Jéhovah azali kosalela “bolema“ mpo na kobikisa bandimi
“Mpo na mayele na Nzambe, mokili eyebaki Nzambe na nzela na mayele na yango mpenza te. Bongo Nzambe asepelaki kobikisa bandimi na nzela na bolema na esakweli.”—1 BAKOLINTI 1:21.
1. Na ndimbola nini tokoki koloba ete Jéhovah azali kosalela “bolema,” mpe ndenge nini toyebi ete mokili, na mayele na yango, elongi te na koyeba Nzambe?
NDENGE nini! Jéhovah akosalela bolema? Te, ekoki kolobama te. Kasi azali kosalela oyo ezali komonana lokola bolema mpo na mokili. Yango mpo na kobikisa bato oyo bayebi ye mpe balingi ye. Na nzela ya mayele na yango, mokili ekoki kolonga te na koyeba Nzambe. Ezali yango nde Yesu Klisto ayebisaki polele kati na libondeli moko: “Tata moyengebeni, bamokili bayebi yo te.”—Yoane 17:25.
2. Mpo na nini banzela na Jéhovah mpe banzela na mokili ezali komonana mbala mosusu lokola ete ezali na mokano bobele moko, kasi ezali boye solo?
2 Maloba oyo na Yesu mamonisi ete banzela na Jéhovah ekeseni na oyo ya mokili. Na lolenge ya likolólikoló, ekoki mbala mosusu komonana lokola ete mokano na Nzambe mpe oyo ya mokili ezali kotambola nzela moko; lokola ete myango ya mokili mizwi lipamboli na Nzambe. Na ndakisa, Biblia elobi ete Nzambe akani kotya boyangeli moko ya sembo oyo ekomema kimya, esengo mpe bolamu epai na bafandi ya mabelé. (Yisaya 9:6, 7; Matai 6:10) Motindo moko, mokili ezali kosakola likanisi na yango ya kopesa epai na bato kimya, bolamu mpe boyangeli malamu na nzela na oyo bazali kobenga ebongiseli ya sika ya mokili mobimba. Kasi mikano na Nzambe mpe oyo na mokili mizali ndenge moko te. Mokano na Jéhovah ezali ya komilongisa lokola Moyangeli Aleki monene ya molongo mobimba. Ezali yango nde akosala na nzela na boyangeli moko ya likoló oyo ekonyata biyangeli nyonso ya mokili. (Danyele 2:44; Emoniseli 4:11; 12:10) Na bongo, Nzambe azali na eloko moko ya boyokani te elongo na mokili oyo. (Yoane 18:36; 1 Yoane 2:15-17) Tala mpo na nini Biblia ezali kolobela mitindo mibale ya mayele: “mayele ya Nzambe” mpe “mayele ya mokili.”—1 Bakolinti 1:20, 21.
Mbeba ekangani na mayele ya mokili
3. Atako mayele ya mokili ekoki kokamwisa, mpo na nini ebongiseli ya mokili ya sika elakami na moto ekoki mpenza kolonga te?
3 Mayele ya mokili ekokamwisaka baoyo batambwisami na mayele ya Nzambe te. Bafilozofi mineneminene ya mokili ezali kosimba makanisi ya bato. Bankoto na biteyelo minene bizali kopalanganisa boyebi euti na baoyo bato mingi bazali kotalela bango lokola bato na mayele koleka. Bandako minene ya kobomba mikanda etondi na eksperianse ezwami na boumeli ya bikeke na lisolo ya bato. Nzokande, atako bongo, ebongiseli ya sika ya mokili mobimba oyo bakonzi ya mokili oyo bazali kolaka ekoki bobele kozala bokonzi oyo esalelami na bato bazangi kokoka, baoyo babebisami na lisumu mpe bakufaka. Ebongiseli yango ekozala bongo ya kozanga kokoka; ekozongela ebele na mabunga oyo masalemaki na kala mpe ekolonga te kokokisa bamposa ya bato.—Baloma 3:10-12; 5:12.
