apesaki nguya ya kosambisa epai na Yesu Klisto: “Tata azali kosambisa moto te, kasi asili kopesa kosambisa nyonso epai na Mwana.” (Yoane 5:22) Penepene na Yesu ezali balandi na ye 144 000, epai na bango “nguya na kosambisa epesami . . . mpo na mbula nkoto.” (Emoniseli 20:4) Nzokande, ezali mibeko ya Jéhovah nde ekokata likambo ya moto na moto na boumeli ya Mokolo na Kosambisa.
4. Mpo na nini ‘mokili mpe likoló ekimaki’?
4 Na ndimbola nini ‘mokili mpe likoló ekimi’? Ezali bobele likoló moko oyo ekimaki lokola rulo na ntango elembo na motoba efungwamaki, na ndimbola mosusu ezali bikonzi ya bato oyo ‘ebombami mpo na kozikisama na mɔ́to mpe ebatelami kino mokolo na kosambisama mpe na koboma bato bakotiolaka Nzambe.’ (Emoniseli 6:14; 2 Petelo 3:7) Mabelé ezali libota na bato ebongisami oyo etiami na nse na biyangeli yango. (Emoniseli 8:7) Kobomama ya nyama na yauli mpe ya bakonzi na mabelé elongo na mampinga na bango, bakisa baoyo bazwaki elembo na nyama na yauli mpe na baoyo bazali kosambela ekeko na ye, ekolimbola kokima ya likoló mpe ya mabelé. (Emoniseli 19:19-21) Lokola bitumbu bisili kopesama na mabelé mpe na likoló ya Satana, Mosambisi monene apesi etinda ete mokolo mosusu ya kosambisa ebanda.
Mokolo na Kosambisa ya mibu nkoto
5. Ntango mokili ya kala mpe likoló ya kala ekokima, banani nde bakotikala mpo na kosambisama?
5 Lokola likoló ya kala mpe mabelé ya kala ekimi, nani mosusu atikali mpo na kosambisama? Moto moko te kati na baklisto bapakolami 144 000, mpamba te bango basilaki kosambisama mpe kozwa elembo. Soki bapakolami mosusu bakozala naino na bomoi awa na mabelé nsima na Armagedon, bakokufa noki mpo na kokende na likoló, mpe kuna bakozwa mbano na bango na likoló na nzela na lisekwa. (1 Petelo 4:17; Emoniseli 7:2-4) Nzokande, bamilió na bato oyo bakobima na bolozi monene bakomimonisa polele mpenza “liboso na kiti na bokonzi.” Basilaki kotalelama lokola bayengebene mpo na kobika na etumba na ntina na kondima na bango kati na makila na Yesu, kasi kosambisama na bango esengeli kolandana na boumeli ya mbula nkoto epai kuna Yesu akokoba kokamba bango epai na “mitó na mai na bomoi.” Na yango, ntango bakokoma na ezalela ya kokoka mpe nsima na komekama, bakotangama mpenzampenza lokola bayengebene na solo. (Emoniseli 7:9, 10, 14, 17) Bana oyo bakobika na bolozi monene mpe baoyo ebele monene bakobota na boumeli ya mbula nkoto basengeli mpe kosambisama motindo moko na boumeli ya mbula nkoto.—Tala Genese 1:28; 9:7; 1 Bakolinti 7:14.
6. (a) Ebele nini mosusu na bato Yoane amoni, mpe liloba “bato minene mpe bato mike” elimboli nini? (b) Na motindo nini bamiliare na bato oyo bazali kati na makanisi na Nzambe, bakozongisama mpenza na bomoi?
