Kimya na boumeli ya mbula nkóto mpe mpo na libela!
“Mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.”—1 KO. 15:28.
1. Wapi likambo ya malamu oyo ekosalema mpo na “ebele mpenza ya bato”?
KANISÁ makambo malamu oyo guvɛrnema moko ya makasi, oyo mokonzi na yango azali sembo mpe na motema mawa, ekoki kosala mpo na bato na yango na boumeli ya mbula nkóto! Makambo minene ekosalema mpo na “ebele mpenza ya bato” oyo motángo na bango eyebani te, oyo bakobika na “bolɔzi monene” oyo ekosukisa makambo mabe ya ntango oyo.—Em. 7:9, 14.
2. Makambo nini bato bakutanaka na yango banda mbula 6 000 sikoyo?
2 Mbula 6 000 oyo eleki banda bato bapesá Nzambe mokɔngɔ mpe bazali komiyangela bango moko ememeli bango ebele ya bampasi mpe mikakatano. Banda kala, Biblia elobaki ete: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mos. 8:9) Tozali komona nini lelo oyo? Longola bitumba mpe mobulu, bato bazali kobunda na bobola, maladi, mai mpe mopɛpɛ ezali kobeba, molunge ezali kobakisama na mokili, mpe bongo na bongo. Bakonzi ya Leta bazali koloba ete soki toboyi kobongwana mpe tokobi kosala makambo ndenge tomesaná, tokosuka mabe.
3. Makambo nini ekosalema na Boyangeli ya Mbula Nkóto?
3 Ntango Yesu Kristo akoyangela elongo na bato 144 000, Bokonzi ya Nzambe ekolongola mokemoke makambo nyonso ya mabe oyo ezali kotungisa bato mpe oyo ezali kobebisa mabele. Na Boyangeli ya Mbula Nkóto, elaka ya malamu mingi oyo Yehova apesaki ekokokisama: “Nazali kozalisa likoló ya sika mpe mabele ya sika; mpe makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.” (Yis. 65:17) Wapi makambo minene oyo, atako tomoni yango naino te, ekosalema? Na lisalisi ya bisakweli ya Liloba ya Nzambe, tótala mwa moke makambo yango kitoko oyo tomoni naino te.—2 Ko. 4:18.
‘BAKOTONGA BANDAKO MPE BAKOLONA BILANGA YA VINYO’
4. Lelo oyo bato mingi bafandaka na bandako ya ndenge nini?
4 Moto nyonso alingaka kozala na ndako na ye moko, esika oyo ye ná libota na ye bakoki kofanda na kimya! Nzokande, na mokili ya lelo, kozala na ndako ya malamu ezali mokakatano monene. Ebele ya bato bazali kofanda na bingumba oyo etondi na bato. Bato mingi bazali kofanda na bandako ya manzanza na bakartye ya babola. Mpo na bato yango, kozala na ndako ya malamu ezali ndɔtɔ mpamba.
5, 6. (a) Ndenge nini Yisaya 65:21 mpe Mika 4:4 ekokokisama? (b) Ndenge nini tokoki kozwa mapamboli yango?
5 Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele, mposa oyo moto nyonso azalaka na yango ya kozala na ndako na ye moko ekokokisama, mpamba te Yisaya asakolaki ete: “Ya solo, bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango.” (Yis. 65:21) Kasi, ekosuka wana te. Ata lelo oyo bato mosusu mpe bazali na bandako na bango moko, bamosusu kutu bazali na bandako ya minene to mpe bazali na mapango ya minene mpenza. Kasi babangaka ntango nyonso ete bakoki kobungisa bandako yango mpo na mikakatano ya mbongo to mpe miyibi to bato mosusu ya mabe koleka bakoki kokɔtela bango. Nzokande nyonso wana ekozala te na Bokonzi ya Nzambe! Mosakoli Mika akomaki boye: “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.”—Mika 4:4.
