Tika te ete moto abebisa bizaleli na yo malamu
“Bomizimbisa te. Baninga mabe bakobebisaka bizaleli malamu.” —1 BAKOLINTI 15:33, MN.
1, 2. (a) Ntoma Paulo azalaki na mayoki nini epai na baklisto ya Kolinti, mpe mpo na nini? (b) Toli nini tolingi mpenza kotalela yango?
OYO nde mayoki ya bolingo mingi baboti bazali na yango! Ezali kopusa baboti na komipesa mpo na bana na bango, na kolakisa bango mpe na kopesa bango toli. Mbala mosusu ntoma Paulo azalaki na bana te, kasi akomelaki baklisto ya Kolinti, ete: “Ata bozali na balakisi nkóto na nkóto kati na Klisto, bozali mpenza na batata mingi te; mpo ete kati na Klisto Yesu, nasili kokóma tata na bino na nzela ya nsango malamu.”—1 Bakolinti 4:15, MN.
2 Kala, Paulo akendaki na Kolinti, epai asakwelaki Bayuda mpe Bagreke. Apesaki lisungi mpo na kosala lisangá na Kolinti. Kati na mokanda mosusu Paulo akokanisaki bolingo na ye na oyo ya mama ya libota, kasi azalaki lokola tata mpo na Bakolinti. (1 Batesaloniki 2:7) Lokola ekosalaka tata ya bolingo, Paulo akebisaki bana na ye ya elimo. Okoki kozwa litomba na toli apesaki lokola tata mpo na baklisto ya Kolinti: “Bomizimbisa te. Baninga mabe bakobebisaka bizaleli malamu.” (1 Bakolinti 15:33, MN) Mpo na nini Paulo akomaki maloba oyo epai na baklisto ya Kolinti? Lolenge nini tokoki kosalela toli yango?
Toli mpo na bango mpe mpo na biso
3, 4. Makambo nini toyebi na ntina na Kolinti na ekeke ya liboso mpe bafandi na yango?
3 Na ekeke ya liboso, Strabon, moto na Greke oyo ayekoli zebi ya mikili akomaki ete: “Kolinti ebengami ‘mboka na bozwi’ mpo na mombongo na yango, lokola ezali katikati na mai minene mibale, mpe ezali na mabóngo mibale ya minene, moko mpo na masuwa oyo ezalaki kokende na mikili ya Azia, mpe mosusu ezalaki kokende na mboka Italie; mpe ezalaki kosombitanya biloko na mikili nyonso wana.” Nsima ya mbula mibale nyonso, masano ya Isthmique oyo ezalaki kosalema wana ezalaki kobenda ebele na bato ete baya na Kolinti.
4 Ezalaki boni mpo na bato ya engumba wana oyo ezalaki mboka-mokonzi mpe esika ya losambo ya binama ya nzoto mpo na Aphrodite? Molakisi T. S. Evans alimbolaki ete: “Motuya ya bato ezalaki pene na 400 000. Bato bayekolaki mingi, kasi bazalaki na etamboli ya mbindo, mpe ya bosɔtɔ. . . . Bagreke oyo bafandaki na Achaïa bamipesaki mingi mpenza mpo na kokólisa bososoli mpe mposa makasi ya koyeba makambo ya sika. . . . Moimi na bango ekokaki mpenza kobimisa mikabwano.”
5. Likámá nini bandeko ya Kolinti bakutanaki na yango?
5 Na nsima, ata lisangá likabwanaki mpo na bato mosusu oyo bamipesaki na makanisi ya lolendo. (1 Bakolinti 1:10-31; 3:2-9) Moko na mikakatano yango minene ezalaki oyo basusu bazalaki koloba ete: “Lisekwa lizali te mpo na bakufi.” (1 Bakolinti 15:12; 2 Timoté 2:16-18) Atako endimeli na bango ezalaki malamu (to mpe mabe), Paulo asembolaki bango na kopesáká elembeteli ete Klisto asilaki “kosekwa longwa na bakufi.” Na yango, baklisto bakoki kondimisama ete Nzambe akopesa bango “elónga na nzela na Nkolo na biso, Yesu Klisto.” (1 Bakolinti 15:20, 51-57) Soki ozalaki ntango wana, mbɛlɛ omikɔtisaki na likámá wana?