6 Kasi Yoane amoni motuya monene mosusu koleka ebele monene na babiki na Armagedon. Bazali bamiliare. “Namoni mpe bakufi, minene ná mike, batelemi na liboso na kiti na bokonzi, mpe buku efungolami.” (Emoniseli 20:12a) “Bakufi minene mpe mike” elakisi bato minene mpe bato mike, baoyo bazalaki na bomoi awa na mabelé mpe bakufaki na boumeli ya mibu 6 000 oyo mileki. Engebene Evanzile oyo Yoane akomaki mwa ntango moke nsima na Emoniseli, Yesu ayebisaki ye boye na ntina na Tata: “Apesi mpe ye [Yesu] bokonzi mpo na kosambisa mpo ete ye azali Mwana na moto. Bokamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana [baoyo] nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima.” (Yoane 5:27-29) Oyo nde elikya kitoko boye! Liwa mpe nkunda oyo eumelaki na lisolo mobimba na bato esuki! Bamiliare wana na bato oyo bazali ntango nyonso kati na makanisi na Nzambe, na ntembe te, bakozongisama na bomoi mokemoke, mpo ete ebele monene, baoyo bakozala moke liboso na bango, bakoka kotalela malamu mikakatano oyo mikobima mbala mosusu, na ntina na basekwi, oyo na ebandeli, bakozala na makanisi ya kozongela motindo ya bomoi na bango ya kala, elongo na bolembu na yango mpe na bamposa na yango ya nzoto.
Baoyo basekwisami mpe basambisami
7, 8. (a) Buku nini efungwami, mpe likambo nini ezali koleka na nsima? (b) Banani bakosekwa te?
7 Yoane abakisi: “Mpe buku mosusu efungolami, oyo buku na bomoi. Bakufi basambisami na makambo masili kokomama na buku yango, na motindo na misala na bango. Mai monene ezongisi bakufi na kati na yango: Kufa na Hadès ezongisi bakufi na kati na yango. Basambisami moto na moto na motindo na misala na ye.” (Emoniseli 20:12b, 13) Tala likambo oyo ezali mpenza kokamwisa! ‘Mai monene, kufa mpe Hadès’ nyonso misato elobelami, kasi ezali na boyokani kati na yango.a Wana ezalaki ye kati na libumu na mbisi, mpe bongo kati na mai monene, Yona alobi ete azalaki kati na Schéol to Hadès. (Yona 2:2) Moto nyonso oyo asimbami na liwa ya Adam, emonani polele ete azali mpe kati na Hadès. Maloba wana na esakweli mapesi biso elikya makasi ete na lisekwa bakobosana moto moko te.
8 Ya solo, ezali na bato bakosekwa te, kasi motuya na bango eyebani te. Kati na bango esengeli kozala na bakomeli mpe Bafalisai babongolaki motema te, baoyo baboyaki kondima Yesu mpe bantoma, “moto [na losambo] oyo azali kotiola mibeko” mpe baklisto bapakolami oyo “bakweaki.” (2 Tesalonike 2:3; Baebele 6:4-6; Matai 23:29-33) Yesu alobaki mpe mpo na bato bakokani na bantaba baoyo, na nsuka ya mokili, bakokende “kati na mɔ́to na seko oyo ebongisami mpo na Satana mpe baanzelu na ye,” to na elobeli mosusu, “kino etumbu na seko.” (Matai 25:41, 46) Lisekwa ezali te mpo na bato wana!
9. Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki ete bato mosusu bakozala na libaku malamu mpenza na ntango ya lisekwa, mpe banani bazali kati na bango?
9 Nzokande, bamosusu bakozala mpenza na libaku malamu na ntango ya lisekwa. Ezali yango nde ntoma Paulo ayebisaki na maloba oyo: “Nazali na elikya na Nzambe, . . . ete lisekwa ekozala mpo na bato na sembo mpe mpo na bato na sembo te.” (Misala 24:15) Mpo na oyo etali lisekwa na mabelé, kati na “bato na sembo” ekozala na mibali mpe basi na sembo oyo bazalaki na bomoi kalakala, na ndakisa Abrahame, Rahabe mpe mingi mosusu, baoyo batangamaki bayengebene lokola bazalaki baninga na Nzambe. (Yakobo 2:21, 23, 25) Kati na etuluku yango ekozala mpe na bato na sembo oyo bazwami kati na bampate mosusu, baoyo bakufaki na bosembo mpo na Jéhovah na ntango na biso. Bato nyonso wana ya bosembo bakosekwisama mpenzampenza na ebandeli ya Boyangeli na mbula nkoto na Klisto. (Yobo 14:13-15; 27:5; Danyele 12:13; Baebele 11:35, 39, 40) Mingi kati na basembwi yango oyo bakosekwa bakopesamela mikumba ya sipesiale kati na Paradis, na boyokani na mosala monene ya botongi lisusu.—Nzembo 45:16; tala Yisaya 32:1, 16-18; 61:5; 65:21-23.