6 Lokola tozali na elikya wana, tosengeli kosala nini? Toyebi ete mokomoko na biso alingaka kozala na ndako ya malamu. Kasi, na esika tóbanda kolɔta ndako ya ndenge wana, mbala mosusu kokɔta nyongo ya monene mpo na kosomba yango, ekoleka malamu tótya makanisi na biso na elaka ya Yehova! Tóbosana te likambo oyo Yesu alobaki mpo na ye moko: “Bagambala ezali na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló ezali na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó te.” (Luka 9:58) Yesu akokaki kotonga to kosomba ndako ya kitoko koleka ndako mosusu nyonso. Kasi mpo na nini asalaki yango te? Ezali polele ete Yesu alingaki te ete makambo mosusu epekisa ye kotya Bokonzi na esika ya liboso. Tokoki nde kolanda ndakisa na ye mpe kobatela liso alima, elingi koloba koboya komitungisa mpo na biloko ya mokili?—Mat. 6:33, 34.
“MBWA YA ZAMBA MPE MWANA-MPATE BAKOLYA ESIKA MOKO”
7. Mokumba nini Yehova apesaki bato likoló ya banyama?
7 Yehova akelaki moto nsima ya kokela biloko mosusu nyonso awa na mabele. Kasi, moto nde aleki bikelamu nyonso wana. Yehova amonisaki mokano na ye ntango alobaki na Mosali na ye ya mayele, elingi koloba Mwana na ye oyo akelamaki liboso, ete: “Tósala moto na elilingi na biso, azala lokola biso, mpe bango bázala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya banyama ya mboka mpe likoló ya mabele mobimba mpe likoló ya nyama mosusu nyonso oyo etambolaka na mabele.” (Eba. 1:26) Na yango, Adama ná Eva bazwaki mokumba ya kozala na bokonzi likoló ya banyama, mpe na nsima mokumba yango elingaki kokóma epai ya bato nyonso.
8. Mbala mingi nyama emonisaka bizaleli nini lelo?
8 Bato bakoki mpenza kozala na bokonzi likoló ya banyama nyonso mpe kozala na kimya ná bango? Bato mingi bazalaka na banyama oyo balingaka mingi, na ndakisa mbwa to nyau. Kasi, tokoloba nini mpo na banyama ya zamba? Lapolo moko elobi boye: “Bato ya siansi oyo bafandaki pembeni ya banyama mpe bayekolaki yango bamonaki ete banyama nyonso oyo emɛlisaka bana na yango ekoki kolinga mpe kokangama makasi na moto to nyama mosusu.” Ya solo, tomonaka ete banyama ekómaka kobanga to ekómaka na nkanda soki balingi kosala yango mabe; kasi nyama ekoki nde kolinga moto to nyama mosusu to kofanda na bango na kimya? Lapolo yango elobi lisusu boye: “Ezaleli oyo eleki monene ya banyama emonanaka malamu na ndenge oyo ebɔkɔlaka bana na yango: nyama elingaka mpenza.”
9. Mbongwana nini ekosalema mpo na banyama?
9 Yango wana tosengeli kokamwa te soki totángi na Biblia ete kimya ekozala kati na bato mpe banyama. (Tángá Yisaya 11:6-9; 65:25.) Mpo na nini? Tóbosana te ete ntango Noa ná libota na ye babimaki na masuwa nsima ya Mpela, Yehova alobaki na bango boye: “Ekelamu nyonso ya bomoi na mabele . . . ekokoba kobanga bino mpe kozala na nsɔmɔ na bino.” Banyama esengelaki kosala bongo mpo na komibatela. (Eba. 9:2, 3) Tokanisi ete Yehova akoki te kolongola kobanga mpe nsɔmɔ wana, mpo moto akokisa mokumba oyo bapesaki ye na ebandeli? (Hos. 2:18) Bato nyonso oyo bakobika mpe bakozala na bomoi awa na mabele bakosepela mpenza na makambo kitoko na ntango wana!
“AKOPANGWISA MPISOLI NYONSO”
10. Mpo na nini bato mingi babimisaka mpisoli?
10 Ntango Salomo azalaki komona “minyoko nyonso oyo ezali kosalema na nse ya moi,” alobaki boye: “Talá! mpisoli ya bato oyo bazali konyokwama, kasi bazalaki na mobɔndisi te.” (Mos. 4:1) Lelo oyo, makambo ebongwani te; kutu ekómi mabe koleka. Biso nyonso tobimisaka mpisoli mpo na likambo moko to mosusu. Ezali solo ete moto akoki kolela na esengo. Kasi, mbala mingi tobimisaka mpisoli mpo na mawa oyo etondi na motema.