6. Toli ya Paulo oyo ezwami na 1 Bakolinti 15:33 etalelaki libosoliboso banani?
6 Ezalaki ye kopesa bilembeteli makasi ete bakufi bakosekwa, Paulo alobaki na bango ete: “Bomizimbisa te. Baninga mabe bakobebisaka bizaleli malamu.” Toli oyo etalelaki baoyo bazalaki kati na lisangá nde bazalaki koboya kondima liteya ya lisekwa. Bazalaki na ntembe bobele na ntina na likambo moko oyo bazangaki kososola? (Tala Luka 24:38.) Te. Paulo akomaki ete “bamoko kati na bino balobi ete lisekwa lizali te,” bato yango baboyaki bongo kondima: wana ezaleli oyo ememaki na lipɛngwi. Paulo ayebaki malamu ete bakokaki kobebisa bizaleli mpe makanisi malamu ya bato mosusu.—Misala 20:30; 2 Petelo 2:1.
7. Wapi likambo moko oyo, kati na yango, tokoki kosalela 1 Bakolinti 15:33?
7 Lolenge nini tokoki kosalela toli oyo ya Paulo na ntina na baninga? Alingaki koloba te ete tosengeli koboya kosalisa moto moko kati na lisangá oyo azali na mokakatano mpo na kokanga ntina ya verset moko to liteya moko ya Biblia. Mpo na yango, Yuda 22, 23 elendisi biso ete topesa lisungi ya boboto epai na bato ya motema malamu baoyo bazali bongo kokakatana. (Yakobo 5:19, 20) Nzokande, toli oyo Paulo apesaki yango lokola tata, esengeli kosalelama soki moto moko azali ntango nyonso koboya kondima makambo oyo biso toyebi yango ete ezali solo ya Biblia to azali ntango nyonso kobimisa maloba na ntembe to oyo na kokweisa. Tosengeli komibatela na kozala na boninga elongo na moto motindo wana. Nde soki moto akómi mpenza mopɛngwi, babateli na mpate ya elimo bakosala nyonso mpo na kobatela etongá.—2 Timoté 2:16-18; Tito 3:10, 11.
8. Lolenge nini tokoki kosala na bososoli nyonso wana moto moko abɛti ntembe na liteya moko ya Biblia?
8 Tokoki mpe kosalela maloba mazwami na 1 Bakolinti 15:33 oyo Paulo alobaki lokola tata, na kotalela baoyo bazali libandá ya lisangá mpe bazali koteya makambo na lokuta. Lolenge nini tokoki kopusama na kosala boninga elongo na bango? Ekoki kosalema soki toyebi te kokesenisa bato oyo bakoki kosalisama mpo na koyekola solo mpe baoyo bazali wana bobele mpo na ntembe ete balóngisa mateya ya lokuta. Na ndakisa, kati na mosala ya kopesa litatoli, tokoki kokutana na moto oyo azali kobɛta ntembe na likambo moko nde asepeli kosolola mingi mpo na yango. (Misala 17:32-34) Mabe mazali te na kolimbola solo ya Biblia na esengo nyonso epai moto oyo alingi mpenza koyeba yango malamu, ata mpe kozongela ye lisusu mpo na kolakisa ye bilembeteli oyo bikoki kondimisa. (1 Petelo 3:15) Nzokande, basusu bazali mpenza na mposa te mpo na koyeba solo ya Biblia.
9. Tosengeli kosala lolenge nini wana ntembe ebimi mpo na bindimeli na biso?
9 Bato mingi bazali kolekisa bangonga mingi, poso na poso, mpo na kotya ntembe, kasi ezali te mpo ete bazali koluka koyeba solo. Balingi bobele kobebisa kondima ya basusu wana bazali komikumisa ete bayekolá lokotá ya Liebele, lokotá ya Greke, to liteya ya évolution. Wana bazali kokutana na bango, Batemwe mosusu bakotyanaka ntembe na bango mpe bakosukaka na kokólisa boyokani elongo na bango likoló na mateya ya lokuta ya mangomba, na filozofi, to na sianse ya lokuta. Tosengeli koyeba ete Yesu atikaki nzela te ete yango ekómela ye, atako akokaki kolónga ntembe elongo na bakonzi ya mangomba baoyo bayekolaki Liebele to Greke. Wana ntembe ezalaki kobima, Yesu azalaki kozongisa maloba mokuse mpe azalaki bongo kotya likebi na ye epai na bato na komikitisa, bampate ya solo.—Matai 22:41-46; 1 Bakolinti 1:23 kino 2:2.