10. Kati na basekwi, banani bazali “bato na sembo te”?
10 “Bato na sembo te” oyo balobelami kati na Misala 24:15, ezali bongo banani? Ekozala ebele na bato oyo bakufaki na boumeli na bikeke, mingi mpenza baoyo bazalaki na bomoi ‘kati na kozanga boyebi.’ (Misala 17:30) Ekoki kozala mpo na esika na bango oyo babotamaki, to mpo na eleko oyo bango bazalaki na bomoi nde bato yango bazwaki libaku te mpo na koyekola kotosa mokano na Jéhovah. Lisusu, ezali mpe na baoyo mbala mosusu bayokaki nsango na lobiko kasi bandimaki yango mpenza na motema moko te na eleko wana, to baoyo bakufaki liboso ete bakola malamumalamu mpo na komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo. Na lisekwa, bato motindo yango basengeli kosala mbongwana mosusu kati na makanisi na bango mpe na etamboli na bango mpo na kozwa litomba na libaku malamu oyo ekopesamela bango mpo na kozwa bomoi ya seko.
Buku na bomoi
11. (a) “Buku na bomoi” ezali nini, mpe bankombo ya banani ekomami kati na yango? (b) Mpo na nini buku na bomoi ekofungwama na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto?
11 Yoane alobi mpo na “buku na bomoi.” Buku yango ezali na bankombo ya bato oyo babiangami mpo na kozwa bomoi na seko epai na Jéhovah. Nkombo ya bandeko na Yesu bapakolami, ya basangani na ebele monene mpe ya bato na sembo ya kala, lokola Moïse, ekomami kati na buku yango. (Exode 32:32, 33; Danyele 12:1; Emoniseli 3:5) Nkombo na “bato na sembo te” baoyo bakosekwa ekomami naino kati na buku ya bomoi te. Na yango, buku ya bomoi ekofungwama na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto mpo na kopesa nzela na bankombo mosusu ete ekoka kokomama, bankombo na bato oyo bakokokisa masengami. Moto nyonso oyo nkombo na ye ekomami te kati na buku na bomoi “akobwakama kati na libeke na móto.”—Emoniseli 20:15; tala Baebele 3:19.
12. Na nini nzela nkombo ya moto ekokoka kokomama kati na buku ya bomoi oyo ekofungwama, mpe ndakisa nini Mosambisi oyo atyami na Jéhovah asilaki kopesa?
12 Kasi, likambo nini ekopesa nzela na moto ete nkombo na ye ekomama kati na buku ya bomoi oyo ekofungwama na eleko wana? Lisengami ya liboso ekozala motindo moko na oyo esengamaki na Adam na Eva: botosi epai na Jéhovah. Lokola ntoma Yoane akomaki yango epai na baninga na ye baklisto balingami, “mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko.” (1 Yoane 2:4-7, 17) Mpo na oyo etali botosi, Mosambisi oyo aponami na Jéhovah apesaki ndakisa: “Ata azalaki Mwana [Yesu], ayekoli kotosa mpo na koyoka mpasi, mpe esili ye kobongisama na makambo nyonso, akómi eutelo na lobiko na seko mpo na bango nyonso bakotosaka ye.”—Baebele 5:8, 9.
Buku mosusu efungwami
13. Ndenge nini basekwi bakosengela komonisa botosi na bango, mpe malako nini bakosengela kolanda?
13 Ndenge nini basekwi yango bakosengela komonisa botosi na bango? Yesu ye moko alobelaki makasi na ntina na mibeko minene mibale, na kolobáká ete: “Oyo na liboso na nyonso ezali ete: ‘Yoka Yisraele, Jéhovah Nzambe na biso, ye azali Jéhovah moko. Olinga mpe Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.’ Oyo na mibale ezali mpe boye ete: ‘Olinga mozalani na yo lokola yo moko.’” (Malako 12:29-31) Ezali mpe na malako mauti na Jéhovah oyo bakozala na mokumba ya kotosa yango, na ndakisa kotika moyibi, lokuta, koboma bato, mpe pite.—1 Timote 1:8-11; Emoniseli 21:8.