4. Ebongiseli ya mokili ya sika elakami na moto esimbami na nini, mpe likama na yango ezali nini?
4 Ebongiseli ya sika ya mokili mobimba oyo moto alaki ezali bobele na nse na bopusi ya bolembu na moto te, kasi lisusu na nse na bopusi ya bikelamu mabe ya elimo, Satan le Diable mpe bilimu mabe na ye. Satana azipi mayele na bato mpo ete bandima te “nsango malamu na nkembo na Klisto.” (2 Bakolinti 4:3, 4; Baefese 6:12) Na ntina yango, mokili ezali bobele kozwa mpasi likoló na mpasi. Kati na likanisi na yango mabe ya komiyangela kozanga lisungi na Nzambe mpe kozanga kotya likebi na mokano na ye, mokili ezwi mpasi mingi. (Yilimia 10:23; Yakobo 3:15, 16) Na yango, lokola ntóma Paulo alobaki yango, “mokili, na nzela na mayele na yango, elongi te na koyeba Nzambe.”—1 Bakolinti 1:21.
5. Mbeba nini ekangami na mayele ya mokili?
5 Na bongo nini ezali mbeba oyo ekangani na mayele ya mokili oyo, mpe oyo ezali kobebisa ata mikano na yango ya ebongiseli ya sika ya mokili mobimba? Ezali ete mokili ezali kotyola likambo moko oyo bato bakoki kopengola yango te kozanga etumbu: boyangeli monene ya Jéhovah Nzambe. Na lolendo nyonso, mokili ezali koboya kondima boyangeli na Nzambe. Na nko nyonso bazali kotalela Jéhovah te wana ezali bango kosala mikano, kotyaka motema bobele na makoki na bango moko mpe na myango na bango moko. (Tala Danyele 4:31-34; Yoane 18:37.) Biblia elobi polele ete “kobanga Jehovah ezali ebandeli na mayele.” (Masese 9:10; Nzembo 111:10, MN) Nzokande, mokili eyekoli ata ezalela oyo ya ebandeli te mpo na kozwa mayele. Na bongo, lolenge nini ekoki kolonga kozanga lisungi na Nzambe?—Nzembo 127:1.
Kosakola Bokonzi: bolema to ebongi na ntango na biso?
6, 7. (a) Baoyo batambwisami na mayele na Nzambe bazali kosakola nini, kasi ndenge nini mokili ezali kotalela bango? (b) Bakonzi na mangomba ya boklisto na lokuta bazali kosakola engebene mayele nini, mpe yango epesi litomba nini?
6 Epai mosusu, baoyo bayebi Nzambe bazali komonisa mayele na Nzambe mpe bazali na mposa ya komitika kotambwisama na yango. Lokola Yesu alobaki yango, bazali kosakola “nsango malamu oyo na bokonzi . . . na mokili mobimba oyo bato bafandi.” (Matai 24:14; 28:19, 20) Mosala oyo ya kosakola Bokonzi na Nzambe ebongi mpenza na ntango na biso, awa mabelé matondi na bitumba, na kobeba ya mopepe mpe ya mai, na bobola mpe na konyokolama ya bato? Mpo na baoyo bazali na mayele engebene mokili, ezali mpenza bolema mpe ngala na yango esilá. Bazali kotalela basakoli na Bokonzi na Nzambe lokola nyama moke ya mai na nkombo balane oyo ezali kotya kilo na masuwa ya Ekolo mpe ezali kolembisa monano na yango epai na boyangeli boleki malamu. Basimbami kati na likanisi yango na bakonzi na mangomba ya boklisto na lokuta, oyo bazali kosakola engebene mayele ya mokili mpe bazali koloba te epai na bato likambo oyo bato bazali na yango mposa mpo na koyeba na ntina na mokili ya sika elakami na Nzambe mpe na ntina na Bokonzi na Nzambe, oyo ekozala bongo boyangeli, nzokande yango ezalaki liteya ya liboso ya Klisto.—Matai 4:17; Malako 1:14, 15.