11. Lisolo nini ya Biblia esimbaka mpenza motema na yo?
11 Kanisá masolo ndenge na ndenge ya bato oyo balelaki, oyo totángaka na Biblia. Ntango Sara akufaki na mbula 127, “Abrahama akɔtaki kolela Sara makasi mpe alelaki ye na kobimisa mpisoli.” (Eba. 23:1, 2) Ntango Naomi alingaki kokabwana na babokilo na ye, bango nyonso “babandaki kotombola mingongo na bango mpe kolela,” mpe na nsima “batombolaki mingongo na bango mpe balelaki lisusu.” (Ruta 1:9, 14) Ntango Mokonzi Hizikiya abɛlaki maladi moko oyo elingaki koboma ye, abondelaki Nzambe mpe “alelaki mingi mpenza”; likambo oyo, na ntembe te esimbaki motema ya Yehova. (2 Bak. 20:1-5) Tókanisa mpe lisolo oyo elobeli ndenge oyo ntoma Petro awanganaki Yesu! Ntango Petro ayokaki nsoso eleli, “abimaki na libándá mpe alelaki na mawa makasi.”—Mat. 26:75.
12. Ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ekobɔndisa bato?
12 Lokola biso bato tokutanaka na mikakatano mingi, ezala ya mike to ya minene, tozalaka mpenza na mposa ete bábɔndisa biso mpe bákitisa biso motema. Yango nde ekosalema na Boyangeli ya Mbula Nkóto. Biblia elobi boye: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Em. 21:4) Kutu, Nzambe akosuka kaka te na kolongola lilaka, koganga mpe mpasi; akolongola ata liwa, monguna monene ya bato. Ekosalema ndenge nini?
“BAOYO NYONSO BAZALI NA KATI YA MALITA . . . BAKOBIMA”
13. Ndenge nini liwa ezali konyokola bato banda lisumu ya Adama?
13 Banda Adama asalá lisumu, liwa ezali koyangela bato nyonso lokola mokonzi. Ezali monguna oyo moto moko te akokaka kolonga, bato ya masumu bakokaka kokima yango te, mpe epesaka bato mpasi mpe mawa mingi. (Rom. 5:12, 14) Kutu, bamilio ya bato, “mpo na kobanga liwa, batyamaki na boombo bomoi na bango mobimba.”—Ebr. 2:15.
14. Soki liwa esilisami makasi, makambo nini ekosalema na nsima?
14 Biblia elobeli ntango oyo “liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.” (1 Ko. 15:26) Yango ekozala na matomba mpo na bituluku mibale. Ya liboso, “ebele mpenza ya bato” oyo bazali lelo na bomoi, bakobika mpe bakokɔta na mokili ya sika epai bakozala na likoki ya kotikala na bomoi libela na libela. Ya mibale, bamiliare ya bato oyo basilá kokufa bakozala na likoki ya kosekwa. Kanisá esengo oyo ekozala ntango “ebele mpenza ya bato” bakoyamba bato oyo bakosekwa! Tokoki komona mwa moke ndenge makambo ekozala na ntango wana soki totángi masolo mosusu ya Biblia oyo emonisi ndenge oyo bato basekwisamaki.—Tángá Marko 5:38-42; Luka 7:11-17.
15. Okoyoka ndenge soki omoni ndeko to moninga na yo moko azongi na bomoi?
15 Kanisá naino maloba lokola oyo: “bazalaki bango lisusu te, bazalaki na esengo makasi” mpe “babandaki kokumisa Nzambe.” Soki ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki, mbala mosusu yo mpe olingaki koyoka bongo. Ya solo, ntango tokomona bandeko to baninga na biso oyo bakufá bazongi na bomoi, tokoyoka esengo mpe nsai makasi. Yesu alobaki boye: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoa. 5:28, 29) Moko te kati na biso asilá komona likambo ya ndenge wana; na ntembe te ekozala moko ya makambo minene oyo tokomona.
NZAMBE AKOZALA “MAKAMBO NYONSO EPAI YA MOTO NYONSO”
16. (a) Mpo na nini tosengeli kolobela na esengo makambo kitoko oyo emonani naino te? (b) Paulo alobaki nini mpo na kolendisa bakristo ya Korinti?