14. Babuku nini mosusu ekofungwama, mpe nini ezali kati na yango?
14 Kasi Yoane auti mpe kolobela babuku mosusu oyo ekofungwama na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto. (Emoniseli 20:12) Babuku yango ezali nini? Ezalaki na bileko mosusu oyo Jéhovah apesaki malako ya sikisiki mpe oyo ebongaki na makambo ya ntango wana. Na ndakisa, na mikolo ya Moïse apesaki buku ya mibeko oyo milimbolami malamumalamu, oyo ekokaki kopesa bomoi na Bayisraele, soki nde batosaki yango. (Deteronome 4:40; 32:45-47) Na ekeke ya liboso, malako ya sika mapesamaki, mpo na kosalisa basembwi ete batosa mibeko na Jéhovah na nse na ebongiseli ya biloko na boklisto. (Matai 28:19, 20; Yoane 13:34; 15:9, 10) Sikawa, Yoane alobi ete bakufi basengeli “kosambisama na makambo masili kokomama na buku yango, na motindo na misala na bango.” Na bongo tokanisi ete kofungwama ya babuku yango ekoyebisa masengami na Jéhovah epai na bato na boumeli ya mbula nkoto. Na kokokisáká bomoi na bango na malako mpe na mibeko mizwami kati na babuku wana, bato na botosi bakoyeisa mikolo na bango molai mpe na nsuka na yango bakozwa bomoi na seko.
15. Ebongiseli nini ya koteya ekosalelama na ntango ya lisekwa, mpe ndenge nini lisekwa ekozala kosalema?
15 Obandi komona mosala monene ya mateya na teokratike oyo ekosalema na ntango wana? Na 2005, ba Témoins de Jéhovah ya mokili mobimba batambwisaki boyekoli na Biblia soko 6 061 534. Kasi na lisekwa, ekosengela kotambwisa bamiliare na boyekoli na Biblia mpe na babuku ya sika. Basaleli nyonso na Nzambe basengeli kokóma bateyi mpe koboma nzoto kati na mosala yango. Mokemoke wana ekobanda bango kokóla, na ntembe te basekwi mpe bakosangana na mosala monene wana ya koteya. Tokanisi ete lisekwa ekosalema na boye ete, bato oyo bazali na bomoi bakoka kozala na esengo ya koyamba basangani ya mabota na bango mpe baninga na bango oyo bazongi na bomoi, bato yango mpe bakoyamba mpe bakoteya bamosusu na ngala na bango. (Tala 1 Bakolinti 15:19-28, 58.) Batemwe ya Jéhovah koleka milió motoba oyo bazali lelo kopalanganisa solo na molende nyonso bazali komibongisa mpo na mabaku malamu ya mosala oyo bazali kolikya kozwa yango na ntango bato bakosekwa.—Yisaya 50:4; 54:13.
16. (a) Bankombo ya banani ekokomama te kati na buku ya bomoi? (b) Banani oyo lisekwa na bango ekozala lisekwa ya “bomoi”?
16 Mpo na oyo etali lisekwa na mabelé, Yesu alobaki ete ‘baoyo basalaki malamu bakozonga mpo na lisekwa ya bomoi, nde baoyo basalaki yauli kino lisekwa na kosambisama.’ Maloba “bomoi” mpe “kosambisama” etyami awa na bokeseni, likambo yango emonisi ete basekwi oyo ‘bazali kosala yauli,’ nsima na kozwa mateya ya Makomami mapemami na Nzambe mpe ya babuku, batalelami ete babongi te mpo na kozwa bomoi. Nkombo na bango ekokomama te kati na buku ya bomoi. (Yoane 5:29) Ekozala motindo moko mpo na ye oyo, nsima na komimonisa moto na sembo, atiki kotosa Nzambe na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto. Bankombo ekoki kolongolama na buku ya bomoi. (Exode 32:32, 33) Nzokande, baoyo bakotosa malako makomami kati na babuku bakobatela nkombo na bango kokomama kati na buku ya bomoi mpe bakolanda kozala na bomoi. Mpo na bango, lisekwa ekomonana ete ezali lisekwa “ya bomoi.”