7 Mokomi na makambo na kala H. G. Wells ayebisaki libunga yango oyo bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokuta bazali kosala. Akomaki ete: “Likeseni mosusu ya polele, ezali bongo ntina monene oyo Yesu apesaki, kati na mateya na ye, na oyo abengi Bokonzi na makoló, mpe esika moke oyo Bokonzi yango esili kozwa kati na milulu mpe kati na mateya ya mangomba mingi ya boklisto.” Kasi, mpo ete bato oyo basali libota na lelo bazwa bomoi, esengeli na bango liboso koyoka nsango ya Bokonzi na Nzambe oyo sikawa esili kotyama, mpe, na ntina yango, esengeli basakoli mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi yango.—Baloma 10:14, 15.
8. Mpo na nini kosakolama ya nsango malamu na Bokonzi na Nzambe ezali mosala moko ebongi mpenza na ntango na biso, kasi etamboli nini ekoki kozala na litomba ya koumela te?
8 Kosakolama ya nsango malamu na Bokonzi na Nzambe ezali bongo mosala ebongi mpenza na ntango na biso. Ya solo, nsango ya Bokonzi ezali kopesa elikya ya solo oyo ezali kotondisa mitema ya bato na esengo na mikolo oyo ya nsuka epai ‘ntango na mpasi esili koya.’ (2 Timoté 3:1-5; Baloma 12:12; Tito 2:13) Wana bomoi kati na mokili oyo ezali ya kotyela motema te mpe ya mikolo mokuse, bomoi na mokili ya sika elakami na Nzambe ekozala ya seko; esengo, bozwi mpe kimya ekozala mingi awa na mabelé. (Nzembo 37:3, 4, 11) Na bongo, Yesu alobaki ete: “Moto akozala na litomba nini, soko akozwa mokili mobimba nde akobongisa bomoi na ye? soko nde moto akosenza bomoi na ye na nini?” Soki moto moko abungisi lotomo ya kozala na bomoi kati na mokili ya sika elakami na Nzambe, litomba nini akozwa na mokili oyo ezali koleka? Bosepeli na biloko ya mosuni oyo moto yango azali na yango ekozala mpamba, ezangi litomba.—Matai 16:26; Mosakoli 1:14; Malako 10:29, 30.
9. (a) Wana mobali oyo Yesu abyangaki ete azala moyekoli na ye asengaki ye elaka, toli nini Yesu apesaki ye? (b) Eyano na Yesu esengeli kozala na bopusi nini likoló na biso?
9 Moto moko oyo Yesu abyangaki ye mpo na kozala moyekoli na ye alobaki ete: “Pesa [ngai] nzela ete nakende liboso kokunda tata na ngai.” Toli nini Yesu apesaki ye? Koyebaka ete mobali yango alingaki kozongisa nsima mosala moko ya motuya mingi mpo na ntina bobele ete alingaki kozela kino liwa ya baboti na ye, Yesu ayanolaki ete: “Tika bakufi kokunda bakufi na bango mpenza, nde yo kenda kosakola Bokonzi na Nzambe.” (Luka 9:59, 60) Baoyo bazali komonisa mayele na kotosaka Klisto bakoki kokima te mokumba ya kosakola nsango na Bokonzi. Mayele na Nzambe ezali koteya bango ete mokili oyo mpe bakonzi na yango bakweisami. (1 Bakolinti 2:6; 1 Yoane 2:17) Baoyo bazali kosimba bokonzi na Nzambe bayebi ete elikya bobele moko ya solo mpo na bato ezwami na lisalisi na ye mpe na boyangeli na ye. (Zakaria 9:10) Lisusu, wana baoyo bazali na mayele ya mokili oyo bazali kondima te Bokonzi na Nzambe mpe balingi te boyangeli wana ya likoló, bato oyo batambwisami na mayele na Nzambe bazali kopesa bolamu ya solo epai na bazalani na bango na kobongisaka bango mpo na bomoi ya seko kati na mokili ya sika elakami na Jéhovah.—Yoane 3:16; 2 Petelo 3:13.
“Bolema mpo na baoyo bakokufa”
10. (a) Ntango Saulo mobotama na Tarse abongwanaki, mosala nini abandaki mpe lolenge nini azalaki kotalela yango? (b) Kati na makambo nini Bagreke ya kala bazalaki na lokumu, kasi ndenge nini Nzambe azalaki kotalela mayele na bango?