10. Mpo na nini baklisto oyo bazali na ba ordinateurs mpe basili kozwa abonemá na programme moko etalisami na nzela ya etánda esalelami na lotiliki basengeli kozala na bokɛngi?
10 Ba ordinateurs ya ntango na biso ebimisi myango mosusu ya boninga mabe. Bakompanyi mosusu ya mombongo ezali kopesa nzela na baoyo basili kosala abonemá na yango ete basalela ordinateur mpe telefone mpo na kotinda nsango oyo ekomami na nzela na lotiliki kati na etánda moko, mpe kati na yango, bakoki kokoma nsango oyo bato nyonso basili kosala abonemá bakokoka kotanga yango. Esaleli wana ezali komema na kosala masoló na ntembe likoló ya makambo ya losambo. Moklisto moko akoki komikɔtisa na lolenge ya ntembe wana mpe akoki kolekisa ngonga mingi elongo na mopɛngwi oyo, mbala mosusu, asilá kobimisama na lisangá. Etinda ezwami na 2 Yoane 9-11 emonisi toli oyo Paulo apesaki lokola tata na ntina na kopɛngola baninga mabe.a
Tómizimbisa te
11. Ezalela ya mombongo na Kolinti epesaki libaku nini?
11 Lokola tomonaki yango, Kolinti ezalaki esika monene ya mombongo, elongo na ebele ya magazini mpe biloko mingi ya kotɛka. (1 Bakolinti 10:25) Mingi na baoyo bazalaki koya mpo na masano ya Isthmique, bazalaki kofanda na hema, mpe na boumeli ya masano bato na mombongo bazalaki kotɛka longwa na hema oyo ekomemamaka to na bamesa etongelami ezipeli. (Tala Misala 18:1-3.) Yango ekokaki kosala ete Paulo azwa mosala ya kotonga hema. Mpe akokaki kosalela esika wana ya mosala mpo na koyebisa nsango malamu. Molakisi J. Murphy-O’Connor akomaki ete: “Longwa na magazini mazwami na zándo . . . Paulo azalaki kosolola na ebele na bato batondaki na balabala, bobele baninga na ye ya mosala mpe basombi te, kasi ezalaki na ebele mosusu oyo bazalaki libandá. Na eleko mombongo mozalaki kotambola malamu te, akokaki kofanda liboso ya ndako mpe kobenda likebi ya baoyo ye amonaki ete bakokaki koyoka . . . Ezali mpasi na kokanisa ete bizaleli na ye ya nguya mpe endimeli na ye makasi ezangaki komonisa ye noki lokola ‘moto na lokumu’ na esika oyo afandaki; mpe yango emonanaki te bobele na bato na goigoi kasi lisusu na bato oyo bazalaki mpenza koluka koyeba makambo mingi. . . . Basi ya mabala elongo na basali na bango, baoyo bayokaki nsango na ye, bakokaki kokende kotala ye na mokálo ya kokende kosomba biloko. Na ntango na mpasi, wana bazwi monyoko to mwa motungisi moke, bandimi bakokaki kokende epai na ye lokola bakiliyá. Lisusu, esika na ye ya mosala epesaki ye nzela na kokutana na bakonzi ya Leta.”
12, 13. Lolenge nini 1 Bakolinti 15:33 ekoki kosalelama na motindo mobongi na esika ya mosala?
12 Atako bongo, Paulo ayebaki ete akokaki kokutana na “baninga mabe” kati na esika ya mosala. Biso mpe tosengeli koyeba yango. Paulo atangaki mpenza ezaleli moko oyo ezalaki komonana epai na bato mosusu, ete: “Tolyaka mpe tomelaka, mpo ete tokokufa lobi.” (1 Bakolinti 15:32) Nokinoki alandi kopesa toli na ye lokola tata, ete: “Bomizimbisa te. Baninga mabe bakobebisaka bizaleli malamu.” Lolenge nini esika ya mosala mpe koluka bisengo ekoki kobimisa likámá?