Kufa mpe Hadès ezali lisusu te
17. (a) Likambo nini ya kokamwa Yoane alobeli sikawa? (b) Ntango nini Hadès ekotikala mpamba? (c) Ntango nini kufa oyo eutaki na Adam ‘ekobwakama kati na libeke na móto’?
17 Yoane alobeli sikawa likambo moko ya kokamwisa mpenza. “Na nsima kufa ná Hadès ebwakami kati na libeke na móto. Libeke na mɔ́to oyo ezali kufa na mibale. Soko ezwami ete moto akomami na buku na bomoi te, abwakami na libeke na mɔ́to.” (Emoniseli 20:14, 15) Na nsuka na Mokolo na Kosambisa oyo ekoumela mbula nkoto, “kufa mpe Hadès” ekolongolama libela. Mpo na nini likambo yango esengi mibu nkoto? Hadès, nkunda ya bato banso, ekotikala nyonso mpamba na ntango mowei ya nsuka kati na bakufi nyonso oyo Nzambe azali kobatela kati na makanisi na ye akosekwisama. Kasi, lokola bato bakozala naino na mbindo ya lisumu ya Adam, boombo ya liwa oyo eutaki na Adam ekozala naino na nguya likoló na bango. Basekwi nyonso na mabelé, bakisa mpe basangani ya ebele monene oyo bakobika na Armagedon, basengeli kotosa malako ya babuku kino matomba nyonso ya mbeka na lisiko na Yesu makokokisama, mpe kino Yesu akosilisa libela bokono, konuna mpe bambeba mosusu oyo tozwaki lokola libula. Na bongo, kufa oyo eutaki na Adam mpe Hadès “ekobwakama kati na libeke na mɔ́to.” Ekolimwa mpo na libela!
18. (a) Na maloba nini ntoma Paulo azali komonisa kolonga ya boyangeli na Yesu? (b) Likambo nini Yesu akosala nsima wana libota ya bato ekosila kotombwama na ezalela na kokoka? (c) Likambo nini ekosalema lisusu na nsuka ya mbula nkoto?
18 Na boye nde ekokokana programme mobimba oyo ntoma Paulo ayebisi yango kati na mokanda na ye epai na Bakolinti: “Mpamba te, ekoki [ete Yesu] azala na bokonzi kino Nzambe akotya bayini nyonso na nse na makolo na ye. Moyini na nsuka oyo akolimwa ezali kufa [na Adam].” Bongo likambo nini ekoleka na nsima? “Wana ekiti biloko nyonso na nse na makolo na ye, Mwana ye moko akokita na nse na bokonzi na ye oyo akitisi biloko nyonso na nse na ye, ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.” Na elobeli mosusu, Yesu “akozongisa bokonzi epai na Nzambe na ye mpe Tata.” (1 Bakolinti 15:24-28) Ee, nsima na kolonga liwa ya Adam na nzela na mbeka na ye lokola lisiko, Yesu akozongisa epai na Tata na ye, Jéhovah, libota na bato oyo etombwami na ezalela ya kokoka. Emonani polele ete ezali nde na eleko wana, na nsuka ya mibu nkoto, nde Satana akofungolama mpe komekama ya nsuka ekobanda, oyo ekokata likambo ya koyeba nkombo nini ekotikala libela kati na buku ya bomoi. “Bunda na mpiko nyonso” mpo ete nkombo na yo ezala kati na oyo ekotikala na buku!—Luka 13:24; Emoniseli 20:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato na ntango na Noa oyo bakufaki mpo na bizaleli mabe bakozala te kati na baoyo mai monene ekozongisa na bomoi na nzela na lisekwa. Libebi na ntango wana ezalaki mpo na libela. Ekozala mpe ndenge moko mpo na bitumbu na Jéhovah na bolozi monene.—Matai 25:41, 46; 2 Petelo 3:5-7.
[Elilingi na lokasa 298]
Basekwi na “sembo te” baoyo bakotosa makambo makomami na babuku oyo ekofungwama na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto, nkombo na bango ekokomama kati na buku na bomoi