10 Saulo, mobotama na Tarse, oyo akomaki Paulo, ntóma na Yesu Klisto, akokisaki mosala yango ya lobiko. Ezali mpenza likambo na mayele na kokanisa ete ntango Yesu Klisto abongolaki Saulo, apesaki ye mosala moko ya bolema? Paulo azalaki na likanisi wana te. (Bafilipi 2:16) Na eleko wana, Bagreke batalelamaki lokola bato baleki mayele kati na mokili mobimba. Bazalaki komikumisa na ntina na bafilozofe na bango ya lokumu mpe na bato na bango ya mayele. Atako azalaki koloba lokotá na Greke, Paulo azalaki kondima filozofi te soko mpe mateya na Bagreke. Mpo na nini? Mpo ete mayele na mokili oyo mazali bolema mpo na Nzambe.a Paulo azalaki koluka mayele na Nzambe, oyo ezalaki kopusa ye ete asakola nsango malamu ndako na ndako. Yesu Klisto, Mosakoli oyo alekaki basakoli nyonso kino lelo, apesaki ndakisa mpe atindaki ye ete akokisa mosala se moko wana.—Luka 4:43; Misala 20:20, 21; 26:15-20; 1 Bakolinti 9:16.
11. Na mokuse, Paulo alobaki nini mpo na mokumba oyo azalaki na yango ya kosakola mpe na ntina na mayele ya mokili?
11 Tala oyo Paulo alobaki na ntina na mokumba oyo azalaki na yango mpo na kosakola: “Klisto atindi ngai . . . mpo na kosakola nsango malamu; na maloba na mayele te, mpo ete nzeté na mpasi na Klisto ekoma eloko na mpamba te. Mpo ete liteya na nzeté na mpasi [mbeka na lisiko na Yesu] ezali bolema epai na bakufi, kasi epai na biso bato tozali kobika, ezali nguya na Nzambe. Mpo esili kokomama ete: ‘Nakobebisa mayele na bato na mayele mpe nakoyeisa mpamba boyebi na bayebi.’ Wapi moto na mayele [lokola filozofe]? Wapi molobeli? Wapi mososoli na ekeke oyo? Nzambe akomisi mayele na mokili eloko na bolema te? Mpo na mayele na Nzambe, mokili eyebaki Nzambe na nzela na mayele na yango mpenza te. Bongo Nzambe asepelaki kobikisa bandimi na nzela na bolema na esakweli.”—1 Bakolinti 1:17-21
12. Jéhovah azali kokokisa nini na nzela na “bolema oyo bazali kosakola,” mpe baoyo bazali na mposa ya kozwa “mayele ya likoló” bazali kosala motindo nini?
12 Atako yango ekoki kokamwisa, Jéhovah azali kosalela lokola basakoli, bato oyo mokili ezali kobenga bango ete bilema. Na yango, na nzela na bolema ya mosala ya basakoli wana, Nzambe azali kobikisa baoyo bazali kondima. Jéhovah azali kobongisa makambo na motindo boye ete basakoli ya “bolema” yango bakoka te komikumisa, mpe ete bato mosusu bakoka te kopesa lokumu epai na baoyo na nzela na bango bayoki nsango malamu. Yango mpo ete “moto moko te amikumisa liboso na Nzambe.” (1 Bakolinti 1:28-31; 3:6, 7) Ya solo, mosakoli azali kokokisa mokumba moko ya ntina, kasi ezali nsango oyo azali na mokumba ya kosakola nde ezali kosala mpo na lobiko ya moto oyo andimi. Baoyo balingi kozwa “mayele na likoló” bazali kotyola te nsango ya mosakoli mpo ete ye amonani lokola elema mpe mosokemi, mpo ete anyokwami mpe ete azali kokende ndako na ndako. Nkutu, basokemi bazali komemya mosakoli ya Bokonzi, oyo bazali komona ye ete azali motindami na Jéhovah mpe azali koya na nkombo ya Nzambe. Bazali kopesa ntina monene na nsango oyo mosakoli yango azali koyebisa na maloba mpe na lisalisi ya mikanda.—Yakobo 3:17; 1 Batesaloniki 2:13
13. (a) Ndenge nini Bayuda mpe Bagreke bazalaki kotalela mosala ya kosakola Klisto abomami likoló na nzeté? (b) Motindo nini ya bato babyangami mingi te mpo na kozala bayekoli na Yesu, mpe mpo na nini?