13 Baklisto balingaka kozala na boboto elongo na baninga ya mosala, mpe makambo mingi mamonisi na meko nini yango ekoki mpenza kofungola nzela ya kopesa litatoli. Nzokande, moninga ya mosala akoki kotalela boboto wana na lolenge mabe na kotangáká yango lokola libyangi mpo na kolekisa ntango ya kominanola elongo. Mwasi to mobali wana akoki kopesa libyangi ya mbalakaka mpo na kokende kolya, kolekisa mwa ntango moke nsima ya mosala mpo na komela masanga, to kokende kominanola na wikende. Moto wana akoki komonana lokola moto ya boboto mpe ya malamu, mpe libyangi likoki komonana lokola nde ezali mabe te. Kasi, Paulo akebisi biso ete: “Bomizimbisa te.”
14. Lolenge nini baklisto mingi bamizimbisaki na baninga?
14 Baklisto mosusu bamizimbisaki. Mokemoke, bamonisaki bolɛmbu mpo na kotalela malamumalamu boyokani elongo na baninga ya mosala. Ntango mosusu ezali kokólisa mposa ya kotala masano to kominanola elongo. To mpe, moto oyo azali moklisto te akoki kozala na boboto mingi mpe na makanisi malamu, oyo ekoki komema na kolekisa ntango mingi elongo na ye, ata mpe kosepela na boninga wana koleka boninga elongo na basusu kati na lisangá. Mpe na nsima, boninga wana ekoki komema na kozangisa likita moko. Ekoki komema na kozonga bobele na butu mpenza mpe kozanga kosangana na mosala ya kosakola na ntɔngɔ. Ekoki komema na kolekisa ntango mingi mpo na kotala film to vidéo ya lolenge oyo moklisto asengeli koboya kotala. Tokoki kokanisa boye: ‘O, oyo ekokómela ngai te.’ Kasi mingi na baoyo bamizimbisaki balobaki bobele bongo na ebandeli. Tosengeli komituna ete: ‘Lolenge nini nakosala mpenza mpo na kolanda toli oyo ya Paulo?’
15. Tosengeli kozala na ezaleli nini ya bokatikati epai na bato bafandi penepene na biso?
15 Oyo touti kotalela mpo na esika ya mosala ekosalelama mpe mpo na boninga na biso elongo na bato oyo bafandi penepene na biso. Ya solo, baklisto ya Kolinti ya kala bazalaki na bato oyo bafandaki penepene na bango. Na bisika mosusu ezali mabe te na komonisa boboto mpe kosalisa bazalani. Na bamboka mike bato bafandi esika moko bakoki kotyelana motema mpo ete bazali bobele bango moko. Boyokani na libota ezali mpenza makasi na bisika mosusu, kopesáká nzela na kobyanga bato mbala na mbala mpo na kolya elongo na bango. Na ndenge emonani, bokatikati ezali na ntina, lokola Yesu amonisaki yango. (Luka 8:20, 21; Yoane 2:12) Kati na boyokani na biso elongo na bazalani mpe na bandeko na biso ya mosuni, tozali kolanda kosala lokola ezalaki biso kosala liboso ete tokóma baklisto? Nzokande, tosengeli kotalela lisusu boyokani wana mpe kozwa ekateli makasi ya kotya ndelo ebongi, boye te?
16. Lolenge nini tozali kososola maloba na Yesu oyo mazwami na Matai 13:3, 4?
16 Mokolo mosusu Yesu akokisaki liloba ya Bokonzi na nkoná oyo “ezalaki kokwea na nzela, mpe bandeke bayei mpe balei yango.” (Matai 13:3, 4, 19) Na ntango wana, mabelé ya nzela makómaki makasi mpo ete bato mingi bazalaki kotambolatambola likoló na yango. Ezali lolenge moko mpo na bato mingi. Ntango nyonso bazali bobele elongo na baninga, na bandeko ya mosuni mpe na bato mosusu oyo bazali kokende kotala bango mpe kozonga, kozwáká ntango na bango mingi. Na lolenge emonani, yango ezali kobebisa mabelé ya mitema na bango, koyeisáká yango makasi ete nkoná ya solo ebima te. Motema makasi motindo moko ekoki kokóla kati na motema ya ye oyo asili kokóma moklisto.