16 Ya solo, makambo minene mpenza ekosalema mpo na baoyo bazali sembo epai ya Yehova na ntango oyo ya mpasi! Atako mapamboli wana minene ezali makambo oyo tomoni naino te, soki tozali kobatela yango na makanisi, ekosalisa biso tómipesa na makambo oyo ezali mpenza na ntina mpe ekopekisa biso tóbendama na makambo ya mpamba ya mokili oyo. (Luka 21:34; 1 Tim. 6:17-19) Ezala na Losambo na kati ya libota, na masolo ná bandeko na biso bakristo, mpe ntango tozali kosolola na bato oyo toyekolaka na bango Biblia to baoyo basepelaka na nsango malamu, tólobelaka na esengo elikya kitoko oyo tozali na yango. Yango ekosalisa biso tóbatela elikya yango na makanisi mpe na mitema na biso. Ntoma Paulo azalaki kosala bongo ntango azalaki kolendisa bandeko na ye bakristo. Ezali lokola nde azalaki komema bango mpo bámona makambo oyo ekosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo. Kanisá naino ndimbola ya maloba ya Paulo oyo ezali na 1 Bakorinti 15:24, 25, 28.—Tángá.
17, 18. (a) Na ebandeli, ndenge nini Yehova azalaki “makambo nyonso epai ya moto nyonso”? (b) Yesu akosala nini mpo na kozongisa bomoko mpe kimya?
17 Maloba “mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso” emonisi malamu mpenza likambo oyo ekosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Maloba yango elimboli nini? Kanisá ntango Adama ná Eva bazalaki bato ya kokoka na elanga ya Edene, mpe bazalaki na kati ya libota ya Yehova oyo ezali na kimya mpe na bomoko. Yehova, Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba, azalaki koyangela bikelamu na ye nyonso, ezala baanzelu mpe bato. Bazalaki na likoki ya kosolola na Yehova ye moko, kosambela ye, mpe kozwa lipamboli na ye. Azalaki “makambo nyonso epai ya moto nyonso.”
18 Boyokani malamu wana ebebaki ntango Satana akosaki bato mpo bátombokela Yehova. Nzokande, kobanda 1914, Bokonzi ya Masiya ezali mokemoke kozwa bibongiseli mpo na kozongisa bomoko mpe kimya yango. (Ef. 1:9, 10) Na Boyangeli ya Mbula Nkóto, makambo kitoko oyo tomoni naino te ekosalema. Na nsima “nsuka” ekoya, elingi koloba ete Boyangeli ya Mbula Nkóto ekosila. Nini ekosalema na nsima? Atako azali na “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele,” Yesu alukaka kobɔtɔla esika ya Yehova te. Na komikitisa nyonso “akozongisa bokonzi epai na Nzambe na ye mpe Tata.” Akosalela bokonzi oyo bapesi ye “mpo na nkembo ya Nzambe.”—Mat. 28:18; Flp. 2:9-11.
19, 20. (a) Ndenge nini bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bakomonisa ete bandimi Yehova ayangela bango? (b) Elikya nini tozali na yango mpo na mikolo ezali koya?
19 Na ntango wana, bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela awa na mabele bakokóma bato ya kokoka. Bakolanda ndakisa ya Yesu, mpe na komikitisa nyonso, bakondima boyangeli ya Yehova. Bakomonisa ete bazali na mposa ya kosala yango na ndenge bakolonga na komekama ya nsuka. (Em. 20:7-10) Na nsima, batomboki nyonso, ezala baanzelu to bato, bakobomama mpo na libela. Ekozala mpenza ntango moko ya esengo! Na mokili mobimba, bato bakokumisa Yehova, mpe ye akozala “makambo nyonso epai ya moto nyonso.”—Tángá Nzembo 99:1-3.
20 Makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mosika te ezali nde kotinda yo otya likebi na yo mobimba na mokano ya Nzambe mpe omipesa na kosala yango? Okoki koboya kolanda elikya mpe libɔndisi ya lokuta oyo mokili ya Satana ezali kopesa? Okoki nde kolendisa ekateli na yo ya kozala na ngámbo ya Yehova mpe ya Bokonzi na ye? Tiká ete misala na yo emonisa ete ozali na mposa ya kosala yango mpo na libela. Na ndenge yango okozala na libaku malamu ya kozwa kimya mpe bomoi ya malamu mbula nkóto mpe libela na libela!