13 Kokobaka lisolo na ye na ntina na banzela na Nzambe, Paulo alobi ete: “Bayuda bakosengaka bilembo mpe Bagreke bakolukaka mayele, nde biso tokosakolaka Klisto oyo abakisamaki likoló na nzeté. Yango ntina na libaku epai na Bayuda mpe eloko na bolema epai na Bapakano. Nde epai na babyangami, Bayuda mpe Bagreke, Klisto azali nguya na Nzambe mpe mayele na Nzambe. Mpo ete eloko na bolema ya Nzambe eleki mayele na bato mpe eloko na bolembu ya Nzambe eleki nguya na bato. Bandeko, botala ebyangeli na bino. Bato na mayele na nzoto babyangami mingi te, bato mingi na nguya mpe te, bato mingi na mabota na lokumu te. Kasi Nzambe aponi biloko na bolema na mokili ete ayokisa bato na mayele nsoni; mpe Nzambe aponi biloko na bolembu ya mokili mpo na koyokisa biloko na nguya nsoni.”—1 Bakolinti 1:22-27; tala Yisaya 55:8, 9.
14. (a) Soki batuni na ba Témoins de Jéhovah bilembeteli ya lotomo na bango, eloko nini bazali koyebisa? (b) Mpo na nini Paulo aboyaki kosepelisa Bagreke mpe kolakisa mayele ya mokili?
14 Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Bayuda basengaki elembo ya likoló. (Matai 12:38, 39; 16:1) Kasi Yesu aboyaki. Motindo moko, lelo mpe, ba Témoins de Jéhovah bazali kolakisa te lotomo na bango na mwa elembo moko. Nkutu, bazali komonisa ete basili kozwa mokumba ya kosakola nsango malamu, lokola emonisi yango mikapo na Biblia lokola Yisaya 61:1, 2; Malako 13:10; mpe Emoniseli 22:17. Bagreke ya kala bazalaki koluka mayele, kokota bakelasi milai kati na makambo ya mokili oyo. Atako ateyamaki kati na mayele ya mokili oyo, Paulo alukaki te kosepelisa Bagreke na komonisaka mayele yango. (Misala 22:3) Alobaki mpe akomaki na lokota ya Greke oyo elobamaki epai na bato nyonso, kasi te na greke ya bato na mayele. Ayebisaki epai na Bakolinti ete: “Bandeko, eyaki ngai epai na bino, nayaki kosakwela bino makambo mabombami na Nzambe na maloba mapusi te mpe na mayele mapusi te. . . . Koloba na ngai mpe kosakola na ngai ezalaki na maloba na kondimisa mpe na mayele [na bato] te, kasi mpo na komonisa elimo mpe nguya, ete kondima na bino etongama likoló na mayele na bato te kasi likoló na nguya na Nzambe.”—1 Bakolinti 2:1-5
15. Likambo nini Petelo akundweli baoyo bazali koseka nsango malamu, mpe na nini ezalela ya lelo ekokani na oyo ya mikolo na Noa?
15 Epai na baoyo, na mikolo oyo ya nsuka, bazali kotyola nsango malamu etali nsuka ebelemi ya mokili oyo mpe koya ya mokili na sika elakami na Nzambe, ntóma Petelo akundweli bango ete na eleko ya Noa mokili “ebomamaki ntango ezindaki na mai.” (2 Petelo 3:3-7) Wana libebi yango ezalaki kobelema, likambo nini Noa asalaki? Bato mingi batalelaka ye bobele lokola motongi na masuwa. Kasi, engebene maloba na Petelo, ntango Nzambe ayeisaki mpela likoló na mokili ya kala, “abatelaki Noa, mosakoli na boyengebene elongo na bato mosusu nsambo.” (2 Petelo 2:5) Kati na mayele na bango ya mokili, bato mabe ya eleko oyo ezalaki liboso na mpela, na ntembe te batyelaki kosakola ya Noa, kotalelaka ye lokola elema, moloti ndoto, moto na makanisi mpamba. Lelo, baklisto ya solo bazali kati na ezalela motindo moko; mpo na yango, Yesu akokisaki libota na biso na oyo ya mikolo na Noa. Nzokande, atako baseki bazali koseka, kosakolama ya nsango malamu na Bokonzi ezali lisolo mpamba te. Lokola kosakolama oyo ekokisamaki na Noa, ekomema lobiko epai na mosakoli mpe epai na baoyo bazali koyoka ye!—Matai 24:37-39; 1 Timoté 4:16.