17. Lolenge nini boninga elongo na bato bafandi penepene na biso mpe bato mosusu ekoki kozala na bopusi likoló na biso?
17 Bato mosusu ya mokili baoyo bafandi penepene na biso mpe bandeko na biso ya mosuni bakoki kozala bato ya boboto mpe bazali kopesa lisungi, kasi bazali komonisa mposa te mpo na makambo ya elimo soko mpe bolingo mpo na boyengebene. (Malako 10:21, 22; 2 Bakolinti 6:14) Soki tokómi baklisto elimboli te ete tokómi bato bazangi boboto, baoyo bazangi komibanzabanza mpo na bazalani. Yesu apesaki biso toli ya komibanzabanza mpo na bato mosusu. (Luka 10:29-37) Kasi toli ya Paulo ezali malamu mpe ezali na ntina mpo na kozala na bokɛngi na ntina na baninga na biso. Lokola tozali kosalela toli ya liboso, tosengeli te kobosana oyo ya mibale. Soki toboyi kotya mitinda wana mibale kati na makanisi, bizaleli na biso bikoki kobebisama. Ozali na bizaleli ya lolenge nini na kotalela oyo ya bato bafandi penepene na yo to ya bandeko na yo ya mosuni, na ntina na kolongobana to kotosa mibeko ya Kaisala? Na ndakisa, na ntango ya kofuta taxe, bakoki koloba ete kozanga koyebisa matomba mazwami to biloko bitɛkami ezali mabe te, yango ezali nde nzela ya kobikela. Bakoki kosalela maloba mabongi mpo na kolóngisa makanisi na bango na ntango bazali komela café to na ntango bayei kotala yo na ndako. Lolenge nini yango ekoki kobebisa makanisi na yo mpe bizaleli na yo ya kolongobana? (Malako 12:17; Baloma 12:2) “Bomizimbisa te. Baninga mabe bakobebisaka bizaleli malamu.”
Bizaleli ya bilenge lokola
18. Mpo na nini 1 Bakolinti 15:33 etaleli mpe bilenge?
18 Bilenge bakobebisamaka mingi mpenza na makambo oyo bazali komona mpe oyo bazali koyoka. Omoná naino te bana oyo bazali na bikelá (gestes) mpe na bizaleli oyo ekokani mingi mpenza na oyo ya baboti na bango to ya bana mosusu kati na libota? Na yango, tosengeli kokamwa te ete bana bakoka kopusama na baninga ya masano to na baninga ya kelasi. (Tala Matai 11:16, 17.) Soki mwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasi azali kotambola elongo na bilenge oyo bazangi limemya epai na baboti na bango, mpo na nini kokanisa ete yango ekoki kobebisa mwana na yo te? Ezali boni soki bazali koyoka mbala na mbala wana bilenge mosusu bazali koloba makambo na nsoni? Ezali boni soki baninga na bango na eteyelo to na zingazinga bamipesi mingi na midɛlɛ ya sika ya basapato to lolenge ya babiju ya sika? Tosengeli kokanisa ete bilenge baklisto bazali kokutana na bopusi ya motindo wana te? Oyo Paulo alobaki na 1 Bakolinti 15:33 etali bobele bato ya mbula moko ya sikisiki?
19. Likanisi nini baboti basengeli komeka kokɔtisa yango kati na mitema ya bana na bango?
19 Soki ozali moboti, oyebi mpe toli oyo mpo na kososola elongo na bana na yo mpe kozwa bikateli na ntina na bango? Ekoki kosalisa soki ososoli ete yango elimboli te ete bilenge nyonso mosusu oyo bazali kotambola elongo na bana na yo na zingazinga na bino to na eteyelo, nyonso bazali mabe. Basusu kati na bango bakoki kozala malamu mpe sembo, lolenge moko mpo na bamoko na bato bafandi penepene na yo, bandeko na yo ya mosuni, mpe baninga na yo ya mosala. Meka kosalisa bana na yo ete bamona yango mpe basosola ete ozali na bokatikati na lolenge na yo ya kosalela toli ya mayele oyo Paulo apesaki epai na Bakolinti lokola tata. Lokola bazali kososola lolenge na yo ya kotalela makambo wana, yango ekoki kosalisa bango na komekola yo.—Luka 6:40; 2 Timoté 2:22.