‘Tókoma bilema mpo na kokóma bato na mayele’
16. Na Armagedon, likambo nini ekokomela mayele ya mokili oyo, mpe nani akokota na mokili ya sika elakami na Nzambe?
16 Mosika te, na Armagedon, Jéhovah Nzambe akolimwisa “bwanya nyonso ya bato na bwanya.” Akobwaka “mayele ya bato na mayele” oyo bapesaki bisakweli likoló na lolenge oyo ebongiseli na bango ya sika ekopesa makambo malamu epai na bato. “Etumba ya mokolo monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso” ekokómisa mpamba myango ya koloba ya mokili, filozofi mpe mayele ya mokili oyo. (1 Bakolinti 1:19; Emoniseli 16:14-16) Baye bakobika na etumba yango mpo na kofanda kati na mokili ya sika elakami na Nzambe ezali bobele baoyo bazali kotosa oyo mokili ya lelo ezali kobenga yango ete bolema, elingi koloba nsango malamu na nkembo ya Bokonzi na Jéhovah.
17. Na nini ba Témoins de Jéhovah bakomi ‘bilema,’ mpe likambo nini basakoli ya nsango malamu bazwi ekateli ya kosala?
17 Ba Témoins de Jéhovah, lokola batambwisami na elimo na ye, bazali koyoka nsoni te mpo na kosakola oyo mokili ezali kobenga yango ete bolema. Na esika ete bameka kozala mayele engebene mokili oyo, bakomi nde ‘bilema.’ Ndenge nini? Na kokokisaka mosala ya kosakola Bokonzi, mpo na kozala bato na mayele. Na yango, Paulo akomaki ete: “Soko moto nani kati na bino akanisi ete azali na mayele na ekeke oyo, akoma elema mpo ete azala moto na mayele.” (1 Bakolinti 3:18-20) Basakoli ya Jéhovah, oyo bazali koyebisa nsango malamu, bayebi ete nsango oyo bazali kosakola ezali na motuya mpo na lobiko ya bato mpe bakokoba kosakola yango kino nsuka ya mokili oyo elongo na mayele na yango na Armagedon. Mosika te, Jéhovah Nzambe akolongisa boyangeli na ye ya molongo mobimba mpe akopesa bomoi na seko epai na baoyo nyonso, lelo, bazali kondima mpe bazali kosala na boyokani “na bolema oyo ezali kosakolama.”
[Maloba na nse ya lokasa 21]
a Mikanda na bato na mayele ya mboka Greke mizali komonisa ete, atako masolo na bango mpe bolukiluki na bango etali filozofi, bamonaki te ntina ya solo ya kozala na elikya. Molakisi Sterrett mpe molakisi Angus bamonisi ete: “Mikanda na bango nyonso mitondi na bileli likoló na makambo ya mawa oyo bomoi ezali na yango, likoló na bolingo oyo ekoumelaka ntango mokuse, likoló na elikya oyo ezali bobele bokosi mpe likoló na liwa mpo ete ekoyokelaka moto mawa te.”—New “Standard” Bible Dictionary, Funk mpe Wagnalls, 1936, lokasa 313.
What Are Your Answers?
◻ What two kinds of wisdom are there?
◻ What is the basic flaw of the world’s wisdom?
◻ Why is preaching the good news the most practical thing to do?
◻ What will soon happen to all the world’s wisdom?
◻ Why are Jehovah’s Witnesses not ashamed to preach what the world calls foolishness?
[Elilingi na lokasa 23]
Bagreke bazalaki koluka mayele ya mokili mpe mbala mingi bazalaki kotalela kosakola ya Paulo lokola bolema