20. Bilenge, ntembe nini bosengeli kolónga?
20 Bino baoyo bozali naino bilenge, bokoki kososola lolenge ya kosalela toli ya Paulo, na koyebáká ete ezali na ntina mpo na baklisto nyonso, bilenge to mikóló. Yango esɛngi milende mpe ekateli makasi, kasi mpo na nini te kondima kosala milende wana? Likambo oyo ete oyebi bilenge mingi mosusu uta bomwana na bango elimboli te ete bakoki te kobebisa bizaleli na yo, ete bakoki te kobebisa bizaleli oyo osili kokólisa lokola elenge moklisto.—Masese 2:1, 10-15.
Matambe malamu mpo na kobatela bizaleli na biso
21. (a) Nini tozali na yango mposa na ntina etali baninga? (b) Mpo na nini tokoki kondimisama ete baninga mosusu bakoki kozala likámá?
21 Biso nyonso tozali na mposa ya baninga. Atako bongo, tosengeli kokeba na likambo oyo ete baninga na biso bakoki kozala na bopusi likoló na biso, mpo na malamu to mpo na mabe. Yango emonanaki epai na Adam mpe epai na bato mingi mosusu na boumeli ya bikeke ya kala. Na ndakisa, Yosafata, mokonzi malamu ya Yuda, azwaki ngolu mpe mapamboli ya Jéhovah. Kasi nsima wana apesaki nzela na mwana na ye ya mobali ete abala mwana mwasi ya Akaba, mokonzi ya Yisraele, Yosafata abandaki kozala na boyokani elongo na Akaba. Boyokani wana mabe ebungisaki bomoi ya Yosafata. (2 Mikonzi 8:16-18; 2 Ntango 18:1-3, 29-31) Soki tosaleli mayele te mpo na kopona baninga na biso, yango ekoki mpenza kozala likámá.
22. Likambo nini tosengeli kosimba yango na motema, mpe mpo na nini?
22 Na yango, tika ete tosimba toli ya bolingo oyo Paulo apesi biso na 1 Bakolinti 15:33. Yango ezali te bobele maloba oyo tokoki koyoka mpe na nsima kozongela yango na bɔɔngɔ́. Yango emonisi nde bolingo oyo Paulo azalaki na yango lokola tata epai na bandeko na ye mibali mpe basi ya Kolinti, mpe, mpo na biso lokola. Mpe na ntembe te ezali toli oyo Tata na biso ya likoló apesi biso mpo alingi ete milende na biso mizwa elónga.—1 Bakolinti 15:58.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likámá mosusu kati na likambo wana ya kokoma na bitánda ezali ya komekama mpo na kosala bakopi ya ba programmes to mikanda oyo lotómo ezali bobele na bakomi kozanga ndingisa ya baoyo basalaki to babandisaki yango, likambo oyo likobimisa matáta na mibeko ya mokili mobimba mpo na oyo etali lotómo ya bakomi to babimisi.—Baloma 13:1.
Ozali komikundola?
◻ Mpo na ntina nini ya liboso Paulo akomaki 1 Bakolinti 15:33?
◻ Lolenge nini tokoki kosalela toli oyo ya Paulo na esika ya mosala?
◻ Likanisi nini ya bokatikati tosengeli kozala na yango mpo na bazalani?
◻ Mpo na nini 1 Bakolinti 15:33 ezali toli ebongi mpenzampenza mpo na bilenge?
[Elilingi na lokasa 17]
Paulo asalelaki esika ya mosala mpo na koyebisa nsango malamu
[Elilingi na lokasa 18]
Bilenge mosusu bakoki kobebisa bizaleli na yo ya boklisto